-
Yehova akopesaka kimya mingi mpe solo mingiLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1996 | 1 Janvier
-
-
“Nayoki zuwa mpo na Siona”
6, 7. Na lolenge nini Yehova azalaki na ‘zuwa mpo na Siona elongo na nkanda monene’?
6 Maloba yango mamonani mpo na mbala ya liboso na Zekalia 8:2, epai kuna totángi ete: “Yehova na bibele alobi boye ete, Nayoki zuwa mpo na Siona, ɛɛ zuwa monene; nazali na zuwa mpo na ye, ɛɛ, zuwa na nkanda monene mpenza.” Elaka ya Yehova ya kozala na zuwa, ya kozala na molende makasi, mpo na libota na ye elimboli ete akosɛnzɛla ete kimya na bango ekoka kozonga. Kozongisama ya Yisalaele na mokili na bango mpe kotongama lisusu ya tempelo emonisaki polele molende yango.
7 Atako bongo, ezali boni mpo na baoyo batɛmɛlaki libota ya Yehova? Molende na ye mpo na libota na ye esengeli kokokana na “nkanda monene” oyo azalaki na yango likoló na banguna wana. Ntango Bayuda ya sembo bazalaki kosambela kati na tempelo oyo esilaki kotongama lisusu, bazalaki na likoki ya kokanisa likoló na mpasi oyo ekómelaki Babilone ya nguya, oyo na ntango wana esilaki kokwea. Bakokaki lisusu kokanisa na ntina na kokwea monene ya banguna oyo bamekaki kopekisa kotongama ya tempelo. (Ezela 4:1-6; 6:3) Mpe bakokaki kotɔ́nda Yehova lokola asilaki kokokisa elaka na ye. Molende na ye epesaki bango bolóngi!
-
-
Yehova akopesaka kimya mingi mpe solo mingiLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1996 | 1 Janvier
-
-
9. Mbongwana monene nini ya ezalela emonanaki epai na “Yisalaele ya Nzambe” na 1919?
9 Lokola biyambweli wana mibale bizalaki na ndimbola mpo na Yisalaele ya kala, bizali mpe na ndimbola mpo na biso awa ekeke ya 20 ezali kobɛlɛma na nsuka. Esili koleka soko mibu 80, na boumeli ya etumba ya liboso ya mokili mobimba, mwa bankóto ya bapakolami oyo na ntango wana bazalaki komonisa “Yisalaele ya Nzambe” bakendaki na boombo ya elimo. (Bagalatia 6:16) Esakweli moko elobelaki bango lokola bibembe oyo bilali kati na balabála. Nzokande, bazalaki na mposa ya solosolo ya kosambela Yehova “na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:24) Yango wana, na 1919, Yehova abimisaki bango longwa na boombo, kosekwisáká bango longwa na ezalela na bango ya kufa kati na elimo. (Emoniseli 11:7-13) Na yango, Yehova ayanolaki ɛɛ na mongongo makasi na motuna oyo mozwami kati na esakweli moko ya Yisaya: “Mokili ekobotama na mokolo moko? Libota bakobimisama na mwa ntango moke?” (Yisaya 66:8) Na 1919, libota ya Yehova lizongaki lisusu na bomoi lokola libota na elimo kati na “mokili” na bango, to ezalela na bango ya elimo awa na mabelé.
10. Kobanda 1919, mapamboli nini baklisto bapakolami bazwaki kati na “mokili” na bango?
10 Lokola bazalaki na libateli kati na mokili wana, baklisto bapakolami basalaki kati na tempelo monene ya elimo ya Yehova. Batyamaki lokola “moombo ya sembo mpe ya mayele,” kondimáká mokumba ya kobatela biloko ya Yesu oyo bizali awa na mabelé, libaku malamu oyo bazali na yango kino lelo, awa ekeke ya 20 ezali kobɛlɛma na nsuka na yango. (Matai 24:45-47) Bazwaki malamu liteya oyo ete Yehova azali “mpenza Nzambe na kimya.”—1 Batesaloniki 5:23.
11. Lolenge nini bakonzi ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba basili komimonisa ete bazali banguna ya libota ya Nzambe?
11 Nzokande, ezali boni mpo na banguna ya Yisalaele ya Nzambe? Molende ya Yehova mpo na libota na ye ekokani na nkanda oyo azali na yango mpo na banguna wana. Na boumeli ya etumba ya liboso ya mokili mobimba, bakonzi na mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba bayeisaki minyoko makasi wana bazalaki komeka kosilisa etuluku moke wana ya baklisto oyo balobaka solo—kasi balóngaki te. Na boumeli ya etumba ya mibale ya mokili mobimba, baministre ya boklisto ya nkombo mpamba basanganaki kati na likambo bobele moko: Mikili na bipai nyonso mibale oyo mizalaki kobunda misɛngaki na biyangeli ete bisilisa Batatoli ya Yehova. Ata mpe lelo, kati na mikili mingi bakonzi na mangomba bazali kopusa biyangeli ete bápekisa to bátya mindɔndɔ́ na mosala ya boklisto ya kosakola oyo Batatoli ya Yehova basalaka.
12, 13. Lolenge nini nkanda ya Yehova emonisami epai na boklisto ya nkombo mpamba?
12 Yehova azali komona nyonso wana. Nsima na etumba ya liboso ya mokili mobimba, boklisto ya nkombo mpamba, elongo na mangomba mosusu ya Babilone Monene, ekweaki. (Emoniseli 14:8) Bosolo ya kokwea ya boklisto ya nkombo mpamba eyebanaki polele wana, kobanda 1922, molɔngɔ́ ya malózi ya elilingi esopamaki likoló na yango, komonisáká polele ezalela na yango ya kufa kati na elimo mpe kokebisáká na ntina na kobomama na yango oyo ezali koya. (Emoniseli 8:7 kino 9:21) Lokola elembeteli ete kosopama ya malózi wana ezali kokóba, lisukúlu “Nsuka ya mangomba ya lokuta ebɛlɛmi” epesamaki na mokili mobimba na mokolo mwa 23 Apríli 1995, yango elandanaki na kokabolama ya bamilió mingi ya bakopi ya Nsango ya Bokonzi, trakte moko ya ntina.
13 Lelo oyo, boklisto ya nkombo mpamba ezali kati na ezalela moko ya mawa. Na boumeli ya ekeke ya 20, basangani na yango babomanaki bamoko na basusu na bitumba mabe oyo bipambolamaki na banganganzambe na bango mpe na bapastɛ́rɛ na yango. Na mikili misusu, bopusi na yango ezali komonana lisusu te. Boklisto ya nkombo mpamba ekobomama elongo na mangomba mosusu matikali ya Babilone Monene.—Emoniseli 18:21.
-