Tikalá na kati ya lobwaku ya libateli ya Yehova
“Yehova . . . akobunda etumba ná bikólo yango lokola na mokolo ya etumba na ye, na mokolo ya kobunda.”—ZEK. 14:3.
1, 2. Etumba nini ekosalema mosika te, mpe ekosɛnga te ete basaleli ya Nzambe básala nini na etumba yango?
NA MOKOLO ya 30, sanza ya zomi 1938, bamilio ya bato na États-Unis bazalaki kolanda emisyo moko na radio. Bapanzi-nsango oyo bazalaki kosala emisyo yango balobaki ete bato moko boye oyo bauti na planɛti Mars bakiti mpo na kobebisa mabele. Atako bayebisaki bato ete emisyo yango ezali kolobela makambo ya solo te, bato mingi oyo balandaki yango bakanisaki mpenza ete ezali solo mpe babangaki. Basusu kutu bazwaki bibongiseli mpo na komibatela, mpo ete bato oyo bango bazalaki kokanisa ete bakouta na planɛti mosusu básala bango mabe te.
2 Lelo oyo, etikali moke etumba moko ya solo esalema. Nzokande, bato mingi bazali komilɛngɛla te mpo na etumba yango. Ezali te buku moko ya bato ya mayele ya siansi nde esakolaki etumba yango, kasi Biblia, Liloba ya Nzambe. Etumba yango ezali Armagedone, elingi koloba etumba ya Nzambe mpo na koboma mokili oyo mabe. (Em. 16:14-16) Na etumba yango, ekosɛnga te ete basaleli ya Nzambe awa na mabele bábunda ná bato moko boye oyo bauti na planɛti mosusu. Atako bongo, makambo ya nsɔmɔ oyo ekosalema na etumba yango mpe ndenge oyo Nzambe akomonisa nguya na ye ekokamwisa bango mingi.
3. Esakweli nini tokotalela, mpe mpo na nini tosengeli kotyela yango likebi?
3 Esakweli moko oyo ezali na Zekaria mokapo 14 etaleli etumba ya Armagedone. Atako esakweli yango ekomamaki eleki mbula soki 2 500, ezali na ntina mingi mpo na biso lelo oyo. (Rom. 15:4) Makambo mingi oyo esakweli yango elobeli eyokani na makambo oyo basaleli ya Nzambe bazali kokutana na yango banda Bokonzi ya Masiya etyamaki na likoló na mobu 1914, mpe makambo ya kokamwa oyo ekosalema mosika te. Esakweli yango elobeli makambo mingi ya ntina, na ndakisa ndenge oyo “lobwaku moko ya monene mpenza” ekosalema mpe ndenge oyo “mai ya bomoi” ekobima. (Zek. 14:4, 8) Lobwaku yango ezali esika oyo basambeli ya Yehova bazali kozwa libateli. Mpe soki toyebi matomba oyo mai ya bomoi ekoki kopesa biso, tokomona kaka te ete komɛla yango ezali na ntina, kasi tokozala mpe na mposa ya komɛla yango. Yango wana, ezali na ntina tótya likebi mingi na esakweli yango.—2 Pe. 1:19, 20.
“MOKOLO YA YEHOVA” EBANDI
4. (a) “Mokolo ya Yehova” ebandaki ntango nini? (b) Bambula mingi liboso ya 1914, basambeli ya Yehova basakolaki nini, mpe bakonzi ya mokili basalaki nini?
4 Na ebandeli ya mokapo ya 14, mokanda ya Zekaria elobeli “mokolo ya Yehova.” (Tángá Zekaria 14:1, 2.) Mokolo yango ezali nini? Ezali “mokolo ya Nkolo” oyo ebandaki ntango “bokonzi ya mokili” ekómaki “bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Kristo na ye.” (Em. 1:10; 11:15) Mokolo yango ebandaki na 1914, ntango Bokonzi ya Masiya ebandaki koyangela na likoló. Bambula mingi liboso ya 1914, basambeli ya Yehova basakolaki epai ya bato ya bikólo ete “bantango oyo etyamá ya bikólo” ekosuka na mbula wana, mpe ete mokili ekokɔta na yikiyiki moko oyo esalemá naino te. (Luka 21:24) Bato ya bikólo basalaki nini ntango bayokaki nsango yango? Na esika bálanda likebisi wana oyo eyaki na ntango ebongi, bakonzi ya politiki mpe ya mangomba batyolaki mpe banyokolaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazalaki kosakola na molende. Na ndenge yango, bakonzi ya mokili batyolaki Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, mpamba te baambasadɛrɛ ya Bokonzi bazali bamonisi ya “Yerusaleme ya likoló,” elingi koloba Bokonzi ya Masiya, oyo bazali basangani na yango.—Ebr. 12:22, 28.
5, 6. (a) Likambo nini Biblia esakolaki ete bikólo ekosala mpo na kotɛmɛla “engumba” mpe “bana-mboka” na yango? (b) ‘Baoyo batikalaki kati na bato’ ezali banani?
5 Zekaria asakolaki likambo oyo bato ya bikólo balingaki kosala; alobaki ete: “Engumba yango [Yerusaleme] ekobɔtɔlama mpenza.” “Engumba” yango elimboli Bokonzi ya Nzambe oyo Masiya akoyangela. “Bana-mboka” na yango, elingi koloba bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino na mabele, nde bazali bamonisi na yango. (Flp. 3:20) Na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bakangaki bandeko oyo bazalaki kokamba eteni ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele, mpe batyaki bango na bolɔkɔ na Atlanta, na etúká ya Géorgie, na États-Unis. ‘Bandako epunzamaki’ na ndimbola oyo ete banyokolaki bandeko wana mpe bandeko mosusu ya sembo oyo bazalaki na ngambo te mpe basalelaki bango makambo ya kozanga bosembo. Banguna yango bapunzaki bozwi oyo bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazalaki na yango na ndenge bapekisaki mikanda na bango mpe mosala na bango ya kosakola.
6 Atako basaleli ya Nzambe bazalaki ebele te mpe banguna bazalaki kokosela bango makambo, kotɛmɛla bango, mpe konyokola bango, losambo ya solo elimwaki te. Ezalaki na ‘baoyo batikalaki kati na bato,’ elingi koloba bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo baboyaki na bosembo mpenza ‘kolongolama na engumba.’
7. Bosembo ya Batatoli oyo batyami mafuta na elimo epesi ndakisa nini mpo na basambeli nyonso ya solo lelo oyo?
7 Esakweli yango ekokisamaki nde na mobimba na yango na nsuka ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba? Te. Bikólo esengelaki konyokola lisusu mingi bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazalaki naino na mabele mpe baninga na bango ya mosala oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele. (Em. 12:17) Yango emonanaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Lelo oyo, bosembo ya Batatoli wana oyo batyami mafuta na elimo ezali kolendisa basaleli ya Nzambe báyika mpiko ata soki bakutani na mikakatano ya ndenge nini, na ndakisa botɛmɛli ya bandeko ya libota oyo bazali Batatoli te, ya baninga ya mosala to ya kelasi, oyo batyolaka bango mpo na kondima na bango. (1 Pe. 1:6, 7) Ata soki bafandi na mboka nini, basambeli ya solo bazali na ekateli makasi ya “kotɛlɛma ngwi na elimo kaka moko,” mpe ya ‘kotika banguna na bango bábangisa bango na likambo ata moko te.’ (Flp. 1:27, 28) Kasi, epai wapi basaleli ya Yehova bakoki kozwa libateli na mokili oyo ezali koyina bango?—Yoa. 15:17-19.
YEHOVA ASALI “LOBWAKU MOKO MONENE”
8. (a) Na Biblia, bangomba ekoki kolimbola nini? (b) “Ngomba ya banzete ya olive” ezali elilingi ya nini?
8 Lokola “engumba,” elingi koloba Yerusaleme, ezali elilingi ya Yerusaleme ya likoló, maloba “ngomba ya banzete ya olive oyo ezali kotalana na Yerusaleme” esengeli mpe kozwama na ndenge ya elilingi. Ngomba yango ezali elilingi ya nini? Ndenge nini “ekopasuka na katikati” mpe ekokóma bangomba mibale? Mpo na nini Yehova abengi yango “bangomba na ngai”? (Tángá Zekaria 14:3-5.) Na Biblia, bangomba ekoki kolimbola makonzi, to baguvɛrnema. Longola yango, ngomba ya Nzambe elimbolaka mpe mapamboli mpe libateli. (Nz. 72:3; Yis. 25:6, 7) Na yango, ngomba ya nzete ya olive oyo Nzambe atɛlɛmi likoló na yango na ɛsti ya Yerusaleme ezali komonisa boyangeli ya Yehova na molɔ́ngɔ́ mobimba, to bokonzi na ye oyo eleki makonzi nyonso.
9. Kopasuka ya “ngomba ya banzete ya olive” ezali na ndimbola nini?
9 Kopasuka ya ngomba ya banzete ya olive na katikati ezali na ndimbola nini? Ngomba yango, oyo ezali na ɛsti ya Yerusaleme, epasukaki na ndimbola oyo ete Yehova atyaki boyangeli mosusu, to boyangeli ya mibale. Boyangeli wana ya mibale ezali Bokonzi ya Masiya, oyo Nzambe apesi na mabɔkɔ ya Yesu. Yango wana, Yehova alobi ete bangomba wana mibale oyo ebimaki ntango “ngomba ya banzete ya olive” epasukaki ezali ‘bangomba na ye.’ (Zek. 14:4) Nyonso mibale ezali ya ye.
10. “Lobwaku moko monene” oyo esalemaki katikati ya bangomba mibale elimboli nini?
10 Ntango ngomba yango ya elilingi epasukaki, ndambo moko ekei tii na nɔrdi mpe ndambo mosusu ekei tii na sudi, makolo ya Yehova etikalaki likoló ya bangomba yango nyonso mibale. Na ntango wana nde “lobwaku moko monene” esalemaki na nse ya makolo ya Yehova. Lobwaku wana ya elilingi elimboli libateli ya Yehova, oyo basaleli na ye bazali na yango na nse ya boyangeli na ye ya molɔ́ngɔ́ mobimba mpe ya Bokonzi ya Mwana na ye Masiya. Yehova akosɛnzɛla ete losambo ya solo elimwa ata mokolo moko te. Ntango nini ngomba wana ya banzete ya olive epasukaki? Yango esalemaki ntango Bokonzi ya Masiya etyamaki na likoló na 1914, mbula oyo Ntango ya Mabota esukaki. Ntango nini basambeli ya solo ya Yehova babandaki kokima na lobwaku wana ya elilingi?
BABANDI KOKIMA NA LOBWAKU!
11, 12. (a) Ntango nini basaleli ya Yehova babandaki kokima na lobwaku ya elilingi? (b) Nini emonisi ete lobɔkɔ ya nguya ya Yehova ezali kobatela basaleli na ye?
11 Yesu akebisaki bayekoli na ye ete: “Bikólo nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai.” (Mat. 24:9) Na boumeli ya mikolo ya nsuka ya mokili oyo, oyo ebandaki na 1914, koyina yango ekómaki lisusu makasi. Atako banguna batɛmɛlaki makasi bakristo oyo batyami mafuta na elimo na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bakristo wana ya sembo basilaki te. Na 1919, balongwaki na boombo ya Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba. (Em. 11:11, 12)a Na ntango wana nde babandaki kokima na lobwaku ya bangomba ya Yehova.
12 Kobanda 1919 tii lelo, basambeli ya solo na mokili mobimba bazali na libateli na kati ya lobwaku ya Nzambe. Banda kala, na mikili mingi Leta epekisaka mosala ya kosakola mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia oyo Batatoli ya Yehova babimisaka. Tii lelo, bipekiseli ya ndenge wana ezali naino na bikólo mosusu. Kasi, ata soki bikólo esali nini, ekolonga soki moke te kolimwisa losambo ya solo! Lobɔkɔ ya nguya ya Yehova ekokoba kobatela basaleli na ye.—Mib. 11:2.
13. Ndenge nini tokoki kotikala na kati ya lobwaku ya libateli ya Yehova, mpe mpo na nini kosala yango ezali na ntina mingi koleka lelo oyo?
13 Soki tokangami na Yehova mpe topikami na kati ya solo, Yehova mpe Mwana na ye Yesu Kristo bakobatela biso, mpe Nzambe akotika te ete eloko to moto moko ‘abɔtɔla biso na lobɔkɔ na ye.’ (Yoa. 10:28, 29) Yehova akozanga te kopesa biso lisalisi nyonso oyo tosengeli na yango mpo tókoka kotosa ye mpo azali Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba, mpe tóndima boyangeli ya Bokonzi ya Masiya. Tosengeli kotikala na kati ya lobwaku ya libateli, mpamba te lobwaku yango ekobatela basambeli ya solo mingi koleka na bolɔzi monene oyo ekómi mpenza pene.
“MOKOLO YA ETUMBA” EKÓMI
14, 15. Na “mokolo ya etumba [ya Nzambe]” mpo na koboma banguna na ye, nini ekokómela baoyo bakozala libándá ya lobwaku?
14 Ntango tokokóma mpenza pene na nsuka ya mokili oyo, Satana akoluka kobundisa basaleli ya Yehova makasi koleka ndenge azalaki kosala yango liboso. Na ntango wana nde “mokolo ya etumba [ya Nzambe]” ekoya mpo na koboma banguna na ye. Yehova akosɛnzɛla ete yango ezala mbala ya nsuka oyo Satana akobundisa basaleli na ye. Na mokolo yango, Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba akomonisa ete azali Mobundi monene koleka ndenge oyo asalaki yango na ‘mikolo ya bitumba’ mosusu oyo eleká.—Zek. 14:3.
15 Na mokolo ya etumba ya Nzambe, nini ekokómela baoyo bakozala libándá ya ‘lobwaku monene’ ya libateli? “Pole ya solosolo” oyo Nzambe akongɛngisela bato oyo ye andimi ekozwa bango te. Na mokolo wana ya etumba, ‘mpunda, dɔngi, kamela mpe mpunda-mobali, mpe mitindo nyonso ya nyama ya mboka,’ oyo ezali komonisa bibundeli ya bikólo, ekobebisama. Bibundeli yango “ekokangama makasi na malili,” elingi koloba bakokoka kosalela yango lisusu te. Yehova akosalela mpe maladi mabe ná “mpasi.” Ezala ya solo to ya elilingi, mpasi yango ekosukisa makaneli oyo ezalaki kobangisa basaleli ya Nzambe. Na mokolo yango, ‘miso . . . mpe lolemo [ya banguna] ekopɔla mpenza’ na ndimbola oyo ete bakokoka lisusu te kobundisa basaleli ya Nzambe mpe maloba na bango ya kotuka ekosuka. (Zek. 14:6, 7, 12, 15) Ekozala na esika moko te awa na mabele oyo banguna bakomibomba. Na etumba yango, banguna oyo bakozala na ngámbo ya Satana bakozala ebele mpenza. (Em. 19:19-21) “Baoyo babomami na Yehova bakozala na mokolo yango uta nsuka moko ya mabele tii na nsuka mosusu ya mabele.”—Yir. 25:32, 33.
16. Lokola mokolo ya etumba ya Nzambe ekómi pene, mituna nini tosengeli komituna, mpe ekosɛnga ete tósala nini?
16 Mbala mingi, bitumba ebimisaka mpasi, ata na ngámbo ya bato oyo balongi. Bakoki kozanga bilei, kobungisa bandako, biloko na bango ya mosuni, to mpe bonsomi oyo bazalaki na yango liboso. Soki mikakatano ya ndenge wana ekómeli biso, tokosala nini? Tokobanga? Tokowangana kondima na biso na ntango wana ya mikakatano? Tokobungisa elikya mpe esengo na biso? Na ntango ya bolɔzi monene, ekozala na ntina mingi ete tókoba kotya motema na nguya oyo Yehova azali na yango ya kobikisa mpe tótikala na kati ya lobwaku ya libateli ya Yehova.—Tángá Habakuku 3:17, 18.
“MAI YA BOMOI EKOBIMA”
17, 18. (a) “Mai ya bomoi” ezali nini? (b) “Mbu ya ɛsti” mpe “mbu ya wɛsti” elimboli nini? (c) Wana ozali kozela makambo oyo ekosalema mosika te, ekateli na yo ezali nini?
17 Nsima ya Armagedone, “mai ya bomoi” ekobanda kobima uta na kiti ya Bokonzi ya Masiya. “Mai ya bomoi” yango ezali bibongiseli oyo Yehova azwi mpo na kopesa bato bomoi. “Mbu ya ɛsti” ezali Mbu Ekufá, mpe “mbu ya wɛsti” ezali Mbu ya Mediterane. Mbu yango nyonso mibale esalelami mpo na kolobela bato. Mbu Ekufá ezali elilingi oyo ebongi mpo na kolobela bato oyo bazali na kati ya nkunda ya bato nyonso. Lokola Mbu ya Mediterane etondi na bikelamu ya bomoi, yango ezali elilingi ya “ebele mpenza ya bato” oyo bakobika na Armagedone. (Tángá Zekaria 14:8, 9; Em. 7:9-15) Na yango, bato ya bituluku yango nyonso mibale bakosikolama na etumbu ya liwa oyo Adama atikelá biso, wana bazali kokoba komɛla mai ya elilingi, to “mai ya bomoi.”—Em. 22:1, 2.
18 Libateli ya Yehova nde ekosalisa biso tóbika na nsuka ya mokili oyo mabe mpe tókɔta na mokili ya sika mpe ya boyengebene ya Nzambe. Atako bikólo nyonso ezali koyina biso, tiká ete tózala na ekateli ya kokoba kozala bato oyo bandimi koyangelama na Bokonzi ya Nzambe, mpe tókoba kozala na kati ya lobwaku ya libateli ya Yehova.
a Talá buku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi! nkasa 169-170.