Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yehova amonisi makambo oyo ‘ekosalema nsima ya mwa ntango moke’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2012 | Sanza ya 6 15
    • 9 Banda kala, basaleli ya Yehova bazalaki koluka koyeba ndimbola ya makaka ya ekeko monene. Danyele 2:41 emonisi ete makaka ya ebende oyo esangani na mabele ya lima ezali “bokonzi” moko, kasi te makonzi ebele. Na yango, mabele ya lima elimboli ete ezali na eloko moko na kati ya bokonzi ya Anglo-américain oyo ezali kopekisa yango ezala makasi lokola Ampire ya Roma, oyo emonisamaki na makolo ya ebende. Biblia elobi ete mabele ya lima elimboli “bana ya bato,” to bapɛplɛ. (Dan. 2:43) Bato yango bazali kolɛmbisa bokonzi ya Anglo-américain na ndenge bazali kobunda mpo na ntomo ya bato nyonso, mpo na ntomo ya bato ya misala, to mpe mpo na kozwa lipanda. Bana ya bato bazali kopekisa bokonzi ya Anglo-américain ezala makasi lokola ebende. Lisusu, bango na bango bato ya politiki bazali na makanisi ndenge moko te; mpe soki mokonzi moko alongi maponami na bavoti moke, akokaka mpenza te kokokisa makambo oyo alakaki. Danyele asakolaki boye: “Bokonzi yango ekozala ndambo makasi mpe ekozala ndambo pɛtɛpɛtɛ.”​—Dan. 2:42; 2 Tim. 3:1-3.

  • Yehova amonisi makambo oyo ‘ekosalema nsima ya mwa ntango moke’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2012 | Sanza ya 6 15
    • 11 Motángo ya misapi ya makolo ya ekeko ezali nde na ndimbola moko boye? Na bimonaneli mosusu, Danyele alobeli mitángo: na ndakisa, alobeli mitángo ya maseke ya banyama ndenge na ndenge. Mitángo wana ezali na ndimbola. Kasi, Danyele apesi motángo ya misapi ya makolo ya ekeko te. Na yango, emonani lokola ete motángo yango ezali te na ndimbola moko boye, ndenge moko na motángo ya mabɔkɔ, ya misapi ya mabɔkɔ, ya makolo mpe ya makaka. Danyele alobaki ete misapi ya makolo ezali na ebende oyo esangani na mabele ya lima. Na yango, tokoki koloba ete bokonzi ya Anglo-américain nde ekozala bokonzi oyo eleki na nguya ntango “libanga,” elingi koloba Bokonzi ya Nzambe, ekotuta makaka ya ekeko yango.​—Dan. 2:45.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto