Yona azwi liteya na motema mawa ya Yehova
YEHOVA azali na mokumba ya kopesa na mosakoli na ye Yona. Tozali bongo na ekeke ya libwa L.T.B., Yelobama II nde azali koyangela na Yisalaele. Yona azali moto ya Gata-hɛfɛlɛ, engumba moko ya Zebuluna. (Yosua 19:10, 13; 2 Mikonzi 14:25) Nzambe alingi kotinda Yona ete akende na Ninive, mboka-mokonzi ya Asulia, na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ 800 uta na engumba na ye. Asengeli kokebisa bato ya Ninive ete Nzambe akani koboma bango.
Mbala mosusu Yona akanisaki boye: ‘Mpo na nini nasengeli kokende na engumba mpe ekólo wana? Bamipesi kútu epai na Nzambe te. Baasulia wana babomaka bato, basalá soko moke te kondimana elongo na Yehova lokola Bayisalaele basalaki yango. Bato ya libota wana mabe bakoki kotalela likebisi na ngai lokola matumoli mpe na yango bakoki kobundisa Yisalaele! Ngai te! Nakokende te. Nakokima na Yafo mpe nakokamata masúwa mpo na kokenda na nzela mosusu—kino na Talasisi, kokima na ngámbo mosusu ya Mai Monene. Nakosala bobele bongo!’—Yona 1:1-3.
Likámá kati na mai monene!
Nokinoki, Yona akómi na Yafo, na libóngo ya mai monene ya Méditerranée. Afuti tiké na ye mpe akɔti na masúwa oyo ezali kokende na Talasisi, oyo bato mingi lelo balobaka ete ezali bongo Espagne, na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ 3 500 na wɛ́sti ya Ninive. Wana masúwa ebandi mobémbo na yango kati na mai monene, mosakoli alɛmbi mpe akiti kati na kɔbɛ́ mpe alali mpongi. Nokinoki, Yehova atindi mopepe makasi kati na mai monene, mpe basáli nyonso kati na masúwa babandi kobanga mpe mokomoko abandi kosɛnga lisungi epai na nzambe na ye. Masúwa ebandi kotengatenga mingi mpenza na boye ete biloko oyo bimemamaki kati na masúwa bibandi kobwakama na mai mpo ete masúwa makóma pɛpɛlɛ. Nzokande, emonani ete masúwa makozinda mpenza, mpe Yona ayoki kapitɛni ya masúwa atomboki makasi mpe azali koloba ete: “Ɛ nini na yo, moto na mpongi? Tɛlɛmá, byangá Nzambe na yo; soko Nzambe akokanisa biso ete tóbɛba te.” Yona alamuki mpe abimi na kɔbɛ́.—Yona 1:4-6.
Basáli na masúwa balobi ete: “Yaká, tóbwaka mbɛsɛ mpo na koyeba ete mabe oyo eyeli biso likambo na nani?” Mbɛsɛ ekwei epai na Yona. Kanisá naino motungisi oyo Yona azali na yango wana basáli na masúwa bazali koloba na ye ete: “Tolɔ́mbi yo ete oyebisa biso ete mabe oyo eyeli biso mpo na nani? Mosala na yo nini? Outi wapi? Mokili na yo nini? Ozali na moto na libota nini?” Yona alobi ete azali Moebele oyo asambelaka “[Yehova] Nzambe na lola” mpe azali na bobángi monene epai na “oyo asalaki mai mpe mokili mokauki.” Mopepe makasi mozwi bango mpo ete ye azali kokima Yehova, na esika ete amema na botosi nyonso nsango ya Nzambe na mboka Ninive.—Yona 1:7-10.
Basáli na masúwa batuni: “Tokosalela yo nini ete mai-na-monana mazala kimya mpo na biso?” Awa mopepe mokómi kobɛta makasi mingi lisusu koleka, Yona alobi ete: “Kamatá ngai mpe bwaká ngai na mai, bongo mai ekozala kimya mpo na bino. Mpo ete nayebi ete mopepe oyo monene eyeli bino mpo na ngai.” Mibali yango baboyi kobwaka mosaleli ya Yehova kati na mai monene noki akokufa mpenza, na bongo bameki kokamba masúwa kino na mokili. Balóngi te, basáli na masúwa bangangi ete: “Tolɔ́mbi yo, ɛ [Yehova], tolɔ́mbi yo ete tóbeba mpo na bomoi na moto oyo te; tyelá biso makila na pɛto te, zambi yo, [Yehova], osali lokola elingaki yo.”—Yona 1:11-14.
Na kati ya mai monene!
Na nsima na yango basáli na masúwa babwaki Yona na libándá ya masúwa. Wana azali kozinda kati na mai monene oyo ezali kotomboka, nkanda na yango ebandi kokita. Na komonáká bongo, ‘bato babandi kobanga [Yehova] na nsɔ́mɔ monene, bakabeli [Yehova] mbeka mpe basimbaki ndai.’—Yona 1:15, 16.
Wana mai ezali kozindisa Yona mobimba, na ntembe te, azali kosambela. Na nsima amiyoki ete azali koselumwa na lidusu moko ya pɛtɛɛ kati na mai, wana azali kokɔta kati na libenga moko monene. Likambo ya kokamwa, azali naino kopema! Wana azali kolongola matiti na mai mazingi motó na ye, Yona amimoni ete azali kati na esika moko oyo ekeseni mpenza na bisika mosusu nyonso. Ezali mpo ete “[Yehova] abongisaki mbisi monene ete emela Yona mpe Yona azalaki na libumu na mbisi mikolo misato mpe butu misato.”—Yona 1:17.
Yona abondeli na etingya nyonso
Yona azwi ntango ya kobondela kati na libumu ya mbisi monene. Bamoko na maloba na ye ekokani na oyo ya loyembo moko ezwami kati na Biblia. Na nsima Yona akomaki mabondeli na ye oyo emonisaki kozanga elikya mpe kobongola motema. Na ndakisa, akanisaki ete libumu ya mbisi esengelaki kokóma Sheole, nkunda na ye. Na yango, abondelaki ete: “Nabyangi epai na [Yehova] mpo na mpasi na ngai, mpe ye azongiselaki ngai; longwa na libumu na ewelo nangalaki, mpe ayokaki mongongo na ngai.” (Yona 2:1, 2) Nzembo ya mibale ya Kobuta—oyo, na ntembe te, Bayisalaele nde bazalaki koyemba yango wana bazalaki kokende na Yelusaleme mpo na bilambo ya mbula na mbula—mpo na komonisa mayoki motindo wana.—Nzembo 120:1; 130:1, 2.
Wana azali kokanisa na ntina na kokita na ye na kati ya mai monene, Yona abondeli ete: “[Yehova na] ntango obwakaki ngai kati na bozindo, na motema na mai-na-monana, mpela ezalaki kozingela ngai. Mbonge na yo nyonso mpe mai na yo ileki likoló na ngai.”—Yona 2:3; kokanisá na Nzembo 42:7; 69:2.
Yona azali kobanga noki ezaleli na ye ya kozanga botosi ekosala ete Nzambe aboya ye mpe ete noki akozanga komona lisusu tempelo ya Yehova. Abondeli ete: “Nalobaki ete, Nabwakami longwa na liboso na miso na yo, ata bongo nakotala lisusu epai na ndako na yo na bulɛɛ.” (Yona 2:4; kokanisá na Nzembo 31:22.) Ezalela ya Yona ezali mpenza ya mpasi mingi na boye ete alobi: “Mai mazingelaki ngai kino molimo mpenza [kotyáká bongo bomoi na ngai na likámá], mai na bozindo ezalaki na bipai na ngai nyonso, matiti na mai makanganaki na motó na ngai.” (Yona 2:5; kokanisá na Nzembo 69:1.) Kanisá naino mpasi ya Yona, wana alobi lisusu ete: “Nakitaki kino epai na nsé na ngomba [na kati ya mbisi], mokili mpe bikangeli na yango eyaki likoló na ngai libela. Ata bongo, oluboli bomoi na ngai longwa na libulu, ɛ [Yehova], Nzambe na ngai.”—Yona 2:6; kokanisá na Nzembo 30:3.
Atako azali kati na libumu ya mbisi, Yona amilobeli te ete: ‘Natungisami mingi; na yango, nakoki kobondela te.’ Nzokande, abondeli ete: “Esenzwaki molimo na ngai kati na ngai [pene na kufa] nakanisaki [Yehova kati na kondima, lokola Ye oyo aleki bato nyonso na nguya mpe na motema mawa]; libondeli na ngai ekómelaki yo kati na ndako na yo na bulɛɛ.” (Yona 2:7) Uta na tempelo ya likoló, Nzambe ayokaki Yona mpe abikisaki ye.
Mpo na kosukisa, Yona abondelaki ete: “Baoyo bakotalaka nkuta na mpamba [na kondimeláká bikeko bizangi bomoi ya banzambe ya lokuta], bakomiboyela bango mpenza boboto [na kobosanáká Ye oyo amonisaka ezaleli wana]. Nde ngai nakokabela yo [Yehova Nzambe] mbeka na mongongo na kotɔ́nda; nakofuta yango esili ngai kosimba ndai [kati na likambo oyo nakutani na yango to na mabaku mosusu], kobika ezali epai na [Yehova].” (Yona 2:8, 9; kokanisá na Nzembo 31:6; 50:14.) Koyebáká ete bobele Nzambe nde akoki kobikisa ye kati na kufa, mosakoli wana oyo abongoli motema (lokola Mokonzi Davidi mpe Mokonzi Salomo oyo bazalaki liboso na ye) alobi ete lobiko ezali epai na Yehova.—Nzembo 3:8; Masese 21:31.
Yona atosi
Nsima ya kokanisa mingi mpe kobondela na etingya, Yona amiyoki ete azali kobimisama na makasi na nzela oyo akɔtelaki. Na nsuka, abimisamaki libandá kino na mokili. (Yona 2:10) Mpo na komonisa botɔ́ndi na lolenge abikisami, Yona atosi liloba ya Nzambe: “Tɛlɛmá kendá epai na Ninive, mboka yango monene, mpe sakwelá bango lisakoli liyebisi ngai yo.” (Yona 3:1, 2) Yona abandi kokenda na mboka-mokonzi ya Asulia. Na ntango ayei koyeba soko oyo ezali mokolo nini, asosoli ete azalaki kati na libumu na mbisi na boumeli ya mikolo misato. Mosakoli akatisi Ebale Pelata na libumu monene na yango ya wɛ́sti, asali mobémbo epai na ɛ́sti kino na nɔ́rdi ya Mésopotamie, akómi na Ebale Tigre, na nsuka akómi na engumba yango monene.—Yona 3:3.
Yona akɔti na Ninive, engumba moko monene. Atamboli kati na engumba na boumeli ya mokolo mobimba mpe na nsima asakoli ete: “Naino mikolo ntuku minei mpe Ninive akobukama.” Yona ayebi lokótá ya Asulia na lolenge ya likamwisi? Toyebi te. Kasi ata soki azali nde koloba na Liebele mpe moto mosusu azali kobongola, lisakola na ye ebimisi matomba. Bato na Ninive babandi kondimela Nzambe. Basakoli kokila bilei mpe balati ngɔtɔ, bato minene mpe bato mike kati na bango. Na ntango maloba yango makómi epai na mokonzi ya Ninive, atɛlɛmi na kiti na ye ya bokonzi, amilatisi ngɔtɔ, mpe afandi na mputulu.—Yona 3:4-6.
Yona akamwe mingi mpenza! Mokonzi ya Asulia atindi nsango na konganga ete: “Tiká ete moto mpe nyama, ebwele mpe etɔngá, bálya eloko te; tiká ete bálya te, bámɛla mpe mai te; kasi tiká ete bálatisama na ngɔtɔ, bato mpe banyama. Tiká ete bánganga na makasi epai na Nzambe, ɛɛ, tiká ete bábongwana, moto na moto longwa na nzela na ye mabe mpe longwa na yauli oyo ezali na mabɔkɔ na bango. Nani ayebi soko Nzambe akobongwana mpe akobongola motema mpe akopɛngwa longwa na nkanda na ye monene ete tóbeba te?”—Yona 3:7-9.
Bato ya Ninive batosi ekateli ya mokonzi na bango. Na ntango Nzambe amoni ete babongwani na mabe na bango, ayoki mawa mpo na mpasi oyo alobaki ete alingaki koyeisela bango, na bongo ayeisi yango te. (Yona 3:10) Mpo na ezaleli na bango ya kobongola motema, ya komikitisa, mpe kondima na bango, Yehova akani kopesa bango lisusu etumbu oyo alingaki kopesa bango te.
Mosakoli asepeli te
Mikolo ntuku minei mileki, kasi likambo moko lisalemi te na Ninive. (Yona 3:4) Wana asosoli ete bato ya Ninive bakobomama te, Yona asiliki mpe ayoki nkanda makasi mpe abondeli ete: “Nalɔmbi yo, ɛ [Yehova], oyo ezalaki liloba na ngai te naino ezalaki ngai na mokili na ngai? Bongo napotaki mbango kokima na Talasisi, zambi nayebaki ete yo ozali Nzambe na boboto mpe otondi na mawa; okosilika noki te nde ozali na boboto mingi mpe okobongola motema na yo longwa na mabe. Boye, sasaipi, ɛ [Yehova] nalɔmbi yo ete olongola bomoi na ngai mpo ete kokufa eleki malamu epai na ngai nde kobika te.” Nzambe ayanoli ye na kotunáká ye motuna oyo: “Yo osali malamu ete osilika?”—Yona 4:1-4.
Na koyokáká bongo, Yona abimi na engumba wana na lolendo nyonso. Akei na ɛ́sti, atongi mongombo moko mpo ete akoka kofanda na nsé ya malili na yango kino akomona makambo oyo makokómela engumba wana. Na nsima, na motema mawa nyonso, Yehova ‘abongisi nkamba na libɔkɛ mpe akólisi yango likoló na motó na ye mpo na kobikisa ye na mpasi na ye.’ Yona asepelaki mpenza na nkamba na libɔkɛ wana! Kasi Nzambe atindi nkiso ete ebebisa nzeté yango na ntɔ́ngɔ́, mpe ebandi kokaoka. Nokinoki, ekaokaki nyonso mpenza. Nzambe atindi mpe mopepe ya ɛ́sti ya molungé makasi. Sikawa moi ebandi kobɛta mosakoli likoló na motó, na boye abandi kolɛmba. Azali kokóba kosɛnga ete akufa. Ee, Yona azali koloba mbala na mbala ete: “Eleki malamu na ngai ete nakufa; nabika te.”—Yona 4:5-8.
Yehova alobi sikawa. Atuni Yona: “Osali nde malamu ete oyoka nkanda mpo na libɔkɛ oyo?” Yona ayanoli ete: “Nasali malamu ete nayoka nkanda, ata kino kufa.” Sikawa Yehova ayebisi mosakoli ete: ‘Oyokeli libɔkɛ oyo mawa, oyo yo osaleli mosala te, oyo ebimaki na butu moko mpe ekufaki na butu moko.’ Na nsima Nzambe asosolaki na ye ete: “Ngai nayokela Ninive mawa te, mboka oyo monene, wana bato baleki nkóto monkámá na ntuku mibale, baoyo bayebi kokabola kati na lobɔkɔ na bango na mobali mpe lobɔkɔ na bango na mwasi te, mpe bibwele mingi lokola?” (Yona 4:9-11) Eyano ebongi emonani polele.
Yona abongoli motema, akóbi kozala na bomoi mpe akomi mokanda ya Biblia oyo ezali na nkombo na ye. Lolenge nini ayebaki ete basáli na masúwa babángaki Yehova, bapesaki Ye mbeka, mpe balapaki ndai? Na kopemama na Nzambe to mpe mbala mosusu ntango akutanaki na basáli na masúwa to basáli mobembo kati na tempelo mpe bayebisaki ye.—Yona 1:16; 2:4.
“Elembo na Yona”
Na ntango bakomeli mpe Bafalisai basɛngaki Yesu elembo, alobaki ete: “Libota na mabe mpe na pite bazali koluka elembo nde bakozwa elembo te bobele elembo na mosakoli Yona.” Yesu abakisaki ete: “Zambi lokola Yona azalaki na libumu na mbisi monene mikolo misato mpe butu misato, bongo Mwana na moto akozala na libumu na mabelé mikolo misato mpe butu misato.” (Matai 12:38-40) Na eleko ya Bayuda bazalaki kotánga ebandeli ya mokolo na ntango ya kolala ya moi. Klisto akufaki na mokolo mwa Mitano na nsima ya nzánga, na 14 Nisan 33 T.B. Nzoto na ye etyamaki kati na nkunda liboso ya kolala ya moi ya mokolo yango. Mokolo mwa 15 Nisan ebandaki na mpokwa wana mpe ekóbaki kino kolala ya moi ya mokolo ya Pɔ́sɔ, oyo nde mokolo ya nsambo mpe ya nsuka ya pɔ́sɔ. Na ntango wana mokolo mwa 16 Nisan ebandaki mpe ekóbaki kino kolala ya moi ya mokolo oyo tobéngaka lelo mokolo ya Lomingo. Na yango, Yesu akufaki mpe aumelaki kati na nkunda kobanda na mokolo ya 14 Nisan, wana atyamaki kati na yango na boumeli ya mokolo mobimba ya 15 Nisan, mpe alekisaki butu ya mokolo ya 16 Nisan kati na nkunda. Na ntango basi moko bayaki na nkunda mokolo ya Lomingo na ntɔ́ngɔ́, asilaki kosekwisama.—Matai 27:57-61; 28:1-7.
Yesu aumelaki mikolo misato kati na nkunda. Na bongo banguna na ye bazwaki “elembo na Yona,” kasi Klisto alobaki ete: “Babali na Ninive bakotɛlɛma kati na esambiselo na esika moko na libota oyo mpe bakokitisa yango; mpo ete babongolaki mitema mpo na kosakola na Yona mpe talá oyo aleki Yona azali awa.” (Matai 12:41) Ezali mpenza bongo! Mpamba te Yesu azalaki katikati na Bayuda—mosakoli oyo aleki Yona na bonene. Atako Yona azalaki elembo oyo ebongaki mpenza mpo na bato ya Ninive, Yesu ateyaki na nguya mingi koleka mpe azalaki na bilembeteli mingi koleka oyo ya mosakoli wana. Nzokande, Bayuda mingi mpenza bandimaki ye te.—Yoane 4:48.
Mpo na kozanga komikitisa, ekólo ya Bayuda eboyaki koyamba mosakoli oyo aleki Yona, bandimelaki Ye te. Kasi ezalaki boni mpo na bankɔ́kɔ na bango? Bango mpe bazangaki kondima mpe bazangaki elimo ya komikitisa. Ya solo, ezali polele ete Yehova atindaki Yona na Ninive mpo na komonisa bokeseni polele kati na bato ya Ninive oyo babongolaki motema mpe Bayisalaele ya motó makasi, oyo bazangaki mpenza kondima mpe bazangaki ezaleli ya komikitisa.—Kokanisá na Deteronome 9:6, 13.
Ezali boni mpo na Yona ye moko? Ayekolaki bonene ya ngɔlu ya Nzambe. Lisusu, lolenge oyo Yehova asalelaki Yona wana ayokaki mabe mpo ete bato ya Ninive bamonisamelaki motema mawa esengeli kopekisa biso komitungisa soki tata na biso na likoló amonisi motema mawa epai na bato lelo oyo. Ya solo, tiká tósepela ete bankóto ya bato bazali koya epai na Yehova na mitema ya kondima mpe na komikitisa.