Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Hosea
LOSAMBO ya solo elimwaki mpenza na bokonzi ya mabota zomi ya Yisalaele. Ntango Yeloboama II azalaki koyangela, Yisalaele ezalaki ekólo ya bozwi; kasi, nsima ya liwa na ye makambo ebongwanaki. Mobulu ekɔtaki mpe makambo ezalaki kotambola lisusu malamu te. Na kati ya bakonzi motoba oyo bayangelaki nsima na ye, minei babomamaki. (2 Mikonzi 14:29; 15:8-30; 17:1-6) Mosakoli Hosea asalaki mosala na ye na boumeli ya mbula 59, kobanda na mobu 804 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), elingi koloba tii na eleko wana ya mobulu.
Ndenge Yehova azalaki koyoka mpo na Yisalaele, ekólo oyo ekómaki motó makasi, emonisami na makambo oyo elekaki na libota ya mosakoli Hosea. Mokanda ya Hosea etɔndɔli mabe ya Yisalaele, elobeli bitumbu oyo Nzambe akatelaki yango mpe oyo akatelaki ekólo Yuda. Na mokanda na ye, Hosea akomi makambo yango nyonso na elobeli ya polele mpe asaleli maloba oyo ezali kosimba motema. Mokanda yango ezali na bomoi mpe na nguya mpamba te ezali na kati ya Liloba ya Nzambe oyo epemami.—Baebele 4:12.
“KENDÁ KOKAMATA MWASI YA PITE”
Yehova alobaki na Hosea boye: “Kendá kokamata mwasi ya pite.” (Hosea 1:2) Hosea atosaki, mpe abotaki mwana mobali na Gomele. Emonani ete bana mibale oyo mwasi yango abotaki na nsima bazalaki bana ya Hosea te. Bandimbola ya bankombo ya bana yango, Lo-luhama mpe Lo-ami, ezali komonisa ete Yehova alingaki lisusu koyokela Yisalaele mawa te mpe aboyaki bato yango oyo bazalaki sembo te.
Ndenge nini Yehova azalaki kotalela bato na ye oyo bazalaki batomboki? Alobaki na Hosea boye: “Kendá naino, kolingana na mwasi oyo alingani na mibali mpe oyo azali na pite, lokola [Yehova] azali kolingana na bato ya Yisalaele ata bango bakotalela banzambe mosusu.”—Hosea 3:1.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:1—Mpo na nini Hosea atángi bankombo ya bakonzi minei oyo bayangelaki Yuda na eleko oyo azalaki mosakoli, kasi atángi kaka nkombo ya mokonzi moko ya Yisalaele? Ezali mpo ete kaka bakonzi oyo bazalaki na libota ya Davidi nde bazalaki na lotomo ya koyangela libota oyo Nzambe aponaki. Bakonzi ya bokonzi ya Yisalaele bazalaki bakitani ya Davidi te, nzokande baoyo ya Yuda bazalaki bakitani ya Davidi.
1:2-9—Hosea azwaki mpenza mwasi ya pite? Ɛɛ, Hosea abalaki mwasi moko oyo na nsima asalaki ekobo. Mosakoli alobi eloko moko te oyo emonisi ete makambo oyo akomaki mpo na libala na ye ezalaki ndɔtɔ to emonaneli.
1:7—Ntango nini Nzambe ayokelaki ndako ya Yuda mawa mpe abikisaki yango? Yango esalemaki na mobu 732 L.T.B., na mikolo ya Mokonzi Hizikiya. Na ntango wana, Yehova atindaki anzelu na ye oyo, na butu moko mpamba, abomaki basoda 185 000 ya Asulia oyo bayaki kobundisa engumba Yelusaleme. (2 Mikonzi 19:34, 35) Na ndenge yango, Yehova abikisaki Yuda “na litimbo te to na mbeli te to na etumba te to na mbalata te to na bato na mbalata te,” kasi na nzela ya anzelu moko.
1:10, 11—Lokola bokonzi ya Yisalaele ekweaki na mobu 740 L.T.B., ndenge nini bana ya Yisalaele ‘bayanganisamaki’ na baoyo ya Yuda? Bato mingi ya bokonzi ya Yisalaele bakendaki na Yuda liboso ete bato ya Yuda bámemama na boombo na Babilone na mobu 607 L.T.B. (2 Ntango 11:13-17; 30:6-12, 18-20, 25) Ntango Bayuda oyo babimaki na boombo bazongaki na mokili na bango na mobu 537 L.T.B., bakitani ya bato ya bokonzi ya Yisalaele bazalaki kati na bato oyo bazongaki.—Ezela 2:70.
2:21-23—Yehova asakolaki likambo nini na maloba oyo: “Nakokona mpe [Yizelele] mpo na ngai moko kati na mokili. Nakoyokela [ye] mawa”? Mwana ya liboso oyo Hosea abotaki na Gomele nkombo na ye ezalaki Yizelele. (Hosea 1:2-4) Ndimbola ya nkombo yango ete “Nzambe akolona momboto,” ezali esakweli oyo emonisaki ete Yehova akoyanganisa batikali ya sembo na mobu 537 L.T.B. mpe akolona bango lokola momboto na Yuda. Mokili oyo ekotikala mpamba na boumeli ya mbula 70 ekobimisa lisusu milona, vinyo kitoko, mpe mafuta. Esakweli yango elobaki ete biloko wana kitoko ekosɛnga mabelé ebimisa vitamini mingi, mpe mabelé ekosɛnga likoló ete enɔkisa mbula. Na ngala na yango, likoló ekobondela Nzambe anɔkisa mbula. Nyonso wana ekosalema mpo na kokokisa bamposa ya bato oyo bakouta na boombo. Ntoma Paulo ná ntoma Petelo bamonisaki ete Hosea 2:23 ezalaki mpe esakweli ya koyanganisama ya batikali ya Yisalaele ya elimo.—Baloma 9:25, 26; 1 Petelo 2:10.
Mateya mpo na biso:
1:2-9; 3:1, 2. Kanisá likambo ya mpasi oyo mosakoli Hosea andimaki ya kotikala na mwasi oyo asalaki ekobo, kaka mpo na kotosa etinda ya Nzambe! Ezali boni mpo na biso? Tokoki nde kondima komipimela makambo mosusu kaka mpo na kosala mokano ya Nzambe?
1:6-9. Yehova ayinaka ekobo ezala na mosuni to na elimo.
1:7, 10, 11; 2:14-23. Makambo oyo Yehova asakolaki mpo na Yisalaele mpe mpo na Yuda ekokisamaki. Maloba ya Yehova ezangaka kokokisama te.
2:16, 19, 21-23; 3:1-4. Yehova alimbisaka baoyo babongoli mpenza motema. (Nehemia 9:17) Lokola Yehova, tosengeli kozala na motema mawa mpe kolimbisaka basusu.
“YEHOVA AZALI NA LIKAMBO”
“[Yehova] azali na likambo epai ya bafandi ya mokili.” Mpo na nini? Mpamba te “solo ezali te, boboto ezali te, boyebi ya Nzambe ezali mpe kati na mokili te.” (Hosea 4:1) Bato ya Yisalaele oyo bazalaki batomboki bamipesaki na lokuta, bazalaki kosopa makila mpe kosala ekobo na elimo mpe na mosuni. Na esika báluka lisalisi ya Nzambe, ‘babengaki epai ya Ezipito, bakendaki epai ya Asulia.’—Hosea 7:11.
Yehova ayebisaki etumbu oyo asengelaki kopesa bango; alobaki boye: “Yisalaele amɛlami.” (Hosea 8:8) Bato ya ekólo Yuda mpe bazalaki kosala mabe. Hosea 12:2 elobi boye: “[Yehova] azali na likambo epai ya Yuda, akopesa Yakobo etumbu pelamoko nzela na ye; akofuta ye pelamoko misala na ye.” Atako bongo, bikólo yango esengelaki kobebisama mpo na libela te, mpamba te Nzambe alakaki boye: “Nakosikola bango na lobɔkɔ ya sheole; Nakobikisa bango na liwa.”—Hosea 13:14, NW.
Biyano na mituna ya Biblia:
6:1-3—Nani alobaki maloba oyo: “Yaká tóbutwa epai ya [Yehova]”? Mbala mosusu ezalaki Bayisalaele oyo batikalaki sembo te nde bazalaki kolendisana ete bázonga epai ya Yehova. Soki ezali bango, boye bazalaki kokosana kobongola motema. Boyengebene na bango ezalaki lokola “londende ya ntɔngɔ, lokola mamwɛ oyo ekolimwa mbangumbangu.” (Hosea 6:4) Mbala mosusu mpe ezalaki Hosea ye moko nde azalaki kobondela bato bázonga epai ya Yehova. Ata soki ezalaki nani, bato ya bokonzi ya mabota zomi oyo bakómaki batomboki basengelaki kobongola motema na ndenge ya solo mpe kozonga epai ya Yehova.
7:4—Na ndenge nini Bayisalaele oyo bazalaki kosala ekobo bazalaki lokola “etumbelo oyo etyami mɔtɔ”? Yango ezalaki maloba ya elilingi mpo na komonisa ndenge oyo mposa mabe ezalaki makasi na mitema na bango.
Mateya mpo na biso:
4:1, 6. Soki tolingi ete Yehova andima biso ntango nyonso, tosengeli kokoba kozwa boyebi na ye mpe kosalela makambo oyo tozali koyekola.
4:9-13. Baoyo bazali kosala pite mpe ekobo mpe baoyo bazali kosangana na losambo ya lokuta bakozongisa monɔkɔ epai ya Yehova.—Hosea 1:4.
5:1 (NW). Baoyo bazali kokamba lisangá ya Nzambe basengeli mpenza koboya lipɛngwi. Soki te bakobenda basaleli mosusu ya Yehova na losambo ya lokuta mpe na bongo, bakokóma ‘motambo mpe monyama’ mpo na bango.
6:1-4; 7:14, 16. Kobongola motema na maloba mpamba ezali lokuta mpe ezali na ntina te. Soki moto oyo asali mabe alingi ete Nzambe ayokela ye mawa, asengeli kobongola mpenza motema mpe kozonga na eloko “oyo eleki likoló,” elingi koloba na losambo ya solo. Asengeli kosala makambo oyo eyokani na mitinda ya sembo ya Nzambe.—Hosea 7:16, NW.
6:6. Moto oyo azali na momeseno ya kosala masumu amonisaka ete azali sembo te epai ya Nzambe. Ata soki abomi nzoto na mosala ya Nzambe yango ekoki te kozipa mabe na ye.
8:7, 13; 10:13. Maloba oyo ete “nyonso oyo moto akolona, yango nde akobuka” ekokisamaki epai ya Bayisalaele oyo bazalaki kosala ekobo.—Bagalatia 6:7.
8:8; 9:17; 13:16. Makambo oyo esakolamaki mpo na bokonzi ya Yisalaele ekokisamaki ntango Baasulia bazwaki Samalia, mboka-mokonzi na yango. (2 Mikonzi 17:3-6) Tosengeli kozala na elikya ete Nzambe akosala makambo oyo asili koloba mpe akokokisa yango.—Mituya 23:19.
8:14. Ndenge Yehova alakaki, atindaki “mɔtɔ likoló ya [bingumba ya Yuda]” na mobu 607 L.T.B. na nzela ya bato ya Babilone mpo na kobebisa Yelusaleme mpe Yuda. (2 Ntango 36:19) Liloba ya Nzambe ezangaka te kokokisama.—Yosua 23:14.
9:10. Bayisalaele bazalaki basaleli ya Nzambe ya solo, nzokande “bayaki na Baala-peolo, mpe bamibebisaki epai na nsɔni.” Ekozala malamu tózwa liteya na lisolo na bango mpe tókeba ete tóbosana te ndai na biso ya kosalela Yehova.—1 Bakolinti 10:11.
10:1, 2, 12 (NW). Tosengeli kosambela Nzambe na motema moko. Soki ‘tomikoneli na boyengebene, tokobuka na boyokani na motema-boboto ya Nzambe.’
10:5. Bete-awɛna (oyo elimboli “Ndako ya masumu”) ezali nkombo ya kotyola mpo na engumba Betele (oyo elimboli “Ndako ya Nzambe”). Ntango banguna bamemaki mwana-ngɔmbɛ ya Bete-awɛna na mboka na bango, bafandi ya Samalia balelaki ekeko oyo bazalaki kosambela. Ezali mpenza bozoba kotya elikya na ekeko oyo ekoki ata komibatela te!—Nzembo 135:15-18; Yilimia 10:3-5.
11:1-4. Yehova amoniselaka bato na ye bolingo ntango nyonso. Kotosa Nzambe ezalaka kilo te.
11:8-11; 13:14. Liloba ya Yehova oyo esakolaki kozongisama ya bato na ye na losambo ya solo ‘ezongaki epai na ye mpamba te.’ (Yisaya 55:11, NW) Na mobu 537 L.T.B., Bayisalaele balongwaki na boombo na Babilone mpe bazongaki na Yelusaleme. (Ezela 2:1; 3:1-3) Likambo nyonso oyo Yehova alobi na nzela ya basakoli na ye ezangaka kokokisama te.
12:6. Tosengeli kozala na ekateli makasi ya komonisa ntango nyonso motema-boboto, bosembo, mpe elikya epai ya Yehova.
13:6. Bayisalaele ‘batondisamaki, mpe motema na bango etombwamaki likoló; boye babosanaki Yehova.’ Tosengeli kokeba na elimo ya komitombola.
‘BANZELA YA YEHOVA EZALI SEMBO’
Hosea alobaki boye: “Ee Yisalaele, butwá epai na [Yehova], Nzambe na yo; mpo ete [obɛti] libaku mpo na mabe na yo.” Alendisaki bato báloba na Yehova boye: “Longolá mabe nyonso. Yambá oyo ezali malamu, boye tokopesaka mbuma na bibɛbu na biso.”—Hosea 14:1, 2.
Moto oyo asali lisumu mpe abongoli motema asengeli kozonga epai ya Yehova, kolanda banzela na ye, mpe kopesa ye mbeka ya masanzoli. Mpo na nini? Mpamba te “[ba]nzela ya [Yehova] ezali sembo mpe basembwi bakotambola na yango.” (Hosea 14:9) Tozali mpenza na esengo mpo bato mingi lisusu “bakotosa [Yehova] mpe malamu na ye na mikolo ya nsima”!—Hosea 3:5.
[Elilingi na lokasa 15]
Makambo oyo elekaki na libota ya Hosea emonisaki ndenge oyo Yehova azalaki kotalela Yisalaele
[Elilingi na lokasa 17]
Bokonzi ya Yisalaele esukaki ntango Samalia ebomamaki na mobu 740 L.T.B.