Tobosana mokolo ya Jéhovah te
“Mokolo ya Jéhovah mobɛɔlɛɔmi na lobwako na kokata likambo.”—YOELE 3:14.
1. Mpo na nini etumba mosantu ebɛlɛmi, oyo eyebisami na Jéhovah, ekokesena na bitumba “mosantu” ya bato?
“SAKOLA kati na mabota ete: ‘Bulisa etumba!’” (Yoele 3:9) Awa elobeli etumba mosantu? Soki tokanisi bitumba kati na bakatolike mpe bamusulmans, bitumba kati na mangomba mpe bitumba mibale ya mokili mobimba—kati na yango boklisto ya lokutá akokisaki mokumba monene—bobele likanisi oyo ete etumba “mosantu,” ekoki kolɛngisa biso. Nzokande, etumba mosantu oyo elobelami na esakweli na Yoele, ezali etumba kati na mabota te. Ezali te etumba oyo esalemi na nkombo ya mangomba, oyo ntina na yango mpenza euti na koyinana mpo na makambo matali kowela mabelé to bozwi. Ezali nde etumba ya sembo. Etumba ya Nzambe, oyo ekolongola lokoso, koswana, mabe mpe monyoko na mabelé. Etumba yango ekolongisa lotómo oyo Jéhovah azali na yango mpo na koyangela bikelamu na ye nyonso. Etumba yango ekopesa nzela ete Bokonzi na Klisto ekɔtisa bato na eleko ya Mbula Nkɔto ya kimya, ya bozwi mpe ya bolamu na molóngó mobimba, oyo eyebisamaki na basakoli na Nzambe.—Nzembo 37:9-11; Yisaya 65:17, 18; Emoniseli 20:6.
2, 3. (a) “Mokolo ya Jéhovah” oyo mosakolami na Yoele 3:14 ezali nini? (b) Mpo na nini mabota mabongi na oyo bakozwa na mokolo yango?
2 “Mokolo ya Jéhovah” mosakolami na Yoele 3:14, ezali nini? “Mawa mpo na mokolo yango! Mpo ete mokolo ya Jéhovah mobɛlɛmi, ezali koya lokola kobebisama euti na Mozwi-na-Nguya-Nyonso!” Mokolo yango mozali libebi mpo na likambo nini? Mwa liboso, mosakoli alimboli ete: “Bibele, bibele bazali na lobwako na kokata likambo; mpo ete mokolo ya Jéhovah mobɛlɛmi na lobwaku na kokata likambo.” (Yoele 1:15; 3:14) Ezali mokolo oyo Jéhovah akopesa etumbu na ye likoló na bibele na bato mabe baoyo bazali koboya kondima lotómo na ye ya koyangela likoló mpe mabelé. Jéhovah asili kokana kobebisa ebongiseli ya biloko na Satana oyo esili kokangisa bato uta bikeke mingi.—Yilimia 17:5-7; 25:31-33.
3 Ebongiseli mabe oyo ezali awa na mabelé ekozwa etumbu yango. Kasi ebongiseli oyo ya mokili mobimba ezali mpenza mabe? Mpo na kondima yango, esengeli kotala bobele makambo oyo mazali kosalema. Na Matai 7:16 (MN), Yesu apesi lilako oyo ete: “Bokoyeba bango na mbuma na bango.” Ezali nde komonana te ete bingumba minene ya mokili, bizali bisika epai bakomelaka drogue, bakosalaka mabe, koboma, mobulu mpe kobebisa mopepe mpe mai? Na mikili mingi, bonsomi oyo bauti kozwa bobebisami mpo na mobulu na makambo ya politike, mpo na kozanga bilei mpe mpo na bobólá. Bato koleka miliare moko bazali kolya malamu te. Lisusu, maladi ya SIDA oyo epalangani na nzela na bantonga esalelami na drogue mpe pite, ezali kolongola bilikya na bato mingi na mokili. Mingi mpenza uta Etumba ya Liboso ya mokili ebimaki na 1914, bomoi ya bato esili kobeba na makambo nyonso kati na mokili mobimba.—Tala 2 Timoté 3:1-5.
4. Ntembe nini Jéhovah abɛtɛli mabota?
4 Nzokande, Jéhovah azali koyanganisa libota moko longwa na bikólo nyonso, oyo ezali na esengo ya kozwa malako na ntina na banzela na ye mpe kotambola kati na yango. Kati na mokili mobimba, libota yango lisili kotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, kotikáká bongo etamboli ya mobulu ya mokili. (Yisaya 2:2-4) Ya solo, mipanga mitulami ete mizala bitimweli! Kasi yango ekeseni te na oyo Jéhovah asɛngi ete esakolama na Yoele 3:9, 10? Totangi kati na mokapo oyo ete: “Sakola kati na mabota ete: ‘Bulisa etumba! Lamwisa mibali na nguya! Tika ete babɛlɛma! Tika ete mibali nyonso na etumba babuta! Botula bitimweli na bino ete bizala mipanga, mpe bikateli na bino na matiti ete bizala makɔnga.’” Awa, Jéhovah azali kobɛtɛla bakonzi ya mokili ntembe ete bamema nguya na bango nyonso mpo na kobunda na Armagedon. Kasi bakoki kolónga ye te! Bakokwea mpenza kokwa.—Emoniseli 16:16.
5. Makambo nini makobima wana “vinyo ya mokili” ekobukama?
5 Kobɛtáká ntembe na Jéhovah, Moyangeli Aleki monene, bakonzi na nguya ya mokili basili kosala bibómbelo na bibundeli na nsɔmɔ, kasi ezali bobele mpamba. Na Yoele 3:13, Jéhovah apesi etinda oyo ete: “Bokɔtisa likwangola, mpo ete ntango na kobuka ekoki. Boingela, bokita na nsé, mpo ete ekamwelo na vinyo etondi. Bibómbelo bitondi mpe bizali koleka, mpo ete mabe na bango mazali monene mingi.” Maloba oyo mazongelamaki lisusu na Emoniseli 14:18-20, epai anzelu moko amemi likwangola lipɛli mingi, azwi etinda euti na Yesu, Mokonzi na Masiya, ete: “Buká mitó na vinyo ya mokili, mpo ete mbuma na yango esili kotɛla.” Anzelu akɔtisi likwangola na ye mpe abwaki mabota wana batomboki “kati na ekamwelo monene na nkanda na Nzambe.” Na elobeli ya elilingi, makila mazali kobima na ekamwelo mpe bozindo na yango kino minoko ya mpunda, na ntáka ya setade 1 600, soko bakilometele 300! Oyo nde likambo na nsɔmɔ lizali liboso na mabota oyo bazali kokumisa Jéhovah te!
Ba citoyens oyo bakotósaka mibeko
6. Lolenge nini ba Témoins de Jéhovah bazali kotalela bikólo mpe bakonzi na bango?
6 Elingi koloba ete ba Témoins de Jéhovah batósaka bikólo mpe bakonzi na bango te? Ezali bongo te. Bazali nde kooka mawa mpo na mabe oyo moto nyonso akoki komona yango, mpe bazali kokebisa bazalani na bango ete mokolo oyo Jéhovah akokata likambo na ye mosili kobɛlɛma. Epai mosusu, na komikitisa nyonso, bazali kotósa etinda oyo ntóma Paulo apesaki na Baloma 13:1 (MN), ete: “Tika ete molimo nyonso etósa bakonzi baleki liboso.” Bazali kokumisa bakonzi yango na motindo mosengeli, kasi bazali kosambela bango te. Ba citoyens wana bakotósaka mibeko bazali kotósa mitinda ya Biblia na ntina na bosembo mpe bopɛto, bakolobaka solo mpe bazali kolakisa bizaleli malamu na etingya nyonso kati na mabota na bango. Bazali kosalisa bato mosusu ete bayeba lolenge nini bakoki kosala motindo moko. Bazali na kimya elongo na bato nyonso, bakotambolaka na balabala te mpo na mobulu mpe bakosanganaka na botomboki te. Ba Témoins de Jéhovah bazali kosala makasi ya kozala bandakisa malamu mpo na kotósa mibeko ya bakonzi baleki liboso, wana ezali bango kozela ete Mokonzi aleki likoló, Jéhovah Moyangeli Aleki monene atya kimya ya solo mpe boyangeli ya sembo.
Akokisi ekateli na ye
7, 8. (a) Motindo nini mabota makoningana mpe makozala na molili? (b) Na eleko na biso, nani amonisami na Yoele, mpe na kokesana na mokili mobimba, mapamboli nini bato yango bazali kozwa?
7 Na elobeli ya elilingi na kokamwa mpenza, Jéhovah azali kolanda komonisa lolenge oyo akokisi ekateli na ye, ete: “Moi mpe sanza ekozimana mpe minzoto na likoló mikongɛnga te. Jéhovah ye moko akongala longwa na siona, akobimisa mongóngo na ye longwa na Yelusaleme. Mpe Likoló mpe mabelé ekotɛtɛma; kasi Jéhovah akozala ekimelo mpo na libota na ye, mpe esika na makasi mpo na bana na Yisraele.” (Yoele 3:15, 16) Ezalela ya makambo ya bato oyo emonani lokola ete ezali kitoko mpe na malamu, ekobeba mpe ekokóma likámá: ebongiseli ya biloko ya mokili, oyo ezali kokabwana, ekotɛtɛma kino kolimwa, mpe kobomama lokola nde na koningana monene na mabelé.—Hagai 2:20-22.
8 Tosimba elaká na esengo oyo epesami awa. Jéhovah akozala ekimelo mpe esika na makasi mpo na libota na ye. Mpo na nini bongo? Mpo ete ezali bobele libota wana—libota ya mokili mobimba—oyo ezali koyanola na maloba oyo ya Jéhovah ete: “Bokoyeba ete ngai nazali Jéhovah, Nzambe na bino.” (Yoele 3:17) Lokola nkombo Yoele elimboli “Jéhovah azali Nzambe,” Yoele amonisi mpenza ba Témoins de Jéhovah bapakolami na elimo na eleko na biso, baoyo bazali kosakola boyangeli ya Jéhovah na molende nyonso (Tala Malaki 1:11.) Totalela maloba ya ebandeli ya esakweli na Yoele, mpe tokomona motindo nini yango esakolaki mosala ya libota na Nzambe na eleko na biso.
Lipata ya mayoyo
9, 10. (a) Bolózi nini bosakolami na Yoele? (b) Maloba nini ya esakweli na Yoele mazongelami na Emoniseli mpo na bolózi, mpe yango ezali na bopusi nini likoló na boklisto ya lokutá?
9 Toyoka sikawa “liloba na Jéhovah liyaki epai na Yoele”: “Boyoka oyo, bino mikóló! Bosembola litoi, bino bafandi nyonso na mokili! Likambo na lolenge oyo lizalaki nde na mikolo na bino to na mikolo ya batata na bino? Boyebisa bana na bino mpo na yango, tika ete bana na bino bayebisa mpe bana na bango, mpe bana na bango na libota mosusu. Biloko bitikami na mbinzó, liyoyo alei yango; mpe oyo liyoyo atikaki, liyoyo likopumbwaka te alei yango; mpe oyo etikami na liyoyo likopumbwaka te, liyoyo likobebisaka alei yango.”—Yoele 1:1-4.
10 Ezali kokokisama ya mosala moko monene, oyo ekotikala libela kati na makanisi na bato. Bituluku na banyama mike, moko nsima na mosusu, mingi mpenza mayoyo, ezali kobebisa mboka. Yango elimboli nini? Emoniseli 9:1-12 elobeli lisusu bolózi ya mayoyo oyo etindami na Jéhovah na litambwisi na “mokonzi, anzelu na libulu mozindo,” Yesu Klisto. Nkombo na ye oyo ete, Abadona (Liebele) mpe Apolyona (Greke), elimboli “Kobebisa” mpe “Mobebisi.” Mayoyo yango mamonisi batikali baklisto bapakolami baoyo, na mokolo na Nkolo oyo tozali kobika na yango, bazali kobima mpo na kobebisa bilielo na mpate na boklisto ya lokutá na kotondoláká mangomba nyonso ya lokutá, mpe na kosakoláká ete kobukanisa na Jéhovah esengeli koya likoló na mangomba yango.
11. Lisungi nini lizwami na mayoyo ya eleko na biso, mpe bazali mpenza kobundisa nani?
11 Emoniseli 9:13-21 elakisi ete bolózi ya mayoyo elandami na bolózi monene euti na ebele na batamboli na mpunda. Yango ezali komonana lelo, mpo ete mwa bankɔto na baklisto bapakolami baoyo batikali, bazali kozwa lisungi ya “bampate mosusu” koleka bamilió minei, baoyo bazali ebele na batamboli na mpunda elongo na bango. (Yoane 10:16) Basangani esika moko mpo na kosakola bikateli minene ya Jéhovah likoló na basambeli na bikeko ya boklisto ya lokutá mpe likoló na baoyo ‘baboi kobongola motema na koboma, na misala na bango ya bondoki, na pite, na moyibi.’ Bakonzi na mangomba ya katolike soko ya prostestá, baoyo bapesaki lisungi na bango na bitumba oyo bibomaki bato mingi na ekeke ya ntuku mibale, mpe basángó oyo bakosangisaka nzoto mibali na mibali mpe basakoli mabe ya televizio, batangami mpe kati na baoyo batalelami na nsango ya kosambisama oyo.
12. Mpo na nini bakonzi na boklisto ya lokutá babongi kozwa nsango ya kosambisama, mpe nini ekokómela bango mosika te, elongo na basangani nyonso ya Babilone Monene?
12 Bakonzi mabe wana ya mangomba bazali koyoka likebisi ya Jéhovah, ete: “Bolamuka, bino balangwi masanga mpe bolela. Bino bameli na vinyo, bongánga mpo na vinyo na sika, mpo ete elongolami na minoko na bino.” (Yoele 1:5) Na ekeke ya ntuku mibale, mangomba na boklisto ya lokutá basili kozipa miso na mabe ya mokili mpo na bizaleli ya pɛto bizwami kati na Liloba na Nzambe. Mangomba ya lokutá mpe bandimi na bango basepelaki kolanda banzela ya mokili, kasi bazwi maladi makasi na elimo mpe na mosuni. Engebene Emoniseli 17:16, 17, mosika te, “likanisi” na Nzambe likozala ete banguya ya politike etɛmɛla Babilone Monene, lisangá ya mangomba nyonso ya lokutá mpe eboma yango. Bobele na ntango wana nde mangomba ya lokutá ‘bakolamuka’ na mpongi ya molangwa na bango, wana bakomona kokokana ya ekateli ya Jéhovah likoló na bato.
“Libota monene mpe na nguya”
13. Na likambo nini lipata ya mayoyo limonani ete lizali ‘monene mpe na nguya’ koleka boklisto ya lokutá?
13 Mosakoli ya Jéhovah abéngi lisusu lipata ya mayoyo ete “libota monene mpe na nguya,” mpe ezali bongo nde Babilone Monene ezali komona bango. (Yoele 2:2) Na ndakisa, bakonzi na bango ya mangomba bazali kooka mawa na likambo oyo ete mangomba na boklisto ya lokutá balongaki kobongola bato mingi te oyo bazalaki kosambela Buda na mboka Japon. Nzokande, lelo oyo, ba Témoins de Jéhovah 160 000 ya Japon bazali na mboka wana mpe bazali kotambwisa boyokeli na Biblia na moto mokomoko kati na mabota koleka 200 000. Na ltalia, ba Témoins de Jéhovah 180 000 bazali sikawa lingomba ya mibale nsima na katolike mpo na motuya ya bandimi. Bakonzi na lingomba ya katolike ya ltalia bamilelaki bobele mpamba na ntina na likambo oyo ete, na mbula moko, ba Témoins de Jéhovah bazali kozwa ‘soko bandimi 10 000’ longwa na lingomba na bango.a Batemwe bazali koyamba bato yango na esengo.—Yisaya 60:8, 22.
14, 15. Lolenge nini Yoele amonisi lipata ya mayoyo, mpe motindo nini makambo yango mazali kokokana na eleko na biso?
14 Na ntina na lipata ya mayoyo lisalami na Batemwe bapakolami, totangi na Yoele 2:7-9 (MN), ete: “Bazali kopota mbangu lokola bato na etumba, bazali kobuta likoló na mapango lokola basodá. Moto na moto azali kotambola na nzela na ye, mpe bakolongwaka na milongó na bango te. Bazali kotindikana te. Bazali kotambola lokola mibali na etumba; mpe soko bamoko batɛbɛlami likonga, basusu bakotelemaka te. Bakosopanaka kati na mboka. Bazali kopota mbango likoló na lopango; bakobutaka likoló na ndako, bakokɔtaka na maninisa lokola moyibi.”
15 Oyo nde maloba na kokamwa mamonisi limpinga na “mayoyo” mapakolami, baoyo basangani lelo na bato koleka bamilió minei, bango bampate mosusu! “Lopango” moko te oyo ezali elilingi ya botɛmɛli ya mangomba, ekoki kopekisa bango. Na molende nyonso, bazali kolanda “kotambola na botósi kati na nzela yango,” wana ezali bango kokokisa mosala ya kosakola epai na bato nyonso mpe misala misusu ya boklisto. (Tala Bafilipi 3:16, MN.) Na esika na kolɛmba, bandimaki kokufa lokola bankɔto mingi na Batemwe oyo ‘babomamaki na makɔnga’ mpo ete baboyaki kopesa losako epai na Hitler, mokatolike, kati na boyangeli ya nazi na Allemagne. Lipata ya mayoyo esili kopesa litatoli mozindo kati na “mboka” oyo ezali bongo boklisto ya lokutá; balóngi bipekiseli nyonso mpe bakokɔtaka lokola miyibi kati na bandako, mpo na kokabola ebele na mikanda mikolimbolaka Biblia kati na mosala na bango ya ndako na ndako. Litatoli wana lipesami na mokano na Jéhovah, mpe nguya moko te ekoki kotɛɔmɛɔla yango na likoló, to mpe na mabelé.—Yisaya 55:11.
“Batondi na elimo santu”
16, 17. (a) Ntango nini maloba na Yoele 2:28, 29 mazwaki kokokana na yango monene? (b) Maloba nini na esakweli na Yoele oyo makokanaki nyonso te na ekeke ya liboso?
16 Jéhovah alobi na Batemwe na ye ete: “Bokoyeba ete ngai nazali kati na Yisraele [ya elimo], mpe nazali Jéhovah, Nzambe na bino, mpe mosusu azali te.” (Yoele 2:27) Libota ya Jéhovah bakangaki ntina ya likambo oyo kitoko na ntango babandaki kokokisa maloba oyo mazwami na Yoele 2:28, 29 (MN), ete: “Na ntango ekoya, nakosopa elimo na ngai likoló na motindo na bato nyonso, mpe bana mibali na bino mpenza mpe bana basi na bino bakosakola.” Ezali yango nde esalemaki na Pantɛkɔte ya mobu 33, na ntango bayekoli na Yesu bapakolamaki wana bayanganaki mpe ete “bango nyonso batondaki na elimo santu.” Na nguya ya elimo santu, basakolaki mpe, na mokolo yango, “bato soko nkɔto misato babakisamaki.”—Misala 2:4, 16, 17, 41.
17 Na libaku wana ya esengo, Petelo atangaki maloba na Yoele 2:30-32, ete: “Nakopesa bilembo na makoló mpe na mabelé, makila mpe mɔ́tɔ, mpe kobuta na molinga. Moi mokobongwana molili, mpe sanza ekobongwana makila liboso na koya na mokolo na Jéhovah, mokolo monene mpe na nsɔmɔ. Mpe moto na moto oyo akobelela nkombo na Jéhovah akobika.” Maloba oyo makokanaki na etando moke na ntango Yelusaleme ebebisamaki na mobu 70 ya ntango na biso.
18. Ntango nini kokokana eleki monene na Yoele 2:28, 29 ebandaki kosalema?
18 Nzokande, Yoele 2:28-32 esengelaki kokokana lisusu. Ya solo mpenza, esakweli yango ezwaki kokokana na yango monene uta septembre ya mobu 1919. Na eleko yango, assemblée monene ya libota na Jéhovah esalemaki na Cédar Point, na Etats-Unis. Elimo na Nzambe emonanaki mpenza, mpe basaleli na Ye bapakolami bapusamaki na kopesa litatoli na mokili mobimba oyo ezali kosalema kino lelo oyo. Oyo nde bokóli monene bozwami na mosala yango! Longwa na bato koleka 7 000 baoyo bazalaki na assemblée ya Cédar Point, tokómi na bato 10 650 158 baoyo bayanganaki na Ekaniseli ya liwa na Yesu, na mokolo ya 30 mars 1991. Kati na bayangani, bobele bato 8 850 nde balobaki ete bazali baklisto bapakolami. Oyo nde esengo monene mpo na bapakolami nyonso wana na ntango bamonaki mbuma oyo ebimisami na mokili mobimba na elimo na Jéhovah oyo ekolendisaka!—Yisaya 40:29, 31.
19. Lolenge nini moko un moko kati na biso asengeli kotambola, awa mokolo ya Jéhovah mobɛlɛmi?
19 Mosika te “mokolo ya Jéhovah, mokolo monene mpe na nsɔmɔ” ekoya, mokolo oyo mokobebisa ebongiseli ya biloko na Satana. (Yoele 2:31) Likambo ya esengo mpenza, “moto na moto oyo akobelela nkombo na Jéhovah akobika.” (Misala 2:21) Lolenge nini? Ntóma Petelo alobi na biso ete “mokolo ya Jéhovah mokoya lokola moyibi,” mpe abakisi ete: “Awa biloko binso bisengeli kobebisama, ebongi na bino kozala bato ya lolenge nini na etamboli ya bulee mpe na ezaleli ya kobanga Nzambe, wana ezali bino kozela na kozanga kobosana koya ya mokolo na Jéhovah.” Kozanga kobosana ete mokolo ya Jéhovah mobɛlɛmi, tokozala lisusu na esengo ya komona kokokana ya elaká na Jéhovah na ntina na “makoló na sika mpe mabelé na sika” ya boyengebene.—2 Petelo 3:10-13, MN.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Zulunalo La Republica, Loma, 12 novembre 1985, mpe zulunalo La rivista del clero italiano, mai 1985.
Bozongeli
◻ “Mokolo ya Jéhovah” ezali nini?
◻ Lolenge nini ‘vinyo ya mokili’ ekobukama, mpe mpo na nini?
◻ Na ndimbola nini bolózi moko ya mayoyo bozali konyokola boklisto ya lokutá uta 1919?
◻ Lolenge nini elimo yo Jéhovah esopanaki likoló na libota na ye na mobu 33, mpe nsima, na 1919?