Molubá mpe mbisi, elimboli nini mpo na yo?
“Bino nde bopesameli nzela ya kososola mabombami mosantu na bokonzi ya makoló.”—MATAI 13:11, MN.
1, 2. Mpo na nini tosengeli kotalela masese na Yesu?
OLINGAKA koyeba mabombami to kolimbola masese? Bongo soki yango esalisi yo na kososola malamu mokumba na yo kati na mokano na Nzambe? Likambo ya esengo mpenza, okoki kozala na libaku kitoko ya kozwa bososoli motindo wana na nzela ya lisese oyo Yesu apesaki. Bato mingi oyo bayokaki yango bakamwaki, mpe uta ntango wana, bato mingi bazali kosimba ndimbola na yango te; kasi yo okoki kokanga ntina na yango.
2 Totala oyo Yesu alobaki na Matai, mokapo 13, mpo na motindo oyo azalaki kosalela masese. Bayekoli na ye batunaki ye ete: “Mpo na nini ozali koloba na bango na masese?” (Matai 13:10) Bongo, mpo na nini Yesu azalaki kosalela masese oyo bato mingi bazalaki kokanga ntina na yango te? Ayanolaki na verset 11 kino verset 18, ete: “Bino nde bapesameli nzela na kososola mabombami mosantu na bokonzi ya makoló, kasi yango epesameli na bato wana te. . . . Na ntina yango nazali kolobela bango na masese, mpo ete ezali bango kotala, bakotala bobele mpamba; mpe ezali bango koyoka, bakoyoka bobele mpamba mpe bayebi kokanga ntina na yango te.”
3. Tokozwa bolamu nini soki tokangi ntina na masese na Yesu?
3 Na nsima, Yesu akokisaki yango na Yisaya 6:9, 10, oyo elobeli bato oyo bazalaki bimimi mpe bakufeli miso kati na elimo. Kasi biso tosengeli kokesene na bango. Soki tokangi ntina ya masese na Yesu mpe soki tomiyokanisi na yango, tokoki kozala na esengo mingi sikawa, mpe mpo na libela. Yesu apesi biso elikya oyo ete: “Esengo na miso na bino mpo ete mazali komona, mpe esengo na matoi na bino mpo ete mazali koyoka.” (Matai 18:16, MN) Maloba oyo matali masese nyonso na Yesu, kasi totalela naino lisese moke ya molubá, oyo lizwami na Matai 13:47-50.
Lisese mozindo
4. Yesu alobaki nini kati na lisese oyo lizwami na Matai 13:47-50?
4 Bokonzi ya makoló ekokani na molubá mobwakami na mai mpe moyanganisi motindo na mbisi nyonso. Wana yango etondaki, balɔbi mbisi babendaki yango na libóngo, mpe efandaki bango, batyaki mbisi kitoko na bikɔló na bango, kasi babwakaki yango ezalaki na ntina te. Ekozala bobele bongo na nsuka ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo: baanzelu bakobima mpe bakokabola bato mabe longwa na bayengebene mpe bakobwaka bango na litumbo ya mɔ́tɔ makasi. Kolela mpe kolya mino ekozala wana.”
5. Motindo na mituna nini mitunami na ntina na ndimbola ya lisese ya molubá?
5 Na cinéma to na televizio, mbala mosusu osilá komona bato bazali kolɔba mbisi na molubá; boye ozali mpenza na nkaká te mpo na koyeba lisese na Yesu. Kasi, ezali boni mpo na makambo oyo mazali kati na yango mpe mpo na ndimbola na yango? Na ndakisa, Yesu alobaki ete lisese yango litali “bokonzi ya makoló.” Nzokande, alingaki koloba te ete bato ya “motindo nyonso,” ezala bato malamu to mpe baoyo bazali na ntina te, bato mabe, bakozala kati na Bokonzi na Nzambe. Lisusu, banani bazali balobi mbisi? Mosala wana ya kolɔba mbisi mpe kokabola, esalemaki na mikolo na Yesu to mpe ezali kosalema bobele na eleko na biso, “nsuka na ebongiseli ya biloko ya ntango oyo”? Makambo mazali kati na lisese oyo, makokani na yo? Ndenge nini okoki kopɛngola ete ozala esika moko te na baoyo bazali kolela mpe kolya mino?
6. (a) Mpo na nini tosengeli kozala na mposa ya kososola lisese ya molubá? (b) Tangá eloko moko ya ntina mingi oyo ezali kosalisa biso na kososola yango.
6 Mituna motindo oyo mimonisi ete lisese yango lizali mpenza pɛtɛɛ te. Kasi, tobosana te maloba oyo ete: “Esengo na miso na bino mpo ete mazali komona, mpe esengo na matoi na bino mpo ete mazali koyoka.” Totala soki tokoki kolimbola lisese yango na bozindo ete matoi na biso mazipama te, mpe miso na biso makangama te na ntina na yango. Solo mpenza, tozali na eloko moko ya ntina ekosalisa biso na koyeba ndimbola na yango. Lisoló lizali liboso lilobelaki biso na ntina na libyangi oyo Yesu apesaki epai na balɔbi mbisi na Galilai ete batika mosala na bango mpo na kobanda mosala ya elimo, lokola “balɔbi na bato.” (Malako 1:17) Alobaki na bango ete: “Uta sikawa okozala mokangi na bato na bomoi.”—Luka 5:10, MN.
7. Mbisi ya lisese na Yesu emonisi nini?
7 Na boyokani na maloba oyo, mbisi ya lisese emonisi bato. Na yango, wana verset 49 elobeli kokabwana kati na bato mabe mpe bayengebene, elobeli te bikelamu oyo bizali na mai, kasi bato na sembo to mpe bato mabe. Verset 50 esengeli mpe te kopesa biso likanisi ete ezali banyama ya mai nde ezali kolela to kolya mino. Te, lisese wana lilobeli koyanganisama na bato mpe, na nsima, kokabolama na bango, oyo ezali na ntina mingi, lokola yango elakisami na nsuka ebómbami mpo na bango.
8. (a) Tokoki koyekola nini mpo na likambo lizali kozela mbisi oyo ezali na ntina te? (b) Tokoki kosukisa nini na ntina na Bokonzi na Nzambe, na kotalela oyo ekomamaki mpo na mbisi oyo ezangi ntina?
8 Osili komona ete mbisi oyo ezali na ntina te, elingi koloba bato mabe, bakobwakama na litumbo ya mɔ́tɔ makasi, epai bakolela mpe bakolya mino? Epai mosusu, Yesu alobi ete kolela mpe kolya mino ekozala epai na baoyo bazali “libandá” na Bokonzi na Nzambe. (Matai 8:12; 13:41, 42) Na Matai 5:22 mpe 18:9 (MN) alobelaki nkutu “Gehena ya mɔ́tɔ,” oyo elimboli kobebisama ya seko. Yango emonisi mpenza ntina ya kososola ndimbola ya lisese wana mpe kosala na boyokani na yango, boye te? Biso nyonso toyebi ete bato mabe bazali kati na Bokonzi na Nzambe te, mpe bakozala kati na yango te. Na bongo, na ntango alakisaki ete “bokonzi ya makoló ekokani na molubá,” na ntembe te, Yesu alingaki koloba ete, na boyokani na Bokonzi na Nzambe, ezali na esaleli moko ekokani na molubá, oyo esili kobwakama mpo na kokanga mitindo na mbisi mikeseni.
9. Mokumba nini baanzelu bazali na yango kati na lisese ya molubá?
9 Wana molubá mokobwakama mpe wana mbisi ekokangama, mosala ya kokabola mokobanda. Engebene Yesu, nani asengelaki kosala mosala yango? Matai 13:49 esili komonisa ete balɔbi mbisi oyo bakosala mosala yango ya kokabola, ezali nde baanzelu. Yesu alobaki na biso ete, na nsé na bokɛngɛli ya baanzelu, esaleli moko na mabelé ekotya bato bilembo: bato mosusu ya malamu bakosalelama mpo na Bokonzi ya makoló, nzokande mosusu bakozala na ntina te mpo na libyangi wana.
Ntango nini mosala ya kolɔba mbisi mosengelaki kosalema?
10. Likanisi nini lipesi biso nzela na kosukisa ete mosala ya kolɔba mbisi mosengelaki kosalema na boumeli ya eleko molai?
10 Ba versets ya zingazinga ezali kosalisa biso na koyeba eleko oyo elobelami na lisese yango. Mwa liboso, Yesu apesaki lisese moko: lisese ya nkóna malamu kati na elanga, oyo emonisi mokili, mpe matiti mabe makónamaki likoló na yango. Alimbolaki na Matai 13:38 (MN) ete, nkona malamu emonisaki “bana na bokonzi; kasi matiti mabe, ezali bana na oyo mabe.” Motindo na nkóna wana mibale ekólaki esika moko na boumeli na bikeke mingi, kino na eleko ya kobuka mbuma, na nsuka na ebongiseli ya biloko ya ntango oyo. Matiti mabe malongolamaki mpe mazikisamaki. Soki tokokanisi lisese oyo na lisese ya molubá, tozali komona ete mosala ya kolɔba mbisi mosengelaki kosalema na boumeli ya ntango molai.—Matai 13:36-43.
11. Mosala ya kolɔba mbisi na bikólo nyonso mazwaki ebandeli nini na ekeke ya liboso?
11 Engebene lisese na Yesu, mbisi esengelaki kozwama kozanga kopona; na maloba mosusu, molubá mosengelaki kokanga mbisi malamu mpe mbisi oyo ezali na ntina te. Wana bantoma bazalaki na bomoi, baanzelu oyo bazalaki kokamba mosala wana ya kolɔba mbisi basalelaki lisangá ya boklisto na Nzambe mpo na kokanga “mbisi” oyo ekómaki bongo baklisto bapakolami. Okoki ntango mosusu koloba ete, liboso ya Pantɛkɛte ya mobu 33, Yesu alɔbaki soko bayekoli 120. (Misala 1:15) Kasi na ntango lisangá ya baklisto bapakolami lisalemaki, mosala ya kolɔba mbisi na molubá mobandaki, mpe bankɔto na mbisi kitoko ekangamaki. Kobanda mobu 36 ya ntango na biso, mosala ya kolɔba mbisi mosalemaki na etando monene na mai ya bikólo nyonso, mpamba te Bapakano babendamaki epai na boklisto ya solo mpe bakómaki basangani ya lisangá na bapakolami ya Klisto.—Misala 10:1, 2, 23-48.
12. Eloko nini ekólaki nsima na liwa ya bantóma?
12 Na bikeke oyo bilandaki nsima na bantóma, ezalaki na baklisto oyo bazalaki kosala makasi mpo na koyeba solo ya Nzambe mpe batosaki yango. Basusu kati na bango, bandimamaki na Nzambe, mpe apakolaki bango na elimo santu. Kasi, liwa na bantóma, oyo bopusi na bango ezalaki epekiseli kino na ntango wana, epesaki nzela na bokóli ya lipɛngwi monene. (2 Batesaloniki 2:7, 8) Ebongiseli oyo esalemaki na ntango wana, emipesaki nkombo lisangá na Nzambe. Emitangaki na lokuta nyonso ete, yango nde ezali libota mosantu lipakolami na elimo na Nzambe mpo na koyangela elongo na Yesu.
13. Mpo na nini tokoki koloba ete boklisto ya lokutá esanganaki mpe kati na mosala ya kobwaka molubá?
13 Mpo na yo, bato bazangi sembo oyo bakomitangaka ete bazali baklisto ya solo, bamonisamaki kati na lisese ya molubá? Tokoki mpenza koyanola ete ezali bongo. Molubá ya elilingi mosangisi mpe boklisto ya lokutá kati na yango. Ya solo, na boumeli ya ntango molai, Lingomba ya katolike limekaki kopekisa bato ete batanga Biblia te. Atako bongo, na boumeli ya bikeke mingi, basangani ya boklisto ya lokutá babongolaki Liloba na Nzambe, bayeisaki yango na bakopi mingi mpe bakabolaki yango na kokokisáká bongo mosala moko ya ntina mingi. Na nsima, Mangomba basalaki to basungaki bisika oyo bikobimisaka Biblia, epai babongolaki Makomami na minoko milobami na bamboka mosika ya mokili. Batindaki mpe bamisionere ya minganga mpe balakisi oyo babimisaki bato oyo bakómaki baklisto bobele mpo na kokokisa bamposa ya libumu. Ntalo monene na mbisi oyo ezali na ntina te, oyo endimamaki na Nzambe te, eyanganisamaki. Atako bongo, bamilió na bato oyo bazalaki baklisto te, bakómaki kotanga Biblia mpe bakómaki na boyokani elongo na motindo moko na boklisto, atako yango ezalaki boklisto ya mabe.
14. Na ndimbola nini tokoloba ete mosala mokokisami na Mangomba ya boklisto ya lokutá mosungaki mpo na kokanga mbisi kitoko?
14 Na boumeli ya ntango nyonso wana, baklisto ya sembo oyo bakangamaki na Liloba na Nzambe epai na epai, bazalaki kosala oyo ekokaki na bango kosala. Ata na eleko nini ya Lisoló na bato, bango nde bazalaki lisangá ya solo ya bapakolami na Nzambe awa na mabelé. Mpe tokoki kondimisama ete bango mpe bazalaki kokanga mbisi, bato, baoyo mingi na bango bamonanaki kitoko epai na Nzambe, oyo apakolaki bango na elimo na ye. (Baloma 8:14-17) Baklisto wana ya malamu mingi bayebisaki solo ya Biblia epai na bato mingi oyo bakómaki baklisto bobele mpo na kokokisa mposa ya libumu to baoyo bazwaki mwa boyebi ya Makomami na nzela na mabongoli mabimisamaki na minoko na bango na nzela na bibongiseli ya boklisto ya lokuta oyo akobimisaka Biblia. Bakóbaki bongo kozwa mbisi kitoko, atako mpo na Nzambe, mbisi mingi oyo ekangami na boklisto ya lokutá ezali na ntina te.
15. Molubá ya lisese momonisi mpenza nini?
15 Na yango, molubá emonisi esaleli ya mabelé oyo ezali bongo lisangá ya Nzambe mpe ezali koyanganisa mbisi. Molubá wana elimboli boklisto ya lokutá mpe lisangá ya baklisto bapakolami oyo elandi kokanga mbisi kitoko na nsé na litambwisi lizangi komonana ya baanzelu, na boyokani na oyo tokoki kotanga na Matai 13:49.
Tozali kobika na eleko ya ntina mingi
16, 17. Mpo na nini eleko oyo tozali kobika ezali mpenza na ntina mingi kati na kokokisama na lisese ya molubá oyo Yesu apesaki?
16 Sikawa, totalela likambo yango na kolanda ntango. Na boumeli ya bikeke mingi, molubá mokangaki mbisi kitoko mpe ebele na mbisi ezali na ntina te, to mpe bato mabe. Na nsima, ntango ekokaki wana baanzelu babandaki mosala monene ya kokabola. Yango esalemaki ntango nini? Verset 49 elobi polele mpenza ete na boumeli ya “nsuka na ebongiseli ya biloko ya ntango oyo.” Tala likambo liyokani na oyo Yesu alobaki kati na lisese ya bampate mpe bantaba, ete: “Ekoya Mwana na moto kati nkembo na ye, mpe baanzelu nyonso elongo na ye, akofanda na kiti na bokonzi na ye ya nkembo. Mpe mabota nyonso makoyangana liboso na ye, mpe akokabola bato lokola mobateli na bibwele akokabolaka bampate na bantaba.”—Matai 25:31, 32, MN.
17 Na yango, na boyokani na Matai 13:47-50, mosala monene ya kokabola mozali kosalema na nsé na litambwisi ya baanzelu uta 1914, date oyo “nsuka na ebongiseli ya biloko ya ntango oyo” ebandaki. Yango emonanaki polele nsima ya mobu 1919, ntango batikali na baklisto bapakolami basikolamaki longwa na nkangá ya elimo oyo bazalaki na yango na boumeli ya mwa ntango, mpe bakómaki esaleli ya makoki mingi kati na mosala ya koloba mbisi.
18. Na ndimbola nini mbisi kitoko eyanganisami kati na bikɔlɔ́?
18 Likambo nini lisengelaki kokómela mbisi kitoko nsima na koponama? Verset 48 elobi na ntina na baanzelu balɔbi mbisi oyo bazalaki kokokisa mosala ya kokabola, ete: “Batyaki mbisi kitoko na bikɔlɔ́ na bango, nde babwakaki yango ezalaki na ntina te.” Bikɔlɔ́ bizali kobatela mbisi kitoko oyo etyami kati na yango. Tozali nde komona likambo motindo oyo na mikolo na biso? Solo mpenza. Na meko oyo mbisi kitoko na elilingi ezali kokangama wana ezali yango na bomoi, eyanganisami kati na masangá ya baklisto ya solo. Masangá yango makokisami na bikɔlɔ́, mazali kobatela bango mpe kobulisa bango mpo na mosala ya Nzambe. Yango ezali likanisi na yo te? Kasi, moto mosusu akoki kokanisa ete: ‘Nyonso wana ezali mpenza malamu, kasi yango ezali na boyokani nini na bomoi na ngai ya sikawa mpe na mikolo mizali koya?’
19, 20. (a) Mpo na nini ezali likambo ya ntina na eleko na biso ete tososola ndimbola ya lisese oyo? (b) Mosala nini ya ntina mingi mpo na kolɔba mbisi oyo esalemaki kobanda 1919?
19 Kokokisama ya lisese oyo esukaki te bobele na bikeke oyo bilekaki katikati na eleko ya bantóma mpe mobu 1914. Na boumeli ya eleko wana, molubá moyanganisaki baklisto ya lokutá mpe baklisto ya solo. Ee, ekangaki mbisi ezali na ntina te mpe mbisi kitoko. Kasi, mosala ya kokabola oyo mosalemaki na baanzelu mosukaki te pene na mobu 1919. Soko moke te. Na makambo mosusu, lisese ya molubá likokisami lisusu na eleko na biso. Totalelami na likambo yango, biso mpe bomoi na biso ye mikolo mizali koya mosika te. Tosengeli nokinoki kososola ntina nini mpe lolenge nini lisese yango likokokana, soki tolingi ete maloba oyo makokana mpo na biso: “Esengo na miso na bino mpo ete mazali komona, mpe esengo na matoi na bino mpo ete mazali koyoka,” mpe ete bozali kososola.—Matai 13:16, MN.
20 Na ntembe te, oyebi ete nsima na 1919, batikali bapakolami bamipesaki na mosala ya kosakola na kosalana elongo na baanzelu, baoyo balandaki kosalela moluba ya elilingi mpo na komema mbisi na libóngo mpe kokabola oyo ezalaki kitoko na oyo ezalaki na ntina te. Mituya ya eleko wana mimonisi ete mbisi kitoko oyo esengelaki kopakolama na elimo na Nzambe, ezalaki sé kokangama wana moluba ya elilingi mozalaki koyanganisa ba 144 000 ya nsuka. (Emoniseli 7:1-4) Kasi, pene na 1935, koyanganisama ya mbisi kitoko oyo esengelaki kopakolama na elimo santu ekómaki pene na kosuka. Lisangá ya batikali bapakolami lisengelaki kotika kosalela molubá mpe kozela na bolɛɔmbu nyonso ete bazwa mbano na bango na likoló? Soko moke te!
Mokumba na biso kati na mosala ya kolɔba mbisi
21. Mosala nini mosusu ya kolɔba mbisi mozali kosalema na eleko na biso? (Luka 23:43)
21 Kati na lisese ya molubá, Yesu atyaki likebi na mbisi kitoko oyo ekozwa esika kati na Bokonzi ya makoló lokola mbano. Kasi, libanda ya lisese oyo, mosala mosusu moleki monene mpo na kolɔba mbisi ya elilingi mozali kosalema, lokola tomonaki yango na lisolo lizali liboso. Mosala yango ya kolɔba mbisi mozali te mpo na koyanganisa mbisi kitoko epakolami, oyo elobelami na lisese na Yesu, kasi mpo na kokanga mbisi na bomoi ya elilingi mpe mpo na kopesa bango elikya kitoko ya kozala na bomoi na mabelé oyo ekokóma paradis.—Emoniseli 7:9, 10; tala Matai 25:31-46.
22. Nsuka nini ya esengo tokoki kozala na yango, soki bongo te, mbɛlɛ likambo nini likokómela biso?
22 Soki ozali na elikya yango, okoki kosepela lokola Jéhovah apesaki nzela ete mosala na lobiko ya kolɔba mbisi mokóba kosalema kino lelo oyo. Likoki lipesameli yo mpo na kozwa elikya kitoko ya mikolo mizali koya. Tobéngi yango ete elikya? Ee, wana ezali mpenza liloba oyo libongi mpo na yango, mpo ete nsuka ekotalela bosembo na biso epai na Ye oyo azali kokamba mosala ya kolɔba mbisi oyo mozali kosalema lelo. (Sofoni 2:3) Tomikundola ete, engebene lisese, mbisi nyonso ezwami na molubá ezali bobele na nsuka malamu te. Yesu alobaki ete mbisi ezali na ntina te, to bato mabe, bakokabolama na bayengebene. Na mokano nini? Na Matai 13:50, Yesu amonisi nsuka mabe ya kokabolama wana: mbisi oyo ezali na ntina te, to bato mabe, bakobwakama na litumbo ya mɔ́tɔ makasi oyo elimboli libebi ya seko.—Emoniseli 21:8.
23. Mosala ya kolɔba mbisi oyo mozali kosalema lelo, mokómi na ntina monene mpo na likambo nini?
23 Mikolo mizali koya mikozala mpenza kitoko mpo na mbisi kitoko epakolami, mpe mpo na mbisi ya elilingi epesameli elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabelé. Baanzelu bazali bongo na bantina malamu ya kosɛnzɛla ete mosala ya kolɔba oyo mozali kokanga mbisi mingi, mosalema lelo kati na mokili mobimba. Oyo nde ebele na mbisi! Tokoki mpenza koloba kozanga komikosa ete, na motindo mosusu, mosala yango ya kolɔba mbisi mozali mpenza likamwisi lokola oyo na bantóma, na ntango babwakaki milubá na bango mpo na kolɔba mbisi na kolanda toli na Yesu.
24. Tosengeli kolinga kosala nini na boyokani na mosala ya kolɔba mbisi na elimo?
24 Tozali mpenza kosangana na mosala ya lobiko na kolɔba mbisi na elimo na makoki na biso nyonso? Ata lolenge nini tozali kokokisa yango kino sikawa, moto na moto akoki kotya likebi na mosala oyo mokokisami na mabelé mobimba mpo na oyo etali kolɔba mbisi mosala na lobiko oyo mozali naino kosalema. Yango esengeli kopusa biso na kobwaka milubá na biso na molende mingi lisusu na mikolo mizali koya!—Tala Matai 13:23; 1 Batesaloniki 4:1.
Bozongeli
◻ Mitindo mibale na mbisi na lisese ya molubá oyo liyebisamaki na Yesu, mimonisi nini?
◻ Mangomba na boklisto ya lokutá makokisaki mokumba nini kati na mosala ya kolɔba mbisi na molubá?
◻ Mpo na nini mosala ya kolɔba mbisi na eleko na biso mozali monene?
◻ Motindo nini lisese ya molubá lisengeli kopusa moko na moko na biso na komitalela?
[Picture on page 18]
Uta bikeke mingi, bato bakolɛɔbaka mbisi na libéké ya Galilai
[Credit Line]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.