“Ngai nazali na bino”
“Momemi-nsango ya Yehova alobaki ete: . . . ‘“Ngai nazali na bino elongo,” Yehova alobi bongo.’”—HAGAI 1:13, NW.
1. Yesu alobelaki makambo nini oyo ezali bisakweli mpo na mikolo na biso?
TOZALI na eleko moko oyo ekeseni mpenza na bileko mosusu. Ndenge kokokisama ya bisakweli ya Biblia ezali komonisa yango, banda 1914 tozali na “mokolo ya Nkolo.” (Emoniseli 1:10) Ekoki kozala ete yo mpe osilá koyekola yango mpe oyebi ete Yesu akokanisaki “mikolo ya Mwana ya moto” na kati ya Bokonzi na ye na “mikolo ya Noa” mpe “mikolo ya Lota.” (Luka 17:26, 28) Biblia emonisi ete makambo oyo esalemaki na mikolo yango ezalaki bisakweli mpo na mikolo na biso. Kasi, ezali na likambo mosusu oyo esalemaki na eleko moko oyo ezali mpe esakweli mpo na mikolo na biso mpe esengeli kobenda likebi na biso.
2. Mokumba nini Yehova apesaki Hagai ná Zekalia?
2 Tótalela likambo moko oyo ezalaki na ntango ya mosakoli Hagai mpe mosakoli Zekalia. Nsango nini basakoli mibale wana ya sembo bayebisaki, oyo etaleli mpe basaleli ya Yehova na mikolo na biso? Hagai ná Zekalia bazalaki ‘bamemi-nsango ya Yehova’ epai ya Bayuda nsima ya boombo na Babilone. Nzambe atindaki bango báyebisa Bayisalaele ete azali na bango elongo na mosala ya kotonga lisusu tempelo. (Hagai 1:13, NW; Zekalia 4:8, 9) Atako mokanda ya Hagai mpe ya Zekalia ezali na makambo mingi te, ezali na kati ya “Makomami nyonso [oyo] epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini na kati ya boyengebene.”—2 Timote 3:16.
Tótyela mikanda yango likebi
3, 4. Mpo na nini nsango ya Hagai mpe ya Zekalia esengeli kobenda likebi na biso?
3 Nsango ya Hagai ná ya Zekalia ezalaki na litomba mpo na Bayuda ya ntango na bango, mpe bisakweli yango ekokisamaki na ntango wana. Kasi, mpo na nini tosengeli kotyela mikanda yango likebi lelo oyo? Baebele 12:26-29 ezali komonisa biso ntina ya kotyela yango likebi. Na bavɛrsɛ yango, ntoma Paulo atángi maloba ya Hagai 2:6 (NW) oyo elobi ete Nzambe azali ‘koningisa likoló mpe mabelé.’ Koningisa yango ‘ekobulunganisa kiti ya makonzi mpe ekobebisa nguya ya makonzi ya mabota.’—Hagai 2:22.
4 Na ndenge Paulo atángaki maloba ya esakweli ya Hagai, amonisaki likambo oyo ekokómela “makonzi ya mabota” mpe alobelaki Bokonzi oyo baklisto bapakolami bakozwa, bokonzi oyo ekoningana te mpe eleki makonzi ya mokili. (Baebele 12:28) Na bongo, tomoni ete bisakweli ya Hagai mpe ya Zekalia etalelaki mpe eleko oyo esengelaki koya nsima ya ekeke ya liboso ya ntango na biso, ntango oyo mokanda ya Baebele ekomamaki. Tii lelo oyo, mwa ndambo moke ya baklisto bapakolami, baoyo bakoyangela elongo na Yesu na Bokonzi na ye, bazali naino awa na mabelé. Yango wana, mokanda ya Hagai mpe ya Zekalia ezali na ntina mingi na mikolo na biso.
5, 6. Makambo ezalaki ndenge nini ntango Nzambe atindaki Hagai ná Zekalia?
5 Mokanda ya Ezela elobeli mwa makambo oyo elekaki liboso ete mokanda ya Hagai mpe ya Zekalia ekomama. Ntango Bayuda bautaki boombo na Babilone na mobu 537 liboso ya ntango na biso (L.T.B), Guvɛrnɛrɛ Zelubabele mpe Nganga-nzambe Monene Yosua batambwisaki mosala ya kotya fondasyo ya tempelo na mobu 536 L.T.B. (Ezela 3:8-13; 5:1) Atako yango ezalaki likambo ya esengo, mwa moke na nsima Bayuda bakómaki na kobanga. Ezela 4:4 elobi ete banguna, “bato ya mokili balɛmbisaki mabɔkɔ ya bato ya Yuda mpe banyokolaki bango kati na kotonga.” Banguna yango, mingimingi Basamalia, bazalaki kokosela Bayuda makambo. Kutu, basalaki ete mokonzi ya Perse apekisa mosala ya kotonga tempelo.—Ezela 4:10-21.
6 Molende nyonso oyo Bayuda bazalaki na yango mpo na kotonga tempelo esilaki. Moto na moto akómaki komipesa na makambo na ye. Kasi, na mobu 520 L.T.B., mbula 16 nsima ya kotya fondasyo ya tempelo, Yehova atindaki Hagai ná Zekalia mpo na kolendisa bato bázongela mosala ya tempelo. (Hagai 1:1; Zekalia 1:1) Lokola bamemi-nsango wana ya Nzambe balendisaki bango mpe bamonaki ete Yehova azali elongo na bango, Bayuda bazongelaki kotonga tempelo mpe basilisaki yango na mobu 515 L.T.B.—Ezela 6:14, 15.
7. Likambo oyo esalemaki na mikolo ya mosakoli Hagai ná Zekalia, ekokani na likambo nini na ntango na biso?
7 Oyebi soki makambo yango elimboli nini mpo na biso? Nzambe apesi biso mosala ya kosakola ‘nsango malamu ya bokonzi.’ (Matai 24:14) Mosala yango etyamaki likebi mingi nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Ndenge Bayuda na ntango ya kala babimaki na boombo na Babilone, na ntango na biso mpe basaleli ya Yehova babimaki na boombo ya Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba. Bapakolami ya Nzambe bamipesaki na mosala ya kosakola, koteya, mpe komema bato na losambo ya solo. Mosala yango ezali kokoba tii lelo oyo, kutu ekómi lisusu monene, mpe ekoki kozala ete yo mpe ozali kosangana na mosala yango. Sikoyo nde ntango ya kosala mosala yango, mpamba te nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekómi pene! Tosengeli kokoba kosala mosala yango oyo Yehova apesi biso tii ntango ye moko akosukisa ebongiseli ya mokili oyo na ‘bolɔzi monene.’ (Matai 24:21) Na ntango yango nde akolongola mabe nyonso mpe akosala ete kaka losambo ya solo etikala na mabelé mobimba.
8. Mpo na nini tosengeli kotya motema ete Nzambe azali na biso elongo na mosala ya Bokonzi?
8 Ndenge esakweli ya Hagai ná ya Zekalia emonisi yango, tokoki kotya motema ete Yehova akozala na biso elongo mpe akopambola biso wana tozali kosala mosala yango na motema mobimba. Atako bato mosusu bazali kosala nyonso mpo na kosukisa basaleli ya Nzambe to kopekisa mosala na bango, ata guvɛrnema moko te elongi kopekisa mosala ya kosakola ekende liboso. Kanisá ndenge oyo Yehova akolisi mosala ya Bokonzi banda na bambula oyo elandaki Etumba ya Liboso ya mokili mobimba tii lelo oyo. Kasi, mosala ezali naino mingi.
9. Tosengeli kotya likebi na makambo nini oyo esalemaki kala, mpe mpo na nini?
9 Ndenge nini makambo oyo tozali koyekola na mokanda ya Hagai mpe ya Zekalia ezali kolendisa biso tótosa etinda ya Nzambe ya kosakola mpe koteya? Tótalela mwa mateya oyo tokoki kozwa na mikanda yango. Na ndakisa, tótalela makambo mosusu oyo esalemaki ntango Bayuda oyo bautaki na boombo bazalaki kotonga tempelo. Ndenge tomonaki yango, Bayuda oyo bazongaki na Yelusaleme batikaki mosala ya kotonga tempelo nsima ya kotya fondasyo na yango. Makanisi nini ya mabe bakómaki na yango? Liteya nini biso tokoki kozwa na yango?
Ndenge malamu ya kotalela biloko ya mokili
10. Makanisi nini ya mabe Bayuda bakómaki na yango, mpe yango ebimisaki likambo nini?
10 Bayuda yango bazalaki koloba ete: “Naino ntango ekómi te.” (Hagai 1:2) Nzokande, na mobu 536 L.T.B., ntango babandaki mosala ya kotonga lisusu tempelo mpe batyaki fondasyo na yango, bazalaki koloba te ete “naino ntango ekómi te.” Kasi, mwa moke na nsima ntango mabota mosusu batɛmɛlaki bango mpe mokonzi apekisaki mosala ya kotonga, batikaki. Bayuda yango bakómaki kotya likebi mingi na bandako na bango mpe na makambo na bango moko. Na kotalela bokeseni monene oyo ezalaki na bandako na bango ya kitoko mpe tempelo oyo esilaki te, Yehova atunaki bango boye: “Ezali na ntango mpo na bino mpenza kofanda na ndako na kitoko na bino naino ndako oyo elali mpamba?”—Hagai 1:4.
11. Mpo na nini Yehova apesaki Bayuda ya ntango ya Hagai toli?
11 Bayuda bazongisaki nsima likambo oyo esengelaki kozala na esika ya liboso. Na esika báluka naino kotonga tempelo, ndenge Yehova asɛngaki bango, bamipesaki na kotonga bandako na bango. Basundolaki mosala ya kotonga ndako ya Nzambe. Maloba ya Yehova oyo ezali na Hagai 1:5 elendisaki Bayuda ‘bábanza na mitema na bango mpo na nzela na bango.’ Ezali lokola nde Yehova azalaki koloba na bango báfanda mpe bákanisa makambo oyo bazalaki kosala mpe bátalela ndenge bazangaki lipamboli na ye mpo batyaki te na esika ya liboso mosala ya kotonga tempelo.
12, 13. Na kotalela Hagai 1:6, Bayuda bakómaki na bomoi ya ndenge nini, mpe maloba yango elimboli nini?
12 Lokola Bayuda bazongisaki nsima likambo oyo esengelaki kozala na esika ya liboso, bazangaki mapamboli. Talá likambo oyo Nzambe alobaki na Hagai 1:6: “Bosili kokona mingi nde bobuki bobele moke; bosili kolya nde botondi te; bosili komɛla nde [bolangwe te, NW]; bosili komilatisa bilamba nde moto azali na mɔtɔ te; mpe ye oyo azwi lifuti, azwi lifuti mpo na kotya yango kati na libenga lipaswami nzela nzela.”
13 Bayuda bafandaki na mokili oyo Nzambe apesaki bango, kasi mabelé na yango ezalaki kobotela bango mbuma te ndenge balingaki. Se ndenge Yehova alakaki kosala soki batosi te, aboyaki kopambola bango. (Deteronome 28:38-48) Lokola Nzambe azalaki kopambola bango te, Bayuda bazalaki kolona kasi mabelé ezalaki kobota mingi te. Bazangaki bilamba oyo ekoki mpenza kobatela bango na malili. Kutu, ezalaki lokola nde bazalaki kotya mbongo oyo bazalaki kozwa na libenga etɔbɔká, elingi koloba ntango moto azwi lifuti, azalaki kosala na yango eloko ya malonga te. Maloba oyo “bosili komɛla nde bolangwe te” elimboli nini? Elimboli te ete kolangwa ezali elembo ya lipamboli ya Nzambe; mpamba te apekisi kolangwa masanga. (1 Samwele 25:36; Masese 23:29-35) Kasi, maloba yango ezali ndenge mosusu ya komonisa ete Bayuda bazangaki lipamboli ya Nzambe. Vinyo oyo bazalaki kosala ezalaki moke mpenza mpo ekoka kolangwisa bato. Yango wana, Biblia haut fleuve ebongoli Hagai 1:6 boye: “Bosili komɛla nde bosukisi mposa te.”
14, 15. Liteya nini tokoki kozwa na Hagai 1:6?
14 Liteya oyo tosengeli kozwa na makambo nyonso wana etaleli te ndenge ya kobongisa bandako na biso. Bambula mingi liboso Bayuda bákende boombo na Babilone, mosakoli Amosa apamelaki bazwi ya Yisalaele mpo bamitongelaki ‘bandako ya mpɛmbɛ ya nzoku’ mpe bazalaki ‘kolala na bambeto ya mpɛmbɛ ya nzoku.’ (Amosa 3:15; 6:4) Bandako kitoko mpe biloko kitoko wana eumelaki te. Banguna oyo balongaki bango bapunzaki biloko nyonso wana. Kasi, ata nsima ya kouta boombo oyo eumelaki mbula 70, Bayisalaele mingi bazwaki liteya te na likambo yango. Ezali boni mpo na biso? Ezali malamu ete mokomoko amituna boye: ‘Nazali nde kotya makanisi nyonso na kotonga ndako na ngai mpe kobongisa yango? Ezali boni mpo na bakelasi milaimilai oyo ekoki kozwa ngai bambula mingi mpe kopekisa ngai namipesa mobimba na makambo ya elimo?’—Luka 12:20, 21; 1 Timote 6:17-19.
15 Makambo oyo tozali kotánga na Hagai 1:6 esengeli koteya biso ete tozali na mposa ya mapamboli ya Nzambe na bomoi na biso. Bayuda wana babosanaki likambo yango mpe ememelaki bango mpasi. Tózala na bozwi mingi to te, soki tozali na mapamboli ya Yehova te tokozala na mikakatano na elimo. (Matai 25:34-40; 2 Bakolinti 9:8-12) Kasi, ndenge nini tokoki kozwa mapamboli yango?
Yehova asalisaka biso na nzela ya elimo na ye
16-18. Zekalia 4:6 ezalaki na ndimbola nini na ntango ya Bayuda?
16 Yehova atindaki Zekalia, oyo azalaki mpe mosakoli na ntango ya Hagai, amonisa nzela oyo azalaki kosalela mpo na kolendisa mpe kopambola bato na ye. Yango ezali komonisa ndenge oyo akoki mpe kopambola yo. Tozali kotánga boye: “Na nzela ya makasi te, na nzela ya nguya mpe te nde na [elimo, NW] na ngai. [Yehova] na bibele alobi bongo.” (Zekalia 4:6) Ekoki kozala ete osilá koyoka vɛrsɛ yango, kasi ezalaki na ndimbola nini mpo na Bayuda ya ntango ya Hagai ná Zekalia, mpe yango elimboli nini mpo na yo?
17 Tóbosana te ete maloba ya Nzambe oyo Hagai ná Zekalia basakolaki ebimisaki matomba na ntango wana. Makambo oyo basakoli wana balobaki elendisaki Bayuda ya sembo. Hagai abandaki kosakola na sanza ya motoba ya mobu 520 L.T.B. Zekalia abandaki kosakola na sanza ya mwambe ya mbula yango. (Zekalia 1:1) Ndenge Hagai 2:18 emonisi yango, Bayuda bazongelaki na molende kotonga tempelo na sanza ya libwa. Na bongo, Bayuda bazwaki lisusu mpiko ya kokoba mosala, mpe batosaki Yehova na elikya ete akosunga bango. Maloba oyo ezali na Zekalia 4:6 emonisi ndenge Yehova asungaki bango.
18 Ntango Bayuda bazongaki na mokili na bango na mobu 537 L.T.B., bazalaki na basoda te. Atako bongo, Yehova abatelaki bango mpe akambaki bango na nzela ntango bautaki na Babilone. Mpe mwa moke na nsima, elimo na ye etambwisaki makambo ntango babandaki mosala ya kotonga tempelo. Na nsima, ntango bazongelaki lisusu mosala yango, asungaki bango na nzela ya elimo santu na ye.
19. Elimo ya Nzambe elongaki botɛmɛli nini ya makasi?
19 Yehova apesaki Zekalia bimonaneli mwambe oyo endimisaki ye ete Yehova akosunga bato na ye oyo bakomipesa na bosembo nyonso na mosala ya kotonga tempelo tii ekosila. Emonaneli ya minei oyo ezali na mokapo 3, emonisi ndenge Satana azalaki kotɛmɛla Bayuda mpo básilisa te kotonga tempelo. (Zekalia 3:1) Na ntembe te, Satana akokaki kosepela te komona Nganga-nzambe Monene Yosua azali kosala mosala mpo na bato na tempelo ya sika. Atako Zabolo azalaki kosala nyonso mpo na kopekisa Bayuda ete bátonga tempelo te, elimo ya Yehova ezalaki kolongola bipekiseli yango nyonso mpe ezalaki kolendisa Bayuda tii ntango mosala esilaki.
20. Ndenge nini elimo santu esalisaki Bayuda bákokisa mokano ya Nzambe?
20 Emonanaki lokola nde Bayuda bakolonga te mokakatano oyo bakutanaki na yango mpo basali ya Leta basalaki nyonso mpo mokonzi apekisa mosala ya kotonga. Kasi, Yehova alakaki ete likambo wana oyo ezalaki lokola “ngomba” ekolongwa mpe ekokóma “mokili ya nse.” (Zekalia 4:7) Esalemaki mpe bongo! Mokonzi Dalio I alukaki mpe amonaki mobeko ya Sirise oyo epesaki Bayuda ndingisa ya kotonga lisusu tempelo. Na yango, Dalio alongolaki epekiseli yango mpe asɛngaki ete bázwa mbongo na kɛsi ya mokonzi mpe bápesa Bayuda mpo na kosalisa bango básilisa mosala. Makambo ebongwanaki mpenza! Elimo ya Nzambe esalisaki bango. Mosala ya kotonga tempelo esilaki na mobu 515 L.T.B., na mbula ya motoba ya boyangeli ya Dalio I.—Ezela 6:1, 15.
21. (a) Na ntango ya kala, ndenge nini Nzambe ‘aningisaki bikólo nyonso’ mpe ndenge nini “biloko kitoko” eyaki? (b) Ndenge nini likambo yango ezali kokokisama lelo oyo?
21 Na Hagai 2:5, mosakoli akundwelaki Bayuda kondimana oyo Nzambe asalaki na bango na Ngomba Sinai ntango “ngomba yango mobimba eninganaki makasi.” (Exode 19:18) Na mikolo ya Hagai mpe Zekalia, Yehova alingaki koningisa lisusu mokili, ndenge vɛrsɛ 6 mpe 7 emonisi yango na maloba ya elilingi. Bokonzi ya Perse esengelaki kobanda kotɛngatɛnga, kasi mosala ya tempelo esengelaki kokende tii na nsuka na yango. “Biloko kitoko ya mabota nyonso,” elingi koloba bato oyo bazali Bayuda te, basengelaki kokumisa Nzambe elongo na Bayuda na ndako wana ya losambo. Na ntango na biso, Nzambe azali ‘koningisa bikólo’ na nzela ya mosala na biso ya kosakola, mpe “biloko kitoko ya mabota nyonso” ezali koya mpo na kosambela Nzambe elongo na baklisto bapakolami. Ya solo, baklisto bapakolami mpe bampate mosusu bazali kotondisa ndako ya Yehova na nkembo. Basambeli yango ya solo bazali kozela na elikya nyonso ntango oyo Yehova ‘akoningisa likoló mpe mabelé’ na lolenge mosusu. Yango ekozala mpo na kokweisa mpe kosukisa nguya ya makonzi ya mabota.—Hagai 2:22.
22. Ndenge nini bikólo ezali ‘koningisama,’ mpe yango ebimisi makambo nini, mpe likambo nini ekosalema na mikolo ezali koya?
22 Nyonso oyo ezali kotinda biso tókanisa yikiyiki oyo emonani na bibongiseli ndenge na ndenge oyo, na maloba ya elilingi, ebengami “likoló mpe mabelé mpe mbu mpe mabelé ekauká.” Ya liboso, Satana Zabolo ná bademo na ye babwakamaki awa na mabelé. (Emoniseli 12:7-12) Longola yango, mosala ya kosakola oyo etambwisami na baklisto bapakolami ya Nzambe eningisi mabelé, elingi koloba ebongiseli ya makambo ya ntango oyo. (Emoniseli 11:18) Atako bongo, “ebele ya bato” oyo bazali biloko kitoko ya mabota nyonso bayei kosangana na Yisalaele ya elimo mpo na kosalela Yehova. (Emoniseli 7:9, 10) Elongo na baklisto bapakolami, ebele ya bato yango bazali kosakola ete mosika te, Nzambe akoningisa bikólo nyonso na Armagedona. Yango ekosala ete kaka losambo ya solo etikala na mokili mobimba.
Ozali koyeba lisusu?
• Ntango nini Hagai mpe Zekalia basalaki mosala na bango mpe makambo ezalaki ndenge nini na ntango wana?
• Ndenge nini okoki kosalela nsango oyo ezali na mokanda ya Hagai mpe ya Zekalia?
• Mpo na nini okanisi ete maloba ya Zekalia 4:6 ezali maloba ya kolendisa?
[Bililingi na lokasa 20]
Mokanda ya Hagai mpe ya Zekalia emonisi ete Nzambe azali kosunga biso
[Elilingi na lokasa 23]
“Ezali na ntango mpo na bino mpenza kofanda na ndako ya kitoko na bino naino ndako oyo elali mpamba?”
[Elilingi na lokasa 24]
Basaleli ya Yehova bazali kosangana na mosala ya koluka “biloko kitoko ya mabota”