“Bólinga solo mpe kimya”!
“Liloba na Yehova na bibele eyaki epai na ngai ete, . . . bólinga solo mpe kimya.”—ZEKALIA 8:18, 19.
1, 2. (a) Nini elobami na ntina na kimya kati na lisoló ya bato? (b) Mpo na nini mokili ya lelo ekozwa kimya ya solosolo soko moke te?
“MOKILI esilá naino kozwa kimya ata mokolo moko te. Na esika moko—mpe mbala mingi kati na bisika mingi—bitumba bizalaka ntango nyonso.” Ezali wana maloba ya Molakisi Milton Mayer na Inivɛrsité ya Massachusetts, na Etats-Unis. Oyo nde maloba ya mawa na ntina na bato! Ya solo, bato balingaka kimya. Bato na politiki basili komeka banzela ya lolenge nyonso mpo na kobatela yango, kobanda na Pax Romana na ntango ya Baloma kino na ebongiseli oyo ebéngami ete “Destruction mutuelle assurée” oyo esalemaki na boumeli ya koswana kati na banguya minene. Atako bongo, na nsuka milende na bango milóngaki te. Lokola Yisaya amonisaki yango esili koleka bikeke mingi, ‘bantoma na kimya bazali kolela mingi mpenza.’ (Yisaya 33:7) Mpo na nini ezali bongo?
2 Ezali bongo mpamba te kimya ya koumela esengeli kouta na esika oyo koyinana mpe lokoso ezali te; esengeli kozwa moboko kati na solo. Kimya ekoki te kozwa moboko kati na lokuta. Yango wana ntango alakaki kozongisama mpe kimya mpo na Yisalaele ya kala, Yehova alobaki ete: “Talá nakokómisa kimya epai na ye lokola ebale, mpe bozwi na mabota lokola etima ezali kosopana.” (Yisaya 66:12) Nzambe ya biloko ya ntango oyo, Satana Zábolo, azali “mobomi na bato,” mpe “mobuki na lokuta mpe tata na lokuta.” (Yoane 8:44; 2 Bakolinti 4:4) Lokola mokili ezali na nzambe motindo oyo, lolenge nini yango ekoki kozwa kimya?
3. Likabo nini monene Yehova asili kopesa epai na libota na ye, atako bazali kobika kati na mokili ya mobulu?
3 Kasi, likambo ya kobenda likebi ezali oyo ete, Yehova azali kopesa kimya epai na libota na ye atako bazali kobika kati na mokili ya Satana oyo mobebisami na bitumba. (Yoane 17:16) Na ekeke ya motoba L.T.B., akokisaki elaka na ye na nzela ya Yilimia mpe apesaki “kimya mpe solo” epai na libota na ye ntango azongisaki bango na mokili na bango. (Yilimia 33:6) Mpe na mikolo oyo ya nsuka, asili kopesa “kimya mpe solo” epai na libota na ye kati na “mokili” na bango, to ezalela na bango ya elimo awa na mabelé, atako bazali kobika kati na ntango eleki mobulu oyo mokili ya lelo emonaki naino liboso te. (Yisaya 66:8; Matai 24:7-13; Emoniseli 6:1-8) Wana ezali biso kokóba kotalela Zekalia mokapo 8, tokososola lisusu na bozindo mpenza kimya mpe solo oyo Nzambe apesaka mpe tokomona oyo tosengeli kosala mpo na kolanda kozwa yango.
‘Tiká ete mabɔkɔ na bino mázala na nguya’
4. Lolenge nini Zekalia alendisaki Yisalaele na kosala soki balingaki kozala na kimya?
4 Mpo na mbala ya motoba kati na Zekalia mokapo 8, toyoki eyambweli ya kosepelisa uta na Yehova: “Yehova na bibele alobi boye ete, Tiká ete mabɔkɔ na bino mázala na nguya, bino bato bakoyokaka na mikolo oyo maloba oyo longwa na monɔkɔ na basakoli baoyo bazalaki na mikolo na kotya miboko na ndako na Yehova na bibele, ɛɛ Tempelo mpenza, ete etongama. Zambi liboso na mikolo yango, moto azalaki na lifuti te, nyama ezalaki na lifuti te; kimya ezalaki te epai na ye oyo abimaki soko akɔtaki mpo na motɛmɛli. Zambi nabunanisaki bato, moto na moto kotɛmɛla mozalani na ye.”—Zekalia 8:9, 10.
5, 6. (a) Lokola Bayisalaele balɛmbaki nzoto, ezalela ya makambo ezalaki lolenge nini kati na Yisalaele? (b) Mbongwana nini Yehova alakaki kopesa bango soki batyaki losambo na ye na esika ya liboso?
5 Zekalia alobaki maloba wana na ntango tempelo ezalaki lisusu kotongama na Yelusaleme. Liboso, Bayisalaele oyo bautaki na Babilone balɛmbaki nzoto mpe batikaki mosala ya kotonga tempelo. Lokola batyaki likebi na bango likoló na bolamu na bango moko, bazwaki te lipamboli mpe kimya uta na Yehova. Atako balónaki mabelé na bango mpe babatelaki bilanga na bango ya miwiti, bazwaki bolamu te. (Hagai 1:3-6) Ezalaki lokola nde bazali kosala mpo na “lifuti te.”
6 Sikawa lokola tempelo ezalaki kotongama lisusu, Zekalia alendisaki Bayuda ete “bázala na nguya,” bázala na mpiko mpe ete bátya losambo ya Yehova na esika ya liboso. Nini elingaki kosalema soki basalaki bongo? “Sasaipi nakozala epai na litika na bato oyo lokola na mikolo na liboso te. Yehova na bibele alobi bongo. Kokóna na kimya ekozala; miwiti ikobimisa mbuma na yango mpe mabelé ekobimisa kofuluka na yango; mpe lola ekopesa mamwɛ na yango. Nakosangolisa litika na bato oyo biloko oyo nyonso. Ɛ ndako na Yuda mpe ndako na Yisalaele, lokola bozalaki elakeli mabe kati na mabota, nakobikisa bino mpe bokozala lipamboli. Bóbanga te! Tiká ete mabɔkɔ na bino mázala na nguya!” (Zekalia 8:11-13) Soki Yisalaele esalaki na mpiko nyonso, mbɛlɛ elingaki kozala malamu. Na kala, ntango mabota mazalaki kotánga ndakisa ya elakeli mabe, bakokaki kotánga Yisalaele. Sikawa Yisalaele esengelaki kozala ndakisa ya lipamboli. Oyo nde ntina malamu ya ‘kotika ete mabɔkɔ na bango mázala na nguya’!
7. (a) Mbongwana nini ya kosepelisa libota ya Yehova ezwaki, mingimingi na mobu ya mosala 1995? (b) Na kotalela lapólo ya mbula, mikili nini omoni ete mizali na motuya monene ya basakoli, ya babongisi-nzela, ya mwayene ya bangonga?
7 Ezali boni lelo? Na bambula oyo ezalaki liboso na 1919, libota ya Yehova ezangaki mwa moke molende. Babatelaki mpenza te etɛlɛmɛlo na bango ya kozanga kokɔta na makambo ya mokili, na boumeli ya etumba ya liboso ya mokili mobimba, mpe bazalaki na momeseno ya kolanda moto na esika ya kolanda Mokonzi na bango, Yesu Klisto. Mpo na yango, bamoko balɛmbaki nzoto mpo na botɛmɛli oyo ezalaki na kati mpe na libándá ya lisangá. Na nsima, na 1919, na lisalisi ya Yehova batikaki ete mabɔkɔ na bango mázala na nguya. (Zekalia 4:6) Yehova apesaki bango kimya, mpe bakómaki na bozwi mingi. Yango emonisami kati na lapólo na bango ya bambula 75 oyo euti koleka, oyo ekómi kino na mobu ya mosala 1995. Lokola lisangá, Batatoli ya Yehova bazali kopɛngola bolingí-ekólo, bolingí-etúlúká, kozala na makanisi mabe na ntina na bato mosusu, mpe makambo nyonso mosusu oyo mabimisaka koyinana. (1 Yoane 3:14-18) Bazali kosalela Yehova na molende ya solosolo kati na tempelo na ye ya elimo. (Baebele 13:15; Emoniseli 7:15) Bobele na mbula oyo euti koleka, balekisaki bangonga koleka miliare moko mpo na kosolola na basusu na ntina na Tata na bango ya likoló! Sanza na sanza, batambwisaki boyekoli ya Biblia 4 865 060. Mwayene ya bato 663 521 basanganaki na mosala ya mobongisi-nzela. Wana bapastɛ́rɛ ya boklisto ya nkombo mpamba balingi kolobela ndakisa ya bato oyo bazali mpenza na molende kati na losambo na bango, na bantango mosusu batángaka Batatoli ya Yehova.
8. Lolenge nini moklisto mokomoko akoki kozwa litomba na “mombóto na kimya”?
8 Na ntina na molende na bango, Yehova azali kopesa na libota na ye “mombóto ya kimya.” Moto nyonso oyo azali kolóna mombóto wana akomona kimya kokóla kati na motema na ye mpe kati na bomoi na ye. Moklisto nyonso oyo azali na kondima, oyo azali kolanda kimya elongo na Nzambe mpe elongo na baninga na ye baklisto azali kosangana kati na solo mpe na kimya ya libota oyo ememi nkombo ya Yehova. (1 Petelo 3:11; kokanisá na Yakobo 3:18.) Yango ezali likambo ya kokamwa, boye te?
“Bóbanga te”
9. Yehova alakaki kosala mbongwana nini kati na lolenge na ye ya kosala epai na libota na ye?
9 Sikawa tozali kotánga eyambweli ya nsambo ya Yehova. Ezali nini? “Yehova na bibele alobi ete, Lokola nakanaki kosalela bino mabe wana batata na bino bapelisaki nkanda na ngai mpe nabongolaki motema te, boye nakani lisusu na mikolo oyo ete nasala malamu epai na Yelusaleme mpe epai na ndako na Yuda. Bóbanga te!”—Zekalia 8:14, 15.
10. Makambo nini matali Batatoli ya Yehova oyo mamonisi ete bazalaki na kobanga te?
10 Atako, na elimo libota ya Yehova lipalanganaki na boumeli ya etumba ya liboso ya mokili mobimba, kati na mitema na bango bazalaki na mposa ya kosala oyo ezali sembo. Na yango, nsima na kopesa bango mwa disipilini, Yehova abongolaki lolenge na ye ya kosala epai na bango. (Malaki 3:2-4) Lelo oyo, tozali kokanisa makambo wana maleká mpe tozali kotɔ́nda ye mingi mpo na oyo asili kosala. Ya solo, tosili ‘koyinama na mabota nyonso.’ (Matai 24:9) Mingi basili kokɔta bolɔ́kɔ, mpe basusu basili kobomama na ntina na kondima na bango. Mbala mingi bato bazali kosepela na mosala na biso te mpe bazali koyina biso. Kasi tozali kobanga te. Toyebi ete Yehova azali na nguya mingi koleka batɛmɛli nyonso, oyo bazali komonana to oyo bazangi komonana. (Yisaya 40:15; Baefese 6:10-13) Tokotika te kolanda maloba oyo ete: “Likyá epai na Yehova; zalá na mpiko mpe tiká ete motema na yo mozala na nguya.”—Nzembo 27:14, NW.
“Bóloba solo moto na moto na mozalani na ye”
11, 12. Likambo nini mokomoko asengeli kobosana yango te soki tolingi kozwa mapamboli mingi oyo Yehova apesaka na libota na ye?
11 Mpo na kozwa mapamboli mingi uta na Yehova, ezali na makambo oyo tosengeli komikundola. Zekalia alobi ete: “Oyo izali makambo makosala bino: bóloba solo moto na moto na mozalani na ye, bósambisa na kosambisa na sembo mpe na kimya kati na bikuke na bino; tiká te ete moko na bino abanzabanza mabe na motema na ye ete asalela mozalani na ye yango. Bólinga ndai na lokuta te, zambi makambo oyo nyonso mazali makambo mayini ngai. Yehova alobi bongo.”—Zekalia 8:16, 17.
12 Yehova azali kosɛnga biso ete tóloba solo. (Baefese 4:15, 25) Ayokaka te mabondeli ya baoyo bazali kokana makambo ya mabe, oyo bazali kobomba solo mpo na matomba na bango moko, to oyo bazali kokata ndai ya lokuta. (Masese 28:9) Lokola ayini lipɛngwi, alingi ete tókangama na solo ya Biblia. (Nzembo 25:5; 2 Yoane 9-11) Lisusu, lokola mikóló oyo bazalaki na bikuke ya mboka na Yisalaele, bankulutu oyo bazali kosambisa makambo basengeli kotonga batoli na bango mpe bikateli na bango likoló na solo ya Biblia, kasi likoló na makanisi na bango moko te. (Yoane 17:17) Yehova alingi ete bango báluka “kosambisa na kimya,” komekáká lokola babateli baklisto, kozongisa kimya kati na bato oyo bazwani mpe kosalisáká basumuki oyo babongoli motema ete bázongela lisusu kimya elongo na Nzambe. (Yakobo 5:14, 15; Yuda 23) Bobele na ntango wana, bazali kobatela kimya ya lisangá, na mpiko nyonso bazali kobimisa baoyo bazali kobebisa kimya yango na kolandáká kosala na nkó nyonso makambo ya mabe.—1 Bakolinti 6:9, 10.
“Esengo mpe kosepela”
13. (a) Mbongwana nini na ntina na bilambo Zekalia asakolaki? (b) Bilambo nini bizalaki kosalema na Yisalaele?
13 Sikawa, tozali koyoka eyambweli monene ya mwambe: “Yehova na bibele alobi boye ete, Kokila na sanza ya minei mpe kokila na sanza na mitano mpe kokila na sanza na nsambo mpe kokila na sanza na zomi ikozala epai na ndako na Yuda na esengo mpe na kosepela mpe bilambo na kosepela. Bongo bólinga solo mpe kimya.” (Zekalia 8:19) Na nsé na Mibeko ya Mose, Bayisalaele bazalaki na elambo na Mokolo na Mbɔndi mpo na komonisa mawa na ntina na masumu na bango. (Levitike 16:29-31) Bilambo minei oyo bilobelami na Zekalia emonani ete bisalemaki mpo na kolela makambo oyo mazalaki na boyokani na kokamatama mpe kobomama ya Yelusaleme. (2 Mikonzi 25:1-4, 8, 9, 22-26) Nzokande, sikawa, tempelo ezalaki kotongama lisusu mpe Yelusaleme ezalaki kotonda lisusu na bato. Kolela ebongwanaki bosepeli, mpe bilambo bikómaki bilambo na sanza.
14, 15. (a) Lolenge nini kokumisama ya Ekaniseli ezalaki ntina ya bosepeli, mpe yango esengeli kokundwela biso nini? (b) Lokola yango emonisami na lapólo ya mbula, mikili nini motuya ya bayangani na Ekaniseli ezalaki mingi?
14 Lelo oyo, tokumisaka te bilambo oyo bilobelami na Zekalia to bilambo oyo bisɛngamaki kati na Mibeko. Lokola Yesu apesaki bomoi na ye mpo na masumu na biso, tozali kozwa mapamboli ya Mokolo monene ya Mbɔndi. Masumu na biso masengeli kolimbisama, na mwa ndambo te, kasi na mobimba mpenza. (Baebele 9:6-14) Kolandáká etindá ya Nganga Monene ya likoló, Yesu Klisto, tokumisaka Ekaniseli ya liwa na ye lokola elambo bobele moko kati na manáka ya boklisto. (Luka 22:19, 20) Tozali kozwa “esengo mpe bosepeli” wana tozali koyangana elongo mbula na mbula mpo na elambo wana, boye te?
15 Na mbula eleki, bato 13 147 201 bayaki kokumisa Ekaniseli, motángo ya bato 858 284 koleka na ndenge ezalaki na 1994. Oyo nde ebele ya bato! Kanisá bosepeli oyo ezalaki kati na masangá 78 620 ya Batatoli ya Yehova na ntango ebele wana ya bato bayanganaki kati na Bandako ya Bokonzi na bango mpo na elambo yango. Ya solo, baoyo nyonso bazalaki wana bapusamaki na “kolinga solo mpe kimya” wana bakanisaki liwa ya Ye oyo azali “nzela mpe solo mpe bomoi” mpe oyo Yehova atye mpo na koyangela lokola ‘Nkolo monene na kimya’! (Yoane 14:6; Yisaya 9:6) Elambo wana ezalaki na ndimbola moko monene mpo na baoyo bakumisaki yango na mikili oyo minyokwami na mobulu mpe na bitumba. Na boumeli ya mobu 1995, bamoko na bandeko na biso bakutanaki na makambo ya nsɔ́mɔ mingi koleka. Nzokande, ‘kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ebatelaki mitema na bango mpe makanisi na bango na nzela na Klisto Yesu.’—Bafilipi 4:7.
‘Tiká tóluka Yehova’
16, 17. Lolenge nini bato ya mabota bakoki “koluka Yehova”?
16 Nzokande, bamilió wana ya bato oyo bayanganaki na Ekaniseli bautaki wapi? Eyambweli ya libwa ya Yehova elimboli ete: “Yehova na bibele alobi boye ete, Naino bato bakoya mpe bafandi kati na mboka mingi lokola. Bafandi na mboka moko bakokenda epai na mosusu mpe bakoloba ete, Tókenda mbangu mpo na kobondela ngɔlu na Yehova mpe koluka Yehova na bibele, ngai mpe lokola. Ɛɛ, bato mingi mpe mabota na nguya bakoya koluka Yehova na bibele kati na Yelusaleme mpe kobondela ngɔlu na Yehova.”—Zekalia 8:20-22.
17 Bato oyo bayanganaki na Ekaniseli bazali na mposa na “koluka Yehova na bibele.” Mingi kati na bango bazalaki basaleli na ye oyo basilá komipesa mpe kozwa batisimo. Bamilió mosusu oyo bayanganaki bakómi naino na litambe wana te. Kati na mikili misusu bayangani na Ekaniseli bazalaki mbala minei to mbala mitano koleka motángo ya basakoli ya Bokonzi. Bato mingi wana ya sika oyo bamonisaki bosepeli bazali na mposa ya lisalisi mpo na kolanda kokóla. Tiká tóteya bango mpo ete básepela mpo na boyebi oyo ete Yesu akufaki mpo na masumu na biso mpe azali sikawa koyangela kati na Bokonzi ya Nzambe. (1 Bakolinti 5:7, 8; Emoniseli 11:15) Mpe tiká ete tólendisa bango ete bámipesa bango moko epai na Yehova Nzambe mpe ete bátosa Mokonzi oyo ye asili kopona. Na nzela wana ‘bakoluka Yehova.’—Nzembo 116:18, 19; Bafilipi 2:12, 13.
“Bato zomi longwa na mabota na nkótá nyonso”
18, 19. (a) Kati na kokokisama ya Zekalia 8:23, nani lelo oyo azali “Moyuda”? (b) Banani bazali lelo “bato zomi” oyo “bakosimba elamba na moto oyo azali Moyuda”?
18 Mpo na mbala ya nsuka kati na mokapo ya mwambe ya Zekalia, totángi ete: “Yehova na bibele alobi boye ete.” Eyambweli yango ya nsuka ya Yehova ezali nini? “Na mikolo yango, bato zomi longwa na mabota na [nkótá] nyonso, bakosimba elamba na moto oyo azali Moyuda, bakoloba [na ye] ete, Tokokenda na yo elongo, zambi toyoki ete Nzambe azali elongo na bino.” (Zekalia 8:23) Na mikolo ya Zekalia, Yisalaele ezalaki libota liponami ya Nzambe. Nzokande, na ekeke ya liboso, Yisalaele ebwakaki Masiya ya Yehova. Na yango, Nzambe na biso aponaki “Moyuda”—Yisalaele ya sika—lokola libota na ye mpenza, “Yisalaele ya Nzambe” oyo esalemi na Bayuda ya elimo. (Bagalatia 6:16; Yoane 1:11; Baloma 2:28, 29) Motuya na bango nyonso esengelaki kozala bato 144 000, oyo baponami kati na bato mpo na koyangela elongo na Yesu kati na Bokonzi na ye ya likoló.—Emoniseli 14:1, 4.
19 Mingi kati na ba 144 000 yango basilá kokufa na bosembo nyonso mpe basilá kokende mpo na kozwa mbano na bango na likoló. (1 Bakolinti 15:51, 52; Emoniseli 6:9-11) Mwa ndambo bazali naino awa na mabelé mpe bango bazali kosepela na komona ete “bato zomi” oyo baponi kokende elongo na “Moyuda” bazali mpenza “ebele monene . . . oyo euti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bikólo nyonso, na minɔkɔ nyonso.”—Emoniseli 7:9; Yisaya 2:2, 3; 60:4-10, 22.
20, 21. Lokola nsuka ya mokili oyo ebɛlɛmi, lolenge nini tokoki kozala na kimya elongo na Yehova?
20 Lokola nsuka ya mokili oyo ezali kobɛlɛma mpenza, boklisto ya nkombo mpamba ezali lokola Yelusaleme na mikolo ya Yilimia: “Tolukaki kimya nde malamu ezali te; tolukaki ntango na kobika nde talá bolózi.” (Yilimia 14:19) Bolózi wana ekondongwana mpenza ntango mabota makobalukela mangomba ya lokuta mpe makosukisa yango na lolenge ya nsɔ́mɔ. Mwa moke na nsima, mabota yango mpe makobebisama na etumba ya nsuka ya Nzambe, Armagedon. (Matai 24:29, 30; Emoniseli 16:14, 16; 17:16-18; 19:11-21) Oyo nde yikiyiki ekozala na ntango wana!
21 Na makambo nyonso wana, Yehova akobatela baoyo balingi solo mpe bazali kolóna “mombóto na kimya.” (Zekalia 8:12; Sefania 2:3) Na bongo, tiká ete tóbatelama kati na mokili ya libota na ye, kosaláká na molende nyonso mpo na kosanzola ye liboso na bato mpe kosalisa bato mingi mpo ete ‘báluka Yehova.’ Soki tosali bongo, tokozala ntango nyonso na kimya ya Yehova. Ɛɛ, “Yehova ye moko akopesa nguya mpenza epai na bato na ye. Yehova ye moko akopambola bato na ye na kimya.”—Nzembo 29:11, NW.
Okoki kolimbola?
◻ Lolenge nini libota ya Nzambe ‘etikaki ete mabɔkɔ na bango mázala na nguya’ na mikolo na Zekalia? Ezali boni lelo oyo?
◻ Tosalaka lolenge nini liboso ya minyoko, botɛmɛli, mpe kozanga bosepeli?
◻ Nini esɛngami na biso mpo na ‘koloba solo moko na mosusu’?
◻ Lolenge nini moto akoki “kobondela ngɔlu ya Yehova”?
◻ Ntina nini ya bosepeli monene emonani kati na kokokisama ya Zekalia 8:23?
[Elilingi na lokasa 18]
Na mbula eleki,Batatoli ya Yehova balekisaki bangonga 1 150 353 444 mpo na kosolola na bato na ntina na Bokonzi ya Nzambe