Mokapo 14
‘Lipamboli kino bosɛnga ekozala lisusu te’
1, 2. (a) Makambo nini ya malamu mokomoko na biso asengeli kopona? (b) Kokokisama ya esakweli nini etaleli mapamboli oyo tokoki kozwa?
NTANGO na biso ezali ntango ya kosambisama mpe ya mapamboli. Ezali eleko ya kokwea ya mangomba mpe ya kozongisama ya losambo ya solo. Na ntembe te, okolinga mpenza kozwa mapamboli ya kozongisama ya losambo ya solo lelo oyo mpe na mikolo ezali koya! Kasi, ndenge nini okoki kotya motema ete okozwa matomba yango? Eyano ezali na esakweli moko oyo ekokisamaki na monene na yango mwa moke ntango “mikolo ya nsuka” ebandaki na 1914. (2 Timote 3:1) Malaki asakolaki boye: “‘Nkolo ya solosolo oyo bino bozali koluka akoya pwasa na tempelo na Ye ná momemi-nsango ya kondimana oyo bino bozali kosepela na ye. Talá! Ye akoya mpenza,’ Yehova ya mampinga alobi bongo.”—Malaki 3:1.
2 Esakweli yango oyo ezali na ntina mingi na bomoi na yo ezali na mokanda ya nsuka ya mikanda 12 ya bisakweli. Lokola tokómi na nsuka ya makambo oyo tolobeli na mikanda yango 12, makambo oyo Malaki akomaki ezali mpenza na ntina. Mokanda na ye ezali na mateya ya ntina oyo ekosalisa yo mpe basaleli mosusu ya Yehova bózwa ‘lipamboli kino bosɛnga ekozala lisusu te.’ (Malaki 3:10) Tótalela malamumalamu mokapo 3 ya mokanda ya Malaki.
NTANGO YA KOPƐTOLAMA NA ELIMO
3. Likambo nini basaleli ya Nzambe na ntango ya kala basalaki oyo esalaki ete Nzambe apona “Yisraele ya elimo”?
3 Bikeke soki mitano nsima ya eleko ya Malaki, Kristo, momonisi ya Yehova (‘Momemi-nsango ya Nzambe ya kondimana ya Abrahame’), ayaki na tempelo ya Yerusaleme mpo na kosambisa bato ya Nzambe oyo basalaki na ye kondimana. Ekólo yango mobimba ebongaki lisusu kondimama na Nzambe te, yango wana Yehova asundolaki yango. (Matai 23:37, 38) Okoki komona likambo yango polele na oyo esalemaki na mobu 70 T.B. Okoki kondima mpenza ete Nzambe aponaki na esika na yango “Yisraele ya Nzambe,” ekólo ya elimo oyo ezali na bato 144 000 oyo bauti na bikólo nyonso. (Bagalatia 6:16; Baroma 3:25, 26) Kasi, yango ezalaki te kokokisama ya nsuka ya esakweli ya Malaki. Etaleli mpe eleko na biso mpe etaleli mpenza elikya na yo mpo na mikolo ezali koya ya kozwa ‘lipamboli kino bosɛnga ekozala lisusu te.’
4. Motuna nini esengelaki kozwa eyano nsima ya kotyama ya Yesu lokola mokonzi na 1914?
4 Kokokisama ya esakweli ya Biblia emonisi ete na 1914, Yesu Kristo atyamaki mokonzi na Bokonzi ya Yehova na likoló. Na nsima ntango ekokaki mpo Yesu apona etuluku ya bakristo oyo basengelaki kondimama na Nzambe. Nani alingaki kolonga ntango kopɛtolama na elimo elingaki kosalema? Okoki kozwa eyano na maloba oyo ya Malaki: “Nani akokoka na mokolo ya koya na ye, mpe nani akotɛlɛma ntango ye akomonana? Mpo ye akozala lokola mɔtɔ ya monyangwisi-bibende.” (Malaki 3:2) Ntango nini mpe ndenge nini Yehova ayaki na “tempelo” na ye mpo na kosambisa?
5, 6. (a) Ntango Yehova ayaki kotala tempelo na ye ya elimo, akutaki nini epai ya bato mingi oyo bazalaki komibenga basambeli na ye? (b) Basaleli ya Nzambe oyo batyami mafuta na elimo basengelaki na nini?
5 Emonani polele ete Nzambe ayaki te na tempelo oyo etongami na mabanga. Tempelo yango ya nsuka oyo basalelaki mpo na losambo ya solo ebebisamaki na mobu 70 T.B., kasi Yehova ayaki nde na tempelo ya elimo, ebongiseli oyo, na nzela na yango bato bakoki kopusana mpe kosambela ye na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu. (Baebre 9:2-10, 23-28) Na ntembe te, tempelo wana ya elimo ezalaki te mangomba ya bokristo, mpo yango ezalaki na kati ya ebongiseli ya mangomba oyo ezalaki na nyongo ya makila mpe esalaki pite na elimo, mpe elendisaki losambo ya lokuta na esika ya kolendisa losambo ya pɛto. Yehova ayaki lokola “moto oyo azali kotatola na lombangu mpo na kotɛmɛla” mangomba yango, mpe oyebi ete lisambisi na ye ezalaki sembo. (Malaki 3:5) Kasi, nsima ya kotyama ya Bokonzi ya Nzambe, ezalaki na etuluku ya bakristo ya solo oyo bazalaki kosala na lopango ya tempelo ya elimo oyo bamonisaki bosembo na bango epai ya Nzambe atako bakutanaki na komekama makasi. Atako bongo, ata bakristo wana oyo batyami mafuta na elimo basengelaki mpe kopɛtolama na makambo mosusu. Makomi ya basakoli 12 elobelaki kopɛtolama yango mpo ezali na bilaka kitoko oyo etali kobikisama ya basaleli ya Nzambe na elimo mpe na mosuni. Malaki asakolaki ete ekozala na bato oyo Yehova ‘akokómisa pɛɛ lokola wolo mpe lokola palata.’ Bato yango “bakokóma mpenza na miso ya Yehova bato oyo bazali kopesa likabo na boyengebene.”—Malaki 3:3.
6 Na kotalela bilembeteli ya solosolo oyo tozali na yango, kobanda na 1918, Yehova abandaki kopɛtola bakristo oyo batyami mafuta na elimo, kopɛtola losambo, misala mpe mateya na bango.a Bango mpe “ebele mpenza ya bato” oyo na nsima bayaki kosangana na bango bazwaki mpenza matomba. (Emoniseli 7:9) Lokola bazali na bomoko, bazali kokoba kopesa “likabo na boyengebene” oyo ‘Yehova azali kosepela’ na yango.—Malaki 3:3, 4.
7. Makambo nini oyo ebongi ete tómituna mpo na etamboli na biso liboso ya Nzambe?
7 Ezali bongo mpo na basambeli nyonso ya Nzambe, kasi ezali boni mpo na mokomoko na biso? Okoki komituna boye: ‘Ezali nde na makambo mosusu na ezaleli na ngai mpe na makambo oyo nasalaka oyo nasengeli kopɛtola? Nasengeli lisusu kopɛtola etamboli na ngai, ndenge Yehova asalaki yango epai ya basaleli na ye oyo batyami mafuta na elimo?’ Tomonaki liboso ete basakoli 12 balobelaki makanisi mpe etamboli ya mabe ata mpe bizaleli mpe misala ya malamu. Lolenge wana oyo basalaki esalisi yo oyeba oyo Yehova azali “kosɛnga yo.” (Mika 6:8) Simbá liloba “yo.” Yango emonisi ntina oyo mokomoko na biso asengeli komitalela soki ezali na makambo mosusu ya bomoi na ye oyo asengeli kobongisa to kopɛtola.
“NABONDELI BINO, BÓMEKA NGAI”
8. Libyangi nini Yehova apesi basaleli na ye?
8 Tótalela oyo Yehova alobaki na nzela ya Malaki na mokapo 3, vɛrsɛ 10. Na vɛrsɛ yango okokuta libyangi oyo ya esengo: “‘Bóya na moko ya bandambo zomi ya biloko nyonso na ndako ya kobomba biloko, mpo bilei ezala na ndako na ngai; mpe nabondeli bino, bómeka ngai na likambo oyo,’ Yehova ya mampinga alobi bongo, ‘bómona soki nakofungwela bino baporte ya mai ya likoló te mpe soki nakosopela bino lipamboli te kino bosɛnga ekozala lisusu te.’” Libyangi yango epesami epai ya basaleli nyonso ya Nzambe. Okanisi ete libyangi yango epesami mpe epai na yo?
9. Bambeka mpe bandambo ya zomi nini ya biloko okoki kopesa Yehova?
9 Ndenge nini okoki kopesa Yehova “moko ya bandambo zomi ya biloko”? Ya solo, osɛngisami te kopesa mpenza bambeka to moko ya bandambo zomi, ndenge Mibeko ezalaki kosɛnga. Lelo oyo Nzambe azali kosɛnga nde makabo ya elimo. Ndenge tomonaki yango na mokapo oyo eleki, Paulo akokanisaki mosala na yo ya kotatola na kopesa mbeka. (Hosea 14:2) Na nsima, ntoma alobelaki lolenge mosusu ya mbeka, akomaki boye: “Bóbosana te kosala malamu mpe kokabela bamosusu biloko, mpo Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.” (Baebre 13:15, 16) Na yango, emonani polele ete “moko ya bandambo zomi ya biloko” oyo Malaki 3:10 elobeli, elimboli bambeka ya elimo mpe ya mosuni. Lokola ozwá batisimo, omipesá mpenza na Yehova, kasi bandambo ya zomi ya biloko na yo ezali ndambo ya biloko oyo ozali na yango, oyo ozali na likoki ya komemela Yehova, to kosalela yango na mosala na ye. Yango ezali ntango, makasi, mbongo to biloko oyo opesaka mpo na mosala ya Yehova.
10. Wapi lolenge ya malamu oyo okoki ‘komeka Yehova’?
10 Ebongi mpenza ete opesa bandambo ya zomi ya biloko wana ya elilingi epai ya Yehova na bolingo mpe na motema oyo emipesi mpenza epai na ye! Tosengeli kosala bongo mpo mikolo etikali ya kotánga. Oyebi mpe ete mokolo monene ya Yehova ezali koya mbangu mpenza mpe ezali na “nsɔmɔ mingi.” (Yoele 2:1, 2, 11) Bomoi ya bato ezali na likama. Nzambe alobi maloba oyo yo mpe okoki kolanda. Yehova asɛngi yo ‘omeka ye.’ Ya solo, moto moko te akoki koluka komeka Yehova lokola nde abongi te kotyelama motema. (Baebre 3:8-10) Kasi, okoki na komikitisa nyonso komeka ye na lolenge ya malamu. Ndenge nini? Alakaki mapamboli. Ntango ozali kotosa ye, ozali komeka Nzambe, ezali lokola nde ozali komituna boye: ‘Akopambola ngai?’ Mpo na yango, Nzambe amipesaka mokumba ya kosala yango, kokokisa elaka na ye. Na yango, ndenge Nzambe atiki yo ‘omeka ye’ epesi yo lisusu elikya ete akopambola yo mingi.
11, 12. Mapamboli nini Yehova asopeli basaleli na ye oyo yo moko omoni na miso?
11 Okoki komona ete basaleli ya Yehova bapesá makabo mingi ya biloko ya mosuni mpe ya elimo. Mpe Yehova asopelaki bango ‘lipamboli kino bosɛnga ezalaki lisusu te.’ Ekoki kozala ete omonaki mapamboli oyo Nzambe asopelaki bato na ye, ndenge emonani na bokoli oyo ezali komonana epai ya Batatoli ya Yehova kobanda na ebandeli ya ekeke ya 20 tii na mikolo na biso. Omoni mpe ndenge boyebi ya “makambo mozindo ya Nzambe” ezali se kobakisama. (1 Bakorinti 2:10; Masese 4:18) Sikoyo, talelá makambo yango na lolenge mosusu: Makambo yango esali nini epai na yo?
12 Ekoki kozala ete kala ozalaki mondimi ya lingomba moko, to mpe obandaki sika koyangana ná Batatoli ya Yehova. Na eleko yango, mateya nini ya ebandeli ya Biblia oyebaki? Sikoyo kokanisá makambo oyo oyekolaki banda na ntango wana mpe oyo okoki kosalela Makomami mpo na kolimbola yango. To kanisá na makambo mozindo oyo oyebi sikoyo, ata mpe bisakweli oyo ezali kokokisama. Mpe talelá bokoli na yo na ndenge ozali kosalela mikapo mosusu ya Biblia na makambo mosusu ya bomoi na yo. Okomona ete okoli mpenza na elimo! Okoki koloba ndenge ntoma Petro alobaki: “Kondima oyo tondimeli liloba ya esakweli ekómi lisusu makasi koleka.” (2 Petro 1:19) Likambo ya ntina yango oyo: ‘Oteyami na Yehova’ mpe ozali na kati ya bato oyo bazali bakristo ya solo mpe oyo balingi kosalela Yehova mpo na libela. (Yisaya 54:13) Okoki koloba banda sikoyo ete apamboli yo mpenza.
NKOMBO NA YO NA BUKU YA BOMOI
13. Moto akoki kosala nini mpo nkombo na ye ekomama na buku ya kokanisama?
13 Malaki 3:16, elobeli mapamboli mosusu oyo Yehova azali kopesa: “Na ntango yango baoyo babangaka Yehova balobanaki, moto na moto na moninga na ye, mpe Yehova azalaki kotya likebi mpe koyoka. Mpe buku ya kokanisama ebandaki kokomama liboso na ye mpo na baoyo babangaka Yehova mpe mpo na baoyo bakanisaka nkombo na ye.” Ezala bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe oyo bazali na kati ya ebele ya bato mpenza “babangaka Yehova” na ndenge mpenza ebongi. Omoni te ete yango ezali libaku malamu kozala Motatoli ya Yehova, kozala na kati ya bato ya esengo oyo bakanisaka nkombo ya Yehova mpe bakumisaka yango na mokili mobimba? Okoki mpenza kozala na esengo, mpo ozali na elikya ete Yehova akobosana te bosembo na yo!—Baebre 6:10.
14. Ndenge nini basakoli 12 basalisi yo omona makanisi mpe misala oyo Yehova ayinaka?
14 Kasi, ndenge nini okoki kosala mpo nkombo na yo ekomama na kati ya “buku ya kokanisama,” oyo ezali kokomama tii lelo oyo liboso ya Yehova? Omikundwela mwa batoli mosusu ya bwanya oyo tomonaki na mikanda 12 ya basakoli. Toyekolaki makambo mingi etali etamboli, bizaleli, mpe makanisi oyo Yehova aboyaka. Na ndakisa, basakoli bakebisaki biso na misala oyo Nzambe alobi ete eyokani te na mitinda na ye ya sembo mpe ekoki kobebisa bomoi na biso, na ndakisa “etamboli ya nsɔni” mpe “elimo ya pite.” (Hosea 4:12; 6:9) Nzambe ayinaka baoyo basalelaka balongani na bango makambo na bokosi ezala mpe bato mosusu ya libota na bango. (Malaki 2:15, 16) Na lisalisi ya elimo santu, Yehova atindaki basakoli bámonisa ete asepelaka te na mobulu ata ya lolenge nini. (Amose 3:10) Atindaki mpe bango bámonisa ete aboyaka ezaleli ya kozanga bosembo mpe kozanga boyengebene na makambo ya mombongo mpe makambo mosusu etali mbongo. (Amose 5:24; Malaki 3:5) Mpe mikanda 12 emonisi ntina oyo mibali oyo bapesameli bokonzi basengeli te kozala na koponapona ntango bazali kosambisa to komibanzabanzaka kaka mpo na matomba na bango moko.—Mika 7:3, 4.
15. Wapi mwa matomba oyo okozwa soki olandi batoli ya basakoli 12?
15 Kasi, basakoli basukaki kaka te na kobenda likebi na biso na makambo oyo tosengeli koboya. Bamonisaki mpe mapamboli oyo tokoki kozwa soki tozali kotosa mitinda ya Nzambe. Boyokani na biso na Yehova ekokóma lisusu makasi koleka. (Mika 4:5) Lisangá na biso ekokóma lisusu makasi mpe molende soki boyengebene ezali mingi. Libala na biso ekozala makasi, mpe libota na biso ekokóma lisusu na bomoko, mpe ekomipesa mingi na makambo ya elimo. (Hosea 2:19; 11:4) Basusu bakobanda komemya biso soki tozali kosala makambo na bosembo mpe na kolongobana. Soki tozali komekola motema mawa ya Yehova, tokomonisa motema mawa mpe motema boboto mpe bandeko na biso bakomonisela biso bizaleli yango. (Mika 7:18, 19) Ya solo, tokozala elongo na bato oyo basepelaka na makambo ya elimo, bandeko na biso oyo balingaka solo mpe kimya mpe na koleka, tokokóma baninga ya Yehova. (Zekaria 8:16, 19) Ondimi te ete wana ezali mapamboli oyo osili kozwa?
16. Bokeseni nini emonani polele lelo, mpe yango ekolimbola nini na mokolo ya Yehova ntango bato bakozongisa monɔkɔ?
16 Na boyokani na makambo oyo touti kotalela, ezali mpenza solo ete “bokeseni kati na moyengebene ná moto mabe”—kati na bakristo ya solo mpe oyo ya lokuta—emonani mpenza polele lisusu koleka. (Malaki 3:18) Tozali kosala makasi mpo na kokokisa mitinda ya Yehova atako mokili mobimba ezali mpenza kozinda na makambo oyo Nzambe aboyaka. Mpe oyebi ete bokeseni wana ekobimisa likama monene ntango “mokolo monene ya Yehova” ekoya.—Sefania 1:14; Matai 25:46.
17. Na mikolo ezali koya, ndenge nini okoki kosalela makambo oyo ezali na buku oyo?
17 Emonani polele ete batoli ya basakoli 12 ezali mpe na ntina mpo na eleko na biso. Wana ozali kokutana na mikakatano to mpe olingi kozwa bikateli, okolinga kotalela makanisi ya ntina oyo ezali na mikapo ya buku oyo. Na yango, okoki kokoba komonisa mposa oyo ozali na yango ya koteyama na banzela ya Yehova mpe ya ‘kotambola na banzela na ye.’ (Mika 4:2) Nzokande, kotambola na nzela yango ezali kaka likambo ya lelo te. Mposa na yo makasi ezali ete nkombo na yo ekomama libela na buku ya kokanisama ya Yehova, boye te? Mikanda ya basakoli 12 ekoki kosalisa yo na likambo yango.
KONDIMA EMEMAKA NA LOBIKO
18. Lisɛngami nini ya ntina omoni na Yoele 2:32, mpe likambo nini ntoma Paulo abakisaki?
18 Yoele alobeli likambo moko ya ntina oyo ekoki kosala ete moto andimama na Nzambe mpo na libela; alobaki boye: “Moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova, akobika.” (Yoele 2:32) Bantoma mibale, Petro mpe Paulo, balobelaki mpe likambo wana ya ntina mingi. (Misala 2:21; Baroma 10:13) Paulo abakisaki mpe likambo mosusu na toli wana ntango atunaki boye: “Ndenge nini bakobelela moto oyo bandimeli te?” (Baroma 10:14) Na ntembe te, okolinga kobelela nkombo ya Yehova mpe komonisa kondima epai na ye lelo oyo mpe mpo na libela!
19. Kobelela nkombo ya Yehova esɛngi mpe nini?
19 Kobelela nkombo ya Yehova esuki kaka te na koyeba mpe kotánga nkombo yango. (Yisaya 1:15) Bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe nsima ya Yoele 2:32, ebendi likebi na likambo etali kobongola motema mpe kondima ete Yehova alimbisaka. (Yoele 2:12, 13) Kobelela nkombo ya Nzambe esɛngaka mpenza koyeba ye, kotyela ye motema, kotosa ye, mpe kotya ye na esika ya liboso na bomoi na biso. Ya solo, kosalela Yehova ekómaka likambo ya liboso na bomoi na biso. Mpo na yango, moto akoki kozala na bomoi ya malamu mpe ya molai, oyo ezali mapamboli ya Nzambe.—Matai 6:33.
20. Soki ozali komonisa kondima, mbano nini monene okoki kolikya kozwa?
20 Yehova alobaki na nzela ya Habakuku ete: “Moyengebene, na bosembo na ye akokoba kozala na bomoi.” (Habakuku 2:4) Batelá mpenza maloba wana na motema. Ezali moko ya mateya ya ntina mpenza ya Biblia. Paulo atángaki vɛrsɛ yango mbala misato na mikanda na ye.b (Baroma 1:16, 17; Bagalatia 3:11, 14; Baebre 10:38) Solo yango esɛngaka komonisa kondima na mbeka oyo Yesu kristo apesaki mpo na masumu na biso. Yesu alobaki boye: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye . . . azwa bomoi ya seko.” Tozali mpe kotánga boye: “Moto oyo azali kondimela Mwana azali na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16, 36) Mbeka yango ezali kopesa nzela na kobikisama oyo kaka Mosikoli na biso akoki kopesa. Nsima ya koyebisa maloba ya Yehova mpo na likambo oyo mokolo na ye monene ekosala na mokili mabe ya Satana, Malaki akomaki boye: “Epai na bino baoyo bobangaka nkombo na ngai, moi ya boyengebene ekobima mpenza, ná kobikisa na kongɛnga na yango.” Ya solo, Yesu akongɛnga na kobikisa. Yango ezali kobikisama ya elimo oyo tozali kozwa lelo. Kasi, ezali mpenza likambo ya esengo kokanisa ete tokobikisama mpenza na maladi nyonso na nzoto na mokili ya sika!—Malaki 4:2.
21. Mpo na nini okoki kondima likoki oyo Yehova azali na yango ya kokokisa mposa na ye?
21 Ezali mpe na ntina tóndima likoki oyo Nzambe azali na yango ya kokokisa mokano na ye. Na mikolo ya Mika, ezalaki mpasi kotyela moninga motema. Mosakoli akomaki boye: “Kondimela moninga te. Kotya motema epai ya moninga ya motema te.” Kasi, Mika akakatanaki te kotyela Yehova motema; yo mpe osengeli kokakatana te. Mika alobaki boye: “Ngai, ezali Yehova nde nakotalela.” (Mika 7:5, 7) Na bokeseni na bato oyo bakoki koyeba te makambo oyo ekoya, Yehova azali na mposa mpe na nguya ya kokokisa mokano na ye mpo na kosantisama ya bokonzi na ye mpe bolamu ya seko ya bato ya kondima.
22. Baoyo bazali kobelela nkombo ya Yehova na kondima bakoki kolikya nini?
22 Yo mpe okoki koloba lokola Habakuku ete: “Nakosepela makasi na Yehova ye moko, nakozala na esengo na Nzambe ya lobiko na ngai.” (Habakuku 3:18) Mosakoli Yoele amonisaki polele ntina oyo bato oyo babelelaka nkombo ya Yehova na kondima bazali na esengo; alobaki boye: ‘bakobika,’ Paulo mpe alobelaki likambo yango. (Yoele 2:32; Baroma 10:13) Kobika, na ndenge nini? Kondima oyo osili komonisa ebikisi yo na mayele mabe ya Satana mpe makambo mingi ya mpasi oyo bato ya mabe basengeli kokutana na yango. (1 Petro 1:18) Kasi, na koleka, okoki kotalela mikolo ezali koya na elikya ete okozwa lobiko ntango mokili oyo ekosuka na ndenge ya mabe mpenza. Mpe yango ekofungwela yo nzela ozwa mapamboli oyo basakoli 12 balobelaki.
MONÁ MWA MOKE NDENGE PARADISO EKOZALA
23, 24. (a) Wapi mwa makambo basakoli 12 balobeli, oyo emonisi mwa moke ndenge Paradiso ekozala? (b) Makambo oyo basakoli 12 bakomi esalisi yo otalela mikolo ezali koya ndenge nini?
23 Mapamboli oyo ezangi nsuka ebombami mpo na baoyo “babangaka Yehova.” (Malaki 3:16) Basakoli mosusu kati na basakoli 12, bamonisaki mwa moke ndenge paradiso ekozala awa na mabele, makambo oyo ekoki kosepelisa yo mingi mpe kotinda yo ozela yango na motema likoló. Na ndakisa, Mika akomaki boye: “Bakofanda mpenza, moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi, mpe moto ata moko te akozala mpo na kolɛngisa bango.” (Mika 4:4) Ya solo, na nse ya Bokonzi ya Nzambe, okozala mpenza na libateli mpe okobuka mbuma ya mosala na yo makasi!
24 Ezali ndɔtɔ mpamba te, kolikya ete maladi, bampasi, ata mpe liwa ekosila. Kanisá esengo oyo baoyo bakosekwa na elikya ya kokóma bato ya kokoka bakozala na yango! Bakomona na bonene mpenza awa na mabele, kokokisama ya likambo oyo Hosea 13:14, elobeli: “Nakosikola bango na lobɔkɔ ya Nkunda; nakobikisa bango na liwa. Ee Liwa, wapi bitubeli na yo? Ee Nkunda, wapi nguya na yo ya kobebisa?” Paulo asalelaki vɛrsɛ yango mpo na kolobela lisekwa ya bato oyo bakokende na likoló.—1 Bakorinti 15:55-57.
25. Okoyoka ndenge nini ntango okozala na mokili ya sika?
25 Esengeli kozala mpasi te kondima ete lisekwa ya bato oyo bakofanda awa na mabele ekosalema. (Zekaria 8:6) Ntango Amose ná Mika basakolaki ete basaleli ya Nzambe bakobima na boombo, likambo yango ekokaki kozala mpasi mpo na kondima. Kasi, oyebi ete esalemaki. (Amose 9:14, 15; Mika 2:12; 4:1-7) Bato yango oyo bazongaki na mboka na bango, balobaki boye: “Tokómaki lokola bato oyo bazali kolɔta. Na ntango yango monɔkɔ na biso etondaki na kosɛka, mpe lolemo na biso na koganga ya esengo. . . . Yehova asali likambo moko monene na oyo asaleli biso. Tokómi na esengo.” (Nzembo 126:1-3) Ezali ndenge wana nde okoyoka na mokili ya sika ntango okozwa ‘lipamboli kino bosɛnga ekozala lisusu te.’
26. Mapamboli nini ezali kozela baoyo bazali kobatela na makanisi na bango mokolo ya Yehova?
26 Ntango “mokolo ya Yehova” ekolongola makambo ya mabe na mabele, “bokonzi ekokóma ya Yehova” na mobimba mpenza. (Obadia 15, 21) Ekozala mpenza lipamboli ya kitoko mpo na bato na ye nyonso oyo bakofanda awa na mabele! Mpe okoki kozala na kati ya baoyo maloba ya Malaki 3 ekotalela bango: “‘Bakokóma mpenza bato na ngai,’ Yehova ya mampinga alobi bongo, . . . ‘Mpe nakomonisela bango motema mawa, ndenge moto amoniselaka mwana na ye oyo azali kosalela ye motema mawa.’” (Malaki 3:17) Emonani polele ete bosembo na yo, oyo epesi yo nzela ete obikisama, ekofungwela yo nzela ete ozwa ‘lipamboli kino bosɛnga ekozala lisusu te.’ Oyo nde elikya kitoko!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 1987, nkasa 14-20 (na Lifalanse).
b Paulo atángaki libongoli ya Grɛki ya Septante, epai maloba yango ekeseni moke na makomi ya Ebre.
MAKAMBO OYO ESALISI YO NA NINI?
• Matomba nini ozwi na kopɛtolama ya elimo ya basaleli ya Yehova na mikolo na biso?—Danyele 12:10; Malaki 3:12.
• Mpo na nini ozali na mposa ya kopesa Nzambe makabo mingi lisusu?—Hosea 14:2; 1 Petro 2:5.
BATELÁ MOKOLO YA YEHOVA NA MAKANISI NA YO
• Mpo na nini omoni ete ezali na ntina kobosana te maloba ya Habakuku 2:4?—Hosea 2:18, 20.
• Ndenge nini basakoli 12 basalisi yo okóma kozela mokili ya sika na mposa makasi?—Nzembo 126:1-3.
• Mpo na nini ozali na ekateli ya kobatela mokolo ya Yehova na makanisi na yo?—Yoele 2:1, 2; Habakuku 2:2, 3.
[Elilingi na lokasa 180, mpe 181]
Yehova apɛtolaka basaleli na ye nyonso. Mokomoko na biso azali mpe na makambo oyo asengeli komipɛtola?
[Elilingi na lokasa 187]
Yoele
[Bililingi na lokasa 188, mpe 189]
Basaleli ya Yehova bazali na kati ya bato oyo balingaka solo mpe boyengebene