Bokonzi ya Nzambe—Ozali kosimba ntina na yango?
“Ye oyo akónami likoló na mabelé malamu azali ye oyo ayoki Liloba mpe [asimbi, “NW”] ntina na yango.”—MATAI 13:23.
1. Tangá mwa ndambo ya bindimeli oyo bato mingi bazali na yango na ntina na ‘bokonzi ya makoló.’
OSILÁ ‘kosimba ntina na’ oyo Bokonzi ya Nzambe elimboli mpenza? Na boumeli ya bikeke ndimbola ya maloba ‘Bokonzi na Likoló’ ebongwanaki mingi. Endimeli oyo eyebani mingi lelo kati na basangani ya mangomba ezali ete Bokonzi ezali eloko oyo Nzambe atyaka kati na motema ya moto na ntango abongoli motema. Basusu bakanisaka ete ezali nde esika oyo bato bakendaka nsima ya liwa mpo na komona bisengo ya seko. Nzokande, basusu bazali koloba ete Nzambe atikelaki bato mokumba ya kotya Bokonzi awa na mabelé na nzela ya mosala na bango ya kokɔtisa mateya mpe mimeseno ya boklisto kati na makambo ya bomoi ya bato na esika bafandi mpe kati na makambo matali boyangeli mboka.
2. Ndimbola nini Biblia epesi na ntina na Bokonzi ya Nzambe, mpe yango ekokokisa makambo nini?
2 Nzokande, Biblia ezali komonisa polele ete Bokonzi ya Nzambe ezali te ebongiseli moko oyo ezwami awa na mabelé. Ezali mpe te ezalela ya motema, soko mpe kobongolama ya bato nyonso na lingomba ya boklisto. Ya solo, kososola malamu Bokonzi ya Nzambe epusaka baoyo bazali na kondima kati na yango ete básala mbongwana minene kati na bomoi na bango. Kasi Bokonzi yango mpenza ezali nde boyangeli oyo Nzambe atye kuna na likoló mpo na kokokisa mokano na ye, mpo na kolongola mbéba ya lisumu mpe liwa mpe mpo na kozongisa ezalela ya makambo malongobani awa na mabelé. Bokonzi yango esilá kozwa nguya kuna na makoló, mpe mosika te “ekobuka mpe ekosilisa bikonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.”—Danyele 2:44; Emoniseli 11:15; 12:10.
3. Na ntango Yesu abandaki mosala na ye, libaku nini epesamaki epai na bato?
3 H. G. Wells, ye mokomi na makambo ya kala, akomaki ete: “Liteya ya Bokonzi ya Likoló, oyo ezalaki liteya ya moboko ya Yesu, kasi oyo ezali na ntina mingi te kati na mateya ya mangomba ya boklisto, ezali mpenza moko na mateya oyo esilá kolamwisa mpe kobongola makanisi ya bato koleka mateya nyonso mosusu.” Uta na ebandeli mpenza, motó ya likambo ya mosala ya Yesu ezalaki oyo ete: “Bóbongola mitema! Zambi Bokonzi na Likoló esili kobɛlɛma.” (Matai 4:17) Azalaki awa na mabelé lokola Mokonzi apakolami, mpe moko na bisengo eleki monene ezali oyo ete, nzela ebandaki bongo kofungwama te bobele mpo ete bato bázwa mapamboli uta na Bokonzi yango kasi lisusu mpo ete báyangela mpe bázala banganga elongo na Yesu kati na Bokonzi yango!—Luka 22:28-30; Emoniseli 1:6; 5:10.
4. Na ekeke ya liboso, lolenge nini bibele bayambaki “Nsango malamu na Bokonzi,” mpe yango ememelaki bango esambiseli nini?
4 Atako bibele bayokaki “Nsango Malamu na Bokonzi” oyo ezali bongo nsango ya kosepelisa, nzokande bobele bato moke nde bandimaki. Moko na bantina ezali ete bakonzi ya mangomba ‘bakangaki bokonzi ya Nzambe liboso na bato.’ ‘Balongolaki fungola na boyebi’ na nzela ya mateya na bango ya lokuta. Lokola bato mingi baboyaki kondima Yesu lokola Masiya mpe Mokonzi apakolami ya Bokonzi ya Nzambe, Yesu alobaki na bango ete: “Bokonzi na Nzambe ekolongwa na bino mpe ekopesama na libota likobimisa mbuma na yango.”—Matai 4:23; 21:43; 23:13; Luka 11:52.
5. Lolenge nini ebele monene ya baoyo bayokaki masese ya Yesu bamonisaki ete bayokaki te na bososoli nyonso?
5 Mokolo mosusu, wana azalaki koteya liboso na ebele ya bato, engebene momeseno na ye, Yesu asalelaki masese mpo na komeka ebele ya bato yango mpe kotala banani na kati na bango bazalaki kotya likebi mozindo te likoló na Bokonzi. Lisese ya liboso elobelaki molóni moko oyo alónaki mombóto kati na mitindo minei ya mabelé makeseni. Mitindo misato ya mabelé oyo alobelaki liboso ezalaki mabelé oyo ebongaki te mpo na kokólisa miloná, kasi oyo alobelaki na nsuka ezalaki “mabelé malamu” oyo ebimisaki mbuma malamu. Asukisaki lisese yango mokuse na kopesáká elendiseli oyo: “Ye oyo azali na matoi, ayoka.” (Matai 13:1-9) Mingi na bato oyo bazalaki wana balandaki ye, kasi ‘bayokaki’ te. Eloko moko te epusaki bango, bazalaki mpenza na mposa te ya koyeba na ndimbola nini mombóto oyo ekónami na bisika bikeseni ezalaki lokola Bokonzi ya makoló. Bazongaki na bandako na bango mpe bazongelaki makambo ya bomoi na bango ya mokolo na mokolo, ekoki mpenza kozala ete bakanisaki ete masese ya Yesu mazalaki bobele masapo kitoko mpo na koteya malamu na mabe. Bazangaki mpenza kozwa bososoli monene, mpe mabaku malamu mpe makoki, mpamba te mitema na bango mizalaki makasi!
6. Mpo na nini bobele bayekoli ya Yesu nde bapesamelaki likoki ya koyeba “makambo na nkuku na Bokonzi na Likoló”?
6 Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Makambo na nkuku na Bokonzi na Likoló, bino bokoki koyoka yango, nde bango bakoki koyoka te.” Kozongeláká maloba ya Yisaya, alobaki lisusu ete: “Mpo ete mitema na bato oyo misili koya makasi, bayoki na matoi na bozito, mpe bazipi miso na bango, ete bámona na miso te, mpe báyoka na matoi te, mpe [básimba ntina na yango te, “NW”] mpe bázonga te ete nabikisa bango. Nde miso na bino ipambwami mpo ete izali komona mpe matoi na bino lokola mpo ete izali koyoka.”—Matai 13:10-16; Malako 4:11-13.
‘Tósimba ntina’ na Bokonzi
7. Mpo na nini ezali na ntina ete ‘tósimba ntina na’ Bokonzi?
7 Yesu amonisaki likambo yango polele. Etalelaki ‘kosimba ntina na’ nsango ya Bokonzi. Alobaki epai na bayekoli na ye na nkuku ete: “Bino bóyoka lisese na mokóni. Ekoyoka moto nani Liloba na Bokonzi, nde [akosimba ntina na yango te, “NW”] oyo mabe akoya mpe akobotola yango ekónami na motema na ye.” Akóbaki na kopesáká ndimbola oyo ete mitindo minei wana ya mabelé emonisaki mitindo mikeseni ya mitema oyo kati na yango “Liloba na Bokonzi” lisengelaki kokónama.—Matai 13:18-23; Luka 8:9-15.
8. Eloko nini epekisaki “mombóto” oyo molonamaki likoló na mitindo misato ya mabelé ete ebota mbuma te?
8 “Mombóto” ezalaki malamu na bisika nyonso, kasi likoki na yango ya kobimisa mbuma etalelaki mitindo ya mabelé likoló na yango ekónamaki. Soki mabelé ya motema ezali lokola nzela oyo bato mingi balekaka kati na yango, oyo esilá koyeisama makasi mpo na ebele ya misala oyo mizali na boyokani te na bizaleli malamu ya elimo, ekokaki kozala mpasi te mpo na ye oyo ayokaki nsango ya Bokonzi ete aluka komilóngisa, kolobáká ete azali na ntango te mpo na Bokonzi. Mombóto oyo esundolami ekokaki kolongolama nokinoki liboso ete ebimisa misisa. Kasi nini elingaki kosalema soki mombóto ekónamaki kati na motema oyo ekokanaki na mabelé ya mabángámabángá? Mombóto mokokaki kobimisa motó, kasi elingaki kozala na mikakatano mpo na kopusa misisa na yango na nsé, mpo na kozwa bilei bisengeli mpe kopikama makasi. Likoki ya kozala mosaleli oyo atosaka Nzambe, mingi mpenza kati na monyoko makasi, elingaki kozala mokakatano monene, mpe moto yango asengelaki kokwea. Mpe lisusu, soki mabelé ya motema etondaki na mitungisi mpo na bamposa ya kozwa biloko mingi ya mosuni, bamposa oyo ekokani na nzube, moloná wana ya Bokonzi mozangi kolɔngɔ́nɔ́ malamu mosengelaki kokauka. Kati na ezalela ya makambo ya bomoi ya motindo wana misato, ata mbuma moko te ya Bokonzi ekokaki kobotama.
9. Mpo na nini mombóto oyo molónamaki na mabelé malamu mokokaki kobimisa mbuma malamu?
9 Nzokande, ezali boni mpo na mombóto ya Bokonzi oyo ekónamaki likoló na mabelé malamu? Yesu ayanoli ete: “Ye oyo akónami likoló na mabelé malamu azali ye oyo ayoki Liloba mpe [asimbi “NW”] ntina na yango; ye aboti mbuma mpe abimisi yango, mosusu monkámá, monkámá, mosusu ntuku motoba, ntuku motoba, mosusu ntuku misato, ntuku misato.” (Matai 13:23) Na ‘kosimbáká ntina na’ Bokonzi, bakokaki kobimisa mbuma malamu engebene ezalela ya makambo ya moto moko na moko.
Bososoli ememaka mokumba
10. (a) Lolenge nini Yesu amonisaki ete ‘kosimba ntina na’ Bokonzi ememaka mapamboli mpe mokumba? (b) Etindá ya Yesu ya kokende kozalisa bayekoli ezali bobele mpo na bayekoli ya ekeke ya liboso?
10 Nsima na kopesa masese mosusu motoba mpo na kolimbola makambo ndenge na ndenge oyo mataleli Bokonzi, Yesu atunaki bayekoli na ye ete: “Bosili [kosimba, “NW”] ntina na oyo nyonso?” Nsima wana bayanolaki ete “ee,” alobaki ete: “Bongo mokomeli na mokomeli oyo alakisami mpo na kobila Bokonzi na Likoló azali lokola mokóló na ndako oyo akobimisa longwa na ebombelo na ye yango ezali na sika mpe yango ezali na kala.” Mateya mpe kolakisama oyo Yesu apesaki esengelaki kosala ete bayekoli na ye bákóma baklisto oyo bakɔmɛli, oyo bakokaki kobimisa ebele ya bilei kitoko ya elimo uta na “ebombelo” na bango. Mingi na yango ezalaki na boyokani na Bokonzi ya Nzambe. Yesu amonisaki yango polele ete ‘kosimba ntina na’ Bokonzi esengelaki komema bobele mapamboli te, kasi elingaki komema mpe mikumba. Apesaki etindá oyo: “Boye, bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, . . . kolakisa mpe bango ete bátosa nyonso esili ngai kolaka bino. Mpe talá, ngai nazali na bino elongo mikolo nyonso kino nsuka na ekeke.”—Matai 13:51, 52; 28:19, 20.
11. Ntango mobu 1914 mokómaki, makambo nini oyo matalaki Bokonzi masalemaki?
11 Lokola alakaki yango, Yesu akóbaki kozala elongo na bayekoli na ye ya solo na boumeli ya bikeke kino mikolo na biso. Na mikolo oyo ya nsuka, azali kopesa bango bososoli mokemoke, azali mpe kopesa bango mokumba ya kosalela malamu pole ya solo oyo ezali ntango nyonso kokóla. (Luka 19:11-15, 26) Na 1914, makambo matali Bokonzi mabandaki kokokana nokinoki mpe na lolenge ya kokamwa. Na mobu yango, ezalaki te bobele “kobotama” ya bokonzi oyo elikyamaki uta kala, kasi “nsuka ya ebongiseli ya biloko” ebandaki. (Emoniseli 11:15; 12:5, 10; Danyele 7:13, 14, 27) Lokola bazali kososola ndimbola ya makambo oyo mazali kobima na eleko na biso, baklisto ya solo bazali kokamba mosala ya kosakola Bokonzi mpe kampanye ya koteya, ya monene koleka nyonso oyo esilá kosalema na boumeli ya lisoló ya bato. Yesu asakolaki ete: “Nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.”—Matai 24:14.
12. (a) Mosala monene ya kosakola Bokonzi na mikolo na biso ebimisi litomba nini? (b) Kati na mokili oyo etondi na babɛti ntembe, likámá nini ezali mpo na baklisto?
12 Mosala monene wana ya kotatola esili kokóma na mikili koleka 230. Bayekoli ya solo soko milió mitano bazali kosangana kati na mosala oyo, nzokande basusu bazali naino koyanganisama. Kasi soki tokokanisi motángo ya bayekoli yango na 5,6 miliare ya bato na mabelé, emonani polele ete, lokola ezalaki na mikolo ya Yesu, ebele monene ya bato bazali te “kosimba ntina na” Bokonzi. Mingi na bango, lokola esakolamaki uta kala, bazali kotyola mpe koloba ete: “Wapi elaka na [kozala, NW] na ye?” (2 Petelo 3:3, 4) Mpo na biso baklisto, likámá ezali ete ezaleli na bango ya komilukela bisengo, ya kobɛta ntembe, ya koluka kozwa biloko mingi ya mosuni ekoki mokemoke kosala bopusi likoló na lolenge na biso ya kotalela mabaku malamu ya Bokonzi. Lokola bato ya mokili oyo bazali zingazinga na biso, na pɛtɛɛ nyonso, tokoki kobanda kondima bizaleli mpe misala na bango mosusu. Ezali mpenza na ntina ete ‘tósimba ntina na’ Bokonzi ya Nzambe mpe tókangama na yango ngwi!
Tómitalela mpo na ezaleli na biso liboso na Bokonzi
13. Mpo na oyo etali etindá ya koteya nsango malamu ya Bokonzi, lolenge nini tokoki komimeka soki tozali kokóba ‘koyoka’ na bososoli nyonso?
13 Yesu alobaki na ntina na ntango ya kobuka mbuma, oyo tozali kobika na yango ete: “Mwana na moto akotinda baanzelu na ye mpe bakolɔkɔta kati na Bokonzi na ye makambo nyonso makoyokisa nsɔ́ni mpe nyonso bakosalaka mabe . . . Bayengebene bakongɛnga lokola moi kati na Bokonzi na Tata na bango. Ye oyo azali na matoi, ayoka.” (Matai 13:41, 43) Ozali kokóba ‘koyoka’ na kondimáká na botosi nyonso etindá ya koteya Bokonzi mpe ya kozalisa bayekoli? Omikundola ete, “ye oyo akónami likoló na mabelé malamu” ‘ayokaki liloba mpe asimbaki ntina na yango’ mpe abimisaki mbuma malamu.—Matai 13:23.
14. Na ntango liteya lipesami, lolenge nini tokoki komonisa ete ‘tosimbi ntina na’ toli oyo epesami?
14 Wana tozali kosala boyekoli na biso moko mpe wana tozali koyangana na makita ya boklisto, tosengeli ‘kosembola litoi na biso epai na [bososoli, NW].’ (Masese 2:1-4) Na ntango toli epesami na ntina na etamboli, elateli, miziki mpe kominanola, tosengeli kopesa yango nzela ete ekɔta na mozindo kati na mitema na biso mpe epusa biso ete tósala mbongwana oyo esengeli. Tóluka soko moke te komilóngisa, kokima toli, to mpe koboya kotosa yango. Soki Bokonzi ezali eloko ya solo mpenza kati na bomoi na biso, tokotosa mibeko na yango mpe tokosakola yango na molende nyonso epai na basusu. Yesu alobaki ete: “Moto na moto oyo akolobaka na ngai, Nkolo! Nkolo! akoingela kati na Bokonzi na Likoló te kasi ye oyo akosalaka mokano na Tata na ngai oyo azali na Likoló.”—Matai 7:21-23.
15. Mpo na nini ezali na ntina ete ‘tóluka liboso Bokonzi mpe boyengebene ya Nzambe?’
15 Moto apusamaka ete amitungisa mingi mpo na bilei oyo asengeli na yango, bilamba, mpe esika ya kolala, kasi Yesu alobaki ete: “Bólukaka nde liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na ye mpe biloko oyo nyonso ikobakisama na bino.” (Matai 6:33, 34) Wana tozali komityela mikano kati na makambo na biso, tótyaka Bokonzi na esika ya liboso. Tiká ete bomoi na biso ezala ya mindɔndɔ te, tósepeláká bongo na biloko ya ntina ya bomoi. Ekozala bongo bozoba soki tokotondisa bomoi na biso na misala mpe bozwi oyo ezangi ntina, mbala mosusu kolukáká komilóngisa na kolobáká ete kosala bongo ezali na yango mabe te, mpamba te makambo yango mpenza mazali na likámá te. Atako ekoki kozala bongo, bopusi ya lolenge nini kozwa mpe kosalela biloko wana bizangi ntina ekoki kozala na yango likoló na ebongiseli ya boyekoli ya biso moko, likoló na boyangani na biso na makita, mpe likoló na bosangani na biso na mosala ya kosakola? Yesu alobaki ete Bokonzi ezali lokola mosáli mombongo moko oyo amonaki “mayaka ya motuya monene [mpe] akendeki mobembo mosika mpe nokinoki atekisaki biloko nyonso oyo azalaki na yango mpe asombaki yango.” (Matai 13:45, 46, NW) Ezali na lolenge wana nde tosengeli kotalela Bokonzi ya Nzambe. Tosengeli komekola Paulo kasi Dema te, oyo atikaki mosala ya kosakola “mpamba te alingaki ebongiseli ya biloko oyo.”—2 Timoté 4:10, 18, NW; Matai 19:23, 24; Bafilipi 3:7, 8, 13, 14; 1 Timoté 6:9, 10, 17-19.
“Bato na masumu bakosangola libula na Bokonzi na Nzambe te”
16. Lolenge nini ‘kosimba ntina na’ Bokonzi ya Nzambe ekoki kosalisa biso ete tópɛngola etamboli mabe?
16 Na ntango lisangá ya Kolinti ezalaki kotika nzela na etamboli ya mbindo kati na yango, Paulo alobaki na bosembo nyonso ete: “Boyebi te ete bato na masumu bakosangola libula na Bokonzi na Nzambe te? Bomizimbisa te, moto na pite mpe basambeli na bikeko mpe bato na ekobo mpe bakembi na nsɔ́ni mpe mibali bamibebisi na mibali mpe bayibi mpe bato na bilulela mpe balangwi masanga mpe batuki mpe babɔtɔli bakosangola Bokonzi na Nzambe te.” (1 Bakolinti 6:9, 10) Soki ‘tosimbi ntina na’ Bokonzi ya Nzambe, tokomizimbisa te na kokanisáká ete Yehova akotika nzela na mwa makambo mosusu ya mbindo wana azali komona biso kosala mosala mingi kati na mosala ya Klisto. Makambo ya mbindo masengeli soko moke te kotángama kati na biso. (Baefese 5:3-5) Ososoli ete mwa ndambo ya makanisi mpe ya misala ya bozoba ya mokili oyo ebandi kokɔta mokemoke kati na bomoi na yo? Bwaká yango noki! Bokonzi ezali mpenza na motuya monene, na boye ete, ebongi te kobungisa yango mpo na biloko ya motindo wana.—Malako 9:47.
17. Lolenge nini komonisa botɔ́ndi mpo na Bokonzi ya Nzambe ekólisaka ezaleli ya komikitisa mpe lolenge nini elongolaka makambo oyo makoki kobɛtisa basusu libaku?
17 Bayekoli ya Yesu batunaki ete: “Nani aleki monene kati na Bokonzi na Likoló?” Yesu ayanolaki na kotɛlɛmisáká mwana moko ya moke katikati na bango mpe alobaki ete: “Nazali koloba na bino solo ete, Soko bokobongwana mpo na kokóma lokola bana mike te bokoyingela na Bokonzi na Likoló te. Ye nani akomisokisa lokola mwana oyo, ye akoleka monene kati na Bokonzi na Likoló.” (Matai 18:1-6) Bato na lolendo, bato na makambo makasi, bato bazangi motema mawa, mpe batyoli na mibeko bakozala te kati na Bokonzi ya Nzambe, bakoyangelama mpe te na Bokonzi yango. Bolingo na yo mpo na bandeko, ezaleli na yo ya komikitisa, ezaleli na yo ya kobanga Nzambe, epusaka yo ete opɛngola kobɛtisa basusu libaku mpo na ezaleli na yo? Olukaka ete bakokisela yo bobele “oyo esengeli na yo kozwa” ata soki elimo to ezaleli yango ekoki kopesa basusu mpasi?—Baloma 14:13, 17.
18. Na ntango Bokonzi ya Nzambe ekokokisa mokano na Ye “na nsé pelamoko na Likoló” bato oyo bazali na botosi bakozwa matomba nini?
18 Mosika te, Tata na biso ya likoló, Yehova, akoyanola mpenza na libondeli oyo ya nguya: “Tiká Bokonzi na yo eya, tiká mokano na yo esalema na nsé pelamoko na Likoló.” Etikali moke mpenza Mokonzi oyo azali koyangela, Yesu Klisto, akoya, na ndimbola oyo ete akofanda na kiti na ye ya Bokonzi mpo na kosambisa, mpo na kokabola “bampate” na “bantaba.” Na ntango yango oyo esilá kokanama, “mokonzi akoloba na bango na lobɔkɔ na ye na mobali ete, Yaká bino bopambwami na Tata na ngai, bósangola libula na Bokonzi bobongisami mpo na bino longwa na ebandeli na mokili.” Bantaba “bakolongwa kino etumbu na seko nde bayengebene kino bomoi na seko.” (Matai 6:10; 25:31-34, 46) “Bolózi monene” ekolongola ebongiseli ya kala mpe baoyo nyonso baboyaka “kosimba ntina na” Bokonzi. Kasi bamilió ya bato oyo bakobika na “bolózi monene” mpe bamiliare oyo bakosekwisama bakosangola mapamboli mazangi nsuka ya Bokonzi kati na mabelé oyo ekozongisama Paladiso. (Emoniseli 7:14) Bokonzi ezali boyangeli ya sika oyo ekotambwisa mabelé, ekoyangela uta na likoló. Ekokokisa mokano ya Yehova likoló na mabelé, nyonso wana mpo na kobulisa nkombo na ye oyo eleki bosantu. Yango ezali libula oyo ebongi ete tósala makasi mpo na yango, tómikaba mpo na yango, mpe tózela yango, boye te? Ezali bongo na lolenge oyo nde tosengeli komonisa ete ‘tosimbi ntina na Bokonzi’!
Okoyanola lolenge nini?
◻ Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
◻ Mpo na nini bayoki mingi ya Yesu ‘basimbaki ntina na’ Bokonzi te?
◻ Lolenge nini ‘kosimba ntina na’ Bokonzi ememaka mapamboli mpe mokumba?
◻ Mpo na oyo etali mosala ya kosakola, nini emonisaka ete ‘tosili kosimba ntina na’ Bokonzi?
◻ Lolenge nini tozali komonisa na nzela ya etamboli na biso ete ‘tosimbi ntina na’ toli oyo epesami?
[Bililingi na lokasa 17]
Bayekoli ya Yesu ‘basimbaki ntina na’ Bokonzi mpe babotaki mbuma malamu