MOKAPO 3
“Ngai nazali . . . na komikitisa na motema”
1-3. Ndenge nini Yesu akɔti na Yerusaleme, mpe mpo na nini yango ekoki kokamwisa bato mosusu oyo bazalaki wana?
YERUSALEME ekɔti loyenge. Moto moko ya lokumu azali koya! Na libándá ya engumba, bato batondi na nzela. Bazali na esengo ya koyamba moto yango, oyo basusu bazali koloba ete azali mozwi-ya-libula ya Mokonzi Davidi mpe Moyangeli ya Yisraele oyo abongi. Basusu basimbi bitape ya nzete, bazali kopepa yango mpo na koyamba ye; basusu bazali kotanda bilamba na nzela liboso na ye lokola tapi. (Matai 21:7, 8; Yoane 12:12, 13) Mingi bazali komituna soki moto yango akokɔta ndenge nini na engumba.
2 Ekoki kozala ete basusu bazali komizela komona likambo moko ya kokamwisa. Na ntembe te, bayebi bato minene mosusu oyo bakɔtaki na ndenge ya lokumu. Na ndakisa, ntango Abisalome, mwana ya Davidi, amikómisaki mokonzi; azwaki bato 50 oyo bazalaki kopota mbangu liboso ya likalo na ye. (2 Samwele 15:1, 10) Kutu kokɔta ya Jules César, moyangeli ya Roma, ezalaki ya lokumu koleka; atambwisaki molɔngɔ ya balongi, oyo ezingamaki na banzoku 40 oyo ezalaki komema miinda, tii na esika oyo babengi Capitole ya Roma! Nzokande, bato ya Yerusaleme bazali kozela moto moko monene koleka. Ebele wana ya bato báyeba yango to te, moto yango nde Masiya, moto oyo aleki bato nyonso kino lelo. Kasi, ntango moto yango oyo akokóma Mokonzi akɔti, bato mosusu bakamwe.
3 Bamoni likalo te, bapoti-mbangu te, bampunda te, ata mpe banzoku te. Kutu Yesu amati nde likoló ya mpunda, nyama mpamba oyo ememaka mikumba.a Ná ye ná nyama oyo amati likoló na yango, balati bilamba ya mindɔndɔ te. Na esika ya kiti ya ntalo likoló ya nyama yango, bayekoli ya Yesu batandi nde bilamba na mokɔngɔ ya nyama yango. Mpo na nini Yesu aponi kokɔta na Yerusaleme na ndenge wana ya komikitisa, nzokande bato oyo kutu ye aleki bakɔtaki na ndenge ya kokamwisa mpe na milulu?
4. Biblia esakolaki nini mpo na ndenge oyo Mokonzi Masiya akokɔta na Yerusaleme?
4 Yesu azali nde kokokisa esakweli moko: “Sepelá mingi . . . Gangá mpo na bolongi, Ee mwana mwasi ya Yerusaleme. Talá! Mokonzi na yo azali koya epai na yo. Azali sembo mpe amemi lobiko. Azali na komikitisa mpe azali kotambola na mpunda moke.” (Zekaria 9:9) Esakweli yango emonisaki ete moto oyo Nzambe atyaki mafuta, Masiya, akomimonisa mokolo mosusu epai ya bato ya Yerusaleme lokola Mokonzi oyo Nzambe aponi. Lisusu, lolenge na ye ya kosala makambo mpe nyama oyo aponi komata emonisi ezaleli moko ya kitoko oyo azali na yango: komikitisa.
5. Mpo na nini komikitisa ya Yesu esepelisaka mingi, mpe mpo na nini tosengeli koyekola komekola ezaleli yango?
5 Komikitisa ya Yesu ezali moko ya bizaleli na ye oyo ebendaka bato, ezaleli oyo esepelisaka mingi. Ndenge tolobelaki yango na mokapo oyo eleki, kaka Yesu nde azali “nzela, solo mpe bomoi.” (Yoane 14:6) Ya solo, banda kala tii lelo oyo, ezali na moto moko te awa na mabele oyo akokani na Mwana ya Nzambe. Nzokande, Yesu amonisaki ata moke te lolendo, komitombola, to komikumisa; bizaleli oyo emonanaka mingi epai ya bato ya kozanga kokoka. Soki tolingi kozala bayekoli ya Kristo, tosengeli koboya lolendo. (Yakobo 4:6) Tóbosana te ete Yehova ayinaka lolendo. Yango wana, ezali na ntina tóyekola komekola komikitisa ya Yesu.
Yesu azalaka ntango nyonso na komikitisa
6. Komikitisa ezali nini, mpe ndenge nini Yehova ayebaki ete Masiya akozala na komikitisa?
6 Komikitisa elimboli kozanga lolendo to lofundo. Ezali ezaleli oyo ebandaka na motema mpe emonanaka na maloba, na etamboli ya moto, mpe na boyokani na ye ná basusu. Ndenge nini Yehova ayebaki ete Masiya akozala na komikitisa? Ayebaki ete Mwana na ye alandaki ndakisa na ye ya komikitisa na ndenge ya kokoka. (Yoane 10:15) Asilaki mpe komona komikitisa ya Mwana na ye banda kala. Ndenge nini?
7-9. (a) Ndenge nini Mikaele amonisaki komikitisa ntango azwanaki matata ná Satana? (b) Ndenge nini bakristo bakoki komekola Mikaele na oyo etali komonisa komikitisa?
7 Mokanda ya Yuda emonisi ndakisa moko malamu ya komikitisa: “Ntango Mikaele anzelu-mokonzi azwanaki matata ná Zabolo mpe azalaki kotya ntembe mpo na nzoto ya Moize, amekaki te kokatela ye etumbu mpe koloba na maloba ya kofinga, kasi alobaki: ‘Tiká Yehova apamela yo.’” (Yuda 9) Mikaele ezali nkombo mosusu ya Yesu liboso aya awa na mabele mpe nsima ya kozonga na ye na likoló, na mokumba na ye ya anzelu-mokonzi, to mokonzi ya limpinga ya baanzelu ya Yehova kuna na likoló.b (1 Batesaloniki 4:16) Kasi, tótala ndenge Mikaele asilisaki matata yango ná Satana.
8 Mokanda ya Yuda eyebisi biso te nini Satana alingaki kosala na nzoto ya Moize, kasi tokoki kondima ete Zabolo alingaki kosalela yango na ndenge ya mabe. Mbala mosusu alingaki kosalela nzoto ya moto wana ya sembo na losambo ya lokuta. Atako Mikaele atɛmɛlaki makanisi mabe wana ya Satana, amonisaki mpe komipekisa na ndenge ya kokamwa mpenza. Ebongaki ete Mikaele apamela Satana; kasi, lokola na ntango oyo azalaki kowelana ná Satana azwaki naino te “mokumba nyonso ya kosambisa” na mabɔkɔ na ye, amonaki ete kaka Yehova Nzambe nde asengeli kosambisa. (Yoane 5:22) Lokola azali anzelu-mokonzi, Mikaele azalaki na bokonzi monene. Atako bongo, na komikitisa nyonso atikaki makambo yango na mabɔkɔ ya Yehova na esika ya koluka bokonzi mingi koleka. Longola komikitisa, amonisaki mpe bopɔlɔ, elingi koloba ayebaki bandelo na ye.
9 Soki elimo ya Nzambe esalisaki Yuda akoma likambo wana, ezalaki mpamba te. Likambo ya mawa, bakristo mosusu na mikolo ya Yuda bazalaki na komikitisa te. Bazalaki “koloba mabe mpo na makambo nyonso, nzokande bazali kokanga ntina na yango te.” (Yuda 10) Ezalaka mpasi te biso bato ya kozanga kokoka tókóma na lolendo! Tosalaka ndenge nini soki toyebi malamu te likambo moko oyo esalemi na lisangá ya bokristo, na ndakisa ekateli moko oyo bankulutu bazwi? Soki tobandi kolobaloba to kotɔnga mpo na ekateli oyo ezwami nzokande toyebi makambo nyonso te, tokomonisa ete tozangi komikitisa, boye te? Tómekola nde Mikaele, Yesu, mpe tósambisaka te makambo oyo Nzambe apesi biso bokonzi na yango te.
10, 11. (a) Nini ezali kobenda likebi na ndenge oyo Mwana ya Nzambe andimaki koya awa na mabele? (b) Ndenge nini tokoki komekola komikitisa ya Yesu?
10 Mwana ya Nzambe amonisaki mpe komikitisa na ndenge andimaki koya awa na mabele. Tókanisa makambo oyo atikaki mpo na koya awa na mabele. Azalaki anzelu-mokonzi. Azalaki mpe “Liloba,” elingi koloba Molobeli ya Yehova. (Yoane 1:1-3) Azalaki kofanda na likoló, esika ya Yehova oyo “etombwaná, ya bosantu mpe ya nkembo.” (Yisaya 63:15) Atako bongo, Mwana “amikómisaki nde mpamba mpe akómaki lokola moombo mpe akómaki moto.” (Bafilipi 2:7) Meká kokanisa makambo oyo asengelaki kokutana na yango awa na mabele! Yehova atyaki bomoi na ye na libumu ya ngɔndɔ moko Moyuda, alekisaki sanza libwa tii ntango abotamaki lokola mwana nyonso. Abotamaki na ndako ya mosali moko ya mabaya oyo azalaki na bozwi te mpe mokemoke akolaki, alongwe mwana, akómi elenge. Atako azalaki moto ya kokoka, na bolenge na ye azalaki kotosa baboti na ye oyo bazalaki bato ya kozanga kokoka. (Luka 2:40, 51, 52) Amonisaki mpenza komikitisa!
11 Tokoki nde komekola komikitisa ya Yesu mpe kondima mosala nyonso oyo mbala mosusu ekoki komonana ntina te? Na ndakisa, mosala na biso ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ekoki komonana lokola mpamba soki bato bazali kondima koyoka biso te, kosɛka to kotɛmɛla biso. (Matai 28:19, 20) Atako bongo, soki tozali koyika mpiko na mosala yango, tokoki kobikisa bato mingi. Ezala bongo to te, tokoyekola mpenza komikitisa, mpe tokolanda matambe ya Nkolo na biso, Yesu Kristo.
Komikitisa ya Yesu awa na mabele
12-14. (a) Ndenge nini Yesu amonisaki komikitisa ntango bato bazalaki kokumisa ye? (b) Ndenge nini Yesu amonisaki komikitisa na boyokani na ye ná basusu? (c) Nini emonisi ete komikitisa ya Yesu ezalaki ya likolólikoló te to ya kolanda mimeseno ya bato te?
12 Banda ebandeli ya mosala na ye awa na mabele tii na nsuka na yango, Yesu amonisaki komikitisa. Amonisaki yango na ndenge azalaki kopesa lokumu mpe nkembo nyonso na Tata na ye. Na bantango mosusu, bato bazalaki kokumisa Yesu mpo na bwanya oyo ezalaki komonana na maloba na ye, mpo na makamwisi oyo azalaki kosala, mpe mpo na bizaleli na ye ya malamu. Mbala na mbala, Yesu azalaki koboya lokumu yango, kasi azalaki koyebisa bato bákumisa nde Yehova.—Marko 10:17, 18; Yoane 7:15, 16.
13 Yesu amonisaki komikitisa na ndenge oyo azalaki kosalela bato makambo. Kutu, amonisaki polele ete ayaki na mabele mpo básalela ye te, kasi mpo na kosalela basusu. (Matai 20:28) Amonisaki komikitisa na ndenge azalaki kosalela bato makambo na boboto, mpe azalaki makambo makasimakasi te. Ntango bayekoli na ye bazalaki kolɛmbisa ye nzoto, alobelaki bango mabe te; azalaki kaka koluka kosimba mitema na bango. (Matai 26:39-41) Mokolo moko ntango azalaki koluka esika ya kimya mpo azala ye moko mpe apema, ebele ya bato babimelaki ye; atako bongo abenganaki bango te, abandaki nde koteya bango “makambo mingi.” (Marko 6:30-34) Ntango mwasi moko oyo azalaki Moyisraele te akobaki kaka kobondela ye ete abikisa mwana na ye ya mwasi, na ebandeli Yesu asalaki lokola nde aboyi. Nzokande aboyaki na maloba ya mabe te; ayokelaki ye mpe na nsima asalaki oyo mwasi yango asɛngaki ye mpo amonaki kondima monene ya mwasi wana, ndenge tokolobela yango na Mokapo 14.—Matai 15:22-28.
14 Mbala mingi, Yesu akokisaki maloba na ye oyo alobaki ete: “Ngai nazali na ezaleli ya boboto mpe na komikitisa.” (Matai 11:29) Komikitisa na ye ezalaki ya likolólikoló te, ya libándá te, to ya kolanda mimeseno ya bato te. Eutaki mpenza na motema, na bomoto na ye ya kati. Yango wana, tokokamwa te ndenge Yesu azalaki mbala na mbala koteya bayekoli na ye bázala na komikitisa!
Ateyaki bayekoli na ye bázala na komikitisa
15, 16. Bokeseni nini Yesu alobaki ete esengeli kozala kati na bayangeli ya mokili mpe bayekoli na ye?
15 Esɛngaki ntango mpo bantoma ya Yesu bámonisa komikitisa. Yesu amekaki koteya bango ezaleli ya komikitisa mbala na mbala. Na ndakisa, mokolo moko Yakobo ná Yoane batindaki mama na bango epai ya Yesu asɛnga mpo na bango esika ya lokumu na Bokonzi ya Nzambe. Na komikitisa nyonso, Yesu ayanolaki boye: “Kofandisa moto na lobɔkɔ na ngai ya mobali mpe na lobɔkɔ na ngai ya mwasi ezali likambo na ngai te, kasi ezali ya baoyo Tata na ngai abongiselá bango yango.” Bantoma mosusu zomi “bayokaki mabe” mpo na Yakobo ná Yoane. (Matai 20:20-24) Ndenge nini Yesu asilisaki likambo yango?
16 Na boboto nyonso, apamelaki bango na maloba oyo: “Boyebi ete bayangeli ya bikólo balakisaka bato bokonzi na bango mpe bato na bango ya minene bakonzaka bato. Esengeli kozala bongo te na kati na bino; kasi moto oyo alingi kokóma moto monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino, mpe moto oyo alingi kozala moto ya liboso na kati na bino asengeli kozala moombo na bino.” (Matai 20:25-27) Na ntembe te, bantoma bazalaki komona ndenge “bayangeli ya bikólo” bazalaki na lolendo, na mposa ya bokonzi mpe na ezaleli ya moimi. Yesu amonisaki ete bayekoli na ye basengeli kokesana na banyokoli wana oyo bazalaki na mposa makasi ya bokonzi. Basengelaki kozala na komikitisa. Bantoma balandaki nde toli yango?
17-19. (a) Na butu liboso akufa, liteya nini Yesu ateyaki na oyo etali komikitisa, oyo etikalaki na makanisi ya bantoma na ye? (b) Liteya nini ya ntina mingi koleka oyo etali komikitisa, Yesu ateyaki ntango azalaki awa na mabele?
17 Ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te mpo na bango. Yango ezalaki te mbala ya liboso to mpe ya nsuka mpo Yesu ateya bango ntina ya kozala na komikitisa. Liboso, ntango bazalaki kowelana mpo na koyeba nani kati na bango alekaki mpenza bamosusu, Yesu atɛlɛmisaki mwana moke katikati na bango mpe alobaki na bango bázala lokola bana mike, oyo bazalaka na lolendo te, bálukaka bokonzi te mpe báwelaka bisika ya lokumu te, ndenge mikóló basalaka. (Matai 18:1-4) Atako bongo, na butu oyo ezalaki liboso báboma ye, amonaki ete lolendo etindaki bantoma na ye báwelana lisusu. Na libaku yango, ateyaki bango likambo moko oyo bakokaki kobosana yango te. Amikangaki esume na loketo mpe asalaki mosala moko oyo moto mpamba akokaki kosala soki nkolo na ye ayambi bapaya. Yesu asukolaki bantoma na ye nyonso makolo, ezala mpe Yudasi, oyo asengelaki kotɛka ye!—Yoane 13:1-11.
18 Mpo na kosalisa bango bákanga ntina ya likambo yango, Yesu alobaki na bango ete: “Napesi bino ndakisa.” (Yoane 13:15) Liteya yango esimbaki mpenza mitema na bango? Likambo ya mawa, kaka na butu wana, bawelanaki lisusu mpo na koyeba nani kati na bango alekaki bamosusu! (Luka 22:24-27) Atako bongo, Yesu akobaki komonisela bango motema molai mpe ateyaki bango na komikitisa. Na nsima, apesaki lisusu liteya moko ya ntina mingi mpo na biso nyonso: “Amikitisaki mpe atosaki tii na liwa, ɛɛ, liwa na nzete ya mpasi.” (Bafilipi 2:8) Yesu andimaki kokufa liwa moko ya nsɔni, bakatelaki ye etumbu oyo ebongi na ye te lokola mosali-mabe mpe moto oyo afingi Nzambe. Kasi Mwana ya Nzambe akesanaki na bikelamu nyonso ya Yehova, mpo kaka ye nde amonisaki komikitisa na ndenge ya malamu koleka mpe ya kokoka.
19 Ntango mosusu yango ezalaki mbala ya nsuka oyo Yesu apesaki liteya etali komikitisa awa na mabele; liteya yango esimbaki mpenza mitema ya bantoma na ye ya sembo. Biblia eyebisi biso ete bambula mingi na nsima, mibali wana bakobaki komonisa komikitisa na misala na bango. Ezali boni mpo na biso?
Okolanda ndakisa oyo Yesu atiká?
20. Ndenge nini tokoki koyeba soki tozali na komikitisa na motema?
20 Paulo apesi mokomoko na biso toli oyo: “Bóbatela na kati na bino makanisi oyo Kristo Yesu mpe azalaki na yango.” (Bafilipi 2:5) Lokola Yesu, tosengeli kozala na komikitisa na motema. Ndenge nini tokoki koyeba soki tozali na komikitisa na motema? Paulo asalisi biso tóbosana te oyo tosengeli kosala ntango alobi ete “bósala eloko moko te na kowelana to mpo bozali komimona ete boleki bamosusu, kasi na komikitisa bómona basusu ete baleki bino.” (Bafilipi 2:3) Na yango, ndenge oyo tokanisaka mpo na basusu ekoki kosalisa biso tóyeba soki tozalaka na komikitisa to te. Tosengeli komona bango ete baleki biso, elingi koloba bazali na ntina mingi koleka biso. Okosalela toli yango?
21, 22. (a) Mpo na nini bakɛngɛli bakristo basengeli kozala na komikitisa? (b) Ndenge nini tokoki komonisa ete tolati komikitisa?
21 Bambula mingi nsima ya liwa ya Yesu, ntoma Petro azalaki kaka kokanisa liteya ya ntina mingi oyo azwaki na oyo etali komikitisa. Petro ateyaki bakɛngɛli bakristo ete bákokisa mikumba na bango na komikitisa, bákonza ata moke te bampate ya Yehova. (1 Petro 5:2, 3) Kozala na mikumba epesi moto nzela te ya kozala na lolendo. Kutu, kozala na mikumba esɛngaka nde kozala na komikitisa ya solosolo. (Luka 12:48) Ya solo, ezaleli wana ezali na ntina kaka mpo na bakɛngɛli te, kasi mpe mpo na bakristo nyonso.
22 Petro abosanaki ata moke te butu wana oyo Yesu asukolaki ye makolo, atako na ebandeli Petro azalaki koboya! (Yoane 13:6-10) Petro akomelaki bakristo ete: “Bólata komikitisa na boyokani na bino na basusu.” (1 Petro 5:5) Liloba “bólata” etindi biso tókanisa na mosali oyo alati elamba ya mosala mpo na kosala mosala ya mabɔkɔ. Liloba yango esalisi biso tókanisa lisusu mokolo oyo Yesu amikangaki esume liboso afukama mpo na kosukola bayekoli na ye makolo. Soki tozali na komikitisa lokola Yesu, tokokanisa te ete tozali na ntina mingi mpo Yehova asɛngi biso tósala likambo boye to boye. Kaka ndenge bato bakoki komona polele bilamba oyo tolati, basengeli mpe komona ete tolati Komikitisa lokola elamba.
23, 24. (a) Mpo na nini tosengeli kotɛmɛla elimo ya lolendo? (b) Mokapo oyo elandi ekosalisa biso tóboya likanisi nini ya libunga mpo na komikitisa?
23 Lolendo ezali lokola pwazɔ. Makambo oyo yango ebimisaka ezalaka mabe mpenza. Lolendo ekoki kosala ete moto ya makoki ata ndenge nini akóma mpamba na miso ya Nzambe. Nzokande, komikitisa ekoki kosala ete ata moto mpamba akóma mpenza na ntina na miso ya Yehova. Soki mokolo na mokolo tozali kokolisa ezaleli wana malamu mpe kosala makasi tótambola na komikitisa mpo na kolanda matambe ya Kristo, tokozwa mbano monene. Petro akomaki ete: “Yango wana, bómikitisa na nse ya lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe, mpo atombola bino na ntango oyo ebongi.” (1 Petro 5:6) Yehova atombolaki mpenza Yesu mpo amikitisaki na makambo nyonso. Nzambe na biso akosepela mpe kopesa yo mbano mpo na komikitisa na yo.
24 Likambo ya mawa, bato mosusu bakanisaka ete komikitisa ezali bolɛmbu. Ndakisa ya Yesu ezali kosalisa biso tómona ete likanisi wana ezali ya libunga, mpo moto oyo alekaki bato nyonso na komikitisa azalaki mpe na mpiko mingi koleka bato nyonso. Yango nde tokolobela na mokapo oyo elandi.
a Ntango buku moko elobeli kokɔta yango, elobi ete bampunda “ezali banyama mpamba,” mpe ebakisi ete: “Etambolaka malɛmbɛ, ezalaka motó makasi mpe ezalaka kitoko mingi te; babola nde basalelaka yango.”
b Mpo na koyeba makambo mosusu oyo endimisi ete Mikaele ezali Yesu, talá lisolo “Biyano na mituna ya Biblia” “Nani azali Mikaele anzelu mokonzi?” na jw.org, site Internet ya Batatoli ya Yehova.