Mokanda ya Biblia nimero 36—Sefania
Mokomi: Sefania
Esika ya bokomi: Yuda
Nsuka ya bokomi: Liboso ya 648 L.T.B.
1. (a) Mpo na nini nsango ya Sefania ebongaki mpenza na ntango na ye? (b) Lolenge nini ndimbola ya nkombo na ye eyokanaki malamu na ezalela ya ntango wana?
NA EBANDELI ya boyangeli ya Yosiya, Mokonzi na Yuda (659-629 L.T.B.), ntango oyo losambo ya Baala epalanganaki mingi mpe “banganga na banzambe-bapaya” bazalaki kotambwisa makambo kati na losambo wana ya mbindo, bato ya Yelusaleme balɛngaki mpenza na koyoka nsango oyo esakolamaki na mosakoli Sefania. Atako, ekoki kozala ete azalaki mokitani ya Mokonzi Hizikiya na ndako ya bokonzi ya Yuda, Sefania atɔndɔlaki mpenza makambo oyo mazalaki kati na mboka. (Sef. 1:1, 4, NW) Nsango na ye ezalaki nsango ya ekweli. Libota ya Nzambe lizangaki botosi, mpe bobele Yehova nde akokaki kozongisa bango na losambo ya pɛto mpe kopambola bango mpo ete bákoka kozala lokola “lokumu mpe kosanzolama kati na mabota nyonso na mokili.” (3:20) Sefania amonisaki ete bobele na lisalisi ya Nzambe nde moto akoki ‘kobombama na mokolo na nkanda na Yehova.’ (2:3) Nkombo na ye Tsephan·yahʹ (na Liebele) ebongi mpenza, mpamba te elimboli “Yehova asili kobomba (kobatela malamu)”!
2. Lolenge nini milende ya Sefania mibotaki mbuma, kasi mpo na nini yango ezalaki bobele mpo na mwa ntango mokuse?
2 Milende ya Sefania mibotaki mbuma. Mokonzi Yosiya, oyo amataki na kiti na bokonzi wana ezalaki ye na mibu mwambe, abandaki “kopɛtola Yuda mpe Yelusaleme” na mbula ya 12 ya boyangeli na ye. Abikolaki losambo ya lokuta, abongisaki “ndako ya Yehova,” mpe azongisaki kokumisama ya Elekeli. (2 Nta., mik. 34, 35) Nzokande, mbongwana oyo mokonzi Yosiya ayeisaki ezalaki bobele mpo na mwa ntango moke, mpamba te bana na ye misato mpe moko kati na bana ya bana na ye bakitanaki ye, kasi bango nyonso basalaki “mabe na miso na [Yehova].” (2 Nta. 36:1-12) Nyonso oyo ekokisaki maloba ya Sefania: “Nakopesa mikóló mpe bana na mokonzi etumbu mpe . . . bango bakotondisa ndako na nkolo na bango na yauli mpe na bokosi.”—Sef. 1:8, 9.
3. Ntango nini mpe epai wapi Sefania asakolaki, mpe nsango mibale nini izali kati na mokanda na ye?
3 Na kotalela nyonso oyo touti kolobela, emonani ete “liloba na [Yehova] liyaki epai na Sefania” mwa liboso ya mobu 648 L.T.B., na mbula ya 12 ya boyangeli ya Yosiya. Ezali te bobele vɛrsɛ́ ya ebandeli nde emonisi ete azalaki kosakola na Yuda, kasi boyebi na ye ya likambo mokomoko ya mboka mpe mimeseno ya Yelusaleme endimisi likanisi oyo ete azalaki kofanda na Yuda. Nsango oyo ezwami kati na mokanda oyo ekabwani na biteni mibale, ezali nsango ya makaneli mpe nsango ya kobɔndisa. Mingimingi, elobeli mokolo ya Yehova, mokolo ya nsɔ́mɔ oyo esili kobɛlɛma, kasi mpe, ezali kosakola ete Yehova akozongisa lisusu basɔkɛmi oyo “bakoluka mpenza ebombamelo kati na nkombo ya Yehova.”—1:1, 7-18; 3:12, NW.
4. Nini emonisi ete mokanda ya Sefania ezali solo mpe epemami na Nzambe?
4 Bosolo ya mokanda oyo ya bisakweli ekoki kotyelama ntembe te. Yelusaleme ebebisamaki na mobu 607 L.T.B., koleka mbula 40 nsima wana Sefania asilaki kosakola yango. Ezali te bobele lisoló ya bato nde lindimisi likambo oyo, kasi Biblia yango moko ezali na bilembeteli kati na yango oyo bimonisi ete likambo yango esalemaki mpenza lokola Sefania asilaki kosakola yango. Mwa ntango moke nsima na kobebisama ya Yelusaleme, Yilimia akomaki mokanda ya Bileli, kolobeláká makambo ya nsɔ́mɔ oyo ye amonaki, makambo oyo mazalaki naino ya sika kati na makanisi na ye. Bokokanisi ya mikapo mingi ekomonisa solo ete nsango ya Sefania “epemamaki na Nzambe.” Sefania akebisi na ntina na kobongola motema “naino mokolo na nkanda na [Yehova] eyeli bino te,” nzokande Yilimia alobeli likambo oyo lisilaki kosalema ntango alobi ete, “[Yehova] . . . asopi nkɛlɛ na ye na makasi.” (Sef. 2:2; Bil. 4:11) Sefania asakoli ete Yehova ‘akoyeisa mikakatano likoló na bato ete bátambola lokola bato bakufi miso . . . Makila na bango ikosopana lokola mputulu.’ (Sef. 1:17) Yilimia alobeli yango lokola likambo oyo likokisami: “Batamboli kati na nzela lokola bato bakufi miso, babebisami na makila.”—Bil. 4:14; kokanisá lisusu Sefania 1:13—Bileli 5:2; Sefania 2:8, 10—Bileli 1:9, 16 mpe 3:61.
5. Lolenge nini lisoló ya bato limonisi ete esakweli ya Sefania ekokisamaki solo?
5 Bobele bongo, lisoló ya bato lilobeli kobebisama ya mabota ya bapakano, Moaba, Amona mpe Samalia, bakisá Ninive, mboka-mokonzi na yango, lokola Sefania asilaki kosakola yango na litambwisi ya Nzambe. Bobele lokola mosakoli Nahumu asakolaki kobebisama ya Ninive (Nah. 1:1; 2:10), bobele bongo Sefania asakolaki ete Yehova “akozalisa Ninive esika na mpamba, esika ekauki lokola lisobe.” (Sef. 2:13) Libebi wana lizalaki ya mobimba na boye ete soko mibu 200 na nsima, Hérodote, mokomi na makambo ya kala, akomaki na ntina na Tigre ete ezalaki “ebale oyo pembeni na yango engumba Ninive etongamaki na ntango ya kala.”a Pene na mobu 150 T.B., Lucian, mokomi Mogreke, akomaki ete “sikawa elembo etikalá mpo na yango ezali te.”b Búku The New Westminster Dictionary of the Bible (1970), lokasa 669, elobi ete mapinga oyo makamataki yango “masalisamaki mingi na mpela ya pwasa oyo esalemaki na Tigre, oyo ememaki eteni monene ya bifelo ya mboka mpe esalaki ete esika etikala kozanga libateli. . . . Na bongo libebi ezalaki mpenza mobimba na boye ete na ntango ya Bagreke mpe ya Baloma, Ninive ekómaki lokola nde lisapo mpamba. Nzokande, eteni monene ya mboka ezindá na nsé ya mabóndo ya bosɔtɔ.” Na lokasa 627, búku oyo moko emonisi ete Moaba mpe ebebisamaki lokola yango esakolamaki: “Nabukadanesala ayangelaki Bamoaba.” Josèphe mpe alobeli koyangelama ya Amona.c Na nsima, Bamoaba mpe Baamona, bazalaki lisusu te lokola mabota.
6. Mpo na nini mokanda ya Sefania ezali bongo na esika ebongi na mikanda mipemami kati na Biblia?
6 Bayuda bazalaki ntango nyonso kotya mokanda ya Sefania kati na kanɔ́ ya Makomami mapemami. Maloba na yango oyo mapesamaki na nkombo ya Yehova masilaki mpenza kokokisama mpo na kolóngisama ya Yehova.
MAKAMBO MAZALI KATI NA SEFANIA
7. Mokolo monene ya Yehova ekolimbola nini mpo na banguna na ye?
7 Mokolo na Yehova ebɛlɛmi (1:1-18). Mokanda oyo ebandi na kosakola ekweli. “Nakobebisa biloko nyonso, kobebisa yango mpenza, longwa na likoló na mokili. [Yehova] alobi bongo.” (1:2) Eloko moko ekokima te, ezala moto to nyama. Basambeli ya Baala, banganga ya banzambe-bapaya, baoyo bazali kokumbama likoló na nsamba mpo na kosambela lola, baoyo bazali kosangisa losambo ya Yehova na losambo ya Malakama, baoyo bapesi Yehova mokɔngɔ, mpe baoyo bazali kosepela te na koluka ye—bango nyonso basengeli kobomama. Mosakoli apesi etindá oyo: “Zalá nyɛɛ liboso na [Nkolo-Mokonzi Yehova]! Zambi mokolo na Yehova ebɛlɛmi.” (1:7) Yehova ye moko asili kobongisa mbeka. Mikóló, bato na yauli, bakosi, mpe bato na mitema makasi—bango nyonso bakozwa etumbu. Bozwi na bango mpe biloko na bango ekozala na litomba te. Mokolo monene ya Yehova ebɛlɛmi! Ezali “mokolo na nkanda, mokolo na mpasi mpe mikakatano; mokolo na mobulu mpe libebi, mokolo na molili mpe na kozanga pole; mokolo na mapata mpe molili tuu.” Makila ya baoyo basalelaki Yehova masumu makosopana lokola mputulu. “Palata na bango mpe wolo na bango ikolónga kobikisa bango te na mokolo na nkanda na [Yehova].” Mɔ́tɔ na nkɛlɛ na zuwa na ye ekozikisa mabelé mobimba.—1:15, 18.
8. (a) Lolenge nini libateli likoki kozwama? (b) Mawa nini esakolami na ntina na mabota?
8 Bóluka Yehova; mabota makobebisama (2:1-15). Liboso ete mokolo yango elongwa lokola mpumbulu “Bóluka [Yehova] . . . bóluka boyengebene, bóluka bopɔlɔ,” soko nde “bokobombama na mokolo na nkanda na [Yehova].” (2:3) Maloba na Yehova malandi kopesama, kosakoláká mawa likoló na mokili ya Bafilisitia, oyo na nsima ekokóma ‘etúká mpo na batikali ya ndako na Yuda.’ Moaba mpe Amona, mikili na lolendo, ikobebisama lokola Sodomo mpe Gomola “mpo ete batukaki mpe balobaki na lolendo kotɛmɛla bato na [Yehova] na bibele.” Banzambe na bango bakobebisama esika moko na bango. (2:7, 10) “Mopanga” ya Yehova ekotɔbɔla mpe Baetiopia. Ekozala boni mpo na Asulia, elongo na Ninive, mboka-mokonzi na yango, oyo ezali na nɔ́rdi? Ekokóma esika ekauki lokola lisobe mpe elalelo na banyama na zámba, ɛɛ, “eloko na kokamwa” na boye ete “moto na moto oyo akoleka ye akoyula” na lolenge ya kokamwa.—2:12, 15, NW.
9. (a) Mpo na nini mawa esengeli kokwela Yelusaleme, mpe ekateli ya kosambisama ya Yehova ezali nini likoló na mabota? (b) Likambo nini ya esengo lisukisi esakweli oyo?
9 Yelusaleme ya botomboki ebyangami na kozongisa monɔkɔ; batikali ya komikitisa bapambwami (3:1-20). Mawa, ezali mpe na Yelusaleme, mboka na botomboki mpe na monyokoli! Mikóló na ye, “bankosi na konguluma,” mpe basakoli na ye “bato na nkó,” basili kolongola elikya epai na Nzambe na ye, Yehova. Akobyanga ye mpo na kozongisa mpenza monɔkɔ. Bafandi na ye bakobanga Yehova mpe bakondima disipilini? Te, mpamba te bazali kosala na “koyeisa misala na bango nyonso mabe.” (3:3, 4, 7) Ezali ekateli ya kosambisama ya Yehova mpo na koyanganisa mabota mpe kosopa likoló na bango nkɛlɛ na ye, mpe mabelé mobimba ekozikisama na mɔ́tɔ ya zuwa na ye. Kasi, elaka moko ya kitoko ezali! Yehova “akopesa mbongwana epai na bato kino monɔkɔ na pɛto, na ntina ete bango banso bábelela nkombo ya Yehova, mpo na kosalela ye lipeka na lipeka.” (3:9, NW) Bato oyo bazali komikumisa na lolendo nyonso bakolongolama, mpe batikali basɔkɛmi oyo bazali kosala boyengebene bakozwa ebombamelo kati na nkombo ya Yehova. Konganga ya esengo, nsáí, bosepeli, mpe esengo monene ekozala na Siona, mpamba te Yehova, Mokonzi ya Yisalaele azali katikati na bango. Oyo ezali ntango ya kozala na bobángi te to ya kolɛmbisa mabɔkɔ te, mpamba te Yehova akobikisa mpe akosepela na bango kati na bolingo na ye mpe esengo na ye. “Ɛɛ, nakopesa bino lokumu mpe kosanzolama kati na mabota nyonso na mokili. Bongo nakokalambisa kokangama na bino liboso na miso na bino. [Yehova] alobi bongo.”—3:20.
LITOMBA NA YANGO
10. Esakweli ya Sefania ezalaki na litomba nini na mikolo ya mokonzi Yosiya?
10 Mokonzi Yosiya atyaki likebi na nsango ya likebisi ya Sefania mpe azwaki litomba mingi na yango. Abandisaki mosala moko monene motali mbongwana kati na losambo. Yango mpe esalisaki ye na kokundola mokanda ya Mibeko, oyo ebungaki na ntango oyo ndako ya Yehova esundolamaki kozanga ete ebongisama. Yosiya ayokaki mpasi mingi na motema ntango batángelaki ye mbuma mabe oyo ekobima na ntina na kozanga botosi, ezali yango nde makambo mabimaki na monɔkɔ ya Mose, motatoli mosusu; yango endimisaki makambo nyonso oyo Sefania asakolaki. Yosiya amikitisaki liboso na Nzambe, mpe mpo na yango Yehova alakaki ye ete libebi oyo lisakolamaki likoya te na mikolo na ye. (Det. mik. 28-30; 2 Mik. 22:8-20) Mokili ebikisamaki na likámá yango! Kasi yango ezalaki mpo na ntango molai te, mpamba te bana ya Yosiya balandaki ndakisa malamu oyo ye atikaki te. Nzokande, mpo na Yosiya mpe bato na ye, kotya likebi na bango na “Liloba na [Yehova] liyaki epai na Sefania” emonanaki mpenza ete ezalaki na litomba.—Sef. 1:1.
11. (a) Lolenge nini esakweli ya Sefania ezali na boyokani na Lisoló likoló na Ngomba mpe na nkomá ya Paulo epai na Baebele wana apesaki bango toli moko ya malamu? (b) Mpo na nini Sefania alobi “soko nde bokobombama”?
11 Kati na Lisoló na ye likoló na Ngomba, oyo eyebani mingi, Klisto Yesu, mosakoli monene ya Nzambe, andimaki Sefania lokola mosakoli ya solo ya Nzambe na kolobáká maloba ya kosimba motema oyo makokani na toli ya Sefania oyo ezali na mokapo 2, vɛrsɛ́ 3: “Bóluka [Yehova], bino basɔkɛmi nyonso na mokili . . . bóluka boyengebene, bóluka bopɔlɔ.” Toli ya Yesu ezalaki ete: “Bólukaka nde liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na ye.” (Mat. 6:33) Baoyo bazali koluka liboso Bokonzi ya Nzambe basengeli kokeba na ntina na ezaleli ya kozanga kotya likebi, ezaleli oyo Sefania akebisaki na ntina na yango ntango alobelaki “baoyo babongwani nsima na kobila [Yehova], baoyo bazali koluka [Yehova] te mpe bazali kotuna ye te” mpe “baoyo bazali koloba na mitema na bango ete, Yehova akosala malamu te mpe akosala mabe te.” (Sef. 1:6, 12) Kati na nkomá na ye epai na Baebele, Paulo ayebisi mpe koya ya mokolo ya kosambisa mpe akebisi na ntina na ezaleli ya kozonga nsima. Abakisi ete: “Biso tozali kati na bango te baoyo bakozongaka nsima mpe bakobebisama; kasi tozali kati na bango bakondimaka mpe bakobikisa milimo.” (Ebe. 10:30, 37-39) Ezali te mpo na baoyo bazali kozonga nsima to mpo na bato bazangi botɔ́ndi, kasi epai na baoyo, na kosɔkɛma nyonso mpe na bosolo nyonso, bazali koluka Yehova kati na kondima nde mosakoli alobi ete: “Soko nde bokobombama na mokolo na nkanda na Yehova.” Mpo na nini “soko nde”? Mpamba te lobiko ya nsuka etaleli lolenge oyo moto amitambwisaki. (Mat. 24:13) Yango mpe ezali kokundwela biso ete tosengeli te kokamata na lisɛki ngɔlu ya Nzambe. Na ntembe te, esakweli ya Sefania emonisi koya ya pwasa ya mokolo yango likoló na baoyo bazali te kozela yango.—Sef. 2:3; 1:14, 15; 3:8.
12. Bantina nini ya kozala na mpiko Sefania apesi epai na baoyo bazali ‘koluka Yehova’?
12 Na bongo, awa, tozali kokuta nsango oyo ezali kosakola libebi mpo na baoyo bazali kosala masumu epai na Yehova, kasi ezali mpe na nsango oyo ezali koyebisa mapamboli maye mazali kozela baoyo, na kobongola motema nyonso, bazali ‘koluka Yehova.’ Bato oyo bazali kobongola mitema bakoki kozwa mpiko, mpamba te Sefania alobi ete, “mokonzi na Yisalaele, ye [Yehova], azali kati na yo.” Ezali ntango oyo Siona asengeli te kobanga to kolɛmbisa mabɔkɔ kati na mosala. Ezali ntango ya kotya elikya epai na Yehova. “Elombe na makasi, akobikisa! Akosepela na yo na esengo, na bolingo na ye akofanda na kimya. Akosepela na yo na nzembo.” Esengo ezali mpe na baoyo bazali ‘koluka liboso bokonzi na ye,’ wana ezali bango kozela kobatelama na bolingo na ye mpe kozwa mapamboli na ye ya seko!—3:15-17.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku Cyclopedia ya McClintock mpe Strong, enyatámi lisusu na 1981, Vol. VII, lokasa 112.
b Lucian, ebongolami na A. M. Harmon, 1968, Vol. II, lok. 443.
c Jewish Antiquities, X, 181, 182 (ix, 7).