Liloba ya Nzambe lizali koteya kobotama mbala na mbala na nzoto nosusu?
MOTO nani akotalela Biblia na elikya ya kokuta kati na yango liteya ya kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu, akomona yango ata esika moko te. Okokuta esika moko te epai Biblia elobi ete bato bazaláká kala na bomoi ndenge na ndenge. Kati na Biblia, okokuta mpe te maloba lokola “kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu” soko mpe “kolongwa ya molimo na nzoto moko mpo na kokɔta na nzoto mosusu,” to mpe “molimo oyo mokokufaka te.”
Nzokande, bato mosusu oyo bazali kondima kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu, bazali komeka kolimbola lolenge maloba wana mazwami kati na Biblia te na kolobáká ete, likanisi ya kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu endimamaki mingi na bato na ntango ya kala na boye ete ntina ezalaki te mpo na kolimbola yango. Ya solo, liteya ya kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu ezali mpenza liteya ya kala, mpe mbala mosusu endimamaki na bato mingi, kasi motuna ezali oyo ete, Biblia ezali koteya yango?
Na 2 Timoté 3:16, 17, (NW) ntoma Paulo akomaki ete: “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mabongi mpo na koteya, mpo na kopamela, mpo na kosembola, mpo na kobɔkɔlo kati na boyengebene, ete moto na Nzambe ákoka mpenza, ásɛlingwa mpenza mpo na misala nyonso malamu.” Ya solo, Biblia ezali Liloba lipemami na Nzambe, na nzela na yango azali kosolola na bato. Mpe na boyokani na maloba oyo ya Paulo, ezali kopesa nzela na motángi ya motema sembo ete “ákoka mpenza, ásɛlingwa mpenza mpo na misala nyonso malamu” mpo na koyanola na mituna minene oyo mitunami na ntina na bomoi, ezala bomoi ya kala, oyo ya lelo to ya ntango ekoya.
Paulo akomaki lisusu ete: “Wana boyambaki liloba ya Nzambe oyo boyokaki yango epai na biso, bondimaki yango lokola liloba ya bato te, kasi, lokola liloba ya Nzambe.” (1 Batesaloniki 2:13, NW) Lokola Biblia ezali na makanisi ya Nzambe, kasi ya bato te baoyo bazangi kokoka, tosengeli kokamwa te ete mateya na yango makeseni mpenza na mateya ya bato, ata soko maumeli mingi mpe mandimami na bato mingi. Kasi, okoki koloba ete: ‘Na Biblia, ezali ata na likambo moko te oyo epesi likanisi ya kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu?’
Mikapo oyo misosolami malamu te
Baoyo bazali kondima kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu balobi ete Biblia engɛngisi likambo yango na Matai 17:11-13, epai Yesu akokanisaki Yoane Mobatisi na Eliya, mosakoli na ntango ya kala. Tozali kotánga ete: “Eliya ajali nde koya mpe akobɔngisa makambo yɔnsɔ. Nde najali koloba na bino ete Eliya asili koya . . . Na ntango yango, bayekoli [bakangi] ntina ete ajalaki koloba na bango mpɔ na Yoane Mobatisi.”
Na kolobáká bongo, Yesu alingaki koloba ete Yoane Mobatisi azali mosakoli Eliya oyo abotamaki na nzoto mosusu? Yoane ye moko ayebaki ete azalaki Eliya te. Na libaku moko, ntango batunaki ye ete, “Yɔ Eliya?” Yoane ayanolaki polele ete “Ngai tɛ.” (Yoane 1:21) Nzokande, esakolamaki ete Yoane asengelaki koya liboso ya Masiya “na elimo mpe na nguya ya Eliya.” (Luka 1:17, NW; Malaki 4:5, 6) Na elobeli mosusu, Yoane Mobatisi azalaki “Eliya” na ndimbola oyo ete azalaki kokokisa mosala lokola oyo Eliya asalaki.
Tozali kotánga na Yoane 9:1, 2, ete: “Eleki ye, [Yesu] amɔni moto na miso makufi longwa na kobotama na ye. Bayekoli na ye batuni ye ete, ‘Labi, nani asalaki lisumu, moto oyo sɔkɔ baboti na ye ete abotami na miso makufi?’” Bato mosusu oyo bandimaka kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu balobi ete soko moto wana abotamaki lolanda, ezali mpo ete asalaki lisumu kati na bomoi oyo azalaki na yango liboso.
Kasi, ata mpo na ntina nini oyo bayekoli batunaki motuna wana, eyano oyo Yesu apesaki nde ezali na ntina mingi. Alobaki ete: “Moto oyo asali mabe tɛ, sɔkɔ baboti na ye tɛ.” (Yoan 9:3) Yango ezali kokweisa liteya ya kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu, oyo elobi ete bolɛmɛ na nzoto euti na masumu ya bomoi oyo moto azalaki na yango liboso. Likanisi oyo ete moto te akoki kosala lisumu liboso ete abotama limonisamaki lisusu na Paulo ntango akomaki na ntina na Esau mpe Yakobo ete, “naino bana babotami tɛ mpe naino basali likambo mɔkɔ tɛ to malamu to mabe.”—Baloma 9:11.
Lisekwa, kasi ezali te kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu
Atako Biblia elobeli te liteya ya kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu, moto moko te asengeli kolɛmba mpo na yango. Nsango ya Biblia eyebisi likambo moko lizali kolendisa mingi koleka likanisi ya kobotama lisusu kati na mokili oyo motondi na maladi, na monyoko, na mpasi mpe na liwa. Mpe oyo Biblia eyebisi ezali bobele kolendisa te, kasi ezali mpe solo, mpo ete ezali Liloba ya Nzambe ye moko.
Paulo alobelaki liteya wana ya kolendisa na maloba oyo, ete: “Najali na elikia na Njambe, . . . ete lisekwa ekojala na bato sembo mpe na bato sembo tɛ.” Liloba “lisekwa” to lolenge mosusu oyo yango emonisami, ezwami koleka mbala 50 kati na Makomami ya Greke ya boklisto, mpe Paulo amonisi yango lokola liteya ya moboko ya kondima ya boklisto.—Misala 24:15; Baebele 6:1, 2.
Lisekwa ya bakufi elimboli ete liwa ezali solo. Kati na Biblia, okokuta esika moko te oyo balobeli molimo oyo mokokufaka te. Soki moto azali na molimo oyo mokokabwanaka na nzoto na ntango ya kufa mpe mokolandaka kobika libela kati na makoló to na lifelo to kobotama lisusu, boye lisekwa mbɛlɛ ekokaki kozala na ntina te. Nzokande, bankámá ya mikapo mingi ya Biblia mimonisi ete, molimo ya moto ezangi kufa te, kasi ekokufaka solo, mpe ekopɔlaka to ekobebisamaka na nzela nyonso mosusu. Na bisika mingi, Biblia emonisi ete liwa ekeseni na bomoi, elimboli ete kozala na bomoi ezali eloko mosusu, kozanga bomoi ezali mpe eloko mosusu.
Liwa, to kozanga bomoi ezalaki etumbu epesamaki mpo na lisumu oyo Adama na Eva basalaki epai na Nzambe. Ezalaki nde etumbu, kasi ezalaki nzela te mpo na komema na bomoi bozangi kufa na esika mosusu. Nzambe alobaki polele ete bakozonga na esika bautaki—mputulu ya mabelé: “[Okozonga] na mabele, mpɔ ete okamatamaki na yango.” (Genese 3:19) Bazalaki te na molimo mozangi kufa liboso ete bazalisama na Nzambe na Edene awa na mabelé, mpe bazalaki na yango te nsima wana bakufaki.
Lisekwa ya bakufi ekokisami na kolamuka longwa na mpongi to na bopemi. Na ndakisa, Yesu alobaki na ntina na Lazalo oyo ye akendaki kosekwisa, ete: “Lazalo . . . asili kolala mpɔngi, kasi nakokɛnde kobetola ye.” (Yoane 11:11) Na ntina na mosakoli Danyele, totangi ete: “Okopema, mpe okotɛlɛma mpɔ na yango epɔnami mpɔ na yɔ na nsuka na mikɔlɔ.”—Danyele 12:13.
Bomoi ya seko awa na mabelé
Makambo nini makosalema mpo na baoyo bakosekwa longwa na kufa? Biblia elobi ete ezali na mitindo mibale ya lisekwa—oyo ya likoló mpe oyo ya mabelé. Bato mingi oyo bazalaki na bomoi na ntango ya kala mpe basilá kokufa, bakozwa lisekwa na mabelé. Bobele moke nde bakozwa lisekwa mpo na likoló, epai bakoyangela elongo na Klisto kati na Bokonzi ya Nzambe na likoló. (Emoniseli 14:1-3; 20:4) Lisekwa na mabelé ekobanda ntango nini? Ekobanda nsima wana Nzambe akosila koboma ebongiseli ya biloko mabe ya ntango oyo mpe nsima wana ekosila ye kotya mpenza “mabelé ya sika,” libota ya sika ya bato na sembo.—2 Petelo 3:13; Masese 2:21, 22; Danyele 2:44.
Kati na “mabelé ya sika,” maladi to mpasi ekozala te. Ata liwa ekozala lisusu te; elikya ya bomoi ya seko nde ekokitana yango. “[Nzambe] akolongola mpisoli yɔnsɔ na miso na bango, mpe kufa ekojala lisusu tɛ, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe tɛ; mpɔ ete makambo na liboso masili koleka.” (Emoniseli 21:4) Lisusu, mokomi na Nzembo asakolaki ete: “Bayɛngɛbɛnɛ bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” (Njembo 37:29) Bobele bongo, Yesu alobaki ete: “Esengo na basɔkɛmi, mpo ete bakosangola mokili.”—Matai 5:5, NW.
Kokanisá bilaká minene wana biuti na Nzambe mpe liteya ya kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu. Engebene liteya yango, libela na libela, tokolanda kobotama mbala na mbala mpo na kozonga kozala na bomoi kati na ebongiseli ya biloko mabe oyo esili konuna. Oyo ekosala ete tokolanda kokutana na mabe, kozwa maladi mpe kokufa kati na zolongano oyo emonani ete ekosuka te. Oyo nde elikya mabe!
Na yango, mpo na mituna oyo ete, ‘Ozaláká na bomoi kala?’ mpe ‘Okozala lisusu na bomoi nsima ya liwa?’ Biblia eyanoli ete: Ozalaki na bomoi mosusu te longola oyo ozali na yango lelo. Kasi likoki ezali mpo na koyeisa bomoi na yo molai, ee, ezala mpo na seko. Lelo, na “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo, okoki kozala na elikya ya kobika na nsuka ya mokili oyo mpe kokɔta kati na mokili ya sika molakami na Nzambe, kozanga kokufa. (2 Timoté 3:1-5; Emoniseli 7:9-15) Mpe soki okufi liboso na kotyama ya mokili ya sika, okoki kolikya kosekwa mpo na kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekokóma paladiso.—Luka 23:43.
Ata likambo nini likoki kobima, soki nde ondimeli Yesu, maloba na Yesu epai na Malata na ntango Lazalo, ndeko na ye ya mobali akufaki, makokokana mpe epai na yo, ete: “Ngai najali lisekwa mpe bomɔi. Ye oyo ajali na bomɔi mpe andimi ngai, ata asili kokufa, akobika; mpe moto na moto oyo ajali na bomoi mpe andimi ngai, libela akokufa tɛ.”—Yoane 11:25, 26.
[Likanisi ya paragrafe ya lokasa 8]
Adama azalaki te na molimo oyo mozangi kufa; nsima ya liwa na ye, azongaki mputulu
[Elilingi na lokasa 9]
Liloba ya Nzambe lizali koteya te kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu, ezali koteya nde lisekwa