Mekolá kondima na bango
Mabunga na ye eteyaki ye
YONA azalaki na mposa ya kosilisa makɛlɛlɛ wana makasi. Ezalaki kaka te makɛlɛlɛ ya mopɛpɛ oyo ezalaki kobɛta na nsinga oyo bakangaka na yango masuwa soki esɛmi, to makɛlɛlɛ ya mbonge makasi oyo ezalaki kobɛta masuwa. Makɛlɛlɛ oyo etungisaki Yona mingi koleka ezalaki makɛlɛlɛ oyo bato ya masuwa, kapitɛni mpe basali na ye bazalaki kosala ntango bazalaki kobunda mpo masuwa ezinda te. Yona ayebaki ete bato wana balingaki kokufa mpo na foti na ye!
Mpo na nini Yona akutanaki na mokakatano wana? Asalaki libunga moko monene na miso ya Yehova, Nzambe na ye. Asalaki nini? Akokaki lisusu kobongisa likambo yango te? Biyano na mituna yango ekoki koteya biso makambo mingi. Na ndakisa, lisolo ya Yona ekoki kosalisa biso tómona ete ata bato oyo bazali na kondima makasi bakoki kosala mabunga; tokomona mpe oyo bakoki kosala mpo bázonga na nzela.
Mosakoli oyo autaki na Galilai
Ntango bato batángaka nkombo ya Yona, mbala mingi balobelaka bizaleli na ye ya mabe, na ndakisa kozanga botosi mpe motó makasi na ye. Nzokande, ezali na makambo mingi oyo tokoki koyeba na ntina na ye. Tóbosana te ete Yehova Nzambe nde aponaki Yona mpo azala mosakoli na ye. Yehova akokaki te kopesa ye mokumba wana monene soki Yona azalaki sembo te.
Mokanda ya 2 Mikonzi 14:25 elobeli mwa moke bomoi ya Yona. Azalaki moto ya Gata-hɛfɛlɛ, engumba oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ minei longwa na Nazalete, epai Yesu Klisto asengelaki kokola bikeke soki mwambe na nsima.a Yona asalaki lokola mosakoli na boyangeli ya Yelobama II, mokonzi ya Yisalaele, ekólo ya mabota zomi. Eleko ya Eliya elekaki; mokitani na ye, Elisa akufaki na boyangeli ya tata ya Yelobama. Atako Yehova asalelaki bato yango mpo na kolongola losambo ya Baala, Yisalaele ezongelaki lisusu losambo yango na nko. Mboka yango ekómaki koyangelama na mokonzi oyo “asalaki mabe na miso ya [Yehova].” (2 Mikonzi 14:24) Na yango, mokumba ya Yona ezalaki pɛtɛɛ te. Atako bongo, akokisaki yango na bosembo.
Kasi, mokolo moko Yona asengelaki kozwa ekateli moko monene. Yehova apesaki ye mokumba moko mpe ye amonaki ete ezalaki mpasi mingi. Yehova asɛngaki ye asala nini?
“Tɛlɛmá mpe kendá epai na Ninive”
Yehova ayebisaki Yona ete: “Tɛlɛmá mpe kendá epai na Ninive, mboka yango monene, mpe sakwelá bango mpo ete mabe na bango esili koya liboso na ngai.” (Yona 1:2) Ezali mpasi te komona ntina oyo mokumba yango ebangisaki Yona. Engumba Ninive ezalaki na ɛsti, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 800 mpe ekokaki kozwa pene na sanza mobimba ya mobembo na makolo mpo na kokóma kuna. Nzokande, mobembo ya ndenge wana ezalaki likambo eleki pɛtɛɛ na mokumba oyo azwaki. Na Ninive, Yona asengelaki koyebisa bitumbu oyo Yehova akatelaki bato ya Asulia, oyo bazalaki bato ya mobulu makasi mpe ya nkanza. Lokola Yona amonaki ete bato mingi ya libota ya Nzambe bandimaki nsango na ye te, ndenge nini akokaki kozala na elikya ete bato ya bikólo mosusu bakondima yango? Ndenge nini mosakoli kaka moko ya Yehova akokaki kobongola bato nyonso ya Ninive, engumba monene oyo ebengamaki “mboka ya makila”?—Nahumu 3:1, 7.
Makanisi ya ndenge wana eyaki na motó ya Yona? Toyebi te. Likambo oyo toyebi ezali kaka ete akimaki. Yehova asɛngaki Yona akende na ɛsti; kasi ye akendeki mosika mpenza na wɛsti. Akendeki na libongo ya engumba Yope, epai azwaki masuwa oyo ezalaki kokende na engumba Talasisi. Bato mosusu ya mayele balobaka ete Talasisi ezalaki na ekólo Espagne. Soki ezali bongo, Yona akendeki mosika mpenza, na ntaka ya kilomɛtrɛ 3 500 na Ninive. Mobembo wana oyo asalaki mpo na kokatisa Mbu Monene, ndenge bazalaki kobenga Mbu ya Méditerranée na ntango wana, ekokaki koumela mbula mobimba! Yona aboyaki mpenza kokokisa mokumba oyo Yehova apesaki ye!
Yango elingi nde koloba ete Yona azalaki bibangabanga? Tosengeli kowela te koloba bongo. Ndenge tokomona yango, azalaki moto ya mpiko mpenza. Kasi, Yona azalaki moto ya kozanga kokoka lokola biso nyonso mpe azalaki kosala mabunga mingi. (Nzembo 51:5) Nani na kati na biso naino abangá te?
Ntango mosusu tokoki komona ete makambo Nzambe asɛngi biso ezali mpasi mpenza to mpe tokokoka kokokisa yango te. Tokoki kutu kobanga kokokisa mokumba na biso ya baklisto, ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:14) Tobosanaka noki likambo ya ntina mingi oyo Yesu alobaki ete: “Makambo nyonso ekoki kosalema epai ya Nzambe.” (Malako 10:27) Soki ekómaka ete tóbosana likambo wana, tokoki koyeba mokakatano oyo ekómelaki Yona. Kasi, kokima ya Yona ememelaki ye mikakatano nini?
Yehova apesaki mosakoli na ye oyo apɛngwaki etumbu
Tókanisa Yona azali komata na masuwa, na ntembe te masuwa ya bato ya Fenisia. Azali kotala ndenge kapitɛni ya masuwa yango ná bato na ye bazali kosala nyonso mpo na kolongola masuwa na libongo. Ntango amonaki ete masuwa etiki libongo, na ntembe te Yona akanisaki ete abiki na likama oyo azalaki kobanga. Kasi, na mbala moko, makambo ebongwanaki.
Mipɛpɛ makasi ebandaki kobɛta na mbu, mpe ezalaki na mbonge makasi oyo ekokaki kozindisa ata masuwa minene ya lelo. Lokola mbonge yango elekaki makasi, eumelaki te masuwa ebandaki kozinda. Na ntango wana, Yona ayebaki nde makambo oyo akomaki na nsima ete, “[Yehova] atindaki mopɛpɛ makasi likoló na mai-na-monana”? Toyebi te. Kasi, ayokaki ndenge bato ya masuwa babandaki kobelela banzambe na bango, mpe ayebaki ete banzambe wana bakosalisa bango te. Biblia elobi ete: “Masuwa elingaki kobukana.” (Yona 1:4; Levitike 19:4) Ndenge nini Yona akokaki kobondela Nzambe oyo azalaki kokima?
Lokola amonaki ete Yehova akoki kosalisa ye te, Yona akendeki kolala na kati ya kobe moko ya masuwa. Kuna, alalaki makasi.b Kapitɛni ya masuwa amonaki Yona esika alalaki, alamwisaki ye, mpe asɛngaki ye abondela nzambe na ye, ndenge bato nyonso bazalaki kosala. Lokola bato ya masuwa bayebaki ete mbonge wana eutaki na nguya moko ya makasi koleka, babɛtaki mbɛsɛ mpo na koyeba nani amemeli bango likama wana. Na ntembe te, motema ya Yona ezalaki kobɛta makasi ntango bazalaki kolekisa moto mokomoko. Mosika te, moto yango ayebanaki. Yehova atindaki mopɛpɛ mpo na Yona mpe asalaki ete mbɛsɛ ekwea epai na ye.—Yona 1:5-7.
Yona ayebisaki bato ya masuwa makambo nyonso. Ayebisaki bango ete azali mosaleli ya Yehova, Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Alobaki ete azali kokima Nzambe wana mpe asaleli ye mabe, yango wana atye bango nyonso na likama monene. Bato yango babangaki makasi, mpe Yona azalaki komona yango na miso na bango. Batunaki ye soki básala na ye nini mpo bango ná masuwa bákóma na kimya. Yona alobaki nini? Mbala mosusu Yona abangaki kozinda na mai wana ya malili mpe ya mabe. Kasi, ndenge nini akokaki kondima ete bato wana nyonso bákufa ntango oyo ayebi ete akoki kobikisa bango? Na yango, alobaki boye: “[bó]kamata ngai mpe [bó]bwaka ngai na mai, bongo mai ekozala na kimya mpo na bino. Mpo ete nayebi ete mopɛpɛ oyo monene eyeli bino mpo na ngai.”—Yona 1:12.
Soki Yona azalaki bibangabanga, akokaki kobimisa maloba ya ndenge wana te. Na ntembe te, Yehova asepelaki mpenza komona mpiko oyo Yona azalaki na yango mpe ndenge andimaki kokufa mpo na basusu na ntango wana ya mpasi. Yango emonisi mpe ete Yona azalaki na kondima makasi. Lelo oyo, tokoki komekola ye soki tozali kotya matomba ya basusu liboso ya oyo ya biso. (Yoane 13:34, 35) Ntango tomoni moto moko azali na bosɛnga ya biloko ya mosuni, azali na mposa ya libɔndisi mpe azali na mposa básalisa ye na elimo, tomipesaka mpo na kosalisa ye? Soki tosalisi ye, tokosepelisa motema ya Yehova!
Ekoki kozala ete na ebandeli bato ya masuwa bayokelaki Yona mawa mpo baboyaki kobwaka ye na mai. Basalaki nyonso mpo masuwa ezinda te, kasi esimbaki te. Mopɛpɛ ezalaki se kokóma makasi. Nsukansuka, bamonaki ete likambo mosusu ya kosala ezali te. Babelelaki Yehova, Nzambe ya Yona, ayokela bango mawa, batombolaki Yona mpe babwakaki ye na mai.—Yona 1:13-15.
Nzambe ayokeli ye mawa mpe abikisi ye
Yona akweaki na kati ya mbonge makasi wana. Ekoki kozala ete abandaki kobunda mpo na kobɛta mai, kosala makasi mpo azinda te, mpe azalaki komona mbonge oyo masuwa ezalaki kotinda. Kasi, mbonge ya makasi ezindisaki ye. Azindaki mpenza makasi mpe amonaki ete esili mpo na ye.
Na nsima, Yona alobaki ndenge oyo azalaki koyoka na ntango wana. Abandaki kokanisa makambo ndenge na ndenge. Azalaki kokanisa na mawa nyonso ete akomona lisusu te tempelo kitoko ya Yehova oyo ezalaki na Yelusaleme. Amonaki lokola nde akiti mpenza na kati ya mbu, tii pene na esika ngomba ebandá, epai matiti mabe ya mbu ekokaki kozinga ye. Amonaki lokola nde azali na kati ya lilita.—Yona 2:2-6.
Kasi, likambo moko esalemaki. Mbisi moko ya monene ezalaki kotambola pembeni wana mpe emɛlaki ye.
Emonanaki ete akómi na nsuka. Kasi, likambo moko ekamwisaki Yona. Akufaki te! Mbisi wana efinaki ye te, elyaki ye te mpe mpema na ye ekómaki mokuse te. Azalaki kaka kopema, atako azalaki na esika oyo ezalaki lokola lilita na ye. Yona akómaki kobanga makasi. Kozanga ntembe, Nzambe na ye Yehova nde “abongisaki mbisi monene ete emɛla Yona.”c—Yona 1:17.
Ntango ezalaki koleka mokemoke. Na kati ya libumu ya mbisi, Yona akanisaki mpe abondelaki Yehova Nzambe. Libondeli na ye oyo ezali na mokapo ya mibale ya mokanda oyo ezali na nkombo na ye, ezali na ntina mingi. Emonisi ete Yona ayebaki Makomami malamu, mpo azalaki kozongela mingi maloba oyo ezali na mokanda ya Nzembo. Emonisi mpe ete azalaki na ezaleli moko kitoko mingi: koyeba kopesaka matɔndi. Yona asukisaki boye: “Ngai nakokabela yo mbeka na mongongo ya kotɔnda; nakofuta yango esili ngai kosimba ndai, kobika ezali epai na [Yehova].”—Yona 2:9.
Yona amonaki ete Yehova akoki kobikisa moto nyonso, epai nyonso mpe na ntango nyonso. Ata kuna, “na kati ya libumu ya mbisi,” Yehova amonaki mosaleli na ye oyo azalaki komitungisa mpe abikisaki ye. (Yona 1:17) Kaka Yehova nde akoki kobatela moto na bomoi mikolo mpe butu misato na kati ya libumu ya mbisi monene. Lelo oyo, tosengeli kobosanaka te ete Yehova azali “Nzambe oyo kopema na yo ezali na lobɔkɔ na ye.” (Danyele 5:23) Ye nde asimbi mpema mpe bomoi na biso nyonso. Tozalaka na botɔndi epai na ye? Mpo na yango, omoni te ete tosengeli kotosaka Yehova?
Tokoloba boni mpo na Yona? Botɔndi etindaki ye atosaka Yehova? Ɛɛ, asalaki yango. Nsima ya mikolo mpe butu misato, mbisi ememaki Yona na libongo mpe “esanzaki [ye] na mokili mokauki.” (Yona 2:10) Kanisá naino, Yona anyanyaki ata moke te mpo akóma na libongo! Na ntembe te, ntango akómaki na libongo, asengelaki koluka nzela epai akokaki kokende. Kasi, botɔndi na ye emekamaki. Yona 3:1, 2, elobi ete: “Liloba ya [Yehova] eyelaki Yona mbala ya mibale ete, Tɛlɛmá kendá epai na Ninive, mboka yango monene, mpe sakwelá bango lisakoli liyebisaki ngai yo.” Yona asalaki nini?
Yona akakatanaki te. Tozali kotánga boye: “Yona atɛlɛmaki mpe akendaki epai na Ninive [na kolanda] liloba ya [Yehova].” (Yona 3:3) Ɛɛ, Yona atosaki. Emonani polele ete mabunga na ye eteyaki ye. Na likambo oyo mpe, tosengeli komekola kondima ya Yona. Biso nyonso tozali basumuki, biso nyonso tosalaka mabunga. (Baloma 3:23) Kasi, tolɛmbaka nzoto, to tozwaka mateya na mabunga na biso mpe tobongolaka motema mpo na kokoba kosalela Nzambe na botosi nyonso?
Yehova apambolaki Yona mpo na botosi na ye? Ɛɛ, asalaki yango. Ya liboso, ekoki kozala ete Yona ayokaki ete bato wana ya masuwa babikaki. Mopɛpɛ makasi ya masuwa ekitaki mbala moko ntango Yona andimaki bábwaka ye na mai, mpe bato ya masuwa yango “babangaki [Yehova] na nsɔmɔ monene” mpe bapesaki ye mbeka na esika ya kopesa yango epai ya banzambe na bango ya lokuta.—Yona 1:15, 16.
Lipamboli moko ya monene eyaki na nsima. Yesu amonisaki ete ntango oyo Yona alekisaki na libumu ya mbisi monene, ezalaki esakweli ya ntango oyo ye moko asengelaki kolekisa na lilita to Sheole. (Matai 12:38-40) Ntango Yona akosekwa mpo na bomoi awa na mabelé, akosepela mpenza mpo na lipamboli yango! (Yoane 5:28, 29) Yehova azali na mposa ya kopambola mpe yo. Na ndakisa ya Yona, yo mpe okozwa mateya na mabunga na yo mpe okomonisa elimo ya botosi mpe ya komipimela?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Koyeba ete Yona azalaki moto ya engumba moko ya Galilai ezali na ntina mingi mpo Bafalisai balobaki na lolendo nyonso na ntina na Yesu ete: “Luká mpo omona ete ata mosakoli moko te asengeli kobima na Galilai.” (Yoane 7:52) Babongoli mingi mpe bato ya mayele balobaka ete Bafalisai bazalaki koloba ete ata mosakoli moko te abimá to akobima na Galilai, engumba wana ya ntina te. Soki ezali bongo, bato wana bayebaki masolo ya kala mpe bisakweli te.—Yisaya 9:1, 2.
b Kutu, mpo na komonisa ete Yona alalaki makasi libongoli ya Septante emonisi ete azalaki kokɔlɔlɔ (ronfler). Kasi, na esika ya koloba ete ndenge Yona alalaki emonisaki ete azalaki kokipe likambo yango te, tokoki koyeba ete ntango mosusu, soki moto azali na likambo moko oyo eleki ye motó alalaka mpɔngi ya makasi. Ntango Yesu azalaki kobunda na mpasi na elanga ya Getesemane, Petelo, Yakobo mpe Yoane ‘balalaki mpɔngi mwa moke mpo na mawa.’—Luka 22:45.
c Maloba ya Liebele oyo basaleli mpo na “mbisi monene” ebongolami na Grɛki na “nyama mabe ya mai.” Atako ezali ata na eloko moko te oyo ekoki kosalisa biso tóyeba na bosikisiki mbisi ya mai oyo balobeli awa, bato balobaka ete bambisi ya minene (requin) ya Mbu ya Mediterranée ekoki komɛla moto mobimba. Na bisika mosusu, ezali na barequin ya minene koleka; requin-baleine ekoki kokóma molai ya mɛtrɛ 15 to koleka!
[Etanda/Elilingi na lokasa 29]
Makambo oyo bato balobaka mpo na Yona
▪ Makambo oyo Biblia elobi na mokanda ya Yona esalemaki mpenza? Banda kala, bato mosusu baboyaka kondima mokanda yango. Lelo oyo mpe bato mingi balobaka ete makambo oyo ezali na mokanda yango ezali masapo mpamba. Mokomi moko ya ekeke ya 19 alobaki ete mokonzi moko ya lingomba alobaki ete lisolo ya Yona mpe mbisi monene oyo amɛlaki ye ezali kaka lisapo: Yona afandaki na otɛlɛ moko na Yope oyo ezalaki kobengama Elembo ya Baleine. Ntango azalaki lisusu na mbongo ya kofuta te, nkolo-otɛlɛ abenganaki ye. Na ndenge yango nde Biblia elobaka ete baleine “emɛlaki” Yona mpe “esanzaki” ye! Ya solo mpenza, bato balukaka kolimwisa Yona koleka ndenge mbisi monene alingaki kolya ye!
Mpo na nini bato mingi bandimaka te ete mokanda yango ya Biblia ezali solo? Mpamba te mokanda yango elobeli makamwisi. Emonani ete bato yango bandimaka te ete makamwisi ya ndenge wana ekoki kosalema. Kasi, makanisi yango ezali mpenza solo? Omituna boye: ‘Nandimaka maloba oyo ezali na vɛrsɛ ya liboso ya Biblia?’ Elobi boye: “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mokili.” (Genese 1:1) Bamilio ya bato oyo bakanisaka malamu na mokili mobimba bandimaka maloba yango. Nzokande, maloba ya vɛrsɛ wana ezali makamwisi oyo eleki makamwisi nyonso oyo elobelami nsima na Biblia.
Tózwa bandakisa: Mpo na Ye oyo akelaki likoló mpe biloko ya kokamwa oyo ezali na mabelé, likambo nini ekoki kozala mpasi mpo na ye na makambo nyonso oyo ezali na mokanda ya Yona? Kotinda mopɛpɛ makasi? Kotinda mbisi monene emɛla moto? To kotinda kaka mbisi wana esanza moto yango lisusu? Mpo na Ye oyo azali na nguya nyonso, kosala makambo ya ndenge wana ekokaki kozala mpasi ata moke te.—Yisaya 40:26.
Ntango mosusu kutu makambo ya kokamwisa esalemaka kozanga ete euta epai ya Nzambe. Na ndakisa, bato balobaka ete na 1758, moto moko ya masuwa akweaki na Mbu ya Méditeranée mpe requin moko emɛlaki ye. Kasi, babɛtaki mbisi yango masasi mpe esanzaki moto yango; bato babimisaki moto yango na monɔkɔ ya mbisi, akufaki te mpe azwaki likama ya makasi te. Soki lisolo yango ezali solo, tokoki koloba ete ezali mpenza likambo ya kokamwa, kasi ezali likamwisi te. Nzambe akoki te kosalela nguya na ye mpo na kosala makambo minene koleka oyo wana?
Bato oyo batyelaka mokanda ya Yona ntembe balobaka mpe ete moto akoki te kosala mikolo misato na kati ya libumu ya mbisi kozanga ete akangama mpema. Kasi, lelo oyo bato bazali na mayele ya kotondisa mopɛpɛ na kati babidɔ mpe kosalela yango mpo na kopema na nse ya mai na boumeli ya ntango molai. Nzambe akokaki te kosalela nguya mpe bwanya na ye monene mpo na kobatela Yona na bomoi mpe kopesa ye mpema mikolo misato? Kaka ndenge anzelu moko ya Yehova ayebisaki Malia, mama ya Yesu, “epai ya Nzambe ezali ata na liloba moko te oyo ekoki te kosalema.”—Luka 1:37.
Likambo nini mosusu emonisi ete makambo oyo ezali na mokanda ya Yona ezali solo? Makambo nyonso oyo Yona alobaki mpo na masuwa mpe basali na yango ezali solo. Yona 1:5 emonisi ete basali ya masuwa bazalaki kobwakabwaka biloko mpo masuwa ekóma pɛpɛlɛ. Masolo ya kala, ata mpe mibeko ya kala ya Balabi emonisi ete bato mingi bazalaki kosala bongo ntango masuwa elingi kozinda. Lisusu, ndenge oyo Yona alobeli Ninive eyokani na masolo ya kala mpe bikolo oyo bato ya arkeoloji bakundoli. Nzokande, na koleka, Yesu Klisto alobelaki mikolo misato oyo Yona asalaki na libumu ya mbisi monene mpo na komonisa mikolo oyo ye moko akosala na lilita. (Matai 12:38-40) Makambo oyo Yesu alobaki emonisi ete lisolo ya Yona ezali solo.
“Epai ya Nzambe ezali ata na liloba moko te oyo ekoki te kosalema.”—LUKA 1:37
[Elilingi na lokasa 26]
Yona asɛngaki bato ya masuwa bábwaka ye na mbu