Klisto ateyaki ete bomoi ya seko ekozala awa na mabelé?
“[Nzambe] akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te.”—EMON. 21:4.
1, 2. Ndenge nini toyebi ete Bayuda mingi ya ekeke ya liboso bazalaki na elikya ya bomoi ya seko awa na mabelé?
ELENGE moko oyo azalaki mozwi mpe ayebanaki mingi ayaki epai ya Yesu, afukamaki liboso na ye, mpe atunaki ye boye: “Moteyi Malamu, nasengeli kosala nini mpo nazwa libula ya bomoi ya seko?” (Mko. 10:17) Elenge mobali yango azalaki kotuna ndenge ya kozwa bomoi ya seko—kasi wapi? Ndenge tolobelaki yango na lisolo oyo eleki, bikeke mingi liboso, Nzambe apesaki Bayuda elikya ya lisekwa mpe ya bomoi ya seko awa na mabelé. Bayuda mingi ya ekeke ya liboso mpe bazalaki na elikya yango.
2 Emonani ete Malata, moninga ya Yesu, azalaki kokanisa ntango oyo bato bakozongisama na bomoi awa na mabelé, ntango alobaki mpo na ndeko na ye oyo akufaki ete: “Nayebi ete akosekwa na lisekwa na mokolo ya nsuka.” (Yoa. 11:24) Ya solo, Basadukai ya ntango wana bazalaki kondima lisekwa te. (Mko. 12:18) Kasi, na buku na ye (Judaism in the First Centuries of the Christian Era), George Foot Moore alobi boye: “Mikanda . . . ya ekeke ya liboso to ya mibale liboso ya ntango na biso emonisi ete bato mingi bazalaki kondima ete na eleko moko boye, bato ya kalakala oyo bakufá bakozonga lisusu na bomoi awa na mabelé.” Elenge mozwi oyo ayaki epai na Yesu azalaki na mposa ya kozwa bomoi ya seko awa na mabelé.
3. Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?
3 Lelo oyo, mangomba mingi mpe bato mingi ya mayele oyo balimbolaka maloba ya Biblia bandimaka te ete Yesu ateyaki ete bomoi ya seko ekozala awa na mabelé. Bato mingi balikyaka nde kokende na mokili ya bilimo soki bakufi. Na yango, soki bato bazali kotánga Makomami ya Grɛki ya boklisto mpe bamoni maloba “bomoi ya seko,” mingi bakanisaka ete elobelaka kaka bomoi ya seko kuna na likoló. Ezali solo? Yesu alingaki koloba nini ntango alobelaki bomoi ya seko? Bayekoli na ye bazalaki kondima nini? Makomami ya Grɛki ya boklisto eteyaka ete bomoi ya seko ekozala awa na mabelé?
Bomoi ya seko “na bozalisi lisusu”
4. Nini ekosalema “na bozalisi lisusu”?
4 Biblia eteyaka ete baklisto bapakolami bakosekwa mpe bakokende na likoló mpo na koyangela mabelé. (Luka 12:32; Emon. 5:9, 10; 14:1-3) Nzokande, ntango Yesu azalaki kolobela bomoi ya seko, azalaki ntango nyonso kokanisa kaka etuluku wana te. Tótala likambo oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye ntango elenge mozwi akendaki na mawa mpo ayebisaki ye atika biloko na ye nyonso mpe akóma moyekoli na ye. (Tángá Matai 19:28, 29.) Yesu alobaki na bantoma na ye ete bakozala na kati ya bato oyo bakoyangela mpe bakosambisa “mabota zomi na mibale ya Yisalaele,” elingi koloba bato nyonso, longola kaka baoyo bakokende koyangela na likoló. (1 Kol. 6:2) Alobelaki mpe mbano ya “moto nyonso” oyo akolanda ye. Bato yango mpe bakozwa “libula ya bomoi ya seko.” Makambo nyonso wana ekosalema “na bozalisi lisusu.”
5. “Bozalisi lisusu” elimboli nini?
5 Yesu alingaki koloba nini ntango alobelaki “bozalisi lisusu”? Maloba yango ebongolami na “kozalisa ya sika” na Biblia haut fleuve. Mpe ebongolami na “mokolo mokili mokobóngwana” na Biblia Liloba Lya Nzambe. Lokola Yesu apesaki ndimbola te ntango asalelaki maloba yango, emonani ete alobelaki elikya oyo Bayuda bazalaki na yango banda bikeke mingi. Esengelaki kozala na bozalisi lisusu na mabelé, mpo makambo ezala ndenge ezalaki na elanga ya Edene liboso Adama ná Eva básala lisumu. Bozalisi lisusu ekokokisa mokano ya Nzambe ya “kozalisa likoló ya sika mpe mabelé ya sika.”—Yis. 65:17, NW.
6. Ndakisa ya bampate mpe bantaba eteyi biso nini mpo na elikya ya bomoi ya seko?
6 Yesu alobelaki lisusu bomoi ya seko ntango alobelaki bosukisi ya ebongiseli ya makambo. (Mat. 24:1-3) Alobaki boye: “Ntango Mwana ya moto akoya na kati ya nkembo na ye mpe baanzelu nyonso elongo na ye, bongo akofanda na kiti na ye ya bokonzi ya nkembo. Mpe bikólo nyonso ekoyanganisama liboso na ye, mpe akokabola bato bamosusu epai bamosusu epai, se ndenge mobateli ya mpate akabolaka bampate epai bantaba epai.” Baoyo bakokwea ntango bakosambisama “bakokende na kolongolama ya seko, kasi bayengebene na bomoi ya seko.” “Bayengebene” oyo bakozwa bomoi ya seko ezali baoyo basalisaki na motema moko “bandeko” ya Klisto, bapakolami na elimo. (Mat. 25:31-34, 40, 41, 45, 46) Lokola baklisto bapakolami baponami mpo na koyangela na Bokonzi ya likoló, “bayengebene” basengeli kozala bato oyo Bokonzi yango ekoyangela awa na mabelé. Biblia esakolaki ete: “[Mokonzi oyo Yehova atye] akozala na bato oyo ye akoyangela banda na mbu kino na mbu mpe banda na Ebale kino na nsuka ya mabelé.” (Nz. 72:8, NW) Bato yango bakozala na bomoi ya seko awa na mabelé.
Evanzile ya Yoane emonisi nini?
7, 8. Bilikya nini mibale Yesu ayebisaki Nikodeme?
7 Ndenge Evanzile ya Matai, Malako mpe Luka emonisi yango, Yesu asalelaki maloba “bomoi ya seko” na mabaku oyo touti kolobela. Evanzile ya Yoane emonisi ete Yesu alobelaki kozala na bomoi libela na libela mbala soki 17. Tótala mabaku yango mosusu mpo na komona oyo Yesu alobaki na ntina na elikya ya bomoi ya seko awa na mabelé.
8 Ndenge Evanzile ya Yoane emonisi yango, Yesu alobelaki elikya ya bomoi ya seko mpo na mbala ya liboso ntango asololaki na Mofalisai moko na nkombo Nikodeme. Ayebisaki Nikodeme boye: “Soki moto abotami lisusu te, akoki komona bokonzi ya Nzambe te.” Bato oyo bakokɔta na Bokonzi ya likoló basengeli ‘kobotama lisusu.’ (Yoa. 3:3-5) Yesu asukaki wana te. Alobelaki mpe elikya oyo epesami na bato nyonso ya mokili. (Tángá Yoane 3:16.) Yesu azalaki kolobela elikya ya bomoi ya seko na likoló mpo na bayekoli na ye bapakolami mpe awa na mabelé, mpo na bato mosusu.
9. Yesu alobelaki elikya nini epai ya mwasi Mosamalia?
9 Nsima ya kosolola na Nikodeme na Yelusaleme, Yesu akendeki na nɔrdi, na Galilai. Na nzela, akutanaki na mwasi moko na libulu ya mai ya Yakobo, pembeni ya engumba Sikala, na etúká ya Samalia. Alobaki na mwasi yango boye: “Moto nyonso oyo akomɛla mai oyo ngai nakopesa ye akoyoka lisusu mposa ya mai ata moke te, kasi mai oyo ngai nakopesa ye ekokóma na kati na ye liziba ya mai oyo ezali kopunzwapunzwa mpo na kopesa bomoi ya seko.” (Yoa. 4:5, 6, 14) Mai yango elimboli bibongiseli oyo Nzambe azwi mpo na kozongisela bato bomoi ya seko; na kati ya bato yango, bamosusu bakozwa bomoi awa na mabelé. Mokanda ya Emoniseli emonisi Nzambe azali koloba ete: “Moto nyonso oyo azali na mposa ya mai nakopesa ye yango ofele uta na liziba ya mai ya bomoi.” (Emon. 21:5, 6; 22:17) Na yango, epai ya mwasi Mosamalia, Yesu alobelaki elikya ya bomoi ya seko kaka mpo na bapakolami oyo bakosangola Bokonzi te, kasi mpe mpo na baklisto oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabelé.
10. Nsima ya kobikisa moto moko ya maladi na pisini ya Betezata, Yesu ayebisaki batɛmɛli na ye nini mpo na bomoi ya seko?
10 Na mbula oyo elandaki, Yesu azalaki lisusu na Yelusaleme. Kuna, abikisaki moto moko ya maladi na pisini ya Betezata. Yesu alobaki na Bayuda oyo bamonaki likambo yango mabe ete “Mwana akoki kosala ata eloko moko te na likanisi na ye moko, kasi kaka oyo amonaka Tata azali kosala.” Nsima ya koyebisa bango ete Tata “apesi kosambisa nyonso na mabɔkɔ ya Mwana,” Yesu alobaki boye: “Moto oyo azali koyoka liloba na ngai mpe azali kondima ye oyo atindaki ngai azali na bomoi ya seko.” Alobaki lisusu boye: “Ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakoyoka mongongo [ya Mwana ya moto] mpe bakobima, baoyo basalaki makambo ya malamu bakobima mpo na lisekwa ya bomoi, baoyo bazalaki na momeseno ya kosala makambo ya mabe mpo na lisekwa ya kosambisama.” (Yoa. 5:1-9, 19, 22, 24-29) Na maloba yango, Yesu ayebisaki Bayuda oyo bazalaki kotungisa ye ete azali moto oyo Nzambe atye mpo na kokokisa elikya oyo Bayuda bazalaki na yango ya kozala na bomoi ya seko na mabelé, mpe ete akokokisa yango na nzela ya lisekwa.
11. Ndenge nini toyebi ete na Yoane 6:48-51, Yesu alobelaki mpe elikya ya bomoi ya seko awa na mabelé?
11 Na Galilai, bankóto ya bato oyo bazalaki na mposa ya mampa oyo Yesu abimisaki na ndenge ya likamwisi bakómaki kolanda ye. Yesu alobelaki lolenge mosusu ya limpa—“limpa ya bomoi.” (Tángá Yoane 6:40, 48-51.) Alobaki na bango boye: “Limpa oyo ngai nakopesa ezali mosuni na ngai.” Yesu apesaki bomoi na ye kaka mpo na baoyo bakoyangela na ye na Bokonzi ya likoló te, kasi mpe “mpo na bomoi ya mokili,” to bato oyo bakosikolama. “Soki moto azali kolya limpa yango,” elingi koloba azali na kondima ete mbeka ya Yesu ezali na nguya ya kosikola bato, akozala na elikya ya kozwa bomoi ya seko. Ya solo, ntango Yesu alobelaki ‘kozala na bomoi libela,’ azalaki mpe kokanisa elikya oyo Bayuda bazalaki na yango banda kala, ya kozala na bomoi ya seko na mabelé na boyangeli ya Masiya.
12. Yesu alobelaki elikya nini ntango ayebisaki banguna na ye ete ‘akopesa bampate na ye bomoi ya seko’?
12 Na nsima, na Fɛti ya Bofungoli na Yelusaleme, Yesu ayebisaki banguna na ye ete: “Bozali kondima te, mpo bozali te na kati ya bampate na ngai. Bampate na ngai bayokaka mongongo na ngai, mpe nayebi bango, mpe balandaka ngai. Mpe nazali kopesa bango bomoi ya seko.” (Yoa. 10:26-28) Yesu azalaki kolobela kaka bomoi na likoló, to azalaki mpe kokanisa bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé? Mwa moke liboso, Yesu abɔndisaki bayekoli na ye na maloba oyo: “Bóbanga te, etonga moke, mpamba te Tata na bino andimi kopesa bino bokonzi.” (Luka 12:32) Nzokande, kaka na ntango ya fɛti yango ya Bofungoli, Yesu alobaki boye: “Nazali na bampate mosusu, oyo bazali ya lopango oyo te; bango mpe nasengeli komema bango.” (Yoa. 10:16) Na yango, ntango Yesu alobaki na banguna na ye, alobelaki elikya ya bomoi na likoló mpo na “etonga moke” mpe elikya ya bomoi ya seko awa na mabelé mpo na bamilio ya “bampate mosusu.”
Elikya oyo esɛngaki te bálimbola yango
13. Yesu azalaki kokanisa nini ntango alobaki: “Okozala elongo na ngai na Paladiso”?
13 Ntango Yesu azalaki kobunda na liwa na nzete ya mpasi, alobaki likambo moko oyo emonisaki polele elikya ya bato. Mosali-mabe moko oyo babakaki na nzete pembeni na ye alobaki boye: “Yesu, kanisá ngai ntango okokɔta na bokonzi na yo.” Yesu alakaki ye ete: “Ya solo nazali koyebisa yo lelo, Okozala elongo na ngai na Paladiso.” (Luka 23:42, 43) Emonani ete moto yango azalaki Moyuda; na yango, azalaki na mposa te bálimbwela ye soki Paladiso ezali nini. Ayebaki ete bomoi ya seko ekozala awa na mabelé na mikolo ekoya.
14. (a) Nini emonisi ete bantoma bazalaki na mokakatano mpo na kokanga ntina ya elikya ya bomoi na likoló? (b) Ntango nini bayekoli ya Yesu basosolaki malamumalamu elikya ya bomoi na likoló?
14 Kasi, likambo oyo esɛngaki ndimbola ezalaki nde maloba ya Yesu mpo na elikya ya bomoi na likoló. Ntango ayebisaki bayekoli na ye ete azali kokende na likoló mpo na kobongisela bango esika, bakangaki ntina ya maloba na ye te. (Tángá Yoane 14:2-5.) Na nsima ayebisaki bango boye: “Nazali naino na makambo mingi ya koloba na bino, kasi bokoki komema yango sikoyo te. Nzokande, ntango ye akoya, elimo yango ya solo, akokamba bino na kati ya solo nyonso.” (Yoa. 16:12, 13) Bayekoli ya Yesu bayaki kososola ete bakiti na bango ya bokonzi ekozala nde na likoló kaka nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B., ntango bapakolamaki na elimo santu ya Nzambe mpo na kozala bakonzi. (1 Kol. 15:49; Kols. 1:5; 1 Pet. 1:3, 4) Elikya ya kozala na bomoi na likoló ezalaki likambo ya sika, mpe mikanda ya Makomami ya Grɛki ya boklisto elobelaki yango mingi. Kasi, mikanda yango emonisaki ete elikya ya bomoi ya seko mpo na bato awa na mabelé ezali kaka?
Mikanda mosusu ya Makomami ya Grɛki elobi nini?
15, 16. Ndenge nini mokanda ya Baebele mpe maloba ya Petelo emonisi elikya ya bomoi ya seko na mabelé?
15 Na mokanda oyo akomelaki Baebele, ntoma Paulo abengaki baklisto yango “bandeko basantu, basangani na kobengama ya likoló.” Kasi, alobaki mpe ete Nzambe atye Yesu mokonzi ya “mabelé efandami oyo ezali koya.” (Ebe. 2:3, 5; 3:1) Na Makomami ya Grɛki ya boklisto, maloba “mabelé efandami” elimbolaka ntango nyonso mabelé, esika oyo bato bafandaka. Na yango, “mabelé efandami oyo ezali koya” ezali ebongiseli ya makambo oyo ekozala awa na mabelé na boyangeli ya Yesu Klisto. Na ntango yango, Yesu akokokisa elaka ya Nzambe oyo: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”—Nz. 37:29.
16 Elimo ya Nzambe etindaki mpe ntoma Petelo alobela bomoi ya bato na mikolo ekoya. Akomaki boye: “Likoló mpe mabelé oyo ezali sikoyo ebombami mpo na mɔtɔ mpe ezali kobatelama mpo na kozela mokolo ya lisambisi mpe ya libebi ya bato oyo batyolaka Nzambe.” (2 Pet. 3:7) Nini ekozwa esika ya likoló oyo ezali sikoyo, elingi koloba baguvɛrnema ya lelo, mpe nini ekozwa esika ya mokili oyo mabe? (Tángá 2 Petelo 3:13.) Na esika na yango, ekozala “likoló ya sika,” Bokonzi ya Nzambe oyo Masiya akoyangela, mpe “mabelé moko ya sika,” elingi koloba basambeli ya solo ya Nzambe oyo bakofanda na mabelé.
17. Ndenge nini Emoniseli 21:1-4 elobeli elikya ya bato mpo na mikolo ezali koya?
17 Mokanda ya nsuka ya Biblia esimbaka mpenza mitema na biso na ndenge emonisi ndenge bato bakokóma bato ya kokoka. (Tángá Emoniseli 21:1-4.) Yango nde elikya oyo bato ya kondima bazalaka na yango banda moto ya liboso abungisá bomoi ya kokoka na elanga ya Edene. Bato ya sembo bakofanda libela na libela na Paladiso mpe bakonuna te. Elikya yango emonisami polele na Makomami ya Liebele mpe Makomami ya Grɛki ya boklisto, mpe ezali kolendisa basaleli ya sembo ya Yehova tii lelo oyo.—Emon. 22:1, 2.
Okoki kolimbola?
• “Bozalisi lisusu” oyo Yesu alobelaki elimboli nini?
• Likambo nini Yesu ayebisaki Nikodeme?
• Elaka nini Yesu apesaki mosali-mabe oyo babakaki na nzete pembeni na ye?
• Ndenge nini mokanda ya Baebele mpe maloba ya Petelo emonisi elikya ya bomoi ya seko awa na mabelé?
[Elilingi na lokasa 8]
Bato oyo bazali na bizaleli ya bampate bakozwa bomoi ya seko na mabelé
[Elilingi na lokasa 10]
Yesu ayebisaki bato mosusu elikya ya bomoi ya seko