Tózala na makanisi lokola oyo ya Kristo
“Na kati na bino bózala na makanisi lokola oyo Kristo Yesu azalaki na yango.”—ROM. 15:5.
1. Mpo na nini tosengeli koluka kozala na makanisi lokola oyo ya Kristo?
YESU KRISTO alobaki boye: “Bóya epai na ngai, . . . bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto mpe na komikitisa na motema, mpe milimo na bino ekopema.” (Mat. 11:28, 29) Maloba wana emonisi mpenza bolingo oyo Yesu azalaki na yango. Moto moko te akoki kozala ndakisa malamu lokola Yesu. Atako azali Mwana ya Nzambe mpe azali na nguya mingi, ayebaki komitya na esika ya basusu mpe azalaki na boboto, mingimingi epai ya baoyo bazalaki konyokwama.
2. Makambo nini etali makanisi ya Yesu tokolobela?
2 Na lisolo oyo mpe na masolo mibale oyo ekolanda, tokolobela ndenge oyo tokoki kokóma na “makanisi ya Kristo,” mpe kokoba komonisa yango na bomoi na biso. (1 Ko. 2:16) Tokolobela libosoliboso makambo mitano: Motema pɛtɛɛ mpe komikitisa ya Yesu, boboto na ye, botosi na ye epai ya Nzambe, mpiko, mpe bolingo na ye.
Tózwa liteya na motema pɛtɛɛ ya Kristo
3. (a) Likambo nini Yesu asalaki mpo na koteya bayekoli na ye komikitisa? (b) Yesu asalaki nini ntango bayekoli na ye bamonisaki bolɛmbu?
3 Yesu, Mwana ya Nzambe, andimaki koya awa na mabele mpe kosala na kati ya bato ya kozanga kokoka mpe ya masumu, oyo mosusu kati na bango basengelaki koboma ye na nsima. Kasi, Yesu abungisaki te esengo mpe ezaleli na ye ya komipekisa. (1 Pe. 2:21-23) Soki tozali “kotala na likebi mpenza” ndakisa ya Yesu, tokozala na likoki ya komekola ye ntango basusu basali biso mabe. (Ebr. 12:2) Yesu asɛngaki bayekoli na ye ‘bákamata ekanganeli na ye’ mpe báyekola epai na ye. (Mat. 11:29) Bakokaki koyekola nini epai na ye? Ya liboso, Yesu azalaki motema pɛtɛɛ mpe motema molai epai ya bayekoli na ye, atako bazalaki kosala mabunga. Na butu ya nsuka liboso akufa, Yesu asukolaki bayekoli na ye makolo; na ndenge yango ateyaki bango bázalaka na “komikitisa na motema,” liteya oyo bakokaki kobosana te. (Tángá Yoane 13:14-17.) Na nsima, ntango Petro, Yakobo, mpe Yoane bakobaki te “kosɛnzɛla,” Yesu amityaki na esika na bango mpe na boboto nyonso alobaki boye: “Simo, ozali kolala mpɔngi?” Abakisaki boye: “Bósɛnzɛlaka mpe bóbondelaka, mpo bókwea na komekama te. Ya solo, elimo ezali na molende, kasi nzoto ezali na bolɛmbu.”—Mrk. 14:32-38.
4, 5. Ndenge nini ndakisa ya Yesu ekoki kosalisa biso tótalelaka mabunga ya basusu?
4 Tosalaka nini ntango ndeko moko azali na elimo ya kowelana, asilikaka mpambampamba, to mpe asalelaka noki te toli ya bankulutu to ya “moombo ya sembo mpe ya mayele”? (Mat. 24:45-47) Totungisamaka mpenza te soki bato oyo bayebi Yehova te basali biso mabe, kasi soki ndeko moko nde asali yango, ezalaka komekama makasi mpenza. Soki mabunga ya basusu ezokisaka biso noki, tosengeli komituna boye: ‘Ndenge nini nakoki komonisa malamu “makanisi ya kristo”?’ Kobosana te ete Yesu azalaki te kosilikela bayekoli na ye, ata ntango bazalaki komonisa bolɛmbu.
5 Tózwa ndakisa ya ntoma Petro. Ntango Yesu asɛngaki Petro akita na masuwa mpe atambola na mai tii esika azalaki, Petro amekaki kosala yango. Na nsima, Petro amonaki mopɛpɛ makasi, abangaki mpe abandaki kozinda. Yesu asilikaki mpe alobaki na ye ete, “ozwi! Nakanisi olapi”? Te! Biblia elobi boye: “Na mbala moko Yesu asembolaki lobɔkɔ, asimbaki ye mpe alobaki na ye ete: ‘Yo moto ya kondima moke, mpo na nini obandaki kotya ntembe?’” (Mat. 14:28-31) Soki ndeko moko amonisi kozanga kondima, tokoki, na ndenge ya elilingi, kosembola lobɔkɔ na biso mpe kosalisa ye akóma na kondima mingi lisusu? Yango ezali mpenza liteya oyo tokoki kozwa na motema pɛtɛɛ oyo Yesu amoniselaki Petro.
6. Liteya nini Yesu apesaki bantoma na ye na oyo etali koluka lokumu?
6 Petro azalaki mpe na kati ya bantoma oyo bazalaki koluka koyeba nani aleki monene kati na bango. Yakobo mpe Yoane balingaki kofanda moko na lobɔkɔ ya mobali ya Yesu mpe mosusu na lobɔkɔ na ye ya mwasi na Bokonzi na ye. Ntango Petro mpe bantoma mosusu bayokaki likambo yango, basilikaki. Yesu ayebaki ete mbala mosusu bazwaki ezaleli yango epai bakolaki. Abengaki bango mpe alobaki boye: “Boyebi ete bayangeli ya bikólo balakisaka bango bokonzi na bango mpe bato na bango ya minene bayokisaka bango bokonzi na bango. Ezali bongo te epai na bino; kasi moto nyonso oyo alingi kozala moto monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino, mpe moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso na kati na bino asengeli kozala moombo na bino.” Na nsima Yesu apesaki bango ndakisa na ye moko; alobaki boye: “Se ndenge Mwana ya moto ayaki, mpo básalela ye te, kasi mpo na kosalela mpe kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.”—Mat. 20:20-28.
7. Mokomoko na biso asengeli kosala nini mpo lisangá ezala na bomoko?
7 Kokanisa ezaleli ya komikitisa oyo Yesu azalaki na yango ekoki kosalisa biso ‘tósala lokola moto oyo azali mpenza moke’ na kati na bandeko na biso. (Luka 9:46-48) Kosala bongo ekopesa nzela ete bomoko ezala. Yehova, Tata ya libota monene, alingi ete bana na ye “báfanda na bomoko,” báyokanaka. (Nz. 133:1) Yesu abondelaki Tata na ye mpo na bakristo nyonso ya solo; alobaki boye: “Mpo mokili eyeba ete otindaki ngai mpe olingaki bango ndenge olingaki ngai.” (Yoa. 17:23) Na yango, bomoko na biso emonisaka ete tozali bayekoli ya Kristo. Mpo tózala na bomoko, tosengeli kolanda ndakisa ya Kristo na ndenge ya kotalela mabunga ya basusu. Yesu azalaki kolimbisa, mpe ateyaki ete Nzambe akolimbisa biso kaka soki biso mpe tozali kolimbisa basusu.—Tángá Matai 6:14, 15.
8. Liteya nini tokoki kozwa epai ya basaleli ya Nzambe oyo baumeli mingi na solo?
8 Tokoki mpe kozwa mateya soki tomekoli kondima ya baoyo bamekoli Kristo bambula mingi. Lokola Yesu, bandeko yango balimbisaka mabunga ya basusu. Bamoni ete kozala na motema mawa lokola Kristo esalisaka biso ‘tómema bolɛmbu ya baoyo bazali makasi te’ mpe tózala na bomoko. Ezaleli yango elendisaka mpe bandeko nyonso na lisangá bámonisa makanisi ya Kristo. Bazalaka na mposa oyo Paulo azalaki na yango mpo na bakristo ya Roma: “Nzambe oyo apesaka ezaleli ya koyika mpiko mpe libɔndisi asala ete na kati na bino bózala na makanisi lokola oyo Kristo Yesu azalaki na yango, mpo, na bomoko mpe na monɔkɔ moko, bókumisa Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Kristo.” (Rom. 15:1, 5, 6) Ya solo, bomoko ya losambo na biso epesaka Yehova nkembo.
9. Mpo na nini tozali na mposa ya elimo santu mpo na komekola ndakisa ya Yesu?
9 Yesu amonisaki boyokani oyo ezali na kati ya “komikitisa na motema” mpe motema pɛtɛɛ, oyo ezali mpe na kati ya mbuma ya elimo santu ya Nzambe. Yango wana, ntango tozali koyekola ndakisa ya Yesu, tosengeli mpe kozala na elimo santu ya Yehova mpo tólanda ndakisa na ye malamu. Tosengeli kobondela mpo na kosɛnga elimo santu ya Nzambe mpe kosala makasi mpo na komonisa mbuma na yango—“bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, bolamu, kondima, motema pɛtɛɛ, komipekisa.” (Gal. 5:22, 23) Soki tozali kolanda ndakisa ya komikitisa mpe boboto oyo Yesu atikelá biso, tokosepelisa Yehova, Tata na biso ya likoló.
Yesu azalaki na boboto epai ya basusu
10. Ndenge nini Yesu amonisaki boboto?
10 Boboto ezali mpe na kati ya mbuma ya elimo santu. Yesu azalaki ntango nyonso kosalela basusu makambo na boboto. Baoyo balandaki Yesu bamonaki ete “ayambaki bango na boboto.” (Tángá Luka 9:11.) Liteya nini tokoki kozwa na boboto oyo Yesu amonisaki? Moto ya boboto alingaka bato, akangaka elongi te, amityaka na esika ya basusu, mpe azalaka motema malamu. Yesu azalaki bongo. Ayokelaki basusu mawa “mpo banyokwamaki mpe basundolamaki lokola bampate oyo ezangá mobateli.”—Mat. 9:35, 36.
11, 12. (a) Lobelá likambo moko oyo Yesu asalaki oyo emonisaki motema mawa na ye. (b) Liteya nini okoki kozwa na lisolo yango?
11 Yesu azalaki kosuka kaka na koyokela bato mawa te, kasi azalaki mpe kosunga bango. Tózwa ndakisa moko. Mwasi moko anyokwamaki na maladi ya kotanga makila, na boumeli ya mbula 12. Ayebaki ete na kolanda Mibeko ya Moize, azalaki mbindo mpe moto nyonso oyo akokaki kosimba ye asengelaki mpe kokóma mbindo. (Lev. 15:25-27) Kasi, nsango oyo mwasi yango ayokaki mpo na Yesu mpe lolenge na ye ya kozala na bato, epesaki ye elikya ete Yesu akobikisa ye. Azalaki koloba boye: “Soki nasimbi kaka elamba na ye ya likoló nakobika.” Na mpiko nyonso, asimbaki elamba ya Yesu mpe ayokaki mbala moko ete abiki.
12 Yesu ayebaki ete moto moko asimbi ye, mpe atalaki epai na epai mpo na koyeba soki ezalaki nani. Mbala mosusu, mwasi yango abangaki ete Yesu akopamela ye mpo abuki Mibeko, na kolɛnga nyonso akweaki liboso ya Yesu mpe ayebisaki ye solo nyonso. Yesu apamelaki mwasi yango oyo azalaki konyokwama? Ata moke te! Kutu, na boboto nyonso alobaki na ye boye: “Mwana . . . , kondima na yo ebikisi yo. Kende na kimya.” (Mrk. 5:25-34) Maloba yango ekitisaki ye mpenza motema!
13. (a) Ndenge nini makanisi ya Yesu ekesanaki na oyo ya Bafarisai? (b) Ndenge nini Yesu azalaki kotalela bana mike?
13 Na bokeseni na Bafarisai, Kristo asalelaki ata moke te bokonzi na ye mpo na kobakisela basusu kilo. (Mat. 23:4) Kutu, na boboto nyonso ateyaki basusu nzela ya Yehova mpe amoniselaki bango motema molai. Yesu azalaki moninga ya solosolo mpo na bayekoli na ye; azalaki ntango nyonso kolinga mpe komonisela bango boboto. (Mas. 17:17; Yoa. 15:11-15) Ata bana mike bazalaki kobanga te kozala pene na Yesu, ye mpe azalaki kolinga kozala elongo na bango. Azalaki komona te ete azali na mosala mingi mpe ntango ezali te mpo na kozala na bana mike. Mokolo moko bayekoli na ye, oyo bazalaki naino na makanisi ya bakonzi ya mangomba, balukaki kopekisa bato oyo bazalaki koya na bana na bango epai ya Yesu mpo apambola bango. Yesu asepelaki te na likambo oyo bayekoli basalaki. Alobaki na bango boye: “Bótika bana mike báya epai na ngai; bómeka te kopekisa bango, mpo bokonzi ya Nzambe ezali ya bato oyo bazali lokola bango.” Na nsima, azwaki ndakisa ya bana mpo na kopesa liteya moko ya ntina mingi; alobaki boye: “Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete: Moto nyonso oyo ayambi bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke te akokɔta na yango ata moke te.”—Mrk. 10:13-15.
14. Matomba nini bana bazwaka ntango bandeko bazali kotyela bango likebi?
14 Tókanisa naino ndenge bana yango bakokaki koyoka ntango bakómaki mikóló! Na ntembe te, babosanaki te ndenge Yesu Kristo ‘akamataki bango na mabɔkɔ na ye mpe abandaki kopambola bango.’ (Mrk. 10:16) Lelo oyo mpe, bana bakobosana te bolingo oyo bankulutu mpe bandeko mosusu ya lisangá bamoniselaka bango. Likambo eleki ntina, bana oyo banda bomwana, bamoniselaka bango bolingo ya solosolo na lisangá bamonaka ete elimo ya Yehova etambwisaka basaleli na ye.
Tózala na boboto na mokili oyo ezangi boboto
15. Mpo na nini ezaleli ya kozanga boboto oyo etondi na mokili lelo oyo esengeli kokamwisa biso te?
15 Lelo oyo, bato mingi bamonaka ete bazali na ntango te ya komonisela basusu boboto. Yango wana, mikolo nyonso, ezala na kelasi, na mosala, na mibembo to na mosala ya kosakola, basaleli ya Yehova basengeli kobunda na elimo ya mokili. Kozala na bato oyo bazangi boboto ekoki kopesa biso mpasi, kasi esengeli kokamwisa biso te. Na nzela ya Paulo, Yehova amonisaki ete na mikolo oyo ya mpasi mpe ya “nsuka,” makambo ya bomoi ekosala ete bakristo bázala elongo na bato oyo “bamilingaka, . . . oyo balinganaka te na kati ya libota.”—2 Tim. 3:1-3.
16. Ndenge nini tokoki komonisa boboto lokola oyo ya Kristo na lisangá?
16 Nzokande, na lisangá ya bokristo bato bakeseni mpenza na bato ya mokili. Soki tozali komekola Yesu, mokomoko na biso akoki kopesa mabɔkɔ mpo na kobatela elimo yango. Ndenge nini tokoki kosala yango? Ya liboso, bandeko mingi na kati ya lisangá, oyo bazali kotungisama na maladi to mikakatano mosusu, bazali na mposa tósunga mpe tólendisa bango. Na ‘mikolo oyo ya nsuka,’ makambo ya ndenge wana ekoki komonana mingi, kasi ezali makambo ya sika te. Na ntango ya kala, bakristo bakutanaki mpe na makambo ya ndenge wana. Na yango, kosalisa bandeko lelo oyo ezali na ntina kaka ndenge ezalaki na ntango ya kala. Na ndakisa, Paulo alendisaki bakristo ‘bálobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo enyokwami na makanisi, básalisa bato ya bolɛmbu, bázala na motema molai epai ya bato nyonso.’ (1 Tes. 5:14) Yango ezali kosɛnga komonisa boboto lokola oyo ya Kristo.
17, 18. Wapi mwa bandenge oyo tokoki komekola boboto ya Yesu?
17 Bakristo bazali na mokumba ya ‘koyamba bandeko na bango na boboto,’ kosalela bango makambo ndenge Yesu akokaki kosalela bango, komibanzabanza mpo na baoyo toyebi banda bambula mingi mpe baoyo tokutaná na bango naino te. (3 Yoa. 5-8) Ndenge Yesu azalaki komonisela basusu motema mawa, biso mpe tosengeli ntango nyonso kosala bongo; tosengeli kobɔndisaka basusu.—Yis. 32:2; Mat. 11:28-30.
18 Mokomoko na biso akoki komonisa boboto soki azali komibanzabanza mpo na bolamu ya basusu. Lukáká mabaku mpe ndenge ya kosala yango. Paulo alobaki boye: “Na bolingo ya bondeko bólinganaka na motema. Mpo na kopesana lokumu, bózala bato ya liboso.” (Rom. 12:10) Yango elimboli kolanda ndakisa ya Kristo, komonisela basusu boboto mpe koyekola komonisa “bolingo oyo ezangi bokosi.” (2 Ko. 6:6) Paulo alobaki ete: “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto. Bolingo ezali na zuwa te, emikumisaka te, emivimbisaka na lolendo te.” (1 Ko. 13:4) Na esika ya kokangela bandeko na biso nkanda, tosengeli kolanda toli oyo: “Bózala na boboto na kati na bino, bóyokelanaka mpenza mawa, bólimbisanaka na motema moko ndenge Nzambe mpe, na nzela ya Kristo, alimbisaki bino na motema moko.”—Ef. 4:32.
19. Matomba nini tokozwa soki tozali komonisa boboto ya Kristo?
19 Milende na biso mpo na komonisa boboto ya Kristo ntango nyonso mpe na mabaku nyonso ememelaka biso mapamboli mingi. Elimo ya Yehova ekozala na kati ya lisangá mpe ekobota mbuma na yango. Lisusu, soki tozali kolanda ndakisa ya Yesu mpe tozali kosalisa basusu básala bongo, esengo mpe bomoko na biso ya losambo ekosepelisa Nzambe. Yango wana, tiká tósala makasi mpo na komonisa motema pɛtɛɛ ya Yesu mpe boboto na ye na boyokani na biso na basusu.
Okoki kolimbola?
• Ndenge nini Yesu amonisaki ete azali na “ezaleli ya boboto mpe na komikitisa na motema”?
• Ndenge nini Yesu amonisaki boboto?
• Wapi mwa balolenge oyo tokoki komonisa motema pɛtɛɛ mpe boboto ya Kristo na mokili oyo ezangi kokoka?
[Elilingi na lokasa 8]
Ntango ndeko moko amonisi kondima moke ndenge Petro asalaki, okosembola lobɔkɔ mpo na kosunga ye?
[Elilingi na lokasa 10]
Ndenge nini okoki kopesa mabɔkɔ mpo lisangá mobimba ezala na boboto?