Nani akobika na mokolo ya Yehova?
“Mokolo ezali koya, ezali kozika lokola mɔ́tɔ makasi.”—MALAKI 4:1.
1. Ndenge nini Malaki alobeli nsuka ya ebongiseli mabe ya ntango oyo?
MOSAKOLI Malaki apemamaki na Nzambe mpo na kokoma bisakweli ya makambo ya nsɔmɔ oyo etikali moke esalema. Makambo yango ekoyela bato nyonso awa na mabele. Malaki 4:1 elobi boye: “Talá, mokolo ezali koya, ezali kozika lokola mɔ́tɔ makasi; mpe bato nyonso ya lolendo mpe basali ya mabe bakozala lokola mpumbulu. Mokolo oyo ekoya ekozikisa bango kino ekotika etape to mosisa epai na bango te. [Yehova] na bibele alobi bongo.” Kobomama ya ebongiseli mabe ya ntango oyo ekozala ndenge nini? Ekozala lokola nzete oyo bakati misisa na yango nyonso mpe ekoki kokola lisusu te.
2. Ndenge nini bavɛrsɛ mosusu elobeli mokolo ya Yehova?
2 Okoki komituna ete: ‘ “Mokolo” nini oyo mosakoli Malaki azali kolobela?’ Mokolo yango ezali kaka oyo Yisaya 13:9 elobeli ete: “Talá mokolo ya [Yehova] ezali koya na motema makasi na nkanda mpe na nkɛlɛ; kokómisa mokili mpamba mpe kobebisa kati na yango bato ya masumu na yango.” Sefania 1:15 emonisi ndenge mokolo yango ekozala, ete: “Mokolo yango ezali mokolo ya nkanda, mokolo ya mpasi mpe mikakatano; mokolo ya mobulu mpe libebi, mokolo ya molili mpe ya kozanga pole; mokolo ya mapata mpe molili tuu.”
‘Bolɔzi monene’
3. “Mokolo ya Yehova” ezali nini?
3 Na kokokisama monene ya esakweli ya Malaki, “mokolo ya Yehova” ezali eleko oyo ekozala na “bolɔzi monene.” Yesu alobaki ete: “Na ntango wana ekozala na bolɔzi moko monene oyo esalemá naino boye te banda na ebandeli ya mokili tii sikoyo, ɛɛ ekosalema lisusu mpe te.” (Matai 24:21, NW) Kanisá naino mpasi oyo bato bamoni, mingimingi banda 1914. (Matai 24:7-12) Soki tokamati kaka Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, yango moko ebomaki bato koleka milio 50! Nzokande, makambo oyo ekosalama na ntango ya ‘bolɔzi monene’ ekoleka mpenza bampasi nyonso wana. Bolɔzi monene yango, eleko oyo ekokani na mokolo ya Yehova, ekosuka na Armagedon, na ntango wana nde mikolo ya nsuka ya ebongiseli ya mabe oyo ekokóma na nsuka na yango.—2 Timote 3:1-5, 13; Emoniseli 7:14; 16:14, 16.
4. Na nsuka ya mokolo ya Yehova, makambo nini ekosalema?
4 Na nsuka ya mokolo ya Yehova, mokili ya Satana mpe bato oyo bazali mpo na yango bakosila nyɛɛ. Libosoliboso, mangomba nyonso ya lokuta nde ekokufa. Na nsima, Yehova akoboma ebongiseli ya makambo ya politiki mpe ebongiseli ya makambo ya mombongo oyo Satana nde azali kotambwisa yango. (Emoniseli 17:12-14; 19:17, 18) Ezekiele asakoli boye: “Bakobwaka palata na bango na nzela, mpe wolo na bango ekozala lokola eloko ya mbindo, palata mpe wolo na bango ekokoka kosikola bango te na mokolo ya nkɛlɛ ya [Yehova].” (Ezekiele 7:19) Mpo na mokolo yango, Sefania 1:14 elobi boye: “Mokolo monene ya [Yehova] ebɛlɛmi; ebɛlɛmi, eyei mbango mpenza.” Na kotalela makambo oyo Biblia elobi na ntina na mokolo ya Yehova, biso tosengeli mpenza kozala na mokano ya kokokisa masɛngami ya sembo ya Nzambe.
5. Bato oyo babangaka nkombo ya Yehova bazali kosepela na makambo nini?
5 Nsima ya kosakola makambo oyo ekokómela mokili ya Satana na mokolo ya Yehova, Malaki 4:2 eyebisi maloba ya Yehova ete: “Mpo na bino, bato baoyo bokotosaka nkombo na ngai, moi ya boyengebene ekobimela bino na kobikisa kati na mapapu na yango, bokokima wana bokopumbwapumbwa lokola bana ya ngɔmbɛ [ya mafutamafuta, NW].” “Moi ya boyengebene” ezali nde Yesu Klisto. Ye azali “pole ya mokili” na elimo. (Yoane 8:12, NW) Yesu azali kongɛnga na ndenge azali kobikisa bato; azali kobikisa bango libosoliboso na elimo, mpe tozali komona yango mikolo oyo; na nsima, akobikisa bango na bampasi nyonso ya nzoto, na mokili ya sika. Lokola Yehova alobi yango, bato oyo bakobikisama ‘bakokima mpe bakopumbwapumbwa lokola bana ya ngɔmbɛ ya mafutamafuta’ oyo batondi na esengo mpe bazali kosepela mpo babimi na lopango oyo bakangaki bango.
6. Basaleli ya Yehova bakosala fɛti mpo na kosepela likambo nini?
6 Makambo nini ekoyela baoyo bazali kokokisa masɛngami ya Yehova te? Malaki 4:3 elobi boye: “Bokonyatela bato mabe na nse mpo ete bakozala mputulu na nse ya makolo na bino na mokolo mozali ngai kobongisa. [Yehova] na bibele alobi bongo.” Bato oyo basambelaka Nzambe bakokɔta na bitumba te mpo na koboma mokili ya Satana. Kasi, na maloba ya elilingi, “bakonyatela bato mabe na nse” na ndenge bakosepela na bolongi oyo ekozala nsima ya mokolo ya Yehova. Esengo monene ezalaki nsima ya kobomama ya basoda ya Falo na Mai Motane. (Exode 15:1-21) Fɛti ya kolonga ekosalema mpe nsima ya kolongolama ya Satana na mokili na ye. Bato ya sembo oyo bakobika na mokolo ya Yehova bakoganga na esengo ete: “Tósepela mpe tóyoka esengo na lobiko na ye.” (Yisaya 25:9) Ekozala mpenza esengo ntango ntembe nyonso na likambo etali lotomo ya Yehova ya koyangela ekosila mpe ntango mabele oyo ekosukwama mpo ekóma esika oyo bato bakofanda na kimya!
Mangomba ya boklisto elandi nzela ya Yisalaele
7, 8. Bato ya Yisalaele bazalaki ndenge nini na elimo na ntango ya Malaki?
7 Yehova azali kosepela na bato oyo bazali kosalela ye, kasi azali koboya baoyo bazali kosala yango te. Makambo ezalaki se ndenge yango ntango Malaki akomaki mokanda na ye. Na mobu 537 L.T.B., bato ya Yisalaele oyo batikalaki bazongaki na mboka na bango nsima ya kolekisa mbula 70 na boombo na Babilone. Kasi, na boumeli ya mbula nkama oyo elandaki, libota yango oyo ezongisamaki na mboka na yango ebandaki lisusu kopɛngwa mpe kosala mabe. Bato mingi ya ekólo yango bazalaki kobebisa lokumu ya nkombo ya Yehova; bazalaki kotosa te mibeko na ye ya sembo; bazalaki kokómisa tempelo na ye mbindo na ndenge bazalaki komema banyama oyo ekufá miso, ebukaná makolo, mpe oyo ezalaki na maladi mpo na kopesa yango lokola mbeka; mpe bazalaki koboma mabala na basi oyo babalaki ntango bazalaki bilenge.
8 Yango wana, Yehova ayebisaki bango boye: “Nakopusana pene na bino na lisambisi, mpe nakozala motatoli ya mbangumbangu mpo na kokweisa bandoki, mpe kokweisa bato ya ekobo, mpe kokweisa bato oyo balapaka ndai ya lokuta, mpe kokweisa bato oyo bazali kolya na mayele lifuti ya moto ya mosala, kolyela na mayele mwasi oyo akufelá mobali mpe mwana mobali oyo akufelá tata, mpe bato oyo babenganaka mopaya, wana bazali kobanga ngai te, . . . mpamba te ngai nazali Yehova, nabongwani te.” (Malaki 3:5, 6, NW) Atako bongo, Yehova alobaki na bato nyonso oyo bakolinga kotika bizaleli na bango wana ya mabe ete: “Bózonga epai ngai mpe ngai nakozonga epai na bino.”—Malaki 3:7, NW.
9. Ndenge nini bisakweli ya Malaki ekokisamaki liboso?
9 Maloba wana ekokisamaki mpe na ekeke ya liboso na ntango na biso (T.B.) Ndambo ya Bayuda oyo batikalaki basalelaki Yehova mpe bakɔtaki na “libota” ya sika ya baklisto oyo bapakolami na elimo, mpe na nsima bato mosusu oyo bazalaki Bayuda te bakɔtaki mpe na libota yango. Nzokande, bato mingi ya Yisalaele baboyaki Yesu. Yango wana Yesu alobaki na libota ya Yisalaele ete: “Talá, ndako na bino etikali mpamba.” (Matai 23:38; 1 Bakolinti 16:22) Na mobu 70 T.B., lokola Malaki 4:1 esakolaki yango, “mokolo . . . oyo ezali kozika lokola mɔ́tɔ makasi” eyelaki libota ya Yisalaele. Basoda ya Loma babebisaki Yelusaleme mpe tempelo na yango, mpe bato koleka milio moko bakufaki mpo na nzala, mpo na matata ya koluka kozwa bokonzi, mpe mpo na bitumba na basoda ya Loma. Kasi, baoyo bazalaki kosalela Yehova babikaki na bolɔzi wana.—Malako 13:14-20.
10. Na likambo nini ebele ya bato mpe bakonzi ya mangomba bazali kolanda ndakisa ya Bayisalaele ya ekeke ya liboso?
10 Bato ebele, mingimingi bandimi ya mangomba ya boklisto, balandi nzela ya libota ya Yisalaele ya ekeke ya liboso. Bakonzi ya mangomba ya boklisto mpe bandimi na bango balingi mateya na bango moko na esika bálanda mateya ya solo ya Nzambe oyo Yesu ateyaki. Bakonzi ya mangomba bazali mpenza na ngambo. Bazali koboya kosalela nkombo ya Yehova; kutu, bazali kotya yango te na Babiblia oyo bazali kobongola. Bazali kobebisa lokumu ya Yehova na mateya na bango oyo euti na Makomami te, mateya lokola: bato mabe bakendaka konyokwama na lifelo ya mɔ́tɔ mpo na libela; liteya ya Bosato, molimo ekufaka te; biloko ya mokili ebimá yango moko kasi bakelá yango kokela te; nyonso wana ezali mateya ya bapakano. Mateya yango ezali kobebisa lokumu oyo ebongi na Yehova, ndenge banganga ya ntango ya Malaki bazalaki kosala.
11. Na ndenge nini mangomba ya mokili emonisaki moto oyo bango basalelaka?
11 Na 1914, ntango mikolo ya nsuka ebandaki, mangomba yango ya mokili, mingimingi mpenza mangomba oyo etutaka ntolo ete endimelaka Klisto, emonisaki mpenza soki esalelaka nani. Na Etumba ya Liboso mpe na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bazalaki kotinda bandimi na bango ete bákende kobunda mpo na matata kati na bikólo, atako yango esɛngaki koboma bato oyo bazali na bango lingomba moko. Liloba ya Nzambe ezali komonisa polele banani oyo batosaka Yehova mpe banani oyo batosaka ye te: “Bana ya Nzambe na bana ya Zabolo bayebanaka na likambo oyo: Moto nyonso oyo azalaka na momeseno ya kosala boyengebene te auti na Nzambe te, ndenge moko mpe moto oyo azali kolinga ndeko na ye te. Mpo oyo ezali nsango boyokaki banda na ebandeli, ete tólinganaka; lokola Kaina te, oyo autaki na moto mabe mpe abomaki ndeko na ye.”—1 Yoane 3:10-12, NW.
Bazali kokokisa bisakweli
12, 13. Basaleli ya Nzambe na ntango na biso bakokisi bisakweli nini?
12 Na nsuka ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, na 1918, basaleli ya Yehova bamonaki polele ete Nzambe akatelaki mangomba ya boklisto mpe mangomba mosusu nyonso ya lokuta etumbu. Banda ntango wana, mongongo moko ezalaki kobelela bato ya mitema sembo ete: “Bino bato na ngai bóbima na ye, ete bósangana na masumu na ye te, ete bózwa moko na malɔzi na ye mpe te. Mpo ete libondo ya masumu na ye likómi kino na likoló, mpe Nzambe asili kokanisa misala mabe na ye.” (Emoniseli 18:4, 5) Bato nyonso oyo balingaki mpenza kosalela Yehova babandaki kopɛtolama na makambo nyonso ya mangomba ya lokuta mpe, na mokili mobimba, bakómaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi oyo Nzambe asali; mosala oyo esengeli kosalama liboso ete ebongiseli oyo ya makambo mabe ebomama.—Matai 24:14.
13 Yango esalemaki mpo na kokokisa esakweli ya Malaki 4:5, epai Yehova alobaki ete: “Talá, ngai nakotindela bino mosakoli Eliya liboso ya koya ya mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya [Yehova].” Esakweli wana ekokisamaki mpo na mbala ya liboso na mosala oyo Yoane Mobatisi asalaki; ye nde azalaki elilingi ya Eliya. Yoane asalaki mosala oyo ekokanaki na oyo ya Eliya na ndenge abatisaki Bayuda oyo babongolaki mitema mpe batikaki kobuka kondimana ya Mibeko. Kasi likambo oyo eleki ntina ezali ete Yoane abongiselaki Masiya nzela. Kasi mosala wana ya Yoane ezalaki kokokisama ya liboso ya esakweli yango ya Malaki. Ntango Yesu amonisaki ete Yoane nde azali Eliya ya mibale, amonisaki mpe ete mosala mosusu ya “Eliya” esengelaki kosalema na mikolo oyo ezalaki liboso.—Matai 17:11, 12.
14. Mosala nini ya ntina mingi esengeli kosalema liboso ete mokili oyo ebomama?
14 Esakweli ya Malaki emonisaki ete mosala monene yango ya Eliya ekosalema liboso ete “mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya [Yehova]” eya. Mokolo yango ekosuka na Armagedon, etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, oyo ezali koya nokinoki. Yango elingi koloba ete mosala moko oyo ekokani na mosala ya Eliya esengeli kosalama liboso ete ebongiseli ya makambo mabe oyo esuka mpe liboso ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Bokonzi ya Nzambe oyo ezali na likoló mpe oyo Yesu Klisto azali kotambwisa. Ndenge esakweli yango elobaki, liboso Yehova aboma ebongiseli mabe oyo, etuluku ya bato oyo bazali lelo oyo kosala mosala ya Eliya, elongo na ebele ya baninga na bango baklisto oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele, bazali kosala na esengo mosala ya kozongisa losambo ya pɛto, bazali kokumisa nkombo ya Yehova, mpe koteya mateya ya solo ya Biblia epai ya bato oyo bakokani na bampate.
Yehova apambolaka basaleli na ye
15. Ndenge nini Yehova akanisaka basaleli na ye?
15 Yehova apambolaka bato oyo bazali kosalela ye. Malaki 3:16 elobi boye: “Bongo, baoyo batosaki [Yehova] balobanaki moto na moninga na ye mpe [Yehova] ayokamelaki bango, ɛɛ ayokaki bango. Mpe mokanda ya kokanisa ekomamaki liboso na ye mpo na baoyo bazalaki kotosa [Yehova] mpe kobanga nkombo na ye.” Banda ntango ya Abele tii lelo, na maloba ya elilingi, Nzambe azali kokoma na kati ya mokanda moko bankombo ya bato nyonso oyo ye akokanisa bango mpo na kopesa bango bomoi ya seko. Yehova alobi na bato yango ete: “Bóyeisa likabo mobimba ya zomi kati na ndako ya ebombelo ete bilei bizala na ndako na ngai . . . Meká ngai . . . na [likambo] yango, soko nakozipwela bino maninisa ya lola te kosopela bino lipamboli kino esika ekozanga mpo na yango.”—Malaki 3:10.
16, 17. Ndenge nini Yehova apamboli basaleli na ye mpe mosala na bango?
16 Ya solo, Yehova apamboli basaleli na ye. Na ndenge nini? Ya liboso, asalisi bango báyeba mikano na ye malamu koleka liboso. (Masese 4:18; Danyele 12:10) Lisusu, asalisi bango bábota mbuma mingi na mosala na bango ya kosakola. Ebele ya bato ya motema sembo bayei kosangana na bango na losambo ya solo, mpe bango nyonso bazali “ebele monene, . . . bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bibolo nyonso, na minɔkɔ nyonso. . . . Bagangi na mongongo makasi ete, Lobiko na [biso euti na, NW] Nzambe na biso oyo afandi na kiti ya bokonzi, mpe na Mwana ya Mpate!” (Emoniseli 7:9, 10) Ebele yango ya bato bamonani na ndenge ya kokamwa, mpe lelo oyo, basambeli ya Yehova baleki milio motoba kati na masangá koleka 93 000 na mokili mobimba!
17 Lipamboli ya Yehova ezali mpe komonana na boye ete, banda mokili ebandá, Batatoli ya Yehova nde bazali kokabola mikanda mingi koleka oyo elimbolaka Biblia. Lelo oyo, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! milio 90 ezali kobima sanza na sanza; Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali kobima na minɔkɔ 144, Lamuká! na minɔkɔ 87. Buku mpo na koyekola Biblia Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko, oyo ebimaki na 1968, ekabolamaki bamilio koleka 107 na minɔkɔ 117. Buku Okoki kozala na bomoi ya seko na kati ya mabele oyo ekobongwana paradis, oyo ebimaki na 1982, ekabolamaki bamilio koleka 81, na minɔkɔ 131. Buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, oyo ebimaki na 1995, ekómi tii sikoyo na bamilio koleka 85, na minɔkɔ 154. Mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? ebimaki na 1996; tii sikoyo mwa buku milio 150 ekabolami na minɔkɔ 244.
18. Mpo na nini tozali na bomɛngo ya elimo atako botɛmɛli ezali?
18 Basaleli ya Nzambe bazwi bomɛngo wana ya elimo atako mokili ya Satana ezali kotika te konyokola bango. Yango ezali komonisa ete Yisaya 54:17 elobaki solo ete: “Ebundeli na ebundeli oyo esalami mpo na kotɛmɛla yo ekolonga te, mpe okozalisa lolemo na lolemo nyɛɛ oyo ekotɛmɛla yo na kosambisama. Oyo ezali libula ya baombo na [Yehova] mpe boyengebene ya baoyo ekouta na ngai. [Yehova] alobi bongo.” Basaleli ya Yehova bazali mpenza kobɔndisama na koyeba ete kokokisama monene ya Malaki 3:17 ezali kosalema epai na bango: “[Yehova] ya bibele alobi ete, Bakozala [bato] na ngai, ɛɛ eloko ya motuya na mokolo yango ekobongisa ngai.”
Bazali kosalela Yehova na esengo
19. Na makambo nini basaleli ya Yehova bakeseni na bato oyo bazali kosalela ye te?
19 Ndenge mikolo ezali koleka, bokeseni oyo ezali kati na bato oyo bazali kosalela Yehova na bosembo mpe bato oyo bazali na mokili ya Satana ezali se komonana polele. Malaki 3:18 (NW) esakolaki ete: “Ya solo, bokomona lisusu bokeseni oyo ezali na kati ya moyengebene mpe moto mabe, na kati ya moto oyo asalelaka Nzambe mpe moto oyo asaleli ye te.” Makambo mingi ekesenisi bato oyo bazali kosalela Yehova, moko na yango ezali ete basalelaka ye na esengo mingi. Bazali na esengo yango mpo na bantina mingi, na ndakisa, elikya kitoko oyo bazali na yango. Bazali kotya motema mobimba epai na Yehova ntango azali koloba ete: “Talá, nazali [kokela] lola ya sika mpe mokili ya sika; mpe makambo ya liboso makokanisama te, makoya mpe na motema te. Kasi bósepela mpe bóyoka esengo libela na yango ezali ngai [kokela].”—Yisaya 65:17, 18; Nzembo 37:10, 11, 29; Emoniseli 21:4, 5.
20. Mpo na nini tozali bato ya esengo?
20 Tozali kondima elaka ya Yehova ete basaleli na ye ya sembo bakobika na mokolo na ye monene mpe bakokɔta na mokili ya sika. (Sefania 2:3; Emoniseli 7:13, 14) Mpe ata soki liboso ya mokolo yango, bamosusu bakufi mpo bakómi mibange, to mpo na maladi, to na likama, Yehova alaki ete akosekwisa bango mpo bázwa bomoi ya seko. (Yoane 5:28, 29; Tito 1:2) Yango wana, atako biso nyonso tozali kobunda na mikakatano mpe na bampasi; lokola mokolo ya Yehova ezali kokóma pene, tozali na bantina ebele ya kozala bato oyo baleki na esengo na mokili mobimba.
Okopesa eyano nini?
• “Mokolo ya Yehova” ezali nini?
• Ndenge nini mangomba ya mokili ezali kolanda ndakisa ya Yisalaele ya kala?
• Basaleli ya Yehova bazali kokokisa bisakweli nini?
• Ndenge nini Yehova apamboli basaleli na ye?
[Elilingi na lokasa 21]
Na ekeke ya liboso Yelusaleme ‘ezikaki lokola mɔ́tɔ makasi’
[Bililingi na lokasa 23]
Yehova akokisaka bamposa ya basaleli na ye
[Bililingi na lokasa 24]
Basaleli ya Yehova bazali mpenza na esengo mpo bazali na elikya kitoko