Malamu mingi na Jéhovah
“Malamu na yo ezali monene mingi mpenza; oyo yo obombeli baoyo bakobangaka yo!”—NZEMBO 31;19, MN.
1, 2. (a) Mosala nini monene Jéhovah asalaki yango na ntango na kalakala? (b) lolenge nini Jéhovah alobeli mbuma ya mosala na ye na kozalisa?
NA ELEKO moko, Nzambe azalisaki ‘makolo, kiti na ye, mpe mabelé, etyelo na makolo na ye.’ (Yisaya 66:1) Lisoló na bonzambe liyebisi te soki yango esalemaki ntango nini. Elobi bobele ete: “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mokili.” (Genese 1:1) Eleko yango emonaki kozalisama ya bamilió na bamilio ya ba galaxies, mingi kati na yango etondani na bamiliare na bamiliare na minzoto. Pene na nsuka ya moko na ba galaxies yango, ezalaki na monzoto moko na kongenga makasi oyo mwa bitando mingi ya mike mpenza mpe ya molili ezalaki kobalukabaluka zingazinga na yango. Moko na bitando yango ebengamaki mabelé. Na kotalela minzoto minene oyo mikongɛngaka makasi, mabelé ezalaki moke mpenza. Nzokande, Jéhovah asepelaki kosala na yango etyelo ya makolo na ye.
2 Bongo, Jéhovah atalisaki nguya na ye na kozalisa epai na mabelé. Lokola mosali na mayele, “Mobotami na liboso na biloko nyonso bizalisami” azalaki penepene na ye wana molili molongolamaki mpo na kobongisa mabelé na boumeli ya “mikolo” milai motoba ya kozalisa. Na elobeli ya elilingi, mabelé makómaki esika kitoko na bopemi mpo na makolo na Nzambe. (Bakolose 1:15; Exode 20:11; Masese 8:30) Ezali na esika oyo nde Nzambe akanaki kobimisa lolenge na bomoi na sika na mayele: moto. Mobali mpe mwasi ya liboso, baoyo bakelamaki uta na biloko bizwamaki na mabelé, batyamaki kati na esika moko kitoko, na paradis. (Genese 1:26, 27; 2:7, 8) Mbuma na mosala wana na kozalisama ezalaki mpenza ya kokoka, ya kitoko, na motindo boye ete na ntongo, elingi koloba na nsuka na mokolo na motoba, Nzambe ayebisaki mayoki na ye, ete: ’‘Nzambe atalaki biloko nyonso bisilaki ye kozalisa, mpe ezalaki malamu mingi.”—Genese 1:31.
Malamu na Nzambe
3. Biloko bizalisami bizali komonisa ezaleli kitoko nini na Nzambe?
3 Bambula mingi na nsima, mokitani moko ya babalani wana na yambo atyaki likebi na ye mpenza na eleko yango ya bozalisi mpe akomaki ete: “Mpo ete longwa na ntango wana ezalisaki ye mokili, makambo na ye mazangi komonana, yango nguya na ye [oyo na Nzambe ] na seko mpe bonzambe na ye, asili koyebisa yango polele na makanisi na bato kati na misala na ye.” (Baloma 1:20) Na yango, bonzengá ya mabelé mpe bikelamu oyo bafandi kati na yango emonisaki na kitoko mpenza bizaleli minene na Nzambe bizangi komonana, oyo moko na yango ezali bongo malamu mingi na ye. Tokangi bongo ntina oyo Nzambe alobaki ete biloko nyonso oyo ye akelaki, bizalaki malamu mingi.—Nzembo 31:19.
4, 5. Malamu ezali nini?
4 Malamu ezali motindo na motoba na mbuma na elimo na Nzambe, oyo ntóma Paulo alobeli na Bagalatia 5:22. Kala mingi te Mosenzeli eutaki kotalela mbuma mitano ya liboso ya elimo mpe emonisaki ntina ya kolona bizaleli na boklisto ya moto akomeli malamu.a Tosengeli te kobosana ezaleli oyo ete malamu. Tala ntina oyo tokotya likebi na biso na ezaleli oyo.
5 Malamu ezali nini? Ezali ezaleli na oyo ezali malamu. Eyokani na makambo na sembo. Ezali bongo ezalela oyo etaleli kosala makambo malamu, kozala moto malamu epai na bazalani. Ndenge nini tokoki komonisa ezaleli yango? Na komekoláká Jéhovah. Na yango, liboso na kotala lolenge oyo baklisto bakoki komonisa ezaleli na malamu, totalela naino malamu oyo Jéhovah, Nzambe na biso ya bolingo, amonisaki na kokokisáká bamposa na bato mpe kati na boyokani na ye elongo na bango.
Malamu mamonisami kati na biloko bizalisami
6. Eloko nini epusaki Jéhovah ete azalisa bikelamu mosusu ye bomoi na mayele?
6 Eloko nini mpenza epusaki Tata na biso ya likoló na kokabola esengo ya kozala na bomoi elongo na bikelamu na ye ya mayele? Ntóma Yoane apesi eyano oyo na motuna wana ete: “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Ya solo, ezali bolingo ezangi moimi nde epusaki Liziba monene na bomoi na kozalisa mitindo na bomoi mikeseni, kopesáká bamoko efandelo na likoló, mpe bamosusu awa na mabelé. Solo mpenza, toyebi makambo mingi te na ntina na likoló mpe bikelamu bifandi kuna. Bikelamu yango bizali bilimo bizangi komonana, mpe bizali na bomoi kati na bifandelo ya makoló. Kasi, tala zingazinga na yo, efandelo na mabelé oyo Jéhovah apesaki epai na bana na ye, bato. Mpe talela bato bango moko. Okomona mpenza elembo monene ya malamu na Nzambe.
7-9. Lolenge nini malamu na Nzambe ezali komonana na motindo oyo ye akelaki mabelé mpe moto oyo ye atyaki kati na yango?
7 Jéhovah apesaki bomoi epai na baboti na biso ya liboso. Mpe, asalaki lisusu ete bomoi yango ezala mpenza kitoko mingi. Ya liboso, azalisaki mabelé efandelo na bango, na ebongiseli moko ya kobalukaka mbula na mbula, na ebongiseli ya kopesa mwa moto mpe mwa malili mpe na mopepe oyo esengelaki mpenza mpo na yango. Atyaki mpe bibongiseli—ya kopesaka mai, oyo na mipepe mibengami ete azote mpe oxygène—mpo na bolamu mpe esengo ya kokoka epai na bato. Azipaki mabelé na nzeté mingi; mosusu ezalaki mpo na bilei ya moto, mpe mosusu ezalaki mpenzampenza mpo na kosepelisa miso. Atondisaki likoló na bandeke ya langi kitoko mpe bakoyemba nzembo kitoko. Asalaki ete mai monene matonda na mbisi mpe mabelé etonda na mitindo mingi na nyama minene oyo ekonungisaka, mosusu na zámba, mpe mosusu na mboka. Oyo nde bokabi monene mpenza! Oyo nde motema malamu na Nzambe!—Nzembo 104:24.
8 Sikawa, totalela lolenge oyo Nzambe asalaki moto. Maboko na ye mpe makolo na ye ekokani mpenzampenza na oyo azali na yango mposa mpo na kotelema kozanga kotengatenga mpe kosala misala na esengo nyonso. Lisusu, ebele na biloko bizwami na mabelé bizali kopesa ye bilei mpe biloko mosusu ya ntina. Na lolemo, Jéhovah atyaki biloko oyo bikookisaka elɛngi mpo ete kolya mpe komela ezala bobele myango mpo na kozwa makasi te, lokola na ntango oyo bakotambwisaka masini moko na kotyáká nsinga na yango na lontiliki to kurá. Te, moto akelamaki mpo ete aoka esengo na kolya mpe komela, mpamba te yango ezali te bobele mpo na kotondisa libumu na ye, kasi ekosepelisaka mpe lolemo na ye. jéhovah apesaki mpe matoi epai na moto mpe akelaki zingazinga na ye ebele na bikelamu oyo bikobimisaka mingóngó kitoko. Oyo nde esengo na koyoka makelele kitoko ya molúká, mongóngó ya ebengá to mpe koseka ya bébé moke! Ee, ezali mpo na malamu na Nzambe mpe atako makambo nyonso mabe oyo masili kosalema uta kozalisama, kozala na bomoi ezali ntango nyonso likambo na esengo.
9 Ezali boni mpo na biyokeli na biso misusu? Balangi boni kitoko mpe na ndenge na ndenge ezali kosepelisa miso na yo! Mpe esengo nini na kobenda nsolo kitoko ya fololo moko! Na yango, ezali likambo na kokamwa te ete, na ntina na Jéhovah, mokomi na nzembo alobaki na mongongo makasi ete: “Nakotonda yo mpo ete nasalami na motindo na kokamwa mingi!”—Nzembo 139:14.
Kokwea na moto mpe kosikolama na ye
10. Malamu na Nzambe ezali na bopusi nini likoló na bato mingi, mpe atako bongo, mpo na nini tokoki koloba ete bato yango bazwi ntango nyonso kozwa litomba na malamu yango?
10 Likambo na mawa, na nsima baboti na biso ya liboso bamonisaki botɔndi te epai na Nzambe mpo na malamu oyo amonisaki epai na bango. Na yango bazangaki botosi na mitinda na ye mpe babukaki mobeko bobele moko oyo apesaki bango. Mpo na yango, bango mpe bakitani na bango, bazwaki mawa, mpasi mpe liwa. (Genese 2: 16, 17; 3:16-19; Baloma 5:12) Na boumeli na bambula mingi oyo esili koleka uta likambo wana ya kozanga botosi lisalemaki, bato bazali sé komonisa kozanga kosepela mpe kozanga botɔndi mpo na malamu na Nzambe. Kasi, ata kozanga botɔndi mpe motema makasi na bango, bato yango bazali ntango nyonso kozwa litomba na malamu na Nzambe. Lolenge nini? Ntóma Paulo alimbolaki yango epai na bafandi ya Lusutula, na Asia ete: “Kasi [Nzambe ] azangi kotatola na ntina na ye mpenza te, mpo ete asali misala malamu mpe apesi bino mbula na likoló mpe bilaka na kobota mbuma mingi, mpe atondisi mitema na bino na biloko na kolya mpe na esengo.”—Misala 14:17.
11. Na ndimbola nini akoki koloba ete malamu na Nzambe esuki bobele te na efandelo kitoko oyo apesaki epai na bato?
11 Kasi, malamu na Nzambe esuki bobele te na biloko mingi kitoko oyo azali ntango nyonso kosopa yango na mabelé mpo na kobatela bomoi na bato. Te, kasi yango emonisami lisusu mingi koleka. Jéhovah amimonisaki pene na kolimbisa masumu ya bakitani na Adam mpe alandaki kozala na boyokani elongo na bato na sembo. Ayebisaki lolenge oyo na malamu na ye liboso na Moïse ntango alakaki ye ete ‘akolekisa nyonso ya malamu oyo azalaki na yango liboso na ye.’ Na nsima Moïse ayokaki maloba oyo: “Jéhovah, Jéhovah, Nzambe na motema mawa mpe na ngolu, akookaka nkanda noki te. Aleki na motema malamu mpe na solo. Akobatela motema malamu na ye mpo na nkɔto na nkɔto, mpe akolimbisaka mabe, kobuka mibeko mpe lisumu.”—Exode 33:19; 34:6, 7, MN.
12. Bibongiseli nini bizwamaki ma Mibeko na Moïse bimonisaki malamu na Jéhovah?
12 Na eleko na Moïse, mpo na bolamu ya libota na sika, Yisraele, Jéhovah atyaki ebongiseli na kosambisa oyo ezalaki kopesa nzela na baoyo babukaki mibeko na nkɔ te ete bazwa lilimbisi ya ntango moke to ya elilingi mpo na masumu na bango. Na nzela na kondimana na Mibeko oyo Moïse azalaki moyokanisi na yango, Bayisraele bakómaki libota liponamaki na Nzambe; Mibeko mizalaki kosenga na bango ete bapesa na Jéhovah mbeka ndenge na ndenge ya nyama oyo ekozipa masumu na bango mpe misala na bango ya mbindo. Na bongo, atako ezalela na bango ya kozanga kokoka, Bayisraele oyo babongolaki motema bakokaki kolanda koloba na Jéhovah, mpe bayebaki ete losambo na bango endimamaki epai na ye. Mokonzi Davidi, ye oyo azalaki moko na bato ya ekólo wana etambwisamaki na Mibeko, amonisaki ete ayebaki malamu na Nzambe kati na likambo oyo: “Kanisa masumu na bolenge na ngai te, tala bipengweli na ngai te; ɛ Jéhovah, mpo na boboto na yo, kanisa ngai; ɛ mpo na malamu na yo!”—Nzembo 25:7.
13. Mwango nini ya nguya koleka mbeka na nyama, Jéhovah asili kokamata mpo na lilimbisi ya masumu?
13 Na nsima, Jéhovah, kati na malamu na ye, apesaki mwango moko ya nguya mingi mpe ya libela mpo na kolimbisa masumu. Ezali bongo mbeka na Yesu, mokitani na mokonzi Davidi. (Matai 1:6-16; Luka 3:23-31) Yesu asalaki lisumu te. Yango wana bomoi na ye oyo apesaki lokola mbeka ezalaki na motuya monene. Nzambe andimaki mbeka yango lokola lisiko lipesami mpo na bato nyonso ya masumu, bakitani na Adam. Ntóma Paulo akomaki: “Bato banso basali lisumu mpe bazangi nkembo na Nzambe, nde batangami bayengebene lokola likabo mpo na ngolu na ye, na nzela na lisiko na Klisto Yesu. Nzambe atii ye lokola mbondi mpo na baoyo bazali kondima makila na ye.”—Baloma 3:23-26, MN.
14. Bilikya nini kitoko mbeka na lisiko na Klisto ezali kopesa epai na bato?
14 Kondima mbeka ya lisiko na Yesu ezali kopesa bolamu mingi epai na baklisto, koleka oyo mbeka na nyama ezalaki kopesa epai na Bayisraele, na nsé na Mibeko. Esili kopesa nzela na baklisto na kotangama bayengebene mpe na kobotama lisusu na nzela na elimo santu na Nzambe: basili bongo kokóma bana na Ye, elingi koloba bandeko na Yesu, mpe basili kozwa elikya na kosekwisama lokola bikelamu na elimo, mpo na kozala elongo na ye kati na Boyangeli na ye na likoló. (Luka 22:29, 30; Baloma 8:14-17) Kanisa naino moke! Nzambe apesi elikya yango ya likoló epai na bikelamu oyo bazali na bomoi awa na etando na biso moke! Ntalo moke na bato oyo bazali na elikya yango bazali naino awa na mabelé. Kasi kondima oyo bankoto mosusu na baklisto bazali na yango kati na lisiko ezali kopesa bango nzela na kolikya kosepela na oyo Adam mpe Eva babungisaki, bomoi na seko na mabelé oyo makokóma elanga kitoko, yango paradis ya mabelé. Kondimana na Mibeko yango moko ezalaki kopesa elikya moko te mpo na likoló to mpo na mabelé.
15. Nsango malamu ezali nini?
15 Nsango etali bibongiseli ya sika oyo Nzambe asili kokamata na nzela na Yesu Klisto ebongi kobéngama mpenza ete “nsango malamu,” mpamba te ezali komonisa malamu na Nzambe. (2 Timoté 1:9, 10) Kati na Biblia, nsango malamu ebengami mbala mosusu “nsango malamu na bokonzi.” Na eleko na biso, ezali kotalela mpenzampenza solo oyo ete Bokonzi esili kopesama na mabɔkɔ na Yesu oyo asilaki kosekwa. (Matai 24:14; Emoniseli 11:15; 14:6, 7) Nzokande, nsango malamu esuki wana te. Lokola Paulo amonisi yango kati na mokanda epai na Timoté oyo touti kolobela, nsango wana ezali mpe na boyokani na mbeka na lisiko oyo Yesu apesaki mpo na biso. Ezali mbeka wana nde ebongisi boyokani kati na biso mpe Nzambe, ete tozwa mpenza lobiko. Epesi lisusu nzela na kotyama na Bokonzi na Yesu mpe ba 144 000 banganga mpe mikonzi oyo bakamatami na mabelé. Lisiko ezali mpenza elembo ya malamu na Nzambe!
Malamu na Nzambe lelo
16, 17. Ndenge nini Hosea 3:5 ekokanaki (a) na mobu 537 liboso ya ntango na biso? (b) na 1919?
16 Na ntina na “mikolo na nsuka,” ntóma Paulo alobaki ete: “Bato bakozala . . . bayini na malamu.” (2 Timoté 3:1-3) Ata bizaleli na sembo oyo bisengeli, lokola bokabi mpe boyokani na baninga ya penepene, bizali mpenza kotyolama. Mpo na yango, esakweli na molende oyo ezwami na Hosea 3:5 ezali mpenza koyikisa mpiko: “Na nsima, bato na Yisraele bakozonga mpe bakoluka Jéhovah, Nzambe na bango, mpe Davidi mokonzi na bango; bakotósa Jéhovah mpe malamu na ye na mikolo na nsuka.”
17 Esakweli oyo ekokisamaki mpo na mbala ya yambo na mobu 537 liboso ya ntango na biso, wana Bayuda oyo bazalaki na boombo na Babilone bazongaki na Mabelé na ndaká. Na eleko na biso, kokokana na yango ebandaki na 1919, ntango batikali na Yisraele na elimo babimaki na lisangá ya Satana mpe babandaki koluka Jéhovah mpe malamu na ye, na motema na bango mobimba. Baklisto yango bayebaki ete “Davidi, mokonzi na bango,” Yesu Klisto azali koyangela kati na makoló uta 1914. Na kotambwisama na ye longwa na likoló, babandaki na molende nyonso kosakola nsango malamu yango na mabota. Na bongo babandaki kokokisa mokumba oyo molobelami kati na Matai 24:14, ete: “Mpe nsango malamu oyo na bokonzi [bosili kosalema ] ekosakolama na mokili lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.”
18. Batikali na Yisraele ya elimo bazali kosakola nsango malamu elongo na banani?
18 Lelo, “ebele monene” bazali kosala elongo na batikali na baklisto bapakolami, mpe bango lokola, bazali koloba mpo na malamu na Jéhovah. (Emoniseli 7:9) Na yango, bato koleka milió minei, bazali kosakola na mabota nyonso mpo na koyokisa maloba na anzelu na emonaneli oyo ntóma Yoane azwaki, ete: “Bobanga Nzambe mpe bopesa ye nkembo, mpo ete ntango na kosambisa na ye eyei. Bosambela ye oyo asalaki likoló, na nse, na mai monene, na mitó na mai.”—Emoniseli 14:7.
19. Tanga moko na bilembo minene ya malamu na Nzambe.
19 Moko na bilembo minene ya malamu na Nzambe ezwami kati na likambo oyo ete apesi biso nzela ete tozala basalani elongo na ye kati na mosala oyo ya ntina mingi. Oyo nde lokumu na kopesamela “nsango malamu na nkembo na Nzambe na [esengo]”! (1 Timoté 1:11) Na kosakoláká yango mpe na kolakisáká yango epai na bazalani na biso, tozali mpenza komonisa mbuma wana ya elimo na Nzambe na ntina mingi ete, malamu. Tozali bongo na elimo motindo moko na Davidi, mosaleli na Nzambe na ntango na kala, oyo alobaki ete: “Bakosakola lokumu na malamu monene na yo mpe bakoyemba na esengo boyengebene na yo.”—Nzembo 145:7.
20. Makambo nini mosusu matali ezaleli na malamu makotalelama na lisolo lilandi?
20 Kasi, bobele kosakola nsango malamu nde ezali motindo bobele moko oyo mosengeli mpo na komonisa ezaleli na malamu kati na bomoi na biso? Te! Tolendisami na kozala “bamekoli na Nzambe, lokola bana balingami.” (Baefese 5:1) Malamu na Nzambe emonisami na mitindo ndenge na ndenge. Na yango, malamu na biso esengeli mpe kozala na bopusi likoló na makambo mingi ya bomoi na biso. Tokotalela mwa ndambo na yango kati na lisoló lilandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mitindo mikeseni ya mbuma na elimo mizali bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ mpe komikanga motema.
Bozongeli
◻ Lolenge nini biloko bizalisami bizali komonisa malamu na Nzambe?
◻ Bibongiseli nini Jéhovah asili kokamata mpo na kolimbisa masumu na bato babongoli motema?
◻ Na kokokana ya Hosea 3:5, ntango nini batikali bapakolami bazongaki epai na Jéhovah mpe epai na malamu na ye, mpe yango ebimisaki likambo nini?
◻ Na eleko na biso, nini ezali moko na bilembo minene ya malamu na Nzambe?
[Elilingi na lokasa 15]
Biloko bizalisami bizali komonisa malamu mingi na Nzambe
[Elilingi na lokasa 16]
Likambo oyo ete topesameli nzela na kosangana na mosala ya kosakola, ezali elembo monene ya malamu na Nzambe