Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Obadia, ya Yona mpe ya Mika
“EMONANELI ya Obadia.” (Obadia 1) Mokanda ya Obadia ebandi na maloba wana. Mosakoli ayebisi likambo moko te mpo na ye moko, longola kaka nkombo na ye oyo ezali na mokanda, oyo akomaki na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Na kati ya mokanda na ye oyo asilisaki kokoma soki mbula nkama mibale liboso, mosakoli Yona alobeli na bosembo mpenza makambo oyo ekómelaki ye na mosala na ye ya misionɛrɛ. Mosakoli Mika asalaki mosala na ye na boumeli ya mbula 60, na katikati ya eleko ya Obadia mpe eleko ya Yona; ebandaki na mobu 777 L.T.B. tii na 717 L.T.B. Mpo na ye moko, Mika alobi kaka ete azali “moto ya [mboka] Molesata” mpe ete liloba ya Yehova eyelaki ye “na mikolo ya Yotama, Ahaza [mpe] Hizikiya, mikonzi ya Yuda.” (Mika 1:1) Bililingi oyo Mika azalaki kosalela mpo na kosalisa bato básimba nsango na ye emonisi mpenza ete afandaki mingi na bamboka ya zamba.
EDOME ‘AKOLONGOLAMA MPO NA LIBELA’
Mpo na Edome, Obadia alobi boye: “Mpo na mabe oyo osali ndeko na yo Yakobo, nsɔni ekozipa yo mpe okolongolama mpo na libela.” (NW) Mosakoli azali naino kokanisa mabe oyo bato ya Edome bautaki kosala Bayisalaele, bana ya Yakobo. Na 607 L.T.B., ntango bato ya Babilone babebisaki Yelusaleme, Baedome ‘batɛlɛmaki kotalana na ye’ mpe bakɔtelaki “bato ya mokili mosusu.”—Obadia 10, 11.
Na bokeseni na Edome, ndako ya Yakobo ekozongisama. Esakweli ya Obadia elobi boye: “Na ngomba ya Siona bakimi bakozala, ekozala mpe bulɛɛ.”—Obadia 17.
Biyano na mituna ya Biblia:
v 5-8—Na ndenge nini kobomama ya Edome ekokani na koya ya babɔtɔli na butu mpe ya balɔkɔti ya vinyo? Soki bayibi báyaka na Edome, balingaki kozwa kaka biloko oyo bazalaki na mposa na yango. Soki mpe babuki mbuma báyaka na Edome, balingaki kotika mwa mbuma mosusu mpo bato mosusu bálɔkɔta. Kasi, ntango Edome akokwea, “baoyo bazalaki na [ye] na kimya,” elingi koloba bato ya Babilone, bakopunza biloko na ye nyonso ya motuya.—Yilimia 49:9, 10.
v 10—Na ndenge nini Edome ‘elongolamaki mpo na libela’? Ndenge kaka esakolamaki, Edome, ekólo oyo ezalaki na guvɛrnema mpe na bato na yango, oyo bazalaki kofanda na esika moko oyo eyebani, elimwá mpo na libela. Nabonide, mokonzi ya Babilone, alongaki Edome soki na katikati ya ekeke ya motoba L.T.B. Na ekeke ya minei L.T.B., Banabatana nde bakómaki kofanda na Mokili ya Edome mpe bato ya Edome bakendeki kofanda na sudi ya Yudea, na mokili ya Negebe, oyo ekómaki kobengama na nsima Iduma. Ntango Baloma babebisaki Yelusaleme na mobu 70 ya ntango na biso (T.B.), bato ya Edome balimwaki mpo na libela.
Mateya mpo na biso:
v 3, 4. Ekoki kozala ete lokola bazalaki kofanda na mokili moko ya bangomba ya milaimilai mpe mabwaku ya mozindo, oyo ezalaki kopesa banguna mpasi mpo na kobunda na bango, bato ya Edome bazalaki komikosa ete bazali na likama moko te. Kasi, moto moko te akoki kokima etumbu ya Yehova.
v 8, 9, 15. Bwanya mpe nguya ya bato ekobatela biso te na “mokolo ya [Yehova].”—Yilimia 49:7, 22.
v 12-14. Likambo oyo ekómelaki bato ya Edome ezali ndakisa monene mpo na bato oyo basepelaka na mpasi ya basaleli ya Yehova. Yehova atalelaka minyoko ya basaleli na ye na lisɛki te.
v 17-20. Esakweli yango, oyo elobelaki kozongisama ya bana ya Yakobo, ebandaki kokokisama ntango mwa ndambo na bango bazongaki na Yelusaleme na mobu 537 L.T.B. Liloba ya Yehova ezangaka kokokisama te. Tosengeli kozelaka bilaka na ye na elikya nyonso.
“NINIVE EKOBUKANA”
Na esika atosa Nzambe mpe ‘akende epai ya Ninive, mboka yango monene, mpe asakwela bango’ bitumbu ya Nzambe, Yona azwaki nde nzela mosusu. Yehova “atindaki mopɛpɛ makasi likoló ya mai-ya-monana” mpe asalelaki “mbisi monene” mpo na kozongisa Yona na nzela mpe kotinda ye mpo na mbala ya mibale na mboka-mokonzi ya Asulia.—Yona 1:2, 4, 17; 3:1, 2.
Yona akɔtaki na Ninive mpe abandaki kosakola polelepolele ete: “[Etikali, NW] mikolo ntuku minei mpe Ninive ekobukana.” (Yona 3:4) Ntango Yona amonaki ete makambo oyo asakolaki ekokisami te, ‘asilikaki mingi.’ Yehova asalelaki “nzete moko” mpo na kopesa ye liteya ya koyokelaka basusu mawa.—Jonas 4:1, 6, Bible na lingala ya lelo oyo.
Biyano na mituna ya Biblia:
3:3 (Bible na lingala ya lelo oyo)—Ninive ezalaki mpenza kosɛnga “kosala mikolo misato na makolo po na kokatisa yango”? Ɛɛ. Balobaka ete na ntango ya kala, Ninive ezalaki kokende tii na Khursabād na nɔrdi, mpe tii na Nimroud na sudi. Ninive mobimba ezalaki lokola kare, oyo zongazonga na yango ezalaki na bolai ya kilomɛtrɛ 100.
3:4—Yona asengelaki koyekola monɔkɔ ya Baasulia mpo na kosakwela bango? Ekoki kozala ete Yona ayebaki monɔkɔ ya Baasulia, to mpe Nzambe apesaki ye likoki ya koloba monɔkɔ yango na ndenge ya kokamwa. Ekoki mpe kozala ete azalaki koloba kaka na monɔkɔ ya Liebele mpe moto mosusu azalaki kobongola. Soki ezali ete azalaki koloba na monɔkɔ ya Liebele, ekoki kozala ete maloba na ye ebendaki likebi ya bato mingi.
Mateya mpo na biso:
1:1-3. Kopona kosala makambo mosusu mpo omipesa mobimba te na kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli, ekomonisa ete ozali na makanisi mabe. Soki moto asali bongo, tokoki mpe koloba ete akimi mokumba oyo Nzambe apesi ye.
1:1, 2; 3:10. Yehova asukaka komonisa motema mawa na ye kaka epai ya bato ya ekólo, ya loposo to ya etuluku moko boye te. “[Yehova] azali malamu epai ya bato nyonso mpe ngɔlu na ye ezali likoló ya misala na ye nyonso.”—Nzembo 145:9.
1:17; 2:10. Mikolo misato, butu moi, oyo Yona alekisaki na libumu ya mbisi ya monene ezalaki elilingi ya liwa mpe lisekwa ya Yesu.—Matai 12:39, 40; 16:21.
1:17; 2:10; 4:6. Yehova abikisaki Yona na kati ya mbu oyo mai na yango etombokaki. Nzambe ‘akolisaki mpe nzete moko po bitape na yango épesa ye malili pe élongola kotungisama na ye.’ (Bible na lingala ya lelo oyo) Basambeli ya Yehova ya ntango na biso basengeli mpenza kotyela Nzambe na bango motema, ná motema-boboto na ye, ete akobatela mpe akobikisa bango.—Nzembo 13:5; 40:11.
2:1, 2, 9, 10. Yehova ayokaka mabondeli ya basaleli na ye mpe atyaka likebi na kolela na bango.—Nzembo 120:1; 130:1, 2.
3:8, 10. Nzambe ya solo “abongolaki motema [to makanisi] na ye” mpe ‘asalaki lisusu te’ mabe oyo akanaki kosala. Mpo na nini? Mpo bato ya Ninive ‘babongwanaki longwa na nzela na bango mabe.’ Ndenge moko mpe lelo oyo, soki mosumuki abongoli mpenza motema, Nzambe akoki kobongola makanisi mpe kotika kopesa ye etumbu.
4:1-4. Moto moko te akoki kopekisa Nzambe ayokela moto mawa. Soki Nzambe amoni malamu ayokela moto moko mawa, tosengeli te komona yango mabe.
4:11. Yehova azali, na motema molai nyonso, kotinda basaleli na ye básakola nsango malamu ya Bokonzi na mabelé mobimba, mpo ndenge kaka ayokelaki bato 120 000 ya Ninive mawa, azali mpe koyokela “baoyo bayebi kokabola kati na lobɔkɔ na bango ya mobali mpe lobɔkɔ na bango ya mwasi te” mawa. Biso mpe tosengeli te koyokela bato ya teritware na biso mawa mpe komipesa na molende mpenza na mosala ya kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli?—2 Petelo 3:9.
‘BASENGELAKI KOYEISA LIBANDI NA BANGO MONENE’
Mika atondolaki mpenza masumu ya Yisalaele mpe Yuda, asakolaki ete bamboka-mokonzi na bango ekobebisama mpe ete na nsima mwa ndambo na bango bakozonga na mboka na bango. Samalia ekokóma lokola “libondo kati na elanga.” Lokola bamipesaki na losambo ya bikeko, Yisalaele mpe Yuda basengelaki mpenza kobima “libandi” to koyoka nsɔni. Lokola bakendaki na boombo, libandi na bango esengelaki kokóma monene “lokola oyo ya mpongo;” lokola ndɛkɛ oyo ezali kaka na mwa nsala ya kotánga na motó. Yehova alakaki boye: “Yakobo, nakoyanganisa nyonso na yo solo.” (Mika 1:6, 16; 2:12) Mpo na bakonzi ya mabe mpe basakoli ya lokuta, Yelusaleme mpe “ekokóma libondo ya mabanga.” Kasi, Yehova “akoyanganisa” bato na ye. ‘Oyo asengelaki kozala mokóló-ya-mokili kati na Yisalaele’ asengelaki kouta na “Beteleme Efalata.”—Mika 3:12; 4:12; 5:2.
Yehova azalaki nde makambo makasi epai ya Yisalaele? Makambo oyo asɛngaka elekaka nde makasi? Te. Yehova asɛngaka basaleli na ye kaka ‘básala na boyengebene, bálinga boboto mpe bátambola na bopɔlɔ’ elongo na Nzambe na bango. (Mika 6:8) Kasi, bato ya ntango ya Mika bakómaki mabe mpenza; ‘oyo alekaki malamu kati na bango azalaki lokola nkamba ya nzubɛ, ye oyo alekaki sembo lokola lopango ya nzubɛ,’ mpe bazalaki koyokisa moto nyonso oyo apusani pene na bango mpasi. Kasi, mosakoli atunaki boye: “Nani azali Nzambe lokola [Yehova]?” Nzambe akanaki koyokela bato na ye mawa lisusu mpe ‘kobwaka mapɛngwi nyonso na bango kino mozindo ya mai.’—Mika 7:4, 18, 19.
Biyano na mituna ya Biblia:
2:12—Ntango nini esakweli oyo elobelaki ‘koyanganisama ya batikali ya Yisalaele’ ekokisamaki? Kokokisama na yango ya liboso ezalaki na mobu 537 L.T.B., ntango ndambo ya Bayuda oyo batikalaki basikolamaki na boombo mpe bazongaki na mboka na bango. Na ntango na biso, esakweli yango ezali kokokisama epai ya “Yisalaele ya Nzambe.” (Bagalatia 6:16) Kobanda na 1919, baklisto bapakolami bazali koyanganisama “lokola bibwɛlɛ na lopango, NW.” Lokola “ebele ya bato” oyo bazali “bampate mosusu” bazali kosangana na bango, mingimingi kobanda 1935, bakómi ‘kosala makelele mingi mpo bazali bato mingi.’ (Emoniseli 7:9; Yoane 10:16) Bango nyonso elongo, bazali kotombola losambo ya solo.
4:1-4—“Na mikolo ya nsuka,” ndenge nini Yehova azali ‘kosambisa kati na mabota mingi mpe kopamela mabota ya nguya’? Maloba “mabota mingi” mpe “mabota ya nguya” ezali kolobela te bikólo to bibongiseli ya politiki. Ezali nde kolobela bato ya bikólo nyonso oyo bakómi basambeli ya Yehova. Yehova azali kosambisa mpe kopamela bango na ndenge ya elimo.
Mateya mpo na biso:
1:6, 9; 3:12; 5:2. Baasulia babebisaki Samalia na mobu 740 L.T.B., na ntango ya mosakoli Mika. (2 Mikonzi 17:5, 6) Baasulia bayaki tii na Yelusaleme na ntango ya Mokonzi Hizikiya. (2 Mikonzi 18:13) Bato ya Babilone batumbaki Yelusaleme na mobu 607 L.T.B. (2 Ntango 36:19) Ndenge esakolamaki, Masiya abotamaki na “Beteleme Efalata.” (Matai 2:3-6) Bisakweli ya Yehova ezangaka te kokokisama.
2:1, 2. Ekozala mpenza likama mpo na biso soki tozali koloba ete tozali basaleli Nzambe, kasi tozali koluka libosoliboso bomɛngo na esika ya “bokonzi mpe boyengebene na ye”!—Matai 6:33; 1 Timote 6:9, 10.
3:1-3, 5. Yehova alingaka ete baoyo bazali kokamba basaleli na ye básala mosala na bango na bosembo.
3:4. Soki tolingi Yehova ayokaka mabondeli na biso, tosengeli te kokangama na masumu to kozala na bomoi mibale.
3:8. Tokokokisa mokumba na biso ya kosakola nsango malamu, oyo esɛngaka mpe kosakola bitumbu oyo Nzambe akani kopesa bato mabe, kaka soki elimo santu ya Yehova ezali kopesa biso makasi.
5:5. Esakweli wana ya Masiya ezali kopesa biso elikya ete soki banguna bayei kosala basaleli ya Nzambe mabe, “babateli nsambo [motángo nsambo emonisaka eloko ya mobimba]” mpe “mikóló mwambe,” elingi koloba ebele ya mibali ya makoki, bakotɛlɛma mpo na kokamba basaleli ya Yehova.
5:7, 8. Mpo na bato mingi, baklisto bapakolami lelo bazali “lokola mamwɛ makoutaka na [Yehova],” elingi koloba lipamboli oyo euti epai ya Nzambe. Ezali bongo mpo azali kosalela bapakolami mpo na kosakola nsango ya bokonzi. “Bampate mosusu” bazali kopesa mabɔkɔ na kosalisa bato bákóma na boyokani na Nzambe na ndenge bazali kosunga bapakolami na mosala ya kosakola. (Yoane 10:16) Oyo nde libaku malamu tozali na yango ya kosangana na mosala yango, oyo ezali kosalisa basusu bakóma na boyokani na Nzambe!
6:3, 4. Tosengeli komekola Yehova Nzambe mpe kozala na boboto mpe na motema mawa ata epai ya bato ya makambo makasi to baoyo balɛmbi na elimo.
7:7. Ntango tozali kotungisama na mikakatano na ntango ya nsuka ya mokili oyo ya mabe, tosengeli kobungisa elikya te. Lokola Mika, tosengeli nde “kozela Nzambe na biso, NW.”
7:18, 19. Lokola Yehova alimbisaka mabunga na biso, biso mpe tosengeli kolimbisaka bato oyo basali biso mabe.
Tókoba ‘kotambola na nkombo ya Yehova’
Bato oyo bazali kobundisa Nzambe ná basaleli na ye “bakolongolama mpo na libela.” (Obadia 10, NW) Kasi, tokoki kokitisa nkanda ya Yehova soki toyoki makebisi na ye mpe ‘totiki banzela mabe.’ (Yona 3:10, NW) “Na mikolo [oyo] ya nsuka,” losambo ya solo ezali kotombwana mpenza likoló ya mangomba nyonso ya lokuta mpe bato ya botosi bazali kosopana kuna. (Mika 4:1; 2 Timote 3:1) Na yango, tosengeli kozala na ekateli ya “kotambola na nkombo ya Yehova Nzambe na biso, libela na libela.”—Mika 4:5.
Na ntembe te, Mokanda ya Obadia, ya Yona mpe ya Mika eteyi biso mateya ya ntina mingi! Atako mbula 2 500 esili koleka banda mikanda yango ekomamaki, nsango na yango ‘ezali na bomoi mpe na nguya,’ ata lelo oyo.—Baebele 4:12.
[Elilingi na lokasa 13]
Obadia asakolaki ete “[Edome] ekolongolama mpo na libela”
[Elilingi na lokasa 15]
Mika ‘azelaki Yehova’; yo mpe okoki kosala yango
[Elilingi na lokasa 16]
Mosala ya kosakola ezali mokumba oyo tosengeli kopesaka motuya mingi