Tyelá Yehova motema mpe zalá na bomoi!
“Tyelá Yehova motema na yo mobimba mpe kondimela mayele na yo moko te.”—MASESE 3:5.
1. Mpo na nini biso nyonso tozali na mposa ya libɔndisi?
BISO nyonso tozali na mposa ya libɔndisi. Mbala mosusu bomoi na biso etondi na mitungisi, makambo ya kolɛmbisa nzoto, mpe bampasi. Ekoki kozala ete tozali kobunda na maladi, na bobange, to moto oyo tolingaki akufi. Basusu kati na biso bazali konyokwama mpo na makambo mabe oyo bato bazali kosala bango. Longola yango, mobulu ezali se kokóma mingi. Ya solo, ‘ntango oyo ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano’ emonisi ete tozali na “mikolo ya nsuka” mpe ete mokolo na mokolo tozali kopusana na mokili ya sika. (2 Timote 3:1) Atako bongo, ekoki kozala ete tozelaka banda kala ete bilaka ya Yehova ekokisama, mpe mbala mosusu mikakatano na biso ezali se kobakisama. Na yango, epai wapi tokoki kozwa libɔndisi?
2, 3. (a) Makambo nini toyebi mpo na Habakuku? (b) Mpo na nini tokotalela mokanda ya Habakuku?
2 Mpo tózwa eyano, tólobela makambo oyo ezali na mokanda ya Habakuku. Biblia elobi makambo mingi te mpo na bomoi mpe mosala ya Habakuku, kasi mokanda na ye elendisaka mingi. Ekoki kozala ete nkombo Habakuku elimboli “Koyamba makasi.” Mbala mosusu yango emonisi ndenge Yehova abɔndisaka biso lokola nde azali koyamba biso, to mpe ndenge oyo biso basaleli na ye tokangamaka na ye makasi. Habakuku asololaki na Nzambe mpe atunaki ye mwa mituna. Yehova asalelaki elimo na ye mpo na kosalisa Habakuku akoma lisolo yango mpo ayebaki ete ekosalisa biso.—Habakuku 2:2.
3 Biblia elobeli Habakuku kaka na lisolo wana oyo asololaki na Yehova ntango mosakoli yango azalaki komitungisa. Kasi, mokanda ya Habakuku ezali na kati ya “makambo nyonso oyo ekomamaki kala” na Liloba ya Nzambe “mpo, na ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na libɔndisi oyo euti na Makomami, tózala na elikya.” (Baroma 15:4) Ndenge nini mokanda ya Habakuku ekoki kosalisa mokomoko na biso? Ekoki kosalisa biso tóyeba soki kotyela Yehova motema elimboli nini. Lisusu, esakweli ya Habakuku emonisaka ete tokoki kobatela kimya ya motema ata soki tozali na bampasi mpe mikakatano. Tótalela mokanda yango na mozindo.
BONDELÁ YEHOVA
4. Mpo na nini Habakuku azalaki komitungisa?
4 Tángá Habakuku 1:2, 3. Habakuku azalaki na bomoi na eleko moko ya mpasi mpenza. Bato ya zingazinga na ye bazalaki mabe mpe mobulu, mpe yango ezalaki kopesa ye mawa mingi. Bisika nyonso, azalaki komona Bayisraele bazali konyokola basusu mpe kosalana makambo ezangi bosembo. Habakuku azalaki komituna ete: ‘Ntango nini mabe oyo ekosila? Mpo na nini Yehova azali koumela mpo na kosukisa yango?’ Habakuku amonaki ete asuki. Na yango, abondelaki Yehova mpo asala. Mbala mosusu Habakuku akómaki kokanisa ete Yehova azalaki lisusu kotyela bato na ye likebi te, to ete akosala noki te. Yo mpe osilá kokanisa ndenge wana?
5. Liteya nini ya ntina mingi ezali na mokanda ya Habakuku? (Talá elilingi ya ebandeli.)
5 Habakuku atikaki nde kotyela Yehova motema? Azalaki lisusu na kondima te na bilaka ya Nzambe? Ezali bongo te! Lokola Habakuku ayebisaki nde Yehova mitungisi mpe mikakatano na ye na esika ya koyebisa yango bato, emonisi ete azalaki kaka kotyela Yehova motema. Emonani ete Habakuku azalaki komitungisa mpe abulunganaki. Azalaki koyeba te ntina oyo Yehova azalaki kozela mpo asala mpe ntina oyo azalaki kotika ete amona mpasi ndenge wana. Ndenge Yehova asalelaki elimo na ye mpo na kosalisa Habakuku akoma mitungisi na ye, apesi biso liteya moko ya ntina mingi: tosengeli kobanga te koyebisa Ye mitungisi na biso mpe makambo oyo ezali kobulunganisa biso. Kutu, asɛngi biso na boboto ete tófungolela ye mitema na biso ntango tozali kobondela. (Nzembo 50:15; 62:8) Masese 3:5 elendisi mokomoko na biso ete: “Tyelá Yehova motema na yo mobimba mpe kondimela mayele na yo moko te.” Ekoki kozala ete Habakuku ayebaki maloba yango mpe asalelaki yango na bomoi na ye.
6. Mpo na nini kobondela ezali na ntina mingi?
6 Habakuku azwaki likanisi ya kopusana pene na Yehova, Moninga mpe Tata na ye oyo azalaki kotyela motema. Alukaki te kosilisa na ndenge na ye moko makambo oyo ezalaki kotungisa ye. Kasi, abondelaki mpo na makambo yango mpe ndenge oyo azalaki komiyoka. Yango ezali ndakisa ya malamu mpo na biso. Lisusu, Yehova, oyo azali Moyoki ya libondeli, asɛngi biso tóbondelaka mpe tóyebisaka ye mitungisi na biso mpo tómonisa ete totyelaka ye motema. (Nzembo 65:2) Soki tozali kosala bongo, tokomona ndenge Yehova ayanolaka na mabondeli na biso; tokoyoka lokola ayambi biso mpo akobɔndisa biso mpe akotambwisa biso. (Nzembo 73:23, 24) Akosalisa biso tóyeba ndenge oyo azali kotalela likambo na biso, ata soki tokutani na mokakatano nini. Kobondela Yehova na motema moko ezali lolenge malamu ya komonisa ete totyelaka ye motema.
YOKÁ YEHOVA
7. Yehova asalaki nini ntango Habakuku ayebisaki ye makambo oyo ezalaki kotungisa ye?
7 Tángá Habakuku 1:5-7. Nsima ya koyebisa Yehova mitungisi na ye, mbala mosusu Habakuku amitunaki soki Yehova akosala nini. Lokola Yehova azali Tata ya boboto, amityaki na esika ya Habakuku. Ayebaki ete Habakuku azalaki konyokwama mpe asɛngaki lisalisi. Na yango, Yehova apamelaki ye te. Alobelaki likambo ya Bayuda oyo bazangaki bosembo mpe ayebisaki Habakuku makambo oyo akosala mosika te. Ekoki mpenza kozala ete Habakuku nde moto ya liboso oyo Yehova ayebisaki ye ete akopesa bato ya mobulu etumbu mosika te.
8. Mpo na nini eyano ya Yehova ekamwisaki Habakuku?
8 Yehova ayebisaki Habakuku ete mosika te akosala. Akopesa bato mabe mpe ya mobulu ya Yuda etumbu. Ntango Yehova asalelaki maloba “na mikolo na bino,” amonisaki ete ntango lisambisi yango ekoya Habakuku to bato ya eleko na ye bakozala na bomoi. Eyano ya Yehova ekamwisaki mpenza Habakuku. Likambo oyo Yehova akanaki kosala elingaki kobakisela Yuda mpasi.a Bakaladea, to bato ya Babilone bazalaki na nkanza mingi. Bazalaki mobulu koleka Bayisraele, oyo kutu bayebaki mibeko ya Yehova. Sikoyo mpo na nini Yehova akosalela ekólo ya bapakano, bato ya mobulu ndenge wana, mpo na kopesa basaleli na ye etumbu? Soki ozalaki na esika ya Habakuku olingaki koyoka ndenge nini?
9. Mituna mosusu nini Habakuku atunaki?
9 Tángá Habakuku 1:12-14, 17. Atako Habakuku ayebaki ete Yehova akosalela bato ya Babilone mpo na kopesa etumbu na bato mabe ya Yuda, azalaki kaka komitungisa. Kasi, amonisaki komikitisa mpe akobaki kotyela Yehova motema; alobaki ete Yehova azali “Libanga” na ye. (Kolimbola Mibeko 32:4; Yisaya 26:4) Habakuku akobaki kotya motema na bolingo mpe boboto ya Nzambe. Na yango, abangaki te kotuna Yehova mituna mosusu, lokola: Mpo na nini Yehova akotika makambo ya Yuda ebeba lisusu mingi mpe bato na ye bányokwama lisusu mingi? Mpo na nini asali kaka mbala moko te? Mpo na nini Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ‘afandi nyɛɛ’ wana mabe ezali se kokoba bisika nyonso? Yehova azali “Mosantu,” mpe azali “na miso ya pɛto oyo ekokoka te komona makambo oyo ezali mabe.”
10. Mpo na nini tokoki ntango mosusu komiyoka lokola Habakuku?
10 Na bantango mosusu, tokoki komiyoka lokola Habakuku. Biso mpe toyokaka Yehova. Totyelaka ye motema, yango wana totángaka mpe toyekolaka Liloba na ye, mpe yango epesaka biso elikya. Toyebaka mpe makambo mosusu oyo etali bilaka na ye na nzela ya ebongiseli na ye. Kasi, mbala mosusu tomitunaka kaka: ‘Ntango nini bampasi na biso ekosila?’ Likambo oyo Habakuku asalaki na nsima ekoki kosalisa biso.
ZELÁ YEHOVA ASALA
11. Ekateli nini Habakuku azwaki?
11 Tángá Habakuku 2:1. Lisolo oyo Habakuku asololaki na Yehova epesaki ye kimya ya makanisi. Na yango, azwaki ekateli ya kokoba kozela Yehova asala. Azongelaki lisusu ekateli yango na nsima, ntango alobaki ete ‘akozela na kimya mokolo ya mpasi.’ (Habakuku 3:16) Basaleli mosusu ya sembo ya Yehova mpe bazelaki ye asala. Ndakisa na bango elendisaka biso, mpo emonisaka ete biso mpe tokoki kozela Yehova.—Mika 7:7; Yakobo 5:7, 8.
12. Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Habakuku?
12 Ekateli oyo Habakuku azwaki ekoki koteya biso nini? Ya liboso, tosengeli ata mokolo moko te kotika kobondela Yehova, ata soki tokutani na komekama ya ndenge nini. Ya mibale, tosengeli koyoka makambo oyo Yehova azali koyebisa biso na nzela ya Liloba na ye mpe ya ebongiseli na ye. Ya misato, tosengeli komonisa motema molai wana tozali kozela Yehova asala, mpe kotyela ye motema ete akosilisa bampasi na biso na ntango oyo atyá. Soki tomekoli Habakuku, tokozwa kimya ya makanisi, mpe yango ekosalisa biso tóyika mpiko. Elikya na biso ekosalisa biso tómonisa motema molai mpe tokozala na esengo atako tozali kokutana na mikakatano. Elikya esalisaka biso tóndima ete Tata na biso ya likoló akosala.—Baroma 12:12.
13. Ndenge nini Yehova abɔndisaki Habakuku?
13 Tángá Habakuku 2:3. Na ntembe te, Yehova asepelaki ndenge Habakuku azwaki ekateli ya kozela ye asala. Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ayebaki malamu ete Habakuku azalaki konyokwama. Na yango, na bolingo nyonso, abɔndisaki ye mpe akitisaki ye motema ete mosika te akopesa ye biyano na mituna na ye oyo eutaki na motema. Etikalaki moke mitungisi nyonso ya Habakuku esila. Ezalaki lokola nde Yehova ayebisaki Habakuku ete: “Monisá motema molai mpe tyelá ngai motema. Nakoyanola yo, ata soki emonani lokola ete ezali koumela.” Yehova akundwelaki Habakuku ete asilaki kotya ntango oyo akokokisa bilaka na ye. Yango wana, alendisaki Habakuku akoba kozela. Akoyoka nsɔni te.
14. Ekateli nini tosengeli kozala na yango ntango tozali na mikakatano?
14 Tosengeli kozela Yehova asala mpe koyoka na likebi makambo oyo ayebisaka biso. Yango ekopesa biso mpiko mpe kimya ya makanisi ata soki tokutani na mikakatano. Yesu alobaki ete tosengeli te kolukaluka koyeba “bantango mpe bileko” oyo Nzambe ayebisi biso te. (Misala 1:7) Yehova ayebi ntango oyo ebongi mpo asala. Yango wana, tosengeli kolɛmba te, kasi tómonisa komikitisa, motema molai, mpe tózala na kondima epai ya Nzambe. Mpe wana tozali kozela, tosengeli kosalela ntango na biso malamu na mosala ya Yehova na kolanda makoki na biso.—Marko 13:35-37; Bagalatia 6:9.
YEHOVA AKOPESA BOMOI NA BAOYO BATYELAKA YE MOTEMA
15, 16. (a) Bilaka nini ezali na mokanda ya Habakuku? (b) Bilaka yango ezali koteya biso nini?
15 Yehova apesaki bilaka oyo: “Moyengebene, na bosembo na ye akokoba kozala na bomoi,” mpe “mabele ekotonda na boyebi ya nkembo ya Yehova.” (Habakuku 2:4, 14) Ya solo, Yehova alaki kopesa bomoi ya seko na baoyo bazali komonisa motema molai mpe kotyela ye motema.
16 Elaka oyo ezali na Habakuku 2:4 ezali na ntina mingi, yango wana ntoma Paulo azongelaki yango mbala misato mobimba na mikanda na ye! (Baroma 1:17; Bagalatia 3:11; Baebre 10:38) Ata soki tokutani na mikakatano ya ndenge nini, tokomona kokokisama ya bilaka na ye soki totyeli ye motema mpe tozali na kondima. Yehova alingi tótya makanisi na elikya na biso.
17. Yehova alaki biso nini soki totyeli ye motema?
17 Mokanda ya Habakuku ezali na liteya monene mpo na biso nyonso oyo tozali na bomoi na mikolo ya nsuka. Yehova alaki kopesa bomoi ya seko na moyengebene nyonso oyo azali na kondima mpe atyelaka ye motema. Yango wana, tókoba kolendisa kondima na biso mpe kotyela Nzambe motema, ata soki tozali na mikakatano to mitungisi ya ndenge nini. Makambo oyo Yehova alobaki na Habakuku ezali kondimisa biso ete akosalisa biso mpe akobikisa biso. Na boboto nyonso, asɛngi biso tótyela ye motema mpe tózela ntango oyo asilá kotya mpo Bokonzi na ye eyangela mabele. Na ntango wana, mabele ekotonda na bato ya esengo mpe ya kimya oyo basambelaka Yehova.—Matai 5:5; Baebre 10:36-39.
TYELÁ YEHOVA MOTEMA MPE ZALÁ NA ESENGO
18. Ndenge nini maloba ya Yehova esalisaki Habakuku?
18 Tángá Habakuku 3:16-19. Makambo oyo Yehova ayebisaki Habakuku esalisaki ye mingi. Habakuku amanyolaki makambo minene oyo Yehova asalelá bato na ye na kala. Esalisaki ye atyela Yehova motema mingi koleka. Ayebaki ete Yehova akosala mosika te! Yango ebɔndisaki mosakoli yango, atako ayebaki ete ekoki kosɛnga anyokwama lisusu mpo na mwa ntango. Habakuku azalaki lisusu na bantembe te; andimaki na motema mobimba ete Yehova akobikisa ye. Kutu, maloba oyo alobaki na vɛrsɛ 18 ezali na kati ya maloba ya malamu koleka oyo bato balobá mpo na komonisa ndenge batyelaka Nzambe motema. Bato mosusu ya mayele balobaka ete maloba yango elimboli: “Nakopumbwa na esengo mpo na Nkolo; nakobalukabaluka mpo na kosepela na Nzambe.” Ezali liteya monene mpenza mpo na biso. Yehova asuki kaka te na kopesa biso bilaka kitoko, ayebisi biso mpe ete azali kosala mpo akokisa bilaka yango mosika te.
19. Lokola Habakuku, tokoki kosala nini mpo tózwa libɔndisi epai ya Yehova?
19 Liteya ya ntina mingi oyo tozwi na mokanda ya Habakuku ezali ete tosengeli kotyela Yehova motema. (Habakuku 2:4) Mpo tókoba kotyela Yehova motema, tosengeli kokómisa makasi boyokani na biso na ye. Mpo na yango tosengeli (1) kokoba kobondela, koyebisa Yehova mitungisi mpe mikakatano na biso; (2) koyoka na likebi makambo oyo Yehova alobi na biso na Liloba na ye, mpe kolanda malako oyo apesaka biso na nzela ya ebongiseli na ye; mpe (3) kozala sembo mpe komonisa motema molai wana tozali kozela Yehova akokisa bilaka na ye. Habakuku asalaki bongo. Atako azalaki na mawa makasi na ebandeli ya lisolo na ye na Yehova, na nsuka, alendisamaki mpe akómaki na esengo! Soki tomekoli Habakuku, biso mpe tokoyoka ete Tata na biso ya likoló Yehova abɔndisi biso, ayambi biso na boboto nyonso. Tokoki te kozwa libɔndisi ya malamu koleka oyo wana na mokili oyo mabe!
a Habakuku 1:5 esaleli maloba “bino,” mpo na komonisa ete libebi yango ekozala likama mpo na bato nyonso ya Yuda.