Babikisami na “libota oyo mabe”
“Bino libota na kondima te mpe na kopɛngwa! Nazala na bino mpe nakoyokela bino motema molai kino ntango nini?”—LUKA 9:41.
1. (a) Eleko na biso oyo ya mpasi ezali komonisa nini? (b) Makomami malobi nini na ntina na babiki?
TOZALI kobika na eleko moko ya mpasi. Koningana ya mabelé, mpela, nzala, maladi, ezaleli ya kobuka mibeko, kobwakama ya babómbi, bitumba ya nsɔ́mɔ—nyonso oyo mpe makambo mingi mosusu, mazali kobulunganisa bato na boumeli ya ekeke na biso oyo ya 20. Nzokande, mpasi monene oyo eleki mpasi nyonso etikali moke eya. Ezali nini? Ezali bongo “bolózi monene lokola oyo esilá naino kobima te uta ebandeli ya mokili kino sikawa, ekobima lisusu mpe te.” (Matai 24:21, NW) Nzokande, mingi na biso bakoki kozala na mposa ya kozwa bomoi ya esengo na mikolo mizali koya! Mpo na nini? Mpamba te liloba ya Nzambe mpenza ezali kolobela “ebele monene, oyo moto te akoki kotánga motuya na bango; bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bikólo nyonso, na minɔkɔ nyonso . . . Bazali baoyo babimi na [bolózi] monene . . . Bakoyoka nzala lisusu te, soko mposa na mai lisusu te. . . . Nzambe mpe akolongola mpisoli nyonso na miso na bango.”—Emoniseli 7:1, 9, 14-17.
2. Lolenge nini milɔngɔ́ ya ebandeli ya esakweli ya Matai 24, Malako 13, mpe Luka 21 ezwaki kokokisama na yango ya liboso?
2 Lisoló lipemami oyo ezwami na Matai 24:3-22, na Malako 13:3-20, mpe na Luka 21:7-24 ebendi likebi likoló na maloba ya esakweli ya Yesu na ntina na “nsuka ya ebongiseli ya biloko.”a Esakweli yango ekokanaki liboso likoló na ebongiseli ya biloko ya Bayuda na ekeke ya liboso ya Ntango na Biso, oyo esukaki na “bolózi monene” oyo ebimaki naino liboso te epai na Bayuda. Ebongiseli mobimba ya mangomba mpe ya politiki ya Bayuda, oyo moboko na yango ezalaki bongo tempelo ya Yelusaleme, ebebisamaki mpo na libela.
3. Mpo na nini ezali likambo ya lombangu ete tólanda esakweli ya Yesu lelo oyo?
3 Tiká tótalela sikawa makambo oyo mazalaki zingazinga na kokokisama ya liboso ya esakweli ya Yesu. Yango ekosalisa biso ete tósosola malamu kokokisama na yango lelo oyo. Ekomonisa ntina nini ezali likambo ya nokinoki ete tósala sikawa likambo oyo libongi mpenza mpo na kobika na bolózi monene oyo etikali moke ekwela bato.—Baloma 10:9-13; 15:4; 1 Bakolinti 10:11; 15:58.
“Nsuka” ekoya ntango nini?
4, 5. (a) Mpo na nini Bayuda oyo bazalaki kobanga Nzambe na ekeke ya liboso batyaki likebi na esakweli oyo ezali na Danyele 9:24-27? (b) Lolenge nini esakweli yango ekokisamaki?
4 Soko na mobu 539 L.T.B., Danyele mosakoli ya Nzambe azwaki emonaneli ya makambo oyo masengelaki kobima na “pɔ́sɔ” ya nsuka ya eleko ya “bapɔ́sɔ ntuku nsambo” ya bambula. (Danyele 9:24-27) “Bapɔ́sɔ” yango ebandaki na mobu 455 L.T.B. na ntango Mokonzi Alatazeze ya Pelese apesaki etindá ete engumba ya Yelusaleme etongama lisusu. “Pɔ́sɔ” ya nsuka ebandaki na kobima ya Masiya, Yesu Klisto, na ntango azwaki batisimo mpe apakolamaki na mobu 29 T.B.b Bayuda nyonso ya ekeke ya liboso oyo bazalaki na kobanga Nzambe bayebaki elembo oyo esengelaki komonisa ntango oyo elobelami kati na esakweli ya Danyele. Na ndakisa, na ntina na ebele monene oyo bayaki mpo na koyoka mateya ya Yoane mobatisi na mobu 29 T.B., Luka 3:15 elobi ete: “Bato bazalaki na mitema na likoló, bango nyonso kotuna na mitema na bango na ntina na Yoane, soko ye Klisto.”
5 “Pɔ́sɔ” ya 70 ezalaki bambula nsambo ya ngɔlu monene oyo epesamaki epai na Bayuda. Kobanda na mobu 29 T.B., kobatisama ya Yesu mpe mosala na ye ekɔtisamaki kati na eleko yango, kobomama na ye lokola mbeka na boumeli ya “ndambo ya pɔ́sɔ” na mobu 33 T.B., mpe ‘ndambo [mosusu] ya pɔ́sɔ’ kino na mobu 36 T.B. Na boumeli ya “pɔ́sɔ” yango, libaku ya kokóma moyekoli mopakolami ya Yesu epesamaki bobele epai na Bayuda oyo bazalaki kobanga Nzambe mpe epai na baprozelite. Na nsima, na 70 T.B., dati oyo eyebanaki na liboso te, mampinga ya Baloma oyo etambwisamaki na Titus ebomaki ebongiseli ya Bayuda oyo bapɛngwaki.—Danyele 9:26, 27.
6. (a) “Bolózi” oyo ebandaki na mobu 66 T.B. ebimisaki libebi monene nini? (b) Banani babikaki, mpe babikaki mpo na likambo nini ya nokinoki oyo basalaki?
6 Na yango, ebongiseli ya bonganga ya Bayuda, oyo ekómisaki tempelo ya Yelusaleme mbindo mpe eyangaki mwango mpo na koboma Mwana ya Nzambe mpenza, ebebisamaki. Mikanda ya masoló ya makambo matalaki mboka mpe libota mibebisamaki mpe lokola. Na nsima, ata Moyuda moko te akokaki komitánga ete azali mosangoli ya bonganga to mosangoli ya bokonzi. Nzokande, na esengo nyonso, Bayuda bapakolami na elimo batyamaki pembeni lokola bokonzi ya bonganga mpo na “koyebisa malamu” ya Yehova. (1 Petelo 2:9) Na ntango limpinga ya Loma ezingelaki Yelusaleme mpo na mbala ya liboso mpe babebisaki lopango ya tempelo na mobu 66 T.B., baklisto basosolaki ete limpinga wana ezalaki bongo “mbindo na libebisi oyo ezali kotɛlɛma na esika na bulɛɛ, lokola na likambo lilobaki mosakoli Danyele.” Mpo na kotosa etindá oyo ezwami kati na esakweli ya Yesu, baklisto na Yelusaleme mpe na Yudea bakimaki na bisika ya bangomba mpo na komibatela.—Matai 24:15, 16; Luka 21:20, 21.
7, 8. “Elembo” nini baklisto batalelaki, kasi bayebaki likambo nini te?
7 Bayuda wana ya sembo bamonaki kokokisama ya esakweli ya Danyele mpe bamonaki na miso na bango mpenza bitumba ya nsɔ́mɔ, nzala, bamaladi, koningana ya mabelé, mpe ezaleli ya kobuka mibeko oyo Yesu asakolaki ete ezalaki kati na “elembo . . . ya nsuka ya ebongiseli ya biloko.” (Matai 25:3, NW) Kasi Yehova ayebisaki bango ntango nini asengelaki mpenza kokweisa ekateli na ye likoló na ebongiseli wana oyo esilaki kobeba? Te. Na ntembe te, oyo asakolaki na ntina na likambo lileki monene oyo ekosalema na eleko ya kozala na ye lokola mokonzi na mikolo mikoya ekokanaki na oyo esalemaki na ntango ya “bolózi monene” ya ekeke ya liboso: “Mpo na mokolo yango mpe ntango yango, moto ayebi te, ata baanzelu na Likoló te, ata Mwana mpenza te, kasi bobele Tata ayebi.”—Matai 24:36.
8 Na lisalisi ya esakweli ya Danyele, Bayuda bakokaki kotánga bambula mpo na koyeba ntango ya kobima ya Yesu lokola Masiya. (Danyele 9:25) Kasi, bapesamelaki dati te oyo “bolózi monene” elingaki kobima, oyo na nsima epesaki mpasi epai na ebongiseli ya biloko ya Bayuda oyo bapɛngwaki. Ezalaki bobele nsima ya kobebisama ya Yelusaleme mpe ya tempelo na yango nde basosolaki ete dati yango ezalaki bongo mobu 70 T.B. Nzokande, bayebaki malamu esakweli oyo ya Yesu, ete: “Libota oyo ekoleka te kino ekobima makambo oyo nyonso.” (Matai 24:34) Emonani ete lolenge liloba “libota” esalelami awa ekeseni na oyo ezwami na Mosakoli 1:4, oyo elobeli kolandana ya mabota oyo ezali koya mpe koleka na boumeli ya eleko moko ya ntango.
“Libota oyo”—Ezali nini?
9. Ndimbola nini badiksionɛrɛ epesi mpo na liloba ge·ne·aʹ?
9 Na ntango bantoma minei oyo bafandaki elongo na Yesu likoló na Ngomba ya Olive bayokaki esakweli na ye na ntina na “nsuka ya ebongiseli ya biloko,” basosolaki ete liloba “libota” elimbolaki nini? Kati na Baevanzile liloba “libota” ebongolami uta na liloba ya Greke ge·ne·aʹ, oyo badiksionɛrɛ ya mikolo oyo epesi ndimbola na yango na maloba oyo: “Elimboli mpenza baoyo bauti na nkɔ́kɔ moko.” (Búku Greek-English Lexicon of the New Testament ya Walter Bauer) “Oyo ebotami, libota; . . . kolandana ya basangani ya molɔngɔ́ ya libota moko . . . to ekólo ya bato . . . to ya ebele mobimba ya bato oyo bazali na bomoi na eleko moko, Mt 24:34; Mko 13:30; Lk 1:48; 21:32; Filp 2:15, mpe mingimingi ekólo ya Bayuda oyo bazalaki kobika na boumeli ya eleko moko.” (Búku Expository Dictionary of New Testament Words ya W. E. Vine) “Oyo ebotami, bato na eutelo moko, libota; . . . ebele mobimba ya bato oyo bazali na bomoi na eleko moko: Mt xxiv. 34; Mko xiii. 30; Lk i. 48 . . . esalelamaki mingi mpenza mpo na ekólo ya Bayuda oyo bazalaki kobika na ntango moko mpe na boumeli ya eleko moko.”—Búku Greek-English Lexicon of the New Testament ya J. H. Thayer.
10. (a) Bandimbola nini ekokani oyo banganga-mayele mibale bapesi yango na kotángáká Matai 24:34? (b) Lolenge nini diksionɛrɛ moko ya teoloji mpe mabongoli mosusu ya Biblia endimi ndimbola yango?
10 Na yango, Vine mpe Thayer batángi Matai 24:34 wana bapesi ndimbola ya liloba “libota oyo” (he ge·ne·aʹ hauʹte) lokola “ebele mobimba ya bato oyo bazali na bomoi na eleko moko.” Búku moko (Theological Dictionary of the New Testament, 1964) endimi mpe ndimbola yango, koyebisáká ete: “Lolenge Yesu asalelaki liloba ‘libota’ emonisi mokano na ye ya polele: azali kolobela bato nyonso mpe ayebaki malamu bosangani na bango kati na lisumu.” Ezali solo ete “bosangani kati na lisumu” emonanaki polele kati na libota ya Bayuda na ntango Yesu azalaki awa na mabelé, lokola mpe ezali komonana na mokili lelo oyo.c
11. (a) Nani mpenza abongi liboso kokamba biso mpo na koyeba sikisiki lolenge ya kosalela liloba he ge·ne·aʹ hauʹte? (b) Lolenge nini moto yango ya mayele asaleli liloba yango?
11 Ya solo, baklisto oyo bazali koyekola makambo oyo mazali kokamba makanisi na bango liboso mpenza na lolenge oyo bakomi bapemami ya Baevanzile basalelaki liloba ya Greke he ge·ne·aʹ hauʹte, to “libota oyo,” wana bazongelaki maloba ya Yesu. Liloba yango esalelamaki bobele na ndimbola na yango ya mabe. Na yango, abéngaki bakonzi ya mangomba ya Bayuda ete “Banyoka, bana na bitupa” mpe akóbaki na koloba ete ekateli na Gehena ekokweisama likoló na “libota oyo.” (Matai 23:33, 36) Nzokande, ekateli wana ekweaki bobele likoló na bakonzi ya mangomba oyo bazalaki bakosi? Soko moke te. Na mabaku mingi, bayekoli ya Yesu bayokaki ye koloba na ntina na “libota oyo,” kosaleláká liloba yango lolenge moko na ndimbola monene koleka. Ndimbola yango ezalaki nini?
“Libota oyo mabe”
12. Wana bayekoli bazalaki koyoka, lolenge nini Yesu akangisaki “bibele” na “libota oyo”?
12 Na mobu 31 T.B., na boumeli ya mosala monene ya Yesu na Galilai mpe mwa moke nsima ya Elekeli, bayekoli na ye bayokaki ye koloba epai na “bibele” ete: “Nakopima libota oyo na eloko nini? Ezali lokola bana oyo bazali kofanda na esika na zando, kobyanga baninga na bango ete, Tobeteli bino pololo nde bobini te, toleli mpo na bino nde boyoki mawa te. Zambi Yoane ayaki, mpe azalaki kolya te mpe komela te mpe balobaki ete, Azali na [demó]. Mwana na moto ayei wana ezali ye kolya mpe komela mpe balobi ete, Talá molundi mpe molangwi, moninga na bakongoli na mpako mpe bato na masumu.” Yango ebendaki te “bibele” wana ya bato oyo bazangaki mibeko!—Matai 11:7, 16-19.
13. Liboso ya bayekoli na ye, banani oyo Yesu abéngaki bango mpe akweisaki bango ete bazali “libota oyo na mabe?”
13 Na nsima, na mobu 31 T.B., wana Yesu mpe bayekoli na ye babandaki mobembo na bango ya mibale ya mosala ya kosakola na Galilai, “basusu kati na bakomeli mpe na Bafalisai” basɛngaki ete Yesu alakisa bango elembo. Ayebisaki bango mpe “bibele” oyo bazalaki wana ete: “Libota na mabe mpe na pite bazali koluka elembo nde bakozwa elembo te bobele elembo na mosakoli Yona. Zambi lokola Yona azalaki na libumu na mbisi monene mikolo misato mpe butu misato. . . . Ekozala mpe bongo na libota oyo na mabe.” (Matai 12:38-46) Emonani polele ete, “libota oyo na mabe” etaleli bakonzi ya mangomba mpe “bibele” oyo basosolaki soko moke te elembo oyo ekokanaki na ntango Yesu akufaki mpe asekwaki.d
14. Bayekoli bayokaki Yesu kokweisa Basadukai mpe Bafalisai na likambo nini?
14 Na nsima ya Elekeli ya mobu 32 T.B., lokola Yesu mpe bayekoli na ye bayaki na etúká ya Galilai na Magadana, Basadukai mpe Bafalisai basɛngaki lisusu Yesu elembo. Azongelaki bango maloba oyo: “Libota mabe . . . na Yona.” (Matai 16:1-4) Bakosi wana na mangomba bazalaki bakonzi oyo bazalaki solo na ngambo monene koleka kati na “bibele” bazangi sembo oyo Yesu akweisaki ete bazalaki “libota oyo na mabe.”
15. Liboso mpe nsima mpenza ya kobongwana, Yesu mpe bayekoli na ye bakutanaki na likambo nini epai na ‘libota oyo’?
15 Pene na nsuka ya mosala na ye ya kosakola na Galilai, Yesu abyangaki bibele mpe bayekoli na ye, mpe alobaki na bango ete: “Moto nani akoyoka nsɔni na ntina na ngai mpe na ntina na maloba na ngai na kati na libota oyo na pite mpe na masumu, Mwana na moto akoyoka nsɔni na ntina na ye.” (Malako 8:34, 38) Na yango bibele na Bayuda oyo baboyaki kobongola motema na eleko wana bazalaki mpenza kati na “libota oyo na pite mpe na masumu.” Na mwa mikolo oyo milandaki, nsima ya kobongwana na ye, Yesu mpe bayekoli na ye ‘bakómaki epai na bibele,’ mpe moto moko asɛngaki na ye ete abikisa mwana na ye. Yesu alobaki ete: “Ɛ, libota na kozanga kondima mpe na bokesene; nazala na bino kino ntango nini? Nayikela bino mpiko kino ntango nini?”—Matai 17:14-17; Luka 9:37-41.
16. (a) Ekweli nini ya “bibele” Yesu azongelaki yango na Yudea? (b) Lolenge nini “libota” oyo ekweaki na mabe eleki mabe nyonso?
16 Ezalaki mpenza na Yudea, nsima ya Elambo ya Mingombo na 32 T.B., ‘na ntango bibele na bato bayanganaki’ pene na Yesu, nde azongelaki lisusu maloba oyo ya kokweisa: “Libota oyo ezali libota mabe. Ezali koluka elembo, nde elembo ekopesama na bango te, bobele elembo na Yona.” (Luka 11:29) Na nsuka, na ntango bakonzi ya mangomba bamemaki Yesu na esambiselo, Pilato alingaki kotika ye. Lisoló lilobi ete: “Banganga minene mpe mikóló na bato bandimisi ebele ete bálɔmba Balaba mpe ete bákufisa Yesu. . . . Pilato alobi na bango ete, Bongo, nasala nini na Yesu oyo abyangami Klisto? Bango nyonso balobi ete, Abomama na [nzeté, NW]! Ye ete, Kasi asali nini mabe? Nde bango bangangi na koleka ete, Abomama na [nzeté, NW]!” “Libota mabe” wana ezalaki kosɛnga ete makila ya Yesu masopama!—Matai 27:20-25.
17. Bamoko kati na “libota oyo na kilikili” basalaki nini nsima ya koyoka mateya ya Petelo na Pantekote?
17 “Libota na kozanga kondima mpe na bokesene,” bapusamaki na bakonzi na bango ya mangomba, na yango bazalaki na ngambo monene kati na kobomama ya Nkolo Yesu Klisto. Mikolo ntuku mitano na nsima, na Pantekote ya mobu 33 T.B., bayekoli bazwaki elimo santu mpe babandaki koloba na minɔkɔ mikeseni. Nsima na koyoka mongongo, “ebele na bato bayanganaki” mpe ntoma Petelo abéngaki bango ete “mibali na Bayuda, na bino nyonso bofandi na Yelusaleme,” kolobáká ete: “Mobali oyo [Yesu] . . . bino bobakisi ye na [nzeté, NW], mpe bobomi ye na mabɔ́kɔ na bino bato bazangi mibeko.” Bayoki mosusu basalaki nini na koyokáká maloba wana? ‘Bakatanaki na mitema.’ Na nsima Petelo asɛngaki na bango ete bábongola mitema. “Atatoli na bango, kopɛsáká bango toli ete, Bómibikisa na libota oyo na kilikili.” Mpo na komonisa ete bandimaki toli yango, bato soko nkóto misato ‘bayambaki mateya na ye [mpe] babatisamaki.’—Misala 2:6, 14, 23, 37, 40, 41.
“Libota oyo” emonisami
18. Liloba “libota oyo” oyo Yesu asalelaki ezalaki ntango nyonso kotalela nini?
18 Na bongo, nini ezali “libota” oyo Yesu azalaki kolobela yango mbala mingi liboso na bayekoli na ye? Lolenge nini basosolaki maloba oyo ete: “Libota oyo ekoleka te kino ekobima makambo oyo nyonso”? Ya solo, Yesu alingaki te kobongola lolenge oyo azalaki uta kala kosalela liloba “libota,” oyo azalaki kosalela yango ntango nyonso epai na bibele ya bato ya eleko na ye mpe “bakambi [na bango] bakufi-miso” oyo bango nyonso basalaki libota ya Bayuda. (Matai 15:14) “Libota oyo” emonaki bampasi nyonso oyo Yesu asakolaki mpe na nsima bakufaki na “bolózi monene” oyo ekokani na mosusu te, oyo ekweaki likoló na Yelusaleme.—Matai 24:21, 34.
19. Ntango nini mpe lolenge nini “likoló mpe mabelé” ya ebongiseli ya Bayuda ebomamaki?
19 Na ekeke ya liboso, Yehova asambisaki libota ya Bayuda. Baoyo babongolaki motema, oyo bayaki komonisa kondima kati na bibongiseli ya motema mawa ya Yehova na nzela ya Yesu Klisto, babikisamaki na “bolózi monene.” Maloba ya Yesu mazalaki solo, makambo nyonso oyo masakolamaki masalemaki, mpe na nsima ‘likoló mpe mabelé’ ya ebongiseli ya Bayuda—ekólo mobimba, elongo na bakonzi na bango ya mangomba—bakufaki. Yehova akokisaki ekateli!—Matai 24:35; kokanisá na 2 Petelo 3:7.
20. Toli nini epesamaki na ntango malamu ebongi ete baklisto bátosa yango nokinoki?
20 Bayuda wana oyo batyaki likebi na maloba ya esakweli ya Yesu basosolaki ete lobiko na bango etalelaki te kotánga soki “libota” moko esengelaki koumela bambula boni to koluka koyeba “bantango to bileko” ya sikisiki, kasi na komikaboláká nde na libota ya mabe ya eleko na bango mpe na kosaláká mokano ya Nzambe. Atako maloba ya Yesu ya nsuka mataleli kokokisama monene na yango na mikolo na biso, Bayuda ya ekeke ya liboso balandaki mpe toli yango: “Sɛnzɛlá ntango nyonso, mpe bondelá ete bózala na makasi na kokima makambo oyo nyonso malingi koya, mpe na kotɛlɛma liboso na mwana na moto.”—Luka 21:32-36; Misala 1:6-8.
21. Likambo nini ya mbalakaka tokoki komizela na yango mosika te?
21 Lelo oyo, “mokolo monene na [Yehova] . . . ebɛlɛmi, eyei mbangu mpenza.” (Sefania 1:14-18; Yisaya 13:9, 13) Na pwasa, na “mokolo mpe ntango” oyo Yehova asilá kobongisa uta kala, nkanda na ye ekosopama likoló na bibongiseli ya mangomba, ya politiki, mpe ya mombongo, mpe likoló na bato na kilikili ya eleko oyo basali bongo “libota mabe mpe na pite.” (Matai 12:39; 24:36; Emoniseli 7:1-3, 9, 14) Lolenge nini okoki kobika na “bolózi monene”? Lisoló na biso ya mibale ekoyanola na motuna oyo mpe ekoloba na ntina na elikya monene mpo na mikolo mizali koya.
[Maloba na nse]
a Mpo na koyeba makambo mosusu mingi ya esakweli yango, talá etando oyo ezwami na nkasa 14, 15 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwáli, 1994.
b Mpo na koyeba makambo mosusu na ntina na “bapɔ́sɔ” ya bambula, talá nkasa 130-132 ya búku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes?, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
c Mabongoli mosusu ya Biblia ebongoli he ge·ne·aʹ hauʹte oyo ezwami kati na Matai 24:34 ete: “bato oyo” (The Holy Bible in the Language of Today [1976], ya W. F. Beck); “libota oyo” (The New Testament—An Expanded Translation [1961], ya K. S. Wuest); “bato oyo” (Jewish New Testament [1979], ya D. H. Stern).
d “Bibele” wana ya bato bazangi sembo basengeli te kokokanisama na ba am-ha·ʼaʹrets, to “bato na mabelé” oyo bakonzi ya mangomba ya lolendo baboyaki kosangana elongo na bango, kasi oyo Yesu ‘ayokelaki bango mawa.’—Matai 9:36; Yoane 7:49.
Okoyanola lolenge nini?
◻ Liteya nini tozwi kati na kokokisama ya Danyele 9:24-27?
◻ Ndimbola nini badiksionɛrɛ ya mikolo na biso epesi na liloba “libota oyo” na lolenge esalelami na Biblia?
◻ Lolenge nini Yesu asalelaki ntango nyonso liloba “libota”?
◻ Lolenge nini Matai 24:34, 35 ekokisamaki na ekeke ya liboso?
[Elilingi na lokasa 12]
Yesu akokanisaki “libota oyo” na bibele ya bana ya motó makasi
[Elilingi na lokasa 15]
Bobele Yehova nde ayebaki na liboso ntango ya kokweisa etumbu likoló na ebongiseli mabe ya Bayuda