Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Danyele
DIKSIONƐRƐ moko ya maloba ya Biblia elobi boye: “Mokanda ya Danyele ezali moko ya babuku oyo eleki kitoko na Biblia. Etondi na mateya ya solo oyo esilaka ngala te.” Lisolo ya Danyele ebandaki na mobu 618 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), ntango Nebukadanesala, mokonzi ya Babilone, akómaki na engumba Yelusaleme mpe azingaki yango mpe amemaki ‘bana mosusu ya Yisalaele’ na boombo na Babilone. (Danyele 1:1-3) Elenge Danyele mpe azalaki na kati na bango. Tii ntango mokanda yango esilaki kokomama, Danyele azalaki kaka na Babilone. Nzambe apesaki Danyele, oyo akómaki na mbula soki 100, elaka oyo: “Okopema, mpe okotɛlɛma mpo na yango eponami mpo na yo na nsuka ya mikolo.”—Danyele 12:13.
Eteni ya liboso ya lisolo yango ekomami lokola moto mosusu nde azali koloba, nzokande na eteni ya nsuka, emonani ete Danyele ye moko nde azali koloba. Danyele nde akomaki buku yango, oyo ezali na bisakweli oyo elobeli ndenge bikólo mosusu ekómaki koyangela mokili mobimba mpe ndenge ekweaki, ntango oyo Masiya akoya mpe makambo oyo ezali kosalema na ntango na biso.a Mosakoli yango, oyo asilaki konuna, ayebisi mpe makambo oyo amonaki na boumeli ya bomoi na ye wana ya molai, oyo ezali kolendisa biso tókangama na Nzambe mpo na libela. Nsango oyo ezali na Mokanda ya Danyele ezali na bomoi mpe na nguya.—Baebele 4:12.
LISOLO YA BOMOI YA DANYELE EZALI KOTEYA BISO NINI?
Tozali na mobu 617 L.T.B. Danyele ná baninga na ye misato, Sadalaka, Mesaka mpe Abedenego bazali na ndako ya mokonzi ya Babilone. Na boumeli ya mbula misato oyo basengeli koyekola mimeseno ya Babilone, bilenge yango batikali kaka sembo epai ya Nzambe. Mbula soki 8 na nsima, Mokonzi Nebukadanesala alɔti ndɔtɔ moko ya nsɔmɔ. Danyele ayebisi ye ndɔtɔ yango mpe apesi ye ndimbola na yango. Mokonzi andimi ete Yehova azali “Nzambe ya banzambe, mpe Nkolo ya mikonzi, mpe momonisi ya makambo mabombami.” (Danyele 2:47) Kasi mosika te, Nebukadanesala asalaki lokola abosani likambo yango. Ntango baninga misato ya Danyele baboyaki kosambela ebakata ya ekeko ya mokonzi, asɛngaki bábwaka bango na kati ya mɔtɔ oyo ezalaki kongala makasi. Nzambe abikisaki bango mpe Nebukadanesala alobaki ete “nzambe mosusu boye azali te, oyo akoki kobikisa na lolenge ya oyo.”—Danyele 3:29.
Nebukadanesala alɔti ndɔtɔ mosusu ya ntina mingi. Amoni nzete moko monene, oyo ekatami mpe bapekisi yango kokola. Danyele alimboli ndɔtɔ yango. Ndɔtɔ yango ekokisamaki mwa ndambo ntango Nebukadanesala abɛlaki ligboma mpe na nsima abikaki. Bambula mingi na nsima, Mokonzi Belesasala asali fɛti moko ya monene mpo na bankumu na ye, mpe na lolendo nyonso asaleli biloko oyo eutaki na tempelo ya Yehova. Kaka na butu yango, babomi Belesasala mpe Dalio moto ya Mede azwi bokonzi. (Danyele 5:30, 31) Na ntango ya Dalio, wana Danyele akómaki na mbula koleka 90, basaleli ya mokonzi oyo bazalaki koyokela mosakoli yango zuwa bayangelaki ye mwango mpo na koboma ye. Kasi, Yehova abikisaki ye “na monɔkɔ ya nkɔsi.”—Danyele 6:27, NW.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:11-15—Ndunda oyo bilenge Bayuda bazalaki kolya nde esalaki ete bázala na nzoto kitoko koleka bilenge mosusu? Te. Bilei moko te ekoki kopesa moto nzoto kitoko ndenge wana na mikolo zomi ya mpamba. Yehova nde apambolaki bango mpo batyaki motema epai na ye.—Masese 10:22.
2:1—Mbula nini Nebukadanesala alɔtaki ndɔtɔ ya elilingi monene? Biblia elobi ete ezalaki “na mbula ya mibale ya bokonzi ya Nebukadanesala.” Akómaki mokonzi na Babilone na mobu 624 L.T.B. Na yango, mbula ya mibale ya boyangeli na ye ekokaki kobanda na mobu 623 L.T.B., elingi koloba bambula ebele liboso abundisa Yuda. Na ntango wana, Danyele akokaki kozala na Babilone te mpo na kolimbola ndɔtɔ yango. Ekoki kozala ete “mbula ya mibale” etángamaki kobanda na mobu 607 L.T.B., ntango mokonzi ya Babilone abebisaki Yelusaleme mpe akómaki koyangela mokili mobimba.
2:32, 39—Na ndimbola nini bokonzi ya wolo elekaki oyo ya palata mpe na ndimbola nini bokonzi ya palata elekaki oyo ya motako? Bokonzi ya Babilone oyo emonisamaki na motó ya wolo elekaki bokonzi ya Bamede ná Baperse oyo emonisamaki na palata, mpo ekweisaki bokonzi ya Yuda. Bokonzi oyo elandaki ezalaki oyo ya Grèce, oyo emonisamaki na motako. Kaka ndenge palata elekaka motako na motuya, bokonzi ya Bamede ná Baperse elekaki bokonzi ya Grèce na lokumu. Atako bokonzi ya Grèce eyangelaki bikólo mingi koleka, ezwaki te lokumu oyo Bamede ná Baperse bazwaki ya kosikola libota ya Nzambe na boombo.
4:8, 9, NW—Danyele akómaki nganga-nkisi? Te. Maloba “mokonzi ya banganga-nkisi” emonisaki kaka mokumba oyo Danyele azalaki na yango: “Mokonzi ya bato ya mayele nyonso ya [Babilone, NW].”—Danyele 2:48.
4:10, 11, 20-22—Nzete monene oyo Nebukadanesala amonaki na ndɔtɔ ezalaki elilingi ya nini? Libosoliboso, nzete yango ezalaki elilingi ya Nebukadanesala oyo bokonzi na ye ezalaki koyangela mokili mobimba. Lokola bokonzi na ye ekómaki tii “na nsuka ya mokili,” nzete yango esengeli komonisa likambo moko ya monene koleka. Danyele 4:17 emonisi ete ndɔtɔ yango ezalaki kolobela boyangeli ya “Oyo-Aleki-Likoló.” Na yango, nzete yango ezalaki mpe elilingi ya boyangeli ya Yehova na molɔ́ngɔ́ mobimba, mingimingi na mabelé. Na boye, ndɔtɔ oyo Nebukadanesala alɔtaki ezali na ndimbola mibale: boyangeli ya Nebukadanesala mpe oyo ya Yehova.
4:16, 23, 25, 32, 33—“Ntango nsambo” ekokanaki na mbula boni? Na kotalela ndenge Mokonzi Nebukadanesala akómaki lokola nyama ya zamba, emonani ete “ntango nsambo” yango ezalaki kaka mikolo nsambo te. Mpo na ye, ntango nsambo yango eumelaki mbula 7, oyo mokomoko na yango ezalaki na mikolo 360, elingi koloba mikolo 2520. Na kokokisama ya monene ya ndɔtɔ yango, “ntango nsambo” eumelaki mbula 2520. (Ezekiele 4:6, 7) Ebandaki ntango Yelusaleme ebebisamaki na mobu 607 L.T.B. mpe esukaki ntango Yesu akómaki Mokonzi na likoló na 1914 ya ntango na biso (T.B).—Luka 21:24.
6:6-10—Lokola esɛngaka te kotɛlɛma to kofanda na lolenge boye to boye mpo na kobondela Yehova, Danyele akokaki kosalela bwanya te mpo na kobondelaka na nkuku na boumeli ya mikolo 30? Bato nyonso bayebaki ete Danyele azalaki kobondela mbala misato na mokolo. Yango wana banguna na ye bapesaki likanisi ya kobimisa mobeko mpo na kopekisa bato bábondela. Soki Danyele abongolaka momeseno na ye ya kobondela, bato balingaki kokanisa ete akakoli kondima na ye, mpe bakokaki komona ete akangami lisusu na Yehova te.
Mateya mpo na biso:
1:3-8. Ekateli makasi oyo Danyele ná baninga na ye bazalaki na yango ya kotikala sembo epai ya Yehova ezali komonisa ete baboti na bango bateyaki bango malamu mpenza. Soki baboti oyo babangaka Nzambe bazali kotya matomba ya elimo na esika ya liboso na bomoi na bango mpe bazali koteya bana na bango bálanda ndakisa na bango, bana bakoki kolonga ata komekama to masenginya ya ndenge nini oyo bakoki kokutana na yango na eteyelo to na esika mosusu.
1:10-12, NW. Danyele ayebaki ntina oyo “kapita ya basali ya mokonzi” abangaki mokonzi, yango wana atikaki kosɛnga ye likambo oyo azalaki na yango mposa. Nzokande, na nsima Danyele akendaki epai ya “mokɛngɛli,” oyo akokaki kozala na mokakatano te ya kondima likambo oyo azalaki kosɛnga. Soki tokutani na mikakatano ya makasi, tosengeli kosalela bososoli mpe bwanya ya ndenge wana.
2:29, 30. Lokola Danyele, tosengeli kozongisaka lokumu nyonso epai ya Yehova mpo na boyebi mpe makoki nyonso oyo tozwi na nzela ya Liloba na ye.
3:16-18. Na ntembe te, soki Baebele misato wana bákakolaka kondima na bango mpo na bilei, balingaki te kozwa makasi ya koboya na motema moko likambo oyo mokonzi asɛngaki bango. Biso mpe tosengeli kosala makasi tózalaka “sembo na makambo nyonso.”—1 Timote 3:11.
4:24-27. Kosakola nsango ya Bokonzi, oyo esangisi mpe nsango ya bitumbu oyo Yehova akopesa bato mabe, esɛngaka kozala na kondima mpe na mpiko oyo Danyele amonisaki ntango ayebisaki Nebukadanesala makambo oyo elingaki kokómela ye mpe nini asengelaki kosala mpo ‘kimya na ye eumela.’
5:30, 31. “Liloba oyo ya kotuka epai ya mokonzi ya Babilone” ekokisamaki. (Yisaya 14:3, 4, 12-15) Satana Zabolo, oyo lolendo na ye ekokani na oyo ya libota ya bakonzi ya Babilone, akosuka mpe na ndenge moko ya nsɔni.—Danyele 4:30; 5:2-4, 23.
BIMONANELI YA DANYELE EMONISI LIKAMBO NINI?
Na mobu 553 L.T.B., ntango Danyele alɔtaki ndɔtɔ na ye ya liboso, azalaki na mbula koleka 70. Danyele amonaki banyama minei ya nsɔmo oyo ezalaki elilingi ya bikólo oyo esengelaki kokonza mokili, mokomoko na ngala na yango, banda na ntango na ye tii na ntango na biso. Na emonaneli moko ya makambo ya likoló, amonaki bazali kopesa moto moko oyo azalaki “lokola mwana ya moto . . . nguya ya lobiko na lobiko.” (Danyele 7:13, 14) Mbula mibale na nsima, Danyele amonaki emonaneli moko oyo etalaki bokonzi ya Mede ná Perse, Grèce mpe bokonzi oyo ekómaki “mokonzi ya elongi ya [nkandankanda, NW].”—Danyele 8:23.
Tozali sikoyo na mobu 539 L.T.B. Babilone ekwei mpe Dalio moto ya Mede akómi mokonzi na mokili ya Bakaladi. Danyele abondeli Yehova mpo ekólo na ye etongama lisusu. Ntango azali naino kobondela, Yehova atindi anzelu Gabiliele aya ‘kopesa Danyele mayele mpe bososoli’ na ntina na koya ya Masiya. (Danyele 9:20-25) Bambula eleki tii tokómi na mobu 536/535 L.T.B. Mwa ndambo ya Bayuda bazongi na Yelusaleme. Kasi ntango bazali kotonga tempelo, bakutani na botɛmɛli. Danyele akómi kotungisama mpo na likambo yango. Abandi kobondela na etingya mpo na yango mpe Yehova atindeli ye anzelu moko ya lokumu mpenza. Nsima ya kolendisa Danyele, anzelu yango apesi esakweli moko oyo elobeli kowelana na kati ya mokonzi ya nɔrdi ná mokonzi ya sudi. Kowelana ya bakonzi mibale wana ebandaki ntango bakonzi minei ya basoda ya Alexandre le Grand bakabolaki bokonzi na ye tii ntango Nkumu Monene Mikaele “akotɛlɛma.”—Danyele 12:1.
Biyano na mituna ya Biblia:
8:9—“Mokili kitoko” ezali elilingi ya nini? Na esika oyo, “mokili kitoko” ezali elilingi ya baklisto bapakolami na boumeli ya ntango oyo bokonzi ya États-Unis ná Angleterre ezali kokonza mokili mobimba.
8:25, NW—Nani abengami “nkumu ya bankumu”? Liloba ya Liebele, sar, oyo ebongolami na “nkumu,” elimbolaka mpenzampenza “mokonzi.” Nkombo “nkumu ya bankumu” ebongi kaka na Yehova Nzambe ye moko, oyo azali mokonzi ya baanzelu nyonso, ata mpe “Mikaele, moko ya bankumu oyo aleki na lokumu.”—Danyele 10:13.
9:21—Mpo na nini Danyele abengi anzelu Gabiliele “moto yango”? Ezali mpo Gabiliele abimelaki ye na lolenge ya moto, ndenge abimelaki ye na emonaneli moko ya liboso.—Danyele 8:15-17.
9:27, NW—Kondimana nini ‘ekobaki mpo na bato mingi’ tii na nsuka ya pɔsɔ ya 70 ya bambula, to na mobu 36 T.B.? Kondimana ya Mobeko elongwaki na mobu 33 T.B., ntango babomaki Yesu. Nzokande, lokola Yehova atikaki kondimana oyo asalaki na Abalayama ezala kati na ye ná Yisalaele tii na mobu 36 T.B., asepelaki kokoba komonisa Bayuda motema mawa na ye, mpo bazalaki bana ya Abalayama. Kondimana ya Abalayama ekobaki mpo na “Yisalaele ya Nzambe.”—Bagalatia 3:7-9, 14-18, 29; 6:16.
Mateya mpo na biso:
9:1-23; 10:11, NW. Mpo na komikitisa na ye, komipesa na ye epai ya Yehova, molende na ye na koyekola Liloba ya Nzambe mpe na mabondeli, Danyele ‘alingamaki mingi’ na miso ya Yehova. Bizaleli wana esalisaki ye mpe akangama na Nzambe tii na nsuka ya bomoi na ye. Biso mpe tosengeli kozala na ekateli makasi ya kolanda ndakisa ya Danyele.
9:17-19. Ata soki tobondelaka ete mokili ya sika eya, epai “boyengebene ekofanda,” mokano na biso ya libosoliboso esengeli kozala ya kosantisa nkombo ya Yehova mpe kolongisa bokonzi na ye, kasi te ya koluka ete mikakatano na biso esila.—2 Petelo 3:13.
10:9-11, 18, 19. Lokola anzelu oyo ayaki epai ya Danyele, tosengeli kosalisanaka mpe kobɔndisanaka mpo na kolendisana.
12:3. Na mikolo ya nsuka, “baoyo bazali na mayele,” elingi koloba baklisto bapakolami, bazali “kongɛnga lokola miinda” mpe bamemi “bato mingi . . . na boyɛngɛbɛnɛ;” na kati ya bato yango tozali mpe na “ebele ya bato” oyo bazali “bampate mosusu.” (Bafilipi 2:15; Emoniseli 7:9; Yoane 10:16) Bapakolami ‘bakongɛnga lokola minzɔtɔ’ na ndenge ya kokoka na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto, ntango bakosala elongo na ye mosala ya kopesa bato ya botosi awa na mabelé matomba nyonso ya mbeka ya lisiko. “Bampate mosusu” basengeli kokangama na bapakolami mpe kopesa bango mabɔkɔ na motema moko na makambo nyonso.
Yehova ‘apambolaka baoyo babangaka Ye’
Mokanda ya Danyele ezali koteya biso nini mpo na Nzambe oyo tosambelaka? Kanisá naino bisakweli na yango, oyo esilá kokokisama ná oyo ekokisami naino te. Emonisi mpenza ete Yehova azangaka te kokokisa maloba na ye!—Yisaya 55:11.
Masolo mosusu ya Mokanda ya Danyele oyo ezali bisakweli te emonisi nini mpo na Nzambe na biso? Bilenge Baebele minei oyo baboyaki bomoi oyo ezalaki na ndako ya mokonzi bazwaki ‘boyebi, bososoli, mpe bwanya.’ (Danyele 1:17, NW) Nzambe ya solo atindaki anzelu na ye mpe abikisaki Sadalaka, Mesaka mpe Abedenego na mɔtɔ oyo ezalaki kongala makasi. Danyele abikaki na libulu ya nkɔsi. Yehova azali ‘mosungi mpe nguba ya bato oyo batyaka elikya epai na ye’ mpe ‘apambolaka baoyo babangaka ye.’—Nzembo 115:9, 13.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Soki olingi koyeba ndimbola ya vɛrsɛ mokomoko ya Mokanda ya Danyele, talá buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele! Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 18]
Mpo na nini Danyele “alingamaki mingi” na miso ya Yehova?