Esakweli ya Hosea ezali kosalisa biso tótambola elongo na Nzambe
“Bakotambola nsima ya Yehova.”—HOSEA 11:10, NW.
1. Mokanda ya Hosea elobeli likambo nini oyo ezali elilingi ya likambo mosusu?
OLINGAKA masolo oyo elobelaka bato oyo basepelisaka mpe oyo moto nyonso alukaka koyeba ndenge ekosuka? Mokanda ya Hosea ezali na lisolo moko ya ndenge wana mpe lisolo yango ezali elilingi ya likambo mosusu.a Elobeli libala ya mosakoli Hosea oyo makambo na yango ezali komonisa libala ya elilingi oyo Yehova asalaki na Yisalaele ya kala na nzela ya kondimana ya Mibeko ya Moize.
2. Toyebi makambo nini mpo na Hosea?
2 Hosea mokapo 1 nde elobeli bato ya lisolo yango mpe eleko oyo lisolo yango esalemaki. Ekoki mpenza kozala ete Hosea azalaki kofanda na Yisalaele, ekólo ya mabota zomi (oyo ebengamaki mpe Efalaima, nkombo ya libota oyo elekaki monene). Azalaki mosakoli na eleko oyo bakonzi nsambo ya nsuka ya Yisalaele bayangelaki mpe oyo bakonzi Uziya, Yotama, Ahaza, mpe Yizikiya bayangelaki Yuda. (Hosea 1:1) Yango elingi koloba ete Hosea azalaki mosakoli mbula soki 59. Atako mokanda ya Hosea esilaki kokomama mwa moke nsima ya mobu 745 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), ezali na ntina na moi ya lelo, eleko oyo bamilio ya bato bazali mpe kosala likambo Hosea asakolaki na maloba oyo: “Bakotambola nsima ya Yehova.”—Hosea 11:10, NW.
Bokuse ya likambo
3, 4. Lobelá na mokuse makambo oyo ezali na Hosea mokapo 1 tii 5.
3 Botaleli mokuse ya Hosea mokapo 1 tii 5 ekolendisa ekateli na biso ya kotambola elongo na Nzambe na kondima mpe na mposa ya kosala mokano na ye. Atako bato ya ekólo Yisalaele bakweaki na ekobo ya elimo, Nzambe azalaki pene ya kolimbisa bango soki babongoli mitema. Yango emonisamaki na ndenge oyo Hosea asalaki epai ya mwasi na ye Gomele. Nsima ya kobota na ye mwana moko, emonani ete mwasi yango abotaki bana mibale na mobali mosusu. Kasi, Hosea azongisaki ye na libala, ndenge mpe Yehova andimaki kolimbisa Bayisalaele oyo babongolaki mitema.—Hosea 1:1–3:5.
4 Yehova alingaki kosambisa Yisalaele mpo ete na ekólo yango, solo, motema-boboto, mpe boyebi ya Nzambe ezalaki te. Alingaki kosambisa Yisalaele, ekólo ya bato oyo bazalaki kosambela bikeko mpe Yuda, ekólo ya bato ya motó makasi. Kasi, ntango bato wana ya libota ya Nzambe bakokóma na “mpasi,” bakoluka Yehova.—Hosea 4:1–5:15.
Likambo oyo ezali elilingi ya likambo mosusu
5, 6. (a) Pite epalanganaki mingi ndenge nini na Yisalaele, ekólo ya mabota zomi? (b) Mpo na nini likebisi oyo epesamaki na Yisalaele ezali mpe na ntina mpo na biso lelo oyo?
5 Nzambe alobaki na Hosea boye: “Kendá kokamata mwasi ya pite mpe botá bana kati na pite mpo ete mokili ezali kosalaka pite mpe kopɛngwa longwa na [Yehova].” (Hosea 1:2) Pite epalanganaki nde mingi na Yisalaele? Biblia elobi boye: “[Elimo, NW] ya pite epɛngoli [bato ya mabota zomi], mpe batiki Nzambe na bango ete básala ekobo. . . . Bana basi na bino bazali kosalaka pite mpe basi na bino bazali na bikobo. . . . Zambi babali mpenza bazali kopɛngwa ná basi ya pite mpe kobimisa mbeka ná basi ya pite elongo.”—Hosea 4:12-14.
6 Na Yisalaele, bato bamipesaki mpenza na pite, ezala na ndenge ya solo to na elimo. Yango wana Yehova akanaki “kopesa [Bayisalaele] etumbu.” (Hosea 1:4; 4:9) Likebisi yango ezali na ntina mpo na biso mpamba te bato oyo bamipesi na pite mpe ekobo mpe baoyo bazali kolanda losambo ya mbindo na moi ya lelo, Yehova akopesa bango etumbu. Kasi, baoyo bazali kotambola elongo na Nzambe bazali kokokisa masɛngami na ye mpo na losambo ya pɛto mpe bayebi ete “moto ata moko te ya pite . . . azali na libula na kati ya bokonzi ya Klisto mpe ya Nzambe.”—Baefese 5:5; Yakobo 1:27.
7. Libala ya Hosea ná Gomele ezalaki elilingi ya nini?
7 Na ntembe te, ntango Hosea abalaki Gomele, mwasi yango ayebaki naino mibali te mpe tii ntango “abotaki mwana mobali,” azalaki kaka sembo epai ya mobali na ye. (Hosea 1:3) Ndenge likambo wana oyo ezalaki elilingi ya likambo mosusu emonisi yango, nsima ya kolongola Bayisalaele na boombo ya Ezipito na mobu 1513 L.T.B., Nzambe asalaki na bango kondimana oyo ezalaki lokola ndai ya libala ya bosembo. Lokola Yisalaele asalaki kondimana ná Yehova, alakaki kotikala sembo epai ya Yehova ‘mobali na ye.’ (Yisaya 54:5) Libala ya bosembo oyo Hosea asalaki ná Gomele ezalaki komonisa libala ya elilingi oyo Nzambe asalaki na Yisalaele. Kasi, na nsima makambo ebongwanaki mpenza!
8. Yisalaele, ekólo ya mabota zomi, ebandaki ndenge nini, mpe okoki koloba nini mpo na losambo na yango?
8 Mwasi ya Hosea “azwaki zemi lisusu mpe abotaki mwana ya mwasi.” Ekoki mpenza kozala ete Gomele abotaki mwana wana mpe na nsima, mwana mosusu na ekobo. (Hosea 1:6, 8) Lokola Gomele azalaki komonisa Yisalaele, okoki komituna ete, ‘Ndenge nini Yisalaele akómaki kosala ekobo?’ Na mobu 997 L.T.B., mabota zomi ekabwanaki na mabota mibale oyo ezalaki na sudi: libota ya Yuda mpe libota ya Benyamina. Bato ya Yisalaele, ekólo ya mabota zomi, bakómaki kosambela mwana ya ngɔmbɛ mpo bákendeke lisusu na Yuda te mpo na kosambela Yehova na tempelo na ye na Yelusaleme. Losambo ya Baala, ná makambo na yango ya kosala pite na ndenge ya bosɔtɔ, ezwaki mpenza misisa na Yisalaele.
9. Ndenge Hosea 1:6 esakolaki yango, likambo nini ekómelaki Yisalaele?
9 Ntango Gomele abotaki mwana ya mibale na ekobo, Nzambe alobaki na Hosea boye: “Pesá ye nkombo Lo-luhama [oyo elimboli “Bayokelaki ye mawa te”], mpamba te nakoyokela lisusu ndako ya Yisalaele mawa te, mpo nakolongola bango mpenza.” (Hosea 1:6, NW) Yehova ‘alongolaki bango’ ntango atikaki Baasulia bámema Bayisalaele na boombo na mobu 740 L.T.B. Kasi, Nzambe ayokelaki Yuda, ekólo ya mabota mibale, mawa mpe abikisaki yango, kasi na litimbo te, na mopanga te, na etumba te, na mpunda te, ata mpe na momati-mpunda te. (Hosea 1:7) Na butu moko na mobu 732 L.T.B., anzelu moko mpamba abomaki basoda 185 000 ya Asulia oyo balingaki kobundisa Yelusaleme, engumba-mokonzi ya Yuda.—2 Mikonzi 19:35.
Yehova asambisi Yisalaele
10. Ekobo oyo Gomele azalaki kosala ezalaki komonisa likambo nini?
10 Gomele asundolaki Hosea mpe akómaki “mwasi ya pite,” akómaki kosala ekobo ná mobali mosusu. Likambo yango emonisi boyokani oyo Yisalaele asalaki ná bikólo oyo ezalaki kosambela bikeko mpe akómaki kotyela yango motema. Na esika atalela bozwi oyo azalaki na yango lokola lipamboli ya Yehova, ye azalaki koloba ete banzambe ya bikólo wana nde bazalaki kopesa ye yango mpe abebisaki libala na ye ná Nzambe na ndenge akómaki kosambela banzambe ya lokuta. Yango wana Yehova akanaki kosambisa ekólo wana oyo ezalaki kosala ekobo ya elimo!—Hosea 1:2; 2:2, 12, 13, NW.
11. Nini ekómelaki kondimana ya Mibeko ntango Yehova atikaki ete Yisalaele ná Yuda ekende na boombo?
11 Yisalaele azwaki etumbu nini lokola atikaki Mobali na ye? Nzambe atikaki ete “akende na esobe,” elingi koloba na Babilone, ekólo oyo elongaki Asulia; Bayisalaele bakendaki kuna na boombo na mobu 740 L.T.B. (Hosea 2:14, NW) Kasi, ntango Yehova apesaki mabota zomi etumbu wana, abomaki te kondimana ya libala oyo asalaki na ebandeli ná mabota 12 ya Yisalaele. Kutu, ata ntango Nzambe atikaki bato ya Babilone bábebisa Yelusaleme na mobu 607 L.T.B. mpe atikaki ete bato ya Yuda bákende na boombo, asukisaki te kondimana ya Mibeko ya Moize oyo asalelaki libala ya elilingi ná mabota 12 ya Yisalaele. Libala wana ekufaki ntango bakonzi ya mangomba ya Bayuda baboyaki Yesu Klisto mpe babomisaki ye na mobu 33 ya ntango na biso (T.B.)—Bakolose 2:14.
Yehova akebisi Yisalaele
12, 13. Nini ezali likanisi ya ntina na Hosea 2:6-8, mpe ndenge nini maloba yango etalelaki Yisalaele?
12 Nzambe akebisaki Yisalaele ete “alongola pite na ye,” kasi ye asepelaki kolanda bamakango na ye. (Hosea 2:2, 5) Yehova alobaki boye: “Boye, talá, nakokanga nzela na yo na nzubɛ, nakotonga lopango ete amona nzela na ye te. Akolanda nsima ya [bamakango] na ye nde akozwana na bango te; akoluka bango nde akomona bango te. Bongo akoloba ete, Nakokenda mpe nakozonga epai ya mobali na ngai ya liboso, zambi na ntango yango ezalaki malamu mpo na ngai koleka ntango oyo. Ayebaki te ete ngai napesaki ye masango mpe vinyo mpe mafuta; nabakiselaki mpe ye palata mpe wolo ebongiselaki bango mpo na Baala [to, oyo “basalelaki ekeko ya Baala,” maloba na nse ya lokasa na NW].”—Hosea 2:6-8.
13 Atako Yisalaele alukaki lisalisi epai ya bikólo oyo ezalaki “bamakango” na ye, moko te elongaki kosalisa ye. Ekólo yango ekómaki lokola nde ekangami na kati ya banzubɛ, nzela ya koleka mpo na kosalisa yango ezalaki te. Baasulia bazingaki Samalia, engumba-mokonzi na yango mbula misato mpe, na mobu 740 L.T.B., bakweisaki yango mpo na libela. Kaka mwa bato moke ya Yisalaele oyo bakendaki na boombo nde bamonaki ete makambo ezalaki malamu ntango bankɔkɔ na bango bazalaki kosalela Yehova. Bango nde batikaki losambo ya Baala mpe balukaki kozonga epai ya Yehova, Nzambe oyo asalaki na bango kondimana.
Tózonga lisusu na likambo oyo ezali elilingi
14. Mpo na nini Hosea azongisaki Gomele na libala?
14 Mpo na kokanga malamu ntina ya boyokani kati na libala ya Hosea ná mwasi na ye mpe libala ya Yehova ná Yisalaele, tótalela maloba oyo: “[Yehova] alobaki na ngai ete, Kendá naino, kolingana na mwasi oyo alingani na [mobali] mpe oyo azali na pite.” (Hosea 3:1) Hosea atosaki mpe akendaki kozwa Gomele na mabɔkɔ ya mobali oyo azalaki kofanda na ye. Na nsima, Hosea akebisaki mwasi na ye na maloba oyo: “Okofanda na ngai mikolo mingi; okosala pite te, okozala na mobali mosusu te.” (Hosea 3:2, 3) Gomele atosaki, mpe Hosea azongisaki ye na libala. Ndenge nini likambo yango emonanaki na boyokani ya Nzambe ná bato ya Yisalaele mpe Yuda?
15, 16. (a) Nzambe akokaki koyokela ekólo na ye oyo apesaki etumbu mawa soki basali nini? (b) Ndenge nini Hosea 2:18 ekokisamaki?
15 Ntango bato ya Yisalaele ná Yuda bazalaki na boombo na Babilone, Nzambe atindaki basakoli na ye mpo na ‘koloba na motema na bango.’ Mpo Nzambe alimbisa libota na ye, esengelaki bábongola mitema mpe bázonga epai ya Mobali na bango, ndenge Gomele azongaki epai ya mobali na ye. Na nsima, Yehova alingaki kosilisa etumbu mpe kolongola mwasi na ye na “esobe,” elingi koloba na Babilone, mpe kozongisa ye na Yuda mpe Yelusaleme. (Hosea 2:14, 15, NW) Akokisaki maloba na ye na mobu 537 L.T.B.
16 Nzambe akokisaki mpe maloba oyo: “Na mokolo yango nakokata kondimana mpo na yo epai ya banyama ya zamba mpe na bandɛkɛ ya lola mpe na biloko bikolandalandaka na mabelé; nakobuka litimbo mpe mopanga mpe etumba kati na mokili; nakolalisa mpe yo na kimya.” (Hosea 2:18) Batikali na kati ya Bayuda oyo bazongaki na ekólo na bango bafandaki na kimya, bazalaki kobanga banyama te. Esakweli yango ekokisamaki lisusu na 1919, ntango batikali ya Yisalaele ya elimo babimaki na boombo ya “Babilone Monene,” mangomba ya lokuta ya mokili mobimba. Lelo oyo bafandi na kimya mpe na esengo na kati ya paladiso ya elimo elongo na baninga na bango, baoyo bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko awa na mabelé. Bizaleli lokola ya banyama ezali te na kati ya baklisto yango ya solo.—Emoniseli 14:8; Yisaya 11:6-9; Bagalatia 6:16.
Tósimba mateya oyo tozwi
17-19. (a) Tolendisami na komekola bizaleli nini ya Nzambe? (b) Ndenge nini tosengeli kotalela motema mawa mpe boboto ya Yehova?
17 Nzambe azali na motema mawa mpe na boboto, biso mpe tosengeli kozala bongo. Wana ezali liteya moko oyo tozwi na mikapo ya ebandeli ya mokanda ya Hosea. (Hosea 1:6, 7; 2:23) Mposa ya Nzambe ya kolimbisa Bayisalaele oyo babongolaki mitema eyokani na lisese ya Biblia oyo: “Ye oyo akobomba masumu na ye akolonga te; kasi ye oyo akoyambola mpe akotika yango akozwa ngɔlu.” (Masese 28:13) Lisusu, maloba ya mokomi ya nzembo ekoki kobɔndisa bato ya masumu oyo babongoli mitema: “Makabo mazali malamu na miso ya Nzambe ezali [elimo etutami, NW]; ee Nzambe, yo okoboya motema motutami mpe na mawa te.”—Nzembo 51:17.
18 Esakweli ya Hosea ezali komonisa motema mawa mpe boboto ya Nzambe na biso. Ata soki bato mosusu batikaki kotambola na banzela na ye ya sembo, bakoki kobongola motema mpe kobongwana. Soki basali bongo, Yehova akoboya te koyamba bango. Alimbisaki bato oyo babongolaki mitema na Yisalaele, ekólo oyo asalaki na yango libala ya elilingi. Atako baboyaki kotosa Yehova mpe ‘bayokisaki Oyo ya bulɛɛ ya Yisalaele nkanda, atondaki na mawa, akanisaki ete bazali bobele mosuni.’ (Nzembo 78:38-41) Motema mawa ya ndenge wana esengeli kotinda biso tókoba kotambola na Yehova, Nzambe na biso oyo atondi na boboto.
19 Atako bato ya Yisalaele bamipesaki na masumu lokola koboma bato, koyiba, mpe kosala ekobo, Yehova ‘alobaki na motema na bango.’ (Hosea 2:14, NW; 4:2) Soki tokanisi motema mawa mpe boboto ya Yehova, yango esengeli kosimba mitema na biso mpe kotinda biso tólinga ye mingi lisusu. Yango wana, tómituna mituna oyo: ‘Na boyokani na ngai na bato mosusu, ndenge nini nakoki komekola malamumalamu motema mawa mpe boboto ya Yehova? Soki ndeko moko oyo asalaki ngai mabe asɛngi bolimbisi, nakondima kolimbisa ye na ndakisa ya Nzambe?’—Nzembo 86:5.
20. Nini emonisi ete tosengeli kotya motema na elikya oyo Nzambe apesi biso?
20 Nzambe apesaka elikya ya solosolo. Na ndakisa, alakaki boye: “Nakopesa ye . . . lobwaku ya Akolo lokola ekuke ya elikya.” (Hosea 2:15) Bato ya ekólo oyo ezalaki mwasi ya elilingi epai ya Yehova na ntango ya kala bazalaki mpenza na elikya ya kozonga na mokili na bango, epai “lobwaku ya Akolo” ezalaki. Elaka wana ekokisamaki na mobu 537 L.T.B., mpe yango ezali kopesa biso ntina malamu ya kosepela na elikya ya solosolo oyo Yehova apesi biso.
21. Boyebi ezali na ntina nini mpo tókoba kotambola elongo na Nzambe?
21 Mpo tókoba kotambola elongo na Nzambe, tosengeli kotika te kozwa boyebi na ye mpe kosalela yango na bomoi na biso. Na Yisalaele, boyebi ya Yehova ezalaki te. (Hosea 4:1, 6) Atako bongo, ezalaki na mwa bato oyo bazalaki kopesa mateya ya Nzambe motuya mingi, bazalaki kotosa yango, mpe bazwelaki yango mbano monene. Hosea azali moko na bato yango. Na mikolo ya Eliya, ezalaki mpe na bato 7 000 oyo bafukamelaki Baala te. (1 Mikonzi 19:18; Baloma 11:1-4) Botɔndi na biso mpo na mateya ya Nzambe ekosalisa biso tókoba kotambola elongo na ye.—Nzembo 119:66; Yisaya 30:20, 21.
22. Ndenge nini tosengeli kotalela lipɛngwi?
22 Yehova alingi ete bato oyo bazali kokamba basaleli na ye báboya lipɛngwi. Hosea 5:1 elobi boye: “Bino [banganga-nzambe], bóyoka oyo, bóyokamela, ee ndako ya Yisalaele. Bóyoka mpe, ee ndako ya mokonzi, mpo ete likambo ekokatamela bino. Zambi bozalaki lokola motambo na Misipa mpe lokola [monyama] motandami na Tabolo.” Batambwisi oyo bapɛngwaki bazalaki motambo mpe monyama mpo na Bayisalaele, bazalaki kokanga bato na losambo ya bikeko. Ekoki mpenza kozala ete bazalaki kosala losambo ya lokuta na Ngomba Tabolo mpe na esika oyo babengi Misipa.
23. Matomba nini ozwi na boyekoli ya Hosea mokapo 1 tii 5?
23 Mikapo ya esakweli ya Hosea oyo totaleli emonisi biso ete Yehova azali Nzambe ya mawa oyo apesaka elikya mpe apambolaka baoyo balandaka mateya na ye mpe baboyaka lipɛngwi. Lokola Bayisalaele ya kala oyo babongolaki mitema, tiká tóluka Yehova mpe tósala ntango nyonso makasi mpo na kosepelisa ye. (Hosea 5:15) Na ndenge yango, tokobuka oyo ezali malamu mpe tokozala na esengo mpe na kimya ekokani na mosusu te oyo ezalaka na bato nyonso oyo batambolaka na bosembo elongo na Nzambe.—Nzembo 100:2; Bafilipi 4:6, 7.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bagalatia 4:21-26 elobeli mpe likambo moko oyo ezali elilingi ya likambo mosusu. Mpo na yango, talá buku Étude perspicace des Écritures, volimi 2, nkasa 677-678, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Okopesa eyano nini?
• Libala ya Hosea ná Gomele ezalaki elilingi ya nini?
• Mpo na nini Yehova alingaki kosambisa Yisalaele?
• Liteya nini esimbi motema na yo na Hosea mokapo 1 tii 5?
[Elilingi na lokasa 18]
Mwasi ya Hosea azali elilingi ya nini?
[Elilingi na lokasa 19]
Baasulia balongaki bato ya Samalia na mobu 740 L.T.B.
[Elilingi na lokasa 20]
Bato bazongaki na esengo na ekólo na bango