Lolenge Baklisto bakoki koyika mpiko na botyoli ya bato
OKOMIYOKA lolenge nini wana moto atyoli yo to mpe apanzi nsango ya lokuta na ntina na yo? Mbala mingi yango ekozokisa yo na motema. Batatoli ya Yehova bakutanaka na likambo motindo wana ntango nyonso oyo nsango ya lokuta to nsango oyo elongobani te epalangani na ntina na bango. Kasi lokola Yesu alobaki yango kati na Matai 5:11, 12, bazali bongo na bantina malamu ya kozala na esengo.
Na ndakisa, na Allemagne búku moko ya Bakatolike elobaki ete “Motatoli nyonso asɛngisami kopesa katikati na motuya ya zomi na nsambo mpe ntuku mibale na mwambe likoló na monkámá ya mosolo oyo azwaka epai na biro monene ya mwa lingomba moke wana.” Nzokande, Batatoli ya Yehova bazalaka mwa lingomba ya moke te, mpe mosala na bango mosimbami bobele na makabo ya bolingo. Batángi mingi ya búku yango bakosamaki na likambo wana ya lokuta, oyo ezali kopesa Batatoli ya Yehova mawa. Kasi lolenge nini baklisto ya solo basengeli kosala liboso na botyoli oyo ebimisami kati na bipanzelo ya nsango?
Ndakisa oyo baklisto basengeli kolanda
Matai mokapo 23 ezali komonisa na maloba ya polele lolenge Yesu atɔndɔlaki bokosi mpe lokuta ya bakonzi ya mangomba oyo bazalaki kotɛmɛla ye. Likambo yango lizali ndakisa mpo na baklisto na mikolo na biso mpo na oyo etali lolenge basengeli koyika mpiko liboso ya matɔ́ngi? Mpenza te. Mwana ya Nzambe atɔndɔlaki bakonzi ya mangomba oyo bazalaki kotɛmɛla ye mpamba te azalaki na bokonzi mpe na bososoli oyo bato mosusu bazalaki na yango te, kosaláká bongo mpo na litomba ya ebele na bato oyo bazalaki koyoka ye.
Matai 15:1-11 eyebisi ete bazalaki kotɔ́nga Yesu mpamba te elobamaki ete bayekoli na ye bazalaki kobuka bonkɔ́kɔ ya Bayuda. Yesu asalaki nini? Atɛlɛmaki ngwi na ekateli na ye. Na mabaku mosusu, atyanaki ntembe makasi elongo na bato oyo bazalaki kotɔ́nga ye, kokweisáká makanisi mabe na bango. Mbala mingi, baklisto ya mikolo na biso bazalaka na elónga wana bazali koluka kosembola makanisi oyo mapalanganisami na ntina na mosala na bango to na ntina na mateya na bango, na komekáká kolimbola makambo lokola yango ezali mpe na motindo mobongi. Bazali kosala bongo mpo na kosalisa bato ya motema sembo na koyeba ete matɔ́ngi likoló na Batatoli ya Yehova mazali solo te mpe makanami mpo na kobebisa lokumu na bango.
Kasi talá lolenge Yesu asalaki mwa moke nsima wana bayekoli na ye bamonisaki ete: “Oyebi nde ete Bafalisai basiliki wana eyoki bango liloba yango?” Bafalisai wana “basilikaki”—basukaki bobele na kosilika mpamba te, kasi bakómaki banguna oyo bayeisaki mitema na bango makasi, baoyo Yesu abwakaki. Na yango ayanolaki ete: “Tika bango. Bajali bakufi miso baoyo bajali kokamba bakufi miso na njela.” Kolanda masoló elongo na bayini wana ya motema mabe ezalaki na ntina te, elingaki kopesa litomba epai na moto moko te, mpe elingaki komema bobele na koswana ya mpamba. (Matai 7:6; 15:12-14; kokanisá na 27:11-14.) Biyano oyo Yesu azongisaki bizali komonisa ete ezali na “ntango na kojala nyɛ mpe ntango na koloba.”—Mosakoli 3:7.
Batatoli ya Yehova bamizelaka te ete bato nyonso báloba malamu na ntina na bango. Bazali kobosana te maloba oyo ya Yesu: “Mawa na bino sɔkɔ bato yɔnsɔ bakoloba malamu na ntina na bino, mpɔ ete bankɔkɔ na bango basalelaki basakoli na lokuta bobɛlɛ bongo.” (Luka 6:26) Mokolo mosusu, batunaki C. T. Russell, presidá ya yambo ya la Société Watch Tower, mpo na nini azalaki koyanola te na bato oyo bazalaki kotyola ye. Ayanolaki ete: “Soki osengeli kotɛlɛma mpo na kolandela mbwa nyonso oyo azali kogangela yo, okokende mosika te.”
Na bongo tosengeli kotika te ete maloba ya botyoli oyo mauti na batɛmɛli na biso málongola likebi na biso na mosala na biso mpo na Nzambe. (Nzembo 119:69) Tiká ete tótya likebi na biso likoló na mosala oyo mopesameli baklisto ya solo, elingi koloba kopalanganisa nsango malamu. Lokola mbano malamu na yango, tokozwa mabaku mingi ya koyanola na mituna mpe kolimbola ntina ya mosala na biso, lokola kolendisa bizaleli malamu ya bato mpe koteya bango Liloba ya Nzambe.—Matai 24:14; 28:19, 20.
Osengeli koyanola na matɔ́ngi?
Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Awa ejali bino bato na mokili tɛ . . . bongo bamokili bajali koyina bino.” (Yoane 15:19) Balapólo mingi kati na bipanzelo ya nsango oyo etondi na botyoli na ntina na Batatoli ya Yehova ezali elembo ya koyina, mpe ebongi kotyela yango likebi te. Nzokande, mbala mosusu bipanzelo ya nsango ekoki koyebisa likambo moko oyo ezali komonisa ete bazali na boyebi te na ntina na Batatoli to oyo elongobani te mpe oyo emonisi makambo na lolenge ya lokuta. Bapanzi-nsango mosusu bakoki kozwa nsango esika yango esilaki kobebisama. Mpo na koyeba soki tosengeli te kotya likebi na makambo mayebisami na bipanzelo ya nsango to tosengeli kokɔtela solo na kosaleláká myango oyo mibongi, tosengeli kososola ezalela ya makambo, mobimisi ya matɔ́ngi mpe mokano na ye.
Mbala mosusu makambo makoki kosembolama na kotindáká nkomá oyo ebongisami malamu epai na mobimisi-zulunalo na meko oyo bakobimisa nkomá yango na mobimba kati na zulunalo. Kasi nkomá motindo yango ekoki mbala mosusu kolóngisa mokano mabe ya bayini, kasi mokano oyo mpo na yango ekanamaki te. Lolenge nini? Makambo ya lokuta oyo mayebisamaki makoki kopalangana mingi lisusu, to batɛmɛli bakoki kopesamela libaku mosusu ya kopanza lokuta to ya kosambwisa. Mbala mingi ekozala mayele kotika likambo ya kotinda nkomá epai na mobimisi-zulunalo na mabɔkɔ ya bankulutu oyo batalelami na likambo yango. Soki likambo ya lokuta kati na bipanzelo ya nsango ebimisi makanisi mabe likoló na Batatoli, biro ya filiale ya la Société Watch Tower ekoyebisa masangá ya mboka yango makambo lolenge esalemaki, ekopesa bongo basakoli nzela ya kolimbola malamu makambo epai na bato oyo bazali kotuna bango.
Olingi yo moko komikɔtisa kati na bifundeli nyonso wana ya lokuta? Toli oyo ya Yesu “botika bango,” bótya likebi epai na bango te, ezali mpenza kosalelama epai na etuluku wana ya banguna. Baklisto ya solo bazali na bantina malamu ya koboya bapɛngwi mpe makanisi na bango. (1 Bakolinti 5:11-13; Tito 3:10, 11; 1 Yoane 2:19; 2 Yoane 10, 11) Soki moto moko alingi mpenza koyeba soki matɔ́ngi likoló na Batatoli ya Yehova mazali ya solo to ya lokuta, boyebi malamu oyo ozali na yango ekoki mpo na kopesa ye eyano.—Talá Mosenzeli ya 1 Novɛ́mbɛ, 1987, nkasa 9 mpe 10.
Soki okutani na nsango moko ya lokuta kati na bipanzelo ya nsango, kobosana te toli oyo ya Masese 14:15: “Moto na joba ayambi maloba yɔnsɔ, nde moto na mayɛlɛ akotala malamu na njela ekokɛnda ye.” Na Suisse, bato mingi basilikaki ntango nsango moko ya kobulunganisa maoki eyebisaki ete elenge mwasi moko Motatoli akufaki mpamba te bato ya libota na ye baboyaki kopesa basáli ya lopitalo nzela ya kozongisa ye makila. Makambo yango mazalaki bongo? Te. Mobɛli aboyaki bazongisa ye makila mpo na bantina ya bindimeli ya lingomba, kasi andimaki kozwa bankísi mosusu oyo esalemi na makila te. Yango ekokaki kopesamela ye nokinoki mpe mbala mosusu ekokaki kobikisa bomoi na ye. Nzokande, lopitalo eumelisaki makambo kozanga ntina kino mobɛli ayaki kokufa. Bipanzelo ya nsango eyebisaki makambo wana te.
Na yango, meká na bososoli nyonso koyeba makambo nini ya solo mazali kati na yango. Tokoki kolimbola na bato oyo balingi koyeba ete bankulutu bazali kotalela likambo yango na bolingo nyonso mpe na boyokani na mitindá ya Biblia. Kokangama makasi na mitindá yango wana tozali koyanola ekopekisa biso na kokóma na bosukisi ya mbangumbangu.—Masese 18:13.
Nsango ya sikisiki ezali na ntina mingi
Na ekeke ya liboso, bato bapalanganisaki nsango ya lokuta na ntina na Yesu mpo na kobebisa lokumu na ye, basusu nkutu bamonisaki ye lokola motombokisi. (Luka 7:34; 23:2; kokanisá na Matai 22:21.) Na nsima, lisangá ya boklisto oyo na ntango yango eutaki kosalema sika ekutanaki na botɛmɛli ya mangomba mpe ya biteni mosusu ya mokili. Lokola “Njambe apɔni bilɔkɔ na bolema kati na mokili,” bato mingi bazali kotyola basaleli na ye. (1 Bakɔlinti 1:22-29) Lelo oyo, baklisto ya solo basengeli koyika mpiko na botyoli, oyo ezali lolenge mosusu ya minyoko.—Yoane 15:20.
Nzokande, Batatoli ya Yehova bamonisaka botɔ́ndi soki moto oyo bazali kosolola elongo na ye azali sembo mpe amonisi elimo motindo moko na bato oyo bayaki kotala Paulo na Loma, mpe balobaki ete: “Nde tokosepela koyoka makanisi na yɔ na monɔkɔ na yɔ, jambi mpɔ na lingomba oyo, eyebani na biso ete eboyami na bisika yɔnsɔ.”—Misala 28:22.
Pesá ndimbola na bato oyo bayebi likambo yango sikisiki te, salá yango na boboto. (Baloma 12:14; kokanisá na 2 Timoté 2:25.) Sɛngá bango ete báluka nsango ya solo na ntina na Batatoli ya Yehova, oyo ekopesa bango nzela na kozimbisama te na bifundeli ya lokuta. Okoki lisusu kosalela bandimbola oyo epesami kati na mikanda ya la Société Watch Tower oyo ezali kolimbola lisangá, lisoló na yango mpe mateya na yango na lolenge ya sikisiki.a Mokolo mosusu Filipo ayanolaki na Natanaele na kolobáká bobele ete: “Yaka komɔna.” (Yoane 1:46) Biso mpe tokoki kosala sé bongo. Moto nyonso oyo alingi koya na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova na esika oyo afandi mpo na komona soki Batatoli bazalaka bato ya lolenge nini mpe bindimeli na bango ezali nini, akoyambama na esengo nyonso.
Bóbanga batɛmɛli te
Ezali likambo ya kolendisa na koyeba ete botyoli ezali kopekisa bato te ete bákóma Batatoli! Na boumeli ya lisoló moko ya televizyó na Allemagne, bapɛngwi babimisaki lokuta mingi na ntina na Batatoli ya Yehova. Moto moko oyo alandaki yango asosolaki ete makambo mingi oyo bapɛngwi balobaki mazalaki bobele ya mpamba mpe apusamaki na kozongela boyekoli na ye elongo na Batatoli ya Yehova. Ee, mbala mosusu, botyoli ya bato ebotaka matomba malamu!—Kokanisá na Bafilipi 1:12, 13.
Ntoma Paulo ayebaki malamu ete basusu bakotya likebi mingi na “masapo ya mpamba” kasi na solo te. Na yango, akomaki ete: “Omisɛnjɛla na makambo yɔnsɔ, oyamba bolɔji, osala mosala na mopalanganisi na Nsango Malamu, okokisa lisungi na yɔ nyɛ.” (2 Timɔtɛ 4:3-5) Bongo kotika te ete likebi na yo lipɛngwisama, mpe ‘kobanga likambo moko’ ya batɛmɛli na yo te. (Bafilipi 1:28) Zalá na motema ya kokita mpe na kimya mpe sakolá na esengo nyonso nsango malamu, okolónga ntango nyonso botyoli ya bato. Ee, omikundola elaka oyo ya Yesu: “[Esengo na bino, NW] wana bakotuka bino mpe bakonyokola bino mpe bakolobela bino mabe yɔnsɔ mpɔ na ngai. Bosepela mpe boyoka esɛngɔ jambi libonja na bino ejali monɛnɛ kati na likoló. Mpɔ banyɔkɔlaki bongo basakoli baoyo bajalaki liboso na bino.”—Matai 5:11, 12.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá mikanda oyo: Ba Témoins de Jéhovah—Basangani mpo na kosala mokano ya Nzambe na mokili mobimba, Ba Témoins de Jéhovah ya ekeke ya ntuku mibale, mpe Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 27]
Wana atyanaki ntembe na batɛmɛli, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Botika bango.” Alingaki koloba nini?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 29]
“Esengo na bino wana bato bakotyola bino mpe bakonyokola bino mpe bakoloba makambo nyonso ya lokuta likoló na bino mpo na nkombo na ngai.”—Matai 5:11, NW.