Bato mabe bakoumela lisusu ntango boni?
“Mpo na nini . . . [Yehova] okozala mpe kimya wana moto mabe akomela ye oyo aleki ya na boyengebene?”—HABAKUKU 1:13.
1. Ntango nini mokili ekotonda na boyebi ya nkembo ya Nzambe?
YEHOVA akoboma bato mabe? Soki ezali boye, tokozela lisusu ntango boni? Na mokili mobimba, bato bazali komituna mituna yango. Tokoki kozwa biyano epai wapi? Tokoki kozwa biyano na maloba ya esakweli oyo Nzambe akomisaki, esakweli yango etaleli ntango oyo Nzambe aponi. Maloba yango emonisi biso ete etikali moke Nzambe apesa bato mabe nyonso etumbu. Nsima na yango nde mabelé “ekotondisama na boyebi ya nkembo ya [Yehova] lokola mai ezali kozipa mai-na-monana.” Ezali yango nde likambo oyo Nzambe alaki mpe alobi yango na lolenge ya esakweli na Liloba na ye Mosantu na Habakuku 2:14.
2. Yebisá bitumbu misato oyo Nzambe akopesa oyo elobelami na mokanda ya Habakuku.
2 Mokanda ya Habakuku ekomamaki soki na mobu 628 L.T.B.; mokanda yango ezali kolobela bitumbu misato oyo Yehova Nzambe asengelaki kopesa. Bitumbu mibale epesamaki. Ya liboso, ezalaki etumbu oyo Yehova apesaki libota ya kala ya Yuda mpo na motó makasi na bango. Bongo etumbu ya mibale? Yango ezalaki etumbu oyo Nzambe apesaki Babilone, ekólo oyo ezalaki konyokola bikólo mosusu. Na yango, tozali mpenza na elikya ete akopesa mpe etumbu ya misato. Kutu, tokoki kozala na elikya ete etikali moke Nzambe apesa etumbu yango. Mpo bato oyo bazali sembo na mikolo oyo ya nsuka bázala malamu, Nzambe akoboma bato mabe nyonso. Nsima ya “etumba ya mokolo yango monene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso” oyo ezali koya noki mpenza, moto mabe ata moko te akotikala.—Emoniseli 16:14, 16.
3. Likambo nini ekokómela bato mabe na mikolo na biso?
3 Etumba ya mokolo monene ya Nzambe ekómi pene. Tozali mpe na elikya mpenza ete Nzambe akopesa bato mabe etumbu, ndenge asalaki mpo na Yuda na Babilone. Kasi, sikoyo, tósala lokola nde tozali na ntango ya Habakuku. Makambo nini ezali kosalema na mokili wana?
Mobulu ekɔti na mboka
4. Nsango nini ya mabe Habakuku ayoki?
4 Tókanisa ete tozali komona Habakuku, mosakoli ya Yehova, afandi likoló ya ndako na ye, azali kozwa mwa mopɛpɛ ya mpokwa. Ebɛteli moko ya miziki ezali wana pembeni na ye. (Habakuku 1:1; 3:19, mwa maloba na nsuka ya mokapo) Kasi, Habakuku ayoki nsango moko ya mabe. Yoyakimi, mokonzi ya Yuda abomi Uliya mpe atindi bábwaka ebembe na ye na malita ya bato nyonso. (Yilimia 26:23) Ya solo, Uliya atikaki kotyela Yehova motema, abandaki kobanga mpe akimaki na Ezipito. Kasi, Habakuku ayebi ete likambo mabe oyo Yoyakimi asali, asali yango mpo na kokumisa Yehova te. Tozali komona yango na ndenge oyo mokonzi azali kotyola mibeko ya Nzambe mpe na ndenge oyo azali koyina mosakoli Yilimia mpe bato mosusu oyo bazali kosalela Yehova.
5. Bato ya Yuda bazali ndenge nini na elimo mpe Habakuku asali nini mpo na yango?
5 Habakuku amoni milinga ya mpaka ya malasi ezali kobima na bandako oyo ezali pembenipembeni. Bato bazali kotumba mpaka ya malasi yango mpo na Yehova te. Bazali nde kosambela banzambe ya lokuta oyo Yoyakimi, mokonzi mabe ya Yuda akɔtisi na mboka. Likambo ya nsɔni mpenza! Miso ya Habakuku etondi na mpisoli, azali kobondela na maloba oyo: “Ɛ [Yehova], kino ntango nini nakobyanga mpe okoyoka te? Nakongangela yo ete, Mobulu! Nde okobikisa te. Mpo na nini okomonisa ngai mabe mpe okotala mikakatano? Libebi mpe yauli izali liboso na ngai; kowelana mpe kobundana ikobimaka. Boye mobeko elɛmbi mpe kosambisa-sembo ekobimaka te. Zambi bato mabe bakozingelaka moyengebene, boye kosambisa-sembo ebimi wana engunzami mpenza.”—Habakuku 1:2-4.
6. Mibeko mpe bosembo ekómi ndenge nini na Yuda?
6 Ya solo, moyibi mpe mobulu etondi na mboka. Epai nyonso oyo Habakuku akobwaka liso, azali komona mobulu, koswana, bitumba. ‘Mobeko elɛmbi,’ elingi koloba ete bato bazali lisusu kotosa mibeko te. Bongo bosembo? Yango kutu ‘ebimaka te’ mpo na kosala mosala na yango! Ezali komonana ata moke te. Nzokande, ‘bato mabe bazingeli moyengebene,’ bazali kobuka mibeko oyo batii mpo na kobatela moto oyo asali likambo te. “Kosambisa-sembo ebimi wana engunzami mpenza.” Etɛngami. Makambo ebebi mpenza!
7. Habakuku azwi mokano ya kosala nini?
7 Habakuku afandi mpe azali kokanisa makambo yango. Akolɛmba nzoto? Te! Nsima ya kokanisa ndenge bato oyo bazali kosalela Nzambe na bosembo bazali konyokwama, mobali yango ya sembo azwi lisusu mpiko. Azwi mpe mokano ete akolɛmba te kosalela Yehova lokola mosakoli ya molende. Habakuku akotika kosakola nsango ya Nzambe te, ata soki bakoboma ye mpo na yango.
Yehova asali “mosala” ya kokamwa
8, 9. Yehova azali kosala “mosala” nini ya kokamwa?
8 Na kati ya emonaneli, Habakuku amoni bato oyo basambelaka banzambe ya lokuta, bazali koyokisa Nzambe nsɔni. Yehova alobi na bango boye: “Bótala kati na mabota mpe bómona, bókamwa kokamwa mpenza.” Na ntembe te, Habakuku azali komituna mpo na nini Nzambe azali koloba boye epai ya bato mabe wana. Na nsima ayoki Yehova alobi na bango boye: “Bókamwa kokamwa mpenza; mpo ete nazali kosala mosala na mikolo na bino oyo bokondima te ete ezali boye, ata eyebisameli bino.” (Habakuku 1:5) Yehova ye moko nde azali kosala mosala oyo bakoki kondima yango te. Kasi akosala nini?
9 Habakuku afungoli matoi mpo na koyoka maloba oyo Nzambe azali koloba, maloba oyo ezali na Habakuku 1:6-11. Ezali nsango ya Yehova, mpe nzambe moko te ya lokuta to ekeko ezangi bomoi ekoki te kopekisa ete maloba yango ekokisama: “Talá, nazali kolamukisa Bakaladi, libota yango na bololo mpe na koyoka nkanda noki, baoyo bakotambolaka bipai na mosika na mokili kobɔtɔla bifandelo bizali na bango te. Ye azali na nsɔmɔ mpe na nkanda, kosambisa na ye mpe lokumu na ye ikobima na bango mpenza. Bambalata na ye baleki [nkoi, NW] na mbangu, baleki bambwa ya zamba na ntango ya mpokwa na mbangu; [mpe bato ya mbalata na yango batuti mabelé, NW]. Ɛɛ, bato na mbalata na ye balongwi mosika, bapumbwi lokola mpongo oyo azali na mposa ya kolya. Bango nyonso bayei mpo na yauli, bilongi na bango italani na liboso; azali kobɔtɔla bakangami lokola zɛlo. Ɛɛ, ye aluki mikonzi, mikóló bazali eloko ya kotyolama epai na ye. Ye akosɛka ndako nyonso na makasi, zambi abongisaki mabelé na mabondo mpe abukaki yango. Ye akoleka lokola mopɛpɛ mpe akokenda liboso, moto na masumu, nguya na ye mpenza [euti na, NW] nzambe na ye.”
10. Yehova azali kotinda banani?
10 Oyo-Aleki-Likoló azali mpenza kokebisa na esakweli yango! Yehova azali kotinda Bakaladi, to bato ya Babilone, ekólo ya yauli. Ntango bazali kokende ‘bipai na mosika na mokili,’ bakobɔtɔla bamboka mingi mpenza. Oyo nde nsɔmɔ! Basoda ya Bakaladi bazali “na nsɔmɔ mpe na nkanda,” bazali kobangisa mpe kolɛngisa. Bazali kotya mibeko na bango ya makasi. ‘Kosambisa na bango ekobima na bango mpenza.’
11. Ndenge nini basoda ya Babilone bayaki na Yuda?
11 Bambalata ya Babilone eleki nkoi na mbangu. Basoda na yango oyo batambolaka na mbalata bazali na yauli koleka bambwa ya zamba ntango ezali koluka nyama ya kolya na butu. Na mposa makasi ya kokende, ‘bato ya mbalata na yango bazali kotutatuta mabelé’ mpe bazali motema lukuluku. Bauti na Babilone, mboka mosika, mpe bazali kokende na Yuda. Bakaladi bazali kopumbwa lokola mpongo oyo ezali kolanda mosuni kitoko ya kolya, etikali moke bakokwela eloko na bango ya kolya. Kasi, likambo yango ekozala kaka kobɔtɔla biloko ya bato, to mwa basoda mpamba bakosala mobulu? Te! “Bango nyonso bayei mpo na yauli,” lokola ebele ya basoda bakei kobebisa. Bilongi na bango ezali kongala na mposa, bazali kokende na wɛsti tii na Yuda mpe na Yelusaleme, bazali kotambola mbangu lokola mopɛpɛ ya ɛsti. Basoda ya Babilone bazali kokanga bato ebele, yango wana balobi ete bazali “kobɔtɔla bakangami lokola zɛlo.”
12. Bato ya Babilone bazali na ezaleli nini, mpe mpo na nini monguna yango ya nsɔmɔ abengami “moto ya masumu”?
12 Basoda ya Bakaladi bazali kotumola bakonzi mpe bazali kosɛka bankumu ya mboka, moko te azali na makasi ya kokanga bango nzela. Bazali ‘kosɛka ndako nyonso ya makasi,’ mpo bato ya Babilone bakoki kobɔtɔla esika makasi nyonso soki ‘babongisi mabelé,’ elingi koloba bamatisi mabelé lokola ngomba mpe bamati likoló na yango mpo na kokɔta na ndako ya makasi. Na ntango oyo Yehova aponi, monguna yango ya makasi “akoleka lokola mopɛpɛ.” Ntango Babilone ekobundisa Yuda na Yelusaleme, ekotángama “moto ya masumu” mpo ekosala libota ya Nzambe mabe. Nsima ya kolonga mbala moko, mokonzi ya basoda ya Bakaladi akoloba na lofundo nyonso ete: ‘Nguya na biso [euti na, NW] nzambe na biso.’ Kasi azali komikosa!
Ntina malamu ya kozala na elikya
13. Mpo na nini elikya ya Habakuku ekómi makasi?
13 Lokola Habakuku azali koyeba lisusu mokano ya Yehova malamumalamu, elikya na ye mpe ezali kobakisama. Azali kokumisa Yehova na motema mobimba. Habakuku 1:12 elobi ete mosakoli alobi boye: “Yo ozali longwa na kalakala te? Ɛ [Yehova], Nzambe na ngai, Oyo na Bulɛɛ na ngai! [Okufaka te, NW].” Ya solo, Yehova azali Nzambe “lobiko na lobiko,” to libela na libela.—Nzembo 90:1, 2.
14. Bapɛngwi ya Yuda bazalaki kosala makambo nini?
14 Ntango akanisi emonaneli oyo Nzambe alakisi ye mpe azali na esengo mpo na mayele oyo emonaneli yango epesi ye, mosakoli alobi lisusu boye: “Ɛ [Yehova], obyangaki ye mpo na kosambisa, mpo yo, ɛ Libanga, obongisaki ye mpo na etumbu.” Nzambe akateli bapɛngwi ya Yuda etumbu, mpe Yehova akopamela bango, akopesa bango etumbu makasi. Esengelaki bátya motema epai na ye lokola Libanga na bango, esika makasi na bango, ebombamelo, mpe Esika oyo lobiko eutaka. (Nzembo 62:7; 94:22; 95:1) Kasi, bakonzi ya Yuda oyo bapɛngwi bazali koluka Nzambe te, mpe bazali se konyokola basambeli ya Yehova oyo basali likambo te.
15. Ntango balobi ete Yehova ‘azali na miso ya pɛto, akoki komona mabe te,’ yango elimboli nini?
15 Likambo yango epesi mosakoli ya Yehova mpasi na motema. Yango wana alobi boye: “Yo ozali na miso ya pɛto, okoki komona mabe te, oyebi mapɛngwi te.” (Habakuku 1:13) Ya solo, Yehova azali ‘na miso ya pɛto, asengeli komona mabe te,’ elingi koloba akoki kotikela mabe nzela te.
16. Lobá na mokuse makambo oyo ekomami na Habakuku 1:13-17.
16 Yango wana, Habakuku azali komituna mituna oyo ekoki kotinda moto akanisa. Atuni ete: “Mpo na nini okotalaka bato na misala mabe? Okozala mpe kimya wana moto mabe akomela ye oyo aleki ye na boyengebene? Osali bato lokola mbisi na mai, lokola banyama bakolandalandaka bazali na motambolisi te. [Abimisi] bango nyonso na ndɔbɔ, azwi bango na motambo na ye, ayanganisi bango na moluba na ye, mpe boye asepeli mpe ayoki esengo. Bongo akabi mboka mpo na motambo na ye, mpe atumbi mpaka na malasi mpo na moluba na ye; zambi mpo na yango likabo lizwi ye lizali na mafuta, mpe bilei na ye ezali kitoko. Boye mpo na yango akozalisa moluba na ye mpamba? Akotika koboma mabota libela te?”—Habakuku 1:13-17.
17. (a) Lokola bakei kobundisa Yuda na Yelusaleme, ndenge nini bato ya Babilone bazali kosala mokano ya Nzambe? (b) Yehova akoyebisa Habakuku nini?
17 Soki bato ya Babilone bayei kobundisa Yuda na mboka-mokonzi na yango, Yelusaleme, bakokokisa nde mposa na bango. Bakoyeba te ete Nzambe azali kosalela bango mpo apesa bato na ye oyo bazali sembo te etumbu oyo esengeli mpenza. Yango wana, ezali mpasi te tóyeba mpo na nini Habakuku azali kokanga ntina te oyo Nzambe azali kosalela Babilone, bato mabe, mpo na kopesa etumbu. Bakaladi yango bazali ata na mawa te basambelaka mpe Yehova te. Bamonaka bato lokola ‘mbisi mpe banyama oyo etambolaka na nse,’ biloko mpamba ya kokanga mpe koyangela yango. Kasi Habakuku akomitungisa ntango molai te. Etikali moke Yehova ayebisa mosakoli na ye ete bato ya Babilone bakozwa mpe etumbu mpo na lokoso na bango ya kobɔtɔla biloko ya bato mpe kosopa makila kozanga mawa.—Habakuku 2:8.
Amibongisi mpo na koyoka maloba mosusu ya Yehova
18. Liteya nini tokoki kozwa na ezaleli ya Habakuku lokola emonisami na Habakuku 2:1?
18 Kasi, sikoyo Habakuku azali kozela Yehova aloba na ye makambo mosusu. Na mpiko nyonso, mosakoli alobi boye: “Nakotɛlɛma likoló na esika na ngai, nakomitya likoló na ndako molai; nakotala komona soko akoloba nini na ngai, mpe soko akozongisa liloba nini mpo na bileli na ngai.” (Habakuku 2:1) Habakuku azali mpenza na mposa ya koyoka makambo oyo Nzambe akotinda ye asakola. Andimi ete Yehova azali Nzambe oyo alingaka mabe te, yango wana azali komituna mpo na nini mabe ekómi mingi, kasi andimi básembola makanisi na ye. Ezali boni mpo na biso? Ntango tozali komituna mpo na nini Nzambe atiki nzela ete makambo mosusu ya mabe esalema, soki tozali na elikya ete Yehova Nzambe azali sembo, ekosalisa biso tómitungisa mingi te mpe tótya motema nyonso epai na ye.—Nzembo 42:5, 11.
19. Soki totaleli makambo oyo Nzambe ayebisaki Habakuku, nini ekómelaki Bayuda lokola bazalaki motó makasi?
19 Nzambe akokisaki maloba na ye epai ya Habakuku, atikaki bato ya Babilone bábebisa Yuda mpo na kopesa Bayuda etumbu mpo bazalaki motó makasi. Na mobu 607 L.T.B., babebisaki Yelusaleme na tempelo na yango, babomaki bato mingi, ezala mikóló na bilenge, mpe bamemaki bato mingi na boombo. (2 Ntango 36:17-20) Nsima ya kolekisa bambula ebele na boombo na Babilone, mwa ndambo ya Bayuda ya sembo bazongaki na mboka na bango mpe batongaki lisusu tempelo. Kasi, na nsima, Bayuda bazalaki lisusu sembo epai ya Yehova te, mingimingi ntango baboyaki kondima Yesu lokola Masiya.
20. Ndenge nini Paulo asalelaki Habakuku 1:5 mpo na kolobela ndenge oyo baboyaki Yesu?
20 Misala 13:38-41 elobi ete ntoma Paulo amonisaki Bayuda na Antiokia makambo oyo esengelaki kokómela bango lokola baboyaki Yesu mpe batyolaki mbeka oyo apesaki mpo na kosikola bato. Paulo atángaki maloba ya Habakuku 1:5 ndenge ebongolami na Biblia ya Septante na lokota ya Greke mpe akebisaki boye: “Na bongo bókeba ete yango elobami na basakoli eya na bino te, ete, Bótala, bino batyoli, bókamwa mpe bólimwa! Mpo ete ngai nazali kosala mosala moko na mikolo na bino—mosala mokondima bino te ata moto akolimbola yango na bino polele.” Ndenge maloba oyo Paulo atángaki elobaki, Habakuku 1:5 ekokisamaki lisusu mpo na mbala ya mibale ntango basoda ya Loma babebisaki Yelusaleme na tempelo na yango na mobu 70 T.B.
21. Ndenge nini Bayuda ya ntango ya Habakuku batalelaki “mosala” ya Nzambe oyo etali kotinda bato ya Babilone báboma Yelusaleme?
21 Bayuda oyo bazalaki na ntango ya Habakuku bandimaki te ete Yehova akokaki kosala “mosala” ya ndenge wana, elingi koloba kotinda bato ya Babilone bábebisa Yelusaleme mpamba te mboka yango ezalaki esika ya losambo ya Yehova mpe esika mokonzi oyo ye apakoli azalaki kofanda. (Nzembo 132:11-18) Mpo na lokumu na yango wana, Yelusaleme ebebisamaki liboso ata mbala moko te. Batumbaki tempelo na yango ata mbala moko te. Bakweisaki ndako ya Mokonzi Davidi ata mokolo moko te. Bandimaki te ete Yehova akotika makambo ya ndenge wana esalema. Kasi Nzambe atindaki Habakuku akebisa bango ete makambo ya mabe wana ekosalema mpenza. Mpe masolo ya makambo ya kala ezali komonisa ete esalemaki ndenge esakolamaki.
“Mosala” ya kokamwa oyo Nzambe akosala na mikolo na biso
22. Na mikolo na biso, “mosala” ya kokamwa ya Nzambe ekozala nini?
22 Yehova akosala nde “mosala” ya kokamwa na mikolo na biso? Tóyeba ete akosala yango, atako bato oyo batyaka ntembe bazali kokanisa ete ekoki kosalema te. Na mbala oyo, mosala ya kokamwa oyo Yehova akosala ekozala nde koboma mangomba ya boklisto. Lokola ekólo ya Yuda ya kala, mangomba yango ezali koloba ete basambelaka Nzambe, nzokande ebebi mpenza kobeba. Yehova akosukisa losambo ya mangomba ya boklisto nyɛɛ ndenge mpe akosukisa “Babilone Monene,” lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba.—Emoniseli 18:1-24.
23. Elimo ya Nzambe etindaki Habakuku asala nini nsima?
23 Liboso Yelusaleme ebomama na mobu 607 L.T.B., Yehova apesaki Habakuku mosala mosusu. Nzambe ayebisaki lisusu mosakoli na ye makambo nini? Habakuku ayokaki makambo oyo etindaki ye akamata ebɛteli na ye ya miziki mpe ayembela Yehova na kobondela mpe na kolela. Kasi, elimo ya Nzambe etindaki naino mosakoli ya Nzambe asakola makambo minene ya mawa. Tobanzi ete tokosepela koyeba malamu maloba oyo ekokokisama na ntango oyo Nzambe aponaki. Yango wana, tótalela lisusu malamu esakweli ya Habakuku.
Ozali koyeba lisusu?
• Makambo nini ezalaki koleka na Yuda na ntango ya Habakuku?
• Na ntango ya Habakuku, Yehova asalaki “mosala” nini ya kokamwa?
• Likambo nini epesaki Habakuku elikya?
• “Mosala” nini ya kokamwa Yehova akosala na mikolo na biso?
[Elilingi na lokasa 9]
Habakuku amitunaki mpo na nini Nzambe atikaki ete mabe ekóma mingi. Yo mpe ozali komituna bongo?
[Elilingi na lokasa 10]
Habakuku asakolaki ete bato ya Babilone bakobebisa mokili ya Yuda
[Elilingi na lokasa 10]
Bitika ya Yelusaleme ya kala, ntango ebomamaki na 607 L.T.B.