Ntango tozali kosalela bokonzi na biso, tómekolaka Klisto
NA BAMBULA ya 1970, etuluku moko ya bato oyo bayekolaki bizaleli ya bato bakamwaki mpenza na makambo oyo bamonaki. Bakabolaki bato oyo bayekolaki na bituluku mibale. Batyaki etuluku moko bakɛngɛli mpe bapesaki bango mokumba ya kokɛngɛla etuluku mosusu oyo bazalaki bato ya bolɔkɔ. Nini esalemaki?
Lapolo ya boyekoli yango emonisaki ete “nsima ya mikolo moke kaka, [Bakɛngɛli] mingi bakómaki kofingafinga mpe konyokola bato ya bolɔkɔ, kopesa bango bitumbu mpambampamba; nzokande bato ya bolɔkɔ bakómaki kobanga bakɛngɛli mpe komemya bango makasi.” Bato oyo basalaki boyekoli yango bamonaki ete: Moto nyonso akoki kokwea na motambo ya kosalela bokonzi na lolenge ya mabe.
Lolenge malamu mpe mabe ya kosalela bokonzi
Kosalela bokonzi na lolenge ya malamu ekoki kobimisa matomba ya malamu. Ekoki kosalisa mokonzi atambwisa bato na ye malamu mpe komema matomba na mosuni mpe na elimo. (Masese 1:5; Yisaya 48:17, 18) Kasi, ndenge boyekoli oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo oyo emonisaki yango, kosalela bokonzi na ndenge ebongi te esukaka malamu te. Biblia elobeli likambo yango na maloba oyo: “Soki moto ya mabe azwi bokonzi, bato banyokwamaka.”—Masese 29:2, Bible na lingala ya lelo oyo; Mosakoli 8:9.
Kosalela bokonzi na ndenge ebongi te ememaka mpasi, ata soki basali yango na makanisi malamu. Na ndakisa, eleki mwa mikolo bateyi ya lingomba moko na Irlande basɛngaki bolimbisi epai ya bato nyonso mpo na lolenge oyo bateyi mosusu ya lingomba yango banyokolaki bana oyo bazalaki kotambwisa. Na ntembe te, mingi kati na bateyi yango bazalaki na makanisi malamu, kasi makambo oyo bamosusu basalaki bana ezalaki mabe mpenza. Zulunalo moko elobaki ete “bana mingi batikalaki na bilembo na mitema mpo na makambo ya mabe oyo bateyi yango basalaki bango.” (The Irish Times) Kasi, ndenge nini okoki kosalela bokonzi na ndenge oyo ekotinda bato bátosa yo na esengo na esika ya kokonza to konyokola bango na maloba to na misala?—Masese 12:18.
“Bokonzi nyonso” epesameli Yesu Klisto
Tózwa ndakisa ya Yesu Klisto. Mwa moke liboso amata na likoló, alobaki na bayekoli na ye boye: “Bokonzi nyonso epesameli ngai na likoló mpe na mabelé.” (Matai 28:18) Yango ebangisaki nde bayekoli na ye? Bakanisaki nde ete Yesu akokóma lokola bakonzi ya Loma, oyo bayebanaki ete bazalaki kosalela nguya na bango mpo na konyata bato nyonso oyo bazalaki koboya to kotɛmɛla bokonzi na bango?
Biblia emonisi polele ete ezalaki bongo te. Yesu Klisto asalelaka bokonzi na ye ndenge oyo Tata na ye asalelaka bokonzi na ye. Atako Yehova azali mokonzi oyo aleki na nguya na molɔ́ngɔ́ mobimba, alingaka basaleli na ye básalela ye na bolingo na bango moko, kasi te lokola bato bazangi bɔɔngɔ, na kobanga to lokola baombo. (Matai 22:37) Yehova asalelaka ata moke te bokonzi na ye na ndenge ya mabe. Emonaneli moko ya mosakoli Ezekiele emonisi likambo yango.
Na emonaneli yango, Ezekiele amonaki baanzelu minei oyo bazalaki kokumisa boyangeli ya Nzambe. Mokomoko azalaki na bilongi minei. Ezekiele akomaki boye: “Mpo na lolenge ya bilongi na bango, moko na moko azalaki na elongi ya moto, mpe bango minei bazalaki na elongi ya nkɔsi na lobɔkɔ ya mobali, mpe bango minei bazalaki na elongi ya ngɔmbɛ na lobɔkɔ ya mwasi, mpe bango minei bazalaki na elongi ya mpongo lokola.” (Ezekiele 1:10) Bilongi minei wana ezali komonisa bizaleli ya Nzambe oyo eleki minene, oyo amonisaka na bokatikati mpenza. Liloba ya Nzambe emonisi ete bizaleli yango ezali: bolingo, oyo emonisami na elongi ya moto; boyengebene, oyo emonisami na elongi ya nkɔsi; mpe bwanya, oyo emonisami na elongi ya mpongo. Bizaleli misato wana ezali na boyokani na oyo ya minei, elingi koloba nguya, oyo emonisami na elongi ya ngɔmbɛ. Nyonso wana elimboli nini? Emonaneli yango ezali komonisa ete Yehova asalelaka ntango nyonso nguya mpe bokonzi na ye monene na boyokani na bizaleli na ye mosusu ya minene.
Lokola Tata na ye, Yesu Klisto azalaki ntango nyonso kosalela bokonzi na ye na bolingo, bwanya mpe boyengebene. Bayekoli ya Yesu bazalaki mpenza kozwa kopema lokola bazalaki kotosa bokonzi na ye. (Matai 11:28-30) Soki ezali na ezaleli oyo emonisaka mpenza bomoto ya Yehova Nzambe mpe ya Yesu Klisto, ezali bolingo, kasi te nguya to bokonzi!—1 Bakolinti 13:13; 1 Yoane 4:8.
Ndenge nini osalelaka bokonzi na yo?
Ezali boni mpo na yo? Na ndakisa, osɛngaka bato ya libota na yo básala kaka oyo yo olingi? Bato ya libota na yo bayokelaka yo mpo babangaka yo to mpo balingaka yo? Batosaka yo nde mpo oleki bango na makasi? Wana ezali mituna oyo batata ya mabota bakoki kotalela mpo na kolanda malako ya Nzambe oyo etali libota.—1 Bakolinti 11:3.
Ezali boni soki ozali na mwa bokonzi na kati ya lisangá ya boklisto? Mpo na koyeba soki ozali kosalela bokonzi yango na ndenge ebongi, osengeli komitalela na kolanda mitinda ya Yehova oyo elandi, oyo Yesu amonisaki mpenza na bomoto na ye.
“Moombo ya Nkolo asengeli . . . kozala na boboto epai ya bato nyonso, . . . amipekisaka na ntango basaleli ye mabe, kolakisáká na boboto baoyo bazali te na ezaleli ebongi.”—2 Timote 2:24, 25.
Bato mosusu na lisangá ya boklisto ya liboso bazalaki na bokonzi monene. Na ndakisa, Timote akokaki ata “kopesa mitindo na bamosusu ete báteya te mateya ya ndenge mosusu.” (1 Timote 1:3) Kasi, tondimi mpenza ete Timote azalaki komonisa bizaleli ya Nzambe na makambo nyonso oyo azalaki kosala, mpo na ntembe te azalaki kolanda toli oyo Paulo apesaki ye ete, ntango azali kosala mosala na ye ya mokɛngɛli na lisangá, alakisaka “na boboto” mpe ete “azala na boboto epai ya bato nyonso.” Lokola bankulutu mingi ya masangá na ntango wana bazalaki mikóló ya Timote, asengelaki kozala lokola mwana ya botosi liboso ya mikóló mpe ndeko ya bolingo mpo na bilenge. (1 Timote 5:1, 2) Bolingo ya ndenge wana ezalaki kosala ete lisangá ya boklisto ezala lokola libota ya mɔtɔ mpe ya bolingo, kasi te lokola kompanyi ya bato bazangi bolingo mpe bazangi mawa.—1 Bakolinti 4:14; 1 Batesaloniki 2:7, 8.
“Bayangeli ya bikólo mosusu bamityaka bankolo likoló na bango mpe bato minene bayokisaka bango bokonzi na bango. Ezali bongo te epai na bino; kasi moto nyonso oyo alingi kozala moto monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino.”—Matai 20:25, 26.
Bakonzi ya makambo makasi na mokili oyo “bamityaka bankolo likoló” ya basusu mpe basɛngaka bango na makasi ete básala makambo na lolenge boye to boye, mpe balakaka bango ete bakopesa bango bitumbu soki batosi te. Nzokande, Yesu alobaki ete esengeli nde koluka kosalela basusu, kasi te kokonza bango. (Matai 20:27, 28) Azalaki ntango nyonso komonisela bayekoli na ye bolingo mpe boboto. Soki ozali kolanda ndakisa ya Yesu, bato bakokakatana te kotosa yo. (Baebele 13:7, 17) Bakokakatana mpe te kosala makambo oyo osɛngi bango, mpe na bolingo na bango moko, bakosala ata koleka kutu oyo osɛngaki.—Matai 5:41.
“Bóbatela etonga ya Nzambe oyo epesami na mabɔkɔ na bino, . . . na komikómisáká . . . te bakonzi ya baoyo bazali libula ya Nzambe, kasi nde na kokómáká bandakisa epai ya etonga.”—1 Petelo 5:2, 3.
Bakɛngɛli lelo oyo bayebaka ete bango nde bakozongisa monɔkɔ mpo na bato nyonso na kati ya lisangá. Bazwaka mokumba yango na lisɛki te. Basalaka nyonso mpo na kobatela etonga ya Nzambe kozanga ete bátindika bango, na mposa makasi mpe na bolingo. Lokola ntoma Paulo, basalaka makasi mpo na kotonga mpe kolendisa kondima ya baoyo bazali kokamba, kasi bamizwaka te lokola bakonzi ya kondima na bango.—2 Bakolinti 1:24.
Ntango esɛngi básembola moto oyo atɛngami to básalisa ndeko moko akola na elimo, bankulutu basalaka yango na elimo ya boboto. Babosanaka te toli ya ntoma Paulo oyo: “Bandeko, ata soki moto abɛti libaku liboso ete ayeba yango, bino baoyo bozali na makoki ya elimo bómeka kosembola moto yango na elimo ya boboto, wana yo moko mpe ozali komitala, noki te yo moko mpe omekama.”—Bagalatia 6:1; Baebele 6:1, 9-12.
“Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko . . . Bólata bolingo, mpo yango ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.”—Bakolose 3:13, 14.
Ndenge nini otalelaka bato oyo basalelaka mitinda ya boklisto nyonso te? Lokola Yehova ná Yesu, olimbisaka mpe mabunga na bango? (Yisaya 42:2-4) To nde olandelaka ata mabunga na bango ya mikemike? (Nzembo 130:3) Kobosana te ete ezali malamu komonisa boboto soki libaku emonani mpe kopesa bitumbu kaka soki esengeli. Komonisa bolingo epai ya bato oyo ozali kokamba ekosala ete yo ná bango bózala na boyokani mpe bótyelanaka motema.
Soki bapesi yo bokonzi ata ya ndenge nini, salá makasi omekola Yehova Nzambe ná Yesu Klisto ntango ozali kosalela yango. Kanisá elilingi kitoko oyo mokomi ya nzembo asalelaki mpo na kolobela lolenge oyo Yehova asalelaka bokonzi na ye likoló ya basaleli na ye. Davidi ayembaki boye: “[Yehova] azali mobateli na ngai, nakozanga eloko te. Azali kopemisa ngai kati na matiti mobesu, azali kokendisa ngai epai ya mai ya kimya. Akolendisaka molimo na ngai. Akotambolisaka ngai na nzela ya boyengebene mpo na nkombo na ye.” Ndenge moko mpe, Yesu alobaki boye: “Ngai nazali mobateli ya bampate oyo aleki malamu, mpe nayebi bampate na ngai mpe bampate na ngai bayebi ngai, ndenge Tata ayebi ngai mpe ngai nayebi Tata; mpe ngai nazali kokaba molimo na ngai mpo na bampate.” Yehova ná Yesu bazali bandakisa malamu koleka na likambo etali kosalela bokonzi na bolingo!—Nzembo 23:1-3; Yoane 10:14, 15.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 18]
Yehova asalelaka nguya na ye ntango nyonso na boyengebene, bwanya mpe bolingo
[Elilingi na lokasa 18]
Ntango mosusu, esɛngaka ete bankulutu bápesa baoyo babungi nzela toli ya bolingo mpenza
[Elilingi na lokasa 19]
Paulo apesaki Timote toli ete azalaka lokola mwana ya botosi mpe lokola ndeko ya bolingo
[Elilingi na lokasa 20]
Yesu Klisto asalelaka bokonzi na ye na bwanya, boyengebene mpe bolingo