Libota ya Yehova ezongi mpe ezali kokumisa ye na mokili mobimba
“Nakobongola maloba ya bato kino [monɔkɔ, NW] ya pɛto, ete bango nyonso bábyanga nkombo ya [Yehova].”—SEFANIA 3:9.
1. Mpo na nini nsango ya mabe ekokisamaki na Yuda mpe bikólo mosusu?
BANSANGO ya bitumbu oyo Yehova atindaki Sefania asakola ezali mpenza na nguya! Bansango yango ya mabe ekokisamaki na ekólo ya Yuda mpe Yelusaleme, mboka-mokonzi na yango, mpamba te bakonzi na bato nyonso bazalaki kosala mokano ya Yehova te. Yehova asengelaki mpe kolakisa nkanda na ye na bikólo oyo ezalaki zingazinga ya Yuda, lokola Filistia, Moaba mpe Amona. Mpo na nini? Mpamba te na boumeli ya bankama ya bambula, bazalaki banguna mpenza ya libota ya Nzambe mpe banyokolaki yango. Mpo na ntina kaka wana, Asulia, oyo ezalaki nguya ya mokili mobimba, esengelaki kobebisama mpe ekotongama lisusu te.
2. Ekoki mpenza kozala ete Sefania 3:8 elobelaki banani?
2 Kasi, ezalaki na bato mosusu ya motema malamu na Yuda ya kala. Bazalaki kozela mokolo oyo Nzambe akopesa bato mabe etumbu mpe ekoki mpenza kozala ete maloba oyo etalelaki bango: “[Yehova] alobi ete, Zelá ngai, mpo na mokolo wana ekotɛlɛma ngai lokola motatoli. Mpo ete mokano na ngai ezali koyanganisa mabota ete nayeisa makonzi elongo, mpo na kosopa nkɛlɛ na ngai likoló na bango, ɛɛ, mɔ́tɔ nyonso ya nkanda na ngai; zambi na mɔ́tɔ ya nkɛlɛ na ngai na zuwa mokili mobimba ekozikisama.”—Sefania 3:8.
“Monɔkɔ ya pɛto” mpo na banani?
3. Nsango nini ya elikya Nzambe atindaki Sefania asakola?
3 Ezali solo ete Sefania asakolaki bansango ya mawa oyo eutaki na Yehova. Kasi, Nzambe atindaki ye mpe asakola nsango malamu ya elikya, nsango oyo esengelaki mpenza kobɔndisa bato oyo bakangamaki ntango nyonso na Yehova. Yehova alobaki maloba oyo ekomami na Sefania 3:9 ete: “Boye, nakobongola maloba ya bato kino [monɔkɔ, NW] ya pɛto, ete bango nyonso bábyanga nkombo ya [Yehova] mpe básalela ye na motema moko.”
4, 5. (a) Nini esengelaki kokómela bato oyo bazalaki sembo te? (b) Banani basengelaki kozwela likambo yango litomba, mpe mpo na nini?
4 Kasi, ezalaki na bato oyo basengelaki koyekola monɔkɔ yango ya pɛto te. Mpo na bato yango, esakweli elobi boye: “Nakolongola bato ya lolendo na kati na yo.” (Sefania 3:11, NW) Yango elingi koloba ete bato ya lolendo oyo bazalaki kotyola mibeko ya Nzambe mpe bazalaki kosala makambo ya mabe basengelaki kolongolama. Banani basengelaki kozwela likambo yango litomba? Sefania 3:12, 13 elobi boye: “Kasi [ngai Yehova] nakotika kati na yo bato batutami mpe basɔkɛmi; bakotalela nkombo ya [Yehova], baoyo batikali na Yisalaele; bakosala mabe te, bakoloba [lokuta] te; kati na monɔkɔ na bango lolemo ya bokosi ekozwama te. Zambi bakolya mpe bakolala na nse, moko akobangisa bango te.”
5 Bato ya sembo oyo basengelaki kotikala na Yuda nde basengelaki kozwela likambo yango litomba. Mpo na nini? Mpamba te batosaki maloba oyo: “Bóluka [Yehova], bino basɔkɛmi nyonso na mokili, baoyo bakosalaka malako na ye; bóluka boyengebene, bóluka bopɔlɔ, soko nde bokobombama na mokolo ya nkanda ya [Yehova].”—Sefania 2:3.
6. Ndenge nini esakweli ya Sefania ekokisamaki mpo na mbala ya liboso?
6 Esakweli ya Sefania ekokisamaki mbala ya liboso ntango Nzambe apesaki bato ya Yuda oyo bazangaki kondima etumbu; apesaki Babilone—nguya ya mokili mobimba—nzela ya komema bato ya Yuda na boombo na mobu 607 L.T.B. Bato mosusu babikaki, kati na bango ezalaki na mosakoli Yilimia, mpe bamosusu oyo bakangamaki na Yehova ata epai bakendaki na boombo. Na nsima, na mobu 539 L.T.B., Mokonzi Sirise atambwisaki Bamede na Baperse mpe balongaki bokonzi ya Babilone. Soki mbula mibale na nsima, Sirise abimisaki mobeko oyo epesaki Bayisalaele oyo batikalaki nzela ya kozonga na mboka na bango. Na nsima, batongaki lisusu tempelo ya Yelusaleme mpe banganga bakómaki lisusu koteya bato Mibeko. (Malaki 2:7) Na ndenge yango, Yehova apambolaki batikali oyo bazongaki ntango nyonso oyo bakangamaki na ye.
7, 8. Maloba ya Sefania 3:14-17 etalelaki banani, mpo na nini olobi bongo?
7 Mpo na bato oyo basengelaki kozonga, Sefania asakolaki boye: “Yembá nzembo, ɛ mwana mwasi ya Siona! Gangá, ɛ Yisalaele! Sepelá mpe yoká esengo na motema mobimba, ɛ mwana mwasi ya Yelusaleme! [Yehova] alongweli yo kokitisama na yo, abwaki libándá bayini na yo nyonso. Mokonzi ya Yisalaele, ye [Yehova], azali kati na yo, okobanga mabe lisusu te. Na mokolo yango, ekolobamela Yelusaleme ete, Ɛ Siona, bangá te. Tiká ete mabɔkɔ na yo málɛmba te. [Yehova] Nzambe na yo azali kati na yo, ye elombe ya makasi, akobikisa! Akosepela na yo na esengo, na bolingo na ye akofanda na kimya. Akosepela na yo na nzembo.”—Sefania 3:14-17.
8 Esakweli yango etalelaki batikali oyo balongwaki na boombo na Babilone mpe bazongaki na mboka ya bankɔkɔ na bango. Likambo yango ezali polele na Sefania 3:18-20, epai tozali kotánga boye: “Nakoyanganisa bango baoyo bayoki mawa mpo na koyangana, baoyo na yo. Mpamela na ye ezali na bozito likoló na bango. Talá, na ntango yango nakotɛmɛla banyokoli nyonso na yo; nakobikisa ye oyo atɛngumi, nakoyanganisa ye oyo abwakami, nakobongola nsɔni na bango ete ezala kosanzolama mpe lokumu na mokili mobimba. Na ntango yango, nakokɔtisa bino, na ntango yango nakoyanganisa bino elongo; ɛɛ, nakopesa bino lokumu mpe kosanzolama kati na [bikólo, NW] nyonso ya mokili. Bongo [nakoyanganisa bakangami na bino, NW] liboso ya miso na bino. [Yehova] alobi bongo.”
9. Ndenge nini Yehova alakisaki lokumu na ye na likambo oyo asalaki na ekólo ya Yuda?
9 Kanisá kokamwa oyo bato ya bikólo oyo ezalaki zingazinga, banguna ya bato ya Nzambe bakamwaki! Bato ya Yuda bakendaki na boombo na Babilone, mboka ya makasi mingi; elikya ezalaki te ete bakoki kolongwa na boombo. Mpe lisusu, mboka na bango etikalaki mpamba. Kasi, Yehova asalelaki nguya na ye, nsima ya mbula 70, bato ya Yuda bazongaki na mboka na bango; nzokande, bikólo oyo ezalaki koyina bango esengelaki kobebisama. Yehova alakisaki mpenza lokumu na ye ntango azongisaki batikali oyo bakangamaki na ye! Akómisaki bango ‘lokumu mpe kosanzolama kati na bikólo nyonso ya mokili.’ Kozonga na bango epesaki Yehova mpe baoyo bazalaki komema nkombo na ye lokumu!
Losambo ya Yehova etombwami
10, 11. Ntango nini esakweli ya kozongisama oyo Sefania alobelaki esengelaki kokokisama na monene na yango, mpe ndenge nini toyebi yango?
10 Ezali mpe na kozongisama mosusu oyo esalemaki na ekeke ya liboso ya ntango na biso, ntango Yesu Klisto ayanganisaki batikali ya Yisalaele na losambo ya solo. Ezalaki kaka ebandeli ya makambo oyo esengelaki koya mpamba te esakweli ya kozongisama esengelaki kokokisama na monene na yango na mikolo oyo ezalaki liboso. Mika asakolaki boye: “Ekozala ete na mikolo ya nsuka ngomba ya ndako ya [Yehova] ekokokisama likoló koleka ngomba nyonso, ekotombwa likoló ya [ngomba mike]; mpe mabota bakokenda wana.”—Mika 4:1.
11 Likambo oyo esengeli kosalema ntango nini? Lokola esakweli elobaki yango, “na mikolo ya nsuka,” mikolo oyo tozali na yango sikoyo. (2 Timote 3:1, NW) Likambo yango esengelaki kosalema liboso ete mokili mabe oyo ebomama, na ntango oyo bato bazali naino kosambela banzambe ya lokuta. Mika 4:5 elobi ete: “Mabota nyonso bakotambola, moko na moko na nkombo ya nzambe na ye.” Kasi ezali boni mpo na basambeli ya solo? Esakweli ya Mika epesi eyano ete: “Nde biso tokotambola na nkombo ya [Yehova] Nzambe na biso, libela na libela.”
12. Ndenge nini losambo ya solo etombwami na mikolo oyo ya nsuka?
12 Yango wana, na mikolo oyo ya nsuka, ‘ngomba ya ndako ya Yehova ekokisami likoló koleka ngomba nyonso.’ Lokola ngomba oyo ezali likoló koleka bangomba nyonso, losambo ya Yehova ezongisami, etombwami mpe etɛlɛmi makasi likoló koleka mangomba mosusu nyonso. Lokola Mika asakolaki mpe yango, ‘mabota mingi bakokende kuna.’ Bato oyo bazali kosambela Nzambe ya solo ‘bakotambola na nkombo ya Yehova Nzambe na bango, libela na libela.’
13, 14. Ntango nini mokili oyo ekómaki na “mikolo ya nsuka,” mpe makambo nini ezali kosalema banda ntango yango mpo na losambo ya solo?
13 Bisakweli ya Biblia ezali kokokisama na makambo oyo ezali kosalema lelo mpe ezali kondimisa ete banda 1914, tozali “na mikolo ya nsuka.” (Malako 13:4-10) Makambo oyo elekaki ezali komonisa ete Yehova abandaki koyanganisa batikali ya sembo, bapakolami na elimo oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi na likoló, na kati ya losambo ya solo. Na nsima, Yehova abandaki koyanganisa “ebele monene . . . bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bibolo nyonso, na minɔkɔ nyonso,” bango bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na mabele.—Emoniseli 7:9.
14 Banda Etumba ya Liboso ya mokili mobimba tii lelo oyo, losambo ya Yehova oyo ezali kosalema na bato oyo bazali komema nkombo na ye ezali se kokola mpe ye moko azali kotambwisa bango. Ntango Etumba ya Liboso ya mokili mobimba esilaki, basaleli ya Yehova bazalaki kaka mwa bankóto, kasi lelo oyo bazali soki milio motoba, na kati ya masangá soki 91 000 na mikili 235. Mbula na mbula, basakoli yango ya Bokonzi bazali kolekisa bangonga koleka miliare moko mpo na kokumisa Yehova na mosala ya kosakola epai ya bato nyonso. Ezali polele ete Batatoli yango ya Yehova nde bazali kokokisa maloba oyo Yesu asakolaki ete: “Mpe nsango malamu oyo ya Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.”—Matai 24:14.
15. Ndenge nini maloba ya Sefania 2:3 ezali kokokisama lelo oyo?
15 Sefania 3:17 elobi boye: “[Yehova] Nzambe na yo azali kati na yo, ye elombe ya makasi, akobikisa!” Soki basaleli ya Yehova bazali kokola na elimo na mikolo oyo ya nsuka ezali mpo Yehova ‘azali kati na bango’ lokola Nzambe na bango oyo azali na nguya nyonso. Likambo yango ezali kosalema lelo oyo ndenge esalemaki ntango bato ya Yuda bazongaki na mobu 537 L.T.B. Na bongo, tokoki komona ndenge oyo Sefania 2:3 ezali kokokisama na monene na yango na ntango na biso wana elobi ete: “Bóluka [Yehova] bino basɔkɛmi nyonso ya mokili.” (Biso nde totɛngisi makomi.) Na mobu 537 L.T.B., “nyonso” yango ezalaki Bayuda oyo batikalaki na bomoi mpe balongwaki na boombo na Babilone. Lelo oyo, nyonso emonisi basɔkɛmi oyo bauti na bikólo nyonso ya mokili, baoyo bazali kondima nsango malamu oyo ezali kosakolama na mokili mobimba mpe bazali koya na ‘ngomba ya ndako ya Yehova.’
Losambo ya solo ezali kokola
16. Na ntembe te banguna na biso bazali koloba nini ntango bazali komona bokoli ya basaleli ya Yehova na ntango na biso?
16 Nsima ya mobu 537 L.T.B., bato mingi ya bikólo oyo ezalaki zingazinga na Yuda bakamwaki ntango bamonaki ete basaleli ya Nzambe bazongisi losambo ya solo na mboka na bango. Kasi kozongisama wana ezalaki na bato mingi mpenza te. Oyebi makambo oyo bato mosusu, ata mpe banguna ya libota ya Nzambe, bazali koloba ntango bazali komona ndenge oyo basaleli ya Yehova bazali se koya ebele, bazali kokola mpe bazali kokende liboso na mikolo na biso? Na ntembe te, banguna mosusu bazali koyoka ndenge oyo Bafalisai bayokaki ntango bamonaki bato ebele bazali kolanda Yesu. Balobaki boye: ‘Talá mokili mobimba ekei nsima na ye.’—Yoane 12:19.
17. Mokomi moko alobaki nini mpo na Batatoli ya Yehova, mpe ndenge nini babakisami?
17 Na mokanda na ye (These Also Believe), Profɛsɛrɛ Charles Braden alobaki ete: ‘Batatoli ya Yehova batondisi mpenza mokili na mateya na bango. Ya solo, tokoki mpenza koloba ete ata lingomba moko te na mokili ezali na molende mpe na mpiko ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi lokola Batatoli ya Yehova. Emonani ete lisangá yango ekolanda se kokola.’ Alobaki mpenza solo! Ntango akomaki maloba oyo esili koleka mbula soki 50, Batatoli bazalaki kaka soki 300 000 na mokili mobimba! Alingaki koloba nini lelo oyo na ndenge basakoli bakómi soki milio motoba, elingi koloba mbala 20 koleka basakoli oyo bazalaki na ntango wana?
18. Monɔkɔ ya pɛto ezali nini, mpe Nzambe apesi yango na banani?
18 Na nzela ya mosakoli na ye, Nzambe alakaki ete: “Nakobongola maloba na bato kino [monɔkɔ, NW] ya pɛto, ete bango nyonso bábyanga nkombo ya [Yehova] mpe básalela ye na motema moko.” (Sefania 3:9) Na mikolo oyo ya nsuka, ezali Batatoli ya Yehova nde bazali kobelela nkombo ya Yehova, bazali kosalela ye na bomoko mpe na ekanganeli makasi ya bolingo; to bazali kosalela ye “na motema moko.” Ezali bango nde Yehova alakisi monɔkɔ ya pɛto. Monɔkɔ ya pɛto yango elimboli mpe bososoli malamu ya mateya ya solo na ntina na Nzambe mpe mokano na ye. Kaka Yehova ye moko nde apesaka bososoli yango na nzela ya elimo santu na ye. (1 Bakolinti 2:10) Banani oyo Yehova apesi bango elimo na ye? Apesi yango kaka epai ya ‘baoyo batosaka ye.’ (Misala 5:32) Kaka Batatoli ya Yehova nde batosaka Nzambe lokola Mokonzi na makambo nyonso. Yango wana bazali kozwa elimo santu ya Nzambe mpe bazali koloba monɔkɔ ya pɛto, elingi koloba mateya ya solo mpo na Yehova mpe mikano malamu na ye. Bazali kokumisa Yehova na monɔkɔ yango ya pɛto na mokili mobimba mpenza.
19. Koloba monɔkɔ ya pɛto esɛngi makambo nini?
19 Koloba monɔkɔ ya pɛto elimboli kaka te kondima mateya ya solo mpe koteya yango bato mosusu, kasi esɛngi mpe ete bizaleli ya moto emonisa ete azali kotosa mibeko ya Nzambe. Baklisto bapakolami bazali na esika ya liboso mpo na koluka Yehova mpe koloba monɔkɔ ya pɛto. Kanisá naino mosala oyo esalemi! Atako bapakolami batikali kaka moke, bazali sikoyo bato pene na 8 700 mpamba, bato soki milio motoba oyo bazali na elikya ya bomoi ya seko na mabele bazali kolanda ndakisa na bango, bazali koluka Yehova mpe bazali koloba monɔkɔ ya pɛto. Bato yango bazali ebele monene oyo bauti na bikólo nyonso, bazali komonisa na misala na bango ete bandimi mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kosikola bato, bazali kosalela Nzambe mosala mosantu na lopango ya libándá ya tempelo na ye ya elimo, mpe bakobika na “bolɔzi monene” oyo etikali moke eya na mokili oyo ezangi sembo.—Emoniseli 7:9, 14, 15.
20. Makambo nini ezali kozela baklisto bapakolami mpe ebele monene?
20 Ebele monene bakokɔta na mokili ya sika mpe ya sembo ya Nzambe. (2 Petelo 3:13) Yesu Klisto na ba 144 000 bapakolami na elimo oyo bakosekwa mpo na kozwa bomoi na likoló mpe kozala bakonzi mpe banganga elongo na ye nde bazali na kati ya guvɛrnɛma ya sika oyo ekoyangela mabele. (Baloma 8:16, 17; Emoniseli 7:4; 20:6) Bato oyo bakobika na bolɔzi monene bakokómisa mabele paladiso mpe bakolanda koloba monɔkɔ ya pɛto oyo Nzambe apesi bango. Tokoki mpe koloba ete maloba oyo etaleli bango: “Bana na yo nyonso [mibali mpe basi] bakolakisama na [Yehova], mpe [kimya, NW] ya bana na yo ekozala monene. Okokokisama na boyengebene.”—Yisaya 54:13, 14.
Mosala ya koteya oyo eleki monene
21, 22. (a) Lokola Misala 24:15 emonisi yango, banani bakoyekola monɔkɔ ya pɛto? (b) Mosala nini ya koteya oyo ekokani na mosusu te ekosalema awa na mabele ntango Bokonzi ekoyangela?
21 Ezali na ebele ya bato oyo bakozwa libaku ya koyekola monɔkɔ ya pɛto na mokili ya sika, bato yango balobelami na Misala 24:15, vɛrsɛ yango elobi boye: “Lisekwa ekozala na bato sembo mpe na bato sembo te.” Bamiliare ya bato bazaláká na bomoi mpe bakufá kasi bazwaki boyebi ya solosolo ya Yehova te. Yehova akosekwisa bango mokemoke, na mobulu te. Bato yango oyo bakosekwa bakoyekola monɔkɔ ya pɛto.
22 Kosala mosala monene wana ya koteya bato ekozala mpenza libaku malamu! Ekozala mosala monene ya koteya bato oyo eleki monene na mokili. Nyonso wana ekosalema na litambwisi malamu ya Klisto Yesu oyo akozala Mokonzi. Na nzela na yango, nsukansuka bato bakomona ndenge oyo esakweli ya Yisaya 11:9 ekokokisama, yango elobi ete: “Mokili ekotonda na boyebi ya [Yehova] lokola mbonge ekozipaka mai-na-monana.”
23. Mpo na nini okoki koloba ete biso basaleli ya Yehova tozali mpenza na libaku malamu?
23 Na mikolo oyo ya nsuka, tozali mpenza na libaku malamu ya komibongisa mpo na ntango wana ya malamu! Tozali lisusu na libaku malamu ya kozala basaleli ya Nzambe lelo oyo, baoyo bazali komona ndenge oyo maloba ya esakweli ya Sefania 3:20 ezali kokokisama na monene na yango! Na vɛrsɛ yango Yehova alobi ete: “Nakopesa bino lokumu mpe kosanzolama kati na mabota nyonso ya mokili.”
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini esakweli ya Sefania oyo elobelaki kozongisama ekokisamaki?
• Ndenge nini losambo ya solo ezali kokola na mikolo oyo ya nsuka?
• Wapi mosala monene ya koteya oyo ekosalema na mokili ya sika?
[Elilingi na lokasa 25]
Basaleli ya Yehova bazongaki na mboka na bango mpo na kozongisa losambo ya pɛto. Oyebi ndimbola ya likambo oyo lelo oyo?
[Bililingi na lokasa 26]
Lokola bazali koloba “monɔkɔ ya pɛto,” Batatoli ya Yehova bazali koteya bato nsango ya kobɔndisa oyo ezali na kati ya Biblia