Nkombo nini ebongi na yo?
Mwasi moko ya ekólo Éthiopie aboti mwana mobali. Kasi, esengo na ye ebongwani mawa ntango amoni ete mwana yango azali koningana te. Ntango nkɔkɔ ya mwana azwi ye mpo na kosukola ye, mwana abandi mbala moko koningana, kopema mpe kolela! Nkombo ya tata ya mwana yango elimboli “Likamwisi”; na yango baboti ya mwana basangisi nkombo yango ná liloba mosusu ya monɔkɔ ya Amharique mpe bapesi ye nkombo oyo elimboli Likamwisi esalemi.
Na Burundi, elenge mobali moko azalaki kokima basoda oyo bazalaki koluka koboma ye. Ntango azalaki komibomba na zamba, elenge mobali yango abondelaki Nzambe mpe alobaki na ye ete soki abikisi ye, akopesa mwana ya liboso oyo akobota nkombo Manirakiza, oyo elimboli “Nzambe azali mobikisi.” Mbula mitano na nsima, ntango abotaki mwana na ye ya liboso, apesaki ye nkombo yango mpo na kotɔnda Nzambe na ndenge abikisaki ye.
MOMESENO ya kopesa bana nkombo oyo ezali na ndimbola ebandá kala. Kutu, Biblia ezali na bankama ya bankombo ya ndenge wana. Koyeba ndimbola ya bankombo ndenge na ndenge oyo ezali na Biblia ekosalisa yo ozwa matomba mingi lisusu na botángi na yo ya Biblia. Tózwa mwa bandakisa.
Ndimbola ya bankombo na Makomami ya Liebele
Sete ezali moko ya bankombo ya liboso oyo ezali na ndimbola na kati ya Biblia; yango elimboli “Bapesi ngai.” Eva, mama ya Sete, alimbolaki ntina oyo apesaki mwana na ye nkombo yango; alobaki boye: “Nzambe apesi ngai mwana mosusu na esika ya Abele, oyo Kaina abomaki.” (Genese 4:25) Lameke, nkɔkɔ ya Sete, apesaki mwana na ye nkombo Noa, oyo elimboli “Kopema” to “Kobɔndisa.” Lameke alobaki ete apesaki mwana na ye nkombo yango mpo mwana yango asengelaki kozala ‘ye oyo akobɔndisa bango kati na bolɔzi mpe mosala makasi ya mabɔkɔ na bango epai ya mokili oyo elakaki Yehova mabe.’—Genese 5:29.
Nzambe mpe abongolaki bankombo ya bato mosusu mpo na kosakola likambo moko. Na ndakisa, abongolaki nkombo ya Abalama oyo elimboli “Tata oyo atombwami,” na Abalayama, oyo elimboli “Tata ya ebele ya bana.” Na boyokani na ndimbola ya nkombo yango, Abalayama akómaki mpe tata ya ebele ya mabota. (Genese 17:5, 6) Tótalela mpe nkombo ya mwasi ya Abalayama, Salai oyo ntango mosusu elimboli “Koswana.” Na ntembe te, asepelaki ntango Nzambe apesaki ye nkombo “Sala” oyo elimboli “Mokonzi mwasi,” mpo asengelaki kokóma nkɔkɔ ya bakonzi.—Genese 17:15, 16.
Nzambe apesaki mpe bana mosusu bankombo. Na ndakisa, ayebisaki Abalayama ná Sala ete bápesa mwana na bango nkombo Yisaka, oyo elimboli “Kosɛka.” Nkombo yango esengelaki ntango nyonso kokundwela bango esengo oyo bayokaki ntango Nzambe ayebisaki bango ete bakobota mwana atako bakómaki mibange. Ntango Yisaka akolaki mpe akómaki mosaleli ya sembo ya Nzambe, na ntembe te Abalayama ná Sala bazalaki kosepela soki bakanisi ndimbola ya nkombo ya mwana na bango ya bolingo.—Genese 17:17, 19; 18:12, 15; 21:6.
Laele, bokilo ya Yisaka, apesaki mwana na ye ya nsuka nkombo mpo na ntina mosusu. Ntango alingaki kokufa wana azalaki kobota, Laele apesaki mwana yango nkombo Bene-oni, oyo elimboli “Mwana ya matanga na ngai.” Yakobo, mobali na ye abengaki mwana yango Benyamina oyo elimboli “Mwana ya lobɔkɔ ya mobali.” Nkombo yango ezalaki komonisa ete mwana yango akolingama mingi mpe akozala mosungi.—Genese 35:16-19; 44:20.
Bazalaki mpe kopesa bato nkombo to kobongola nkombo na bango na kotalela ndenge moto azali komonana na miso. Na ndakisa, Yisaka ná Lebeka bazalaki na mwana oyo, ntango abotamaki, azalaki na nsuki motane mpe ebele lokola elamba ya lɛni; yango wana bapesaki ye nkombo Esau. Mpo na nini? Na Liebele, nkombo yango elimboli “Nsuki ebele.” (Genese 25:25) Mokanda ya Luta emonisi ete Naomi azalaki na bana mibale ya mibali. Moko nkombo na ye ezalaki Mehelone, oyo elimboli “Akufá lobi,” mpe mosusu Kiliyone, oyo elimboli “Alɛmbálɛmbá.” Biblia elobi te soki bapesaki bango bankombo yango ntango babotamaki to ntango bakolaki, kasi emonani ete bankombo yango ebongaki na bango mpenza, na kotalela ndenge bakufaki na bolenge.—Luta 1:5.
Momeseno mosusu oyo bato bazalaki na yango kala ezalaki ya kobongola bankombo. Ntango Naomi azongaki na Beteleme mabɔkɔ mpamba mpo mobali na ye mpe bana na ye mibale bakufaki, alingaki lisusu te bábenga ye Naomi, oyo elimboli “Esengo na ngai.” Alobaki boye: ‘Bóbenga ngai Naomi te, kasi bóbenga ngai Mala [oyo elimboli “Bololo”], mpo ete Oyo-na-Nguya-Nyonso asaleli ngai makambo ya bololo mingi.’—Luta 1:20, 21.
Ezalaki mpe na momeseno mosusu ya kopesa mwana nkombo mpo na kokanisa likambo moko ya ntina mingi. Na ndakisa, nkombo ya mosakoli Hagai elimboli “Abotami mokolo ya elambo.”a
Bankombo oyo ezali na ndimbola na ntango ya baklisto
Nkombo ya Yesu ezali na ndimbola moko ya ntina mingi. Liboso abotama, Nzambe ayebisaki baboti na ye ete basengeli “kobenga ye na nkombo Yesu,” nkombo oyo elimboli “Yehova azali mobikisi.” Mpo na nini? Anzelu oyo asololaki na Yozefe ayebisaki ye boye: “Akobikisa bato ya ekólo na ye na masumu na bango.” (Matai 1:21) Ntango Yesu azwaki batisimo mpe apakolamaki na elimo santu, babakiselaki ye nkombo ya Liebele “Masiya.” Na Grɛki, nkombo yango ebongolami na “Klisto.” Nyonso mibale elimboli “Mopakolami.”—Matai 2:4.
Yesu mpe apesaki bayekoli na ye mosusu bankombo oyo ezalaki na ndimbola. Na ndakisa, apesaki Simona nkombo Kefa, oyo elimboli “libanga.” Kefa ayebanaki mingi na nkombo na ye ya Grɛki, “Petelo.” (Yoane 1:42) Yesu abengaki Yakobo ná ndeko na ye Yoane “Boanelegesi,” oyo elimboli “Bana ya nkake.”—Malako 3:16, 17.
Bayekoli ya Yesu mpe balandaki momeseno yango. Na ndakisa, bapesaki moyekoli Yozefe nkombo Balanabasi, oyo elimboli “Mwana ya libɔndisi.” Balanabasi azalaki kosala makambo oyo eyokanaki mpenza na nkombo yango na ndenge azalaki kobɔndisa bato mingi.—Misala 4:34-37; 9:27; 15:25, 26.
Ndimbola ya nkombo na yo
Toponaki te nkombo oyo bapesaki biso ntango tobotamaki. Nzokande, biso moko toponaka lokumu oyo tokozala na yango na miso ya bato. (Masese 20:11) Omituna boye: ‘Soki Yesu to bantoma basengelaki kopesa ngai nkombo, nkombo nini balingaki kopesa ngai? Nkombo nini ebongi mpo na komonisa bizaleli to bomoto na ngai?’
Komituna bongo ezali na ntina mpenza. Mpo na nini? Mokonzi Salomo akomaki boye: “Nkombo malamu ekoki koponama liboso ya misolo mingi.” (Masese 22:1) Ya solo, soki tozali na nkombo ya malamu to bizaleli ya malamu, yango ezali na motuya mingi. Kasi, likambo oyo eleki ntina, soki tozali na nkombo malamu liboso ya Nzambe, tokozwa likabo ya libela. Mpo na nini tolobi bongo? Nzambe alaki ete akokoma bankombo ya bato oyo babangaka ye na “mokanda ya kokanisa” mpe akopesa bango elikya ya bomoi ya seko.—Malaki 3:16; Emoniseli 3:5; 20:12-15.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Batatoli ya Yehova mingi na Afrika bazali na bankombo oyo bapesá bango mpo na kokanisa mayangani oyo esalemaki ntango babotamaki.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 15]
Nkombo nini ebongi mpo na komonisa bomoto na ngai?
[Etanda/Elilingi na lokasa 14]
Emanuele azalaki nani?
Na Biblia, bankombo ya bato mosusu ezalaki bisakweli, ezalaki mpe komonisa mosala oyo moto yango akosala. Na ndakisa, Nzambe atindaki mosakoli Yisaya akoma boye: “Talá, mwana mwasi akobota mwana mobali mpe akobyanga nkombo na ye, Emanuele.” (Yisaya 7:14) Nkombo yango elimboli “Nzambe azali elongo na biso.” Balimboli mosusu ya Biblia bamekaka komonisa ete esakweli yango ekokisamaki mpo na mbala ya liboso epai ya mokonzi moko ya Yisalaele to epai ya mwana moko ya Yisaya. Nzokande, Matai amonisi ete esakweli ya Yisaya ekokisamaki na mobimba epai ya Yesu.—Matai 1:22, 23.
Bato mosusu balobaka ete ndenge Biblia ebengi Yesu Emanuele, yango emonisi ete Yesu azali Nzambe. Kasi, soki ezali bongo, Elihu, elenge mobali oyo abɔndisaki Yobo, azali mpe Nzambe. Mpo na nini? Nkombo na ye mpe elimboli “Nzambe na ngai ezali ye.”
Yesu alobaki te ete azali Nzambe. (Yoane 14:28; Bafilipi 2:5, 6) Kasi, amonisaki bomoto ya Tata na ye na ndenge ya kokoka, mpe akokisaki makambo nyonso oyo Nzambe alakaki na ntina na Masiya. (Yoane 14:9; 2 Bakolinti 1:20) Nkombo Emanuele emonisi malamu mokumba ya Yesu lokola Momboto, mokitani ya Davidi, ye oyo amonisaki ete Nzambe azali elongo na baoyo bazali kosambela ye.
[Elilingi]
EMANUELE “Nzambe azali elongo na biso”
[Etanda/Elilingi na lokasa 15]
Nkombo oyo eleki bankombo nyonso
Nkombo ya Nzambe ekomamá mbala soki 7 000 na Biblia. Nkombo yango emonisami na balɛtrɛ minei ya Liebele יהוה, mpe mbala mingi babongolaka yango na “Yehova” to “Yawe” na Lingala. Nkombo yango elimboli nini? Ntango Moize atunaki Nzambe nkombo na ye, Yehova alobaki boye: “Nakozala oyo nakozala.” (Exode 3:14, NW) Nkombo ya Nzambe ezali ndanga ete akokóma nyonso oyo asengeli kokóma mpo na kokokisa mokano na ye. (Yisaya 55:8-11) Ntango Nzambe apesi elaka, tosengeli kondima yango mpe kotambwisa bomoi na biso na boyokani na mokano yango. Mpo na nini? Mpamba te nkombo na ye ezali Yehova.
[Elilingi na lokasa 13]
ABALAYAMA “Tata ya ebele ya bana”
[Elilingi na lokasa 13]
SALA “Mokonzi mwasi”