Tómekola Yesu tósambela Nzambe na ndenge alingaka
Nzambe, na bolingo na ye, azali kobenga bato “na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso” mpo básambela ye. (Emon. 7:9, 10; 15:3, 4) Baoyo bazali kondima kosala yango bakoki ‘kotala boboto ya Yehova.’ (Nz. 27:4; 90:17) Lokola mokomi ya Nzembo, bazali kotombola mingongo na bango mpo na kokumisa Nzambe na maloba oyo: “Yakani ete tósambela mpe tókumbama; tókwea na mabɔlɔngɔ liboso ya [Yehova] mozalisi na biso.”—Nz. 95:6.
Losambo oyo Yehova asepelaka na yango mingi
Lokola mwana mobotami-se-moko ya Nzambe, Yesu azwaki mpenza ntango ya koyekola makanisi mpe mitinda ya tata na ye. Yango wana, abongi mpenza mpo na kolakisa biso lolenge malamu ya kosambela Yehova. Alobaki ete: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.”—Yoa. 1:14; 14:6.
Yesu azali ndakisa malamu mpenza na oyo etali kotosa Tata na ye. Alobaki boye: “Nasalaka eloko moko te na likanisi na ngai moko; kasi kaka ndenge Tata ateyaki ngai, ndenge mpe nazali koloba makambo oyo.” Mpe abakisaki boye: “Nasalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka ye.” (Yoa. 8:28, 29) Yesu asepelisaki tata na ye na makambo nini?
Ya liboso, Yesu amipesaki mobimba epai ya Tata na ye, mpe yango mpenza nde elimboli kosambela Nzambe. Yesu akangamaki mpenza na Tata na ye mpe azalaki kotosa Ye; asalaki mokano na Ye ata ntango esɛngaki akufa. (Filp. 2:7, 8) Yesu amonisaki ete azali mosambeli ya solosolo na ndenge amipesaki mpenza na mosala ya kokómisa bato bayekoli, mpe yango esalaki ete ná bato oyo bandimaki ye ná baoyo bandimaki ye te bábenga ye Moteyi. (Mat. 22:23, 24; Yoa. 3:2) Longola yango, Yesu amipesaki mpo na basusu. Lokola azalaki na elimo ya komipesa, azalaki na ntango mingi te mpo na kosala makambo na ye moko, kasi azalaki kosepela kosalela basusu. (Mat. 14:13, 14; 20:28) Atako azalaki na makambo mingi ya kosala, Yesu azalaki ntango nyonso kosomba ntango mpo na kosolola na Tata na ye ya likoló. (Luka 6:12) Losambo ya Yesu ezalaki mpenza na motuya na miso ya Nzambe!
Ezalaka pɛtɛɛ te mpo na kosepelisa mpenza Nzambe
Yehova amonaki etamboli ya mwana na ye mpe alobaki ete andimi ye. (Mat. 17:5) Kasi, Satana Zabolo mpe amonaki ete Yesu azali sembo epai ya Yehova. Yango wana, akómaki koluka na ndenge nyonso akweisa Yesu. Mpo na nini? Mpo liboso ya Yesu, moto moko te atosaki Nzambe mpe asambelaki ye ndenge alingaka básambela ye ndenge Yesu asalaki. Mpe Zabolo alukaki kopekisa Yesu asambela Yehova na ndenge oyo ebongi na ye.—Emon. 4:11.
Mpo na koluka kokweisa Yesu, Satana ayelaki ye likanisi moko oyo ekokaki kobenda ye. Amemaki Yesu na “ngomba moko ya molai mpenza koleka, mpe alakisaki ye makonzi nyonso ya mokili mpe nkembo na yango.” Na nsima, alobaki ete: “Biloko oyo nyonso nakopesa yo soki okwei na nse mpe osambeli ngai.” Yesu asalaki nini? Alobaki ete: “Longwá awa, Satana! Mpo ekomamá ete, ‘Ezali Yehova Nzambe na yo nde osengeli kosambela, mpe ezali kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.’” (Mat. 4:8-10) Yesu ayebaki ete kofukama liboso ya Satana ná kosambela bikeko ezali kaka ndenge moko, ata soki yango ekokaki komemela ye litomba monene. Amonaki ete losambo ebongi kaka na Yehova ye moko, kasi na moto mosusu te.
Nzokande mpo na biso, Satana akopesa biso makonzi nyonso ya mokili mpe nguya na yango te mpo tósambela ye. Kasi, azali kosala nyonso mpo na kobebisa losambo ya baklisto ya sembo. Zabolo alingi tósambela moto to eloko mosusu.—2 Kol. 4:4.
Yesu Klisto atikalaki sembo tii na liwa. Lokola atikalaki sembo, Yesu apesaki Yehova nkembo na ndenge oyo moto moko te asalá yango. Lelo oyo, biso baklisto ya solo tozali mpe kosala nyonso mpo na kotya losambo ya Mozalisi na biso liboso ya makambo nyonso ndenge Yesu azalaki kosala. Na yango, boyokani na biso ná Nzambe ezali likambo eleki ntina na bomoi na biso.
Mapamboli oyo tokozwa
Kopesa mabɔkɔ mpo na kotombola “losambo oyo ezali pɛto mpe ezangi mbindo” na miso ya Nzambe ezali na matomba mingi. (Yak. 1:27) Na ndakisa, tozali na eleko oyo etondi na “bato oyo bamilingaka bango moko, bato balingá mbongo, bato ya lofundo” mpe “bazangi bolingo ya makambo ya malamu.” (2 Tim. 3:1-5) Nzokande, na kati ya ndako ya Nzambe, tozali na libaku ya kosangana na bato ya pɛto oyo bazali kosala nyonso mpo na kosambela Nzambe na ndenge ye alingaka. Likambo yango esengeli mpenza kobɔndisa biso!
Soki totiki te ete mokili oyo ebebisa biso, tokozala na lisosoli ya pɛto; yango mpe ezali lipamboli mosusu. Tokozala na lisosoli ya pɛto soki tozali kotosa mitinda ya sembo ya Nzambe mpe mibeko ya Kaisala, soki ebuki mibeko ya Nzambe te.—Mko. 12:17; Mis. 5:27-29.
Kosambela Nzambe na molimo mobimba ezali mpe na mapamboli ya ndenge mosusu. Soki tozali kotya mokano ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na biso, tokozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo. Na esika ya koloba: “Tiká tólya mpe tómɛla, mpo lobi tokokufa,” tozali na elikya ya solosolo ya kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé.—1 Kol. 15:32.
Mokanda ya Emoniseli ezali kolobela ntango oyo bato oyo bazali pɛto na miso ya Yehova ‘bakouta na bolɔzi monene.’ Vɛrsɛ yango elobi ete ye “oyo afandi na kiti ya bokonzi akotanda hema na ye likoló na bango.” (Emon. 7:13-15) Moto oyo afandi na kiti ya Bokonzi ezali moto mosusu te, kaka Yehova Nzambe, oyo aleki likoló na molɔngɔ mobimba. Kanisá naino esengo oyo okozala na yango ntango Yehova akoyamba yo na hema na ye mpe akobatela yo mpo ata likambo moko ya mabe ekómela yo te! Mpe ata sikoyo, Yehova abatelaka biso na makambo mosusu.
Lisusu, Biblia elobi ete baoyo bazali kosambela Yehova na ndenge alingaka bazali kokambama na “maziba ya mai ya bomoi.” Maziba yango ezali bibongiseli nyonso oyo Yehova azwi mpo na kosalisa biso tózwa bomoi ya seko. Ɛɛ, na lisalisi ya lisiko ya klisto, “Nzambe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango.” (Emon. 7:17) Bato bakokóma bato ya kokoka, mpe yango ekomemela bato oyo bazali na elikya ya kofanda libela na libela awa na mabelé esengo oyo ezali na nsuka te. Ata lelo oyo, basambeli ya Nzambe bazali koganga na esengo, kotɔnda Yehova mpe kosambela ye elongo na baoyo bazali koyemba na likoló ete: “Misala na yo ezali minene mpe ya kokamwa, Yehova Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Banzela na yo ezali ya boyengebene mpe ya solo, Mokonzi ya seko. Nani akobanga mpenza yo te, Yehova, mpe akopesa nkombo na yo nkembo te, mpo yo moko kaka nde ozali sembo? Mpo bikólo nyonso bakoya mpe bakosambela liboso na yo, mpamba te mibeko na yo ya boyengebene mimonani polele.”—Emon. 15:3, 4.
[Elilingi na lokasa 27]
Eloko nini Satana apesaka biso mpo tósambela ye?