Tokotambola na Nkombo ya Yehova libela na libela!
“Tokotambola na nkombo ya [Yehova] Nzambe na biso, libela na libela.”—MIKA 4:5.
1. Nsango nini ezali na Mika mokapo 3 tii 5?
YEHOVA azali na likambo ya koyebisa bato na ye, mpe aponi Mika azala mosakoli na ye. Nzambe akani kopesa bato mabe etumbu. Akopesa Yisalaele etumbu mpo na lipɛngwi na yango. Kasi, ezali esengo koyeba ete Yehova akopambola baoyo bazali kotambola na nkombo na ye. Nsango nyonso wana epesami na maloba ya polele banda na mokapo 3 tii 5 ya esakweli ya Mika.
2, 3. (a) Bakonzi ya Yisalaele basengeli kozala na ezaleli nini, nzokande, bazali kosala nini? (b) Ndenge nini okoki kolimbola maloba ya elilingi oyo Mika 3:2, 3 esaleli?
2 Mosakoli ya Nzambe alobi boye: “Nalɔmbi bino ete bóyoka, Ɛ bankolo ya Yakobo mpe mikóló ya ndako ya Yisalaele! Ekoki na bino koyeba kosambisa-sembo te?” Ɛɛ, eloko basengelaki kosala nde yango wana; kasi, bango bazali kosala nini? Mika akobi koloba ete: “Bino bato baoyo boyini malamu nde bolingi mabe; baoyo bokobɔtɔlaka loposo na bango mpe bokobenda mosuni na mikuwa na bango. Bokolyaka mosuni ya bato na ngai, mpe bokobenda loposo longwa na bango mpe bokobukaka mikuwa na bango, ɛɛ, bokokataka yango na ndambo mike lokola mpo na [nzungu monene mpe lokola mosuni na kati ya nzungu, NW].”—Mika 3:1-3.
3 Yoká likambo: bakonzi bazali konyokola babola to bato mpamba! Ezali mpasi te mpo bato oyo bazali koyoka maloba ya elilingi oyo Mika asaleli awa bákanga ntina na yango. Bayebi ete soki babomi mpate, liboso ya kotɔkisa yango, balongolaka yango mposo mpe bakatakataka yango. Ntango mosusu babukabukaka mikuwa na yango mpo na kobimisa mafuta. Na nsima, bazwaka misuni yango mpe mikuwa, batɔkisaka yango na nzungu ya monene, lokola oyo Mika alobeli. (Ezekiele 24:3-5, 10) Ndakisa wana ebongi mpenza mpo na komonisa ndenge oyo bakonzi mabe bazali konyokola bato ya ekólo yango na mikolo ya Mika!
Yehova alingi tózala sembo
4. Bokeseni nini ezali kati na Yehova ná bakonzi ya Yisalaele?
4 Yehova, Mobateli ya bolingo, akeseni mpenza na bakonzi ya Yisalaele. Lokola bazali komonisa bosembo te, bazali ata moke te kokokisa mokumba na bango ya kobatela etonga. Kutu, bazali nde kolyela bampate, bazali kosalela bango bosembo te mpe bazali kotinda bango ‘básopa makila,’ ndenge Mika 3:10 emonisi yango. Liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo?
5. Yehova azali kosɛnga nini epai ya bato oyo bazali kokamba basaleli na ye?
5 Nzambe alingi ete baoyo bazali na mikumba na kati ya libota na ye básalelaka bosembo. Yango nde tozali komona epai ya basaleli ya Yehova na moi ya lelo. Mpe likambo yango eyokani mpenza na maloba ya Yisaya 32:1, (NW), oyo elobi ete: “Talá! Mokonzi moko akoyangela mpo na boyengebene; mpe bankumu, bakoyangela lokola bankumu mpo na bosembo.” Nzokande na mikolo ya Mika tomoni nini? ‘Baoyo bayini malamu nde balingi mabe’ bazali kotika te kobebisa bosembo.
Yehova ayokaka mabondeli ya banani?
6, 7. Likanisi nini ya ntina Mika 3:4 emonisi?
6 Bato ya ntango ya Mika bakoki mpenza kokanisa ete Yehova akosepela na bango? Te! Mika 3:4 elobi ete: “Bakolela epai ya [Yehova] nde akozongisela bango monɔkɔ te; ɛɛ, akobombela bango elongi na ye na ntango yango lokola esalaki bango mabe na misala na bango.” Likambo oyo epesi biso liteya moko monene.
7 Soki tokómi na momeseno ya kosala masumu, Yehova akoyoka mabondeli na biso te. Akoboya koyoka yango mingimingi mpenza soki tozali lokolo moko libándá lokolo moko na kati, kobomba masumu na biso mpe kolakisa na miso ya bato ete tozali kosalela Nzambe na bosembo. Na Nzembo 26:4, Davidi ayembaki boye: “Nafandi esika moko na bato ya lokuta te mpe naboyi kotambola na bakosi elongo moko.” Ye kutu alobi ndenge wana, bongo Yehova ye moko akoki nde koyanola na mabondeli ya baoyo bazali koboya kotosa Liloba na ye na nko?
Atondi na elimo ya Nzambe
8. Bakebisaki basakoli ya lokuta ya ntango ya Mika na likambo nini?
8 Bakambi ya elimo ya Yisalaele bazali kosala mpenza misala ya mabe! Basakoli ya lokuta babungisi libota ya Nzambe nzela. Bakambi yango oyo batondi na lokoso bazali koganga: “Kimya” kasi ‘bazali kosantisa etumba epai ya moto oyo atye bango eloko na monɔkɔ te.’ Yehova alobi ete: “Boye ekozala butu epai na bino ete bózala na emonaneli te; ekozala mpe molili epai na bino ete bókata makambo te; ntango ekolimwa likoló ya basakoli mpe moi ekozindisama likoló na bango. Bamoni-na-makambo bakoyoka nsɔni mpe bato ya soloka bakobulunganisama; ɛɛ bakozipa [minzomba, NW] na bango.”—Mika 3:5-7a.
9, 10. ‘Kozipa minzomba’ elimboli nini, mpe mpo na nini ezali na ntina te Mika asala yango?
9 Mpo na nini “bakozipa minzomba na bango”? Nsɔni nde ezali kotinda bato mabe ya ntango ya Mika básala bongo. Ebongi mpenza bato mabe wana báyoka nsɔni, mpamba te bazali koloba ete, ‘Nzambe azali koyanola biso te.’ (Mika 3:7b) Yehova ayokaka mabondeli ya bato ya lolendo te.
10 Ezali na ntina te Mika ‘azipa minzomba na ye.’ Ye azali koyoka nsɔni te. Yehova azali koyoka mabondeli na ye. Yoká Mika 3:8, epai mosakoli yango ya sembo alobi: “Kasi ngai natondi solo na [elimo ya Yehova, NW] mpe na kosambisa-sembo mpe na nguya.” Mika azali na botɔndi mpo atako aumeli na mosala na ye oyo azali kosala na bosembo, azali kaka ‘na nguya, na elimo ya Yehova’! Yango epesi ye makasi ya “kosakola epai ya Yakobo [botomboki, NW] na ye mpe epai ya Yisalaele lisumu na ye.”
11. Ndenge nini bato bazwaka nguya ya kosakola nsango ya Nzambe?
11 Mpo Mika akoka kosakola etumbu oyo Nzambe akani kopesa, asengeli kozala na makasi oyo eleki makasi ya bato. Asengeli kozala na elimo ya Yehova. Kasi, tokoloba boni mpo na biso moko? Tokokoka kokokisa mosala na biso ya kosakola kaka soki Yehova apesi biso nguya ya elimo santu na ye. Soki tozali kosala masumu na nko, ata tobomi nzoto na mosala ya kosakola, tozali kosala mosala ya mpunda. Nzambe akoyoka mabondeli na biso te ntango tozali kosɛnga ye apesa biso makasi mpo na mosala yango. Tokoki te kosakola bitumbu ya Tata na biso ya likoló soki tozali na “elimo ya Yehova” te. Lokola Mika, biso mpe tokoki kosakola liloba ya Nzambe na mpiko, kaka soki Nzambe azali koyoka mabondeli na biso mpe soki azali kosalisa biso na nzela ya elimo santu.
12. Nini esalisaki bayekoli ya liboso ya Yesu na ‘kokoba kosakola liloba ya Nzambe na mpiko’?
12 Mbala mosusu, ozali lisusu koyeba lisolo oyo ezali na Misala 4:23-31. Kanisá ete ozali moyekoli ya Yesu na ekeke ya liboso. Banyokoli oyo bazali na molende mabe bazali kosala nyonso mpo na kokanga bayekoli ya Klisto monɔkɔ. Kasi, bayekoli yango ya sembo babondeli Nkolo Mokonzi na bango ete: “Yehova, tyá likebi na makaneli na bango, mpe pesá baombo na yo likoki ya kokoba koloba liloba na yo na mpiko mpenza.” Nini esalemaki? Ntango basilisaki kobondela, esika oyo bayanganaki eninganaki, mpe bango nyonso batondaki na elimo santu mpe babandaki koloba liloba ya Nzambe na mpiko. Yango wana, tiká ete biso mpe, ntango tozali kosala mosala na biso ya kosakola, tóbondelaka Yehova mpe tótyaka motema na lisalisi oyo apesaka na nzela ya elimo santu.
13. Nini ekokómela Yelusaleme ná Samalia, mpe mpo na nini?
13 Kanisá lisusu mikolo ya Mika. Mika 3:9-12 elobi ete bakonzi yango oyo basopaka makila bazali kosambisa mpo báfuta bango avoka, banganga-nzambe bazali koteya mpo na kozwa lifuti, mpe basakoli ya lokuta bazali koyebisa makambo oyo ekoya mpo na kozwa mbongo. Yango wana, tokoki kokamwa te ete Nzambe alobi ete Yelusaleme, mboka-mokonzi ya Yuda, “ekokóma libondo ya mabanga”! Lokola losambo ya lokuta mpe bizaleli mabe etondi na Yisalaele, elimo ya Nzambe etindi Mika akebisa bato ete Nzambe akokómisa Samalia ‘libondo ya mabanga.’ (Mika 1:6) Kutu, ekoki kozala ete Mika aumelaki na bomoi tii ntango basoda ya Asulia babebisaki Samalia na mobu 740 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), ndenge esakolamaki. (2 Mikonzi 17:5, 6; 25:1-21) Emonani polele ete moto akoki kosakola bansango yango ya nguya oyo ezali kosakola mabe mpo na Yelusaleme mpe Samalia se na nguya ya Yehova.
14. Ndenge nini esakweli ya Mika 3:12 ekokisamaki, mpe yango esengeli kosala nini epai na biso?
14 Yuda ekoki kokima etumbu ya Yehova te. Na kokokisama ya esakweli ya Mika 3:12, Siona “ekotimolama lokola elanga.” Ndenge tozali lelo oyo na ekeke ya 21, toyebi ete makambo yango esalemaki ntango bato ya Babilone babebisaki Yuda ná Yelusaleme na mobu 607 L.T.B. Likambo yango esalemaki bambula mingi nsima ya eleko oyo Mika asakolaki, atako bongo ayebaki ete nsukansuka ekosalema. Biso mpe tosengeli kondima mpenza ete ebongiseli ya makambo mabe ya mikolo oyo ekosuka na “mokolo ya Yehova” oyo esakolamaki.—2 Petelo 3:11, 12.
Yehova atye makambo na molɔngɔ
15. Na maloba na yo moko, ndenge nini okoki kolobela esakweli ya Mika 4:1-4?
15 Tózonga lisusu na ntango ya Mika, na mbala oyo azali kosakola nsango ya elikya. Mika 4:1-4 ezali na maloba ya kolendisa mpenza! Kuna Mika alobi boye: “Ekozala ete na mikolo ya nsuka ngomba ya ndako ya [Yehova] ekokokisama likoló koleka ngomba nyonso, ekotombwa likoló ya [ngomba mike]; mpe mabota bakokenda wana. Mabota mingi bakokenda. . . . Akosambisa kati na mabota mingi, akopamela mabota ya nguya mosika; bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makɔnga na bango ete mazala bikateli ya matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te. Bakofanda mpe na nse, moto na moto na nse ya [nzete na ye ya vinyo mpe na nzete na ye ya figi, NW], moto moko akobangisa bango te mpo ete monɔkɔ ya [Yehova] na bibele elobi bongo.”
16, 17. Ndenge nini Mika 4:1-4 ezali kokokisama na moi ya lelo?
16 “Mabota” mpe “mabota ya nguya” oyo bavɛrsɛ yango elobeli ezali banani? Ezali te bikólo mpe baguvɛrnema ya mokili oyo. Esakweli ezali kolobela nde bato oyo bauti na bikólo nyonso oyo bazali koya kosala mosala ya bosantu na bomoko na ngomba ya Yehova, elingi koloba na losambo ya solo.
17 Ndenge esakweli ya Mika emonisi yango, etikali moke losambo ya pɛto ya Yehova ezala na mabelé mobimba. Lelo oyo, bato ‘oyo bazali na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko,’ bazali koyekola banzela ya Yehova. (Misala 13:48) Yehova azali kosambisa mpe kotya makambo na molɔngɔ na elimo mpo na bolamu ya bandimi oyo bazali kopona Bokonzi na ye. Bato yango bazali “ebele ya bato” oyo bakobika na “bolɔzi monene.” (Emoniseli 7:9, 14) Lokola bakómisi mipanga na bango biloko ya mosala ya bilanga, bazali kofanda na kimya, elongo na bandeko na bango Batatoli ya Yehova mpe na bato mosusu ata na moi ya lelo. Ezali mpenza esengo kozala na kati ya bato yango!
Bazali na ekateli ya kotambola na nkombo ya Yehova
18. ‘Kofanda na nse ya nzete ya vinyo mpe ya figi’ elimboli nini?
18 Lelo oyo, kobanga ekómisi bato mitema likoló; kasi biso tozali mpenza na esengo ya komona bato ebele bazali koyekola banzela ya Yehova. Tozali kozela na mposa makasi eleko oyo etikali moke eya, ntango bato nyonso oyo balingaka Nzambe bakoyekola lisusu etumba te kasi bakofanda moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi. Balonaka nzete ya figi mingimingi na kati ya bilanga ya vinyo. (Luka 13:6) Kofanda moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi elakisi kozala na kimya, na bomɛngo, mpe kobanga te. Ata lelo oyo, tozali na kimya ya makanisi mpe tozali kobatelama na elimo mpo tozali na boyokani malamu na Yehova. Ntango Bokonzi ya Nzambe ekokokisa makambo wana, tokobanga lisusu te mpe tokobatelama na makambo nyonso.
19. Kotambola na nkombo ya Yehova elimboli nini?
19 Mpo Nzambe asepela na biso mpe apambola biso, tosengeli kotambola na nkombo na ye. Na Mika 4:5, mosakoli amonisi likambo yango polele na maloba oyo: “Mabota nyonso bakotambola, moko na moko na nkombo ya nzambe na ye; nde biso tokotambola na nkombo ya [Yehova] Nzambe na biso, libela na libela.” Kotambola na nkombo ya Yehova elimboli kaka te koloba ete azali Nzambe na biso. Esɛngi kaka te koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola Bokonzi, atako makambo yango ezali mpe na ntina mingi. Soki tolingi kotambola na nkombo ya Yehova, tosengeli komipesa na ye mpe kosala nyonso mpo na kosalela ye na bosembo mpe na bolingo nyonso. (Matai 22:37) Lokola tozali basambeli ya solo, ekateli na biso ezali ya kotambola na nkombo ya Yehova, Nzambe na biso, libela na libela.
20. Mika 4:6-13 esakolaki nini?
20 Sikoyo, tótalela esakweli ya Mika 4:6-13. “Mwana mwasi ya Siona” asengeli kokende na boombo ‘na Babilone.’ Likambo yango ekómelaki mpenza bato ya Yelusaleme na ekeke ya nsambo L.T.B. Atako bongo, esakweli ya Mika emonisi ete ezali na bato oyo bakotikala mpe bakozonga na ekólo Yuda, mpe ntango Siona ekozongisama lisusu, Yehova akosilisa banguna na ye nyɛɛ.
21, 22. Ndenge nini Mika 5:2 ekokisamaki?
21 Mika mokapo 5 esakoli makambo mosusu ya minene. Na ndakisa, yoká oyo elobami na Mika 5:2-4. Mika asakoli ete Mokonzi moko oyo Nzambe aponi, oyo “ebandeli na ye ezalaki kalakala,” akobima na Beteleme. Akoyangela lokola mobateli ya mpate “na nguya ya [Yehova].” Mpe Mokonzi yango akozala monene, kaka na Yisalaele te, kasi tii ‘na ndelo ya nsuka ya mabelé.’ Bato mingi na mokili bakoki komituna soki mokonzi yango ezali mpenza nani, nzokande biso toyebi ye malamu.
22 Nani abotamaki na Beteleme, oyo alekaki bato nyonso ya mboka yango na lokumu? Mpe nani ‘akozala monene tii na ndelo ya nsuka ya mabelé’? Moto mosusu te, kaka Masiya, Yesu Klisto! Ntango Elode Monene atunaki banganga-nzambe bakonzi mpe bakomeli epai wapi Masiya asengelaki kobotama, bango bazongisaki ete: “Na Beteleme ya Yudea.” Kutu, bazongelaki maloba ya Mika 5:2. (Matai 2:3-6) Bato mpamba mosusu bayebaki mpe likambo yango, mpamba te Yoane 7:42 elobeli motuna oyo batunaki ete: “Likomami elobá te ete Klisto akouta na kati ya bana ya Davidi, mpe na Beteleme mboka oyo Davidi azalaki kofanda?”
Libɔndisi ya solosolo mpo na bato
23. Lelo oyo, likambo nini ezali kokokisa Mika 5:7?
23 Mika 5:5-15 elobeli ndenge basoda ya Asulia bakobundisa mboka mpe bakolonga, kasi bolongi na bango ekozala se ya ntango mokuse, emonisi mpe ete Nzambe akopesa bikólo oyo ezali kotosa ye te etumbu. Mika 5:7 elaki ete batikali ya Bayuda oyo bakobongola motema bakozonga na mboka na bango, kasi maloba yango etaleli mpe mikolo na biso. Mika alobi boye: “[Batikali, NW] ya Yakobo bakozala katikati na mabota mingi, lokola mamwɛ makoutaka na [Yehova mpe lokola ebele ya matangá, NW] ya mbula likoló ya matiti.” Basaleli maloba ya elilingi kitoko wana mpo na kosakola ete batikali ya Yisalaele ya elimo, to Yakobo, bakozala lipamboli euti na Nzambe mpo na bato ya bikólo. “Bampate mosusu” ya Yesu, baoyo bazali na elikya ya kozwa bomoi awa na mabelé bazali na esengo ya kosala elongo na batikali ya “Yisalaele ya Nzambe” na mikolo na biso, bazali kosalisa bango na kolendisa bato mosusu na elimo. (Yoane 10:16; Bagalatia 6:16; Sefania 3:9) Yango wana, ezali na likambo moko oyo esengeli kotinda biso na kokanisa. Lokola tozali basakoli ya Bokonzi, biso nyonso tosengeli kosepela na libaku malamu na biso ya komemela basusu libɔndisi ya solosolo.
24. Wapi makanisi ya Mika mokapo 3 tii 5 oyo esimbi motema na yo?
24 Esakweli ya Mika mokapo 3 tii 5 eteyi yo makambo nini? Mbala mosusu makambo oyo: (1) Nzambe alingi ete bato oyo bazali kokamba basaleli na ye bázala sembo. (2) Yehova akoyoka mabondeli na biso te soki tozali kosala masumu na nko. (3) Tokokokisa mosala na biso ya kosakola kaka soki Nzambe azali kolendisa biso na elimo santu na ye. (4) Mpo Yehova asepela na biso, tosengeli kotambola na nkombo na ye. (5) Lokola tozali basakoli ya Bokonzi, tosengeli kosepela na libaku malamu ya komemela bato libɔndisi ya solosolo. Ekoki mpe kozala na makambo mosusu oyo esimbi motema na yo. Makambo nini lisusu tokoki koyekola na mokanda yango ya esakweli oyo ezali na Biblia? Lisolo oyo elandi ekosalisa biso tózwa mateya malamu na mikapo mibale ya nsuka ya mokanda ya Mika oyo ezali kolendisa kondima.
Okopesa eyano nini?
• Nzambe azali kosɛnga nini epai ya bato oyo bazali kokamba basaleli na ye?
• Mpo na nini kobondela mpe kozala na elimo santu ezali na ntina mpo na kokokisa mosala ya Yehova?
• Ndenge nini bato ‘batambolaka na nkombo ya Yehova’?
[Elilingi na lokasa 15]
Okoki kolimbola ndakisa ya nzungu oyo Mika asalelaki?
[Bililingi na lokasa 16]
Lokola Mika, tozali kokokisa mosala na biso na mpiko