Yehova akoumela te
“Ata [emonaneli] ezali koumela, [zelá] yango; ekoya solo mpenza, ekoumela mingi te.”—HABAKUKU 2:3.
1. Basaleli ya Yehova bazali na mokano nini, mpe yango etindaki bango básala nini?
“NAKOTƐLƐMA likoló na esika na ngai.” Wana ezali mokano oyo mosakoli Habakuku akamataki. (Habakuku 2:1) Basaleli ya Nzambe na ekeke ya 20 bazalaki mpe na mokano ndenge moko. Yango wana, basalaki na molende likambo oyo balendisaki bango básala na liyangani monene oyo esalemaki na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1922: “Oyo ezali mokolo oyo eleki mikolo nyonso. Bótala, Mokonzi azali koyangela! Bino bozali bapanzi-nsango na ye. Yango wana, bósakola, bósakola, bósakola, Mokonzi mpe bokonzi na ye.”
2. Nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, ntango bazwaki lisusu makasi ya kosala mosala, baklisto bapakolami balobaki nini?
2 Nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, Yehova apesaki lisusu bapakolami ya sembo makasi ya kosala mosala. Mokomoko na bango alobaki lokola Habakuku ete: “Nakotɛlɛma likoló na esika na ngai, nakomitya likoló ya ndako molai; nakotala komona soko akoloba nini na ngai.” Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “kotala” mpe “kokɛngɛla” esalelami na bisakweli mingi.
“Ekoumela mingi te”
3. Mpo na nini tosengeli kokɛngɛlaka?
3 Ntango Batatoli ya Yehova bazali kosakola likebisi ya Nzambe lelo oyo, basengeli ntango nyonso kokanisaka maloba ya nsuka ya esakweli monene ya Yesu ete: “Bósɛnzɛlaka bongo, mpo ete boyebi te soko nkolo ya ndako akoya ntango nini, soko na mpokwa, soko na midi ya butu, soko na kolela ya nsoso, soko na ntɔngɔ. Bókɛngɛlaka ete aya noki te kozwa bino na mpɔngi. Oyo mpe nazali koloba na bino, nazali koloba na bato nyonso ete, Bókɛngɛlaka.” (Malako 13:35-37) Tosengeli kokɛngɛlaka lokola Habakuku akɛngɛlaki mpo na kotosa maloba ya Yesu!
4. Ndenge nini makambo oyo ezali koleka lelo na mokili ekokani na makambo ya ntango ya Habakuku na mobu 628 L.T.B.?
4 Ekoki kozala ete Habakuku asilisaki kokoma mokanda na ye soki na mobu 628 L.T.B. Na ntango wana Babilone ekómaki naino te ekólo oyo elekaki makasi na mokili mobimba. Banda bambula ebele bazalaki kosakola ete Yehova akopesa Yelusaleme, mboka oyo epɛngwaki, etumbu. Kasi, ntango oyo etumbu yango esengelaki kopesama eyebanaki te. Moto moko te akokaki kokanisa ete ekozala nsima ya mbula soki 21 mpamba mpe ete Yehova akosalela Babilone mpo na kopesa etumbu yango. Ndenge moko mpe lelo oyo, toyebi ‘mokolo mpe ngonga’ oyo nsuka ya mokili oyo ekoya te. Kasi Yesu akebisaki biso ete: “Bongo ekoki na bino [komibongisa, NW], mpo ete Mwana na moto akoya na ntango ekanisi bino te.”—Matai 24:36, 44.
5. Likambo nini ezali mpenza kolendisa na maloba oyo Nzambe alobi na Habakuku 2:2, 3?
5 Yango wana, Yehova alobaki na Habakuku boye: “Komá emonaneli, monisá yango polele na bikomelo, ete ye oyo akotánga [atánga yango polele, NW ]. Zambi, emonaneli ezali bobele mpo na ntango ebongisami, ekómi noki epai na nsuka, ekozanga te; ata ezali koumela, [zelá] yango; ekoya solo mpenza; ekoumela mingi te.” (Habakuku 2:2, 3) Lelo oyo, mabe mpe mobulu ekómi mingi na mokili mobimba, yango ezali kolakisa ete “mokolo ya [Yehova], mokolo monene mpe ya nsɔmɔ” ezali lisusu mosika te. (Yoele 2:31) Maloba ya Yehova ezali mpenza kolendisa na ndenge alaki biso ete: “Ekoumela mingi te”!
6. Tokosala nini mpo tóbika ntango Nzambe akopesa etumbu na mokolo oyo ezali lisusu mosika te?
6 Na yango, tokosala nini mpo tóbika na mokolo oyo Nzambe akoya kopesa etumbu? Yehova apesi eyano na ndenge oyo akesenisi moto ya sembo na moto oyo azali sembo te: “Talá, ye oyo azali na molimo na sembo te avimbi na lolendo, nde moyengebene akobika mpo na kondima.” (Habakuku 2:4) Na mikolo na biso, mingimingi na bitumba mibale ya mokili mobimba mpe na bitumba oyo bato ya ekólo moko bazali kobunda bango na bango, bakonzi mpe bato mosusu ya lolendo mpe ya lokoso basopi makila ya bamilio ya bato oyo basali likambo te. Nzokande, basaleli ya Nzambe bapakolami na elimo, bango bazali bato oyo balingá kimya, bazali ntango nyonso sembo. Bazali “libota ya boyengebene mpe ya kobatela kondimana.” Libota yango, na baninga na bango, “bampate mosusu,” bazali kolanda toli oyo: “Talelá [Yehova] libela, mpo ete [Yah, Yehova] azali libanga likoumela seko.”—Yisaya 26:2-4; Yoane 10:16.
7. Na kolanda ndenge oyo Paulo asalelaki Habakuku 2:4, tosengeli kosala nini?
7 Na mokanda oyo akomelaki Baebele oyo bakómaki baklisto, ntoma Paulo atángaki maloba ya Habakuku 2:4 ntango ayebisaki basaleli ya Yehova ete: “[Bosengeli kozala na, NW] mitema milai ete bósala mokano na Nzambe mpe ete bózwa yango esili ye kolaka. Mpo ete naino mwa ntango moke, Ye oyo azali koya akoya mpe [akoumela] te; nde moyengebene na ngai akobika na kondima. Soko mpe akozonga nsima, motema na ngai ekosepela [na] ye te.” (Baebele 10:36-38) Oyo ezali mikolo ya kolɛmbisa mabɔkɔ te to komipesa na koluka biloko to kolanda bisengo ya mokili ya Satana. Tosengeli kosala nini liboso “mwa ntango moke” oyo esila? Biso oyo tozali na libota mosantu ya Yehova tosengeli kolanda ndakisa ya Paulo, tosengeli ‘kopusana pene na makambo ezali liboso, kolanda mokano,’ ya bomoi ya seko. (Bafilipi 3:13, 14, NW) Mpe lisusu, tosengeli kolanda ndakisa ya Yesu, elingi koloba, ‘koyika mpiko mpo na esengo etyami liboso na biso.’—Baebele 12:2.
8. “Mobali” oyo balobeli na Habakuku 2:5 (NW) ezali nani, mpe mpo na nini akolonga te?
8 Habakuku 2:5 (NW) elobeli “mobali” oyo akeseni na basaleli ya Yehova, ye akokisi mokano na ye te, atako “akómisi molimo na ye monene lokola Sheole.” Mobali yango oyo ‘atondaka te’ ezali nani? Na lokoso lokola oyo Babilone ezalaki na yango na ntango ya Habakuku, “mobali” yango oyo ezali elilingi ya bato mingi: bikonzi ya politiki, ezala bokonzi ya Bafasiste, ya Banazi, ya Bakoministe, to mpe oyo bazali kobenga demokrasi, azali kobunda bitumba mpo na kobɔtɔla mboka na ye. Azali mpe kotondisa Sheole, elingi koloba lilita, na milimo ya bato oyo basali likambo te. Kasi “mobali” yango ya mayele mabe, oyo auti na mokili ya Satana, ye oyo azali komimona ete akoká, alongi ‘koyanganisa mabota nyonso epai na ye moko’ te. Kaka Yehova Nzambe nde akoki kosangisa bato nyonso, mpe akosala yango na nzela ya Bokonzi na ye oyo apesi na mabɔkɔ ya Masiya.—Matai 6:9, 10.
Mawa ya liboso kati na mawa mitano
9, 10. (a) Yehova asaleli Habakuku mpo na kosakola makambo nini? (b) Tozali komona nini lelo oyo mpo na bozwi oyo euti na nzela mabe?
9 Yehova atindi Habakuku asakola nsango oyo elobeli makambo ya mawa mitano, to bitumbu oyo akopesa mpo na kobongisa mabelé ezala mboka ya bato oyo basambelaka Nzambe na bosembo. Bato yango ya sembo ‘balobi lisese’ oyo Yehova alakisi bango. Na Habakuku 2:6 tozali kotánga boye: “Mawa na ye oyo ayanganisi yango ezali na ye te, kino ntango nini? Akokumbaka bozito monene ya [nyongo, NW].”
10 Awa balobeli mingi litomba oyo euti na banzela mabe. Na mokili oyo, bato ya mbongo bazali se kokóma na mbongo mingi, mpe babola bazali se kokelela. Bato oyo batɛkaka bangi mpe bato ya lokuta bazali konduka mbongo, nzokande bato mosusu bazali kokufa nzala. Na mokili oyo, moto moko kati na bato minei azali mpenza na bobola makasi. Na bikólo mingi bato ebele bazali mpenza na bomoi ya mpasi. Bato oyo balingi bosembo na mokili oyo bazali koloba ete: “Kino ntango nini” makambo mabe ekolanda kobakisama! Kasi, nsuka ezali lisusu mosika te! Emonaneli “ekoumela mingi te.”
11. Habakuku alobi nini na likambo etali kosopa makila ya bato, mpe mpo na nini tokoki koloba ete lelo mpe nyongo ya makila ekómi monene na mokili?
11 Mosakoli alobi na moto mabe ete: “Mpo ete yo obebisi mabota mingi, litika mobimba na bato bakopunza yo; mpo na makila na bato mpe yauli oyo esalami epai na mokili mpe epai na mboka mpe nyonso baoyo bafandi kati na yango.” (Habakuku 2:8) Mokili oyo ezali na nyongo monene ya makila! Yesu alobaki polele ete: “Baoyo nyonso bakosimba mopanga bakokufa na mopanga.” (Matai 26:52) Nzokande, kaka na ekeke ya 20, mikili mpe bikólo ebomaki bato koleka milio monkama. Mawa na baoyo bazali kosopa makila nyonso wana!
Mawa ya mibale
12. Mawa ya mibale oyo Habakuku akomaki elobi nini, mpe nini endimisi biso ete bozwi oyo moto azwi na nzela mabe epesaka bolamu te?
12 Mawa ya mibale oyo elobelami na Habakuku 2:9-11, ekozwa “ye oyo azwi libonza mabe mpo na ndako na ye, ete atya zumbu na ye esika na likoló mpo na komibikisa na lobɔkɔ na mabe.” Biloko oyo moto azwi na nzela mabe epesaka bolamu te, lokola mokomi ya nzembo amonisi yango polele ete: “Kobanga te soko moto mosusu azwi misolo mingi mpe soko ndako na ye ekembisami; mpo ete wana ekokufa ye, akokenda na eloko moko te; nkembo na ye ekokita nsima na ye te.” (Nzembo 49:16, 17) Yango wana, toli ya Paulo ezali mpenza toli ya mayele: “Opesa toli na bazwi na ekeke oyo ete bázala na lolendo te, bálikya epai na bozwi bokoumelaka solo te kasi epai na Nzambe oyo akozwisaka biso biloko nyonso na malamu ete tósepela na yango.”—1 Timote 6:17.
13. Mpo na nini tosengeli kotika te kosakola makebisi ya Nzambe?
13 Lelo oyo, ezali mpenza na ntina bato báyoka ete Nzambe akopesa bitumbu! Ntango Bafalisai bapekisaki bato oyo bazalaki kokumisa Yesu lokola “mokonzi oyo azali koya na nkombo ya Nkolo,” Yesu alobaki na bango ete: “Nalobi na bino ete soko baoyo bakozala nyɛ, mbɛ mabanga makonganga.” (Luka 19:38-40) Ndenge moko mpe lelo oyo, soki basaleli ya Nzambe baboi koloba eloko mpo na komonisa mabe oyo ezali na mokili oyo, ‘libanga ekonganga uta na etutu.’ (Habakuku 2:11) Yango wana, tósakola na mpiko nyonso makambo oyo Nzambe alobi mpo na kokebisa bato!
Mawa ya misato mpe likambo ya nyongo ya makila
14. Nyongo ya makila ya ndenge nini mangomba ya mokili ezali na yango?
14 Mawa ya misato oyo Habakuku asakolaki etaleli nyongo ya makila. Habakuku 2:12 elobi boye: “Mawa epai na ye oyo akotonga mboka moke na makila mpe akobongisa mboka monene likoló ya masumu.” Na mokili oyo, mbala mingi kozanga bosembo etambolaka nzela moko na kosopa makila. Mangomba ya mokili oyo nde esopi makila mingi koleka. Tokoki kotánga na ndakisa bitumba ya Croisades, oyo bato oyo bamilatisi nkombo ya baklisto babundaki na Bamizilma; Inquisition, oyo Lingomba ya Katolike esalaki na Espagne mpe na Amérique latine, Bitumba ya Mbula Ntuku Misato na Mpoto kati na Baprotesta na Bakatolike; mpe bitumba mibale ya mokili mobimba oyo elekaki kosopa makila, bitumba yango ebandaki na mikili epai mangomba ya boklisto ezali na bato mingi.
15. (a) Makambo nini bikólo ya mokili ezali kosala oyo mangomba ezali kondima to ezali koloba eloko te mpo na yango? (b) ONU ekoki nde kosukisa likambo ya kotondisa ebele ya mindoki na mokili oyo?
15 Moko na makambo ya mabe mingi oyo esalemaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezali holocauste, elingi koloba ndenge Banazi babomaki bamilio ya Bayuda mpe bato mosusu oyo basalaki likambo te na Mpoto. Kaka na mikolo euti koleka nde bakonzi ya Lingomba ya Katolike na France bandimaki ete basalaki mabe lokola bapekisaki te ntango bazalaki kotinda bankóto ya bato mpo na koboma bango na ba chambre à gaz na bakaa ya Banazi. Atako bongo, mikili mingi ezali se komibongisa mpo na kosopa lisusu makila, mpe lingomba ezali kondima to ezali koloba eloko te. Na mikolo eleki, zulunalo moko oyo ebimaka na mikili mingi (Time) elobaki boye mpo na Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Russie: “Lingomba oyo euti kozongela mosala na yango ezali mpe na likambo ya koloba mpo na basoda mpe bibundeli ya Russie. . . . Lingomba yango emipesi mosala ya kopambola bampɛpɔ mpe bakaa ya basoda. Na sanza ya Novɛmbɛ, na monastɛrɛ ya Danilovsky, na engumba Moscou, esika biro ya Mokonzi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Russie ezali, lingomba yango epambolaki kutu mindoki ya nikleere ya Russie.” ONU ekoki nde kopekisa ete mokili etika kosala mindoki ya nsɔmɔ mpo na bitumba? Tondimi te! Zulunalo moko (The Guardian) oyo ebimaka na Londres, na Angleterre eyebisaki ete moto moko oyo azwaki mbano babengi prix Nobel alobaki boye: “Likambo oyo ezali kotya mobulu ezali ete bikólo mitano ya Conseil de sécurité ya ONU, ezali mpe bikólo mitano oyo esalaka mpe etɛkisaka mindoki koleka bikólo mosusu nyonso.”
16. Eloko nini Yehova akosala na bikólo oyo elingá bitumba?
16 Yehova akopesa mpenza bikólo oyo elingi bitumba etumbu? Habakuku 2:13 elobi ete: “Talá euti na [Yehova] na bibele te ete bato básala mosala bobele mpo na mɔ́tɔ mpe mabota bámilɛmbisa bobele mpamba?” “Yehova na bibele”! Ɛɛ, Yehova azali na baanzelu ebele oyo bazali basoda na ye, akotinda bango báboma bato mpe bikólo oyo elingi bitumba!
17. Boyebi ya Yehova ekozala ndenge nini na mokili nsima ya ntango oyo Yehova akopesa bikólo etumbu?
17 Soki Yehova apesi bikólo ya mobulu etumbu, makambo nini ekolanda na nsima? Habakuku 2:14 epesi eyano ete: “Zambi mokili ekotondisama na boyebi na nkembo ya [Yehova] lokola mai ezali kozipa mai-na-monana.” Ekozala likambo monene mpenza! Bokonzi ya Yehova ekolonga mpo na libela na Armagedon. (Emoniseli 16:16) Yehova alobi na biso ete ‘akopesa nkembo na etɛlɛmɛlo ya makolo na ye,’ elingi koloba mabelé oyo biso tofandi. (Yisaya 60:13) Bato nyonso bakoyekola nzela ya Nzambe oyo ezali nzela ya bomoi, mpe mabelé ekotonda na boyebi ya mikano ya nkembo ya Yehova ndenge mai etondi na mbu.
Mawa ya minei mpe ya mitano
18. Mawa ya minei oyo Habakuku asakolaki elobi nini, mpe ndenge nini ezali komonana na makambo ya mokili oyo?
18 Mawa ya minei elobelami na Habakuku 2:15 na maloba oyo: “Mawa epai na ye oyo akomelisa mozalani na ye, kobakisa nkanda na yo wana mpe kolangwisa ye, ete otala bolumbu na bango!” Yango ezali komonisa mabe mpe motó makasi oyo ezali na mokili lelo oyo. Ndenge bato bazali kosala makambo ya nsɔni, makambo oyo atako mangomba ezali kotikela yango nzela, ekómi mabe koleka. Maladi lokola sida mpe bamaladi mosusu oyo ezwamaka na kosangisa nzoto, ezali kopalangana na mokili mobimba. Lelo oyo, na esika bázala “nkembo ya [Yehova],” bato na makanisi na bango ya koluka naino bolamu na bango moko, bazali se komizindisa na makambo mabe mpe bazali kopusana penepene ya etumbu ya Nzambe. Etikali moke mokili oyo ya mobulu, mokili oyo “etondi na nsɔni na esika ya nkembo,” emela kɔpɔ ya nkanda ya Yehova, elingi koloba mokano na ye mpo na mokili yango. ‘Nsɔni ekoya na nkembo na yango.’—Habakuku 2:16.
19. Ebandeli ya mawa ya mitano oyo Habakuku asakolaki etaleli nini, mpe mpo na nini maloba yango ezali na ntina lelo oyo?
19 Mawa ya mitano ebandi naino na kopekisa makasi losambo ya bikeko. Yehova atindi mosakoli asakola maloba ya makasi oyo: “Mawa epai na ye oyo alobi na eloko na nzete ete, Lamuká! na libanga emimi ete, Tɛlɛmá! Oyo ekolakisa nde? Talá, epakolami na wolo mpe na palata mpe mpema ezali kati na yango te.” (Habakuku 2:19) Tii lelo oyo, bandimi ya mangomba ya boklisto na mangomba mosusu bazali kofukamela ekulusu, bililingi ya Malia, bikeko, mpe biloko mosusu ya ndenge wana, ezala ya bato to ya banyama. Moko te kati na biloko yango ekoki kolamuka mpo na kobikisa baoyo basambelaka yango ntango Yehova akoya kopesa etumbu. Wolo na palata oyo bapakoli yango ekoki kokokana te na kongɛnga ya Yehova, Nzambe ya seko, mpe na nkembo ya bikelamu na ye ya bomoi. Tiká tókumisa nkombo na ye mpamba te eleki bankombo nyonso!
20. Tozali na libaku malamu mpe na esengo ya kosala na tempelo nini?
20 Ya solo, Yehova, Nzambe na biso, abongi kozwa lokumu nyonso. Na botosi nyonso, tótosa likebisi makasi oyo epekisi biso kosambela bikeko. Kasi, yoká! Yehova alobi lisusu ete: “[Yehova] azali kati na ndako na ye ya bulɛɛ, tiká ete mokili mobimba bázala nyɛ liboso na ye.” (Habakuku 2:20) Ekoki mpenza kozala ete mosakoli azalaki kokanisa tempelo ya Yelusaleme. Nzokande, biso lelo oyo tozali na libaku malamu ya kosambela na tempelo monene koleka, tempelo ya elimo, epai oyo Nkolo Yesu Klisto azali kosala lokola Nganga Monene. Awa na mabelé, lopango ya tempelo yango, tozali koyangana, kosala mosala, mpe kobondela, tozali kopesa Yehova lokumu oyo ebongi na nkombo na ye monene. Mpe tozali na esengo ya kosambela na motema mobimba Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo!
Ozali koyeba lisusu?
• Ndenge nini otalelaka maloba ya Yehova ete: “Ekoumela te”?
• Makambo ya mawa oyo esakolamaki na nzela ya Habakuku ezali na ndimbola nini lelo oyo?
• Mpo na nini tosengeli kokoba koyebisa makebisi ya Yehova?
• Tozali na libaku malamu ya kosala na lopango ya tempelo nini?
[Bililingi na lokasa 15]
Lokola Habakuku, basaleli ya Nzambe lelo oyo bayebi ete Yehova akoumela te
[Bililingi na lokasa 18]
Osepelaka mingi na libaku malamu ya kosambela Yehova na lopango ya tempelo ya elimo?
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 16]
Fɔtɔ ya U.S. Army