Tólona komikitisa ya solosolo
“Okobikisa bato ya komikitisa.”—2 SAMWELE 22:28, NW.
1, 2. Bakonzi mingi ya mokili bazalaka na ezaleli nini?
BAPIRAMIDE, bamonima milaimilai oyo ezali na Égypte, emonisaka lokumu ya bato oyo bazalaki koyangela mokili wana na ntango ya kala. Bato mosusu oyo batiká nsango na mokili ezali Senakeliba, mokonzi ya Asulia; Alesandala Monene, mokonzi ya Grèce; mpe Jules César, mokonzi ya Loma. Bakonzi nyonso wana bakokanaki na likambo moko. Moko te kati na bango atiká nsango ete azalaki na komikitisa ya solosolo.—Matai 20:25, 26.
2 Okoki kokanisa ete ata moko na bakonzi oyo totángi azalaki na momeseno ya koluka na mboka na ye bato oyo bazalaki na mposa ya kobɔndisama? Ata moke te! Tokanisi mpe te ete bazalaki kokende na bandako ya bato oyo bazalaki komitungisa mpo na kolendisa bango. Ndenge oyo bakonzi wana bazalaki kotalela bato mpamba ekeseni mpenza na ndenge oyo Yehova Nzambe, Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba, atalelaka bango!
Ndakisa eleki monene ya komikitisa
3. Ndenge nini Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ atalelaka bato?
3 Yehova azali monene mpe atombwani na ndenge oyo tokoki kolimbola te, kasi “miso na [ye] ekotambolaka kati na mokili mobimba ete amonisa nguya na ye mpo na bango baoyo bazali na mitema pɛto liboso na ye.” (2 Ntango 16:9) Yehova asalaka nini ntango amoni basambeli na ye balɛmbi na mitungisi ndenge na ndenge? Biblia elobi ete ‘aumelaka’ na bato wana na nzela ya elimo santu na ye “mpo na kopelisa [elimo ya moto ya komikitisa, NW] mpe kopelisa motema ya motutami.” (Yisaya 57:15) Na bongo, basambeli na ye oyo bazwi lisusu makasi bazongelaka kosalela ye na esengo. Talá komikitisa oyo Nzambe azali na yango!
4, 5. (a) Ndenge nini mokomi ya nzembo azalaki kotalela boyangeli ya Nzambe? (b) Ntango Biblia elobi ete Nzambe “akomikitisa” mpo na kosalisa “moto mpamba,” yango elingi koloba nini?
4 Na molɔ́ngɔ́ mobimba, moto mosusu te asilá komikitisa ndenge Nkolo Mokonzi asalaka yango mpo na kosalisa bato ya masumu. Yango wana, mokomi ya nzembo akomaki boye: “[Yehova] azali na lola likoló ya mabota nyonso; nkembo na ye ekoleka likoló ya lola. Nani akokani na [Yehova] Nzambe na biso? Ye oyo akofandaka na likoló. Ye oyo akomikitisa mpo na kotala, epai na lola mpe kati na nse. [Akotombola] mobola na mputulu akobimisa mozangi na esika ebwakami ye.”—Nzembo 113:4-7.
5 Yehova azali mosantu mpe na bongo, azali na “lofundo” ata moke te. (Malako 7:22, 23) “Komikitisa” ekoki mpe kolimbola kokita tii na esika ya moto mpamba to kotika esika ya lokumu to oyo etombwani mpo na koyoka moto mpamba. Nzembo 113:6 ezali mpenza komonisa Nzambe na biso ya komikitisa oyo atyaka likebi na bamposa ya basambeli na ye oyo bazali bato ya kozanga kokoka!—2 Samwele 22:36.
Ntina oyo Yesu azalaki na komikitisa
6. Wapi likambo eleki monene oyo emonisi komikitisa ya Yehova?
6 Likambo eleki monene oyo emonisi komikitisa mpe bolingo ya Nzambe ezali ndenge atindaki Mwana na ye mobotami-se-moko abotama awa na mabelé mpe abɔkwama lokola moto mpo na kobikisa bato. (Yoane 3:16) Yesu ateyaki biso solo mpo na Tata na ye ya likoló mpe apesaki bomoi na ye ya kokoka mpo na kolongola “masumu ya mokili.” (Yoane 1:29; 18:37) Lokola Yesu amonisaki bizaleli nyonso ya Tata na ye, ata mpe komikitisa, andimaki kosala oyo Nzambe asɛngaki ye. Apesaki ndakisa eleki monene ya komikitisa mpe ya bolingo oyo ekelamu mosusu ya Nzambe apesá naino te. Kasi, bato nyonso te nde basepelaki na komikitisa ya Yesu; banguna na ye bamonaki ye ete azali “nsima ya bato nyonso.” (Danyele 4:17) Atako bongo, ntoma Paulo ayebaki ete baninga na ye bandimi basengeli kolanda ndakisa ya Yesu mpe kozala na komikitisa kati na bango.—1 Bakolinti 11:1; Bafilipi 2:3, 4.
7, 8. (a) Ndenge nini Yesu ayekolaki komikitisa? (b) Yesu asɛngaki likambo nini epai ya bato oyo basengelaki kokóma bayekoli na ye?
7 Paulo alobelaki ndakisa monene ya Yesu, akomaki boye: “Bóbatela na kati na bino ezaleli oyo ya makanisi oyo ezalaki mpe na kati ya Klisto Yesu, oyo, atako azalaki na ndenge ya Nzambe, azwaki makanisi te ya kobɔtɔla esika, elingi koloba, ete akokana na Nzambe. Te, kasi amikómisaki nde mpamba mpe akamataki motindo ya moombo mpe ayaki kokóma motindo moko na bato. Longola oyo wana, ntango akómaki na lolenge ya moto, amikitisaki mpe akómaki moto ya botosi tii na liwa, ɛɛ, liwa likoló ya nzete ya mpasi.”—Bafilipi 2:5-8.
8 Bato mosusu bakoki komituna ete, ‘Ndenge nini Yesu ayekolaki komikitisa?’ Yango ezali moko ya matomba ya boyokani makasi oyo azalaki na yango na Tata na ye ya likoló na boumeli ya bamiliare ya bambula, ntango azalaki “mosali ya mayele,” wana Nzambe azalaki kokela biloko nyonso. (Masese 8:30, NW) Nsima ya botomboki na Edene, Mwana ya liboso ya Nzambe azalaki komona ezaleli ya komikitisa oyo Tata na ye azalaki komonisela bato ya masumu. Yango wana, ntango Yesu ayaki awa na mabelé, azalaki na komikitisa lokola Tata na ye mpe alobaki na bato ete: “Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na elimo ya boboto mpe na komikitisa na motema, mpe bokozwa kopema mpo na milimo na bino.”—Matai 11:29; Yoane 14:9.
9. (a) Eloko nini Yesu azalaki kosepela na yango epai ya bana mike? (b) Ntango Yesu azwaki mwana moko ya moke, liteya nini apesaki?
9 Lokola Yesu azalaki na komikitisa ya solosolo, bana mike bazalaki kokima ye te. Kutu bazalaki kosepela koya epai na ye. Ye mpe alakisaki ete alingaki bana mike mpe azalaki kotyela bango likebi. (Malako 10:13-16) Eloko nini Yesu azalaki kosepela na yango epai ya bana mike? Na ntembe te, bana mike bazalaki na bizaleli malamu oyo mikóló mosusu oyo bazalaki bayekoli na ye bazangaki. Toyebi malamu ete bana mike bamonaka ete mikóló baleki bango. Tokoki komona yango na ezaleli na bango ya kotuna mituna. Ya solo, na bokeseni na mikóló mingi, bana baboyaka koteyama te mpe bazalaka na lolendo te. Mokolo mosusu, Yesu akamataki mwana moko mpe alobaki na bayekoli na Ye boye: “Soki bobongwani te mpe bokómi lokola bana mike te, bokokɔta soki moke te na bokonzi ya likoló.” Abakisaki boye: “Moto nyonso oyo akomikitisa lokola mwana oyo ya moke, ye nde aleki bamosusu nyonso na kati ya bokonzi ya likoló.” (Matai 18:3, 4) Yesu alobaki boye: “Moto nyonso oyo azali komitombola akokitisama mpe moto oyo azali komikitisa akotombolama.”—Luka 14:11; 18:14; Matai 23:12.
10. Mituna nini tokotalela?
10 Likambo yango ebimisi mituna ya ntina mingi. Mpo na kozwa bomoi ya seko, tosengeli mpe kolona komikitisa ya solosolo; kasi, mpo na nini ntango mosusu ezalaka mpasi mpo moklisto amikitisa? Mpo na nini ezalaka pɛtɛɛ te kotika lolendo mpe kozala na komikitisa na ntango tomekami? Mpe nini ekoki kosalisa biso tólona komikitisa ya solosolo?—Yakobo 4:6, 10.
Mpo na nini ezalaka mpasi moto azala na komikitisa?
11. Mpo na nini tokoki kokamwa te ete kolona komikitisa ezalaka etumba?
11 Soki omonaka ete ezalaka mpasi mpo olona komikitisa, yebá ete ozali yo moko te. Kala mpenza, na 1920, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobelaki toli ya Biblia ya kozala na komikitisa; elobaki boye: “Lokola tomoni motuya monene oyo Nkolo apesaka na komikitisa, yango esengeli kolendisa bayekoli nyonso ya solo bálonaka ezaleli yango mokolo na mokolo.” Na nsima, elobaki na bosembo mpenza likambo oyo: “Atako Biblia epesi biso batoli nyonso wana, bolɛmbu na biso bato esalaka ete baoyo bazali kokóma basaleli ya Nkolo mpe bazali kondima kotambola na nzela na ye bakutanaka na mokakatano, to etumba monene, na likambo yango, koleka na likambo mosusu nyonso.” Maloba yango emonisi ntina moko oyo baklisto ya solo basengeli kobunda etumba mpo na kozala na komikitisa—bomoto na biso ya masumu ezalaka na mposa ya lokumu oyo ebongi te. Ezali bongo mpo tozali bankɔkɔ ya Adama ná Eva, mobali mpe mwasi ya liboso, oyo bakómaki na bamposa ya moimi.—Baloma 5:12.
12, 13. (a) Ndenge nini bato ya mokili balukaka kopekisa baklisto bálona komikitisa? (b) Nani azali kokómisa etumba na biso mpo na kolona komikitisa mpasi koleka?
12 Ntina mosusu oyo tozalaka na mokakatano mpo na komikitisa ezali ete tofandi na kati ya bato oyo bazali kolendisa bazalani na bango ete bálukaka koleka basusu. Moko na mikano ya bato mingi na mokili oyo ezali koluka kokokisa “mposa [mabe] ya mosuni mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko na yo ya kobikela.” (1 Yoane 2:16) Na esika bayekoli ya Yesu bámipesa na bamposa wana ya mokili, bango basengeli kozala na liso oyo ezali alima mpe kotya makanisi na bango na kokokisa mokano ya Nzambe.—Matai 6:22-24, 31-33; 1 Yoane 2:17.
13 Ntina ya misato oyo ezalaka mpasi mpo na kolona komikitisa mpe komonisa yango ezali ete Satana Zabolo, mobandisi ya lofundo, nde azali koyangela mokili oyo. (2 Bakolinti 4:4; 1 Timote 3:6) Satana azali kolendisa bizaleli na ye ya mabe. Na ndakisa, asɛngaki Yesu asambela ye mpo apesa ye “makonzi nyonso ya mokili mpe nkembo na yango.” Yesu abatelaki komikitisa na ye mpe aboyaki na motema moko makanisi ya Zabolo. (Matai 4:8, 10) Ndenge moko mpe, Satana azali komeka baklisto mpo báluka lokumu. Kasi, baklisto oyo bazali na komikitisa basalaka makasi bálanda ndakisa ya Yesu, bapesaka lokumu mpe nkembo epai ya Nzambe.—Malako 10:17, 18.
Tólona mpe tómonisa komikitisa ya solosolo
14. “Komikitisa ya lokuta” ezali nini?
14 Na mokanda oyo ntoma Paulo akomelaki Bakolose, akebisaki bango na komikitisa ya libándá, mpo bato bámona bango. Paulo abengaki yango “komikitisa ya lokuta.” Baoyo bamilakisaka na libándá ete bazali na komikitisa bazali bato ya elimo te. Kutu, bamonisaka nde ete ‘bavimbi na lolendo.’ (Bakolose 2:18, 23) Yesu amonisaki bato mosusu oyo bazalaki na komikitisa ya lokuta ndenge wana. Atɔndɔlaki Bafalisai ete bazalaki kosala mabondeli mpo na komilakisa mpe bazalaki kolakisa bilongi ya mawa ntango bazali komipimela kolya mpo bato bámona bango. Nzokande, mpo mabondeli na biso ezala na motuya na miso ya Nzambe, tosengeli kosala yango na komikitisa.—Matai 6:5, 6, 16.
15. (a) Tokoki kosala nini mpo tóbatela elimo ya komikitisa? (b) Tángá bato oyo bapesaki ndakisa malamu ya komikitisa.
15 Mpo na kosalisa baklisto bábatela komikitisa ya solosolo, balendisi bango bátalelaka Yehova Nzambe ná Yesu Klisto, baoyo bazali bandakisa eleki malamu ya komikitisa. Yango elingi koloba ete basengeli koyekolaka Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kobimisa. (Matai 24:45) Boyekoli wana ezali na ntina mingi mpo na bakɛngɛli baklisto mpo “mitema na [bango] ezala na lolendo na likoló ya bandeko na [bango] te.” (Deteronome 17:19, 20; 1 Petelo 5:1-3) Kanisá ebele ya bato oyo bazwaki mapamboli mpo bazalaki na komikitisa, bato lokola Luta, Hana, Elizabeti, mpe bamosusu. (Luta 1:16, 17; 1 Samwele 1:11, 20; Luka 1:41-43) Kanisá mpe ebele ya bato minene oyo babatelaki komikitisa na bango na mosala ya Yehova, na ndakisa Davidi, Yosiya, Yoane Mobatisi, mpe ntoma Paulo. (2 Ntango 34:1, 2, 19, 26-28; Nzembo 131:1; Yoane 1:26, 27; 3:26-30; Misala 21:20-26; 1 Bakolinti 15:9) Tokoloba boni mpo na ndakisa ya komikitisa ya ebele ya baklisto ya ntango na biso? Soki baklisto ya solo bazali kokanisa bandakisa wana, ekosalisa bango bázala na “elimo ya komikitisa na kati na [bango.]”—1 Petelo 5:5.
16. Ndenge nini mosala ya kosakola ekoki kosalisa biso tózala na komikitisa?
16 Kobima na mosala ya kosakola pɔsɔ na pɔsɔ ekoki mpe kosalisa biso tózala na komikitisa. Elimo ya komikitisa ekoki kosalisa biso tópesa litatoli malamu epai ya bato oyo tozali kokutana na bango na mosala ya ndako na ndako mpe na bisika mosusu. Ezali bongo mingimingi ntango tokutani na moto oyo, na ebandeli aboyi koyoka biso to alobi na biso mabe. Bato mingi babɛtelaka mateya na biso ntembe; yango wana, komikitisa ekoki kosalisa moklisto akoba kopesa biyano “na elimo ya boboto mpe na limemya makasi.” (1 Petelo 3:15) Basaleli mosusu ya Nzambe oyo bazali na komikitisa bakei na bateritware mosusu mpe basalisi bato ya mimeseno mosusu báyeba mokano ya Nzambe. Ntango mosusu basakoli wana basalaka milende mpo na koyekola monɔkɔ ya bapaya mpo na kosalisa mpenza bato oyo balingi koyebisa nsango malamu. Ebongi mpenza tópesa bango longonya!—Matai 28:19, 20.
17. Mikumba nini ya boklisto esɛngaka kozala na komikitisa?
17 Bandeko mingi bakokisaka mikumba na bango na lisangá na komikitisa nyonso mpe balukaka naino bolamu ya basusu. Na ndakisa, esɛngaka komikitisa mpo moklisto oyo azali na bana abomba ntango oyo akokaki kosala makambo na ye moko mpo na komibongisa mpe koyekola Biblia malamumalamu ná bana na ye. Komikitisa esalisaka mpe bana bákumisa mpe bátosa baboti na bango, atako bazali bato ya kozanga kokoka. (Baefese 6:1-4) Basi oyo mibali na bango bazali bandimi te bakutanaka na makambo mingi oyo esɛngaka bango bázala na komikitisa wana bazali kosala makasi mpo na koluka kozwa balongani na bango na ‘etamboli ya pɛto elongo na limemya makasi.’ (1 Petelo 3:1, 2) Komikitisa mpe bolingo ezangi moimi ezali mpe na ntina mpo na kosalisa baboti oyo bazali maladi to bakómi mibange.—1 Timote 5:4.
Komikitisa esalisaka mpo na kosilisa matata
18. Ndenge nini komikitisa ekoki kosalisa biso tósilisa matata?
18 Basaleli nyonso ya Nzambe bazali bato ya kozanga kokoka. (Yakobo 3:2) Baklisto mibale bakoki kozwana matata to koyokana te mpo na likambo moko boye. Moklisto moko akoki kosilika mpo na likambo moko oyo ndeko mosusu asali ye. Mbala mingi, bakoki kosilisa makambo ya ndenge wana soki balandi toli oyo: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu. Kaka ndenge Yehova alimbisaki bino na motema moko, bino mpe bósala bongo.” (Bakolose 3:13) Mpo na koloba solo, kosalela toli wana ezalaka pɛtɛɛ te, kasi komikitisa ekosalisa biso tólanda yango.
19. Likambo nini tosengeli kobosana te ntango tolingi kosolola na moto moko oyo asali likambo oyo esepelisi biso te?
19 Moklisto moko akoki komona ete likambo oyo esepelisi ye te eleki monene mpo alekisa yango kaka boye. Na ntango wana, komikitisa ekosalisa ye akutana na moto oyo asali ye mabe mpo bázongisa kimya. (Matai 18:15) Ntango mosusu matata eumelaka na kati ya baklisto mpo moko na bango—mbala mosusu mpe bango mibale—bazali na lolendo mpe yango ezali kopekisa mokomoko andima libunga na ye. Ntango mosusu mpe ye oyo akutani na ndeko na ye akoki kosala yango na makanisi ya komilongisa mpe kopesa moninga foti. Nzokande, makambo mingi ekoki kosila soki bato bazali na komikitisa ya solosolo.
20, 21. Wapi lisalisi moko monene tozali na yango mpo na kozala na komikitisa?
20 Likambo ya ntina mingi mpo na kolona komikitisa ezali kobondela mpo na kosɛnga Nzambe lisalisi na ye mpe elimo na ye. Kasi, tóbosana te ete “Nzambe . . . amonisaka boboto monene [mpe apesaka elimo santu na ye] epai ya bato ya komikitisa.” (Yakobo 4:6) Yango wana, soki ozwani matata na ndeko moko, bondelá Yehova asalisa yo omikitisa mpe ondima libunga nyonso, ya monene to ya moke, oyo okoki kozala na yango. Soki ndeko moko asali yo mabe mpe alobi na bosembo nyonso ete, “Limbisá ngai,” zalá na komikitisa mpe limbisá ye. Soki ozali kokakatana mpo na kosala yango, sɛngá lisalisi ya Yehova na libondeli mpo opikola lolendo nyonso na motema na yo.
21 Soki tokangi ntina ya ebele ya matomba oyo komikitisa ememaka, tokokóma na mposa ya kolona mpe kobatela ezaleli wana ya malamu mingi. Mpo na yango, Yehova Nzambe ná Yesu Klisto bazali bandakisa ya malamu mpenza! Tóbosana soki moke te maloba oyo ya Nzambe: “[Komikitisa] mpe kotosa [Yehova] ezali nzela ya bozwi mpe lokumu mpe bomoi.”—Masese 22:4.
Makanisi mpo na komanyola
• Banani bazali bandakisa eleki malamu ya komikitisa?
• Mpo na nini kolona komikitisa ezalaka mpasi?
• Nini ekoki kosalisa biso tózala na komikitisa?
• Mpo na nini ezali na ntina tóbatela ezaleli ya komikitisa?
[Elilingi na lokasa 26]
Yesu azalaki na komikitisa ya solosolo
[Elilingi na lokasa 28]
Bato ya mokili balendisaka basusu ete básala nyonso mpo na koleka bazalani na bango
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Fɔtɔ OMS ya L. Almasi/K. Hemzǒ
[Elilingi na lokasa 29]
Komikitisa esalisaka biso tósolola na bato oyo toyebani na bango te na mosala ya kosakola
[Bililingi na lokasa 30]
Mbala mingi, matata ekoki kosila soki bolingo ezali kosalisa biso tózipa mabe
[Bililingi na lokasa 31]
Baklisto bamonisaka komikitisa na ndenge mingi