Mokolo ya kosambisa ya Yehova ekómi pene!
“Mokolo monene ya [Yehova] ebɛlɛmi; ebɛlɛmi, eyei mbango mpenza.”—SEFANIA 1:14.
1. Likebisi nini Nzambe apesaki na nzela ya Sefania?
ETIKALI moke Yehova Nzambe apesa bato mabe etumbu. Yoká! Azali kokebisa ete: “Nakobebisa moto . . . [Nakolongola] moto longwa na likoló ya mabele.” (Sefania 1:3) Nkolo Mokonzi Yehova alobaki maloba yango na nzela ya mosakoli Sefania; ekoki kozala ete Sefania azalaki nkɔkɔ ya nkɔkɔ ya Hizikiya, mokonzi moko ya sembo. Sefania alobaki makambo yango na mikolo ya mokonzi malamu Yosiya mpe asakolaki mpasi oyo esengelaki koyela bato mabe oyo bafandaki na mokili ya Yuda.
2. Mpo na nini makambo oyo Yosiya asalaki epekisaki te koya ya mokolo oyo Yehova akopesa etumbu?
2 Na ntembe te, esakweli ya Sefania ebakisaki lisusu mposa ya elenge Yosiya ya kosilisa losambo ya mbindo na Yuda. Atako mokonzi asukisaki losambo ya lokuta na mboka yango, misala na ye esalaki te ete bato bátika mpenza makambo ya mabe to ezipaki te masumu ya nkɔkɔ na ye, Mokonzi Manase, oyo “atondisaki Yelusaleme na makila [ya bato oyo basali likambo te, NW].” (2 Mikonzi 24:3, 4; 2 Ntango 34:3) Yango wana, mokolo oyo Yehova asengelaki kopesa etumbu ekokaki kozanga te.
3. Nini ezali kopesa biso elikya ete na “mokolo ya nkanda ya Yehova” likoki ya kobika ezali?
3 Kasi, bato mosusu basengelaki kobika na mokolo yango ya nsɔmɔ. Yango wana, mosakoli ya Nzambe alobaki boye: “Naino mobeko ebimi te, mokolo elongwi lokola mpumbulu; naino nkanda monene ya [Yehova] eyeli bino te, naino mokolo ya nkanda ya [Yehova] eyeli bino te. Bóluka [Yehova], bino basɔkɛmi nyonso ya mokili, baoyo bakosalaka malako na ye; bóluka boyengebene, bóluka bopɔlɔ, soko nde bokobombama na mokolo ya nkanda ya [Yehova].” (Sefania 2:2, 3) Lokola tozali na elikya ete likoki ya kobika na mokolo oyo Yehova akopesa etumbu ezali, tótalela sikoyo mokanda ya Sefania. Mokanda yango ekomamaki na mokili ya Yuda liboso ya mobu 648 L.T.B.; maloba na yango ezali kati na “liloba ya esakweli” ya Nzambe oyo tosengeli mpenza kotyela likebi.—2 Petelo 1:19, NW.
Yehova asemboli lobɔkɔ na ye
4, 5. Ndenge nini maloba ya Sefania 1:1-3 ekokisamaki epai ya bato mabe ya Yuda?
4 “Maloba ya Yehova” epai ya Sefania ebandi na likebisi oyo totángaki na ebandeli. Nzambe alobi boye: “Nakobebisa biloko nyonso, kobebisa yango mpenza, longwa na likoló ya mokili. [Yehova] alobi bongo. Nakobebisa moto na nyama, nakobebisa bandɛkɛ ya lola, mpe bambisi ya mai-na-monana; mabaku mpe bato mabe elongo. [Nakolongola] moto longwa na likoló ya mabele. [Yehova] alobi bongo.”—Sefania 1:1-3.
5 Yehova asengelaki kosukisa makambo mabe na mokili ya Yuda. Nzambe alingaki kosalela nani mpo na “kobebisa biloko nyonso, kobebisa yango mpenza, longwa na likoló ya mokili”? Lokola emonani ete Sefania asakolaki ntango Mokonzi Yosiya abandaki koyangela, elingi koloba na mobu 659 L.T.B., esakweli wana ekokisamaki ntango bato ya Babilone babebisaki Yuda na Yelusaleme, mboka-mokonzi na yango, na mobu 607 L.T.B. Na ntango wana, bato mabe ‘babebisamaki’ mpenza na Yuda.
6-8. Sefania 1:4-6 esakolaki makambo nini, mpe esakweli yango ekokisamaki ndenge nini na Yuda ya kala?
6 Sefania 1:4-6 esakoli makambo oyo Nzambe asengelaki kosala epai ya basambeli ya lokuta, ete: “Nakosembola lobɔkɔ na ngai likoló ya Yuda mpe likoló ya bafandi ya Yelusaleme; [nakolongola] longwa na esika oyo litika ya Baala, mpe nkombo ya basali ya bikeko mpe banganga na yango lokola; baoyo bazali kogumbama likoló ya nsamba epai na [limpinga, NW] ya lola, baoyo bazali kogumbama mpe kokata ndai na [Yehova], nde bakati ndai mpo na Malakama; mpe baoyo babongwani nsima na [kolanda Yehova], baoyo bazali koluka [Yehova] te mpe bazali kotuna ye te.”
7 Yehova asembolaki lobɔkɔ na ye mpo na kobebisa bato ya Yuda na Yelusaleme. Azwaki ekateli ya koboma basambeli ya Baala, nzambe ya Bakanana mpo na makambo ya kobota. Mboka na mboka ezalaki na banzambe oyo bazalaki kobenga Baala mpamba te bato oyo bazalaki kosambela yango bazalaki kokanisa ete nzambe mokomoko azali na bokonzi na mboka moko. Na ndakisa, ezalaki na Baala moko oyo bato ya Moaba na bato ya Midyani bazalaki kosambela na Ngomba Peolo. (Mituya 25:1, 3, 6) Yehova asengelaki kosilisa banganga ya Baala na Yuda mobimba, na banganga Balevi oyo bazalaki sembo te, baoyo bazalaki kobuka mibeko ya Nzambe mpo bazalaki kosangana na banganga ya Baala.—Exode 20:2, 3.
8 Nzambe asengelaki mpe koboma baoyo ‘bazalaki kogumbamela limpinga ya lola,’ ekoki mpenza kozala ete bazalaki kotala minzoto mpo na koyebisa makambo oyo ekoya mpe bazalaki kosambela moi. (2 Mikonzi 23:11; Yilimia 19:13; 32:29) Nzambe alingaki kolakisa nkanda na ye epai ya baoyo bazalaki kosangisa losambo ya solo na losambo ya lokuta, elingi koloba bazalaki ‘kokata ndai na nkombo ya Yehova mpe na nkombo ya Malakama.’ Ekoki kozala ete Malakama ezali kaka nkombo mosusu ya Moleke, nzambe ya liboso ya Baamona. Bato oyo bazalaki kosambela Moleke bazalaki kopesa bana lokola bambeka.—1 Mikonzi 11:5; Yilimia 32:35.
Nsuka ya mangomba ya boklisto ekómi pene!
9. (a) Ngambo nini mangomba ya boklisto ezali na yango? (b) Tosengeli kozala na ekateli ya kosala eloko nini oyo bato ya Yuda oyo bazalaki sembo te bazangaki kosala?
9 Makambo yango ezali kozongisa makanisi na biso na makambo oyo mangomba ya boklisto ezali kosala, ndenge oyo mangomba yango emipesi na losambo ya lokuta mpe na kotala minzoto mpo na koyebisa makambo oyo ekoya! Mangomba ya boklisto esali mpe likambo mosusu ya mabe mpenza: ezali na ngambo na ebele ya bomoi ya bato oyo baleki mbeka na bitumba oyo bakonzi ya mangomba bazali kolendisa! Tózala ata moke te lokola bato ya Yuda oyo bazalaki sembo te, ‘batikaki kolanda Yehova,’ bazalaki lisusu kolanda makambo na ye te mpe bazalaki lisusu koluka litambwisi na ye te. Biso tózala sembo epai ya Nzambe.
10. Ndenge nini okoki kolimbola esakweli ya Sefania 1:7?
10 Maloba ya mosakoli oyo elandi ebongaki mpenza mpo na bato mabe ya Yuda mpe ebongi mpo na bato mabe ya ntango na biso. Sefania 1:7 elobi boye: “Zalá nyɛɛ liboso ya Nkolo [Yehova]! Zambi mokolo ya [Yehova] ebɛlɛmi. [Yehova] abongisi mbeka mpe abulisi babyangami na ye.” Ekoki mpenza kozala ete “babyangami” yango ezali Bakaladi, banguna ya Yuda. “Mbeka” ezali nde Yuda yango moko na mboka-mokonzi na yango. Na maloba wana, Sefania asakolaki ete Nzambe azalaki na mokano ya koboma Yelusaleme; maloba yango emonisi mpe ete mangomba ya boklisto ekobomama. Lokola mokolo oyo Nzambe akopesa etumbu ekómi mpenza pene sikoyo, mokili mobimba esengeli ‘kozala nyɛɛ liboso ya Nkolo Mokonzi Yehova’ mpe esengeli koyoka oyo azali koloba na nzela ya “etonga moke,” elingi koloba bayekoli ya Yesu oyo bapakolami na elimo mpe na baninga na bango, “bampate mosusu.” (Luka 12:32; Yoane 10:16) Bato nyonso oyo bakoyoka te, mpe na ndenge yango bakomonisa ete baboyi Bokonzi ya Nzambe, bakobomama.—Nzembo 2:1, 2.
Etikali moke mokolo ya kobebisama eya!
11. Wapi ndimbola ya libosoliboso ya Sefania 1:8-11.
11 Mpo na mokolo ya Yehova, Sefania 1:8-11 elobi lisusu boye: “Na mokolo ya mbeka ya [Yehova], nakopesa mikóló mpe bana ya mokonzi etumbu mpe bango nyonso baoyo bakomilatisa bilamba ya bapaya. Na mokolo yango, nakopesa etumbu epai ya moto na moto oyo akopumbwa na ekɔtelo, mpe epai na bango bakotondisa ndako ya nkolo na bango na [mobulu, NW] mpe na bokosi. [Yehova] alobi boye ete, Na mokolo yango, mongongo ekoyokana na Ekuke ya Mbisi, kolela longwa na Mboka-na-mibale, makɛlɛlɛ monene ya kokweakwea longwa na ngomba. Bólela bino bafandi na Makatese, mpo ete [bato ya mombongo, NW] bazali lisusu te, baoyo bazali kopimaka [palata balongolami, NW].”
12. Na ndimbola nini bato mosusu bazali ‘komilatisa bilamba ya bapaya’?
12 Nsima ya liwa ya Yosiya, bakonzi mosusu balandanaki: Yoahaza, Yoyakimi mpe Yoyakini. Nsima na bango, Sidikiya ayangelaki mpe Yelusaleme ebebisamaki ntango ye azalaki mokonzi. Atako likama ya ndenge wana ezalaki liboso na bango, emonani ete bato mosusu bazalaki koluka ete bato ya bikólo oyo ezalaki zingazinga na bango bándima bango, yango wana ‘bazalaki komilatisa bilamba ya bapaya.’ Lelo oyo mpe ezali se ndenge yango, bato mingi bazali komonisa na ndenge mingi ete bazali na kati ya ebongiseli ya Yehova te. Lokola bazali komonisa ete bazali na ebongiseli ya Satana, bakozwa etumbu.
13. Na boyokani na esakweli ya Sefania, nini esengelaki kosalema ntango bato ya Babilone babundisaki Yelusaleme?
13 “Mokolo yango” ya kokata likambo ya Yuda ekokani na mokolo oyo Yehova akopesa banguna na ye etumbu, akosukisa mabe nyonso mpe akolakisa ete ye nde aleki makasi. Ntango bato ya Babilone bakɔtaki na Yelusaleme, koganga eyokanaki na Ekuke ya Mbisi. Ekoki kozala ete bazalaki kobenga yango na nkombo wana mpo ezalaki penepene na zando ya mbisi. (Nehemia 13:16) Basoda ya Babilone bakɔtaki na kartye oyo bazalaki kobenga Mboka-na-mibale mpe “makɛlɛlɛ monene ya kokweakwea longwa na ngomba” ekoki kolimbola makɛlɛlɛ ya Bakaladi ntango bazalaki koya. Bato oyo bafandaki na Makatese, oyo ezali mbala mosusu esika ya likoló ya Lobwaku ya Tiropeoni, basengelaki ‘kolela.’ Mpo na nini? Mpamba te mombongo, na mosala ya ‘baoyo bazali kopima palata,’ ekosalema lisusu kuna te.
14. Na meko nini Nzambe akotalela malamumalamu bato oyo bazalaki koloba ete basambelaka ye?
14 Na meko nini Nzambe akotalela malamumalamu bato oyo bazalaki koloba ete basambelaka ye? Esakweli elobi lisusu boye: “Na ntango oyo nakolukaluka kati na Yelusaleme na miinda, nakopesa bato bitumbu, baoyo bazali kofanda na mbindo na bango, baoyo bazali koloba na mitema na bango ete, [Yehova] akosala malamu te mpe akosala mabe te. Biloko na bango ekopunzama, ndako na bango ikobebisama, ata bakotonga ndako, bakofanda wana te; ata bakokona bilanga ya miwiti, bakomela vinyo na yango te.”—Sefania 1:12, 13.
15. (a) Likambo nini esengelaki kokómela banganga ya Yelusaleme oyo bapɛngwaki? (b) Likambo nini ekokómela bato oyo bazali kolanda losambo ya lokuta lelo oyo?
15 Banganga ya Yelusaleme oyo bapɛngwaki bazalaki kosangisa losambo ya Yehova na losambo ya lokuta. Atako bazalaki kokanisa ete likambo moko ekokómela bango te, Nzambe asengelaki koluka bango na miinda oyo ezali kongɛnga makasi na molili ya elimo oyo babombamaki. Moto moko te akokaki kozanga koyoka mpe kozanga kozwa etumbu ya Nzambe. Bapɛngwi yango bazalaki komitungisa mpo na likambo moko te bafandaki ndenge kaka mbɔtɔ ekitaka na nse ya lisangala ya vinyo. Balingaki koyoka esakweli moko te oyo ezali koloba ete Nzambe akosala likambo moko, kasi bakokaki kokima etumbu ya Nzambe te. Bato oyo bazali na losambo ya lokuta lelo oyo, na bandimi ya mangomba ya boklisto mpe bato oyo bazali kopɛngwa mpe kotika losambo ya Yehova, bakobika te. Bato yango bazali kondima te ete tozali na ‘mikolo ya nsuka,’ bazali koloba na mitema na bango ete: ‘Yehova akosala malamu te mpe akosala mabe te.’ Kasi bazali komikosa mpenza!—2 Timote 3:5; 2 Petelo 3:3, 4, 10.
16. Likambo nini esengelaki kosalema ntango Nzambe asengelaki kopesa Yuda etumbu, mpe lokola toyebi likambo yango, tosengeli kosala nini?
16 Bayebisaki bato ya Yuda oyo bapɛngwaki ete bato ya Babilone bakobɔtɔla bozwi na bango, bakobebisa bandako na bango mpe bakozwa mbuma nyonso ya bilanga ya vinyo na bango. Biloko ya mokili elingaki kozala na ntina moko te ntango Nzambe asengelaki kopesa Yuda etumbu. Ekozala mpe ndenge yango na mokolo oyo Yehova akosambisa mokili oyo. Yango wana, tózala na liso ya elimo, tótyaka ntango nyonso mosala ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na biso, na ndenge yango ‘tokomibombela biloko ya motuya na likoló’!—Matai 6:19-21, 33.
“Mokolo monene ya Yehova ebɛlɛmi”
17. Na kolanda maloba ya Sefania 1:14-16, mokolo oyo Yehova akopesa etumbu ekómi mpenza pene?
17 Mokolo oyo Yehova akopesa etumbu ekómi mpenza pene? Na Sefania 1:14-16, Nzambe alobi boye: “Mokolo monene ya [Yehova] ebɛlɛmi; ebɛlɛmi, eyei mbango mpenza; mongongo ya mokolo ya [Yehova] ezali na bololo, elombe azali kolela wana. Mokolo yango ezali mokolo ya nkanda, mokolo ya mpasi mpe ya mikakatano; mokolo ya mobulu mpe libebi, mokolo ya molili mpe ya kozanga pole; mokolo ya mapata mpe molili tuu; mokolo ya mondule mpe koganga ya etumba, kotɛmɛla mboka ya makasi mpe bisika milai bityami makasi.”
18. Mpo na nini tosengeli kokanisa te ete mokolo oyo Yehova akopesa etumbu ezali naino mosika?
18 Bayebisaki banganga, bankumu mpe bato ya Yuda ete ‘mokolo monene ya Yehova ebɛlɛmi.’ Mpo na Yuda, ‘mokolo ya Yehova’ esengelaki ‘koya na lombango mpenza.’ Ezali mpe ndenge moko na ntango na biso, tókanisa te ete mokolo oyo Yehova akopesa bato mabe etumbu ezali naino mosika. Ndenge oyo Nzambe asalaki noki mpo na kopesa Yuda etumbu, ‘akoyeisa na lombango’ mpenza mokolo ya kopesa etumbu. (Emoniseli 16:14, 16) Ekozala mpenza ntango ya mpasi mpo na bato nyonso oyo bazali koboya koyoka makebisi oyo Yehova azali kopesa na nzela ya Batatoli na ye mpe bazali koboya kolanda losambo ya solo!
19, 20. (a) Wapi mwa makambo mosusu oyo esalemaki ntango Nzambe alakisaki nkanda na ye na Yuda mpe na Yelusaleme? (b) Lokola Nzambe akoboma bato bibomela te na ntango mokili oyo ekobebisama, mituna nini ezali kotunama?
19 Ntango Nzambe alakisaki nkanda na ye likoló ya Yuda na Yelusaleme ezalaki “mokolo ya mpasi mpe mikakatano.” Basoda ya Babilone bayokisaki bato ya Yuda mpasi mingi, na mpasi ya makanisi mpo bazalaki komona liwa na kobebisama liboso na bango. ‘Mokolo yango ya mobulu mpe libebi’ ezalaki mokolo ya molili, mokolo ya mapata mpe molili tuu; ekoki kozala ete ezalaki kaka elobeli ya elilingi te kasi esalemaki mpenza bongo mpamba te milinga mpe bibembe ezalaki bipai nyonso. Ezalaki “mokolo ya mondule mpe koganga ya etumba,” kasi bato oyo bazalaki koganga bazalaki koboma nzoto na bango mpamba.
20 Bakɛngɛli ya Yelusaleme bakokaki kosala ata eloko moko te ntango bamasini ya etumba ya bato ya Babilone ezalaki kobuka ‘bandako milai oyo etyami makasi.’ Ndenge moko mpe, bisika makasi ya mokili oyo ekozala na ntina moko te ntango Nzambe akosalela bibundeli oyo azali na yango kuna na likoló mpo na koboma kaka bato mabe. Ozali na elikya ya kobika? Omitii mpenza na ngámbo ya Yehova, ‘oyo akobatela baoyo nyonso bakolinga ye kasi akoboma bato nyonso mabe’?—Nzembo 145:20.
21, 22. Ndenge nini maloba ya Sefania 1:17, 18 ekokokisama na mikolo na biso?
21 Sefania 1:17, 18 esakoli mokolo ya nsɔmɔ oyo Nzambe akopesa etumbu! Yehova Nzambe alobi ete: “Nakoyeisa mikakatano likoló ya bato ete bátambola lokola bato bakufi miso, zambi basaleli [Yehova] mabe, makila na bango ekosopana lokola mputulu mpe mosuni na bango lokola nyei. Palata na bango mpe wolo na bango ikolonga kobikisa bango te na mokolo ya nkanda ya [Yehova]; na mɔ́tɔ ya nkɛlɛ na ye na zuwa mokili mobimba ekozikisama. Zambi akosukisa, ɛɛ, akokómisa na nsuka mpenza baoyo nyonso bazali kofanda kati na mokili.”
22 Lokola asalaki yango na ntango ya Sefania, etikali moke Yehova ayokisa mpasi na “baoyo nyonso bazali kofanda kati na mokili,” baoyo bazali koboya koyoka likebisi na ye. Lokola bazali kosalela Nzambe masumu, bakotambolatambola lokola bato bakufá miso mpe bakozwa lobiko te. Na mokolo oyo Yehova akopesa etumbu, makila na bango ‘ekosopana lokola mputulu,’ lokola eloko ezangi ntina. Nsuka na bango ekozala nsɔni mpenza, mpamba te Nzambe akobwaka bibembe ya bato mabe, na misɔpɔ na bango, na mabele “lokola nyei.”
23. Atako bato mabe bakobika te na ‘mokolo ya nkanda ya Yehova,’ esakweli ya Sefania ezali kopesa elikya nini?
23 Moto moko te akoki kobikisa baoyo bazali kobundisa Yehova na bato na ye. Palata to wolo ekokaki te kobikisa bato mabe ya Yuda; ndenge moko mpe, ata bozwi oyo bato babombi mpe kanyaka ekobatela to ekobomba bango te na ‘mokolo ya nkanda ya Yehova’ likoló ya mangomba ya boklisto mpe bibongiseli mosusu ya mokili oyo. Na mokolo wana ya nsuka na makambo, ‘mabele mobimba’ ekozika na mɔ́tɔ ya nkɛlɛ ya Nzambe ntango akosilisa bato mabe nyonso. Lokola tozali kondima liloba ya esakweli ya Nzambe, toyebi ete “ntango ya nsuka” ekómi mpenza na nsuka na yango. (Danyele 12:4, NW) Mokolo oyo Yehova akopesa etumbu ekómi pene, mpe etikali moke afutisa banguna na ye masumu na bango. Kasi, esakweli ya Sefania epesi mpe elikya ya lobiko. Na yango, tosengeli kosala nini mpo tóbombama na mokolo ya nkanda ya Yehova?
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini esakweli ya Sefania ekokisamaki na Yuda mpe na Yelusaleme?
• Nini ekokómela mangomba ya boklisto na bato mabe nyonso ya mikolo na biso?
• Mpo na nini tosengeli kokanisa te ete mokolo oyo Yehova akopesa etumbu ezali naino mosika?
[Elilingi na lokasa 13]
Sefania asakolaki na mpiko ete mokolo ya Yehova ekómaki pene
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Euti na Self-Pronouncing Edition of the Holy Bible, ezali na libongoli ya King James mpe libongoli Revised
[Elilingi na lokasa 15]
Bato ya Babilone bayeisaki mokolo ya Yehova na Yuda na Yelusaleme na mobu 607 L.T.B.
[Elilingi na lokasa 16]
Ozali na elikya ya kobika ntango Yehova akoboma bato mabe?