Mokapo ya Zomi
Elaka ya Nkolo moko ya kimya
1. Bato bazali komona nini kobanda na ntango ya Kaina?
ESILI koleka mbula nkóto motoba, banda mwana ya liboso abotamaki. Nkombo na ye ezalaki Kaina, mpe kobotama na ye ezalaki na ntina mingi. Ezala ata baboti na ye, to baanzelu, to kutu Mozalisi, bango nyonso bamonaki naino mwana moke liboso te. Mwana yango oyo abotamaki sika akokaki kopesa elikya mpo na bato oyo bazwaki etumbu. Oyo nde mawa ntango akolaki, akómaki mobomi! (1 Yoane 3:12) Banda ntango wana, bato bamoni kobomama ya bato mosusu mingi. Lokola makanisi na bango ekendaka ntango nyonso na mabe, bato bazali na kimya te kati na bango moko to kati na bango na Nzambe.—Genese 6:5; Yisaya 48:22.
2, 3. Bilikya nini ya malamu Yesu ayaki na yango mpe tosengeli kosala nini mpo na kozwa mapamboli yango?
2 Mbula soko nkóto minei nsima ya kobotama ya Kaina, mwana mosusu abotamaki. Nkombo na ye Yesu, kobotama na ye ezalaki mpe na ntina mingi. Abotamaki na ngɔndɔ mwasi moko, na lisalisi ya nguya ya elimo santu; mpe moto mosusu abotamá na lolenge wana te. Na ntango abotamaki, ebele ya baanzelu bayembaki na esengo mpe basanzolaki Nzambe, balobaki ete: “Nkembo na Nzambe na bisika-bileki-Likoló, mpe kimya na nse kati na bato oyo ye asepeli na bango.” (Luka 2:13, 14) Na esika ete azala mobomi, Yesu afungolelaki bato nzela ya kokóma na kimya elongo na Nzambe mpe kozwa bomoi ya seko.—Yoane 3:16; 1 Bakolinti 15:55.
3 Yisaya asakolaki ete Yesu akobengama “Nkolo ya kimya.” (Yisaya 9:6) Asengelaki kopesa bomoi na ye mpo na bolamu ya bato, mpe yango ekopesa nzela ya kozwa bolimbisi ya masumu. (Yisaya 53:11) Lelo oyo, moto akoki kozala na kimya elongo na Nzambe mpe kozwa bolimbisi ya masumu soki andimi Yesu Klisto. Kasi, matomba yango ezwamaka mpambampamba te. (Bakolose 1:21-23) Moto oyo alingi kozwa yango asengeli koyekola kotosa Yehova Nzambe. (1 Petelo 3:11; kokanisá na Baebele 5:8, 9.) Na mikolo ya Yisaya, Yisalaele mpe Yuda basalaki ndenge wana te.
Bamipesi na bademo
4, 5. Makambo ezalaki ndenge nini na mikolo ya Yisaya, mpe bato mosusu bamipesaki na nani?
4 Mpo na kozanga botosi na bango, bato ya ntango ya Yisaya bazalaki na kati ya ezalela moko ya mawa mpenza, bazalaki na kati ya molili makasi na elimo. Ata bokonzi ya Yuda na sudi, epai tempelo ya Nzambe ezalaki, ezalaki na kimya te. Lokola bazalaki sembo te, bato ya Yuda bazalaki liboso ya mokakatano, Baasulia bazalaki koluka kokɔta na mboka na bango, mpe ntango moko ya mpasi ezalaki kozela bango. Bakei koluka lisalisi epai ya nani? Likambo ya mawa, mingi kati na bango bamipesi na Satana, kasi na Yehova te. Ezali solo ete babengi nkombo ya Satana te. Nzokande, ndenge moko na mokonzi Saulo na ntango ya kala, bamikɔtisi na bikelakela, baluki kosilisa mikakatano na bango na koluka kosolola na bakufi.—1 Samwele 28:1-20.
5 Basusu bakómi kutu kolendisa likambo yango. Yisaya atɔndɔli lipɛngwi ya ndenge wana ntango alobi ete: ‘Ekoloba bango na bino ete, Luká toli epai na bato bakosololaka na [bilimo] mpe banganga-na-nkisi baoyo bakolobaloba mpe bakoimaima, ekoki te ete bato báluka toli epai na Nzambe na bango? Bálɔmbela bato na bomoi epai na bakufi?’ (Yisaya 8:19) Banganga-nkisi bakoki kokosa bato, “bakolobaloba mpe bakoimaima.” Soki bazali koloba kozanga koningisa mbɛbu, banganga-nkisi bakoki kobimisa mingongo wana ya nse oyo balobaka ete ezali ya bakufi. Nzokande, na bantango mosusu, bademo bamikɔtisaka na likambo yango mpe bamimonisaka lokola bato oyo bakufá, ndenge esalemaki ntango Saulo akendaki kotuna nganga-nkisi na Ene-dolo.—1 Samwele 28:8-19.
6. Mpo na nini Bayisalaele oyo bamipesi na bikelakela basengeli kopamelama?
6 Makambo wana nyonso ezali koleka na Yuda atako Yehova apekisaki kosalela bikelakela. Na Mibeko ya Mose, bazalaki kopesa etumbu ya liwa mpo na yango. (Levitike 19:31; 20:6, 27; Deteronome 18:9-12) Mpo na nini libota mpenza ya Nzambe basali mabe monene boye? Mpamba te bapesi Mibeko mpe toli ya Yehova mokɔngɔ, mpe bakómi mitema “makasi na bozimbisi na masumu.” (Baebele 3:13) “Mitema na bango ezali [koyoka te lokola, NW] mafuta mpenza,” mpe bamitangoli na Nzambe na bango.—Nzembo 119:70.a
7. Ndenge nini bato mingi lelo oyo bamekolaka Bayisalaele ya ntango ya Yisaya, mpe nini ekokómela bango na mikolo ezali koya soki babongoli motema te?
7 Ntango mosusu bakanisi ete, ‘Mibeko ya Yehova ekosalisa biso na nini? Kutu Baasulia bazali pene ya kobundisa biso.’ Balingi ete mokakatano na bango esila noki mpe na mpasi te, kasi balingi kozela te ete Yehova akokisa mokano na ye. Na mikolo na biso mpe, bato mingi batyolaka mobeko ya Yehova mpe bakendaka koluka banganga-nkisi, kotalisa nkɔnzɔ epai na nganga ya soloka mpe kosalela lolenge mosusu ya bikelakela mpo na koluka kosilisa mikakatano na bango. Nzokande, lelo oyo mpo na bato ya bomoi, kokenda koluka lisalisi epai na bakufi ezali likambo moko ya bozoba kaka ndenge ezalaki na ntango ya kala. Bato oyo bazali kosala makambo ya ndenge wana bakozwa etumbu ndenge moko na “babomi ya bato, na bato ya pite mpe . . . na basambeli ya bikeko, na bato ya lokuta nyonso.” Elikya ya bomoi na mikolo ezali koya ezali soki moke te mpo na bango.—Emoniseli 21:8.
‘Mibeko mpe matatoli’ ya Nzambe
8. “Mibeko” mpe “matatoli” nini tosengeli lelo oyo koluka toli na yango?
8 Bato ya Yuda bayebi malamu mpenza mobeko ya Yehova oyo epekisi bikelakela, ndenge moko na mibeko mosusu. Mobeko yango ebatelami na makomi. Lelo oyo Liloba na ye ekomami na mobimba na yango. Ezali bongo Biblia, yango ezali kaka te buku ya mibeko mpe ya mitinda kasi ezali mpe lisolo oyo ezali komonisa ndenge Yehova asalelaka basaleli na ye makambo. Lisolo yango ya Biblia oyo ezali komonisa ndenge Yehova asalelaka basaleli na ye makambo ezali litatoli to elembeteli oyo ezali koteya biso bomoto na ye mpe bizaleli na ye. Na esika ya kokenda kotuna bakufi, Bayisalaele basengelaki koluka toli wapi? Yisaya ayanoli ete: “Na [mibeko, NW] mpe na matatoli.” (Yisaya 8:20a) Na ntembe te, bato oyo bazali koluka bingɛngiseli ya solosolo basengeli kotalela Biblia, Liloba ya Nzambe.
9. Ezali na ntina ete bato oyo basalaka masumu oyo baboi kobongola motema bátángaka Biblia mbala na mbala?
9 Bayisalaele mosusu oyo bamikɔtisi na bikelakela bakoki koloba ete bazali kotosa Liloba ya Nzambe. Kasi maloba ya ndenge wana ezali na ntina te mpe ezalaki kaka bokosi mpamba. Yisaya alobi ete: “Ya solo bakokoba koloba na kolanda liloba oyo yango ekobimisa pole ya ntɔngɔ te.” (Yisaya 8:20b, NW) Liloba nini Yisaya azali kolobela awa? Mbala mosusu maloba oyo: “Na mibeko mpe na matatoli.” Ekoki kozala ete Bayisalaele mosusu oyo bakómaki bapɛngwi bazali kotánga makambo ya Liloba ya Nzambe, kaka ndenge bapɛngwi mpe bato mosusu lelo bakoki kosalela Makomami. Kasi yango ezali kaka maloba mpamba. Kotánga kaka maloba ya Makomami ekopesa “pole ya ntɔngɔ” te, ekopesa mpe te bingɛngiseli oyo euti epai ya Yehova. Esengeli mpe kosala mokano ya Nzambe mpe koboya misala ya mbindo.b
“Ekozala nzala ya kwanga te”
10. Minyoko nini bato ya Yuda bazwaki ndenge baboyaki Yehova?
10 Koboya kotosa Yehova ekómisaka makanisi molili. (Baefese 4:17, 18) Na elimo, bato ya Yuda bakómi bato bakufá miso, bazangi bososoli. (1 Bakolinti 2:14) Yisaya alobeli ezalela na bango: “Moto akoleka kati na mokili, na mpasi mingi mpe na nzala.” (Yisaya 8:21a) Mpo na kozanga bosembo ya libota yango—mingimingi na ntango ya boyangeli ya Mokonzi Ahaza—bokonzi ya Yuda oyo ezali na bonsomi ezali na likama. Banguna bazingi libota yango. Mampinga ya basoda ya Asulia bazali kobundisa bingumba ya Yuda moko nsima ya mosusu. Monguna abebisi mabele oyo ebimisaka biloko, yango wana biloko ya kolya ezali komonana mpenza te. Ebele ya bato banyokwami na “mpasi mingi mpe na nzala.” Kasi lolenge mosusu ya nzala ezali mpe konyokola mokili yango. Mwa bambula mingi liboso, Amosa asakolaki ete: “Nkolo [Yehova] alobi ete, Talá, mikolo ekoya wana nakotinda nzala kati na mokili. Ekozala nzala ya kwanga te, kozanga ya mai mpe te; ekozala nzala ya koyoka maloba ya [Yehova].” (Amosa 8:11) Yuda azali sikawa konyokwama na nzala ya elimo ya ndenge wana mpenza!
11. Yuda akozwa liteya na etumbu oyo azwi?
11 Yuda akozwa liteya na likambo yango? mpe akozongela Yehova? Bato yango bakoboya bikelakela mpe losambo ya bikeko mpe bakozongela “mibeko mpe matatoli”? Yehova asili komona ezaleli na bango liboso, alobi ete: “Ekozala mpe ete wana ekoyoka ye nzala, akopela na nkanda mpe akotuka . . . mokonzi na ye mpe na Nzambe na ye, mpe akotala likoló.” (Yisaya 8:21b) Ya solo, bato mingi bakopamela mokonzi na bango mpo amemi bango na ezalela yango. Bamosusu kutu na bozoba nyonso bakopamela Yehova mpo na malɔzi na bango! (Kokanisá na Yilimia 44:15-18.) Lelo oyo, bato mingi basalaka kaka ndenge wana, bapamelaka Nzambe mpo na makambo ya mabe oyo eutaka na mabe ya bato.
12. (a) Makambo nini ekómeli Yuda ndenge aboi Yehova? (b) Mituna nini ya ntina ebimi?
12 Bato oyo bafandi na Yuda bakozwa kimya ndenge batuki Nzambe? Te. Yisaya asakoli ete: “Akotala mpe na mokili nde talá mikakatano mpe molili, molili mpe mpasi; bakobimisama na molili tuu.” (Yisaya 8:22) Nsima ya kotombola miso na bango likoló mpo na kopamela Nzambe, batali lisusu na mabele, bamoni ete bomoi na bango ezali na elikya te. Lokola baboi Nzambe, yango ememeli bango mawa. (Masese 19:3) Kasi, tokoloba nini mpo na bilaka oyo Nzambe apesaki Abalayama, Yisaka, na Yakobo? (Genese 22:15-18; 28:14, 15) Yehova akokokisa yango te? Baasulia to mampinga ya basoda mosusu bakosilisa molɔngɔ ya bakonzi oyo balakelaki Yuda mpe Davidi? (Genese 49:8-10; 2 Samwele 7:11-16) Bayisalaele bakotikala na molili libela?
Mokili moko ‘etyolami’
13. ‘Galilai ya bikólo mosusu’ ezali nini, mpe na ndenge nini ‘batyolaki yango’?
13 Yisaya alobeli sikawa moko ya makambo eleki mabe oyo ekómeli bakitani ya Abalayama: “Molili ekozala te lokola ntango mokili ezalaki na kobanga, lokola na ntango ya liboso ntango bazalaki kotyola mokili ya Zebuluna mpe ya Nafatali mpe na nsima bakumisaki yango—nzela pene na mbu, na etúká ya Yaladene, Galilai ya bikólo mosusu.” (Yisaya 9:1, NW) Galilai ezali etúká moko ya bokonzi ya nɔrdi ya Yisalaele. Na esakweli ya Yisaya, ekɔtisi “mokili ya Zebuluna mpe ya Nafatali” mpe “nzela pene na mbu,” nzela moko ya kala oyo ezalaki koleka na Mbu ya Galilai tii na Mai Monene ya Méditerranée. Na mikolo ya Yisaya, bazalaki kobenga etúká yango “Galilai ya bikólo mosusu,” mbala mosusu mpo bingumba na yango mingi ezalaki na bato oyo bazalaki Bayisalaele te.c Ndenge nini “batyolaki mokili” yango? Bapakano Baasulia babɔtɔli yango, bamemi Bayisalaele na boombo mpe batondisi etúká yango na bapakano, oyo bazali bakitani ya Abalayama te. Yango wana, bokonzi ya nɔrdi oyo ezalaki na mabota zomi, elimwaki mpe ezalaki lisusu koyokana lokola ekólo te!—2 Mikonzi 17:5, 6, 18, 23, 24.
14. Na lolenge nini “molili” ya Yuda ekozala moke koleka oyo ya bokonzi ya mabota zomi?
14 Baasulia mpe bazali kotungisa Yuda. Yuda ekokɔta na “molili” ya libela ndenge esalemaki mpo na bokonzi ya mabota zomi oyo emonisami na Zebuluna na Nafatali? Te. Na “nsima,” Yehova akopambola etúká ya bokonzi ya Yuda na sudi, akopambola mpe kutu mabele oyo eyangelamaki kala na bokonzi ya nɔrdi. Ndenge nini?
15, 16. (a) Na ntango nini ya “nsima” makambo ekobongwana mpo na “mokili ya Zebuluna mpe ya Nafatali”? (b) Ndenge nini mokili oyo batyolaki liboso ekumisamaki?
15 Ntoma Matai ayanoli na motuna yango ntango apemamaki mpo na kokoma lisolo ya mosala ya kosakola oyo Yesu asalaki awa na mabele. Wana alobelaki ebandeli ya mosala ya Yesu awa na mabele, Matai akomaki boye: “[Yesu] atiki Nasalete mpe afandi na Kapalanauma pembeni na libeke na mokili ya Zebuluna mpe ya Nafatali, ete likambo lilobaki mosakoli Yisaya likoka, ete Mokili ya Zebuluna mpe ya Nafatali, nzela ya [mbu, NW], ngámbo ya Yaladene, [Galilai ya bikólo mosusu], libota lizalaki kofanda na molili bamoni pole makasi; mpe epai na bango bafandaki na mokili mpe na molili na kufa, pole esili kobimela bango.”—Matai 4:13-16.
16 Ya solo, ntango ya “nsima” oyo Yisaya asakolaki ezali eleko oyo Klisto azalaki kokokisa mosala na ye ya kosakola awa na mabele. Yesu alekisaki ntango mingi ya bomoi na ye awa na mabele na Galilai. Ezalaki na etúká ya Galilai nde abandaki mosala na ye ya kosakola mpe alobaki ete: “Bokonzi ya Likoló esili kobɛlɛma.” (Matai 4:17) Kaka na Galilai nde asalaki Lisolo na ye Likoló ya Ngomba, aponaki bantoma na ye, asalaki likamwisi na ye ya liboso, mpe abimelaki bayekoli soki 500 nsima ya lisekwa na ye. (Matai 5:1–7:27; 28:16-20; Malako 3:13, 14; Yoane 2:8-11; 1 Bakolinti 15:6) Na lolenge wana nde Yesu akokisaki esakweli ya Yisaya mpe akumisaki “mokili ya Zebuluna mpe ya Nafatali.” Ya solo, mosala ya kosakola oyo Yesu asalaki esukaki kaka te epai ya bato ya Galilai. Lokola asakolaki nsango malamu na mabele yango mobimba, Yesu asalaki ete libota mobimba ya Yisalaele, bakisa mpe Yuda, ‘ekumisama.’
“Pole monene”
17. Na lolenge nini “pole monene” ezali kongɛnga na Galilai?
17 Kasi, ezali boni mpo na “pole makasi” na Galilai oyo Matai alobeli? Yango mpe ezalaki maloba ya esakweli ya Yisaya. Yisaya akomaki ete: “Bato oyo batambolaki na molili bamoni pole monene; baoyo bafandaki na mokili ya molili ya kufa pole engɛngɛli bango.” (Yisaya 9:2) Na ekeke ya liboso na ntango na biso, pole ya solo ezipamaki na lokuta ya bapakano. Bakonzi ya mangomba ya Bayuda bakómisaki likambo yango lisusu mpasi koleka ndenge bakangamaki na mibeko ya bonkɔkɔ na bango mpe na yango ‘babebisaki Liloba ya Nzambe.’ (Matai 15:6) Bato ya komikitisa bazalaki konyokwama mpe batyamaki na mobulu, mpamba te bazalaki kolanda “bakambi bakufi miso.” (Matai 23:2-4, 16) Ntango Yesu Masiya amonanaki, miso ya bato ebele ya komikitisa efungwamaki na ndenge moko ya kokamwa mpenza. (Yoane 1:9, 12) Mosala ya Yesu awa na mabele mpe matomba ya mbeka na ye ekokisami lokola “pole monene” na esakweli ya Yisaya.—Yoane 8:12.
18, 19. Mpo na nini bato oyo bayambaki pole basengelaki kozala na esengo makasi?
18 Baoyo bayambaki pole yango bazalaki na ntina mpenza ya kozala na esengo. Yisaya alobi lisusu ete: “Ofulisi libota, obakisi esengo na yango; basepeli liboso na yo lokola na esengo na ntango ya kobuka, mpe lokola bato bakosepela wana ekokabola bango biloko bipunzami.” (Yisaya 9:3) Na nzela ya mosala ya kosakola ya Yesu mpe ya bayekoli na ye, bato ya motema malamu bamonanaki, bamonisaki bango moko ete bazali na mposa ya kosambela Yehova na elimo mpe na solo. (Yoane 4:24) Mbula minei ekokaki naino te, ebele ya bato bakómaki baklisto. Bato nkóto misato bazwaki batisimo mokolo ya Pantekote ya mobu 33 na ntango na biso. Mwa moke na nsima, “motuya na mibali ekómi soko nkóto mitano.” (Misala 2:41; 4:4) Lokola bayekoli bazalaki kongɛngisa pole na molende nyonso, “motángo ya bayekoli ekobaki kobakisama na kati ya Yelusaleme mingi mpenza; mpe ebele ya banganga babandaki kotosa kondima.”—Misala 6:7, NW.
19 Ndenge moko na bato oyo basepelaka na ntango ya kobuka mbuma, to baoyo bazalaka na esengo ntango bazali kokabola biloko oyo bazwi nsima ya kolonga etumba, bayekoli ya Yesu basepelaki mpo na bokoli oyo emonanaki. (Misala 2:46, 47) Na nsima, Yehova angɛngisaki pole kati na bato ya bikólo mosusu. (Misala 14:27) Yango wana bato ya mposo nyonso basepelaki mpo nzela ya kokóma epai ya Yehova efungwamaki.—Misala 13:48.
“Lokola na mokolo ya Midiana”
20. (a) Na lolenge nini Bamidiana bamonisaki ete bazali banguna ya Yisalaele, mpe ndenge nini Yehova asukisaki matata na bango? (b) Ndenge nini na “mokolo ya Midiana” oyo ezali koya Yesu akosukisa matata oyo banguna bazali kosala basaleli ya Nzambe?
20 Matomba ya mosala ya Masiya ekoumela libela, lokola maloba ya Yisaya oyo elandi emonisi yango: “Zambi obuki ekangeli na mokumba na [bango], mpe lingenda na lipeka na [bango], nzete na [oyo azalaki kotinda bango na mosala, NW], obuki yango lokola na mokolo ya Midiana.” (Yisaya 9:4) Bikeke mingi liboso ya eleko ya Yisaya, Bamidiana bayokanaki na Bamoaba mpo na kokweisa Yisalaele na lisumu. (Mituya 25:1-9, 14-18; 31:15, 16) Na nsima, Bamidiana batungisaki Bayisalaele mbula nsambo, bazalaki kokɔta na bamboka na bango mpe na bilanga na bango. (Basambisi 6:1-6) Kasi na nsima, na nzela ya mosaleli na ye Gideona, Yehova apanzaki mampinga ya basoda ya Midiana. Nsima ya “mokolo ya Midiana” yango, eloko moko te emonisi ete basaleli ya Yehova banyokwamaki lisusu na mabɔkɔ ya Bamidiana. (Basambisi 6:7-16; 8:28) Etikali moke, Yesu Klisto, Gideona Monene, aboma banguna ya basaleli ya Yehova na mikolo na biso. (Emoniseli 17:14; 19:11-21) Na yango, “lokola na mokolo ya Midiana,” bolongi ya solosolo mpe ya libela ekouta na nguya ya bato te, kasi na nguya ya Yehova. (Basambisi 7:2-22) Basaleli ya Nzambe bakonyokwama lisusu te libela!
21. Esakweli ya Yisaya ezali komonisa nini mpo na bitumba na mikolo ezali koya?
21 Misala oyo euti na nguya ya Nzambe ezali mpo na kokumisa bitumba te. Yesu oyo asekwi azali Nkolo ya Kimya, mpe ntango akoboma banguna na ye, akotya kimya ya libela. Yisaya alobi sikawa ete bibundeli nyonso ya basoda ekotumbama na mɔ́tɔ: “Sapato nyonso na mobundi kati na makɛlɛlɛ ya etumba, mpe bilamba nyonso bilekisami na makila, ekozikisama, ekozala biloko ya kotyama na mɔ́tɔ.” (Yisaya 9:5) Makɛlɛlɛ oyo eutaka na lokito ya sapato ya basoda ntango bazali kotambola ekozala lisusu te. Bilamba ya bilombe ya etumba oyo ebebi na makila ekomonana lisusu te. Bitumba ekozala lisusu te!—Nzembo 46:9.
“Mopesi-toli ya kokamwa”
22. Bankombo nini ya esakweli mokanda ya Yisaya epesi Yesu?
22 Na ntango ya kobotama na ye na ndenge ya likamwisi, mwana oyo abotamaki mpo na kozala Masiya azwaki nkombo Yesu, yango elimboli “Yehova azali Lobiko.” Kasi azali mpe na bankombo mosusu, bankombo ya bisakweli oyo ezali komonisa ete azali na mokumba monene mpe esika na ye etombwani. Moko ya bankombo yango ezali Emanuele, yango elimboli “Elongo na biso ezali Nzambe.” (Yisaya 7:14, NW, maloba na nse ya lokasa) Yisaya amonisi sikawa nkombo mosusu ya esakweli: “Mwana abotameli biso, mwana mobali apesameli biso; bokonzi ekozala likoló na lipeka na ye, [bakobenga ye na nkombo Mopesi-toli ya kokamwa, NW], Nzambe ya nguya, Tata ya seko, Nkolo ya kimya.” (Yisaya 9:6) Tótalela naino ndimbola kitoko ya bankombo yango ya esakweli.
23, 24. (a) Na lolenge nini Yesu azali “Mopesi-toli ya kokamwa”? (b) Ndenge nini baklisto oyo bapesaka toli na mikolo na biso bakoki kolanda ndakisa ya Yesu?
23 Mopesi-toli ezali moto oyo apesaka toli, to mayebisi. Ntango azalaki awa na mabele, Yesu Klisto apesaki toli kitoko mpenza. Tozali kotánga na kati ya Biblia ete “ebele bakamwi mateya na ye.” (Matai 7:28) Azali Mopesi-toli oyo azali na bwanya mpe na motema mawa, ayebi malamu mpenza bomoto na biso. Toli na ye ezalaka kaka mpamela te to bitumbu te. Mbala mingi, ezalaka mateya mpe mayebisi ya bolingo. Toli ya Yesu ezalaka ya kokamwa mpamba te ezalaka ntango nyonso na bwanya, ya kokoka, mpe ezalaka na libunga te. Ememaka baoyo balandaka yango na bomoi ya seko.—Yoane 6:68.
24 Toli ya Yesu eutaka kaka te na mayele na ye moko. Kutu alobi nde boye: “Mateya na ngai mazali na ngai te kasi na Motindi na ngai.” (Yoane 7:16) Ndenge moko na Salomo, bwanya ya Yesu euti na Yehova Nzambe. (1 Mikonzi 3:7-14; Matai 12:42) Ndakisa ya Yesu esengeli kotinda bateyi mpe baoyo bapesaka toli na lisangá ya boklisto básalaka ete mateya na bango eutaka ntango nyonso na Liloba ya Nzambe.—Masese 21:30.
“Nzambe ya nguya” mpe “Tata ya seko”
25. Nkombo “Nzambe ya nguya” ezali koteya biso nini mpo na Yesu lokola azali sikawa na likoló?
25 Yesu azali mpe “Nzambe ya nguya” mpe “Tata ya seko.” Yango elingi koloba te ete alukaka kozwa bokonzi mpe esika ya Yehova, oyo azali “Nzambe Tata na biso.” (2 Bakolinti 1:2) ‘[Yesu] amekaki kokokana na Nzambe te.’ (Bafilipi 2:6) Abengami Nzambe ya nguya, kasi te Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Yesu amimonaki soki moke te ete azali Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, mpamba te alobaki ete Tata na ye azali “Nzambe kaka moko ya solo,” elingi koloba Nzambe kaka moko oyo basengeli kosambela. (Yoane 17:3, NW; Emoniseli 4:11) Na kati ya Makomami, liloba “nzambe” ekoki kolimbola “moto ya nguya” to “moto ya makasi.” (Exode 12:12; Nzembo 8:5; 2 Bakolinti 4:4, NW) Liboso ete Yesu aya awa na mabele, azalaki “nzambe,” “azalaki na motindo na Nzambe.” Nsima ya lisekwa na ye, azongaki na esika moko etombwani, kuna na makoló. (Yoane 1:1; Bafilipi 2:6-11) Lisusu, liloba “nzambe” ezali kopesa likanisi mosusu. Na Yisalaele, bazalaki kobenga basambisi “banzambe”—kutu mbala moko Yesu ye moko abengaki bango bongo. (Nzembo 82:6; Yoane 10:35) Yesu azali Mosambisi oyo Yehova aponi, “ye oyo akosambisa bato na bomoi mpe bakufi.” (2 Timote 4:1; Yoane 5:30) Ezali polele ete abongi mpenza na nkombo ya Nzambe ya nguya.
26. Mpo na nini Yesu akoki kobengama “Tata ya seko”?
26 Ebengeli “Tata ya seko” ezali komonisa nguya mpe bokonzi oyo Mokonzi Masiya azali na yango mpo na kopesa bato bomoi ya seko awa na mabele. (Yoane 11:25, 26) Adama, moboti na biso ya liboso, atikelá biso liwa. Yesu, Adama ya nsuka, “ayei [elimo, NW] oyo ekopesaka bomoi.” (1 Bakolinti 15:22, 45; Baloma 5:12, 18) Lokola Yesu, Tata ya seko, akozala na bomoi libela na libela, bato ya botosi mpe bakozwa mapamboli na ye ya botata oyo akopesa yango libela na libela.—Baloma 6:9.
“Nkolo ya kimya”
27, 28. Makambo nini ya kitoko bato oyo bakoyangelama na “Nkolo ya kimya” bazali kozwa sikawa mpe bakozwa na mikolo ezali koya?
27 Longola bomoi ya seko, moto azali na mposa ya kimya, ezala elongo na Nzambe to elongo na mozalani na ye moto. Ata kutu lelo, bato oyo bazali komitya na nse ya boyangeli ya “Nkolo ya kimya” basili ‘kotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makonga na bango ete mazala bikateli na matiti.’ (Yisaya 2:2-4) Babombaka te nkanda oyo eutaka na mikakatano ya makambo ya politiki, na makambo ya bandelo ya bamboka, ya mposo to ya nkita. Bazali na bomoko kati na losambo ya Nzambe kaka moko ya solo, Yehova, mpe balukaka kozala na boyokani na bazalani na bango, ezala na kati to na libándá ya lisangá.—Bagalatia 6:10; Efese 4:2, 3; 2 Timote 2:24.
28 Na ntango oyo Nzambe alingi, Klisto akotya kimya na mabele mobimba, mpe kimya yango ekozala mpo na libela. (Misala 1:7) “Kofuluka na bokonzi na ye mpe na kimya ekosuka te; na kiti ya bokonzi ya Davidi mpe likoló na bokonzi na ye, ete abongisa yango mpe ete atɛmisa yango na kosambisa-sembo mpe na boyengebene longwa na ntango oyo kino libela.” (Yisaya 9:7a) Ntango Yesu Nkolo ya kimya akosalela bokonzi na ye, akonyokola bato te. Akopimela te bato oyo akoyangela bonsomi na bango ya kozwa bikateli mpe akozala te mokonzi ya makambo makasimakasi. Kasi nde, makambo nyonso oyo akosala ekozala “na kosambisa-sembo mpe na boyengebene.” Oyo nde mbongwana monene!
29. Tosengeli kosala nini soki tolingi kozwa kimya ya libela?
29 Soki tokanisi makambo malamu oyo elobelami na bankombo ya esakweli oyo bapesi Yesu, lolenge oyo Yisaya asukisi koloba na eteni oyo ya esakweli na ye ebongi mpenza. Akomi ete: “Mposa na [Yehova] na bibele ekosala oyo.” (Yisaya 9:7b) Ya solo, Yehova asalaka makambo na molende. Asalaka likambo moko te na mitema mibale. Tokoki kozala na elikya ete nyonso oyo alaki, akokokisa yango. Yango wana, soki moto nani azali koluka kozwa kimya ya seko, tiká ete asalela Yehova na motema mobimba. Lokola Yehova Nzambe mpe Yesu, Nkolo ya kimya, tiká ete basaleli nyonso ya Nzambe bázala na “molende ya kosala misala malamu.”—Tito 2:14, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bato mingi bandimaka ete Nzembo 119 ekomamaki na Hizikiya liboso akómá mokonzi. Soki ezali bongo, ekoki kozala ete ekomamaki ntango Yisaya azalaki kosala mosala na ye ya mosakoli.
b Elobeli “liloba oyo” ndenge ezali na Yisaya 8:20 ekoki kotalela makambo ya bikelakela oyo elobelami na Yisaya 8:19. Soki ezali bongo, Yisaya azali koloba ete bato oyo basalaka bikelakela na Yuda bakokoba kolendisa bato mosusu bákendaka epai ya banganga-nkisi mpe na yango, bakozwa soki moke te bingɛngiseli oyo euti na Nzambe.
c Bato mosusu babimisi likanisi ete bingumba 20 ya Galilai oyo Mokonzi Salomo apesaki Hilama mokonzi ya Tulo ezalaki mbala mosusu na bato oyo bazalaki Bayisalaele te.—1 Mikonzi 9:10-13.
[Karte/Elilingi na lokasa 122]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Kolazi
Betesaida
Kapalanauma
Etando ya Genesaleta
Mbu ya Galilai
Magadana
Tibelia
Ebale Yaladene
GADALA
Gadala
[Bililingi na lokasa 119]
Kobotama ya Yesu mpe ya Kaina ezalaki na ntina mingi. Kaka oyo ya Yesu nde epesi bolamu
[Elilingi na lokasa 121]
Nzala moko ekozala koleka nzala ya kwanga mpe kozanga ya mai
[Elilingi na lokasa 127]
Yesu azalaki pole na mokili yango