Mokapo 10
Salá nyonso mpo libota na yo esepelisa Nzambe
1. Mpo na nini Batatoli ya Yehova mingi bazalaka na bomoi ya malamu na libota?
BATATOLI YA YEHOVA bayebani ete bazalaka na bomoi ya esengo na libota. Bryan Wilson, profɛsɛrɛ moko na iniversite ya Oxford, akomaki boye: “Batatoli bapesaka batoli oyo ebongi na makambo ndenge na ndenge . . . libala, bizaleli ya malamu, kobɔkɔla bana, mpe makambo mosusu. [Ba]salisaka mingi na nzela ya batoli kitoko oyo eutaka na Makomami Mosantu mpe ekómá kosalelama na bomoi.” Na ntembe te, oyekoli makambo mingi na Liloba ya Nzambe na oyo etali kozala na bomoi ya malamu na libota.
2. (a) Makambo nini omoni na mabota mingi lelo oyo? (b) Mikanda nini ya Biblia tokotalela mpo na kozwa mateya na oyo etali bomoi ya libota?
2 Lokola mokolo ya Yehova ezali kokóma pene, Satana azali mpenza kobimisela mabota manzaka. Yango wana, bato mingi bazali kotyela lisusu bato ya mabota na bango motema te kaka ndenge ezalaki na mikolo ya Mika. Akomaki boye: “Kondimela moninga te. . . . Batelá maloba ya monɔkɔ na yo liboso ya mwasi oyo azali kolala na ntolo na yo. Mpo mwana mobali azali kotyola tata; mwana mwasi azali kotombokela mama na ye; mpe mwasi ya mwana azali kotombokela bokilo na ye; banguna ya moto bazali bato ya ndako na ye.” (Mika 7:5, 6) Ozali na mokili oyo bomoi ya libota ezali kobeba se kobeba, atako bongo, ozali kosala nyonso mpo elimo yango ebebisa libota na yo te. Yango wana, bomoi ya libota na yo ekómi lisusu malamu koleka, mpe ezali kosepelisa Nzambe mingi. Na ntembe te, osalelaki mikapo lokola Kolimbola Mibeko 6:5-9; Baefese 5:22–6:4; mpe Bakolose 3:18-21. Kasi, ekómelá yo okanisa ete mikanda ya basakoli 12 ekoki kozala na batoli mpo na kozala na bomoi ya esengo na libota? Na mokapo oyo, tokotalela mwa bandakisa ya toli ya ndenge wana oyo ezali na mikanda yango. Kasi, kosuka te na kotalela kaka bandakisa wana mpamba. Luká kososola na nzela ya bandakisa yango mpo omona mateya mosusu oyo okoki kozwa na mikanda yango. Na nsuka ya mokapo oyo, bavɛrsɛ mosusu etángami oyo ekosalisa yo oyeba ndenge ya kozwa mateya na mikanda yango 12.
“YE AYINI KOBOMA LIBALA”
3, 4. (a) Ndenge nini bato mingi lelo oyo balukaka kosilisa mikakatano ya libala? (b) Likambo nini ya mabe etali libala ezalaki na mikolo ya Malaki?
3 Likambo ya libosoliboso oyo ebongi tótalela ezali ekanganeli oyo esangisaka mobali mpe mwasi. Kaka mikolo oyo nde bato bakómi komona ete koboma libala nde ezali nzela mpo na kosilisa mikakatano na libala. Na ekeke ya 19 na Angleterre, koboma libala ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te mpo ezalaki kosɛnga ete Parlema nde ezwa ekateli. Likambo yango ezalaki kobatela mabota ekabwana te. Kasi, lelo oyo makambo ebongwani. Buku moko, (Encyclopædia Britannica) elobi boye: “Kobanda Etumba ya mibale ya mokili mobimba, na mikili mingi motángo ya mabala oyo ezali kokufa ebakisami mpenza. . . . Ndenge ya kotalela likambo ya koboma libala mpe ebongwani makasi . . . bakómi kopesa nzela na likambo yango.” Koboma libala ekómi kosalema mingi ata na bikólo lokola Corée epai likambo yango ezalaki kondimama te, eleki sikoyo bambula zomi. Lelo oyo, na bikólo mingi bato bakómi komona ete mwasi ná mobali bakoki koboma libala soki makambo ezali kotambola malamu te.
4 Na mikolo ya Malaki, na ekeke ya 5 L.T.B., Bayuda mingi bazalaki koboma mabala. Malaki alobaki na bango boye: “Yehova ye moko atatoli kati na yo ná mwasi ya bolenge na yo, oyo yo osaleli makambo na bokosi.” Lokola mibali mingi bazalaki komonisa bokosi, etumbelo ya Yehova etondaki na mpisoli “na kolela mpe na kokimela” ya basi oyo mibali na bango bazalaki kokosa bango. Mpe banganga-nzambe oyo babebaki bazalaki kokanga miso na ezaleli wana ya mabe!—Malaki 2:13, 14.
5. (a) Ndenge nini Yehova atalelaka koboma libala? (b) Mpo na nini kosalela molongani na yo bokosi ezali mabe mingi?
5 Ndenge nini Yehova atalelaki lolenge mabe oyo bato bazalaki kotalela libala na mikolo ya Malaki? Malaki akomaki boye: “‘Ye ayini koboma libala,’ Yehova Nzambe ya Yisraele alobi bongo.” Mpe amonisaki lisusu ete Yehova ‘abongwani te.’ (Malaki 2:16; 3:6) Okangi ntina ya bavɛrsɛ oyo? Nzambe amonisaki liboso ete aboyi mpenza likambo ya koboma libala. (Ebandeli 2:18, 24) Asalaki mpe bongo na ntango ya Malaki. Mpe lelo oyo abongwani te. Moto mosusu akoki kozwa ekateli ya kosundola molongani na ye kaka mpo azali kosepela na ye lisusu te. Atako motema na bango ekoki kokosa bango, Yehova alukalukaka na kati na yango. (Yirimia 17:9, 10) Amonaka bokosi to makanisi nyonso ya mabe oyo moto akani mpo na koboma libala, ata soki moto akoki koloba ndenge nini mpo na komilongisa. Ya solo, “biloko nyonso ezali bolumbu mpe ezali komonana polele na miso ya moto oyo tokozongisa monɔkɔ epai na ye.”—Baebre 4:13.
6. (a) Ndenge nini kozala na likanisi ya Yehova na likambo etali koboma libala ekoki kosalisa yo? (b) Toli nini Yesu apesaki na likambo ya koboma libala?
6 Ekoki kozala ete libala na yo ezali na mikakatano yango te, kasi ekozala malamu ozala na makanisi ya Yehova. Biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka, yango wana tosengeli kobosana te ete mikakatano mpe matata ekoki kobima na libala. Na yango, okokanisa ete koboma libala nde ekozala nzela mokuse mpo na kosilisa mikakatano? Ntango koswana eyei makasi, okobimisa likambo ya koboma libala na monɔkɔ na yo? Bato mingi bazalaka na likanisi yango, kasi likanisi ya Nzambe na oyo etali libala esɛngi ete bato básala nyonso ete libala na bango elonga. Kutu, Yesu Kristo alobaki kaka ntina moko oyo moto akoki koboma libala—pite, elingi koloba lolenge nyonso ya kosangisa nzoto na libándá ya libala. Atako bongo, likanisi nini ya ntina Yesu alingaki mpenza kolobela? Ayebisaki bato oyo bazalaki koyoka ye ete: “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.” Ya solo, Yesu amonisaki lisusu polele mobeko yango ya Yehova oyo ebongwani te, oyo Malaki alobelaki bambula soki 450 liboso.—Matai 19:3-9.
7. Na boyokani na toli oyo ezwami na mokanda ya Malaki, ndenge nini okoki kokoba kozala na libala ya malamu?
7 Kasi, ndenge nini bakristo bakoki kobatela libala na bango? Malaki apesaki sekele yango: “Bosengeli mpenza kokeba mpo na elimo na bino, mpe bosengeli kosala makambo na bokosi te.” (Malaki 2:16) Yango elingi koloba kokeba na makanisi nyonso ya mabe oyo ekoki koyela biso. Soki tozali ‘kokeba mpo na elimo na biso,’ tokotya miso te na moto oyo azali molongani na biso te. (Matai 5:28) Na ndakisa, ekozala boni soki tozali kosepela ete moto moko oyo azali molongani na biso te atyelaka biso likebi koleka ndelo to alobaka na biso maloba ya kolɛngola? Yango ekomonisa ete tozali kosɛnzɛla te na elimo. Na yango, liteya monene oyo tokoki kozwa na mikanda ya basakoli 12, oyo ekosalisa biso mpo tózala na libala ya malamu ezali ya kotya likebi na ‘elimo na biso.’
8, 9. Mpo na nini likambo ya Hosea mpe Gomere elobelami na Biblia?
8 Na ntembe te, ozali na ekateli ete libala na yo elonga. Atako bongo, elingi koloba te ete mikakatano ekozanga na libala. Ndenge nini okoki kosala soki mikakatano ebimi, mpe mingimingi soki okanisi ete molongani na yo nde azali na foti monene? Kobosana te makambo oyo mokapo 2 mpe 4 elobi na ntina na Hosea. Mwasi na ye Gomere, akómaki ‘mwasi oyo asalaki pite’ mpe na nsima akómaki ‘kolandalanda baoyo bazalaki kolula ye mingi.’ Na nsima, asundolamaki, akómaki mobola mpe moombo. Hosea asombaki Gomere na mabɔkɔ ya mobali oyo azwaki ye mpe azwaki etinda ya kolinga ye. Mpo na nini? Mpo na komonisa makambo oyo ezalaki koleka kati na Yehova mpe Bayisraele. Yehova azalaki “nkolo mpe mobali,” mpe bato na ye bakangamaki na ye lokola mwasi.—Hosea 1:2-9; 2:5-7; 3:1-5; Yirimia 3:14; Yisaya 62:4, 5.
9 Na ebandeli Bayisraele bapesaki Yehova mpasi na ndenge balandaki banzambe mosusu. (Kobima 32:7-10; Basambisi 8:33; 10:6; Nzembo 78:40, 41; Yisaya 63:10) Bokonzi ya mabota zomi ya nɔrdi ezalaki mpenza na ngambo ndenge bazalaki kosambela mwana-ngɔmbɛ. (1 Bakonzi 12:28-30) Lisusu, Bayisraele batyaki motema te epai ya Nkolo mpe Mobali na bango, Yehova, kasi bazalaki nde kotalela bato ya politiki oyo bazalaki kolula bango. Na ntango moko, lokola zɛbrɛ oyo ekómi na mposa makasi ya kosangisa nzoto, balandaki bato ya Asiri. (Hosea 8:9) Okoyoka ndenge nini soki molongani na yo asali bongo?
10, 11. Ndenge nini okoki komekola Yehova soki okutani na mokakatano moko na libala na yo oyo emonani ete molongani na yo nde azali na foti?
10 Na ntango ya Hosea, mbula koleka 700 elekaki kobanda ntango Bayisraele basalaki kondimana na Yehova. Kasi, Nzambe andimaki kolimbisa bango, soki bazongeli ye. Ekoki kozala ete Hosea abandaki kosakola liboso ya mobu 803 L.T.B., yango wana Yehova akobaki komonisela Bayisraele motema molai mbula koleka soki 60 mpe mbula soki 200 mpo na Bayuda! Yehova asalelaki makambo oyo ezalaki na libota ya Hosea lokola ndakisa, mpe asɛngaki na bato oyo asalaki na bango kondimana bábongola motema. Azalaki mpenza na lotomo ya kokata libala na Yisraele, kasi akobaki kotinda basakoli mpo na kosalisa mwasi na ye ya elilingi azonga ata soki likambo yango ekokaki kosɛnga ye nini.—Hosea 14:1, 2; Amose 2:11.
11 Soki okutani na mokakatano na libala na yo oyo emonani lokola ete molongani na yo nde azali na foti okosala lokola Yehova? Okozala moto ya liboso ya kosala milende mpo na kobongisa libala na yo ezala ndenge ezalaki liboso? (Bakolose 3:12, 13) Kosala bongo esɛngaka komikitisa. Oyo nde ndakisa kitoko Yehova atikaki na ndenge asalelaki Bayisraele makambo! (Nzembo 18:35; 113:5-8) Nzambe ‘alobaki na Bayisraele na ndenge ya kosimba motema,’ ata mpe kobondela bango. Biso bato ya kozanga kokoka, tosengeli te kolobaka na molongani na biso na ndenge ya kosimba motema, kosala makasi mpo na kosilisa mikakatano mpe kobosana mabunga? Likambo ya esengo, milende oyo Yehova asalaki ebimisaki matomba. Bato mosusu ya ekólo oyo batikalaki, bafungolaki mitema na bango ntango bazalaki na boombo na Babilone, mpe na nsima bazongaki na mboka na bango, babengaki Yehova “mobali na Ngai.”—Hosea 2:14-16.a
12. Ndenge nini kokanisa na lolenge oyo Yehova asalaki mpo na mwasi na ye ya elilingi ekoki komema litomba na libala na yo?
12 Soki mokakatano moko monene ebimi na libala na yo, milende oyo okosala mpo na kozongisa boyokani na molongani na yo ekoki mpenza kobota mbuma malamu. Nzambe andimaki kolimbisa ata lisumu monene ya pite ya elimo oyo mwasi na ye ya elilingi asalaki. Mikakatano mingi ya libala ya bakristo ya solo ekómaka tii kuna te. Mikakatano mingi ebandaka na maloba ya makasimakasi mpe ya kozokisa. Na yango, soki molongani na yo abimisi maloba oyo ezokisi yo, kanisá makambo oyo Hosea mpe Yehova bakutanaki na yango. (Masese 12:18) Yango ekoki kosalisa yo te olimbisa?
13. Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Yehova asɛngaki bato na ye oyo bazangaki botosi bábongola motema?
13 Ezali na likambo mosusu na lisolo oyo. Nzambe alingaki nde kozongisa boyokani na bato na ye atako bazalaki kokoba kosala pite? Nzambe ayebisaki Hosea na ntina na ekólo yango ya ekobo: “Asengeli kolongola pite na ye liboso na ye mpe misala na ye ya ekobo na katikati ya mabɛlɛ na ye.” (Hosea 2:2) Bato yango basengelaki kobongola motema ‘kosala misala oyo emonisi ete babongoli motema.’ (Matai 3:8) Na likambo yango, talelá naino mabunga na yo na esika ya kotala oyo ya molongani na yo. Soki osalelaki molongani na yo mabe, mpo na nini te kosɛnga mpenza bolimbisi mpe kobongola ezaleli na yo mpo na koluka kozongisa boyokani? Okomona ete molongani na yo akolimbisa yo.
“BANSINGA YA BOLINGO” —ESALISAKA MPO NA KOPESA DISIPLINI
14, 15. (a) Na kotalela Malaki 4:1, mpo na nini osengeli kozwa na lisɛki te mokumba ya koteya bana na yo? (b) Ndenge nini okoki kosalisa bana na yo bákóma na boyebi ya Yehova?
14 Na likambo etali bomoi ya libota, tokoki mpe koyekola makambo mingi na lolenge oyo Yehova asalelaki Bayisraele makambo ndenge emonisami na mikanda 12 ya basakoli. Mikanda yango ezali na makambo ya ntina mpo na ndenge ya kosalisa bana. Mpo na koloba solo, kobɔkɔla bana lelo oyo ezali pɛtɛɛ te. Baboti basengeli kozwa mokumba na bango na lisɛki te. Tozali kotánga boye: “‘Mokolo oyo ezali koya ekozikisa mpenza [bato],’ Yehova ya mampinga alobi bongo, ‘mpe yango ekotikela bango mosisa te, etape mpe te.’” (Malaki 4:1) Na mokolo yango ya kozongisa monɔkɔ, bana mike (bitape) bakomoniselama bosembo na kolanda ndenge oyo Yehova akotalela baboti na bango (misisa), oyo bazali na mokumba ya kokamba bana na bango oyo bazali mike. (Yisaya 37:31) Ndenge oyo baboti bazali komitambwisa lelo, ekokata soki bana na bango bakozala na bomoi ya malamu to te na mikolo ezali koya. (Hosea 13:16) Soki bino baboti (misisa) bozali kobatela etamboli ya malamu te liboso ya Yehova, nini ekokómela bana na bino (bitape) na mokolo ya nkanda na ye? (Sefania 1:14-18; Baefese 6:4; Bafilipi 2:12) Na maloba mosusu, milende mpenza oyo ozali kosala mpo ondimama na Nzambe ekoki komemela bana na yo litomba.—1 Bakorinti 7:14.
15 Nsima ya kotánga esakweli ya Yoele oyo elobelaki ntina ya kobelela nkombo ya Yehova, ntoma Paulo akomaki boye: “Ndenge nini bakobelela moto oyo bandimeli te? Mpe ndenge nini bakondimela moto oyo bayoki nsango na ye te?” (Baroma 10:14-17; Yoele 2:32) Paulo azalaki kolobela mosala na biso ya kosakola, kasi okoki mpe kosalela etinda yango mpo na koteya bana na yo. Ndenge nini bakoki kondimela Yehova kozanga ete báyoka nsango na ye? Olekisaka ntango mingi mokolo na mokolo mpo na koteya bana na yo ndenge oyo Yehova azali malamu, kosalisa bango bákolisa bolingo makasi mpo na ye mpe litambwisi na ye? Na ntembe te, bana bakokola malamu na elimo soki bazali koyoka ntango nyonso nsango ya Yehova na libota.—Kolimbola Mibeko 6:7-9.
16. Na boyokani na Mika 6:3-5, ndenge nini okoki komekola Yehova ntango ozali kopesa bana na yo disiplini?
16 Ntango bana bazali naino mike mpenza, ekoki kozala pɛtɛɛ komema bango na makita. Kasi, ntango bazali kokola, bakómaka mpe na lolenge na bango ya kotalela makambo. Okosala nini soki, ntango mosusu bakómi komonisa elimo ya kotomboka? Okoki kozwa liteya na mikanda ya basakoli 12, komona ndenge oyo Yehova asalaki mpo na Yisraele mpe Yuda. (Zekaria 7:11, 12) Na ndakisa, ntango ozali kotánga Mika 6:3-5, talelá ndenge oyo Yehova ayokaki. Bayisraele bazalaki kosala mabe; atako bongo, Nzambe abengaki bango “bato na ngai.” Abondelaki bango boye: “Ee bato na ngai, nabondeli bino, bókanisa.” Na esika apamela bango na maloba ya makasi, alukaki kosimba mitema na bango. Okoki komekola Yehova ata ntango ozali kopesa bana na yo disiplini? Ata soki basali mabe ya ndenge nini, kosalela bango te makambo lokola nde bazali bato mosusu, koloba na bango te maloba ya kotyola. Na esika ya komonisa kaka mabe oyo basali, bondelá bango na boboto. Tuná mituna oyo ekotinda bango bábimisa makanisi na bango. Salá makasi osimba mitema na bango mpo báloba mpenza ndenge oyo bazali koyoka.—Masese 20:5.
17, 18. (a) Nini esengeli kotinda yo opesaka bana na yo disiplini? (b) Ndenge nini okoki kobatela “bansinga ya bolingo” ná bana na yo?
17 Mpo na nini opesaka bana na yo disiplini? Baboti mosusu basalaka yango mpo balingaka te ete lokumu ya libota na bango ebeba. Yehova amonisaki ntina oyo apesaki disiplini, na maloba oyo: “Nalakisaki Efraime kotambola, nazwaki bango na mabɔkɔ na ngai; . . . Nazalaki kobenda bango na bansinga ya moto ya mabele, na bansinga ya bolingo.” (Hosea 11:3, 4) Na vɛrsɛ yango, Hosea akokanisi boyokani oyo ezalaki kati na Yehova mpe Yisraele na oyo ya tata ná mwana. Okoki komona na makanisi, tata moko ya bolingo azali kotambwisa mwana na ye na bansinga na mabɔkɔ, azali koluka kosalisa mwana na ye oyo azali koyekola kotambola? Bansinga ezali mpo na kosalisa mwana mpo akwea te, mpe ezongisaka ye na nzela soki alingi kokende mosika.—Yirimia 31:1-3.
18 Okomekola bolingo oyo Yehova amoniselaki Bayisraele? Mbala na mbala bazalaki kopesa ye mokɔngɔ, kasi azalaki nokinoki te kolongola bango bansinga yango ya bolingo. Bana bakoki ntango mosusu kobunga nzela mpe kokwea na makambo ya mikemike, kasi luká kobatela bansinga ya bolingo kati na yo mpe bango. Kobosana te ete Yehova akangaki miso te na mabe oyo bato na ye bazalaki kosala. Azalaki kosembola makambo na lolenge ya malamu, kopesa bango disiplini na bolingo, mpe kozwa ntango ya kopesa bango lisungi oyo basengelaki na yango. Soki omoni ete mwana na yo, mobali to mwasi abandi kosala lokola kotika nzela ya solo, kokanga miso na likambo yango te. Luká kozongisa bango na nzela, lokola nde ozali kokamba bango na bansinga, kosalisa bango na bolingo na ntango wana ya mikakatano. Moniselá bango motema molai. Kolekisa ntango elongo na bana na yo ezali mpenza na ntina!
19. Mpo na nini osengeli kobungisa elikya te na oyo etali bana na yo?
19 Hosea amonaki ete Bayisraele oyo batikalaki bakondima disiplini: “Bana ya Yisraele bakozonga mpe, ya solo, bakoluka Yehova Nzambe na bango mpe Davidi mokonzi na bango; mpe bakoya mpenza na kolɛnga epai ya Yehova mpe epai ya bolamu na ye na eleko ya nsuka ya mikolo.” (Hosea 3:5) Ya solo, disiplini oyo Nzambe apesaki esalisaki mpenza bato na ye oyo batikalaki. Ekozala mpe bongo mpo na bana na yo soki obungisi elikya te. Luká komona bizaleli na bango ya malamu. Zalá na boboto ntango ozali koloba na bango atako osengeli kokangama na mitinda ya Biblia. Ata soki mwana oyo abungaki nzela azali mpenza te koyoka toli sikoyo, nani ayebi ntango oyo makanisi ya malamu ekozongela ye?
KEBÁ NA BANINGA MABE!
20. Motuna nini etali kozala na baninga bilenge bakozwa eyano na mikanda 12 ya basakoli?
20 Liteya nini bino bilenge bokoki kozwa na mikanda ya basakoli 12? Ekoki kozala ete moko ya bavɛrsɛ oyo bolobelaka mingi ná baboti na bino ezali 1 Bakorinti 15:33, oyo elobeli koboya baninga mabe. Kasi, basusu kati na bino bakoki komituna boye: ‘Kasi, kozala baninga ya bato oyo basambelaka Yehova te ezali mpenza mabe?’ Okoki kozwa eyano na mikanda 12 ya basakoli.
21-23. (a) Liteya nini bilenge bakoki kozwa na likambo oyo bato ya Edome basalaki? (b) Banani bazali mpenza baninga na yo?
21 Atako mikanda 12 ya basakoli ekomamaki libosoliboso mpo na Bayisraele, mokanda ya Obadia elobelaki bato ya Edome, oyo babengamaki bandeko ya Bayisraele.b (Kolimbola Mibeko 2:4) Na bokeseni na mikanda mosusu ya basakoli 12, Obadia asaleli liloba yo mpo na kolobela bato ya Edome. Sikoyo, kanisá bato ya Edome. Tozali na mobu soki 607 L.T.B., ntango Yerusaleme ezingamaki. Atako bato ya Edome bazalaki bandeko mpenza ya Yakobo, basanganaki na bato ya Babilone! Bato ya Edome bazalaki kotyola bango boye: “Bóbuka yango! Bóbuka yango!” (Nzembo 137:7; Obadia 10, 12) Bakanaki kobɔtɔla mabele ya Bayuda. Bazalaki kutu kolya na bato ya Babilone, likambo oyo na Moyen Orient emonisaka ete bikólo yango mibale esali mpenza boyokani.
22 Yoká oyo Obadia asakolaki mpo na bato ya Edome: “Kaka bato [ya Babilone] oyo basalaki kondimana ná yo bango nyonso bakosi yo. Bato oyo bazalaki na kimya elongo na yo balongi yo. Baoyo bazalaki kolya bilei elongo na yo bakotyela yo monyama mpo ozali lokola moto oyo azangi bososoli.” (Obadia 7) Nini ekómelaki bato ya Edome, oyo batikaki ndeko na bango Yakobo, mpe baponaki kozala baninga ya bato ya Babilone? Nsukansuka, na litambwisi ya Nabonide, bato ya Babilone babomaki bato ya Edome. Na mikolo ya Malaki, Nzambe asalaki ete bangomba ya Edome etikala mpamba mpe libula ya Edome ekóma ya bambúlu.—Malaki 1:3.
23 Sikoyo, kanisá naino bato oyo obengaka baninga, oyo basambelaka Yehova te. Omoni te ete ‘kaka bilenge mibali [to basi] oyo basali kondimana na yo,’ to boninga, mbala mingi bakosanaka mpe ‘batyaka monyama’ mpo na kokanga bato oyo babengaka baninga? Soki likambo yango eyebani, balobaka nini? Bakoki komona baninga oyo bango bakosaki lokola bayebi makambo te, bazali na bososoli mingi te mpo na komona mosika. Ezali ndenge wana nde bato ya Babilone basalaki baninga na bango, bato ya Edome! Okanisi ete “baninga” ya ndenge wana bakosalisa yo ntango okutani na mikakatano? (Obadia 13-16) Epai mosusu, kanisá Yehova Nzambe mpe basaleli na ye lelo oyo. Yehova azalaka ntango nyonso wana mpo na kosalisa yo. Akosunga yo na ntango ya mpasi. Basaleli na ye mpe bazali ‘baninga ya solosolo oyo balingaka ntango nyonso,’ bazali lokola bato ya sembo oyo ‘babotami mpo na ntango ya mpasi.’—Masese 17:17.
PESÁ MOTUYA NA BOYOKANI OYO ELEKI NYONSO
24, 25. Likambo nini esengeli kozala na esika ya liboso na bomoi na biso?
24 Ya solo, boyokani na libota ezali na ntina mpe ebongi koyeisa yango makasi. Tokoki kozwa mateya ebele na likambo yango na mikanda 12 ya basakoli. Okoki koluka kotánga mikanda yango mpe kosalela batoli oyo ezali na kati. Yango ekosalisa yo ozwa mateya mingi lisusu oyo ekoki kobongisa bomoi ya libota na yo. Kasi, kozala na libota ya esengo ezali likambo oyo eleki ntina mpo na basambeli ya Nzambe lelo?
25 Likambo ya esengo, na oyo etali koya ya mokolo ya Yehova, Yoele asakolaki boye: “Bóyanganisa bato. Bósantisa lisangá. . . . Mobali ya libala abima na shambrɛ na ye ya kati, mpe mwasi ya libala na shambrɛ na ye ya libala.” (Yoele 2:15, 16) Bato nyonso na kati ya ndako basengelaki koyanganisama mpo na losambo ya Yehova. Ata baoyo bautaki kobalana sika, oyo basengelaki naino kozala elongo mpo na kosepela, basengelaki mpe koya! Likambo moko te esengelaki kozwa esika ya liboso na oyo etali koyangana mpo na losambo ya Nzambe. Lokola mokolo ya Yehova ezali koya mbangu mpenza, kozala na etamboli ya malamu liboso na ye esengeli mpenza kozala likambo ya liboso na bomoi na biso. Na eteni ya nsuka ya buku oyo, tokotalela oyo tosengeli kosala na esengo nyonso lelo oyo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Soki molongani ya mokristo moko asali ekobo, mokristo yango azali na lotomo ya kolimbisa to koboya kolimbisa.—Matai 19:9.
b Longola mpe mokanda ya Nahumu oyo elobeli bato ya Ninive.
BOZONGELI
• Mpo na kobongisa bomoi ya libota na yo, mateya nini okoki kozwa na Malaki 2:16?
• Yehova asalaki nini ntango mwasi na ye ya elilingi asalelaki ye bokosi?—Hosea 3:1-5.
• Moto akoki kosala nini mpo na kozongisa boyokani malamu na libala ntango molongani na ye asali lisumu monene?—Hosea 2:2.
LITOMBA NINI OKOKI KOZWA?
• Matomba nini okoki kozwa na bavɛrsɛ oyo?
• Ndenge emonisami na mokapo oyo, ndenge nini okoki kosalela bavɛrsɛ oyo elandi mpo na kobongisa bomoi ya libota na yo?
[Elilingi na lokasa 127]
Okopona koboma libala soki ozwani matata na molongani na yo?
[Elilingi na lokasa 128]
Ndenge oyo Hosea azongisaki Gomere na libala eteyi biso nini mpo na Yehova?
[Elilingi na lokasa 130]
Na ndakisa ya Yehova zaláká moto ya liboso ya koluka kosolola mpo na kosilisa mikakatano nyonso
[Elilingi na lokasa 133]
Moboti, omekolaka Yehova na ndenge ya komonisela bana na yo bolingo?
[Elilingi na lokasa 136]
Baoyo balobaka ete bazali baninga na yo ‘batyelaka yo monyama’?