Mokapo ya zomi na nsambo
Ndenge ya koyeba basambeli ya solo na ntango ya nsuka
1. Na kotalela mokanda ya Danyele mokapo ya 7, makambo nini ya kokamwa esengelaki kokómela etuluku moke ya bato oyo bazali na libateli te na mikolo na biso?
BOYANGELI moko oyo eleki nguya na mokili mobimba enyokoli etuluku moke ya bato oyo bazali na libateli te. Kasi bato yango babiki na minyoko wana mpe bakómi na kimya—mpo na makasi na bango moko te kasi mpo na bolingo ya Yehova Nzambe. Mokapo 7 ya mokanda ya Danyele esakolaki makambo yango, oyo masalemaki na ebandeli ya ekeke ya 20. Bato yango bazalaki banani? Mokapo yango ya mokanda ya Danyele ebéngi bango “bato na bulɛɛ na Oyo-Aleki-Likoló,” Yehova Nzambe. Mokanda yango mpe emonisi ete nsukansuka bato yango bakoyangela elongo na Masiya na Bokonzi na ye!—Danyele 7:13, 14, 18, 21, 22, 25-27.
2. (a) Mayoki nini Yehova azalaka na yango mpo na basaleli na ye bapakolami? (b) Na mikolo oyo, ezali malamu kolanda nzela nini?
2 Lokola tosili komona yango na mokapo ya 11 ya mokanda ya Danyele, mokonzi ya nɔrdi akobomama atako akanaki kobebisa kimya ya elimo ya bato ya sembo. (Danyele 11:45; kokanisá na Ezekiele 38:18-23.) Yehova abatelaka bapakolami na ye ya sembo. Nzembo 105:14, 15 eyebisi biso ete: “[Yehova] apamelaki mikonzi mpenza mpo na bango. Alobaki ete, [Bósimba, NW] bapakolami na ngai soko moke te mpe [bósalela, NW] basakoli na ngai likambo mabe te.” Omoni te ete na ntango oyo ya mpasi, ezali malamu ete “ebele monene” oyo ezali se kobakisama bázala baninga mpenza ya bato yango ya bulɛɛ? (Emoniseli 7:9; Zekalia 8:23) Yesu Klisto asɛngaki na bato wana oyo bazali lokola bampate ete básalaka bongo—bázalaka esika moko na bandeko na ye ya elimo bapakolami mpe básalisaka bango na mosala na bango.—Matai 25:31-46; Bagalatia 3:29.
3. (a) Mpo na nini ezali mpasi koyeba bayekoli bapakolami ya Yesu mpe kokangama na bango? (b) Ndenge nini mokapo 12 ya mokanda ya Danyele ekoki kosalisa biso na likambo oyo?
3 Nzokande, Satana, monguna ya Nzambe, azali kobunda na bapakolami etumba monene. Azali kopalanganisa losambo ya lokuta na kotondisáká mokili na baklisto ya lokuta. Na bongo, bato mingi bazali kokosama. Basusu bazali lisusu na elikya te ete bakoki komona basambeli ya solo. (Matai 7:15, 21-23; Emoniseli 12:9, 17) Ata baoyo basili kokutana na “etonga moke” mpe bazali kosangana na bango, basengeli mpe kosala makasi mpo na kobatela kondima na bango, mpamba te mokili oyo ezali ntango nyonso koluka kobebisa kondima ya bato. (Luka 12:32) Ezali boni mpo na yo? Osili kokutana na “bato na bulɛɛ na Oyo-Aleki-Likoló,” mpe ozali kosangana elongo na bango? Ozali na bilembeteli ya solosolo oyo ezali mpenza kondimisa yo ete bato yango baponami na Nzambe? Bilembeteli motindo wana ekolendisa kondima na yo. Ekoki mpe kosalisa yo mpo osunga basusu bámona mobulungano oyo ezali na makambo ya losambo na mokili lelo. Mokapo ya 12 ya mokanda ya Danyele etondi na makambo oyo tosengeli koyeba mpo na kozwa bomoi.
MOKONZI MONENE ATƐLƐMI
4. (a) Wapi makambo mibale oyo Danyele 12:1 esakolaki mpo na Mikaele? (b) Na mokanda ya Danyele, “etɛlɛmɛlo” ya mokonzi elimboli mpenzampenza nini?
4 Na Danyele 12:1 (NW), tozali kotánga ete: “Na boumeli ya ntango yango, Mikaele akotɛlɛma, mokonzi monene oyo atɛlɛmi mpo na bolamu ya bato na yo.” Vɛrsɛ oyo ezali kolobela makambo mibale oyo Mikaele azali kosala: ya liboso, “atɛlɛmi,” yango emonisi likambo moko oyo ezali kosalema na boumeli ya eleko moko; ya mibale, “akotɛlɛma,” yango emonisi ete likambo moko ekosalema na boumeli ya eleko yango. Libosoliboso, tolingi koyeba eleko yango oyo Mikaele “atɛlɛmi mpo na bolamu ya bato ya [Danyele].” Tóbosana te ete Mikaele ezali nkombo ya Yesu na mokumba na ye lokola Moyangeli na likoló. “Kotɛlɛma” na ye ezali kokundwela biso lolenge liloba yango esalelami na mikapo mosusu ya mokanda ya Danyele. Mingimingi, liloba yango emonisaka likambo moko oyo mokonzi asali, na ndakisa kozwa bokonzi.—Danyele 11:2-4, 7, 20, 21.
5, 6. (a) Na boumeli ya ntango nini Mikaele atɛlɛmi? (b) Ntango nini mpe ndenge nini Mikaele “akotɛlɛma” mpe yango ekobimisa nini?
5 Emonani ete anzelu azalaki kolobela eleko moko oyo eyebisamaki sikisiki na esakweli mosusu ya Biblia. Yesu abéngaki eleko yango, “kozala” na ye (na Greke, parousia), ntango akoyangela lokola Mokonzi na likoló. (Matai 24:37-39, NW) Eleko yango ebéngami mpe “mikolo ya nsuka” to “ntango ya nsuka.” (2 Timote 3:1, NW; Danyele 12:4, 9, NW) Banda 1914, Mikaele asili kotɛlɛma lokola Mokonzi mpe ezalaki na mbula yango nde eleko wana ebandaki.—Kokanisá na Yisaya 11:10; Emoniseli 12:7-9.
6 Bongo, ntango nini Mikaele “akotɛlɛma”? Ntango akosala likambo moko ya sikisiki. Yesu akosala likambo yango na mikolo mikoya. Na elobeli ya esakweli, Emoniseli 19:11-16 eyebisaki ete Yesu akotɛlɛma lokola Masiya, Mokonzi ya nguya, akotambwisa mampinga ya baanzelu mpe akoboma banguna ya Nzambe. Tozali kotánga lisusu na Danyele 12:1 ete: “Mpe ntango na bolɔzi ekozala, lokola ezalaki te longwa na ebandeli na mabota kino ntango yango.” Lokola Yehova aponi ye mpo na koboma banguna na ye, Klisto akoboma ebongiseli mabe ya biloko ya ntango oyo na boumeli ya “bolɔzi monene” oyo elakamaki.—Matai 24:21, NW; Yilimia 25:33; 2 Batesaloniki 1:6-8; Emoniseli 7:14; 16:14, 16.
7. (a) Elikya nini bato nyonso ya sembo bakozala na yango na boumeli ya “ntango ya bolɔzi” oyo ezali koya? (b) Mokanda ya Yehova ezali nini, mpe mpo na nini ezali malamu ete nkombo ya moto ekomama na kati ya mokanda yango?
7 Bato oyo bazali komonisa kondima basengeli kosala nini na ntango mabe oyo? Bayebisaki lisusu mosakoli Danyele ete: “Nde na ntango yango bato na yo bakobikisama, moto na moto oyo akomami na mokanda.” (Kokanisá na Luka 21:34-36.) Mokanda yango ezali nini? Na mokuse, ezali komonisa ndenge Yehova Nzambe atalelaka bato oyo basalaka mokano na ye. (Malaki 3:16; Baebele 6:10) Baoyo nkombo na bango ekomami na mokanda yango ya bomoi bazali kobatelama koleka bato nyonso na mokili, mpamba te Nzambe ye moko azali kobatela bango. Ezala likama nini oyo ekoki kokwela bango, yango ekoki kolongolama mpe ekolongolama solo. Atako bamoko kati na bango bakoki kokufa liboso ete “ntango na bolɔzi” eya, Yehova ayebi bango na makanisi na ye. Akokanisa bango mpe akosekwisa bango na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Yesu Klisto.—Misala 24:15; Emoniseli 20:4-6.
BATO NA BULƐƐ ‘BALAMUKI’
8. Wapi elikya ya malamu oyo elobelami na Danyele 12:2?
8 Elikya ya lisekwa ebɔndisaka. Danyele 12:2 elobeli yango na maloba oyo: “Mingi na baoyo balali na kati na mputulu na mokili [bakolamuka, NW], bamosusu [mpo] na bomoi ya lobiko na lobiko, mpe bamosusu [mpo] na nsɔni mpe kotyolama ya lobiko na lobiko.” (Kokanisá na Yisaya 26:19.) Maloba oyo mazali mpenza kokundwela biso elikya ya lisekwa oyo Yesu Klisto alobaki mpo na bato nyonso. (Yoane 5:28, 29) Oyo nde elikya malamu! Kanisá naino ete baninga mpe bandeko oyo ozalaki kolinga—oyo bakufá—bazwi libaku ya kozonga lisusu na bomoi na mikolo mikoya! Kasi elikya oyo ezwami na mokanda ya Danyele ezali kolobela libosoliboso lolenge mosusu ya lisekwa—oyo esilá kosalema. Ndenge nini esalemaki?
9. (a) Mpo na nini ebongi kolikya ete Danyele 12:2 ekokisama na boumeli ya mikolo oyo ya nsuka? (b) Esakweli yango ezali kolobela lisekwa ya lolenge nini, mpe ndenge nini toyebi yango?
9 Tótalela vɛrsɛ yango na mozindo. Lokola touti komona yango, vɛrsɛ ya liboso ya mokapo 12 ezali kolobela bobele nsuka ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo te kasi mpe eleko ya mikolo ya nsuka na mobimba na yango. Ya solo, bavɛrsɛ mingi ya mokapo oyo ekokokisama te ntango paladiso ekosalema awa na mabelé kasi ezali kokokisama nde na ntango oyo ya nsuka. Bongo lisekwa esili kosalema na ntango oyo? Mpo na lisekwa ya “baoyo bazali kati na Klisto,” ntoma Paulo akomaki ete yango ekosalema na eleko ya “kozala na ye.” Kasi, baoyo bazali kosekwa mpo na bomoi na likoló bazali kolamuka na likoki ya “kozanga kopɔla.” (1 Bakolinti 15:23, 52) Moko te kati na bango azali kosekwa “mpo na nsɔni mpe kotyolama ya lobiko na lobiko” lokola yango esakolamaki na Danyele 12:2. Lisekwa ya ndenge mosusu ezali? Na Biblia, ntango mosusu lisekwa elobelamaka na lolenge ya elilingi. Na ndakisa, mokanda ya Ezekiele mpe ya Emoniseli ezali na maloba ya esakweli oyo ezali komonisa ete kolamuka na elimo ezali lokola kosekwa.—Ezekiele 37:1-14; Emoniseli 11:3, 7, 11.
10. (a) Na ndenge nini batikali bapakolami balamuki na elimo na ntango ya nsuka? (b) Ndenge nini bapakolami mosusu balamukaki na elimo bobele ‘mpo na nsɔni mpe kotyolama lobiko na lobiko’?
10 Basaleli ya Nzambe bapakolami basili kolamuka na elimo na ntango oyo ya nsuka? Ɛɛ! Na 1918, etuluku moke ya batikali baklisto ya sembo bazwaki minyoko makasi oyo ebebisaki mpenza mosala na bango ya kosakola oyo bazalaki kosala na bonsomi nyonso liboso na bato. Kasi na 1919, bazongaki na bomoi na elimo mpe likambo yango ekamwisaki mpenza bato. Makambo oyo mazali na boyokani na lisekwa oyo esakolamaki na Danyele 12:2. Basusu ‘balamukaki’ na elimo na ntango yango to na nsima. Nzokande, ezali mawa mingi ete bango nyonso te nde batikalaki na bomoi na elimo. Bamoko kati na bango, nsima ya kolamuka na elimo, baboyaki lisusu Masiya Mokonzi mpe batikaki mosala ya Nzambe. Bayokisamaki bongo ‘nsɔni mpe batyolamaki bileko na bileko,’ lokola yango esakolamaki na Danyele 12:2. (Baebele 6:4-6) Nzokande, mpo na kosalela malamu ntango na bango, lokola bautaki kolamwisama na elimo, bapakolami ya sembo basimbaki Masiya Mokonzi na bosembo nyonso. Nsukansuka, bosembo na bango ekomemela bango “bomoi ya lobiko na lobiko,” lokola esakweli elobaki yango. Bazali komonisa lelo oyo liboso ya botɛmɛli ete, bazali mpenza bato ya elimo mpe yango ezali elembeteli oyo ezali kosalisa biso tóyeba bango.
‘BAZALI KONGƐNGA LOKOLA MINZOTO’
11. ‘Bato oyo bazali na mayele’ ezali banani lelo oyo, mpe ndenge nini bazali kongɛnga lokola minzoto?
11 Bavɛrsɛ mibale oyo elandi ya mokapo 12 ya mokanda ya Danyele esungi biso lisusu mpo tóyeba “bato na bulɛɛ na Oyo-Aleki-Likoló.” Na vɛrsɛ ya misato, anzelu alobaki na mosakoli Danyele ete: “Baoyo bazali na mayele bakongɛnga lokola nkembo na likoló, mpe baoyo babongoli bato mingi epai na boyengebene, lokola minzoto lobiko na lobiko.” Lelo oyo, “baoyo bazali na mayele” ezali banani? Emonani lisusu ete ezali bobele “bato na bulɛɛ na Oyo-Aleki-Likoló.” Soki totali malamu, longola batikali bapakolami bato na sembo, banani mosusu bazalaki na mayele mpo na kososola ete Mikaele, Mokonzi Monene, atɛlɛmaki lokola Mokonzi na 1914? Na koteyáká mateya ya solo lokola oyo—mpe lisusu na kobateláká etamboli na bango ya baklisto—basili “kongɛnga lokola miinda” kati na mokili mabe oyo. (Bafilipi 2:15; Yoane 8:12) Na ntina na bango, Yesu asakolaki ete: “Bayengebene bakongɛnga lokola moi kati na Bokonzi ya Tata na bango.”—Matai 13:43.
12. (a) Na ntango ya nsuka, ndenge nini bapakolami ‘bazali kokómisa bato mingi bayengebene’? (b) Ndenge nini bapakolami bakokómisa bato mingi bayengebene mpe ‘bakongɛnga lokola minzoto’ na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto?
12 Danyele 12:3 eyebisi biso mosala oyo baklisto bapakolami yango bakosala na ntango ya nsuka. ‘Bakokómisa bato mingi bayengebene.’ Batikali bapakolami basili koyanganisa bato oyo batikalaki mpo na kokokisa motángo ya basangoli na libula elongo na Klisto 144 000. (Baloma 8:16, 17; Emoniseli 7:3, 4) Ntango mosala yango ekómaki na nsuka—na katikati ya bambula ya 1930—babandaki koyanganisa “ebele monene” ya “bampate mosusu.” (Emoniseli 7:9; Yoane 10:16) Bango mpe bazali komonisa kondima na mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto. Na bongo, bazali pɛto na miso ya Yehova. Lelo oyo, bazali bamilio mpe bazali kosepela na elikya ete bakobika na libebi oyo ezali koya mpo na mokili mabe oyo. Na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Yesu Klisto, ye na baninga na ye bakonzi mpe banganga 144 000 bakosalela matomba nyonso ya lisiko mpo na bolamu ya bato yango ya botosi oyo bakozala na mabelé. Bakolongola litɔnɔ nyonso ya lisumu ya Adama epai na baoyo nyonso bakomonisa kondima. (2 Petelo 3:13; Emoniseli 7:13, 14; 20:5, 6) Na bongo, na lolenge ya kokoka, bapakolami ‘bakokómisa bato mingi bayengebene’ mpe ‘bakongɛnga lokola minzoto’ na likoló. Ozali komona ntina ya elikya ya bomoi awa na mabelé ntango ekoyangelama na Bokonzi ya nkembo ya Yesu Klisto na likoló elongo na bato oyo bakoyangela na ye esika moko? Oyo nde libaku malamu ya kosakola, elongo na “bato na bulɛɛ,” nsango malamu yango ya Bokonzi ya Nzambe!—Matai 24:14.
“BAKOLUKA BIPAI NA BIPAI”
13. Na ndimbola nini maloba ya mokanda ya Danyele makangamaki mpe mabombamaki?
13 Banda Danyele 10:20, anzelu abandaki koloba na mosakoli Danyele mpe mpo na kosukisa, abimisaki maloba oyo ezali kosimba motema, ye ete: “Nde yo, Danyele, zipá maloba mpe kangá mokanda na elembo, kino elaka na nsuka. Bato mingi [bakoluka, NW] bipai na bipai, mpe boyebi ekofuluka.” (Danyele 12:4) Makambo mingi oyo mosakoli Danyele akomaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe ezalaki mabombami mpe ekangamaki mpo moto moko te ayeba yango. Kutu, mosakoli Danyele ye moko akomaki na nsima ete: “Nayokaki yango, nde nasosolaki te.” (Danyele 12:8) Na bongo, mokanda ya Danyele ekangamaki na boumeli ya bikeke. Ezali mpe bongo lelo?
14. (a) Na “ntango ya nsuka,” banani ‘bazali kolukaluka,’ mpe bazali kolukaluka epai wapi? (b) Elembeteli nini emonisi ete Yehova azali kopambola ‘bolukiluki’ yango?
14 Tozali na libaku malamu ya kozala na bomoi “na ntango ya nsuka” oyo mokanda ya Danyele esilaki kosakola. Lokola esakolamaki, ebele ya bato ya sembo ‘bazali koluka bipai na bipai’ kati na Liloba ya Nzambe. Litomba nini basili kozwa? Batondi na boyebi ya solo mpo Yehova asili kopambola bango. Batatoli ya Yehova oyo bazali bapakolami ya sembo basili kopambolama na kozwáká bososoli oyo esalisi bango báyeba ete Mwana ya moto akómaki Mokonzi na 1914, báyeba ndimbola ya banyama ya esakweli ya Danyele mpe bákeba na “eloko ya mbindo oyo ezali koyeisa libebi”—wana ezali bobele mwa bandakisa. (Danyele 11:31, NW) Boyebi mingi yango ezali mpe elembeteli mosusu oyo ezali komonisa “bato na bulɛɛ na Oyo-Aleki-Likoló.” Kasi mosakoli Danyele azwaki bilembeteli mosusu.
‘BAKOPANZANA’
15. Motuna nini anzelu atunaki, mpe yango ekundweli biso nani?
15 Tóbosana te ete mosakoli Danyele azwaki nsango oyo ya anzelu ntango azalaki na bokula ya “ebale monene” Hidekele, oyo ebéngami mpe Tigre. (Danyele 10:4) Kuna, amonaki baanzelu misato mpe alobaki ete: “Na nsima, ngai, Danyele, natalaki mpe talá, mibale mosusu batɛlɛmaki, moko na libongo oyo mpe moko na libongo yango na ebale. Mpe moko na bango alobelaki moto oyo alataki molikani, oyo atɛlɛmaki na likoló na mai na ebale, ete, Ekozala ntango molai boni kino nsuka na bikamwiseli oyo?” (Danyele 12:5, 6) Motuna oyo anzelu atunaki ekoki kotinda biso tózongisa lisusu makanisi epai na “bato na bulɛɛ na Oyo-Aleki-Likoló.” Na ebandeli ya “ntango ya nsuka,” na 1914, bamitungisaki mingi mpo na koyeba mbula boni bakozela kino bilaka ya Nzambe bikokokisama. Eyano na motuna oyo emonisi ete esakweli yango etalelaki mpenza bato na bulɛɛ.
16. Esakweli nini anzelu asakolaki, mpe ndenge nini amonisaki mpenza ete esakweli yango ekokokisama?
16 Mosakoli Danyele akobi na lisolo na ye ete: “Mpe nayokaki oyo elobaki moto yango alataki molikani mpe atɛlɛmaki na likoló na mai na ebale. Atombolaki lobɔkɔ na ye ya mobali mpe lobɔkɔ na ye ya mwasi epai na lola mpe [alapaki] ndai na nkombo na ye oyo azali na bomoi lobiko na lobiko ete, Ekozala mpo na ntango moko mpe ntango mibale mpe ndambo na ntango, mpe wana ekosila bango [kopanza, NW] nguya na bato na bulɛɛ, makambo oyo nyonso makosila.” (Danyele 12:7) Oyo nde likambo monene! Anzelu alapi ndai na kotomboláká mabɔkɔ na likoló, ntango mosusu mpo baanzelu mibale oyo bazalaki ngámbo na ngámbo ya ebale monene bámona ndai yango. Mpe na kosaláká bongo, anzelu oyo amonisaki ete esakweli yango ekokokisama solo. Ntango nini? Eyano na motuna oyo ezali mpasi te lokola okoki kokanisa yango.
17. (a) Bokokani nini ezali kati na bisakweli ya Danyele 7:25, Danyele 12:7 mpe ya Emoniseli 11:3, 7, 9? (b) Ntango misato na ndambo ezali mbula boni?
17 Esakweli oyo ekokani mpenza na bisakweli mosusu mibale. Esakweli moko, totalelaki yango na mokapo 9 ya buku oyo, na Danyele 7:25; esakweli mosusu na Emoniseli 11:3, 7, 9. Tótalela mwa makambo oyo mazali koyokanisa bisakweli yango. Bisakweli yango bikokokisama na boumeli ya ntango ya nsuka. Bisakweli yango mibale bitaleli basaleli ya Nzambe, bato na bulɛɛ. Bizali komonisa ete basaleli ya Nzambe bakonyokwama mpe na boumeli ya mwa ntango mokuse bakozala lisusu te na likoki ya kosakola liboso na bato nyonso. Esakweli yango mokomoko ezali komonisa ndenge basaleli ya Nzambe bakozonga na bomoi mpe bakozongela mosala na bango. Yango ekomonisa ete basili kolonga baoyo banyokolaki bango. Mpe esakweli mokomoko ezali koyebisa mbula boni bato na bulɛɛ bakonyokwama. Bisakweli yango mibale ya mokanda ya Danyele (7:25 mpe 12:7) bizali kolobela ‘ntango moko, bantango mpe ndambo ya ntango.’ Mingimingi, banganga-mayele ya Biblia bandimaka ete yango elimboli ntango misato na ndambo. Mokanda ya Emoniseli elobi ete eleko yango ezali sanza 42 to mikolo 1 260. (Emoniseli 11:2, 3) Yango ezali kondimisa ete eleko oyo ya ntango misato na ndambo, oyo elobelami na mokanda ya Danyele ezali eleko ya mbula misato na ndambo wana tozali kosimba ete mbula moko ezali na mikolo 360. Kasi ntango nini eleko yango ya mikolo 1 260 ebandaki?
18. (a) Na kotalela Danyele 12:7, elembo nini esengelaki kosukisa eleko ya mikolo 1 260? (b) Nsukansuka, ntango nini “nguya ya bato ya bulɛɛ” epanzanaki, mpe ndenge nini esalemaki? (c) Ntango nini eleko ya mikolo 1 260 ebandaki, mpe ndenge nini bapakolami ‘basakolaki balati saki’ na boumeli ya eleko yango?
18 Esakweli elobi polele ntango nini eleko ya mikolo 1 260 ekosila—ezali na ntango ‘bakosilisa kopanza nguya ya bato na bulɛɛ.’ Na katikati ya 1918, bafundaki batambwisi ya Watch Tower Bible and Tract Society mpe prezida na yango J. F. Rutherford, na bifundeli ya lokuta. Bakatelaki bango bitumbu minene mpe bakɔtisaki bango na bolɔkɔ. Bato na bulɛɛ, bato na Nzambe, bamonaki mpenza ndenge ‘bapanzaki’ mosala na bango mpe balongolaki nguya na bango. Soki tozongi mbula misato na ndambo na nsima banda katikati ya 1918, tokokóma na nsuka ya 1914. Na ntango yango, etuluku moke ya bapakolami bazalaki koyika mpiko na minyoko makasi. Etumba ya Liboso ya mokili mobimba esilaki kobanda, mpe botɛmɛli na mosala na bango ezalaki kokóma makasi. Yango wana, na 1915, mokapo mpo na mobu yango ezalaki motuna oyo Klisto atunaki ete: “Bokoki nde komela kɔpɔ ekomela ngai?” (Matai 20:22) Lokola esakolamaki na Emoniseli 11:3, eleko ya mikolo 1 260 oyo elandaki ezalaki eleko ya mawa mpo na bapakolami—ezalaki lokola bazali kosakola balati saki. Minyoko ekómaki makasi. Batyaki bamoko kati na bango na bolɔkɔ, basusu babɛtamaki, bamosusu mpe banyokwamaki na minyoko ndenge na ndenge. Mingi kati na bango mpe balɛmbaki nzoto ntango C. T. Russell, prezida ya liboso ya la Société, akufaki na 1916. Nini elingaki kosalema na nsuka ya eleko yango, awa mosala ya kosakola ebomamaki mpamba te bato ya bulɛɛ bazalaki kosakola lisusu te na molende lokola lisangá ya basakoli?
19. Ndenge nini esakweli ya Emoniseli mokapo 11 ezali kondimisa biso ete bapakolami basengelaki kokanga monɔkɔ ntango molai te?
19 Esakweli mosusu ya ndenge wana oyo ezwami na Emoniseli 11:3, 9, 11 emonisi ete nsima wana “batatoli mibale” bakobomama, bibembe na bango bikolala bobele mwa mikolo—mikolo misato na ndambo—mpe na nsima bakolamuka. Ndenge moko, esakweli ya mokapo 12 ya mokanda ya Danyele emonisi ete bato na bulɛɛ bakotikala bongo te kasi bakozala na mosala mingi ya kosala.
‘BAPƐTOLAMI, BAYEISAMI MPƐMBƐ MPE BABONGISAMI’
20. Na kotalela Danyele 12:10, mapamboli nini bapakolami bakozwa nsima ya kokutana na minyoko makasi?
20 Lokola touti kolobela yango mwa liboso, mosakoli Danyele akomaki makambo oyo kasi ayebaki ntina na yango te. Na ntembe te, asengelaki komituna soki bato na bulɛɛ bakobomama bango nyonso na banyokoli na bango, mpo atunaki ete: “Makambo oyo makosuka na nini?” Anzelu azongisaki ete: “Kendá na yo, Danyele, mpo ete maloba yango mazipami mpe makangami na elembo kino ntango ya nsuka. Bato mingi bakomipɛtola mpe bakomiyeisa mpɛmbɛ, mpe [bakobongisama, NW]; nde bato mabe bakosala mabe, mpe ata moko na bato mabe akososola te; nde bato na mayele bakososola.” (Danyele 12:8-10) Bato na bulɛɛ bazali na elikya ya solo! Na esika ete bábomama bango nyonso, bakoyeisama mpɛmbɛ, bakopambolama na kozwáká etɛlɛmɛlo ya pɛto liboso na Nzambe. (Malaki 3:1-3) Bososoli na bango na makambo ya elimo ekosalisa bango bátikala pɛto na miso ya Nzambe. Nzokande, bato mabe bakolinga kososola makambo ya elimo te. Kasi ntango nini makambo oyo nyonso masengelaki kosalema?
21. (a) Makambo nini masengelaki kosalema liboso ya ebandeli ya eleko oyo esakolamaki na Danyele 12:11? (b) “Mbeka ya kotumba” ezalaki nini, mpe ntango nini elongolamaki? (Talá etanda na lokasa 298.)
21 Bayebisaki mosakoli Danyele ete: “Longwa na ntango bakolongola mbeka ya kotumba, mpe bakotɛmisa eloko ya mbindo oyo ezali koyeisa libebi, mikolo nkóto na nkama mibale na ntuku libwa mikozala.” Na bongo, eleko yango ekobanda ntango makambo mosusu makosila kosalema. “Mbeka ya kotumba”—to “mbeka oyo ezali kokoba kopesama”a—ekolongolama. (Danyele 12:11, NW, maloba na nse ya lokasa) Mbeka nini anzelu alingaki kolobela? Ezali banyama oyo ezalaki kopesama lokola mbeka na tempelo awa na mabelé te. Ata tempelo oyo etongamaki na Yelusaleme ezalaki bobele “elilingi na oyo na solo”—elingi koloba elilingi ya tempelo monene ya Yehova na elimo, oyo ebandaki mosala na yango ntango Klisto akómaki Nganga Monene na mobu 29 T.B.! Na tempelo yango ya elimo, oyo ezali komonisa ebongiseli ya Nzambe mpo na losambo ya pɛto, esengeli lisusu te kopesa mbeka mpo na masumu mpamba te “Klisto apesamaki mbala moko mpo na komema masumu ya ebele.” (Baebele 9:24-28, NW) Nzokande, baklisto nyonso ya solo bazali kopesa mbeka na tempelo yango. Ntoma Paulo akomaki ete: “Bongo mpo na [Klisto], tótombwela Nzambe mbeka na masanzoli ntango nyonso, yango mbuma na bibɛbu bizali koyambola nkombo na ye.” (Baebele 13:15) Kolongolama ya “mbeka ya kotumba,” lisɛngami ya liboso ya esakweli oyo, ekokisamaki na katikati ya mobu 1918 ntango mosala ya kosakola epekisamaki makasi.
22. (a) “Eloko ya mbindo” yango oyo ezali koyeisa libebi ezali nini, mpe ntango nini etyamaki? (b) Ntango nini eleko oyo esakolamaki na Danyele 12:11 ebandaki mpe esukaki?
22 Ezali boni mpo na lisɛngami ya mibale—‘kotyama’ ya “eloko ya mbindo oyo ezali koyeisa libebi”? Lokola tomonaki yango ntango totalelaki Danyele 11:31, libosoliboso eloko yango ya mbindo ezalaki Société des Nations oyo eyaki kobima lisusu na nkombo ya ONU. Bibongiseli oyo mibale bizali mbindo mpamba te bato bamoni ete ezali bobele yango nde ekoki kotya kimya na mokili. Na bongo, bato mingi bazali kondima ete bibongiseli oyo bisili kozwa mpenza esika ya Bokonzi ya Nzambe! Société des Nations ebotamaki na sanza ya Yanuali 1919. Na ntango yango, masɛngami mibale oyo malobelami na Danyele 12:11 makokisamaki. Na bongo, eleko ya mikolo 1 290 ebandaki na ebandeli ya 1919 mpe ekobaki kino na eleko ya bambula (automne) ya 1922 (na mikili ya nɔrdi).
23. Ndenge nini bato na bulɛɛ to bato na Nzambe bapɛtolamaki na eleko ya mikolo 1 290 oyo esakolamaki na mokanda ya Danyele mokapo ya 12?
23 Na boumeli ya ntango yango, bato na bulɛɛ bayeisamaki mpɛmbɛ mpe bapɛtolamaki na miso ya Nzambe? Ɛɛ! Na sanza ya Marsi 1919, prezida ya Société Watch Tower mpe baninga na ye ya mosala babimaki na bolɔkɔ. Na nsima, bifundeli ya lokuta oyo bafundaki bango bilongolamaki. Lokola bayebaki ete bazali naino na mosala mingi, bamipesaki noki na yango mpe babongisaki liyangani na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1919. Bobele na mbula wana, babimisaki zulunalo ya sika oyo banda ntango wana ezali kobima elongo na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Nkombo ya liboso ya zulunalo yango ezalaki L’Âge d’or (sikoyo Lamuká!) mpe zulunalo yango ezali kosunga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpo na komonisa polele ete mokili esili kobeba mpe ezali kosalisa basaleli ya Nzambe ete bázala pɛto. Na nsuka ya eleko ya mikolo 1 290 oyo elakamaki, bato na bulɛɛ basalaki milende mpo na kozala pɛto mpe kozonga na ezalela na bango ya liboso na elimo. Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1922, pene na nsuka ya eleko yango, basalaki liyangani moko monene na engumba Cedar Point na etúká ya Ohio na États-Unis. Liyangani yango elendisaki bango mpo na mosala ya kosakola. Kasi basengelaki kosala lisusu milende na makambo mosusu. Yango esengelaki kosalema na eleko oyo elandaki, oyo ezalaki mpe eleko ya ntina mingi.
ESENGO YA BATO NA BULƐƐ
24, 25. (a) Eleko nini esakolamaki na Danyele 12:12, mpe ntango nini eleko yango ebandaki mpe esukaki? (b) Na ebandeli ya eleko ya mikolo 1 335, batikali bapakolami bazalaki ndenge nini na elimo?
24 Anzelu ya Yehova asukisi esakweli na ye na ntina na bato na bulɛɛ na maloba oyo: “Esengo na oyo [akozela] mpe akokóma na mikolo nkóto na nkama misato na ntuku misato na mitano.” (Danyele 12:12) Anzelu apesi biso elembeteli moko te mpo na koyeba ebandeli to nsuka ya eleko yango. Na kotalela kolandana ya lisolo ya Teokrasi, emonani ete eleko oyo elandaki mpenza oyo ezalaki liboso na yango. Soki bongo, eleko yango ebandaki na eleko ya mpiɔ ya mobu 1922 kino nsuka ya eleko ya molunge ya mobu 1926 (na mikili ya nɔrdi). Bato na bulɛɛ bazalaki nde na esengo na nsuka ya eleko yango? Ɛɛ, na makambo mingi ya ntina na elimo.
25 Ata nsima ya liyangani ya 1922 (talá lokasa 302), bamoko kati na bato na bulɛɛ bazalaki naino kokanisa makambo ya kala. Na makita na bango, bazalaki kokoba koyekola Biblia mpe mikanda mibéngamaki Études des Écritures oyo C. T. Russell akomaki. Na ntango yango, bandeko mingi bazalaki kokanisa ete lisekwa ekobanda na mobu 1925 mpe Paladiso ekozonga na mabelé na ntango wana. Na bongo, mingi bazalaki kosalela Yehova na kotaleláká badati. Basusu bazalaki na lolendo mpe baboyaki kosakola nsango malamu. Makambo mazalaki kotambola malamu te.
26. Wana eleko ya mikolo 1 335 esilaki naino te, ndenge nini bapakolami babongwanaki na elimo?
26 Lokola eleko ya mikolo 1 335 esilaki naino te, makanisi oyo nyonso mabandaki kolongwa. Mosala ya kosakola etyamaki na esika ya liboso, lokola bibongiseli bizalaki kozwama mbala na mbala mpo moto na moto akoka kosakola. Bakómaki koyekola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na makita ya pɔsɔ na pɔsɔ. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Marsi 1925 (na Lingelesi) ezalaki na lisolo moko ya ntina mingi, oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Libota moko ebotami.” Lisolo yango epesaki basaleli ya Nzambe boyebi mozindo ya makambo oyo masalemaki banda mobu 1914 kino mobu 1919. Nsima ya mobu 1925, bato na bulɛɛ balongolaki, na makanisi na bango, likambo ya kosalela Nzambe na kotaleláká badati. Na bongo, likambo ya liboso ezalaki ete nkombo ya Yehova esanzolama. Liteya yango ya ntina ezongelamaki lisusu na mozindo na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 1926 (na Lingelesi), yango ezalaki na motó ya likambo ete “Nani akokumisa Yehova?” Na liyangani ya Mai 1926, babimisaki buku Délivrance. (Talá lokasa 302.) Yango ezalaki moko na babuku ya sika oyo esengelaki kokitana Études des Écritures. Bato na bulɛɛ batalaki lisusu na nsima te. Batyaki miso na bango na makambo oyo masengelaki kosalema na mikolo mikoya mpe na mosala oyo mozalaki liboso na bango. Lokola esakolamaki, bato na bulɛɛ bakómaki na esengo na nsuka ya eleko yango ya mikolo 1 335.
27. Bilembeteli nini ezali na mokapo ya 12 ya mokanda ya Danyele oyo esalisi biso tóyeba bapakolami ya Yehova?
27 Ya solo, bango nyonso te bayikaki mpiko na ntango wana ya mobulu. Yango wana anzelu abendaki likebi na ntina ya ‘kozela.’ Baoyo bayikaki mpiko mpe bazalaki kosɛnzɛla ntango nyonso bazwaki mapamboli mingi. Mokapo 12 ya mokanda ya Danyele emonisi yango polele. Lokola esakolamaki, bapakolami bazongaki na bomoi to basekwaki na elimo. Bakangaki ntina ya makambo mingi ya Liloba ya Nzambe, bakómaki makasi na ‘kolukaluka’ kati na Liloba yango mpe lokola batambwisamaki na elimo santu, basosolaki mabombami ya kala. Yehova apɛtolaki bango mpe angɛngisaki bango na elimo lokola minzoto. Na ngala na bango, basalisaki bato mingi mpo bákóma sembo na miso ya Yehova Nzambe.
28, 29. Lokola “ntango ya nsuka” ezali mpenza kobɛlɛma, tosengeli kozala na ekateli nini?
28 Na kotalela bilembo nyonso ya esakweli oyo bizali komonisa “bato na bulɛɛ na Oyo-Aleki-Likoló,” baoyo bayebi bato wana ya bulɛɛ te mpe bazali kosangana na bango te bakoki mpenza kolimbisama? Mapamboli mazali kozela ebele ya bato oyo bazali kosangana na etuluku moke ya bapakolami mpo na kosalela Yehova. Tosengeli kosɛnzɛla ntango nyonso mpo na komona kokokisama ya bilaka ya Nzambe. (Habakuku 2:3) Na mikolo na biso, Mikaele, Mokonzi Monene, asili kotɛlɛma na boumeli ya bambula mpo na bolamu ya libota ya Nzambe. Mosika te, akobanda mosala na ye oyo Nzambe asili kopesa ye ya koboma ebongiseli ya biloko ya ntango oyo. Ntango akosala yango, tokozala na ngámbo oyo wapi?
29 Tokoyanola na motuna oyo soki tosili kobanda kotambwisa bomoi na biso na nzela ya bosembo. Mpo na kolendisa ekateli na biso ya kosala bongo lokola “ntango ya nsuka” ezali kobɛlɛma, tiká tótalela vɛrsɛ ya nsuka ya mokanda ya Danyele. Ntango tokotalela vɛrsɛ yango na mokapo oyo elandi, tókoyeba etɛlɛmɛlo oyo mosakoli Danyele azalaki na yango liboso na Nzambe mpe etɛlɛmɛlo oyo akozala na yango liboso na Ye na mikolo mizali koya.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebongolami bobele na “mbeka” na libongoli ya Greke ya Septante.
MAKAMBO NINI OKANGI NTINA?
• Na boumeli ya ntango nini Mikaele “atɛlɛmi” mpe ndenge nini mpe ntango nini “akotɛlɛma”?
• Lisekwa ya lolenge nini Danyele 12:2 ezali kolobela?
• Badati nini ezali komonisa ebandeli mpe nsuka ya eleko ya
ntango misato na ndambo oyo elobelami na Danyele 12:7?
mikolo 1 290 oyo esakolamaki na Danyele 12:11?
mikolo 1 335 oyo esakolamaki na Danyele 12:12?
• Ndenge nini likebi oyo totii na kotaleláká mokapo 12 ya mokanda ya Danyele esalisi biso tóyeba basambeli ya solo ya Yehova?
[Etanda na lokasa 298]
KOLONGOLAMA YA MBEKA YA KOTUMBA
Na mokanda ya Danyele, “mbeka ya kotumba” elobelami mbala mitano. Ezali mbeka ya masanzoli—“mbuma ya bibɛbu”—oyo basaleli ya Yehova Nzambe bazali kopesa ye mbala na mbala. (Baebele 13:15) Kolongolama ya mbeka yango esakolamaki na Danyele 8:11, 11:31 mpe 12:11.
Na boumeli ya bitumba mibale ya mokili mobimba, basaleli ya Yehova banyokwamaki na mikili oyo miyangelamaki na “mokonzi ya nɔrdi” mpe “mokonzi ya sudi.” (Danyele 11:14, 15, NW) “Mbeka ya kotumba” elongolamaki pene na nsuka ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ntango mosala ya kosakola epekisamaki na katikati ya mobu 1918. (Danyele 12:7) Ndenge moko, na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, États-Unis na Angleterre, nguya ya mokili mobimba, elongolaki “mbeka ya kotumba” na boumeli ya mikolo 2 300. (Danyele 8:11-14; talá Mokapo 10 ya buku oyo.) Mbeka yango elongolamaki mpe na “basoda” ya Nazi na boumeli ya eleko moko oyo eyebisami sikisiki na Makomami te.—Danyele 11:31; talá Mokapo 15 ya buku oyo.
[Etanda/Bililingi na lokasa 301]
BILEKO YA ESAKWELI NA MOKANDA YA DANYELE
Ntango nsambo (mbula 2 520): Ɔkɔtɔbɛ 607 L.T.B. kino
Danyele 4:16, 25 Ɔkɔtɔbɛ 1914 T.B.
(Bokonzi ya Masiya etyami.
Talá Mokapo 6 ya buku oyo.)
Ntango misato na ndambo Desɛmbɛ 1914 kino Yuni 1918
(Mikolo 1 260): (Baklisto bapakolami banyokwami.
Danyele 7:25; 12:7 Talá Mokapo 9 ya buku oyo.)
Mpokwa mpe ntɔngɔ 1 to 15 Yuni 1938 kino
2 300: 8 to 22 Ɔkɔtɔbɛ 1944
Danyele 8:14 (“Ebele monene” bamonani, bakómi mingi.
Talá Mokapo 10 ya buku oyo.)
Pɔsɔ 70 (Mbula 490): 455 L.T.B. kino 36 T.B.
Danyele 9:24-27 (Koya ya Masiya mpe mosala
na ye na mabelé. Talá Mokapo 11
ya buku oyo.)
Mikolo 1 290: Yanuali 1919 kino
Danyele 12:11 Sɛtɛmbɛ 1922
(Baklisto bapakolami balamuki
mpe bakoli na elimo.)
[Bililingi na lokasa 287]
Atako basalaki likambo te, basaleli ya Yehova oyo bazalaki na mikumba minene batyamaki na bolɔkɔ na engumba Atlanta na etúká ya Georgie na États-Unis. Banda na lobɔkɔ ya mwasi kino na lobɔkɔ ya mobali: (baoyo bafandi) A. H. Macmillan, J. F. Rutherford, W. E. Van Amburgh; (baoyo batɛlɛmi) G. H. Fisher, R. J. Martin, G. DeCecca, F. H. Robison mpe C. J. Woodworth
[Bililingi na lokasa 299]
Mayangani minene esalemaki na Cedar Point na etúká ya Ohio na États-Unis na 1919 (na likoló) mpe na 1922 (na nse)
[Elilingi na lokasa mobimba 302]