Mokolo oyo ‘ezali kopela lokola fúlu ya mɔ́tɔ’
“Talá, mokolo ezali koya, ezali kopela lokola fúlu ya mɔ́tɔ.”—MALAKI 4:1, NW.
1. Mituna nini mizali kotunama na boyokani na Malaki 4:1?
NA MIKOLO oyo ya nsuka, baoyo Yehova aponi kokoma nkombo na bango kati na búku na ye ya kokanisama bazali bato na esengo. Kasi ezali boni mpo na baoyo bakokisi masɛngami te mpo na yango? Bázala bakonzi to bato mpamba, nini ekokómela bango soki bazali kotyola basakoli ya Bokonzi ya Nzambe mpe nsango na bango? Malaki alobeli mokolo ya kozongisa monoko. Na mokapo 4, molɔngɔ́ 1, totángi ete: “‘Jambi tala, mokɔlɔ ejali koya, ejali [kopela lokola fúlu ya mɔtɔ, NW]; mpe bato yɔnsɔ na lolɛndɔ mpe basali na mabe bakojala lokola mpumbulu. Mokɔlɔ oyo ekoya ekojikisa bango kino ‘ekotika etape to mosisa epai na bango tɛ.’”
2. Maloba nini ya sikisiki matali bikateli ya Yehova Ezekiele apesaki yango?
2 Basakoli mosusu mpe bakokanisaki bikateli ya Yehova likoló na mabota na mɔ́tɔ oyo ezali kozikisa makasi. Na lolenge lobongi, Ezekiele 22:19-22 ekokani solo na ekateli oyo Nzambe akokweisela mangomba ya lipɛngwi ya boklisto ya nkombo mpamba! Tozali kotánga ete: “Yango wana Nkolo [Yehova] alobi boye ete, ‘Jambi bino yɔnsɔ bokomi mpamba, na bongo tala, nakoyanganisa bino . . . Lokola bato bakoyanganisa palata mpe motako mpe ebende mpe mondɔlu mpe bɛdili na kati na litumbu mpɔ na kopɛpisa mɔtɔ na yango mpɔ na konangwisa yango; boye ngai nakoyanganisa bino na nkanda na ngai mpe na nkɛlɛ na ngai, mpe nakotia bino na mɔtɔ mpe nakonangwisa bino. Nakoyanganisa bino mpe nakopɛpɛla bino mɔtɔ na nkɛlɛ na ngai mpe bokonangwa na kati na yango. Lokola palata enangwi na kati na litumbu, boye bino bokonangwa na kati na yango; mpe bokoyeba ete ngai [Yehova] nasopeli bino nkɛlɛ na ngai.’”
3, 4. (a) Likambo nini bakonzi ya mangomba bazali koloba na bokosi nyonso ete bakokokisa yango? (b) Makambo nini ya nsɔ́mɔ mangomba masili kosala?
3 Oyo nde bokokanisi ya nguya! Bakonzi ya mangomba oyo baboyaki kosalela nkombo ya Yehova, baoyo nkutu batukaki nkombo yango, bakozala na ngambo na mokolo wana ya kosambisama. Na lolendo nyonso, bazali koloba ete bango mpe baninga na bango ya politiki nde bakotya Bokonzi ya Nzambe awa na mabelé, to soki bongo te bakosala ete mabelé mázala esika oyo ebongi mpo na Bokonzi.
4 Boklisto ya nkombo mpamba oyo ezali kati na lipɛngwi esanganaki na bakonzi ya politiki kati na bitumba ya nsɔ́mɔ. Lisoló ya makambo ya kala ezali kolobela bitumba bibéngami Croisades oyo esalemaki na Moyen Âge, kobongola bato na makasi na nzela ya Inquisition oyo esalemaki na mboka Espagne, etumba ebéngami la Guerre de Trente ans oyo ebebisaki mikili ya Mpótó na ekeke ya 17, mpe etumba ya banamboka na Espagne na bambula 1930, oyo esalemaki mpo na kobatela bokonzi ya Lingomba ya Katolike na mboka Espagne. Kosopa makila oyo eleki monene esalemaki na boumeli ya Bitumba Mibale ya mokili mobimba oyo esalemaki na ekeke na biso, ntango Bakatolike mpe Baprotestá bamikɔtisaki na etumba ya bato banso, kobomáká kozanga kopona baninga na bango bandimi to bandimi ya mangomba mosusu. Kala mingi te, bitumba ya nsɔ́mɔ bisalemaki kati na Bakatolike mpe Baprotestá ya mboka Irlande, kati na bato na mangomba oyo mazali koyinana na Inde, mpe kati na bato ya mangomba na mokili oyo mobéngamaki kala ete Yougoslavie. Lisoló ya makambo ya mangomba etondi mpe na kosopa makila ya bankóto ya Batatoli ya Yehova oyo babomamaki na ntina na bosembo na bango.—Emoniseli 6:9, 10.
5. Ekateli nini ezali kozela mangomba ya lokuta?
5 Tokoki bobele komona motuya ya bosembo ya ekateli ya Yehova oyo esili kobɛlɛma likoló ya Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba, elongo na baoyo bazali kopesa yango mabɔkɔ. Ekateli wana elobelami kati na Emɔnisɛli 18:21, 24: “Mwanje mɔkɔ makasi akamati libanga lokola etuteli monɛnɛ, mpe abwaki yango na mai monɛnɛ, mpe alobi ete: ‘Bongo, Babɛlɛ, mboka monɛnɛ ekobwakama makasi, mpe ekojuama lisusu sɔkɔ mokɛ tɛ. Kati na ye makila na basakoli, na bapɛtwi majuami, na makila na bango yɔnsɔ babomamaki na mokili.’”
6. (a) Banani bakokóma lokola mpumbulu, mpe mpo na nini? (b) Elikya nini ezali mpo na baoyo bazali kobanga Yehova?
6 Nsima ya mwa ntango, bayini nyonso ya boyengebene, mpe baoyo bazali kokangama na bango, “bakojala lokola mpumbulu.” Mokolo ya Yehova mokopela kati na bango lokola fúlu ya mɔ́tɔ. “Ekotika etape to mosisa epai na bango tɛ.” Na mokolo wana ya kozongisa monɔkɔ, bana mike, to bitape, bakotalelama mpenza engebene ekateli oyo Yehova azali na yango mpo na misisa na bango, elingi koloba, baboti na bango, baoyo bazali kobatela bana yango. Baboti ya mabe bakozala na libota te oyo ekokóba kosala misala na bango ya mabe. Kasi baoyo bazali komonisa kondima na bilaka ya Bokonzi ya Nzambe bakolongolama te. Na yango, Baɛbɛlɛ 12:28, 29 elendisi ete: “Tika ete tosambela Njambe na motindo mokosepelisa ye na nsɔmɔ mpe na botosi. Mpɔ ete Njambe na biso ajali mɔtɔ mokojikisaka.”
Yehova azali Nzambe oyo abomaka?
7. Lolenge nini bolingo ya Yehova emonisami kati na bikateli na ye?
7 Yango elingi komonisa ete Yehova azali Nzambe oyo abomaka, oyo akozongisaka mabe na mabe? Soko moke te! Na 1 Yoane 4:8, ntoma ayebisi solo moko ya moboko: “Njambe ajali bolingo.” Na nsima, na molɔngɔ́ 16 alobeli yango makasi, ete: “Njambe ajali bolingo. Ye oyo akoumelaka kati na bolingo ajali koumela kati na Njambe mpe Njambe akoumelaka kati na ye.” Ezali mpo na bolingo na ye epai na bato nde Yehova akani kolongola mabe nyonso na mabelé oyo. Nzambe na biso ya bolingo mpe ya motema mawa alobi ete: “Lokola ejali ngai na bomɔi, najui esɛngɔ na liwa na moto mabe tɛ, bobɛlɛ ete moto mabe abongwa na njela na ye mpe abika; bongwa, bongwa na njela mabe na bino; jambi bino bolingi kokufa mpɔ na nini, ɛ ndako na Yisalaele?”—Ejekiele 33:11.
8. Lolenge nini Yoane alobelaki mingi bolingo, nzokande lolenge nini amimonisaki ye moko ete azali Mwana na Nkake?
8 Yoane alobeli a·gaʹpe, bolingo oyo ezali na moboko likoló na mitindá, mbala mingi koleka bakomi mosusu misato ya Baevanzile, nzokande na Malako 3:17, Yoane ye moko alobelami lokola ‘Mwana na Nkake.’ Ezalaki na nzela ya kopemama na elimo ya Yehova nde Mwana na Nkake wana akomaki nsango ya nsɔ́mɔ oyo ezali kati na Emoniseli, mokanda ya nsuka ya Biblia, oyo ezali komonisa Yehova lokola Nzambe oyo akokataka makambo na bosembo. Mokanda wana etondi na maloba matali kosambisa, lokola “ekamelo monɛnɛ na kongala na Njambe,” “mbeki nsambo na kongala na Njambe,” mpe “kongala na nkɛlɛ na Njambe Mojui-na-Nguya-Yɔnsɔ.”—Emɔnisɛli 14:19; 16:1; 19:15.
9. Maloba nini Yesu abimisaki na ntina na bikateli ya Yehova, mpe lolenge nini bisakweli na ye bikokisamaki?
9 Nkolo na biso Yesu Klisto, oyo azali “elilingi na Njambe, oyo akomɔnanaka tɛ,” asakolaki na mpiko nyonso bikateli ya Yehova na ntango azalaki awa na mabelé. (Bakɔlɔsɛ 1:15) Na ndakisa, tozali kokuta mawa nsambo na Matai mokapo 23 oyo ye asakolaki yango polele mpo na kotɛmɛla bakonzi ya mangomba bakosi ya ntango na ye. Asukisaki ekateli wana ya kokweisa na maloba oyo: “Ɛ Yelusaleme, Yelusaleme! Ye oyo ajali koboma basakoli mpe kobwaka mabanga epai na bango batindami na ye, mbala boni nalingaki koyanganisa bana na bino lokola nsoso akoyanganisa bana na ye na nse na mapapu na ye, nde bolingaki tɛ. Tala, ndako na bino etikali mpamba.” Mibu ntuku misato na nsambo na nsima, ekateli yango ekokisamaki na mampinga ya Loma oyo makambamaki na Titus, mokonzi ya basodá. Ezalaki mokolo ya nsɔ́mɔ, elilingi ya esakweli mpo na oyo ekozala mokolo moleki kobangisa kati na lisoló ya bato—mokolo ya Yehova, oyo mosika te ekobima.
“Moi” mozali kobima
10. Lolenge nini “moi na boyɛngɛbɛnɛ” ekomema esengo epai na libota ya Nzambe?
10 Yehova amonisi ete babiki bakozala na mokolo na ye. Amonisi yango na Malaki 4:2, ete: “Kasi mpɔ na bino, bato baoyo bokotosaka nkombo na ngai, moi na boyɛngɛbɛnɛ ekobimela bino na kobikisa kati na mapapu na yango.” Moi wana ya boyengebene ezali moto mosusu te, kasi Yesu Klisto ye moko. Na ndimbola ya elimo azali “pole na mokili.” (Yoane 8:12, NW) Lolenge nini azali kobima? Azali kobima na kobikisa kati na mapapu na ye—ya liboso kobikisa ya elimo, oyo tokoki kozwa yango ata na mikolo na biso, mpe na nsima, kati na mokili ya sika oyo ezali koya, kobikisama na nzoto mpo na bato ya mabota nyonso. (Matai 4:23; Emoniseli 22:1, 2) Na elobeli ya elilingi, lokola Malaki alobaki yango, bato oyo babikisami “bakobima wana bakopombwapombwa lokola bana na ngɔmbɛ” oyo babimi na lopango. Oyo nde esengo ekozala mpo na basekwi oyo bakobima na eliklya ya kokóma na ezalela ya kokoka!
11, 12. (a) Likambo nini ya nsɔ́mɔ ezali kozela bato mabe? (b) Lolenge nini basaleli ya Nzambe “bakonyata bato mabe”?
11 Nzokande, ekozala boni mpo na bato mabe? Na Malaki 4:3, tozali kotánga ete: “‘Bokonyatela bato mabe na nse mpɔ ete bakojala mputulu na nse na makolo na bino na mokɔlɔ mojali ngai kobɔngisa.’ [Yehova] na bibele alobi bongo.” Wana akobatela baoyo balingaka ye, Nzambe na biso oyo azali Mobundi, akolongola banyokoli na mabelé, kolimwisáká bango nyonso. Satana mpe bademó na ye bakosila kokangama.—Nzembo 145:20; Emoniseli 20:1-3.
12 Basaleli ya Nzambe bakosangana te na kobomama ya bato mabe. Bongo, na lolenge nini bazali “konyatela bato mabe”? Bazali kosala yango na elilingi, wana bazali kosangana na kokumisa bolóngi moko monene. Exode 15:1-21 elobeli kokumisama motindo yango. Yango esalemaki nsima ya kobomama ya Falo mpe mampinga na ye kati na Mai Motɛne. Mpo na kokokisa Yisaya 25:3-9, kolongolama ya “banyokoli” ekolandana na elambo monene ya bolóngi, elambo oyo ekangani na elaka oyo ya Nzambe, ete: “Akosilisa kufa libela mpe Nkolo [Yehova] akokɔmba mpisoli na bilongi yɔnsɔ; akolongola mpe nsɔni na bato na ye longwa na mokili mobimba, jambi [Yehova] alobi bongo. Na mokɔlɔ yango ekolobama ete, Tala oyo Njambe na biso. . . . Oyo ajali [Yehova], tolambeli ye mpe ye akobikisa biso , tika ete tosepela mpe toyoka esɛngɔ na lobiko na ye.’” Kati na esengo wana, elimo ya kozongisa mabe mpo na mabe to ya botyoli ezali te, kasi ezali nde bosepeli ya komona ete nkombo ya Yehova ebulisami mpe mabelé mobimba mapɛtolami mpo na kozala efandelo ya kimya mpo na bato oyo bazali na bomoko.
Ebongiseli monene ya koteya
13. Kolakisama nini ekopesama kati na “mabelé ya sika”?
13 Na Malaki 4:4, Bayuda balendisamaki na “kokanisa . . . Mobeko na Mose.” Na bongo lelo oyo tosengeli kolanda “Mobeko na Klisto,” lokola yango emonisami na Bagalatia 6:2. Na ntembe te, babiki na Armagedon bakopesamela malako mosusu oyo makozala na moboko likoló na mobeko wana, mpe ekoki kozala ete malako yango makokomama kati na “buku” oyo elobelami na Emɔnisɛli 20:12 oyo ekofungwama na ntango ya lisekwa. Oyo ekozala solo mokolo monene ntango basekwi bakoteyama ete bálanda lolenge ya bomoi ya “mabelé ya sika”!—Emoniseli 21:1, NW.
14, 15. (a) Lolenge nini Eliya ya ntango na biso asili koyebana? (b) Mokumba nini kelasi ya Eliya ezali kokokisa yango?
14 Yango ekozala bobele kolandana ya mosala ya kolakisa oyo Yehova azali kolobela, lokola yango ekomami na Malaki 4:5: “Tala, ngai nakotindela bino mosakoli Eliya liboso na koya na mokɔlɔ monɛnɛ mpe na nsɔmɔ na [Yehova].” Nani azali Eliya wana na ntango na biso? Lokola emonisami na Matai 16:27, 28, kolobeláká “koya na Bokonji na ye,” Yesu alobaki ete: “Ekoki na Mwana na moto ete aya na nkɛmbɔ na Tata na ye esika mɔkɔ na banje na ye mpe na ntango yango akopɛsa moto na moto libonja kobila misala na ye.” Mikolo motoba na nsima, wana azalaki likoló na ngomba elongo na Petelo, Yakobo mpe Yoane, “abongwani motindo na ye liboso na bango, mpe elongi na ye engɛngi lokola moi mpe bilamba na ye bijalaki pɛɛ lokola pole makasi.” Azalaki ye moko kati na emonaneli yango? Te, mpamba te “tala, Mose mpe Eliya bamɔnani na bango, bajalaki kolobana na ye.”—Matai 17:2, 3.
15 Yango ekokaki kolimbola nini? Ezalaki komonisa Yesu lokola Mose Monene oyo asakolamaki wana esengelaki ye koya mpo na kosambisa. (Deteronome 18:18, 19; Misala 3:19-23) Asengelaki kozala elongo na Eliya ya ntango na biso mpo na kokokisa mosala moko ya ntina mingi, oyo ya kosakola nsango malamu oyo ya Bokonzi na mabelé mobimba liboso ete mokolo monene mpe ya nsɔ́mɔ ya Yehova ebanda. Kolobeláká mosala ya “Eliya” wana, Malaki 4:6 eyebisi ete: “Akobongola mitema na batata epai na bana mpe mitema na bana epai na batata na bango ete naya mpe nabɛta mokili na ekweli mabe tɛ.” Na yango, emonani ete “Eliya” azali bongo kelasi ya moombo ya sembo mpe ya mayele ya baklisto bapakolami awa na mabelé, oyo Nkolo Yesu, asili kopesa bozwi na ye nyonso na mabɔkɔ na ye. Yango esangisi mpe kopesa na ndako na kondima “bilei [ya elimo oyo esengeli] na elaka na yango.”—Matai 24:45, 46.
16. Matomba malamu nini masili kobima na mosala na kelasi ya Eliya?
16 Lelo oyo, kati na mokili mobimba tokoki komona matomba malamu ya ebongiseli wana ya koleisama. Zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, oyo ezali konyatama na motángo ya 16100000 mpo na nimero moko moko na minɔkɔ 120, kati na yango minɔkɔ 97 mizali kobimisama nzela moko, ezali kotondisa mabelé na “nsango malamu oyo ya bokonzi.” (Matai 24:14) Mikanda misusu oyo mibimisami na minɔkɔ mingi mizali kosalelama kati na mitindo mikeseni ya mosala ya kosakola mpe ya koteya ya Batatoli ya Yehova. Kelasi ya Eliya, moombo ya sembo mpe ya mayele, azali kosɛnzɛla mpo na kopesa bilei mingi mpo na bato nyonso “baoyo bazali kososola mposa na bango ya elimo.” (Matai 5:3, NW) Lisusu, baoyo bazali kondima elikya wana ya Bokonzi mpe bazali komitambwisa engebene yango basili kokɔta kati na bomoko boleki kitoko na mokili mobimba. Yango esangisi ebele monene “oyo bauti na mabota yɔnsɔ, na mikili yɔnsɔ, na [bikólo] yɔnsɔ mpe minɔkɔ yɔnsɔ.” (Emɔnisɛli 7:9) Ntango mosala wana mokosila kokokisama na meko oyo Yehova azali kosɛnga, bongo nsuka ekoya na mokolo na ye monene mpe ya nsɔ́mɔ.
17. Ntango nini mokolo ya nsɔ́mɔ ya Yehova mokobima?
17 Mokolo wana ya nsɔ́mɔ mokokwela biso ntango nini? Ntoma Paulo ayanoli ete: “Mokɔlɔ na [Yehova] ekoya lokola moyibi kati na butu. Ekolobaka bato [mbala mosusu na motindo oyo esalemi naino te] ete, ‘kimia ejali,’ makambo majali tɛ, wana libebi ekokwela bango pwasa pelamɔkɔ mpasi ekoyela mwasi na jemi mpe njela na kokima ekojala tɛ.”—1 Batɛsalɔniki 5:2, 3.
18, 19. (a) Lolenge nini bato bakolobela “Kimia ejali, makambo majali tɛ”? (b) Ntango nini basaleli ya Yehova bakobondisama?
18 “Bango” oyo balobelami na esakweli oyo bazali banani? Bango bazali bakonzi ya politiki baoyo bazali koloba ete bakoki kotya ebongiseli ya sika oyo ekozala na bomoko longwa na mokili ya mobulu oyo ekabwani kati na yango. Bibongiseli na bango ya lokumu oyo ete, Société des Nations mpe Lisangá ya Mabota Masangani, elóngi te kati na likambo yango. Lokola mosakoli ya Yehova asakolaki yango, ata sikawa bazali “koloba, ‘Kimia! Kimia!’ nde kimia ejali tɛ.”—Yilimia 6:14; 8:11; 14:13-16.
19 Na kozeláká ntango yango, basaleli ya Yehova bazali koyika mpiko na mikakatano mpe minyoko kati na mokili oyo ezali kotuka Nzambe. Kasi mosika te, lokola eyebisami na 2 Batesaloniki 1:7, 8, bakobondisama “na ntango na komɔnana na Nkolo Yesu wana ekobima ye na Likolo esika mɔkɔ na banje na ye na nguya, kati na epelelo na mɔtɔ ete apɛsa bato mabe etumbu baoyo bayebi Njambe tɛ mpe bajangi kotosa Nsango Malamu na Nkolo na biso Yesu.”
20. (a) Sefania mpe Habakuku basakolaki nini na ntina na ‘mokolo oyo mozali kozikisa lokola mɔ́tɔ’? (b) Toli mpe elendiseli nini bisakweli wana bizali kopesa?
20 Yango ekoya ntango nini? Mingi kati na biso bazali kozela uta kala. Na kozeláká yango, ebele na bato na kosɔkɛma oyo bakobika bazali koyanola na libyangi oyo lizali na Sefania 2:2, 3: “Boluka [Yehova] . . . Boluka boyɛngɛbɛnɛ, boluka bopɔlɔ, sɔkɔ nde bokobombama na mokɔlɔ na nkanda na [Yehova].” Na nsima, Sefania 3:8 ezali na elendieli oyo ete: “Boye, [Yehova] alobi ete, ‘Jila ngai mpɔ na mokɔlɔ wana ekotɛlɛma ngai lokola motatoli. Mpɔ ete mokano na ngai ejali koyanganisa mabota ete nayeisa makonji elɔngɔ, mpɔ na kosopa nkɛlɛ na ngai likolo na bango, ɛɛ, mɔtɔ yɔnsɔ na nkanda na ngai; jambi na mɔtɔ na nkɛlɛ na ngai na jua mokili mobimba ekojikisama.’” Nsuka ebɛlɛmi! Yehova ayebi mokolo mpe ngonga yango mpe akobongola manáka na ye te. Tiká ete tóyika mpiko na motema pɛtɛɛ nyonso. “Jambi, emɔnɔnɛli ejali bobɛlɛ mpɔ na ntango ebɔngisami, ekomi nɔki epai na nsuka, ekojanga tɛ; ata ejali koumela, lambela yango; ekoya sɔlɔ mpenja, ekoumela mingi tɛ.” (Habakuku 2:3) Mokolo ya nsɔ́mɔ ya Yehova mokómi mpenza pembeni. Omikundola ete mokolo wana mokoumela mingi te!
Bozongeli:
◻ Likambo nini ekokómela bakonzi mpe bayangelami na mokolo ya nsɔ́mɔ ya Yehova?
◻ Yehova azali Nzambe ya lolenge nini?
◻ Kolakisama ya lolenge nini elobelami mpo na basaleli ya Nzambe?
◻ Lolenge nini basakoli ya Nzambe balendisi biso na ntina na kobɛlɛma ya nsuka?
[Elilingi na lokasa 21]
Na boumeli ya Inquisition na mboka Espagne bato mingi bapusamaki na makasi ete bákɔta na lingomba ya Katolike
[Eutelo ya bafɔtɔ]
The Complete Encyclopedia of Illustration/J. G. Heck