Mokapo ya zomi na motoba
Nsuka ebɛlɛmi mpo na bakonzi yango mibale oyo bamesaná kowelana
1, 2. Mboka nini eyaki kozwa esika ya mokonzi ya nɔrdi na nsima ya etumba ya mibale ya mokili mobimba?
NA MOBU 1835, Alexis de Tocqueville, moto ya filozofi mpe nganga-mayele ya masolo ya kala na France, alobaki na ntina na boyokani ya États-Unis na Russie ete: “Moko na bikólo yango ezali na bonsomi ya kosala makambo ndenge yango elingi; nzokande oyo mosusu ezali na bonsomi ya kosala yango te. Makambo ya bikólo yango ezali ndenge moko te. Makambo ya mokili mazali kondimisa makanisi oyo bato bazalaka na yango ete, bikólo yango . . . ezali koyangela mokili na nguya ya Nzambe, ekólo mokomoko na ngala na yango.” Ndenge nini maloba oyo makokisamaki na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba? J. M. Roberts, nganga-mayele ya masolo ya kala, akomaki ete: “Na nsuka ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bomoi ya bato nyonso ya mabelé ezalaki, na ntembe te, na mabɔkɔ ya mikili mibale ya nguya oyo ndenge na yango ya koyangela ekeseni mpenza. Lolenge moko ya koyangela euti na ekólo ya kala ya Russie, mpe mosusu na États-Unis.”
2 Na ntango ya bitumba mibale ya mokili mobimba, Allemagne ezalaki monguna monene ya mokonzi ya sudi—États-Unis na Angleterre, nguya ya mokili mobimba—mpe ezwaki esika ya mokonzi ya nɔrdi. Nzokande, nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mboka yango ekabwanaki. Allemagne ya Wɛsti esalaki boninga na mokonzi ya sudi, mpe Allemagne ya Ɛsti emityaki na ngámbo ya ebongiseli mosusu ya nguya—bikólo ya Kominisme oyo Union soviétique ezalaki kotambwisa. Ebongiseli oyo ya politiki ezalaki mokonzi ya nɔrdi mpe etɛmɛlaki makasi boyokani oyo États-Unis esalaki na Angleterre. Mpe kowelana kati na bakonzi yango mibale (guerre froide) ebebisaki boyokani na bango banda 1948 kino 1989. Liboso mpenza, Allemagne, mokonzi ya nɔrdi, ‘etɛmɛlaki kondimana ya bulɛɛ.’ (Danyele 11:28, 30) Ndenge nini bikólo ya Kominisme etalelaki kondimana yango?
BAKLISTO YA SOLO BABƐTI LIBAKU KASI BALONGI
3, 4. “Baoyo basopi kondimana” ezali banani, mpe boyokani nini bazalaki na yango na mokonzi ya nɔrdi?
3 Anzelu ya Nzambe alobaki ete: “Na monɔkɔ ya elɛngi, [mokonzi ya nɔrdi] akokosa baoyo basopi kondimana.” Anzelu alobaki lisusu ete: “Nde bato oyo bayebi Nzambe na bango bakotɛlɛma ngwi, mpe bakoleka. [“bakolonga,” NW] Mpe baoyo na kati na bato bazali na mayele bakolakisa bato mingi; nde [bakobɛta libaku, NW] mpo na mopanga mpe na mɔ́tɔ, mpo na boombo mpe na kopunza, [na boumeli ya mwa mikolo, NW].”—Danyele 11:32, 33.
4 “Baoyo basopi kondimana” ezali mpenza bakonzi ya mangomba ya boklisto, bango bato balobaka ete bazali baklisto, nzokande misala na bango ezali mpenza kobebisa nkombo ya baklisto. Na buku na ye (Religion in the Soviet Union) (Mangomba na Union soviétique), Walter Kolarz alobaki ete: “[Na boumeli ya etumba ya mibale ya mokili mobimba], guvernema ya Union soviétique esɛngaki na mangomba ete bákoka kosunga Leta na biloko ya mosuni mpe báyikisa basoda mpiko mpo na kobatela mboka.” Nsima ya etumba, bakonzi ya mangomba basalaki makasi mpo na kobatela boninga yango, atako mokili yango ya nguya oyo ezwaki esika ya mokonzi ya nɔrdi eboyaki kondima ete Nzambe azali. Na bongo, mangomba ya boklisto emikɔtisaki mpenza na makambo ya mokili oyo—ezalaki solo lipɛngwi monene na miso ya Yehova.—Yoane 17:16; Yakobo 4:4.
5, 6. ‘Bato oyo bayebi Nzambe na bango’ ezali banani, mpe ndenge nini basalaki na bokɛngi na nse na boyangeli ya mokonzi ya nɔrdi?
5 Baklisto ya solo—“bato oyo bayebi Nzambe na bango” mpe “bato oyo bazali na mayele” basalaki nini? Atako basengelaki ‘kotosa bakonzi oyo bazali liboso,’ baklisto oyo bazalaki na nse ya boyangeli ya mokonzi ya nɔrdi bakɔtaki na makambo ya mokili oyo te. (Baloma 13:1; Yoane 18:36) Basalaki na likebi nyonso mpo na kopesa “biloko ya Kaisala na Kaisala,” mpe “biloko ya Nzambe na Nzambe.” (Matai 22:21) Mpo na yango, bosembo na bango etyamaki na komekama.—2 Timote 3:12.
6 Na bongo, baklisto ya solo ‘babɛtaki libaku’ kasi ‘balongaki.’ Babɛtaki libaku mpo banyokwamaki makasi, kino bamosusu kati na bango babomamaki. Kasi balongaki mpamba te mingi kati na bango batikalaki sembo. Balongaki mokili, lokola Yesu alongaki. (Yoane 16:33) Lisusu, batikaki kosakola te, atako bakangamaki na bolɔkɔ to na bakaa ya bakangami. Na kosaláká bongo, ‘balakisaki bato mingi.’ Atako monyoko ezalaki makasi na mikili mingi oyo mokonzi ya nɔrdi azalaki koyangela, motángo ya Batatoli ya Yehova emataki. Bosembo ya ‘bato yango oyo bazali na mayele’ ebimisi litomba: “ebele monene” oyo ezali se kokola ebimaki na mikili yango.—Emoniseli 7:9-14.
BASALELI YA NZAMBE BAPƐTOLAMI
7. ‘Lisungi moke’ oyo baklisto bapakolami bazwaki wana bazalaki na nse na boyangeli ya mokonzi ya nɔrdi ezalaki nini?
7 Anzelu alobaki ete: “Wana [ekobɛta, NW] [basaleli ya Nzambe] [libaku, NW] bakozwa kosunga moke.” (Danyele 11:34a) Lokola mokonzi ya sudi alongaki na etumba ya mibale ya mokili mobimba, yango epesaki mwa bonsomi na baklisto oyo bazalaki kofanda na mikili oyo mokonzi mosusu wana azalaki koyangela. (Kokanisá na Emoniseli 12:15, 16.) Ndenge moko, baoyo banyokwamaki na mokitani ya mokonzi yango bazalaki kozwa mwa bonsomi na bileko mosusu. Lokola kowelana kati na mikili ya nguya (guerre froide) esilaki, bakonzi mingi bayaki koyeba ete baklisto ya sembo bazali kotya boyangeli na bango na likama te, na yango, mibeko ya Leta na mikili yango endimaki mosala na bango. Lisungi eutaki mpe epai ya ebele monene oyo bayambaki malamu nsango oyo batikali bapakolami bazalaki kosakola na bosembo nyonso mpe basalisaki bango na mosala yango.—Matai 25:34-40.
8. Ndenge nini bamoko basanganaki na basaleli ya Nzambe ‘na kokosa’?
8 Bato nyonso oyo basepelaki kosalela Nzambe na eleko ya kowelana kati na mikili ya nguya bazalaki bango nyonso na makanisi ya malamu te. Anzelu akebisaki boye: “Bato mingi bakosangana na bango na kokosa.” (Danyele 11:34b) Bato mingi bazalaki kosepela na mateya ya solo kasi bazalaki kolinga komipesa epai na Nzambe te. Nzokande, bato mosusu oyo bamonisaki ete bandimaki nsango malamu bazalaki solo bato oyo Leta atindaki lokola banɔngi. Lapolo moko oyo eutaki na mokili moko elobaki ete: “Bamoko kati na bato yango oyo bazangi bosembo bazalaki mpenza bakoministe oyo bamikɔtisaki na lisangá ya Nkolo wana bamonisaki molende makasi mpe bazwaki kutu mikumba minene.”
9. Mpo na nini Yehova apesaki nzela ete banɔngi oyo Leta atindaki bákɔta na lisangá ‘bábɛtisa’ baklisto mosusu ya sembo ‘libaku’?
9 Anzelu alobaki lisusu ete: ‘Mpe bamosusu na baoyo na mayele [bakobɛta libaku, NW], ete komekama mpe kopɛtolama ezala kati na bango, mpo na koyeisa bango mpɛmbɛ kino ntango ya nsuka, mpo ete etikali naino kino elaka eponami.’ (Danyele 11:35) Banɔngi yango bakangisaki bamoko kati na bandeko ya sembo epai na bakonzi ya Leta. Yehova atikaki makambo ndenge wana masalema mpo na kosukola mpe kopɛtola basaleli na ye. Ndenge moko Yesu ‘ayekolaki kotosa mpo na mpasi oyo ayokaki,’ na bongo basaleli ya sembo bayebaki koyika mpiko na komekama ya kondima na bango. (Baebele 5:8; Yakobo 1:2, 3; kokanisá na Malaki 3:3.) Na bongo, ‘basukolamaki, bapɛtolamaki mpe bakómaki mpɛmbɛ.’
10. Maloba oyo ete “kino elaka ya nsuka” elimboli nini?
10 Basaleli ya Yehova bakutanaki na makambo oyo ekoki kobɛtisa moto libaku mpe bapɛtolamaki “kino elaka ya nsuka.” Ya solo, bayebi ete kino nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo mabe, bakokutana na minyoko. Nzokande, soki kokɔtela oyo mokonzi ya nɔrdi akɔtelaki basaleli ya Nzambe na makasi esalaki ete bango bámipɛtola mpe báyeisama mpɛmbɛ, yango esalemaki na “ntango eponami.” Na bongo, “ntango na nsuka” oyo elobelami na Danyele 11:35 ezali ntango ya nsuka ya eleko oyo basaleli ya Nzambe basengeli kosukolama wana bazali koyika mpiko liboso na minyoko ya mokonzi ya nɔrdi. Eleko yango oyo bazali kobɛta libaku esukaki mpenza na ntango eponami na Yehova.
MOKONZI AMIKUMISI
11. Anzelu alobaki nini mpo na ezaleli oyo mokonzi ya nɔrdi akozala na yango liboso na bokonzi ya Yehova?
11 Na ntina na mokonzi ya nɔrdi, anzelu alobaki lisusu ete: “Mokonzi akosala mokano na ye; [akomitombola, NW] mpe akomikumisa na koleka banzambe nyonso, mpe [koboyáká kondima bokonzi ya Yehova] akoloba makambo ya kokamwa na ntina na Nzambe ya banzambe. Makambo na ye makobonga kino nsuka ya ntango ya nkɛlɛ, mpo ete oyo ekanami ekosalama. Akokanisa banzambe ya batata na ye te, mpe oyo elingami na basi te; akokanisa nzambe mosusu te mpo ete [akomitombola, NW] na likoló ya banzambe nyonso.”—Danyele 11:36, 37.
12, 13. (a) Ndenge nini mokonzi ya nɔrdi aboyaki “banzambe ya batata na ye”? (b) “Basi” oyo mokonzi ya nɔrdi azali kotalela ‘oyo bango balingi’ te ezali banani? (c) “Nzambe” nini mokonzi ya nɔrdi azali kokumisa?
12 Kokokisáká bisakweli yango, mokonzi ya nɔrdi aboyaki “banzambe ya batata na ye” na ndakisa Bosato ya mangomba ya boklisto. Bikólo ya Kominisme eteyaki bato na yango ete Nzambe azali te. Na bongo, mokonzi ya nɔrdi amikómisaki nzambe, ‘amikumisaki likoló na moto nyonso.’ Lokola atalelaki ata moke te “oyo elingami na basi”—bikólo oyo bizalaki na nse na boyangeli na yango, na ndakisa na ekólo Viêt-nam ya Nɔrdi—asalaki ‘lokola elingaki ye.’
13 Anzelu asakolaki lisusu ete: “Na esika na baoyo akokumisa nzambe na bibombelo na etumba, nzambe oyo batata na ye bayebaki te akokumisa ye na wolo na palata, na mabanga ya motuya mpe na makabo ya motuya.” (Danyele 11:38) Ɛɛ, mokonzi ya nɔrdi azali kotya elikya na ye na bibundeli minene oyo bato ya siansi bazali kobimisa lelo, elingi koloba na “nzambe ya bibombelo ya etumba.” Mokonzi ya nɔrdi azali koluka lobiko epai na “nzambe” yango na kobebisáká mosolo mingi mpenza mpo na bibundeli.
14. Ndenge nini mokonzi ya nɔrdi ‘alongaki’?
14 ‘Akobunda na bibombelo bileki na makasi mpo na lisungi ya nzambe ya bapaya; baoyo bakondima ye [akotombola, NW] bango na lokumu, mpe akozalisa bango bakonzi na likoló ya bato mingi; mpe akokabola mokili mpo na lifuti.’ (Danyele 11:39) Mokonzi ya nɔrdi asili kotya elikya na ye na bibundeli to na “nzambe ya bapaya,” mpe ‘alongi,’ amonisi ete aleki mikili nyonso na nguya na makambo ya bitumba, na “mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:1) Baoyo bazali kondima makanisi na ye, azali kosunga bango na makambo ya politiki, azali kopesa bango mosolo to ntango mosusu mpe mandoki.
“ETUMBA” NA NTANGO YA NSUKA
15. Ndenge nini mokonzi ya sudi ‘abundisaki’ mokonzi ya nɔrdi?
15 Anzelu alobaki na Danyele ete: “Na ntango ya nsuka [mokonzi ya sudi, NW] akosalela ye etumba.” (Danyele 11:40a) Mokonzi ya sudi ‘asili kobunda’ na mokonzi ya nɔrdi na boumeli ya “ntango ya nsuka”? (Danyele 12:4, 9) Ɛɛ, ezali bongo. Nsima ya etumba ya liboso ya mokili mobimba, boyokani ya kimya (Traité de Versailles) oyo bandimisaki mokonzi ya nɔrdi—Allemagne—na makasi, ezalaki bobele lolenge ya ‘kobundisa’ to kotumola ekólo yango. Nsima wana alongaki etumba ya mibale ya mokili mobimba, mokonzi ya sudi atalisaki bibundeli ya nsɔmɔ na ngámbo ya monguna na ye mpe mpo na kotɛmɛla mokonzi ya nɔrdi, asalaki ebongiseli moko ya makasi oyo babéngi OTAN (Organisation du traité de l’Atlantique Nord). Kolobeláká mokumba ya OTAN, nganga-mayele moko ya masolo ya kala, moto ya Grande-Bretagne, alobaki ete: “Ezalaki ebongiseli ya ntina mpenza mpo na ‘kotɛmɛla’ nguya ya Union soviétique na bitumba mpamba te ekólo yango ezalaki kobebisa kimya ya mikili mosusu ya Mpoto. Ebongiseli yango oyo esili koumela mbula 40 ezali kokokisa mokumba na yango malamu.” Wana bambula ezalaki koleka na eleko ya kowelana kati na mikili ya nguya, mokonzi ya nɔrdi ‘abundaki’ na ndenge abongisaki malamumalamu misala ya konɔnga mpe na mbala moko akómaki kotumola bitumba.
16. Mokonzi ya nɔrdi asalaki nini ntango mokonzi ya sudi abundisaki ye?
16 Mokonzi ya nɔrdi asalaki nini? “Nde [mokonzi ya nɔrdi, NW] akokwela ye lokola mopɛpɛ makasi, na makalo mpe bato na mbalata mpe na masuwa mingi; mpe akokɔta mikili mpe akopalangana mpe akoleka na kati.” (Danyele 11:40b) Esili komonana na mikolo oyo ya nsuka ete, mokonzi ya nɔrdi azali mpenza na mokano ya kopalanganisa bokonzi na ye. Na boumeli ya etumba ya mibale ya mokili mobimba, “mokonzi” ya Banazi akatisaki bandelo ya mboka na ye na ebele na basoda mpo na kokɔta na mikili ya zingazinga. Na nsuka ya etumba yango, mokitani ya “mokonzi” yango atɛlɛmisaki bokonzi moko ya nguya. Na boumeli ya eleko ya kowelana kati na mikili ya nguya, mokonzi ya nɔrdi abundaki na monguna na ye wana azalaki kokɔta na bitumba mpe matata kati na bikólo ya Afrika, na Azia, na Amérique latine. Mokonzi ya nɔrdi anyokolaki baklisto ya solo, apekisaki—kasi alongaki te kosukisa—mosala na bango ya kosakola. Bitumba na ye mpe matumoli na ye na makambo ya politiki esalaki ete mokonzi ya nɔrdi ayangela mikili mingi. Yango ezali mpenza oyo anzelu asakolaki ete: “Ye akokɔta na mokili kitoko [paladiso ya elimo ya basaleli ya Yehova], mpe nkóto nkóto [bakobɛta libaku, NW].”—Danyele 11:41a.
17. Bamboka nini mokonzi ya nɔrdi akokaki kolonga te ntango azalaki kopalanganisa mokano na ye na makambo ya politiki na mikili mosusu?
17 Atako bongo, mokonzi ya nɔrdi akolonga koyangela mokili mobimba te. Anzelu asakolaki ete: “Baoyo bakobika na lobɔkɔ na ye ete, Edome mpe Moaba mpe [batikali] na Baamona.” (Danyele 11:41b) Na ntango ya kala, Edome, Moaba na Amona eyangelamaki na Ezipito, mokonzi ya sudi, mpe na Sulia, mokonzi ya nɔrdi. Na ntango na biso, mikili yango ezali elilingi ya bikólo to bibongiseli oyo mokonzi ya nɔrdi atyaki miso kasi akokaki koyangela yango te.
EZIPITO EKOKIMA TE
18, 19. Ndenge nini mokonzi ya sudi ayokaki bopusi ya monguna na ye?
18 Anzelu ya Yehova alobaki lisusu ete: “Ye [mokonzi ya nɔrdi] akosembola lobɔkɔ na ye na likoló na mikili mosusu, mpe mokili ya Ezipito ekokima te. Ye akozala na nguya na likoló na misolo ya wolo mpe ya palata, mpe na biloko na motuya nyonso na Ezipito; mpe [bato ya Libye, NW] mpe Baetiopia [bakolanda] ye.” (Danyele 11:42, 43) Ebongiseli ya kopalanganisa bokonzi ya mokonzi ya nɔrdi ekɔtaki ata na mikili oyo ezalaki na nse ya boyangeli ya mokonzi ya sudi, “Ezipito.” Na ndakisa, mokonzi ya sudi anyokwamaki na etumba ya Viêt-nam. Mpe ezalaki boni mpo na “bato ya Libye mpe Baetiopia”? Mikili yango oyo mizalaki na zingazinga ya Ezipito na ntango ya kala ekoki kozala elilingi ya bamboka oyo ezali lelo oyo zingazinga na “Ezipito” (mokonzi ya sudi) na ntango na biso. Na bantango mosusu, mikili yango ezalaki kolanda—‘matambe ya’—mokonzi ya nɔrdi.
19 Mokonzi ya nɔrdi azalaki na bokonzi likoló na ‘bozwi ya Ezipito’? Ɛɛ, azalaki na likambo ya koloba na lolenge oyo mokonzi ya sudi azalaki kosalela mosolo na ye. Mpamba te lokola azali ntango nyonso kobanga monguna na ye, mokonzi ya sudi azali kobungisa mbongo mingi mpenza mpo basoda bázala na mandoki ya makasi, masuwa mpe mpɛpo ya nguya koleka. Ezali na lolenge wana nde mokonzi ya nɔrdi ‘azali koyangela’ to kotalela lolenge mokonzi ya sudi azali kosalela bozwi na ye.
ETUMBA YA NSUKA
20. Ndenge nini anzelu alobeli etumba ya nsuka oyo mokonzi ya nɔrdi akosala?
20 Kowelana kati na mokonzi ya nɔrdi na mokonzi ya sudi—ezala na bitumba, na nkita to na makambo mosusu—ekómi pene na nsuka na yango. Kolimboláká na bozindo kowelana yango oyo esengeli kosalema na mikolo mikoya, anzelu ya Yehova alobaki ete: “Nsango [euti epai moi ebimaka mpe na nɔrdi, NW] ekobangisa ye [mokonzi ya nɔrdi], mpe akobima na nkɛlɛ monene mpo na koboma mingi mpe kobebisa nyɛ. Mpe akotɛlɛmisa hema minene na ye na kati ya mai monene mpe ngomba ya kitoko mpe ya bulɛɛ; mpe akokóma na nsuka na ye, mpe moto akosunga ye te.”—Danyele 11:44, 45.
21. Makambo nini matali mokonzi ya nɔrdi tozali kozela koyeba?
21 Bokabwani ya Union soviétique na Desɛmbɛ 1991 ezongisaki mpenza mokonzi ya nɔrdi nsima. Nani akozala mokonzi ya nɔrdi ntango esakweli ya Danyele 11:44, 45 ekokokisama? Mokonzi yango akomonisama na moko na bikólo oyo bizalaki kala na Union soviétique? To mokonzi yango ekozala ekólo mosusu oyo ekeseni mpenza, lokola mpe mokonzi yango abongwanaka mbala na mbala? Lokola bamboka mosusu ebakisami na molɔngɔ ya bamboka oyo esalaka bibundeli minene, yango elimboli ete ekozala mpasi mpo tóyeba mokonzi yango? Tokozwa biyano ya sikisiki na mituna oyo na mikolo mizali koya. Ebongi te tópesa biyano na makanisi na biso moko. Ntango mokonzi ya nɔrdi akomibwaka na etumba ya nsuka, baoyo bazali na mayele mauti na Biblia bakososola malamumalamu esakweli yango ntango ekokokisama.—Talá etanda oyo elobi ete “Bakonzi oyo balobelami na Danyele mokapo 11,” na lokasa 284.
22. Mituna nini ebongi komituna na ntina na etumba ya nsuka oyo mokonzi ya nɔrdi akosala?
22 Nzokande, toyebi te likambo nini mokonzi ya nɔrdi akosala na nsima ya mwa mikolo. Ntango akoyoka nsango ‘oyo ekouta epai moi ebimaka mpe na nɔrdi,’ akokenda na etumba ‘mpo na koboma bato mingi.’ Kasi akobunda na nani? “Nsango” nini ekopusa ye na etumba ya motindo wana?
NSANGO YA MABE ETUNGISI YE
23. (a) Likambo nini ya kokamwa mpenza esengeli kosalema liboso ya etumba ya Armagedon? (b) ‘Bakonzi oyo bauti epai moi ebimaka’ ezali banani?
23 Tótalela oyo mokanda ya Emoniseli ezali koloba mpo na kokweya ya Babilone Monene to lisangani ya mangomba ya lokuta na mokili. Liboso ete Armagedon eya, elingi koloba “etumba ya mokolo yango monene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso,” monguna yango monene ya losambo ya solo ‘akozikisama mobimba na mɔ́tɔ.’ (Emoniseli 16:14, 16; 18:2-8) Kosopama ya mbɛki ya motoba ya nkanda ya Nzambe na Ebale Pelata ezali elilingi ya lolenge Babilone Monene ekobomama. Ebale yango ekokauka mpo ete “nzela ebongisama mpo na bakonzi [oyo bakouta epai moi ebimaka, NW].” (Emoniseli 16:12) Bakonzi yango ezali banani? Ezali bakonzi mosusu te bobele Yehova Nzambe na Yesu Klisto!—Kokanisá na Yisaya 41:2; 46:10, 11.
24. Likambo nini Yehova akosala oyo ekotungisa mokonzi ya nɔrdi?
24 Kobebisama ya Babilone Monene eyebisamaki polele na mokanda ya Emoniseli ete: “Maseke zomi mamonaki yo [bakonzi oyo bazali koyangela na ntango ya nsuka], bango mpe Nyama [ONU] bakoyina mwasi ya pite, bakobebisa ye, mpe bakozalisa ye bolumbu; bakolya mosuni na ye, mpe bakotumba ye na mɔ́tɔ.” (Emoniseli 17:16) Mpo na nini bakonzi bakoboma Babilone Monene ndenge wana? Mpamba te ‘Nzambe atii likanisi na ye na mitema na bango mpo bákokisa mokano na ye.’ (Emoniseli 17:17) Mokonzi ya nɔrdi mpe akozala kati na bakonzi yango. Oyo ye ayoki ‘epai moi ebimaka’ ezali mpenza likanisi ya Yehova oyo atii na mitema ya bakonzi mpo ete báboma mwasi yango, mama ya pite na makambo ya losambo.
25. (a) Banani mpenza mokonzi ya nɔrdi alingi konyokola? (b) Epai wapi mokonzi ya nɔrdi “akotɛmisa hema minene na ye”?
25 Kasi ezali mpenza na likambo moko ya sikisiki oyo ezali kongalisa nkanda ya mokonzi ya nɔrdi. Anzelu alobi ete, “akotɛlɛmisa hema minene na ye na kati ya mai monene mpe ngomba ya kitoko mpe ya bulɛɛ.” Na mikolo ya Danyele, mai monene ezalaki Mer Méditerranée mpe ngomba ya bulɛɛ ezalaki Ngomba Siona, esika oyo tempelo ya Nzambe ezalaki. Na bongo, ntango esakweli ezali kokokisama, mokonzi ya nɔrdi atondi na nkanda mpe azali mpenza kobundisa basaleli ya Nzambe. Na elobeli ya elimo, esika oyo ebéngami ‘katikati ya mai monene na ngomba ya bulɛɛ’ ezali elilingi ya paladiso ya elimo oyo basaleli ya Yehova bapakolami bazali na yango. Bauti na “mai monene,” elingi koloba babimi na mokili oyo etangolami na Nzambe mpe basaleli yango bazali na elikya ya koyangela elongo na Yesu Klisto na Ngomba Siona na likoló.—Yisaya 57:20; Baebele 12:22; Emoniseli 14:1.
26. Lokola esakweli ya Ezekiele emonisaki yango, nsango “na nɔrdi” ekouta wapi?
26 Mosakoli Ezekiele, ye oyo azalaki na bomoi na eleko ya mosakoli Danyele, asakolaki mpe monyoko oyo ekokwela basaleli ya Nzambe “na mikolo ya nsuka.” Amonisaki mpe mobandisi ya minyoko yango, Gog ya Magog to Satana Zabolo. (Ezekiele 38:14, 16) Na elilingi, epai wapi Gog akouta? Akouta “na nɔrdi,” lokola Yehova alobaki yango na monɔkɔ ya mosakoli Ezekiele. (Ezekiele 38:15, NW) Nzokande, atako minyoko yango ekozala makasi mpenza, ekosilisa basaleli ya Yehova te. Kutu monyoko yango ekozala nde libaku oyo Yehova akosalela mpo na komibongisa mpe koboma mampinga ya Gog. Yango wana, Yehova alobaki na Satana ete: “. . . Nakotya ndɔbɔ na mbanga na yo, mpe nakobimisa yo.” “. . . Nakobimisa yo na nsuka ya mokili epai na [nɔrdi, NW]; mpe nakokamba yo na likoló ya [ngomba, NW] ya Yisalaele.” (Ezekiele 38:4; 39:2) Nsango “euti na nɔrdi” oyo ezali kopesa mokonzi ya nɔrdi nkanda makasi, esengeli bongo kouta epai na Yehova. Kasi, mpo na koyeba soki nsango yango ‘oyo euti epai moi ebimaka mpe na nɔrdi’ ezali mpenza nsango nini, bobele Nzambe nde akoyebisa biso na ntango oyo ye moko asili kokana.
27. (a) Mpo na nini Gog akopusa bikólo, ezala mokonzi ya nɔrdi, mpo na kobundisa basaleli ya Yehova? (b) Ndenge nini etumba ya Gog ekosuka?
27 Nzokande, Gog azali kobongisa etumba monene oyo ya nsuka mpo ete azali na likunya na bozwi ya elimo ya “Yisalaele ya Nzambe,” oyo, elongo na baninga na bango “ebele monene” ya “bampate mosusu,” batiká kosangana na makambo ya mokili. (Bagalatia 6:16; Emoniseli 7:9; Yoane 10:16; 17:15, 16; 1 Yoane 5:19) Gog azali kotala na miso mabe “bato oyo balongwaki na mabota, baoyo bazwi bibwɛlɛ mpe biloko [ya elimo].” (Ezekiele 38:12) Lokola azali komona ete paladiso ya elimo oyo baklisto bapakolami bazali na yango ezali mpenza ‘mboka oyo ezali na bifelo te,’ oyo bakoki kobɔtɔla na bolɛmbu nyonso, Gog azali kosangisa nguya na ye nyonso mpo na kolongola bato yango oyo bazali kopekisa ye kotya mokili mobimba na nse ya bokonzi na ye. Kasi akolonga te. (Ezekiele 38:11, 18; 39:4) Ntango bakonzi ya mokili, na mokonzi ya nɔrdi, bakobundisa basaleli ya Yehova, ‘bakokóma na nsuka na bango.’
‘MOKONZI AKOBOMAMA’
28. Nini ekokómela mokonzi ya nɔrdi na mokonzi ya sudi na mikolo mikoya?
28 Etumba ya nsuka oyo mokonzi ya nɔrdi akobunda, ekozala ye na mokonzi ya sudi te. Na bongo, mokonzi ya nɔrdi akobomama te na monguna na ye monene. Ndenge moko, mokonzi ya sudi akobomama mpe na mokonzi ya nɔrdi te. Bokonzi ya Nzambe nde ekoboma mokonzi ya sudi “kasi lobɔkɔ ya [moto] te.”a (Danyele 8:25) Ɛɛ, na etumba ya Armagedon, Bokonzi ya Nzambe ekolongola bakonzi nyonso oyo bazali na mabelé, mpe na ntembe te, wana ezali likama oyo ekokómela mpe mokonzi ya nɔrdi. (Danyele 2:44) Danyele 11:44, 45 eyebisi makambo oyo makomema na etumba yango ya nsuka. Tokoki kokamwa te ete ‘mosungi akozala te’ mpo na kosalisa mokonzi ya nɔrdi ntango akokóma na nsuka!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá mokapo 10 ya buku oyo.
MAKAMBO NINI OKANGI NTINA?
• Ndenge nini mokonzi ya nɔrdi abongwanaki nsima ya etumba ya mibale ya mokili mobimba?
• Nsukansuka nini ekokómela mokonzi ya nɔrdi na mokonzi ya sudi?
• Litomba nini ozwi na likebi oyo otii na esakweli ya Danyele oyo elobeli kowelana kati na bakonzi yango mibale?
[Etanda/Elilingi na lokasa 284]
BAKONZI OYO BALOBELAMI NA DANYELE MOKAPO 11
Mokonzi Mokonzi
ya Nɔrdi ya Sudi
Danyele 11:5 Séleucus I Nicator Ptolémée I
Danyele 11:6 Antiochus II Ptolémée II
(mwasi Laodice) (mwana mwasi Bérénice)
Danyele 11:7-9 Séleucus II Ptolémée III
Danyele 11:10-12 Antiochus III Ptolémée IV
Danyele 11:13-19 Antiochus III Ptolémée V
(mwana mwasi Cléopâtre I) Mokitani: Ptolémée VI
Bakitani:
Séleucus IV mpe
Antiochus IV
Danyele 11:20 Augusite
Danyele 11:21-24 Tibɛli
Danyele 11:27-30a Bokonzi ya Allemagne Gde-Bretagne, na nsima
(Etumba ya Liboso ya mokili mobimba) États-Unis na Angleterre,
nguya ya mokili mobimba
Danyele 11:30b, 31 Bokonzi ya misato, ya Hitler États-Unis na
(Etumba ya Mibale ya mokili mobimba) Angleterre,
nguya ya mokili mobimba
Danyele 11:32-43 Bikólo ya Kominisme États-Unis na Angleterre,
(Kowelana kati na mikili ya nguya) nguya ya mokili mobimba
Danyele 11:44, 45 Ekomatab États-Unis na Angleterre,
nguya ya mokili mobimba
[Maloba na nse ya lokasa]
b Esakweli oyo ezwami na Danyele mokapo 11 ezali koyebisa te bankombo ya bikólo oyo bikozwa esika ya mokonzi ya nɔrdi to ya mokonzi ya sudi na ntango moko to mosusu. Bikólo yango bizali koyebana se ntango yango ebandi kokokisa makambo oyo mayebisamaki. Lisusu, lokola kowelana yango ezali kosalema ntango nyonso te, ezali na bantango mosusu oyo matata ezali te—na bongo mokonzi moko akomata wana mosusu akokita.
[Elilingi na lokasa mobimba 271]
[Bililingi na lokasa 279]
“Etumba” ya mokonzi ya sudi elimboli konɔnga mpe makaneli ya bitumba