Mokapo 12
“Zelá yango kaka”
1, 2. (a) Mituna nini okoki komituna? (b) Na kati ya basakoli 12, makambo nini bamosusu bakutanaki na yango, mpe ezaleli nini Mika azalaki na yango?
BANDA ntango nini ozali kozela ete mokolo ya Yehova eya kolongola mabe na mabele? Okosepela kozela yango ntango boni lisusu? Wana ozali kozela mokolo yango, ezaleli nini okoki kozala na yango, mpe ndenge nini yango ekoki kotambwisa bomoi na yo? Na ntembe te, biyano na yo ekokesana na oyo ya bandimi ya mangomba oyo basalaka makambo ndenge balingi, mpe bazelaka ete bákende likoló.
2 Wana ozali kozela mokolo yango monene, mikanda oyo basakoli 12 bakomaki ekoki kosalisa yo mpenza. Basakoli yango mingi bazalaki na bomoi na ntango oyo Nzambe asengelaki kopesa etumbu. Na ndakisa, Mika asalaki mosala na ye ntango etumbu ya Samaria na mabɔkɔ ya bato ya Asiri na mobu 740 L.T.B., ekómaki pene. (Talá tablo na nkasa 20 mpe 21.) Mwa moke na nsima, mokolo ya Yehova esengelaki mpenza kokómela Yuda. Lokola Mika ayebaki mpenza te ntango oyo Nzambe asengelaki kosala likambo yango, amonaki ete asengelaki kaka kozela kozanga kosala eloko, kokanisa ete mosika te, Nzambe akosala? Talá oyo Mika alobaki: “Ngai, ezali Yehova nde nakotalela. Nakomonisa ete nazali kozela Nzambe ya lobiko na ngai. Nzambe na ngai akoyoka ngai.” (Mika 7:7) Ya solo, lokola andimaki mpenza ete likambo yango ekosalema, Mika azalaki lokola sinzili oyo afandi likoló ya linɔ́ngi.—2 Samwele 18:24-27; Mika 1:3, 4.
3. Lokola etikalaki moke Yerusaleme ebebisama, makanisi nini Habakuku mpe Sefania bazalaki na yango?
3 Na nsima, talá na tablo mpo na koyeba eleko oyo Sefania mpe Habakuku basalaki mosala na bango. Simbá ete basakoli yango mibale basalaki mosala na bango na eleko oyo ezalaki mpenza pene ya kobomama ya Yerusaleme na mobu 607 L.T.B. Bakokaki koyeba te soki etumbu ya Nzambe esengelaki koya na ntango wana to bambula mingi na nsima. (Habakuku 1:2; Sefania 1:7, 14-18) Sefania akomaki boye: “‘Bózela ngai,’ yango nde liloba ya Yehova ‘tii mokolo oyo nakotɛlɛma mpo na kozwa bikólo oyo epunzami, mpo na ekateli na ngai ya lisambisi ezali . . . kosopela bango bikateli na ngai ya etumbu, nkanda na ngai nyonso ya kongala.’” (Sefania 3:8) Mpe ezali boni mpo na Habakuku, oyo asalaki mosala na ye mwa moke nsima ya Sefania? Habakuku akomaki boye: “Emonaneli ezali naino mpo na ntango oyo etyamá, mpe ezali koya mbangumbangu kino na nsuka, mpe ekobuka lokuta te. Ata soki eumeli, zelá yango kaka; mpo ete kozanga ntembe yango ekokokisama. Ekokóma nsima ya ngonga te.”—Habakuku 2:3.
4. Sefania mpe Habakuku basakolaki na eleko oyo makambo ezalaki ndenge nini, mpe bamonisaki ezaleli nini?
4 Ndenge makambo ezalaki ntango maloba oyo ezali na Sefania 3:8 mpe Habakuku 2:3 elobamaki ekoki kosalisa biso. Na eleko oyo Bayuda mosusu bazalaki koloba “Yehova akosala malamu te, mpe akosala mabe te,” Sefania asakolaki “mokolo ya nkanda ya Yehova.” Na mokolo yango, bikólo ya banguna mpe Bayuda oyo batombokaki basengelaki komona nkanda ya Nzambe. (Sefania 1:4, 12; 2:2, 4, 13; 3:3, 4) Okanisi ete Sefania azalaki kobanga etumbu mpe nkanda ya Nzambe? Te, kutu asengelaki nde “kozela.” Okoki komituna boye: ‘Ezali boni mpo na Habakuku?’ Ye mpe asengelaki ‘kozela yango kaka.’ Ozali na elonga koloba ete Sefania mpe Habakuku bazalaki mpe komitungisa mpo na makambo oyo esengelaki kosalema, bafandaki te lokola nde bazalaki kokanisa ete likambo moko te ekobongwana. (Habakuku 3:16; 2 Petro 3:4) Kasi, ndenge tomoni yango ezali na likambo moko ya ntina oyo mokomoko ya basakoli yango asengelaki kosala: ‘Kozela.’ Mpe ndenge oyebi yango: Likambo oyo basakoli yango bazalaki kozela ekokisamaki na mobu 607 L.T.B. Na yango, ‘kozela’ na bango emonisaki mpenza bwanya.
5, 6. Lokola toyebi esika oyo tokómi na kokokisama ya mokano ya Nzambe, ezaleli nini tosengeli kozala na yango?
5 Okoki mpenza kotya motema ete “mokolo ya nkanda ya Yehova” ekoya mpo na kobebisa mokili oyo mabe; ekozala likambo ya solo, mpe ezali likambo ya kotya ntembe te. Ya solo, ozali na ntembe te mpo na likambo yango. Lokola Sefania mpe Habakuku, yo mpe oyebi mpenza te ntango oyo mokolo yango ekoya. (Marko 13:32) Kasi, ekoya mpenza, mpe kokokisama ya esakweli ya Biblia mpo na lelo oyo emonisi mpenza polele ete mokolo yango ekoya mosika te. Yango wana, likambo oyo Yehova asɛngaki na basakoli yango etaleli mpe yo—‘Zelá yango kaka.’ Mpe kobosana te likambo oyo ya ntina mingi: Nzambe na biso azali kaka Nzambe moko oyo “azali kosalela moto oyo azali se kozela ye.”—Yisaya 64:4.
6 Okoki komonisa na misala na yo ete ozali kozela na ndenge ya malamu, mpe ondimi ete “mokolo ya nkanda ya Yehova” ekoya nsima ya ngonga te. Kondima likambo yango mpe kosala misala oyo eyokani na yango, ezali na boyokani na likambo moko oyo Yesu alobaki. Alendisaki bantoma mpe bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo boye: “Bómilɛngɛla mpe miinda na bino epela, mpe bino moko bózala lokola bato oyo bazali kozela nkolo na bango . . . Esengo na baombo oyo nkolo na bango ntango akoya akokuta bango bazali kokɛngɛla! Ya solo mpenza nalobi na bino: Akomilɛngɛla mpe akofandisa bango na mesa mpe akopesa bango oyo basengeli na yango.” (Luka 12:35-37) Ya solo, koyeba kozela emonisaka ete tondimi ete mokolo ya Yehova ekoya na nsima ya ngonga te oyo akani.
‘KOZELA’ MPE ‘KOMILƐNGƐLA’
7, 8. (a) Motema molai ya Nzambe ebimisi matomba nini? (b) Petro alendisi biso tómonisa elimo nini?
7 Basaleli ya Nzambe na eleko na biso bazalaki kozela liboso ete Bokonzi ya Nzambe etyama na likoló na 1914 mpe bakobaka kosala yango. Kasi, bakangá mabɔkɔ te. Kutu, bazali nde kosala na molende mosala oyo Nzambe apesá bango ya kopesa litatoli. (Misala 1:8) Kasi, kanisá naino: Soki mokolo monene ya Yehova eyaki na 1914, elingaki kozala boni mpo na yo? Ata soki eyaki na kati ya mbula 40 oyo euti koleka, elingaki kokuta yo ozali ‘kosala misala oyo ezali komonisa ete okangami na Nzambe’? (2 Petro 3:11) Mpe ezali boni mpo na bato ya libota na yo oyo bazali Batatoli to baninga na yo ya motema na lisangá? Emonani polele ete, ntango oyo ya kozela efungweli yo mpe bato mingi mosusu nzela ya lobiko, ndenge 2 Petro 3:9 emonisi yango. Lokola Yehova abomaki mokili mbala moko te ntango Bokonzi etyamaki, esalisi bato ebele bábongola motema ndenge kaka bato ya Ninive babongolaki motema mpe babikaki. Biso nyonso tondimi maloba oyo ya ntoma Petro: “Bótalela motema molai ya Nkolo na biso ete ezali lobiko.” (2 Petro 3:15) Mpe eleko oyo ezali kopesa bato libaku ya kobongola motema to kobongisa makambo mosusu ya bomoi mpe makanisi na bango.
8 Ya solo, mokristo akoki kokanisa ete makambo oyo elekaki na mikolo ya Mika, Sefania, mpe Habakuku ezali mpenza na ntina te. Akoki koloba boye: “Yango ezali kaka makambo ya kala!” Kasi, mateya nini tokoki kozwa na makambo yango? Tolobelaki toli ya Petro oyo emonisaki ntina oyo bakristo basengeli kozala bato oyo ‘basalaka misala oyo ezali komonisa ete bakangami na Nzambe.’ Kaka nsima ya maloba wana, Petro amonisaki likambo mosusu ya ntina—‘kozela mpe kobatela na makanisi na biso kozala ya mokolo ya Yehova.’ (2 Petro 3:11, 12) Na yango, tosengeli ‘kobatela na makanisi’ mokolo yango, ‘kozela yango kaka.’
9. Mpo na nini kokoba ‘kotalela’ ezali na ntina?
9 Ezala tosaleli Yehova mwa bambula to bambula mingi, tozali kokoba ‘kotalela mpe komonisa ezaleli ya kozela’ ndenge Mika asalaki? (Baroma 13:11) Ya solo, biso bato, tokoki koluka koyeba ntango oyo nsuka ekoya mpe ntango boni etikali mpo likambo yango esalema. Kasi, tosengeli kondima ete tokoki koyeba yango te. Omikundwela maloba oyo ya Yesu: “Soki nkolo-ndako ayebaka na ntango nini moyibi akoya na butu, mbɛlɛ alali mpɔngi te mpe mbɛlɛ atiki te ete moyibi abuka ndako na ye mpe akɔta. Yango wana bino mpe bómilɛngɛla, mpo Mwana ya moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa te.”—Matai 24:43, 44.
10. Mateya nini ozwi na bomoi ya ntoma Yoane mpe elimo oyo amonisaki?
10 Makambo oyo Yesu alobaki ekokani mpenza na oyo Mika, Sefania mpe Habakuku bakomaki. Nzokande, Yesu azalaki koloba te mpo na bato wana ya ntango ya kala, kasi mpo na biso bayekoli na ye. Bakristo mingi ya sembo basalelaki mpenza toli wana ya Yesu; ‘bamilɛngɛlaki,’ bakobaki kozela. Ntoma Yoane azalaki ndakisa malamu na likambo yango. Azalaki moko ya bantoma minei oyo bazalaki na Ngomba Olive, oyo batunaki Yesu na ntina na bosukisi ya makambo ya ntango oyo. (Matai 24:3; Marko 13:3, 4) Yango ezalaki na mobu 33 T.B., kasi, Yoane akokaki te koyeba mpenzampenza ntango oyo makambo yango ekosalema. Sikoyo, meká kozongisa makanisi na yo mbula soki 60 na nsima. Na ntango yango, Yoane akómaki mobange, kasi alɛmbaki te mpe atikaki te kozela. Kutu, ntango ayokaki Yesu alobi ete: “Ya solo; nazali koya nokinoki,” Yoane azongisaki ete: “Amen! Yaká, Nkolo Yesu.” Yoane ayokaki mawa te na ndenge oyo asalelaki bambula ya bomoi na ye. Andimaki mpenza ete ntango Yehova akosambisa, akopesa mpe moto na moto mbano na kolanda misala na ye. (Emoniseli 22:12, 20) Atako kosambisa yango ekokaki koya ntango nini, Yoane azalaki kaka ‘komilɛngɛla,’ ndenge kaka Yesu apesaki toli. Yo mpe osalaka bongo?
“KOZELA” TO “KOTONDA”?
11. Ndenge nini bato ya eleko ya Mika mpe ya Hosea bakesanaki na bango?
11 Tótalela liteya mosusu oyo tokoki kozwa epai ya basakoli oyo bazalaki na bomoi na eleko oyo Yehova asengelaki kopesa bitumbu, liboso na Yisraele mpe na nsima na Yuda, ezalaki kobɛlɛma. Ntango Mika azalaki ‘kotalela mpe komonisa ete azali kozela,’ bato mingi ya eleko na ye bazalaki kosala bongo te. Bazalaki ‘koyina makambo ya malamu mpe kolinga makambo ya mabe.’ Mika akebisaki bango ete soki babongwani te, ntango “bakobelela Yehova mpo na kosɛnga lisalisi, . . . akoyanola bango te.” (Mika 3:2, 4; 7:7) Hosea mosakoli oyo asalaki mosala na ye na eleko moko na Mika, asalelaki mpe maloba oyo emonisaki bomoi ya mosali bilanga, ntango alendisaki bato oyo bazalaki na bokonzi ya nɔrdi ya Yisraele boye: “Bómilonela momboto na boyengebene; bóbuka mbuma na ndenge oyo eyokani na motema boboto. Bómitimwela mabele oyo ebongi na bilanga, wana ntango ya koluka Yehova ezali naino.” Atako bongo bato mingi baboyaki koyoka. ‘Babalolaki mabe ndenge babalolaka mabele,’ na yango, babukaki nde kozanga boyengebene. (Hosea 10:12, 13) Bazalaki kokanga miso to kopesa mabɔkɔ na misala ya mabe, ‘batyaki motema na nzela na bango moko’ na esika ya kotya motema na nzela ya Yehova. Bato mosusu bakoki komituna lelo, ‘Ndenge nini likambo yango ekokaki kokómela basambeli ya solo oyo bazalaki na Mokili ya Ndaka?’ Hosea amonisaki ete mokakatano na bango ezalaki elimo oyo biso mpe tosengeli komibatela na yango soki tolingi kokoba kozela mokolo monene ya Yehova. Elimo yango ezali ya koluka bomoi ya malamu mpe ‘kotonda.’
12. (a) Hosea amonisaki makambo nini oyo Bayisraele bazalaki kosala liboso ya mobu 740 L.T.B.? (b) Makambo nini ezalaki komonisa ete bato ‘batondi’?
12 Nsima ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, mokili oyo etondaki na miliki mpe na mafuta ya nzoi, basaleli ya Nzambe bazalaki mpenza na bomoi ya malamu. Basalaki nini? Hosea amonisi maloba ya Yehova boye: “Batondaki ntango balyaki na bisika na bango ya koleisa bibwɛlɛ matiti. Batondaki, mpe motema na bango ebandaki komitombola. Yango wana babosanaki ngai.” (Hosea 13:6) Bikeke mingi liboso, Nzambe akebisaki bato na ye na likama wana. (Kolimbola Mibeko 8:11-14; 32:15) Atako bongo, na mikolo ya Hosea mpe Amose, Bayisraele babosanaki Yehova mpe mibeko na ye—“batondaki.” Amose alimbweli biso makambo nyonso polele. Amonisi ete mingi na bango bazalaki na biloko ya motuya na bandako na bango, mpe mabota mosusu kutu ezalaki na bandako mibale. Bazalaki na bilei ya kitoko, komɛla vinyo na basaani ya kitoko, mpe bazalaki komipakola “mafuta ya malamu koleka” na loposo na bango, ekoki kozala biloko ya nsolo kitoko ya kobongisa nzoto. (Amose 3:12, 15; 6:4-6) Na ntembe te, oyebi ete biloko yango ezali mabe te, kasi ezali nde mabe kopesa yango motuya mingi koleka.
13. Mabe nini Bayisraele, babola to bazwi basalaki?
13 Ezali solo ete, bato nyonso te oyo bazalaki na bokonzi ya nɔrdi nde bakómaki na bozwi mpe “batondaki.” Bamosusu bazalaki babola mpe basengelaki kobunda makasi mpo na kozwa mwa eloko mpe koleisa mabota na bango. (Amose 2:6; 4:1; 8:4-6) Ezali mpe bongo lelo na bisika mingi. Toli ya Nzambe oyo ezali na Hosea 13:6 etalelaki babola wana na Yisraele mpe etaleli biso lelo? Ee, ezali bongo. Yehova amonisaki ete ezala mosaleli na ye azali mozwi to mobola, asengeli komibatela mpo akóma te kotya likebi mingi koleka na biloko ya mokili mpe ‘abosana Nzambe.’—Luka 12:22-30.
14. Mpo na nini ebongi tókanisa lisusu na lolenge oyo tozali kozela?
14 Lokola tozali na eleko oyo tokoki koyeba makambo oyo eleká mpe komona kokokisama ya ebele ya bisakweli ya Biblia, tozali mpenza na ntina ya kokɛngɛla, komilɛngɛla mpe kozela. Kasi, ezali boni soki eleki mwa ntango to bambula mingi, banda tobandá kozela? Kala, tomipesaki na mosala ya kosakola mpe tozwaki bikateli oyo emonisaki ete tondimi ete mokolo ya Yehova ezali mosika te. Kasi, mokolo yango eyei kaka te. Tozali kaka kokoba kozela? Mokomoko akoki mpe komituna boye: ‘Nakobaka kaka kozela na mposa makasi to nalɛmbá mpenza?’—Emoniseli 2:4.
15. Makambo nini emonisi ete tokoki kolɛmba kozela?
15 Ezali na lolenge mingi oyo tokoki koyeba soki tozali kozela, kasi mpo na nini te kosalela makambo oyo Amose alobelaki mpo na bato ya eleko na ye oyo “batondaki”? Ntango tozali kosala bongo, tokoki komona na kati na biso soki ezali na likambo moko oyo ezali kotinda biso tókóma na ezaleli ya ‘kotonda.’ Mokristo moko, oyo liboso na makanisi mpe na misala na ye azalaki komonisa ete azali kozela mokolo ya Yehova akoki kobanda koluka kokóma na ndako to motuka ya kitoko mingi, bilamba oyo ebimi sika, mafuta mpe babiju ya ntalo mingi to vinyo mpe bilei ya kitoko. Ata vɛrsɛ moko te ya Biblia elobi ete tóboya makambo nyonso, tómipimela bisengo oyo ebongi. Moto oyo asali mosala makasi asengeli ‘kolya mpe komɛla mpenza mpe komona bolamu mpo na mosala na ye nyonso ya makasi.’ (Mosakoli 3:13) Kasi, likama ezali nde soki mokristo akómi komipesa mingi na kolya, komɛla mpe kobongisa nzoto na ye. (1 Petro 3:3) Mpo na komonisa ete likama wana ekoki kokómela bakristo lelo oyo, Yesu amonisaki ete likama yango emonanaki mpe epai ya bakristo mosusu ya Azia Moke, oyo batyamaki mafuta na elimo. (Emoniseli 3:14-17) Likambo moko ya ndenge wana ekómelaki biso? ‘Totondá,’ ntango mosusu tomibanzabanzaka kaka mpo na biloko ya mokili? Tolɛmbi kozela?—Baroma 8:5-8.
16. Mpo na nini ekozala litomba te kolendisa bana na biso bákóma na ezaleli ya ‘kotonda’?
16 Tokoki komonisa ete tolɛmbi kozela mokolo ya Yehova na batoli oyo topesaka bana na biso to bato mosusu. Mokristo moko akoki kokanisa boye: ‘Naboyaki kolanda bakelasi ya milaimilai to naboyaki mabaku ya kokóma moto monene mpo nazalaki kokanisa ete nsuka ekómi pene. Sikoyo nakolinga ete bana na ngai bátánga kelasi malamu mpo bázala na bomoi ya malamu.’ Ekoki kozala ete bato mosusu na mikolo ya Hosea bazalaki na makanisi ya ndenge wana. Soki ezali bongo, toli oyo bazalaki kopesa bana na bango oyo ezalaki kotinda bango bákóma na ezaleli ya ‘kotonda’ ememelaki mpenza bana na bango litomba? Mpe soki bana yango balandaki ezaleli ya ‘kotonda,’ to kozala na bomoi ya malamu, makambo elingaki kozala boni mpo na bango na mobu 740 L.T.B., ntango Samaria ekweaki na mabɔkɔ ya bato ya Asiri?—Hosea 13:16; Sefania 1:12, 13.
ZELÁ MAKAMBO OYO EKOSALEMA
17. Na ndenge nini tosengeli komekola Mika?
17 Na ndakisa ya basambeli ya solo ya ntango ya kala, tokoki kondima ete makambo oyo Nzambe alaki ekokokisama na ntango na yango, ntango oyo ye moko aponi. (Yosua 23:14) Mosakoli Mika azalaki mpenza na bwanya ya komonisa ezaleli ya kozela Nzambe ya lobiko na ye. Lokola biso tozali na likoki ya koyekola makambo eleká, tokoki koyeba makambo oyo elekaki na eleko ya Mika mpe komona ete azalaki na bomoi na ntango oyo etikalaki moke Samaria ekwea. Ezali boni mpo na biso mpe eleko oyo tozali? Soki totaleli lisusu bomoi na biso, tokomona polele ete tozwaki bikateli ya malamu, na ndakisa na likambo etali mosala, lolenge ya bomoi, mpe mosala ya ntango nyonso? Kasi, toyebi te “mokolo yango mpe ngonga yango.” (Matai 24:36-42) Kasi, tokosala mpenza na bwanya soki tozali komonisa elimo oyo Mika azalaki na yango mpe tozali kosala makambo oyo eyokani na yango. Mpe ntango Mika akozwa mbano ya bomoi na mabele oyo ekokóma paradiso, akosepela mpenza koyeba ete tozwaki matomba na nsango ya bisakweli na ye mpe na ndakisa na ye ya sembo! Biso baoyo tokozala na bomoi, tokozala elembo oyo ekomonisa mpenza ete Yehova azali Nzambe ya lobiko!
18, 19. (a) Obadia alobelaki likama nini oyo esengelaki koya? (b) Ndenge nini Obadia apesaki lisusu Yisraele elikya?
18 Elikya na biso ezali ya likolólikoló te. Na ndakisa, kanisá mokanda mokuse ya esakweli ya Obadia. Elobeli mingi Edome, emonisi bitumbu oyo Yehova apesaki bato oyo banyokolaki “ndeko” na bango Yisraele. (Obadia 12) Kobebisama oyo asakolaki, ekokisamaki ndenge tomonaki yango na mokapo 10 ya buku oyo. Na litambwisi ya Nabonide, bato ya Babilone bazwaki Edome na katikati ya ekeke ya motoba L.T.B., mpe banda wana Edome ezalaka lisusu te. Kasi, ezali na likanisi mosusu ya ntina na nsango ya Obadia, likanisi oyo etaleli ndenge na biso ya kokoba kozela mokolo monene ya Yehova.
19 Oyebi ete monguna (Babilone) ekólo oyo ebebisaki Edome, Nzambe asalelaki mpe yango mpo epesa bato na ye oyo bazalaki lisusu sembo te etumbu. Na mobu 607 L.T.B., bato ya Babilone babebisaki Yerusaleme mpe bamemaki Bayuda na boombo. Mokili yango etikalaki mpamba. Makambo esukaki kaka wana? Te. Na nzela ya Obadia, Yehova asakolaki ete Bayisraele bakozonga lisusu na mabele na bango. Na Obadia 17, okoki kotánga elaka oyo ya kolendisa: “Baoyo nyonso bakobika bakozala na Ngomba Siona, mpe yango ekokóma eloko moko mosantu, mpe ndako ya Yakobo ekozwa biloko oyo basengeli kozwa.”
20, 21. Mpo na nini Obadia 17 ekoki kolendisa biso?
20 Makambo oyo eleká emonisi ete oyo Yehova alobaki na nzela ya Obadia ekokisamaki. Nzambe asakolaki yango mpe esalemaki. Bankóto ya bato ya Yuda mpe ya Yisraele oyo bakendaki boombo, bazongaki na mabele na bango na mobu 537 L.T.B. Na lipamboli ya Yehova, bato yango babongolaki mabele na bango oyo etikalaki mpamba mpe ekómaki kitoko lokola paradiso. Yisaya 11:6-9 mpe 35:1-7 ezali na bisakweli ya mbongwana wana kitoko. Likambo ya ntina mingi ezalaki ete losambo ya solo ezongisamaki lisusu, na tempelo ya Yehova oyo etongamaki lisusu. Na yango Obadia 17, ekoki kozala elembeteli mosusu oyo ekoki kosalisa biso tótyela bilaka ya Nzambe motema. Ekokisamaka ntango nyonso.
21 Obadia asukisaki esakweli na ye na maloba kitoko oyo: “Bokonzi ekokóma ya Yehova.” (Obadia 21) Lokola ozali kotya motema na elaka yango, ozali kozela ntango oyo Yehova, na nzela ya Yesu Kristo akoyangela molɔ́ngɔ́ mobimba ata mpe mabele kozanga moto atɛmɛla ye. Ata soki ozali kozela mokolo monene ya Yehova—mpe mapamboli yango ekomema—esili koleka mwa ntango to mpe ebele ya bambula, okoki mpenza kondima ete bilaka wana ya Biblia, oyo ozali kozela ekokokisama.
22. Mpo na nini olingi ete ezaleli na yo eyokana na oyo ezali na Habakuku 2:3 mpe Mika 4:5?
22 Na yango, ebongi mpenza ete tóndima makambo oyo Habakuku alobaki, oyo etali mpe eleko na biso: “Emonaneli ezali naino mpo na ntango oyo etyamá, mpe ezali koya mbangumbangu kino na nsuka, mpe ekobuka lokuta te. Ata soki eumeli, zelá yango kaka; mpo ete kozanga ntembe yango ekokokisama. Ekokóma nsima ya ngonga te.” (Habakuku 2:3) Ata soki bato bakoki komona ete mokolo monene ya Yehova ezali koumela, mokolo yango ekoya mpenza na ntango oyo atye. Yehova alaki biso yango. Na yango, baoyo basaleli Nzambe bambula mingi mpe baoyo babandi kosalela ye sika bakoki kokende liboso na elikya lokola oyo ezali na Mika 4:5: “Biso, ɛɛ biso, tokotambola na nkombo ya Yehova Nzambe na biso mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ seko na seko.”
MAKAMBO OYO OSENGELI KOKANISA
• Likanisi nini ya ntina oyo etali ezaleli na yo okoki kozwa liteya na Mika 7:7; Habakuku 2:3; mpe Sefania 3:8?
• Mpo na nini toli oyo ezali na Yakobo 5:10, 11, ezali na ntina mpe na litomba mpo na yo?
• Litomba nini okozwa soki okanisi na mozindo na 2 Petro 3:9, 11, 12, 14?
MATOMBA NINI OKOZWA?
• Ezala ozali mozwi to mobola mateya nini okoki kozwa na Amose 3:15; 5:11; mpe Hagai 1:4-7?
• Bokeseni nini ezali kati na kotonda mpe kokoba kozela?—Habakuku 3:17, 18.
• Mpo na nini ezali na ntina ete okoba kozela na mposa makasi?—Sefania 1:12-15.
[Elilingi na lokasa 153]
Sefania
[Elilingi na lokasa 154]
“‘Bózela ngai,’ yango nde liloba ya Yehova.”—Sefania 3:8
[Bililingi na lokasa 160]
Olendisaka bana na yo bálanda bomoi ya ndenge nini?
[Elilingi na lokasa 163]
Tosalelaka Yehova na esengo na elikya ya kozala na bomoi ya seko