Mokolo ya nsɔ́mɔ ya Yehova ebɛlɛmi
“Mokanda na kokanisa ekomamaki liboso na ye mpɔ na baoyo bajalaki kotosa [Yehova] mpe kobanga nkombo na ye.”—MALAKI 3:16.
1, 2. Mokolo nini ya nsɔ́mɔ Malaki asakolaki na ntina na yango?
NSƆ́MƆ! Wana ntɔ́ngɔ́ ya mokolo ya 6 Augústo 1945, ezalaki kotána, engumba moko ebebisamaki na mbala moko mpenza. Bato soko 80 000 bakufaki! Bankóto ya bato bazokaki bampota ya nsɔ́mɔ! Mɔ́tɔ epalanganaki bipai nyonso! Bómbi nikleere esalaki mosala na yango. Likambo nini likómelaki Batatoli ya Yehova na ntango ya likámá yango? Ezalaki bobele na Motatoli moko na Hiroshima— oyo, na ntina na bosembo na ye ya boklisto, azalaki kati na bifelo ya kobatela ya bolɔ́ko. Ndako ya bolɔ́kɔ ebukanaki, kasi ndeko na biso azwaki likámá te. Lokola alobaki yango, ‘asikolamaki longwa na bolɔ́kɔ na lisalisi ya bómbi atomike.’—mbala mosusu yango ezali likambo bobele moko ya malamu oyo bómbi esalaki.
2 Atako kopanzana ya bómbi wana ezalaki mpenza na nsɔ́mɔ, ekokani soko moke te na “mokɔlɔ na nsɔmɔ na Yehova” oyo ezali koya nokinoki. (Malaki 4:5) Ya solo, mikolo ya nsɔ́mɔ mizalaki na boumeli ya lisoló ya bato, kasi mokolo wana ya Yehova mokoleka yango nyonso.—Malako 13:19.
3. Bokeseni nini ezalaki kati na “bato nyonso” mpe libota ya Noa, bokeseni oyo eyeisaki Mpela?
3 Na mikolo ya Noa, “bato yɔnsɔ babebisaki njela na bango na mokili,” mpe Nzambe alobaki ete: “Mokili etondi na yauli mpɔ na bango. Mpe nakobebisa bango na mokili elɔngɔ mɔkɔ.” (Genese 6:12, 13) Engebene Matai 24:39, Yesu alobaki ete bato “bayebaki likambo tɛ kino eyaki mpela mpe elongolaki bango yɔnsɔ.” Kasi Noa, moto na sembo oyo azalaki “mosakoli na boyɛngɛbɛnɛ,” abikaki na Mpela elɔngɔ na libota na ye oyo lizalaki kobanga Nzambe.—2 Pɛtɛlɔ 2:5.
4. Kobomama ya Sodomo mpe Gomola epesi ndakisa nini ya kokebisa?
4 Yuda 7 eyebisi ete, “Bongo mpe Sɔdɔmɔ mpe Gɔmɔla mpe mboka mosusu ijingelaki bango babili pite na motindo mɔkɔ na bango wana, bakei kobila njoto mosusu; sasaipi bajali elakiseli oyo ejui likamba na sembo na mɔtɔ na seko.” Bato wana ya kotuka Nzambe bakufaki na ntina na lolenge ya bomoi na bango ya mbindo. Tiká ete bato oyo bamipesá na pite na mikolo na biso bázwa likebisi! Nzokande, tóyeba ete Lota, moto na kobanga Nzambe mpe bana na ye ya basi babatelamaki na likámá wana, bobele bongo basambeli ya Yehova bakobatelama na bolózi monene oyo ezali kobɛlɛma nokinoki.—2 Petelo 2:6-9.
5. Tokoki koyekola nini na ntina na bikateli oyo bikwelaki Yelusaleme?
5 Na nsima tótalela bandakisa ya kokebisa oyo esalemaki ntango Yehova asalelaki mampinga ya banguna mpo na kobebisa Yelusaleme, mboka ya lokumu mingi oyo kala ezalaki “esɛngɔ na mokili mobimba.” (Njembo 48:2) Makambo wana ya nsɔ́mɔ masalemaki, mpo na mbala ya liboso na mobu 607 L.T.B. mpe lisusu na mobu 70 T.B., mpamba te libota oyo lizalaki komitánga libota ya Nzambe litikaki losambo ya solo. Likambo ya esengo ezali ete, basaleli ya sembo ya Yehova babikaki. Likámá ya mobu 70 T.B. (oyo emonisami na lokasa 16) elobelami lokola “bolɔji na lolenge lobimi naino tɛ longwa na ebandeli na Kojalisa ejalisaki Njambe kino na [ntango wana, NW].” Elongolaki mpo na libela ebongiseli ya lipɛngwi ya Bayuda, mpe bolózi ya motindo wana “ekobima lisusu te.” (Malako 13:19) Kasi kokokisama wana ya bikateli ya Nzambe ezalaki bobele elilingi ya “bolózi monene” oyo ekokwela ebongiseli mobimba ya biloko ya mokili oyo.—Emoniseli 7:14, NW.
6. Mpo na nini Yehova atikaki nzela na bampasi?
6 Mpo na nini Nzambe asengelaki kotika nzela na makámá minene, mpe kokufa ya bato mingi? Mpo na bato na ntango ya Noa, ya Sodomo mpe Gomola, mpe ya Yelusaleme, Yehova azalaki nde koyeisa bikateli na ye likoló na baoyo basilaki kobebisa nzela na bango na mabelé, baoyo basilaki kobebisa etando oyo kitoko na libebi ya ezingelo na yango to na mbindo ya bizaleli, mpe baoyo basilaki kopɛngwa longwa na ye, to kobwaka losambo ya solo. Lelo oyo tobɛlɛmi na ekateli monene oyo ekokwela mokili mobimba.—2 Batesaloniki 1:6-9.
“Na mikolo na nsuka”
7. (a) Bikateli ya Nzambe na ntango ya kala bizalaki kosakola nini? (b) Elikya nini ya nkembo ezali liboso?
7 Kobomama wana ya ntango ya kala ezalaki kosakola bolózi monene ya nsɔ́mɔ oyo elobelami kati na 2 Pɛtɛlɔ 3:3-13. Ntoma alobi ete: “Boyeba mpe oyo liboso ete na mikɔlɔ na nsuka basɛki bakoya mpe bakosɛka, bakotambola pelamɔkɔ na mposa mabe na bango mpenja.” Na nsima, kobendáká likebi na mikolo ya Noa, Petelo akomi ete: “Mokili na ntango yango ejindaki mpe ebomamaki. Mpɔ na Liloba na ye, Likolo mpe nse na ntango oyo ibombami ete ijika; ijali kobatelama kino mokɔlɔ na kosambisa mpe na koboma bato bakotiolaka Njambe.” Na nsima ya bolózi wana oyo ekoleka bolózi mosusu nyonso, Bokonzi ya Masiya ekosala makambo ya sika—“makoló ya sika mpe mabelé ya sika. . . , mpe kati na yango boyengebene ekozala.” Oyo nde elikya ya esengo!
8. Lolenge nini makambo ya mokili mazali kokende kino ekóma na esika yango ekondongbana?
8 Na boumeli ya ekeke na biso ya 20, makambo ya mokili mazali kokende moke moke kino na esika oyo yango ekondongbana. Atako kobebisama ya Hiroshima eutaki na Nzambe te, kasi yango ekoki mpe kotángama kati na “makambo na nsɔmɔ” oyo Yesu asakolaki mpo na mikolo ya nsuka. (Luka 21:11) Yango esili kobimisa likámá ya nikleere oyo ezali naino likoló na bato. Na yango, motó ya lisoló moko kati na zulunalo The New York Times ya 29 Novɛ́mbɛ 1993, elobi ete: “Ekoki kozala ete mandóki masili ngála, kasi bibundeli ya nikleere bizali ntango nyonso makasi.” Na ntango wana, bitumba kati na bato na mikili mikeseni, bato na mposo ekeseni mpe bato na bikólo bikeseni ezali kobimisa mbuma ya nsɔ́mɔ. Na ntango ya kala, ntalo monene ya baoyo bazalaki kozwa makámá na bitumba ezalaki bongo basodá. Lelo oyo, makámá ya bitumba 80 likoló na monkámá ezali kokwela basivíli, kozanga kotánga bamilió ya bato oyo bazali kokima mboka na bango.
9. Lolenge nini bakonzi ya mangomba basili komikómisa baninga ya mokili?
9 Mbala mingi bakonzi ya mangomba basili komimonisa, mpe bazali kokóba komimonisa “baninga na mokili” na kokɔtáká mpenza kati na bitumba mpe na mbongwana oyo ezali kosopa makila. (Yakobo 4:4) Basusu basalanaki elongo na bakonzi ya mombongo ya lokoso ya mokili oyo, lokola baizíni minene ya mandóki mpe bibongiseli minene mpo na kotekisa bilangwiseli. Na ndakisa, wana ezalaki yango kolobela kobomama ya nkolo moko ya mombongo ya bilangwiseli na Amerika ya Súdi, zulunalo The New York Times eyebisaki ete: “Kobombáká mombongo na ye ya bilangwiseli nsima ya bozwi ya mombongo oyo endimami na mibeko mpe komimonisáká lokola mosungi ya babólá, azalaki na emisió na ye moko ya radio mpe mbala mingi azalaki elongo na basángó ya Lingomba ya Katolike.” Zulunalo The Wall Street Journal eyebisaki ete longola likambo ya kobebisa bomoi ya bamilió ya bato oyo bakómi baombo ya bilangwiseli, nkolo wana ya mombongo ya bilangwiseli asilaki ye moko kobomisa bankótó ya bato. Zulunalo The Times ya Londres emonisaki ete: “Mbala mingi babomi bafutaka mosolo mpo na Mísa moko ya monene ya kopesa matɔ́ndi . . . bobele na ntango wana mísa ya bokundi ya mobomami ezali kosalema na esika mosusu.” Oyo nde misala mabe mpenza!
10. Lolenge nini tosengeli kotalela kobeba ya makambo ya mokili?
10 Nani ayebi soki likámá monene nini bato bapemami na bilimu mabe bakoki koyeisa lisusu na mabelé oyo? Lokola 1 Yoane 5:19 eyebisi, “mokili mobimba ejali kolala na kati na oyo mabe,” Satana Zábolo. Lelo oyo ezali bongo “mawa na mokili mpe na mai monɛnɛ! Mpɔ ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete ajali na mwa elaka mokuse.” (Emɔnisɛli 12:12) Nzokande, na esengo nyonso, Baloma 10:13 endimisi biso ete “moto na moto oyo akobeela nkombo na [Yehova] akobika.”
Kosambisa ya Nzambe ebɛlɛmi
11. Makambo nini na Yisraele mazalaki kokundwela esakweli ya Malaki?
11 Na ntina na makambo oyo makobima na mokili mosika te, esakweli ya Malaki ezali komonisa polele makambo oyo malingi kosalema. Malaki azali moto ya nsuka kati na molɔngɔ́ molai ya basakoli ya kala ya Baebele. Yisraele esilaki kokutana na likámá ya kobebisama ya Yelusaleme na mobu 607 L.T.B. Kasi mibu 70 na nsima, Yehova amonisaki ngɔlu na ye na kozongisáká libota yango na mabelé na yango. Nzokande, na boumeli ya mibu monkámá oyo elandaki, Bayisraele babendamaki lisusu kati na lipɛngwi mpe misala ya mabe. Bato bazalaki kotyola nkombo ya Yehova, na kotyáká likebi te na mibeko na ye ya sembo mpe na kobebisáká tempelo na ye, wana ezalaki bango komema mpo na kopesa mbeka banyama ekufa miso, ebukana makolo mpe oyo ezalaki na maladi. Bazalaki koboma libala na basi na bolenge ya bango mpo na kobala basi bapaya.—Malaki 1:6-8; 2:13-16.
12, 13. (a) Kopɛtolama nini esengelaki kosalema epai na kelasi ya banganga bapakolami? (b) Lolenge nini ebele monene mpe esili kozwa matomba na kopɛtolama yango?
12 Mosala moko ya kopɛtolama mosengelaki kosalema. Yango eyebisami na Malaki 3:1-4. Lokola Bayisraele ya ntango ya kala, Batatoli ya Yehova ya mikolo na biso basengelaki kopɛtolama, yango wana mosala ya kopɛtolama oyo Malaki alobelaki mokoki kosalema epai na bango. Ntango Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebɛlɛmaki na nsuka na yango, basusu kati na Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo Batatoli bayebanaki ntango wana, batikalaki mpenza sembo te mpo na oyo etali ezaleli ya kozanga kokɔta na makambo ya mokili. Na 1918, Yehova atindaki “ntoma na kondimana,” na Ye, Klisto Yesu, kati na ebongiseli ya tempelo na Ye ya elimo mpo na kopɛtola etuluku moke ya basambeli na Ye na mbindo nyonso ya mokili. Na motindo ya esakweli, Yehova atunaki ete: “Nani akoyikela mokɔlɔ na koya na ye [ya ntoma] mpiko? Nani akotɛma wana ekomɔnana ye? Mpɔ ete ajali lokola mɔtɔ na mopɛtɔli-na-ebende mpe lokola saboni na batuti na bilamba. Akofanda lokola mopɛtɔli mpe monangoli na palata; akopɛtɔla bana na Lewi [etuluku ya banganga bapakolami] mpe akonangola bango lokola wɔlɔ mpe palata; bakokabela mpe [Yehova] mbɛka na boyɛngɛbɛnɛ.” Lokola libota lipɛtolami, basalaki bobele bongo!
13 Motuya ya basangani ya etuluku wana ya banganga ezali bobele 144000. (Emoniseli 7:4-8; 14:1, 3) Nzokande, ezali boni lelo mpo na baklisto mosusu oyo basili komipesa? Lokola motángo na bango mozali sikawa kokóla kino bamilió, bato wana basali “ebele monene” oyo basengeli mpe kopɛtolama na makambo ya mokili, ‘basukoli bilamba na bango, mpe bayeisi yango mpɛmbɛ na makila na Mwana na Mpate.’ (Emoniseli 7:9, 14) Na yango, na komonisáká kondima kati na mbeka ya lisiko ya Mwana na Mpate, Klisto Yesu, bakoki kobatela etɛlɛmɛlo ya pɛto liboso na Yehova. Bapesameli elaka ya kobikisama na bolózi monene, mokolo ya nsɔ́mɔ ya Yehova.—Sofoni 2:2, 3.
14. Maloba nini libota ya Nzambe lisengeli lelo oyo kotosa wana ezali bango kolóna bomoto ya sika?
14 Elongo na banganga batikali wana, ebele monene yango esengeli kolanda maloba oyo mosusu ya Nzambe: “Nakobɛlɛma epai na bino na kosambisa-sembo mpe nakojala motatoli na mbango kotɛmɛla bato na ndɔki mpe bato na pite mpe baoyo bakosimba ndai na lokuta, mpe kotɛmɛla baoyo bakonyɔkɔla mosali mpɔ na mbɔngɔ na ye mpe mwasi-mokufeli-mobali mpe etike na tata mpe baoyo bakopɛngɔla mopaya mpe batosi ngai tɛ . . . Jambi, ngai [Yehova] nakobongwana tɛ.” (Malaki 3:5, 6) Ee, mitindá ya Yehova mikobongwanaka te, yango wana mpo na kobanga Yehova, lelo oyo libota na ye lisengeli koboya lolenge nyonso ya losambo ya bikeko, kozala sembo mpe na ezaleli ya kolongobana, mpe komonisa ezaleli ya bokabi wana bazali kolanda kolóna bomoto ya boklisto.—Bakolose 3:9-14.
15. (a) Libyangi nini ya motema mawa Yehova azali kopesa? (b) Lolenge nini tosengeli koboya “koyiba” Yehova?
15 Yehova azali kopesa libyangi na ye epai na moto nyonso oyo asili kopɛngwa longwa na banzela na ye ya sembo, na kolobáká ete: “Bobutwa epai na ngai mpe ngai nakobutwa epai na bino!” Soki batuni ete: “Tokobutwa boni?” ayanoli ete: “Bino bokoyiba epai na ngai.” Mpe lokola eyano na motuna mosusu oyo ete: “Toyibeli yɔ na njela nini?” Yehova ayebisi ete bazalaki koyiba ye wana bazangaki kopesa biloko na bango oyo bileki kitoko lokola mbeka mpo na mosala ya tempelo na ye. (Malaki 3:7, 8) Lokola esili biso kokóma basangani ya libota ya Yehova, tosengeli mpenza kopesa eteni eleki malamu ya nguya, ya makoki mpe ya bozwi na biso ya mosuni mpo na mosala ya Yehova. Na yango, na esika ya koyiba Nzambe, ‘tokoluka nde liboso bokonzi mpe boyɛngɛbɛnɛ na ye.’—Matai 6:33.
16. Elendiseli nini tozali kokuta kati na Malaki 3:10-12?
16 Mbano monene ezali kozela baoyo basili kobwaka elimo ya moimi, mposa ya bozwi oyo ezali kati na banzela ya mokili, lokola Malaki 3:10-12 emonisi yango: “[Yehova] na bibele alobi ete, ‘Meka ngai sasaipi na yango, sɔkɔ nakojipwela bino maninisa na lola tɛ kosopela bino lipamboli kino esika ekojanga mpɔ na yango.’” Mpo na baoyo bazali komonisa botɔ́ndi, Yehova alaki bozwi mingi ya elimo mpe kobota mbuma mingi. Abakisi ete: “Mabota yɔnsɔ bakobianga bino ete, Na esɛngɔ, jambi bokojala mokili na kosepela.” Likambo oyo lizali komonana kati na bamilió ya bato oyo bazali kati na libota ya Nzambe lelo na mabelé, boye te?
Babateli na bosembo bakomami na búku ya bomoi
17-19. (a) Lolenge nini yikiyiki oyo ezali na Rwanda ezalaki na bopusi likoló na bomoi na bandeko na biso oyo bazali kuna? (b) Endimiseli nini bato wana ya sembo bazalaki na yango mpo na kokenda liboso?
17 Na likambo oyo, tokoki kolobela bosembo ya bandeko na biso mibali mpe basi na Rwanda. Bazali ntango nyonso kopesa makabo ya elimo oyo maleki kitoko mpo na ndako ya elimo ya losambo na Yehova. Na ndakisa, na Liyangani ya Etúká “Mateya mauti na Nzambe” oyo basalaki na Desɛ́mbɛ 1993, basakoli na bango ya Bokonzi 2080 bazwaki bayangani 4075. Batatoli oyo bazwaki batisimo sika bazalaki 230, kati na bango, pene na 150 basɛngaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza oyo elandaki.
18 Ntango koyinana ya bikólo ebandaki na Apríli 1994, Batatoli koleka 180, bakisá mokɛngɛli ya engumba na Kigali, mboka-mokonzi, mpe libota na ye mobimba, babomamaki. Babongoli motoba na biro ya la Société Watch Tower na Kigali, oyo minei kati na bango bazalaki Hutu mpe mibale Tutsi, balandaki kosala mosala na bango na boumeli ya bapɔ́sɔ mingi kati na makaneli ya makasi, kino bandeko oyo bazalaki Tutsi basengelaki kokima, kasi babomamaki na ekɛngɛlo moko. Na nsuka, komemáká baordinatɛrɛ oyo etikalaki, bandeko minei oyo batikalaki bakimaki na Goma, na Zaïre, epai balandaki na bosembo nyonso kobongola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na lokótá Kinyarwanda.—Yisaya 54:17.
19 Batatoli wana oyo bakimá mboka na bango, atako bazali kati na mpasi, basɛngaki ntango nyonso bilei ya elimo liboso ya biloko ya mosuni. Na elimo ya kosalisa basusu, bandeko ya bolingo na bamboka mingi batindelaki bango biloko. Na maloba mpe na etamboli ya malamu ata kati na mikakatano, bandeko wana oyo bakimá mboka na bango bapesaki litatoli moko kitoko. Balandaki mpenza kopesa biloko bileki kitoko oyo bazalaki na yango mpo na losambo ya Yehova. Basili komonisa endimiseli lolenge moko na oyo ya Paulo lokola yango emonisami na Baloma 14:8: “Sɔkɔ tojali na bomɔi, tojali na bomɔi mpɔ na [Yehova], mpe sɔkɔ tojali kokufa, tojali kokufa mpɔ na [Yehova]. Bongo, ata tojali na bomɔi, ata tojali kokufa, tojali bato na [Yehova].”
20, 21. (a) Nkombo ya banani ekomami te kati na búku ya kokanisama ya Yehova? (b) Nkombo ya banani ezali kati na búku yango, mpe mpo na nini?
20 Yehova azali kokoma nkombo ya baoyo nyonso bazali kosalela ye na bosembo nyonso. Esakweli ya Malaki elandi lokola ete: “Bongo, baoyo batosaki [Yehova] balobanaki moto na moninga na ye mpe [Yehova] ayokamelaki bango, ɛɛ ayokaki bango. Mpe mokanda na kokanisa ekomamaki liboso na ye mpɔ na baoyo bajalaki kotosa [Yehova] mpe kobanga nkombo na ye.”—Malaki 3:16.
21 Oyo nde likambo ya ntina ete tómonisa lelo oyo bobángi Nzambe na kokumisáká nkombo ya Yehova! Na kosaláká bongo, tokozwa te esambiseli ya mabe liboso na ye, lokola baoyo bandimi kopesa mabɔkɔ na bibongiseli ya mokili oyo. Emɔnisɛli 17:8 eyebisi ete “nkombo na bango ijangi kokomama na buku na bomɔi.” Ebongi mpenza kondimama ete, Nkombo eleki monene oyo ekomamaki kati na búku ya bomoi ya Yehova ezali nkombo na Mokonzi ya bomoi, Mwana mpenza ya Nzambe, Yesu Klisto. Matai 12:21 eyebisi ete: “Mpe mabota na bapaya makolikia na nkombo na ye.” Mbeka ya lisiko ya Yesu epesi ndanga ya bomoi ya seko mpo na baoyo nyonso bazali komonisa kondima kati na yango. Oyo nde libaku kitoko komona ete nkombo na biso ebakisami na búku ya bomoi elongo na nkombo ya Yesu!
22. Bokeseni nini ekomonana polele ntango Yehova akoyeisa bikateli na ye?
22 Likambo nini likokómela Batatoli ya Yehova na ntango ya kosambisama wana? Yehova ayanoli na Malaki 3:17, 18: “Nakobikisa bango lokola moto akobikisa mwana na ye oyo ajali kosalela ye mosala. Bokojonga mpe bokosɔsɔla kati na moyɛngɛbɛni mpe moto mabe, kati na ye oyo akosalelaka Njambe mpe ye oyo akosalelaka Njambe tɛ.” Bokabwani ekozala polele na miso na bato banso: bato mabe, bakotyama mpembeni mpo na kolongolama ya seko, mpe basembwi, bakondimama mpo na kozwa bomoi ya seko na nsé ya Bokonzi. (Matai 25:31-46) Na bongo ebele monene ya bato oyo bakokani na bampate bakobika na mokolo monene mpe ya nsɔ́mɔ ya Yehova.
Ozali komikundola?
◻ Bikateli nini Yehova ayeisaki na ntango ya kala?
◻ Lolenge nini makambo oyo mazali kosalema na mikolo na biso makokani na makambo oyo malekaki na ntango ya kala?
◻ Kopɛtolama nini esili kosalema mpo na kokokisa esakweli ya Malaki?
◻ Nkombo ya banani esili kokomama kati na búku ya kokanisama ya Nzambe?