Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mokolo ya kosambisa ya Yehova ekómi pene!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2001 | 15 Sanza ya 2
    • 11. Wapi ndimbola ya libosoliboso ya Sefania 1:8-11.

      11 Mpo na mokolo ya Yehova, Sefania 1:8-11 elobi lisusu boye: “Na mokolo ya mbeka ya [Yehova], nakopesa mikóló mpe bana ya mokonzi etumbu mpe bango nyonso baoyo bakomilatisa bilamba ya bapaya. Na mokolo yango, nakopesa etumbu epai ya moto na moto oyo akopumbwa na ekɔtelo, mpe epai na bango bakotondisa ndako ya nkolo na bango na [mobulu, NW] mpe na bokosi. [Yehova] alobi boye ete, Na mokolo yango, mongongo ekoyokana na Ekuke ya Mbisi, kolela longwa na Mboka-na-mibale, makɛlɛlɛ monene ya kokweakwea longwa na ngomba. Bólela bino bafandi na Makatese, mpo ete [bato ya mombongo, NW] bazali lisusu te, baoyo bazali kopimaka [palata balongolami, NW].”

  • Mokolo ya kosambisa ya Yehova ekómi pene!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2001 | 15 Sanza ya 2
    • 13. Na boyokani na esakweli ya Sefania, nini esengelaki kosalema ntango bato ya Babilone babundisaki Yelusaleme?

      13 “Mokolo yango” ya kokata likambo ya Yuda ekokani na mokolo oyo Yehova akopesa banguna na ye etumbu, akosukisa mabe nyonso mpe akolakisa ete ye nde aleki makasi. Ntango bato ya Babilone bakɔtaki na Yelusaleme, koganga eyokanaki na Ekuke ya Mbisi. Ekoki kozala ete bazalaki kobenga yango na nkombo wana mpo ezalaki penepene na zando ya mbisi. (Nehemia 13:16) Basoda ya Babilone bakɔtaki na kartye oyo bazalaki kobenga Mboka-na-mibale mpe “makɛlɛlɛ monene ya kokweakwea longwa na ngomba” ekoki kolimbola makɛlɛlɛ ya Bakaladi ntango bazalaki koya. Bato oyo bafandaki na Makatese, oyo ezali mbala mosusu esika ya likoló ya Lobwaku ya Tiropeoni, basengelaki ‘kolela.’ Mpo na nini? Mpamba te mombongo, na mosala ya ‘baoyo bazali kopima palata,’ ekosalema lisusu kuna te.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto