Mokapo 3
Mokolo ya Yehova—likambo ya ntina mingi
1, 2. (a) Likambo nini ya ntina mingi basakoli nyonso 12 balobeli? (b) Ndenge nini basakoli mosusu na kati ya basakoli 12 balobeli polele mokolo ya Yehova?
“MOKOLO monene ya Yehova ekómi pene. Ekómi pene, mpe ezali koya mbangu mpenza.” (Sefania 1:14) Basakoli ya Nzambe bakebisaki mbala na mbala ete mokolo ya Yehova ekómi pene. Mbala mingi, bazalaki komonisa polele ndenge koya ya mokolo yango ekobongola bomoi ya bato, bizaleli na bango, mpe etamboli na bango. Na bansango na bango bazalaki ntango nyonso komonisa ete mikolo etikali ya kotánga. Soki oyokaki bansango yango na matoi na yo moko, olingaki kosala nini?
2 Soki otángi mikanda 12 ya basakoli yango, okomona ete bango nyonso balobeli mokolo ya Yehova na maloba ya polele to ya elilingi.a Na yango, liboso tótalela na mikapo oyo elandi bansango ya ntina oyo basakoli yango balobelaki, kanisá likambo ya ntina oyo ezongelami mingi: mokolo ya Yehova. Basakoli motoba kati na bango basalelaki mpenza maloba yango to basalelaki maloba mosusu oyo ekokani na yango. Yoele alobelaki na maloba ya mpiko “mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya Yehova.” (Yoele 1:15; 2:1, 2, 30-32) Amose ayebisaki Bayisraele ete bámibongisa mpo na kokutana na Nzambe na bango, mpamba te mokolo ya Yehova ekozala mokolo moko ya molili. (Amose 4:12; 5:18) Na nsima, Sefania alobaki maloba oyo ezali na paragrafe 1. Lisusu, pene na ntango oyo Yerusaleme esengelaki kobebisama, Obadia akebisaki ete: “Mokolo Yehova akotɛmɛla bikólo nyonso ekómi pene.”—Obadia 15.
3. Mpo na nini tokoki koloba ete basakoli oyo basakolaki nsima ya kobima ya Bayisraele na boombo balobelaki mokolo ya Yehova?
3 Okomona mpe ete basakoli mibale oyo batindamaki epai ya Bayuda nsima ya kobima na bango na boombo basalelaki mpe maloba oyo ekokani na yango. Zekaria alobelaki mokolo oyo bikólo nyonso oyo ekoya kobundisa Yerusaleme ekobomama. Alobelaki na mpiko nyonso makambo oyo ekosalema na “mokolo oyo eyebani ete ezali ya Yehova.” (Zekaria 12:9; 14:7, 12-15) Mpe Malaki akebisaki basaleli ya Nzambe mpo na koya ya “mokolo yango monene mpe ya nsɔmɔ.”—Malaki 4:1-5.
4. Ndenge nini basakoli mosusu na kati ya basakoli 12 balobelaki mokolo ya Yehova?
4 Atako basalelaki te maloba “mokolo ya Yehova,” basakoli mosusu na kati ya basakoli 12, balobelaki mokolo yango na maloba ya elilingi. Hosea alobaki ete Yehova asengelaki kosambisa Yisraele mpe na nsima Yuda. (Hosea 8:13, 14; 9:9; 12:2) Mbala mingi, bansango yango ezalaki na boyokani na makambo oyo Yehova azalaki kosala na ntango yango. Na ndakisa, Yona asakolaki bitumbu oyo Nzambe asengelaki kopesa bato ya Ninive, mpe Mika alobelaki makambo oyo esengelaki kokómela batomboki. (Yona 3:4; Mika 1:2-5) Nahumu alakaki ete Yehova akopesa banguna na ye etumbu. (Nahumu 1:2, 3) Habakuku alelaki mpo na bosembo mpe alobelaki “mokolo ya mpasi.” (Habakuku 1:1-4, 7; 3:16) Bansango mosusu oyo ezali na mikanda yango elobelaki makambo oyo esengelaki kotalela mpe bakristo ya solo. Na ndakisa, Hagai, moko ya basakoli oyo basakolaki nsima ya kobima ya Bayisraele na boombo, alobelaki koningisama ya bikólo. (Hagai 2:6, 7) Ntoma Paulo atángaki maloba ya Hagai 2:6 mpo na kolendisa bakristo bázala na etamboli oyo ebongi mpo na ntango oyo Nzambe akolongola likoló mabe ya elilingi.—Baebre 12:25-29; Emoniseli 21:1.
MOKOLO YA YEHOVA—EZALI NINI?
5, 6. Na kotalela basakoli, mokolo ya Yehova ekozala ndenge nini?
5 Ezali mabe te komituna soki mokolo ya Yehova ekozala ndenge nini. Okoki komituna, ‘lolenge oyo nazali kotambwisa bomoi na ngai lelo oyo mpe ndenge natalelaka bomoi na ngai na mikolo ezali koya, emonisi ete nazali kobatela na makanisi mokolo ya Yehova?’ Ndenge basakoli bamonisaki yango, mokolo ya Yehova ezali ntango oyo Yehova akopesa banguna na ye etumbu, ezali mokolo ya etumba. Mokolo yango ya nsɔmɔ ekozala mokolo oyo makambo ya nsɔmɔ ekomonana na likoló. “Moi ná sanza ekoyinda mpenza, mpe minzoto etiki kongɛnga.” (Yoele 2:2, 11, 30, 31; 3:15; Amose 5:18; 8:9) Nini ekosalema awa na mabele, epai biso tofandi? Mika alobaki boye: “Bangomba ekonyangwa na nse na ye, mpe mabwaku ya patatalu ekopaswana, lokola mafuta mpo na mɔtɔ, lokola mai esopani na esika oyo ekitá.” (Mika 1:4) Atako maloba oyo ekoki kozala ya elilingi, kasi tokoki koloba ete makambo oyo Nzambe akosala ekomemela mabele mpe bafandi na yango mpasi. Kasi, bato nyonso te nde bakomona mpasi yango. Kaka basakoli yango balobelaki mpe ebele ya mapamboli mpo na baoyo bazali ‘koluka oyo ezali malamu’ mpe na ndenge yango bakotikala na bomoi.—Amose 5:14; Yoele 3:17, 18; Mika 4:3, 4.
6 Basakoli mosusu na kati ya basakoli 12, balobelaki makambo mosusu oyo etali mokolo ya Yehova. Habakuku alobelaki na mpiko nyonso ndenge oyo Yehova akopasola “bangomba ya seko na seko” mpe “bangomba mike oyo ezali koumela seko,” maloba oyo ebongi mpenza mpo na komonisa bibongiseli ya bato oyo ezali komonana lokola nde epikama. (Habakuku 3:6-12) Ya solo, mokolo ya Yehova “ezali mokolo ya nkɛlɛ, mokolo ya mpasi mpe ya bwale, mokolo ya mbula ya mopɛpɛ makasi mpe ya libebi, mokolo ya molili mpe ya kozanga pole, mokolo ya mapata mpe ya molili tuu.”—Sefania 1:14-17.
7. Mpasi monene nini esakolami, mpe ndenge nini ekokokisama?
7 Kanisá naino mpasi monene oyo ekokómela bato oyo bazali kobundisa Nzambe! “Mosuni ya moto mokomoko ekopɔla, wana atɛlɛmi na makolo na ye; miso na ye mpenza ekopɔla na madusu ya miso, mpe lolemo na ye mpenza ekopɔla na monɔkɔ na ye.” (Zekaria 14:12) Ezala emonaneli yango ekokokisama na ndenge ya solosolo to na ndenge ya elilingi, okoki kosimba ete ezali kolobela mpasi oyo ekokómela bato mingi. Ata soki ekokokisama na ndenge ya solosolo te, lolemo ya banguna ya Nzambe ekopɔla na ndenge ete bakozala lisusu te na makasi ya koloba mabe. Mpe likanisi nyonso oyo bakozwa mpo na kobundisa basaleli ya Nzambe ekobeba.
NTINA OYO NZAMBE YA BOLINGO AKOPESA BITUMBU
8, 9. (a) Mpo na koyeba ntina oyo Yehova akopesa bato mabe etumbu, osengeli kotalela likambo nini? (b) Boyokani nini ezali kati na bosembo na yo mpe bitumbu oyo Yehova azali kokana kopesa?
8 Ntango mosusu oyoká bato bazali komituna boye: ‘Ndenge nini Nzambe ya bolingo akoki kopesa banguna na ye mpasi ya ndenge wana? Nzambe akoyeisa mpasi yango na mabele? Yesu apesaki toli te ete tókoba kolinga ata banguna na biso mpe na ndenge yango tómonisa ete tozali bana ya Tata na biso ya likoló?’ (Matai 5:44, 45) Mpo na koyanola na mituna yango, tokoki kotalela ndenge mpasi ebandaki na mokili. Nzambe akelaki mobali mpe mwasi ya liboso na elilingi na ye mpe na lolenge na ye—bazalaki bato ya kokoka. Kasi, bakɔtisaki lisumu mpe liwa na mokili mpe na ndenge yango bakɔtisaki yango na bomoi na biso. Bamityaki na ngámbo ya Satana Zabolo na ntembe oyo ebimaki mpo na koyeba nani azali na lotomo ya koyangela bato. (Ebandeli 1:26; 3:1-19) Na boumeli ya bikeke, Satana aluki komonisa ete soki bato bamekami, bakotika kosalela Yehova. Oyebi ete Satana alongi te. Yesu Kristo mpe ebele ya basaleli mosusu ya Yehova babatelaki bosembo na bango epai ya Nzambe mpe bamonisaki ete basalelaka ye mpo balingaka ye. (Baebre 12:1-3) Okoki koyeba bankombo ya ebele ya bato oyo bazali kosalela Nzambe na bosembo?
9 Lisusu, ozali na mokumba na ntembe oyo ekosuka ntango Yehova akosukisa mabe. Na ndakisa, ntango ozali kotánga mikanda yango 12, okomona ete basakoli yango mosusu babendaki likebi na bomoi ya bisengo ya bato oyo bazalaki kozwa na motuya te losambo ya Yehova. Basakoli yango bakebisaki basaleli ya Nzambe ete ‘bátya motema na bango na banzela na bango’ mpe bábongola bomoi na bango. (Hagai 1:2-5; 2:15, 18; Amose 3:14, 15; 5:4-6) Ya solo, basakoli bazalaki mpenza kolakisa bato ndenge bakoki kotambwisa bomoi na bango. Baoyo bandimaki toli yango, bamonisaki ete Yehova azali Mokonzi na bango, mpe na ndenge yango bamonisaki ete Satana azali mokosi. Yehova akomimonisa sembo epai ya bato yango ntango akoboma banguna na ye.—2 Samwele 22:26.
10. Ndenge nini makambo oyo Mika alobi emonisi ntina mosusu oyo Yehova asengeli kopesa bato mabe etumbu?
10 Ezali na ntina mosusu oyo mpo na yango Nzambe asengeli kopesa bato mabe etumbu. Tózongisa naino makanisi na ekeke ya mwambe L.T.B., ntango Mika azalaki kosakola na Yuda. Azalaki koloba lokola nde ye azalaki ekólo yango, amikokanisaki na nzete ya vinyo to nzete ya mbuma nsima ya kobuka bambuma, mbuma ata moko ezalaki kotikala te. Makambo ezalaki ndenge wana na Yuda, epai ezalaki mpasi komona bato ya sembo. Bayisraele bazalaki koboma bandeko na bango moko, bazalaki mpenza na mposa ya kosopa makila. Bakonzi mpe basambisi na bango bazalaki mpenza koluka kolyela bato. (Mika 7:1-4) Soki ozalaki na bomoi na ntango wana, olingaki koyoka ndenge nini? Na ntembe te, olingaki koyoka mawa mpo na bato oyo bazalaki konyokwama mpamba. Na ntembe te, Yehova ayokaka mpenza mawa mpo na bato oyo bazali konyokwama! Lelo oyo, Yehova azali mpenza kotalela bato. Okanisi ete azali komona nini epai na bango? Bato oyo basalaka mabe bazali kolyela basusu mpe bazali kosala bazalani na bango mabe mpenza. Bato ya sembo bazali moke soki tokokanisi bango na bato oyo bazali na mokili mobimba. Kasi, tosengeli kobungisa elikya te. Mpo na bolingo oyo azali na yango epai ya bato oyo bazali konyokwama, Yehova akosukisa makambo na bosembo.—Ezekiele 9:4-7.
11. (a) Mokolo ya Yehova elimboli nini mpo na baoyo babangaka ye? (b) Nsango ya makebisi oyo Yona asakolaki esalaki bato ya Ninive nini?
11 Emonani polele ete mokolo ya Yehova elimboli kobomama ya banguna na ye mpe lobiko mpo na baoyo babangaka ye mpe basalelaka ye.b Mika asakolaki ete bato ya bikólo bakomata na ngomba ya ndako ya Yehova, mpe yango ekomema kimya mpe bomoko na mokili mobimba. (Mika 4:1-4) Soki tozongi na ntango wana, bato babongolaki bomoi na bango mpo basakoli bazalaki kosakola na ntina na mokolo ya Yehova? Bato mosusu babongolaki bomoi na bango. Tómikundwela ete ntango Yona asakolaki bitumbu oyo esengelaki kokómela Ninive, bato ya mobulu mpe ya mabe ya engumba yango “babandaki kondimela Nzambe” mpe ‘babongwanaki na nzela na bango ya mabe.’ Mpo na yango, Yehova apesaki lisusu te etumbu oyo akanaki na ntango wana. (Yona 3:5, 10) Nsango ya mokolo ya kosambisama ya Yehova ebongolaki bomoi ya bato ya Ninive!
NDENGE NINI MOKOLO YANGO ETALELI MPE YO?
12, 13. (a) Basakoli 12 basakolaki mpo na banani? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete maloba ya basakoli 12 esengelaki mpe kokokisama lisusu na nsima?
12 Bato mosusu bakoki koloba ete ‘kasi, basakoli yango bazalaki na bomoi esili koleka bikeke mingi.’ ‘Bansango oyo bango balobaki mpo na mokolo ya Yehova etali ngai na nini?’ Ya solo, basakoli yango bazalaki na bomoi bambula ebele liboso kutu Yesu abotama, atako bongo tosengeli kotalela ndenge makambo oyo balobaki mpo na mokolo ya Yehova ezali na ntina na ekeke oyo ya 21. Matomba nini tokoki kozwa na makambo oyo balobaki mpo na mokolo monene ya Yehova? Ezali na likambo ya ntina oyo ekoki kosalisa biso tóyeba nsango na bango mpe tózwela yango litomba. Tosengeli koyeba ete basakoli yango bakebisaki Yisraele, Yuda, bikólo ya zingazinga, mpe banguya mosusu ya mokili mobimba ya eleko wana mpo na mokolo ya Yehova.c Likambo ya ntina oyo tosengeli koyeba ezali ete bisakweli yango ekokisamaki! Bato ya Asiri bakɔtaki na Samaria, Yuda ebebisamaki na mobu 607 L.T.B., mpe eumelaki te bikólo mabe ya zingazinga ebebisamaki. Nsukansuka, Asiri mpe Babilone oyo ezalaki banguya ya mokili mobimba ekweaki, nyonso wana ekokisaki bisakweli ya sikisiki.
13 Sikoyo, kanisá na mokolo ya pantekote ya mobu 33 T.B., nsima ya kokokisama ya ebele ya bisakweli yango mpo na mbala ya liboso. Na mokolo yango, ntoma Petro asalelaki esakweli ya Yoele mpo na kolobela ndenge elimo santu ya Nzambe ekitelaki bato. Na nsima, Petro atángaki mokanda ya Yoele: “Moi ekobongwana molili mpe sanza ekobongwana makila liboso ete mokolo monene mpe ya nkembo ya Yehova eya.” (Misala 2:20) Yango emonisi ete kokokisama mosusu ya bisakweli oyo etali mokolo ya Yehova esengelaki kosalema. Esakweli ya Yoele ekokisamaki mpo na mbala ya mibale na mobu 70 T.B., ntango basoda ya Roma babebisaki Yerusaleme, yango ezalaki mpenza ntango ya molili mpe ya makila.
14, 15. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete bisakweli oyo etali mokolo ya Yehova etaleli mpe biso lelo oyo? (b) Tokoki kolikya ete mokolo ya Yehova eya ntango nini?
14 Nzokande, esakweli ya Yoele mpe bisakweli mosusu oyo etali mokolo ya Yehova esengeli kokokisama mpo na mbala ya nsuka, yango etaleli mpenzampenza biso oyo tozali na bomoi na ekeke oyo ya 21. Mpo na nini tokoki koloba bongo? Petro apesaki bakristo toli ete bábatelaka ‘na makanisi na bango kozala ya mokolo ya Yehova.’ Ntoma yango abakisaki boye: “Tozali kozela likoló ya sika mpe mabele ya sika ndenge alakaki, mpe kuna, boyengebene ekozala.” (2 Petro 3:12, 13) Likoló moko te ya sika (guvɛrnema ya sika ya teokrasi) mpe mabele moko te ya sika (bato ya boyengebene oyo bakotambwisama na guvɛrnema yango) etyamaki mbala moko nsima ya kobomama ya Yerusaleme na mobu 70 T.B. Na yango, maloba ya esakweli oyo elobeli mokolo ya Yehova esengelaki kokokisama lisusu. Ya solo, bisakweli yango etaleli mpe biso oyo tozali na “ntango moko ya mpasi mpenza”!—2 Timote 3:1.
15 Ndenge oyo mikanda yango 12 elobeli mokolo ya Yehova ekundweli biso maloba oyo ya Yesu: “Ekozala na bolɔzi moko monene oyo esalemá naino te banda mokili ebandá tii sikoyo, ɛɛ, mpe ekosalema lisusu te.” Alobaki ete “nokinoki nsima” ya kobanda ya bolɔzi yango monene, “moi ekoyinda, mpe sanza ekopesa pole na yango te, mpe minzoto ekouta na likoló ekwei, mpe banguya ya likoló ekoningana.” (Matai 24:21, 29) Yango ezali kosalisa biso tómeka komona ntango oyo mokolo ya Yehova ekoya. Ekómi mpenza pene. Makomami emonisi ete bolɔzi yango monene ekobebisa “Babilone Monene,” ebongiseli ya mangomba ya lokuta. Na nsuka ya bolɔzi yango monene, mokolo ya Yehova ekoboma nyɛɛ banguna ya Nzambe awa na mabele.—Emoniseli 17:5, 12-18; 19:11-21.
16. Na ndenge nini bisakweli etali mokolo ya Yehova ekokokisama na mobimba na yango?
16 Batatoli ya Yehova basimbi ntina ya kokokisama ya bisakweli ya mokolo ya Yehova. Mbala mingi mpe na lolenge mingi, Yerusaleme oyo ekómaki mopɛngwi, Samaria oyo ezangaki bosembo, Edome oyo emonisaki makambo mabe, Asiri oyo etondaki na mobulu, mpe Babilone, emonisaki na ndenge ya elilingi makambo ndenge na ndenge ya mangomba ya lokuta. Mangomba yango nyonso ekobomama ntango bolɔzi monene ekobanda. Na nsima, “mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya Yehova,” ebongiseli ya politiki mpe ya mimbongo oyo ezalaki kolinga ye ekosuka.—Yoele 2:31.
OMIBONGISA
17, 18. (a) Mpo na nini Amose asakolaki mpasi mpo na baoyo bazalaki “na mposa ya mokolo ya Yehova”? (b) Nini ekokómela baoyo bazali komibongisa te mpo na mokolo ya Yehova?
17 Lokola nsango ya bitumbu etali libosoliboso nde mangomba ya lokuta, bakristo mosusu bakoki kokanisa ete kokokisama ya bisakweli yango etali bango te. Kasi, makambo oyo Amose ayebisaki Bayisraele ezali na ntina mingi mpo na biso nyonso; alobaki boye: “Mawa na baoyo bazali na mposa ya mokolo ya Yehova!” Bayisraele mosusu ya ntango ya Amose bakanisaki ete mokolo ya Yehova ekomemela bango kaka mapamboli, bakanisaki ete ekozala mokolo oyo Nzambe akosala mpo na bato na ye. Bazalaki kutu kozela mokolo yango na mposa makasi! Nzokande, Amose abakisaki ete, mpo na bato oyo bazalaki koluka kaka matomba na bango moko, mokolo ya Yehova esengelaki kozala “molili, kasi pole te.” Ya solo, etikalaki moke nkanda ya Yehova ekwela Bayisraele yango!—Amose 5:18.
18 Na nsima, Amose alobelaki likambo oyo ekokómela baoyo bazali mpenza na mposa ya mokolo ya Yehova. Kanisá moto oyo azalaki kokima nkosi mpe akei kokutana na urse. Ntango azali kokima urse, akei komibomba na ndako moko. Amɛli mpema mpenza, akangi porte mpe alaleli efelo, kasi nyoka eswi ye. Tokoki koloba ete yango nde makambo oyo ezali kozela baoyo nyonso bazali komibongisa te mpo na mokolo ya Yehova.—Amose 5:19.
19. Tosengeli mpenza kosala nini mpo na komonisa ete tozali komibongisa mpo na mokolo ya Yehova?
19 Omoni ndenge lisolo oyo ekoki kozala na ntina mpo na yo? Kobosana te ete Amose azalaki kolobela mpenza bato oyo bamipesaki epai ya Nzambe. Atako bongo, ezalaki na makambo oyo basengelaki kobongisa na misala mpe bizaleli na bango. Ebongi te ete yo mpe otalela bomoi na yo mpo na komona soki ozali komibongisa mpo na mokolo wana ya ntina to soki ezali na makambo mosusu ya bomoi na yo oyo osengeli kobongisa? Ndenge nini okoki komonisa ete omibongisi mpenza? Ezali te na kotonga ndako mpo na komibomba, kobomba bilei, koyekola ndenge ya kopɛtola mai, to kobomba biloko ya motuya, ndenge bato mosusu basalaki na bisika mosusu. Sefania alobi ete: “Ezala palata na bango to wolo na bango ekokoka kobikisa bango te na mokolo ya nkɛlɛ ya Yehova.” Na yango, komibongisa ezali te kobomba biloko ya mokili. (Sefania 1:18; Masese 11:4; Ezekiele 7:19) Na esika ya kosala bongo, tosengeli nde kokɛngɛla na elimo mpe mokolo na mokolo kozala na bomoi oyo emonisi ete tozali komibongisa. Tosengeli kozala na makanisi ya malamu—mpe na misala oyo eyokani na yango. Mika alobaki boye: “Ngai, ezali Yehova nde nakotalela. Nakomonisa ete nazali kozela Nzambe ya lobiko na ngai.”—Mika 7:7.
20. Makambo nini tosengeli kotika te ebebisa ndenge oyo tozali kozela?
20 Soki ozali kozela mokolo ya Yehova ndenge wana, okomonisa ete omibongisi mpo na mokolo yango. Okomitungisa te mpo na mokolo oyo yango ekoya to ntango boni osengeli kozela yango lisusu. Bisakweli nyonso oyo etali mokolo yango ekokokisama na ntango oyo Yehova abongisi mpe ekoya na retare te. Yehova ayebisaki Habakuku boye: “Emonaneli ezali naino mpo na ntango oyo etyamá, mpe ezali koya mbangumbangu kino na nsuka, mpe ekobuka lokuta te. Ata soki eumeli [ndenge bato bakoki kokanisa], zelá yango kaka; mpo ete kozanga ntembe yango ekokokisama. Ekokóma nsima ya ngonga te [na ndenge Yehova atalelaka makambo].”—Habakuku 2:3.
21. Ndenge nini okoki kozwa matomba na makambo oyo tokoyekola na buku oyo?
21 Na buku oyo, okoyekola ndenge malamu ya kozela Nzambe ya lobiko. Matomba nini okoki kolikya kozwa? Ekozala malamu kotya likebi na eteni moko ya Biblia oyo mbala mosusu omeseni na yango mpenza te—mikanda 12, oyo bato babengaka Basakoli ya Mike. Lisusu, okoyeba makambo mingi ya ntina. Na ndakisa, na eteni 2, okomona ndenge okoki ‘koluka Yehova’ mpe kotikala na bomoi. (Amose 5:4, 6) Soki oyekoli mikanda yango 12, okozala na likoki ya kososola ndenge ya koyeba Yehova malamu mpe komona ntina ya kosalela ye lisusu mingi koleka. Na lisalisi ya basakoli yango, na ntembe te okoyeba makambo mingi lisusu oyo etali bomoto na ye. Na eteni 3, okomona polele lisusu makambo oyo Yehova azali kosɛnga yo okokisa na libota na yo mpe epai ya bato mosusu. Yango ekoki kosalisa yo omilɛngɛla mpo na mokolo na ye monene. Na nsuka, na eteni 4, okoyekola batoli oyo basakoli bapesi na ntina na bizaleli malamu oyo osengeli kozala na yango lokola mokolo ya Yehova ezali kobɛlɛma mpenza; okoyekola mpe ndenge oyo yango ekoki kosalisa yo na mosala ya kosakola. Na ntembe te, okosepela mpenza ntango ozali kotalela nsango ya basakoli na ndenge bomoi na yo ekozala na mikolo ezali koya.
22. Ndenge nini okoki kosalela toli oyo ezali na mikanda ya basakoli 12?
22 Ozali koyeba lisusu maloba ya kolendisa ya Sefania oyo ezali na ebandeli ya mokapo oyo? (Sefania 1:14) Nsango na ye ebongolaki bomoi ya Mokonzi Yosiya. Ntango azalaki na mbula 16, Yosiya abandaki koluka Yehova. Ntango akómaki na mbula 20, abandaki kolongola losambo ya bikeko, na kolanda toli oyo Sefania apesaki bato ya Yuda mpe ya Yerusaleme. (2 Ntango 34:1-8; Sefania 1:3-6) Makebisi oyo etali mokolo ya Yehova ezali mpe kobongola bomoi na yo ya mokolo na mokolo ndenge esalaki epai ya Yosiya? Tiká tótala ndenge basakoli 12 bakoki kosalisa mokomoko na biso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Yisaya, oyo asalaki mosala na ye na eleko moko na etuluku ya liboso ya basakoli wana 12, mpe Ezekiele, oyo asalaki mosala na ye na eleko moko na etuluku ya mibale ya basakoli yango, bango mpe bakebisaki bato na ntina na mokolo ya Yehova.—Yisaya 13:6, 9; Ezekiele 7:19; 13:5; talá Mokapo 2 ya buku oyo, paragrafe 4 tii 6.
b Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etaleli nsango wana ya kolendisa, tosɛngi yo otánga Hosea 6:1; Yoele 2:32; Obadia 17; Nahumu 1:15; Habakuku 3:18, 19; Sefania 2:2, 3; Hagai 2:7; Zekaria 12:8, 9; mpe Malaki 4:2.
c Basakoli mosusu na kati ya basakoli 12, basakolaki te kaka mpo na ekólo moko, kasi mpo na bikólo mingi.
OYEKOLI NINI?
• Likambo nini ya ntina mingi basakoli nyonso 12 balobeli?—Yoele 1:15; Sefania 1:7, 14.
• Mokolo ya Yehova ekozala ndenge nini?—Yoele 2:30, 31; Zekaria 14:12.
• Mpo na nini Nzambe ya bolingo akopesa bato mabe etumbu lokola kaka na mokolo moko?—Mika 7:2-4; Baebre 12:1-3.
MATOMBA OYO OKOKI KOZWA
• Mokolo ya Yehova etali yo na nini?—Misala 2:19, 20; 2 Petro 3:13.
• Okoki kolikya ete mokolo ya Yehova eya ntango nini?—Matai 24:21, 29.
• Ndenge nini okoki komonisa ete ozali komilɛngɛla mpo na mokolo ya Yehova?—Amose 5:4, 6; Habakuku 2:3.
[Elilingi na lokasa 30]
Lokola mopɛpɛ makasi, “mokolo monene ya Yehova ekómi pene”
[Elilingi na lokasa 34]
Mpo na nini tokoki kolendisama na lolenge oyo bato ya Ninive basalaki ntango bayokaki nsango ya Yona?
[Elilingi na lokasa 39]
Na pentekote ya mobu 33 T.B., Petro asalelaki esakweli ya Yoele. Ezali mpe kokokisama na mikolo na biso
[Elilingi na lokasa 40]
Na ndakisa ya Mika, monisá ete ozali kozela Nzambe ya lobiko