Tokoyanola nde na bolingo na Yesu?
“Bolingo na Klisto ezali kopusa biso.”—2 BAKOLINTI 5:14, MN.
1. Lolenge nini tokoki kolimbola bolingo na Yesu?
BOLINGO na Yesu ezali mpenza kitoko! Soki tokanisi bampasi makasi oyo ayikela yango mpiko mpo na kopesa mbeka na lisiko, mwango bobele moko oyo tokoki kozwa bomoi ya seko, motema na biso mozali kopusa biso na kozala na botɔndi. Ezali Jéhovah Nzambe mpe Yesu nde babandaki likambo yango liboso. Balingaki biso liboso naino tozalaki bato na masumu. (Baloma 5:6-8; 1 Yoane 4:9-11) Ntóma Paulo akomaki ete, koyeba “bolingo na Klisto eleki boyebi nyonso.” (Baefese 3:19, MN) Ee, bolingo na Yesu eleki mayele ya mokili. Ezali mosika koleka makambo nyonso oyo bato basili komona to kosala yango.
2. Nini ekoki te kopekisa Yesu ete alinga biso?
2 Wana akomaki mokanda epai na baklisto ya Loma, Paulo atunaki motuna oyo ete: “Nani akokabola biso na bolingo na Klisto? Bolózi soko mpasi, minyoko soko nzala, bolumbu soko likámá, to mopanga?” Ata moko na makambo wana ekoki kopekisa Yesu te ete alinga biso. Paulo akóbi ete: “Nandimisami ete liwa te, bomoi te, baanzelu te, biyangeli te, makambo na sika te, makambo mazali koya te, nguya te, bolai te, bozindo te, ekelamu mosusu te ekoki kokabola biso na bolingo na Nzambe oyo ezali kati na Klisto Yesu, Nkolo na biso.”—Baloma 8:35-39.
3. Wapi ntina bobele moko mpo na yango Yesu mpe Tata na ye bakoki kotika biso?
3 Tala motindo na nguya na bolingo oyo Jéhovah Nzambe mpe Yesu bazali na yango mpo na biso. Ezali bobele na eloko moko oyo ekoki kopekisa bango ete balinga biso te: soki tobwaki bolingo na bango na nko na koboyáká kosala makambo bango bazali kosɛnga. Mosakoli moko na Nzambe alobaki mokolo mosusu epai na mokonzi moko na Yuda, ete: “Jéhovah azali na bino elongo wana bino bozali elongo na ye. Soko bokoluka ye, akozwana na bino nde soko bokotika ye, akotika bino.” (2 Ntango 15:2) Nani kati na biso akoboya baninga malamu mpe na motema mawa, Jéhovah Nzambe mpe Mwana na ye,Yesu Klisto?
Eyano malamu na bolingo na Yesu
4, 5. (a) Bolingo oyo Yesu azali na yango mpo na biso esengeli kozala na bopusi nini likoló na boyokani na biso elongo na bazalani na biso? (b) Bolingo oyo Yesu azali na yango mpo na biso esengeli kopusa biso na kolinga nani mosusu?
4 Bolingo monene na Yesu ezali na bopusi nini likoló na moko na moko na biso? Esengelaki kozala na bopusi nini? Yesu amonisaki bopusi oyo bolingo na ye ekozala na yango likoló na boyokani na biso elongo na bazalani. Nsima na kosalela bantóma na ye na komikitisa nyonso, na kosukoláká bango makolo, alobaki ete: “Nasili kopesa bino ndakisa mpo ete bino mpe bosala lokola esalaki ngai bino.” Mpe abakisaki ete: “Napesi bino mobeko na sika: ete bolinganaka. Bolinganaka lokola ngai nalingaki bino.” (Yoane 13:15, 34, MN) Bayekoli na ye basimbaki liteya wana; mpe basalaki makasi mpo na komekola Yesu. Ntóma Yoane akomaki, ete: “Tosili koyeba bolingo mpo na oyo ete: ye wana apesaki bomoi na ye mpo na biso; mpe biso tosengeli kopesa bomoi na [biso] mpo na bandeko na [biso].”—1 Yoane 3:16, MN.
5 Mbɛlɛ tokoyeba kososola bomoi mpe mosala na Yesu te soki ndakisa na ye epusi biso bobele na kolinga bazalani mpe na kosalela matomba na bango. Bolingo oyo Yesu azali na yango mpo na biso ekopusa biso na kolinga ye, mpe kolinga mingi mpenza Tata na ye, oyo alekisaki ye makambo nyonso oyo ye ayebi, boye te? Tokoyanola nde na bolingo na Klisto mpe tokosalela Tata na ye lokola ye asalaki?—Baefese 5:1, 2; 1 Petelo 1:8, 9.
6. Bolingo oyo Yesu azalaki na yango mpo na Paulo ezalaki na bopusi nini epai na ntóma wana?
6 Totalela likambo ya Saulo, oyo na nsima abéngamaki Paulo. Na eleko moko, anyokolaki Yesu, “azalaki naino kokanela mpe koluka koboma bayekoli.” (Misala 9:1-5, MN; Matai 25:37-40) Na ntango ayaki koyeba Yesu malamu, Paulo azalaki na botɔndi mingi mpo azwaki lilimbisi kino andimaki bobele komipesa mpo na Yesu te, kasi lisusu kokufa mpo na ye. Akomaki ete: “Nasili kobakisama likoló na nzeté elongo na Klisto. Ngai nazali lisusu na bomoi te, . . . Ee, bomoi oyo nazali na yango kati na nzoto sikawa, nazali kobika mpo na kondima epai na Mwana na Nzambe, oyo alingaki ngai mpe asili komikaba mpo na ngai.”—Bagalatia 2:20, MN.
7 Bolingo na Yesu esengeli kopusa biso na kosala nini?
7 Bolingo oyo Yesu azali na yango mpo na biso esengeli kozala na bopusi makasi likoló na bomoi na biso. Paulo alobaki epai na Bakolinti ete: ‘Bolingo na Klisto epusi biso ete tobika lisusu mpo na biso moko te, kasi mpo na ye oyo akufeli biso mpe asili kosekwa.’ (2 Bakolinti 5:14, 15, MN) Ya solo, botɔndi na biso epai na Yesu, oyo apesaki bomoi na ye mpo na biso, esengeli kopusa biso na kosala makambo nyonso oyo ye asɛngi. Ezali bobele motindo moko wana mpo na komonisa ete tolingi ye mpenza. Yesu alobaki ete: “Soki bolingi ngai, bokotósa mibeko na ngai. Ye oyo azali na mibeko na ngai mpe akotósaka yango, ye wana alingi ngai.”—Yoane 14:15, 21; tala 1 Yoane 2:3-5.
8. Bolingo na Yesu ezalaki na bopusi nini likoló na bomoi ya ebele na bato ya masumu?
8 Na koyebáká mibeko na Yesu, bato na pite, bato na ekobo, baoyo basangisi nzoto mibali na mibali, balangwi na masanga mpe babotoli oyo bazalaki na Kolinti na Kala, bayanolaki na bolingo na Yesu na kotikáká misala na bango. Paulo akomaki na ntina na bango ete: “Bosili kosukolama, . . . bosili kotangama bayengebene na nkombo na Nkolo na biso Yesu Klisto.” (1 Bakolinti 6:9-11, MN) Bobele bongo na eleko na biso, bolingo na Yesu ezali kopusa bato mingi na kosala mabongwani minene. John Lord, mokomi na makambo na kala, akomaki ete: “Bolóngi ya solo ya boklisto ezalaki komonana wana bandimi na yango bazalaki kobongwana . . . Ezali na matatoli mingi na ntina na bomoi na bango malamu, na bizaleli na bango bizangi efundeli, na botósi na bango epai na Leta, mpe na bizaleli na bango ya boklisto.” Oyo nde mbongwana monene euti na mateya na Yesu?
9. Koyokamela Yesu elimboli nini?
9 Ya solo mpenza, tokoki te kozala na likambo mosusu ya ntina mingi mpo na koyekola, bobele bomoi mpe mosala na Yesu Klisto. Paulo alobaki ete: ‘Botala Yesu,’ “Ee, botalela ye.” (Baebele 12:2, 3, MN) Na boumeli ya ebongwaneli na Yesu, Nzambe ye moko apesaki etinda oyo wana ezalaki ye koloba na ntina na Mwana na ye, ete: “Boyokamela ye.” (Matai 17:5) Kasi koyokamela Yesu, ezali te bobele koyoka makambo oyo ye azali koloba. Yango elimboli kolanda malako na ye, ee, komekola ye na kosaláká makambo oyo ye asalaki mpe na motindo oyo asalaki yango. Tozali koyanola na bolingo na Yesu na kotaleláká ye lokola ndakisa mpe na kolanda matambé na ye malamu.
Oyo Yesu alingi ete tosala yango
10. Banani Yesu abongisaki, mpe na mokano nini?
10 Mosala oyo Yesu azwaki epai na Nzambe ezalaki mpo na kosakola Bokonzi ya Tata na ye, mpe abongisaki bayekoli na ye mpo ete bakokisa mosala yango. Alobaki epai na bayekoli na ye ya liboso, ete: “Tokenda epai mosusu . . . ete nasakola kuna lisusu, mpo ete nabimi mpo na yango.” (Malako 1:38; Luka 4:43) Na nsima, apesaki bantóma na ye 12 kobongisama malamu elandamaki na etinda oyo ete: “Wana ekokenda bino, bosakola ete: ‘Bokonzi ya makoló ebɛlɛmi.’” (Matai 10:7) Nsima na mwa basanza, abongisaki bayekoli mosusu 70 mpe atindaki bango boye: “Boloba na bango ete: ‘Bokonzi na Nzambe ebɛlɛmi na bino.’” (Luka 10:9) Emonani ete, Yesu alingaki ete bayekoli na ye bazala basakoli mpe bateyi.
11. (a) Na ndimbola nini bayekoli na Yesu basengelaki kosala misala minene koleka oyo ya ye? (b) Likambo nini likómelaki bayekoli nsima na liwa na Yesu?
11 Yesu akóbaki kobongisa bayekoli na ye mpo na mosala yango. Na mpokwa liboso na liwa na ye, alendisaki bango na maloba oyo ete: “Ye oyo akondimela ngai, akosala misala mizali ngai kosala; mpe akosala misala minene koleka oyo.” (Yoane 14:12, MN) Misala ya bayekoli na ye misengelaki kozala minene koleka oyo ya ye, mpo ete mosala na bango ya kosakola mosengelaki kokómela bato mingi, kati na elanga eleki monene mpe na boumeli ya ntango molai. Kasi, nsima na liwa na Yesu, bayekoli na ye basɛnzwaki na kobanga. Babombanaki mpe bakóbaki te kokokisa mosala oyo abongisaki bango mpo na yango. Basusu nkutu bazongelaki mosala na bango ya balɔ́bi mbisi. Nzokande, na motindo oyo bakokaki kobosana te, alimbwelaki bayekoli nsambo wana likambo oyo ye azalaki kozela epai na bango mpe bayekoli na ye nyonso.
12. (a) Likamwisi nini Yesu asalaki pene na libéké ya Galilai? (b) Yesu alingaki mpenza koloba nini na ntango atunaki Petelo ete: “Olingi ngai koleka oyo?”
12 Yesu alataki nzoto ya mosuni mpe abimaki pene na libéké ya Galilai. Bantóma wana nsambo bazalaki kati na masuwa, nde butu mobimba bakangaki ata mbisi moko te. Yesu abeleli bango longwa na libongo, ete: “Bobwaka monyámá na lobɔkɔ na mobali na masuwa mpe bokozwa.” Wana etondaki na mbisi na likamwisi, monyámá mozalaki pene na kopasuka; bongo, bato oyo bazalaki na masuwa basosolaki ete Yesu nde azalaki na libóngo, mpe bakendaki nokinoki epai na ye. Nsima na kopesa bango bilei na ntɔngɔ wana, ekoki kozala ete na kotaláká ebele na mbisi oyo bauti kozwa, Yesu atuni Petelo ete: “Simona, mwana na Yoane, olingi ngai koleka oyo?” (Yoane 21:1-15, MN) Yesu alingaki mpenza koloba ete: Ozali na bolingo mingi epai na misala na yo ya kolɔ́ba mbisi koleka mosala ya kosakola oyo nabongisaki bino mpo na yango?
13. Lolenge nini Yesu asalaki mpo na kokɔtisa na nguya nyonso kati na makanisi ya bayekoli na ye, makambo oyo basengelaki kosala mpo na koyanola na bolingo na ye?
13 Petelo ayanoli ete: “Ee, Nkolo, yo oyebi ete nazali na bolingo mpo na yo.” Bongo Yesu alobi na ye ete: “Leisa bana na mpate na ngai.” Mpo na mbala ya mibale, Yesu atuni ye ete: “Simona, mwana na Yoane, olingi nde ngai?” Na ntembe te Petelo ayanoli lisusu na kondimisa makasi ete: “Ee, Nkolo, yo oyebi ete nazali na bolingo mpo na yo.” Yesu asɛngi ye lisusu, ete: “Batela bampate na ngai mike.” Mpe, mpo na mbala ya misato, atuni ye ete: “Simona, mwana na Yoane, olingi nde ngai?” Sikawa Petelo atungisami mingi na motema. Mwa mikolo liboso, autaki koangana mbala misato ete ayebi Yesu te; azali mbala mosusu komituna soki Yesu azali na ntembe te mpo na bosembo na ye. Na yango, mpo na mbala ya misato, na ntembe te Petelo ayanoli na mongóngo ya kobondela ete: “Nkolo, yo oyebi makambo nyonso, yo oyebi ete ngai nazali na bolingo mpo na yo.” Yesu alobi na ye bobele ete: “Leisa bampate na ngai mike.” (Yoane 21:15-17, MN) Mwa ntembe moke ezali likóló na oyo Yesu azalaki kozela epai na Petelo mpe baninga na ye? Na makanisi na bango, mpe kati na makanisi ya baoyo nyonso bazali bayekoli na ye lelo, Yesu akɔtisaki likanisi oyo ete: Moto na moto oyo alingi ye asengeli kosangana na mosala ya kosakola.
14. Na mabaku mosusu, lolenge nini Yesu amonisaki motindo oyo bayekoli na ye basengelaki koyanola na bolingo na ye?
14 Mwa Mikolo na nsima na lisoló wana na libóngo ya libéké, Yesu abimaki na ngomba ya Galilai mpe apesaki malako epai na koyangana na esengo ya bayekoli 500, ete: “Boye bokenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, . . . kolakisa mpe bango ete batósa nyonso esili ngai kolaka bino.” (Matai 28:19, 20; 1 Bakolinti 15:6) Kanisa naino! Bato nyonso: mibali, basi, bana, basili kozwa bobele mosala wana moko. Na nsima, liboso na komata na likoló, Yesu alobaki epai na bayekoli na ye ete: “Bokozala batatoli na ngai . . . kino na nsuka na mokili.” (Misala 1:8) Na kotalela mitinda nyonso wana, ezali likambo ya kokamwa te na koyoka Petelo koloba nsima na bambula, ete: “[Yesu] asili kolaka biso kosakola epai na bato mpe komema litatoli oyo.”—Misala 10:42, TOB.
15. Na likambo nini tokoki te kobɛta ata ntembe moke?
15 Ntembe moko te ekoki kozala mpo na lolenge oyo tosengeli koyanola na bolingo na Yesu. Alobaki epai na bayekoli na ye ete: “Soki bokotósa mibeko na ngai, boye bokoumela kati na bolingo na ngai. . . . Soki bosali makambo oyo mazali ngai kolaka bino, boye bozali mpenza baninga na ngai.” (Yoane 15:10–14) Motuna motunami mozali oyo ete: liboso na bolingo na Yesu, tozali nde komonisa botɔndi na biso na kotósáká etinda na ye ya kosakola mpe kozalisa bayekoli? Ya solo, mbala mosusu ezali pɛtɛɛ te mpo na biso, mpe yango mpo na bantina mingi. Kasi yango ezalaki pɛtɛɛ te mpo na Yesu. Totala mabongwani oyo ye asalaki.
Tólanda ndakisa na Yesu
16. Yesu asili kopesa ndakisa nini kitoko?
16 Kati na nkembo na ye ya likoló, Mwana bobele moko na Nzambe azalaki na etelemelo monene, koleka oyo na baanzelu nyonso. Azalaki mpenza mozwi! Nzokande, amikitisaki na bolingo na ye moko, abotamaki na libota ya babólá mpe akólaki esika moko na bato oyo bakobɛlaka, baoyo bakokufaka. Asalaki yango mpo na biso, lokola ntóma Paulo alimbolaki yango ete: “Boyebi ngolu na Nkolo na biso Yesu Klisto: atako azalaki mozwi nde akómaki mobólá mpo na bino, ete bino bokóma bazwi kati na bobólá na ye” (2 Bakolinti 8:9; Bafilipi 2:5-8) Oyo nde ndakisa malamu! Oyo nde elakiseli na bolingo malamu! Moto moko te asilá kotika biloko mingi boye to mpe konyokwama mingi boye mpo na bolamu ya bato mosusu. Mpe moto moke te asili kopesa bato likoki ya kozala na bozwi monene, bomoi ya seko kati na ezalela ya kokoka.
17. Nzela nini esili kotyama liboso na biso, mpe nsuka ekozala nini soki nde tolandi yango?
17 Tokoki kolanda ndakisa na Yesu mpe kozwisa bolamu wana epai na bazalani na biso. Mbala na mbala, Yesu alendisaki bato ete bakóma bayekoli na ye (Malako 2:14; Luka 9:59; 18:22) Na yango, Petelo akomaki ete: “Bobyangami nde mpo na [nzela] yango, mpo ete Klisto mpe aokaki mpasi mpo na bino, mpe atikeli bino elakiseli ete bolanda matambe na ye.” (1 Petelo 2:21, MN) Tokoyanola nde na bolingo na Klisto kino konyokwama mpo na kosalela Tata na ye lokola ye asalaki yango? Nzela oyo ekoki kopesa bolamu epai na bato mosusu. Ee, na kolandáká ndakisa na Yesu, na kosaleláká mateya nyonso oyo ye azwaki epai na Tata na ye, ‘tokomibikisa biso moko, mpe baoyo bazali koyoka biso.’—1 Timoté 4:16.
18. (a) Yesu apesaki ndakisa nini na ezaleli na ye epai na bato? (b) Bato bazalaki na ezaleli nini liboso na bomoto na Yesu?
18 Mpo na kosalisa bato mingi, tosengeli mpe kozala na mayoki motindo moko na Yesu mpo na bango. Esakweli moko elobaki na ntina na ye ete: “Akooka mawa mpo na mosɔkɛmi mpe mpo na mobólá.” (Nzembo 72:13, MN) Bayekoli na ye bakokaki komona ete Yesu ‘azalaki na bolingo’ mpo na baoyo ye azalaki kolobana na bango mpe alingaki mpenza kosalisa bango. (Malako 1:40-42; 10:21) Biblia elobi ete: “Emoni ye bibele, aoki mawa mpo na bango, mpo ete balɛmbaki mpe balemalemi, lokola bampate ezangi mobateli.” (Matai 9:36) Ata basali na masumu mingi baokaki bolingo na ye mpe babendamaki epai na ye. Na mongóngo na ye, na motindo na bomoto na ye mpe na motindo na koteya na ye, azalaki kosala ete bamiyoka malamu. Na yango, ata bato oyo batyolamaki lokola bakɛngɛli na mpako mpe bato na pite bazalaki koluka ye.—Matai 9:9-13; Luka 7:36-38; 19:1-10.
19. Lolenge nini Paulo amekolaki Yesu, mpe matomba nini makozwama soki tokosala bongo?
19 Bayekoli na Yesu ya ekeke ya liboso, bamekolaki ndakisa ya bolingo na ye. Paulo akomaki mikanda epai na bamoko na baoyo ye akokisaki mosala na ye epai na bango, ete: “Tosili kokóma bato na bóbóto kati na bino, lokola mama akobatelaka bana oyo ye azali kobɔkɔlo. . . . Mbala na mbala, tosili kopesa toli na moko na moko kati na bino lokola ekosalaka tata mpo na bana na ye; tobɔndisaki bino mpe totatolaki liboso na bino.” (1 Batesaloniki 2:7-11, MN) Tozali nde na bobóto mpo na bato ya teritware na biso lokola oyo baboti bazali na yango mpo na bana na bango balingami? Na komonisáká bolingo wana na mongóngo na biso, na ezalela ya elongi na biso mpe na misala na biso, boye tozali koyebisa nsango na Bokonzi oyo ekobéndaka bampate.
20, 21. Yebisa mwa masoló ya bato oyo, na eleko na biso, bazali kolanda ndakisa ya bolingo oyo Yesu asili kotika.
20 Mokolo moko ya malili, na Espanye, ba Témoins de Jéhovah mibale bakutanaki na mobangé mwasi moko atambolaki na banzeté, oyo ndako na ye ekangamaki na glase mpo ete azalaki lisusu na nkoni te mpo na kopɛlisa mɔ́tɔ. Azalaki kozela ete mwana na ye ya mobali auta na mosala mpe abongisela ye yango. Ba Témoins bakataki nkoni mpe batikelaki ye mwa bazulunalo mpo na kotanga. Na ntango mwana na ye azongaki, bobóto botondi na bolingo oyo ba Témoins bamonisaki mpo na mama na ye, ekamwisaki ye na boye ete atangaki mikanda, abandaki koyekola Biblia, azwaki batisimo mpe abandaki mosala ya pionnier.
21 Na Australie, mobali moko mpe mwasi na ye balimbwelaki ba Témoins oyo bakendaki kotala bango ete bazalaki na mosolo te mpo na koleisa libota na bango. Babalani ba Témoins bakendaki kosomba bilei, mpe ata ba bonbons mpo na bana na bango. Baboti balobaki na mpisoli ete: bazalaki ata na elikya moko te mpe bakanaki komiboma. Bango nyonso mibale babandaki koyekola Biblia, mpe mwasi auti kozwa batisimo kala mingi te. Na États-Unis, mwasi moko azalaki na makanisi mabe na ntina na ba Témoins de Jéhovah, alobaki nsima na kokutana na Témoin moko ete: “Nayebi lisusu makambo oyo tolobelaki te, kasi nazali komikundola bobele mpo na bobóto amoniselaki ngai, na boyambi na ye mpe na ezaleli na ye ya komikitisa. Nabendamaki mpenza na bomoto na ye. Nasepelaki kozala moninga na ye kino lelo oyo.”
22. Nsima na kotalela bomoi na Yesu, tosukisi nini na ntina na ye?
22 Soko tokoyanola na bolingo na Yesu na kokokisáká mosala oyo ye asalaki na lolenge oyo ye asalaki yango, tokozwa bolamu kitoko. Monene na Yesu emonani polele mpe ezali na bopusi. Topusami na koloba lokola Ponse Pilato guvernere Moloma ete: “Tala moto ye wana!” Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, azali “Moto.”—Yoane 19:5.
Bozongeli
◻ Bolingo na Yesu ezali na bonene nini?
◻ Bolingo na Yesu esengeli kopusa biso na kolinga nani, mpe bolingo na ye epusi biso na kosala nini?
◻ Mosala nini Yesu alingi ete tokokisa yango?
◻ Bozwi nini Yesu azalaki na yango, mpe mpo na nini akómaki mobólá?
◻ Lolenge nini tosengeli komekola Yesu na motindo oyo asalelaki bato?
[Elilingi na lokasa 15]
Yesu apesaki ndakisa mpo na oyo etali komonisa bolingo
[Elilingi na lokasa 17]
Yesu alakisaki na nguya mpenza motindo oyo bayekoli na ye basengelaki komonisa bolingo epai na ye