Mokapo 13
“Bósakola likambo oyo na bikólo”
1. Mpo na nini ntango Yehova azali koloba na mosakoli na ye akoki kokokanisama na nkɔsi oyo ezali koganga?
OSILÁ koyoka nkɔsi ezali koganga? Balobaka ete koganga na yango ezalaka makasi koleka makelele ya marto ya monene oyo bapasolaka na yango mabanga. Okosala nini soki oyoki koganga ya nkɔsi na butu pene na kartye na bino? Na ntembe te okoluka kosala likambo moko nokinoki. Amose, moko ya basakoli 12 oyo tozali kotalela makomi na ye, asalelaki elilingi yango; alobaki boye: “Nkɔsi egangi! Nani akobanga te? Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso ye moko alobi! Nani akosakola te?” (Amose 3:3-8) Soki oyokaki Yehova ye moko azali koloba olingaki te kosala lokola Amose? Kozanga kozela asakolaki bitumbu ya Nzambe na bokonzi ya mabota zomi ya Yisraele.
2. (a) Ndenge nini okoki komekola Amose na likambo etali kokokisa etinda ya kosakola? (b) Tokotalela nini na mokapo oyo?
2 Okoki koloba boye: ‘Ngai nazali mosakoli te!’ Okoki komiyoka ete obongi te kozala mosakoli mpo ozwá formasyo te. Atako bongo, kanisá Amose. Ntango akutanaki na botɛmɛli ya Amazia nganga-nzambe oyo azalaki kosambela ekeko ya mwana-ngɔmbɛ, Amose alobaki boye: “Nazalaki mosakoli te, nazalaki mpe mwana ya mosakoli te; kasi nazalaki mobateli ya bitonga mpe motubi ya bafigi na banzete ya sikomore.” (Amose 7:14) Atako akolaki na libota ya bozwi te, Amose andimaki kokokisa mokumba na ye ya mosakoli ya Yehova. Ezali boni mpo na yo? Oyebi ete Nzambe apesi yo mokumba oyo na makambo mosusu ekokani na oyo ya basakoli 12? Osengeli kosakola nsango ya Nzambe na eleko na biso mpe koteya mpe kokómisa bato bayekoli. Ndenge nini otalelaka mokumba wana ya ntina? Nsango nini osengeli kosakola na bikólo? Okokisaka mpenza mokumba yango nyonso? Nini ekomonisa ete mosala na yo ezali kobota mbuma? Tótalela biyano.
‘BANA-NGƆMBƐ YA MIBALI YA MBƐBU NA YO’
3. Ndenge nini okoki kosala mosala oyo ekokani na oyo ya basakoli oyo bakomaki makambo oyo tozali koyekola?
3 Ozali mpenza kosala mosala oyo ekokani na oyo ya basakoli? Ekoki kozala ete oyoká te nkɔsi ezali koganga, na maloba mosusu oyoká te Yehova ye moko azali koyebisa yo makambo na litambwisi ya elimo santu. Kasi, oyoká na nzela ya Liloba na ye Biblia, nsango ya ntina mingi ete mokolo ya Yehova etikali moke eya. Ndenge tomonaki yango na mokapo 1 ya buku oyo, maloba “mosakoli” mpe “ya esakweli” ezali na bandimbola mingi. Ata soki ozali mosakoli te ndenge Amose to basakoli mosusu ya kala bazalaki, okoki koloba mpo na makambo oyo ekoya. Ndenge nini? Okoki kosakola nsango ya bisakweli oyo oyekoli na Makomami Mosantu, ata mpe oyo ya basakoli 12. Oyo nde ntango ya kosala yango mpenza.
4. Na ndenge nini esakweli ya Yoele 2:28-32 ezali kokokisama lelo oyo?
4 Talelá likambo yango na ndenge mosusu. Yehova Nzambe ayebisaki mosakoli Yoele mpo na ntango oyo bato ya ndenge nyonso bakosakola: “Nsima na yango, ekosalema mpenza boye: nakosopela bato ya ndenge nyonso elimo na ngai, mpe bana na bino ya mibali ná bana na bino ya basi bakosakola. Mibange na bino bakolɔta bandɔtɔ. Mpe bilenge na bino bakomona bimonaneli.” (Yoele 2:28-32) Na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., ntoma Petro asalelaki mokapo yango mpo na kolobela kosopama ya elimo santu likoló ya baoyo bayanganaki na shambrɛ ya likoló na Yerusaleme mpe mosala oyo balingaki kosala na nsima ya kosakola “makambo minene ya Nzambe.” (Misala 1:12-14; 2:1-4, 11, 14-21) Sikoyo tózonga na eleko na biso. Esakweli ya Yoele ezali kokokisama na monene na yango banda na ebandeli ya ekeke ya 20. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo—mibali mpe basi, mibange mpe bilenge—babandaki “kosakola,” elingi koloba, kosakola “makambo minene ya Nzambe,” ata mpe nsango malamu ya Bokonzi, oyo etyami na likoló.
5. (a) Libaku nini biso nyonso tozali na yango? (b) Kopesa “bana-ngɔmbɛ ya mibali ya mbɛbu na biso” elimboli nini mpo na yo mpe mpo na nini ezali libaku malamu?
5 Atako babotami te na elimo santu mpo na kozala bana ya Nzambe, “ebele mpenza ya bato” ya “bampate mosusu” bazali koloba na bayekoli ya Yesu Kristo oyo batyami mafuta na elimo ete: “Tokokende na bino, mpo toyoki ete Nzambe azali na bino.” (Emoniseli 7:9; Yoane 10:16; Zekaria 8:23) Ezala ozali na elikya ya bomoi ya seko na likoló to awa na mabele, ozali na libaku ya kopesa “bana-ngɔmbɛ ya mibali ya mbɛbu na [yo].” (Hosea 14:2) Maloba wana ya esakweli ya Hosea elimboli nini? Keil, moto moko oyo alimbolaka maloba ya Biblia alobi boye: “Bana-ngɔmbɛ ya mibali . . . ezalaki banyama ya kitoko mpenza oyo bazalaki kopesa mbeka ya botɔndi.” Ntoma Paulo asalelaki maloba ya Hosea 14:2, akomaki boye: “Tópesa Nzambe mbeka ya lisanzoli ntango nyonso, elingi koloba, mbuma ya mbɛbu na biso oyo ezali kosakola nkombo na ye polele.” (Baebre 13:15) Ya solo, maloba “bana-ngɔmbɛ ya mibali ya mbɛbu na biso” elimboli oyo ya malamu koleka ya mbɛbu na biso, maloba oyo tolobaka mpo na kosanzola Yehova.
6. Mpo na nini tosengeli kotalela bambeka na biso ya masanzoli oyo topesaka?
6 Omemelaka Yehova bambeka ya masanzoli ntango osalaka mabondeli oyo eutaka mpenza na motema na yo, opesaka biyano oyo emonisaka botɔndi na yo epai na ye na makita, mpe olobaka mpo na ye na esengo nyonso na mosala ya kosakola. Kasi, mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Ntango nasalaka misala yango, mbeka na ngai ezalaka ya lolenge nini?’ Na ntembe te, na oyo oyekoli omoni mabe ndenge banganga-nzambe na mikolo ya Malaki bazalaki kopesa banyama ya mabe na etumbelo ya Nzambe. Yehova na nzela ya Malaki asengelaki komonisa bango ete bambeka na bango ezali malamu te, mpo bazalaki komona te ete bazali kotyola mesa ya Yehova. (Malaki 1:8) Na yango, ezali malamu tótalelaka lolenge ya bambeka oyo topesaka mpo tóyeba soki ezali mpenza ya malamu koleka mpe ebebi ata moke te.
NSANGO OYO ESENGELI KOSAKOLAMA
7. Esɛngaka mpiko mpo na koyebisa lolenge nini ya nsango?
7 Kopesa “bana-ngɔmbɛ ya mibali ya mbɛbu na biso” na mosala ya kosakola esɛngaka mpiko, boye te? Ezali bongo mpo nsango oyo tomemelaka bato ezali ya lolenge mibale, mpe na ntembe te, moko ya balolenge yango esepelisaka bato nyonso te. Mosakoli Yoele ayebisaki basaleli ya Nzambe boye: “Bósakola likambo oyo na bikólo: ‘Bósantisa etumba! Bólamwisa bato ya nguya! Bápusana penepene! Bámata, bato nyonso ya etumba!’” (Yoele 3:9) Kosalelama ya maloba wana na mikolo na biso ezali mpenza mpasi mpo na bikólo! Maloba yango etaleli etumba ya sembo ya Yehova oyo ekoyela bato nyonso oyo bazali kotɛmɛla Nzambe. Ntango Yehova azali kosɛnga na bato na ye ‘bátula mipanga na bango ete ekóma bitimweli ya mabele mpe makɔnga na bango ete ekóma makwangola ya kokata matiti,’ azali koyebisa bikólo ya banguna ete ‘bátula bitimweli na bango ekóma mipanga, mpe bambeli na bango ya kopɛtola milona ekóma makɔnga.’ (Mika 4:3; Yoele 3:10) Ɛɛ, banguna ya Nzambe basengeli komibongisa mpo na kokutana na Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ na etumba. Ezali nsango ya esengo te mpo na koyebisa bato.
8. Mpo na nini “bato ya Yakobo oyo batikali” bakokanisami na nkɔsi?
8 Na nsango ya mosakoli Mika, baoyo bapesaka ‘bana-ngɔmbɛ ya mibali ya mbɛbu na bango’ bakokanisami na nkɔsi. Akomaki boye: “Bato ya Yakobo oyo batikali bakokóma na kati ya bikólo, . . . lokola nkɔsi na kati ya banyama ya zamba, lokola mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki na kati ya bitonga ya bampate, oyo, ntango ezali mpenza koleka, enyataka mpe epasolaka mpenza; mpe mobikisi azali te.” (Mika 5:8) Mpo na nini ndakisa yango ebongi mpenza? Na mikolo na biso, basaleli ya Nzambe, ná baoyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino awa na mabele, mpe bazali kokamba mosala, basengeli komonisa mpiko lokola nkɔsi mpo na kosakola nsango ya kokebisa bikólo.a
9. (a) Ntango nini osengeli komonisa mpiko lokola nkɔsi? (b) Ndenge nini okoki kozala na mpiko ntango okutani na botɛmɛli to bato bazali kosepela na nsango te?
9 Ozalaka na mpiko lokola oyo ya nkɔsi mpo na kosakola nsango ya makebisi? Okozala na mposa ya mpiko ndenge wana kaka te ntango ozali liboso ya bato oyo bazali na bokonzi, kasi mpe ntango ozali koloba na baninga na yo ya kelasi to ya mosala to mpe bandeko na yo oyo bazali batatoli te. (Mika 7:5-7; Matai 10:17-21) Ndenge nini okoki komonisa mpiko ntango okutani na botɛmɛli to ntango bato bazali kosepela na nsango te? Talá ndenge Mika alongaki kokokisa mokumba monene ya kokebisa bato na ntina na kobomama ya Samaria mpe Yerusaleme: “Mpo na elimo ya Yehova, natondi mɛkɛ na nguya mpe na bosembo mpe na bokasi, mpo na koyebisa Yakobo botomboki na ye mpe Yisraele lisumu na ye.” (Mika 1:1, 6; 3:8) Yo mpe okoki ‘kotonda mɛkɛ na nguya’ mpo okoki mpe kozwa lisalisi monene ya nguya ya elimo ya Nzambe. (Zekaria 4:6) Soki otyeli Nzambe motema na nzela ya libondeli, okolonga kosakola nsango oyo ekoki koyokisa matoi mpasi.—2 Bakonzi 21:10-15.
10. Ndenge nini tokoki komekola Sefania na kosakola nsango etali “mokolo ya Yehova”?
10 Okolinga kozala na mpiko, kasi osengeli mpe koloba na mayele ntango ozali koyebisa bato nsango ya makebisi. Tosengeli kozala na “boboto na bato nyonso,” ata ntango tozali koyebisa nsango etali “mokolo ya Yehova” oyo ezali koya. (2 Timote 2:24; Yoele 2:1, 11; Sefania 1:14) Awa mpe tokoki kozwa liteya na ndakisa ya basakoli 12. Basakolaki nsango ya bitumbu ya Yehova na mpiko nyonso, kasi bazalaki komitya na esika ya baoyo bandimaki koyoka bango. Na ndakisa, mosakoli Sefania akakatanaki te na maloba ntango azalaki koloba na bankumu (to bato ya lokumu) ya motó makasi ya mikolo na ye, kasi asalelaki maloba wana te mpo na mokonzi ya sembo Yosiya. (Sefania 1:8) Ntango tozali kosakola nsango ya makebisi, tosalisaka bato, totalelaka bango lokola bampate to totalelaka bango lokola bato oyo bakoki kobongwana te?—Matai 25:32-34.
11. (a) Wapi lolenge ya mibale ya nsango oyo tozali komema? (b) Ndenge nini tokoki komekola basakoli 12 ntango tozali kosakola mokolo ya Yehova?
11 Lolenge nini mosusu ya nsango tosakolaka? Tozali kokuta yango na Mika mokapo 5. “Bato ya Yakobo oyo batikali bakokóma na kati ya ebele ya bato ya bikólo lokola mamwɛ oyo euti epai ya Yehova, lokola mbula monene likoló ya milona, oyo etalelaka moto te mpe ezelaka te bana ya moto ya mabele.” (Mika 4:1; 5:7) Mpo na nsango malamu oyo bazali komemela “ebele ya bato” lelo oyo, bato ya Yakobo ya elimo to Yisraele “oyo batikali,” mpe baninga na bango bazali lokola “mamwɛ oyo euti epai ya Yehova” oyo ekitisaka motema mpe oyo ezali “lokola mbula monene likoló ya milona.” Tosengeli koyekola makambo mingi na mikanda 12 ya nsuka ya Makomami ya Ebre na oyo etali lolenge ya mibale ya nsango na biso, mpamba te, basakoli yango basakolaki kaka kobebisama te kasi mpe kozongisama. Na mosala na yo ya kosakola, olobelaka mingi makambo ya malamu ya nsango oyo etali mokolo ya Yehova?
NDENGE NINI OSAKOLAKA NSANGO YANGO?
12, 13. (a) Ndenge oyo basaleli ya Nzambe bakokanisami na maboke ya nyamankɛkɛ elimboli nini? (b) Oyoki ndenge nini nsima ya kotánga Yoele 2:7, 8?
12 Kasi, ndenge nini osakolaka nsango yango ya lolenge mibale? Mosakoli Yoele akokanisaki mosala ya basaleli ya Nzambe na malɔzi ndenge na ndenge ya nyamankɛkɛ, ata mpe mayoyo. (Yoele 1:4) Kasi, mpo na nini tolobi ete basaleli ya Yehova bazali lokola, maboke ya nyamankɛkɛ? Mpamba te, ndenge Yoele 2:11 emonisi yango, Nzambe akokanisi banyama yango na “limpinga ya basoda na ye.” (Mokanda ya Emoniseli ekokanisi mpe basaleli ya Nzambe na mayoyo. Talá Emoniseli 9:3, 4.) Mosala ya nyamankɛkɛ oyo Yoele alobeli ezalaki lokola mɔtɔ makasi, mpe esika nyonso oyo yango ezalaki koleka, oyo ezalaki lokola “elanga ya Edene” ezalaki kokóma “esobe oyo etikali mpamba.” (Yoele 2:2, 3) Ndenge nini okoki komonisa ete okangi ntina ya esakweli ya Yoele?
13 Kanisá naino ndenge mwa banyama wana esalaka. Yoele alobeli yango boye: “Bazali kopota lokola mibali ya nguya. Bazali komata na efelo lokola mibali ya etumba. Mpe bazali kokende moto na moto na banzela na ye, mpe bazali kotika banzela na bango te. Mpe bazali kotindikana te. Bazali se kokende ndenge mobali makasi atambolaka; mpe soki bamosusu bakwei mpo bibundeli ya kobwakela ezwi bango, bamosusu bazali kotɛlɛma te.” (Yoele 2:7, 8) “Efelo” moko te ya botɛmɛli ekoki kolɛmbisa bango mpe bolɔzi oyo bazali kobimisa. Ata soki “bamosusu bakwei mpo bibundeli ya kobwakela ezwi bango,” ndenge esalemaki mpo na bakristo ya sembo oyo babomamaki na banguna oyo bazalaki konyokola bango mpenza, bamosusu bakobaki mosala, bazalaki kokokisa mokumba oyo Yehova apesaki bango. Ozali na ekateli ya kokangama na mokumba ya kosakola mokolo ya Yehova tii ntango Nzambe akomona ete ekoki? Ekoki kutu kozala ete ozali kosala mosala na esika ya bakristo mosusu ya sembo oyo bakufá.
14. Ndenge nini okoki kosala malamumalamu mosala ya kosakola?
14 Sekele ezali: kosala malamumalamu. Ndenge nini okoki kopesa mabɔkɔ mpo mosala ya kosakola esalema malamumalamu ndenge esakweli ya Yoele emonisi yango? Soki ozali kosakola ndako na ndako mpe kozongela bato oyo basepelaki. Mpe soki ozali kozongela bato oyo bazalaki na ndako te. Na ndenge yango okomonisa ete okangi ntina ya esakweli yango. Mpe ntango ozali kopesa litatoli na nzela, okoki kokutana na baoyo ozalaka na likoki ya kokutana na bango te. Likanisi mosusu yango oyo: Okoki koluka kosalisa bato ya kartye na bino oyo bautá na mikili mosusu.b Otyaka likebi na mabaku wana nyonso, mpo na kosala mosala ya kosakola malamumalamu lelo oyo?
NINI EKOMONISA ETE OLONGI?
15. Tokoki kosimba nini na ndenge bato bayambaki bansango ya basakoli 12?
15 Ndenge nini bato bayambaka nsango oyo etali mokolo ya nsɔmɔ ya Yehova? Osengeli kokamwa te soki okutani na botɛmɛli to bato bazali kosepela te na nsango. Ezalaki mpe bongo mpo na basakoli mingi ya Nzambe, oyo mingi kati na bango basengelaki koyebisa nsango ya makebisi ya makasi. (Yirimia 1:17-19; 7:27; 29:19) Atako bongo, basakoli mosusu bazwaki matomba malamu! Tokoki kotánga basakoli soki mitano—Yona, Mika, Sefania, Hagai, mpe Zekaria—bazalaki na likoki ya kosimba mitema ya bato mosusu mpo bábongola mitema mpo na masumu na bango ya kala mpe bábongola etamboli na bango.
16. Mbuma nini milende ya mosakoli Mika ebotaki?
16 Ekoki kozala ete mosala ya mosakoli Sefania nde etindaki mokonzi Yosiya abanda mosala ya kozongisa losambo ya pɛto. Mika asakolaki na mpiko nsango ya bitumbu oyo esengelaki kokómela bakonzi ya Yuda mpe misala ya Mokonzi Hizikiya eyokanaki na maloba ya Mika. (Mika 3:1-3) Likambo ya esengo, mikóló mosusu na mikolo ya Yirimia balobelaki ndakisa malamu ya Hizikiya ntango balobaki ete mokonzi “abangaki Yehova mpe akitisaki motema na ye.” (Yirimia 26:18, 19; 2 Bakonzi 18:1-4) Na litambwisi ya Hizikiya, bato ya Yuda mpe baoyo ya bokonzi ya nɔrdi oyo basepelaki, basalaki elekeli mpe fɛti ya bagato ezangá levire mpe kutu fɛti yango ezwaki lisusu pɔsɔ mobimba. Matomba nini bazwaki lokola bazongelaki losambo ya solo? “Esengo monene ezalaki na Yerusaleme.” (2 Ntango 30:23-26) Mika abandaki kosakola nsango ya mawa na ekólo oyo epɛngwaki na bokonzi ya Ahaze. Kasi, mosakoli yango amonaki mbuma malamu ya milende na ye ntango Hizikiya, mwana ya Ahaze andimaki nsango na ye.
17. Hagai ná Zekaria balongaki kokokisa mosala nini?
17 Tótalela mpe ndakisa ya mosakoli Hagai mpe Zekaria. Basakwelaki Bayuda oyo bazongaki na mboka na bango, oyo bakómaki malilimalili mpe kotya likebi kaka na makambo na bango moko. (Hagai 1:1, 2; Zekaria 1:1-3) Ntango basakoli yango mibale babandaki mosala na bango, mbula 16 elekaki banda moboko ya tempelo etyamaki. Bato bazalaki “kopota mbangu, moto na moto na ndako na ye moko” wana ndako ya Yehova ‘etikalaki mpamba.’ Hagai asɛngaki Bayuda boye: “Bino nyonso bato ya mboka oyo, ‘bózala makasi mpe bósala mosala,’ yango nde liloba ya Yehova.” Nini esalemaki na nsima? Yehova “alamwisaki elimo” ya guvɛrnɛrɛ Zerubabele, nganga-nzambe monene, Yosua, mpe “batikali nyonso kati na bato.” Mpo na yango, balongaki kosilisa mosala ya tempelo.—Hagai 1:9, 12, 14; 2:4.
18, 19. (a) Ndenge nini bato na mikili mosusu bazali koyamba nsango ya mokolo ya Yehova? (b) Ndenge nini okoki kopesa mabɔkɔ na likambo ya kosakola nsango ya makebisi epai ya bato nyonso?
18 Mingi kati na basakoli 12, basakolaki bansango na ekólo oyo esilaki komipesa na Yehova. Ekoki kozala ete tosakolaka epai ya bato oyo bayoká naino makambo ya Nzambe ya solo te, kasi tokoki kozwa liteya na matomba oyo basakoli yango bazwaki na mosala na bango. Lelo oyo mpe, na bateritware mingi, bato bazali kondima nsango ya ntina mingi oyo etali mokolo ya Yehova. Tozali komona matomba lokola oyo Zekaria asakolaki ete: “Bikólo mingi bakokangana na Yehova na mokolo yango, mpe bakokóma mpenza bato na ngai; mpe nakofanda epai na yo.” (Zekaria 2:11) Lelo, “bikólo mingi” ezali mpenza kondima nsango oyo basaleli ya Nzambe bazali komemela bango. (Emoniseli 7:9) Zekaria asakolaki ete: “Bato ya bikólo mingi mpe bikólo ya nguya bakoya mpenza koluka Yehova ya mampinga na Yerusaleme mpe kokitisa Yehova motema.” Balobelami lokola “bato zomi ya minɔkɔ nyonso ya bikólo” oyo basengelaki kosimba elamba ya Moyisraele moko ya elimo mpe koloba ete: “Tokokende na bino, mpo toyoki ete Nzambe azali na bino.”—Zekaria 8:20-23.
19 Simbá ete balobeli “minɔkɔ nyonso ya bikólo.” Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia ezali kobongolama na minɔkɔ mingi, mpe Batatoli ya Yehova bazali kopesa basakoli formasyo mpo na koteya bato ya “minɔkɔ nyonso ya bikólo.” (Matai 28:19, 20; Misala 1:8) Ekoki kozala ete oyekolá monɔkɔ mosusu mpo na kosalisa bato ya teritware na bino oyo balobaka monɔkɔ yango. Mpe mingi bandimaki koyekola monɔkɔ moko to mibale mpe kokende na mikili epai bato mingi bazali kondima nsango malamu. Yo mpe okoki kokende na bateritware wana oyo ezali kobota mbuma mpe ‘kosakola yango na kati ya bikólo’? Bondelá mpo na likambo yango. Soki ozali na libota, bokoki kosololaka likambo yango mbala na mbala na libota, koyebisa bana na yo mokano yango wana bazali kokola.
20. Na likambo etali bato ya Ninive, Yehova abendi likebi na ezaleli nini?
20 Mosakoli mosusu oyo bato bandimaki mpe nsango na ye atako emonanaki lokola nde bakondima te, ezali Yona. Bato ya Ninive, ata mpe mokonzi na bango bandimaki nsango ya Yona mpe bamonisaki kondima epai ya Yehova. Nzambe ye moko atunaki boye: “Nasengeli nde koyokela Ninive engumba oyo monene mawa te, engumba oyo ezali na bato koleka nkóto nkama moko na ntuku mibale (120 000) oyo bayebi ata moke te kokesenisa lobɔkɔ na bango ya mobali ná lobɔkɔ na bango ya mwasi?” (Yona 4:11) Kanisá maloba wana mpe luká koyeba likambo oyo etindaka yo osakwela basusu nsango ya mokolo ya nsɔmɔ ya Yehova. Oyokaka ete ozali na nyongo ya Yehova ndenge asaleli lisiko mpo na kobikisa yo? Oyokaka ete ozali na mokumba lokola ozali mosaleli ya Yehova oyo omipesá na ye? (1 Bakorinti 9:16, 17) Wana mpenza bantina oyo ekoki kotinda moto asakola mokolo ya Yehova. Lisusu, ‘oyokaka mawa’ mpo na bato oyo osakwelaka bango mokolo ya Yehova? Oyo nde esengo okozala na yango soki motema mawa lokola oyo ya Yehova ezali kotinda yo oyebisa bato mpo na mokolo yango!
21. Liteya nini okoki kozwa na ndakisa ya Amose na ndenge oyo asalaki liboso ya botɛmɛli ya Amazia?
21 Toyebi makambo mingi te na ndenge oyo bato bayambaki nsango ya Yoele, Obadia, Nahumu, Habakuku, mpe Malaki. Kasi, toyebi mwa moke ndenge oyo bato bayambaki nsango ya Amose. Amazia atɛmɛlaki Amose makasi, afundaki ye ete azali koyanga mwango mabe mpo na mokonzi mpe alukaki kopekisa Amose ete asakola te na Betele. (Amose 7:10-13) Na mpiko nyonso, Amose alongaki botɛmɛli wana. Lelo oyo mpe, bato ya mangomba bakoki kotinda bakonzi mosusu ya politiki bányokola basaleli ya Yehova to mpe kopekisa mosala na bango ya ntina mingi ya kosakola. Okomekola Amose, okosakola nsango malamu na mpiko nyonso atako botɛmɛli ezali?
22. Mpo na nini okoki koloba ete mosala ya kosakola ezali kobota mbuma na teritware na bino?
22 Atako bato bayambaki ndenge moko te nsango ya basakoli 12, bango nyonso bakokisaki mokumba na bango. Likambo eleki ntina ezali te ete bato báyamba nsango ya lolenge mibale oyo tozali komema, kasi nde oyo tomemaka epai ya Yehova “bana-ngɔmbɛ ya mibali ya mbɛbu na biso,” elingi koloba “mbeka ya masanzoli” oyo eleki kitoko. (Hosea 14:2; Baebre 13:15) Mpe na nsima totikaka makambo nyonso na mabɔkɔ ya Nzambe. Akobenda baoyo bazali mpenza bampate. (Yoane 6:44) Lisusu, okoki kolonga kosakola nsango ya Nzambe ata soki bato bazali koyamba yango to koboya. Tokoki mpenza kozala na elikya ete “makolo ya moto oyo azali koya na nsango malamu, moto oyo azali kosakola kimya,” ezali kitoko na miso ya baoyo bandimaka nsango malamu yango. Kasi, likambo oyo eleki nyonso ezali ete makolo yango ezali kitoko na miso ya Yehova. (Nahumu 1:15; Yisaya 52:7) Lokola mokolo ya Yehova ezali kokóma se pene, zalá na ekateli ya kokoba kosala oyo Yoele asakolaki mpo na mikolo na biso: “Bósakola likambo oyo na bikólo: ‘Bósantisa etumba! Bólamwisa bato ya nguya!’” Yango elingi koloba etumba ya Nzambe mpo na bikólo.—Yoele 3:9.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ekoki kozala ete esakweli oyo ekokisamaki mpo na mbala ya liboso na eleko ya Bamakabe, ntango Bayuda oyo batambwisamaki na Bamakabe babenganaki banguna na bango na Yuda mpe bafungolaki lisusu tempelo. Yango epesaki nzela na Bayuda oyo batikalaki báyamba Masiya ntango ayaki.—Danyele 9:25; Luka 3:15-22.
b Mwa buku Une bonne nouvelle pour des gens de toutes nations, ebimisami na Batatoli ya Yehova, esalisaka mpenza bato oyo balobaka te monɔkɔ oyo elobamaka mingi na esika ozali.
OKANGI NTINA NA YANGO?
• Ndenge nini okoki kopesa ‘bana-ngɔmbɛ ya mibali ya mbɛbu na yo’ lelo oyo?—2 Bakonzi 20:3; Malaki 1:11.
• Wapi nsango ya lolenge mibale oyo ozali kosakola?—Yisaya 61:2; Mika 5:7, 8.
• Mpo na nini osengeli kozala na mpiko lokola nkɔsi mpo na kosakola mokolo ya Yehova?—Yirimia 1:19; Yoele 3:9-12.
OKOPESA EYANO NINI?
• Liteya nini okoki kozwa na ndenge bakokanisi basaleli ya Nzambe na maboke ya nyamankɛkɛ?—Yoele 1:4; 2:3; Misala 20:24.
• Ndenge nini okoki komonisa ete oyebi ntina ya kosala malamumalamu mosala ya kosakola?—Amose 7:14, 15; Mika 1:1-4; Misala 10:42.
• Mpo na nini okoki kozala na elikya ete na miso ya Nzambe mosala na yo ya kosakola mokolo ya Yehova ezali kobota mbuma?—Malaki 3:10.
[Elilingi na lokasa 165]
Okosala nini soki oyoki nkɔsi ezali koganga?
[Elilingi na lokasa 166, mpe 167]
Banda na ebandeli ya ekeke ya 20 tii na mikolo na biso, basaleli ya Nzambe bazali “kosakola”
[Elilingi na lokasa 169]
Osakolaka mokolo ya Yehova na mpiko?
[Bililingi na lokasa 172, mpe 173]
Okoki kozwa matomba na mosala na yo ya kosakola ata soki bato bandimi to baboyi nsango yango