Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ‘Lipamboli kino bosɛnga ekozala lisusu te’
    Batelá mokolo ya Yehova na makanisi na yo
    • 1, 2. (a) Makambo nini ya malamu mokomoko na biso asengeli kopona? (b) Kokokisama ya esakweli nini etaleli mapamboli oyo tokoki kozwa?

      NTANGO na biso ezali ntango ya kosambisama mpe ya mapamboli. Ezali eleko ya kokwea ya mangomba mpe ya kozongisama ya losambo ya solo. Na ntembe te, okolinga mpenza kozwa mapamboli ya kozongisama ya losambo ya solo lelo oyo mpe na mikolo ezali koya! Kasi, ndenge nini okoki kotya motema ete okozwa matomba yango? Eyano ezali na esakweli moko oyo ekokisamaki na monene na yango mwa moke ntango “mikolo ya nsuka” ebandaki na 1914. (2 Timote 3:1) Malaki asakolaki boye: “‘Nkolo ya solosolo oyo bino bozali koluka akoya pwasa na tempelo na Ye ná momemi-nsango ya kondimana oyo bino bozali kosepela na ye. Talá! Ye akoya mpenza,’ Yehova ya mampinga alobi bongo.”—Malaki 3:1.

  • ‘Lipamboli kino bosɛnga ekozala lisusu te’
    Batelá mokolo ya Yehova na makanisi na yo
    • NTANGO YA KOPƐTOLAMA NA ELIMO

      3. Likambo nini basaleli ya Nzambe na ntango ya kala basalaki oyo esalaki ete Nzambe apona “Yisraele ya elimo”?

      3 Bikeke soki mitano nsima ya eleko ya Malaki, Kristo, momonisi ya Yehova (‘Momemi-nsango ya Nzambe ya kondimana ya Abrahame’), ayaki na tempelo ya Yerusaleme mpo na kosambisa bato ya Nzambe oyo basalaki na ye kondimana. Ekólo yango mobimba ebongaki lisusu kondimama na Nzambe te, yango wana Yehova asundolaki yango. (Matai 23:37, 38) Okoki komona likambo yango polele na oyo esalemaki na mobu 70 T.B. Okoki kondima mpenza ete Nzambe aponaki na esika na yango “Yisraele ya Nzambe,” ekólo ya elimo oyo ezali na bato 144 000 oyo bauti na bikólo nyonso. (Bagalatia 6:16; Baroma 3:25, 26) Kasi, yango ezalaki te kokokisama ya nsuka ya esakweli ya Malaki. Etaleli mpe eleko na biso mpe etaleli mpenza elikya na yo mpo na mikolo ezali koya ya kozwa ‘lipamboli kino bosɛnga ekozala lisusu te.’

      4. Motuna nini esengelaki kozwa eyano nsima ya kotyama ya Yesu lokola mokonzi na 1914?

      4 Kokokisama ya esakweli ya Biblia emonisi ete na 1914, Yesu Kristo atyamaki mokonzi na Bokonzi ya Yehova na likoló. Na nsima ntango ekokaki mpo Yesu apona etuluku ya bakristo oyo basengelaki kondimama na Nzambe. Nani alingaki kolonga ntango kopɛtolama na elimo elingaki kosalema? Okoki kozwa eyano na maloba oyo ya Malaki: “Nani akokoka na mokolo ya koya na ye, mpe nani akotɛlɛma ntango ye akomonana? Mpo ye akozala lokola mɔtɔ ya monyangwisi-bibende.” (Malaki 3:2) Ntango nini mpe ndenge nini Yehova ayaki na “tempelo” na ye mpo na kosambisa?

      5, 6. (a) Ntango Yehova ayaki kotala tempelo na ye ya elimo, akutaki nini epai ya bato mingi oyo bazalaki komibenga basambeli na ye? (b) Basaleli ya Nzambe oyo batyami mafuta na elimo basengelaki na nini?

      5 Emonani polele ete Nzambe ayaki te na tempelo oyo etongami na mabanga. Tempelo yango ya nsuka oyo basalelaki mpo na losambo ya solo ebebisamaki na mobu 70 T.B., kasi Yehova ayaki nde na tempelo ya elimo, ebongiseli oyo, na nzela na yango bato bakoki kopusana mpe kosambela ye na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu. (Baebre 9:2-10, 23-28) Na ntembe te, tempelo wana ya elimo ezalaki te mangomba ya bokristo, mpo yango ezalaki na kati ya ebongiseli ya mangomba oyo ezalaki na nyongo ya makila mpe esalaki pite na elimo, mpe elendisaki losambo ya lokuta na esika ya kolendisa losambo ya pɛto. Yehova ayaki lokola “moto oyo azali kotatola na lombangu mpo na kotɛmɛla” mangomba yango, mpe oyebi ete lisambisi na ye ezalaki sembo. (Malaki 3:5) Kasi, nsima ya kotyama ya Bokonzi ya Nzambe, ezalaki na etuluku ya bakristo ya solo oyo bazalaki kosala na lopango ya tempelo ya elimo oyo bamonisaki bosembo na bango epai ya Nzambe atako bakutanaki na komekama makasi. Atako bongo, ata bakristo wana oyo batyami mafuta na elimo basengelaki mpe kopɛtolama na makambo mosusu. Makomi ya basakoli 12 elobelaki kopɛtolama yango mpo ezali na bilaka kitoko oyo etali kobikisama ya basaleli ya Nzambe na elimo mpe na mosuni. Malaki asakolaki ete ekozala na bato oyo Yehova ‘akokómisa pɛɛ lokola wolo mpe lokola palata.’ Bato yango “bakokóma mpenza na miso ya Yehova bato oyo bazali kopesa likabo na boyengebene.”—Malaki 3:3.

      6 Na kotalela bilembeteli ya solosolo oyo tozali na yango, kobanda na 1918, Yehova abandaki kopɛtola bakristo oyo batyami mafuta na elimo, kopɛtola losambo, misala mpe mateya na bango.a Bango mpe “ebele mpenza ya bato” oyo na nsima bayaki kosangana na bango bazwaki mpenza matomba. (Emoniseli 7:9) Lokola bazali na bomoko, bazali kokoba kopesa “likabo na boyengebene” oyo ‘Yehova azali kosepela’ na yango.—Malaki 3:3, 4.

      7. Makambo nini oyo ebongi ete tómituna mpo na etamboli na biso liboso ya Nzambe?

      7 Ezali bongo mpo na basambeli nyonso ya Nzambe, kasi ezali boni mpo na mokomoko na biso? Okoki komituna boye: ‘Ezali nde na makambo mosusu na ezaleli na ngai mpe na makambo oyo nasalaka oyo nasengeli kopɛtola? Nasengeli lisusu kopɛtola etamboli na ngai, ndenge Yehova asalaki yango epai ya basaleli na ye oyo batyami mafuta na elimo?’ Tomonaki liboso ete basakoli 12 balobelaki makanisi mpe etamboli ya mabe ata mpe bizaleli mpe misala ya malamu. Lolenge wana oyo basalaki esalisi yo oyeba oyo Yehova azali “kosɛnga yo.” (Mika 6:8) Simbá liloba “yo.” Yango emonisi ntina oyo mokomoko na biso asengeli komitalela soki ezali na makambo mosusu ya bomoi na ye oyo asengeli kobongisa to kopɛtola.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto