Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Nahumu, ya Habakuku, mpe ya Sefania
ASULIA, ekólo oyo elekaki makasi na mokili, ebebisaki Samalia, mboka-mokonzi ya bokonzi ya mabota zomi ya Yisalaele. Ezalaki mpe kokanela ekólo Yuda. Nahumu, oyo azalaki mosakoli na Yuda, azalaki na nsango mpo na Ninive, mboka-mokonzi ya Asulia. Nsango yango ezali na mokanda ya Nahumu oyo ekomamaki liboso ya mobu 632 liboso ya ntango na biso (L.T.B.).
Na nsima, Babilone ekómaki ekólo oyo elekaki makasi na mokili; na bantango mosusu Bakaladi mpe bazalaki koyangela yango. Mokanda ya Habakuku, oyo mbala mosusu ekomamaki na mobu 628 L.T.B., esakolaki ndenge oyo Yehova alingaki kosalela Babilone mpo na kopesa etumbu oyo alakaki; mokanda yango esakolaki mpe makambo oyo esengelaki kokómela ekólo yango.
Sefania azalaki mosakoli na Yuda liboso Nahumu ná Habakuku bákóma basakoli. Asakolaki mbula koleka 40 liboso ete Yelusaleme ebomama na mobu 607 L.T.B., mpe ayebisaki nsango ya kobebisama mpe ya elikya mpo na Yuda. Mokanda ya Sefania ezali mpe na nsango ya bitumbu mpo na bikólo mosusu.
“MAWA EPAI YA MBOKA YA MAKILA”
“Litatoli mpo na Ninive” eutaki epai ya Yehova Nzambe, ye oyo “akosilika noki te, azali monene na nguya na ye.” Atako Yehova azali “ndako makasi na mokolo ya mpasi” mpo na baoyo balukaka libateli epai na ye, Ninive esengelaki kobebisama.—Nahumu 1:1, 3, 7.
“[Yehova] azali [kozongisa] nkembo na Yakobo.” Nzokande, lokola “nkɔsi oyo apasoli ndambo,” Asulia azalaki kobangisa basaleli ya Nzambe. Yehova ‘akozikisa makalo ya Ninive kino molinga. Mpe mopanga ekolya bilenge ya nkɔsi na ye.’ (Nahumu 2:2, 12, 13) “Mawa epai ya mboka ya makila”—Ninive. ‘Nyonso baoyo bakoyoka nsango na ye bakobɛta mabɔkɔ na bango’ mpe bakosepela.—Nahumu 3:1, 19.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:9—‘Kosukisama’ ya Ninive elimbolaki nini mpo na Yuda? Elimbolaki ete Asulia ekonyokola yango lisusu te; “minyoko ekobima mbala ya mibale te!” Nahumu alobelaki Ninive lokola nde ezalaki lisusu te; akómaki boye: “Talá likoló ya ngomba makolo na ye oyo akoyeisa nsango malamu, ye oyo akosakola kimya. Ee Yuda, batelá bilambo na yo.”—Nahumu 1:15.
2:6—“Bikuke ya bibale” oyo efungwamaki ezalaki nini? Bikuke yango ezalaki banzela oyo Ebale Tigre efungolaki na bifelo ya Ninive. Ntango bato ya Babilone ná Bamede bayaki kobundisa Ninive na mobu 632 L.T.B., bafandi ya engumba yango babangaki te. Batyaki motema na bifelo milai ya engumba na bango; bazalaki komimona lokola nzubɛ oyo ekangani esika moko, oyo moto akoki kosimba yango te. Kasi, bambula makasi etondisaki Ebale Tigre. Diodore, moto moko ya mayele na masolo ya kala alobaki ete mai ya mbula “ezindisaki eteni moko ya engumba yango mpe ekweisaki bifelo.” Na ndenge yango, bikuke ya bibale efungwamaki, mpe ndenge esakolamaki, Ninive ezikisamaki lokola putulu ekauki.—Nahumu 1:8-10.
3:4—Na ndenge nini Ninive ezalaki lokola mwasi ya pite? Ninive elakaki bikólo mosusu boninga mpe lisalisi, kasi ezalaki nde kokosa; ezalaki konyokola bikólo yango na nsima. Na ndakisa, Asulia esungaki Ahaza, mokonzi ya Yuda, ntango bato ya Sulia mpe ya Yisalaele bayaki kobundisa ye. Nzokande na nsima, “mokonzi ya Asulia, ayelaki [Ahaza] mpe abebisaki ye.”—2 Ntango 28:20.
Mateya mpo na biso:
1:2-6. Lokola Yehova apesaki bato oyo baboyaki kosambela kaka ye etumbu, yango emonisi ete azali Nzambe oyo asɛngaka ete basaleli na ye básambelaka kaka ye.—Exode 20:5.
1:10. Ata bifelo mpe manɔ́ngi milai epekisaki te kokokisama ya liloba ya Yehova mpo na Ninive. Lelo oyo, banguna ya basaleli ya Yehova bakokoka te kokima bitumbu oyo Nzambe akopesa bango.—Masese 2:22; Danyele 2:44.
“MOYENGEBENE AKOBIKA”
Mokapo ya liboso mpe ya mibale ya mokanda ya Habakuku ezali lisolo kati na mosakoli yango mpe Yehova Nzambe. Lokola atungisamaki mpo na makambo oyo ezalaki kosalema na Yuda, Habakuku atunaki Nzambe boye: “Mpo na nini okomonisa ngai mabe mpe okotala mikakatano?” Yehova ayanolaki ye ete: “Nazali kolamukisa Bakaladi, libota yango ya bololo mpe ya koyoka nkanda noki.” Habakuku akamwaki ete Nzambe akosalela “bato ya misala mabe” mpo na kopesa Yuda etumbu. (Habakuku 1:3, 6, 13) Yehova ayebisi Habakuku ete moyengebene akobika, kasi monguna akokima etumbu te. Longola yango, Habakuku alobelaki mpe malɔzi mitano oyo esengelaki kokómela Bakaladi.—Habakuku 2:4.
Na libondeli moko, Habakuku ayembaki nzembo ya mawa mpo na kolobela makambo ya kokamwa oyo Yehova asalaki na Mbu Motane, na esobe, mpe na Yeliko. Mosakoli yango asakolaki mpe ntango oyo Yehova akopesa bato etumbu na Armagedona. Asukisaki libondeli yango na maloba oyo: “[Yehova], Nkolo azali nguya na ngai, ye akozalisa makolo na ngai lokola makolo ya mboloko; ye akotambolisa ngai na bisika na ngai ya likoló.”—Habakuku 3:1, 19.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:5, 6—Mpo na nini Bayuda bandimaki te ete Bakaladi bakobebisa Yelusaleme? Ntango Habakuku abandaki kosakola, Yuda ezalaki na nse ya bokonzi ya Ezipito, ekólo oyo elekaki makasi na mokili. (2 Mikonzi 23:29, 30, 34) Atako Babilone ezalaki mpe kokóma na nguya, elongaki naino Falao Neko te. (Yilimia 46:2) Lisusu, tempelo ya Yehova ezalaki na Yelusaleme, mpe bakitani ya Davidi bazalaki koyangela na engumba yango. Bayuda ya ntango wana bakokaki kondima te ete Nzambe akosala “mosala” ya kotikela Bakaladi nzela ya kobebisa Yelusaleme. Nzokande, ata soki Bayuda bandimaki te maloba ya Habakuku, emonaneli na ye ‘eyaki solo mpenza’; bato ya Babilone babebisaki Yelusaleme na mobu 607 L.T.B.—Habakuku 2:3.
2:5—“Moto ya lolendo” ezali nani, mpe mpo na nini “akoumela epai na ye te”? Ekólo Babilone, oyo esalelaki basoda na yango ya makasi mpo na kolonga bikólo mosusu, ezalaki lokola “moto ya lolendo.” Lokola ezalaki kolonga bitumba, ekómaki lokola moto alangwɛ vinyo. Kasi, elongaki te koyanganisa bikólo nyonso, mpo Yehova asalelaki Bamede ná Baperse mpo na kokweisa yango. Lelo oyo, “moto” yango ezali bikólo ya nguya. Yango mpe etondi na lolendo mpe ezali na mposa makasi ya koyangela mokili. Nzokande, ‘ekoumela epai na yango te’ to ekokokisa mokano na yango te ya ‘koyanganisa mabota nyonso.’ Kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosangisa bato ya mokili mobimba.—Matai 6:9,10.
Mateya mpo na biso:
1:1-4; 1:12–2:1. Habakuku atunaki mituna oyo eutaki mpenza na motema mpe Yehova ayanolaki ye. Nzambe ayokaka mabondeli ya basaleli na ye ya sembo.
2:1. Lokola Habakuku, tosengeli kozala ekɛngɛ na elimo mpe kozala makasi na mosala ya Yehova. Tosengeli mpe kondimaka kobongola makanisi na biso ntango bapameli biso.
2:3; 3:16. Wana tozali kozela na kondima koya ya mokolo ya Yehova, tóbosana te ete mikolo etikali ya kotánga.
2:4. Mpo na kobika na mokolo ya Yehova, tosengeli koyika mpiko mpe kotikala sembo.—Baebele 10:36-38.
2:6, 7, 9, 12, 15, 19. Mawa ekokómela moto oyo alukaka kozwa libonza mabe, alingaka mobulu, asalaka makambo ya mbindo, mpe asambelaka bikeko. Tosengeli kokeba na bizaleli mpe na misala yango.
2:11. Soki biso toboyi kotondola mabe ya bato ya mokili, ata “libanga ekoganga.” Tosengeli kokoba kosakola na mpiko nsango malamu ya Bokonzi!
3:6. Eloko moko te, ata bibongiseli ya bato oyo ezali komonana ete ekoumela lokola ngomba mpe nkeka, ekopekisa Yehova apesa bitumbu na ye.
3:13. Tozali na elikya ete bato ya sembo bakokufa te na Armagedona. Yehova akobikisa basaleli na ye ya sembo.
3:17-19. Ata soki tokokutana na makambo ya mpasi liboso to na ntango ya Armagedona, tosengeli kozala na kondima ete Yehova akopesa biso “nguya” wana tozali kokoba kosalela ye.
‘MOKOLO YA YEHOVA EBƐLƐMI’
Losambo ya Baala epalanganaki na Yuda mobimba. Na nzela ya mosakoli Sefania, Yehova alobaki boye: “Nakosembola lobɔkɔ na ngai likoló ya Yuda mpe likoló ya bafandi ya Yelusaleme.” Sefania abakisaki boye: “Mokolo ya [Yehova] ebɛlɛmi.” (Sefania 1:4, 7, 14) Kaka baoyo bakokisi masɛngami ya Nzambe nde ‘bakobombama’ na mokolo yango.—Sefania 2:3.
“Mawa epai ya . . . mboka ya minyoko”—Yelusaleme! Yehova alobaki boye: “Zelá ngai, mpo na mokolo wana ekotɛlɛma ngai lokola motatoli. Mpo ete mokano na ngai ezali koyanganisa mabota . . . mpo na kosopa nkɛlɛ na ngai likoló na bango.” Kasi, Nzambe apesaki elaka oyo: “Nakopesa bino lokumu mpe kosanzolama kati na mabota nyonso ya mokili. Bongo nakokalambisa kokangama na bino liboso na miso na bino.”—Sefania 3:1, 8, 20.
Biyano na mituna ya Biblia:
2:13, 14—“Mingongo” ya banani esengelaki ‘koyembayemba’ na Ninive oyo ebebisami? Lokola Ninive esengelaki kokóma esika ya banyama ya zamba mpe ya bandɛkɛ, mingongo oyo esengelaki koyembayemba ezalaki ya bandɛkɛ mpe mbala mosusu, ezalaki mopɛpɛ oyo esengelaki kopepa na bandako ya engumba yango oyo esengelaki kotikala mpamba.
3:9 (NW)—“Monɔkɔ ya pɛto” ezali nini mpe ndenge nini elobamaka? Ezali solo ya Nzambe oyo ezali na Liloba na ye, Biblia. Esangisi mateya nyonso ya Biblia. Tokomonisa ete tozali koloba monɔkɔ yango soki tozali kondima mateya ya solo, tozali koteya yango epai ya basusu, mpe tozali koyokanisa bomoi na biso na mokano ya Nzambe.
Mateya mpo na biso:
1:8. Na mikolo ya Sefania, emonanaki ete bato mosusu bazalaki koluka ete mabota oyo ezalaki zingazinga endima bango; bazalaki ‘komilatisa bilamba ya bapaya.’ Ekozala bozoba soki lelo oyo, mosambeli ya Yehova azali kosala ndenge wana mpo mokili endima ye!
1:12; 3:5, 16. Yehova azalaki mbala na mbala kotinda basakoli na ye bákebisa bato na ye mpo na bitumbu oyo esengelaki koya. Azalaki kosala yango atako Bayuda mingi bazalaki komitungisa mpo na likambo moko te mpe bazalaki kokipe nsango yango te; bazalaki lokola salite oyo efandi na nse ya molangi ya vinyo. Lokola mokolo monene ya Yehova ebɛlɛmi, na esika tótika ete ezaleli ya bato ya koboya koyoka nsango ya Yehova ‘elɛmbisa mabɔkɔ na biso,’ tosengeli kokoba kosakola nsango ya Bokonzi na molende.
2:3. Kaka Yehova nde akoki kobikisa biso na mokolo ya nkanda na ye. Mpo Yehova akoba kopambola biso, tosengeli ‘koluka Ye,’ elingi koloba koyekola na likebi Liloba na ye, Biblia; kosɛnga ye ete atambwisa biso; mpe kopusana pene na ye. Tosengeli mpe ‘koluka boyengebene,’ elingi koloba kozala na etamboli ya pɛto. Mpe tosengeli ‘koluka bopɔlɔ,’ elingi koloba kozala na elimo ya komikitisa mpe ya botosi.
2:4-15; 3:1-5. Ntango Yehova akopesa bitumbu na ye, mangomba ya boklisto mpe mabota nyonso oyo bazalaki konyokola basaleli ya Nzambe, bakosuka ndenge Yelusaleme mpe mabota oyo ezalaki zingazinga na yango esukaki. (Emoniseli 16:14, 16; 18:4-8) Tosengeli kokoba kosakola bitumbu ya Nzambe na mpiko nyonso.
3:8, 9 (NW). Wana tozali kozela mokolo ya Yehova, tozali komibongisa mpo na lobiko na ndenge tozali koloba “monɔkɔ ya pɛto” mpe tozali ‘kobelela nkombo ya Nzambe’ na ndenge tomipesi epai na ye. Tozali mpe kosalela Yehova “na bomoko” elongo na basambeli na ye mpe tozali kopesa ye likabo oyo ezali “mbeka ya lisanzoli.”—Baebele 13:15.
“Eyei mbango mpenza”
Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Nsima ya mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te; okotala esika na ye, nde akomonana te.” (Nzembo 37:10) Soki tokanisi makambo oyo mokanda ya Nahumu esakolaki mpo na Ninive mpe oyo mokanda ya Habakuku esakolaki mpo na Babilone mpe Yuda, tosengeli mpenza kondima ete maloba ya mokomi ya nzembo ekokisamaki. Kasi, biso tosengeli kozela ntango boni?
Sefania 1:14 elobi boye: “Mokolo monene ya [Yehova] ebɛlɛmi; ebɛlɛmi, eyei mbango mpenza.” Mokanda ya Sefania emonisi biso mpe ndenge oyo tokoki kobombama na mokolo yango mpe ndenge oyo tosengeli komibongisa mpo na kobika. Ya solo, “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya.”—Baebele 4:12.
[Bililingi na lokasa 8]
Bifelo mineneminene ya Ninive epekisaki te kokokisama ya esakweli ya Nahumu mpo na engumba yango
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Randy Olson/National Geographic Image Collection