Liwa na Yesu Elimboli nini mpo na yo?
“MAMPINGA nyonso oyo ezáláká awa na mokili, masuwa minene nyonso oyo esila kotongama ba parlements nyonso oyo esila koyangana mpe mikonzi nyonso oyo basila koyangela, bakokaki te, bango nyonso kozala na bopusi likoló na bomoi na bato lokola moto bobele sé moko oyo.” Ezali na maloba oyo nde mokomi moko, James Francis, alobaki na ntina na Yesu Klisto.
Soki Yesu atalelami na mitindo mingi kati na mokili, nzokande Biblia, ezali kolobela ye lokola Mwana na Nzambe mpe ezali komonisa ye lokola moto oyo amonisaki bolingo kino kopesa bomoi na ye lokola mbeka. Yesu ayebisaki motindo nini, amonisaki mpenzampenza bolingo na ye, ntango alobaki: “Mwana na moto ayei mpo ‘na kosungama te kasi mpo na kosunga mpe kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na mingi.”—Matai 20:28.
Lisiko yango ezali nini? Mpo na nini ezali na ntina? Nani asikolami? Na yango, liwa na Yesu elimboli nini mpo na yo?
Lisiko ezali nini?
Lisiko, ezali eloko moko oyo ezali kopesa bonsomi. Kopesa lisiko mpo na moto moko, to kosomba ye, elimboli kosikola ye na boombo to kobikisa ye na etumbu moko na kofutáká mosolo. Na elobeli ya elimo, “kosomba” elimboli kosikola na lisumu mpe na etumbu oyo yango ezali koyeisa. Ezali mpo na kosikola biso nde Yesu akufaki. Ntoma Paulo akomaki: “Masumu makofuta mbongo, mbongo yango bobele kufa; nde Nzambe akopesa likabo mpamba, likabo na ye bomoi na seko kati na Yesu Klisto, Nkolo na biso.”—Baloma 6:23.
Makomami mazali kokokisa kofutama ya mosolo mpo na kosikola na kopesama ya lisiko. Ezali kotangama boye kati na Nzembo 49:6-9: “Bango batii motema na biloko na bango mpe bamikumisi na misolo na bango mingi. Moto akolonga kosikola ndeko na ye te to kopesa epai na Nzambe motuya ya bomoi na ye te. Motuya na kosikola milimo na bango ezali monene, ekokoka kofutama te, seko na seko, ete abika libela na libela mpe amona nkunda te.” Na bongo lisiko ezali likabo lipesami na Nzambe kasi na moto ya kozanga kokoka te, ezala ata nani.
Mpo na nini lisiko ezali na ntina?
Lisiko ezali na ntina mpamba te tata na biso ya liboso, Adam, asalaki lisumu. Na mbala moko, abungisaki bomoi ya seko mpe ya kokoka, azwaki etumbu ya liwa, likambo yango eyokanaki na mibeko, mpe esukaki na kokufa (Genese 2:15-17; 3:1-7, 17-19; 5:5) Lokola tozali bakitani na ye, tozwaki lisumu mpe liwa. Paulo akomaki ete, “na bongo, mabe ekɔtaki na mokili mpo na moto moko, mpe kufa epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali mabe.”—Nzembo 51:5.
Mokitani nyonso ya Adam asengeli mpenza kosikolama na lisumu mpe na liwa mpo na kozwa bomoi ya seko. Bato bazangi kokoka bakoki kopesa lisiko ya malamu te, kasi Jéhovah, ye, apesaki yango na bolingo nyonso na nzela na Yesu Klisto. Nzokande, nini esombami na nzela na lisiko? Ntango Adam asalaki lisumu, abungisaki bomoi ya seko mpe ya kokoka elongo na lotomo nyonso mpe na bilikya oyo bisangisamaki na yango. Na bongo, ezali bobele eloko moko wana nde esombamaki na lisalisi ya mbeka na lisiko ya Yesu.
Eloko oyo lisiko epesi nzela
Boyengebene ekokisami, mpamba te liwa, etumbu ya lisumu, ezali kozwa bato. Lisiko ezali bongo elembo ya motema mawa mpe ya motema boboto na Nzambe. Na ntango ya liwa na ye, Yesu atikaki bomoi na ye ya moto na kokoka, elongo na lotomo nyonso oyo esangisamaki na yango, mpe azongelaki yango lisusu te, mpamba te asekwisamaki na nzoto ya mosuni mpe ya makila te, kasi ekelamu ya elimo oyo ekokufaka te. (1 Bakolinti 15:50; 1 Petelo 3:18) Bomoi ya bomoto oyo Yesu apesaki lokola mbeka abatelaki bongo lotomo na yango ya kosikola motuya na yango lokola lisiko.
Yesu, moto azangi lisumu, azalaki kati na ezalela motindo moko na oyo yo Adam na ebandeli ntango azalaki naino na kokoka. Lokola atosaki Nzambe kino na liwa, Yesu akomaki Nganga Monene, mpe apesaki kati na likoló motuya ya mbeka na ye ya moto na kokoka. (Baebele 9:24-26) Lokola Nzambe andimaki motuya yango ya mbeka, Yesu alongaki bongo kosikola na lisumu mpe na liwa bakitani ya Adam oyo bazali bandimi, na kosalelaka mpo na litomba na bango motuya ya mbeka na ye. (1 Bakolinti 6:20; 7:23; 1 Yoane 2:1, 2) Yesu “akomaki eutelo na lobiko na seko mpo na bango nyonso bakotosaka ye”. (Baebele 5:8, 9.) Bato yango bakoki bongo kotalelama lokola bayengebene na Nzambe na nzela ya Mwana na ye.
Nani asikolami?
Uta kala, nani azali kozwa litomba ya lisiko? Ezali bato oyo bazali na kondima kati na ebongiseli yango mpe bazali komitika kotambwisama na Nzambe. Soki basaleli ya na bosembo, bakoki kosikolama na lisumu mpe na etumbu na yango, liwa, mpe kozwa bomoi na seko.—Yoane 17:3.
Moto ya liboso, oyo azalaki na bonsomi liboso na Nzambe mpo na kotosa to te, aponaki kozanga botosi. ‘Adam akosamaki te’, kasi atikalaki mosumuki ya nko kino na liwa na ye. (1 Timote 2:14) Likambo nini esengelaki kokomela bakitani na ye? Bakoki kopona to kosalela Nzambe na makoki na bango nyonso ya kozanga kokoka, to koboya kotosa Mozalisi na bango.—Yosua 24:15.
Yesu ayaki mpo na “kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na bato mingi”. (Malako 10:45.) Kasi banani bamonisami na liloba “mingi”? Adam azali mpenza kati na bango te, mpamba te moto wana ya kokoka aponaki na bolingo na ye moko koboya kotosa Nzambe mpe azalaki mosumuki ya nko mpe azangi kobongola motema kino liwa na ye. Kasi tokoloba boni mpo na libota na ye monene, oyo esalemi na bamiliare na bato? Na lisalisi ya lisiko, Yesu Klisto alongolaki ekweli oyo ezalaki kotia kilo likoló na libota mobimba ya Adam. (Tala 1 Timote 2:5, 6) Yesu azali kosalela motuya ya mbeka na lisiko oyo apesaki mpo na bolamu ya “mingi”, elingi koloba bato oyo bandimi.
Kati na bandimi oyo basikolami, ezali na Bayuda mpe Bapakano, elingi koloba bato ya mabota. Paulo alobi: “Bongo, pelamoko libunga na moto moko eyeisi ekweli mpo na bato nyonso, boye mosala na boyengebene na moto moko eyeisi elonga mpe bomoi mpo na bato nyonso.” (Baloma 5:18) Na kokufáká likoló na nzete, ‘Klisto asikolaki Bayuda na elakeli mabe na Mibeko awa ekómaki ye eloko elakelami mabe mpo na bango, pelamoko ekomami ete: “Moto na moto oyo akakemi na nzete alakelama mabe.” ’ (Bagalatia 3:13; Deteronome 21:23) Mpo na Bapakano, balobeli bango kati na Baloma 4:11, epai oyo ezali kotangama ete naino ezalaki ye na esute, Abrahame, nkoko ya Bayuda, akomaki “tata na bango nyonso bazali kondima, ata bazali bisute”. Mbeka ya lisiko na Yesu ezali kopesa litomba epai ya Bayuda oyo bandimi mpe n bapakano oyo bandimi.
Ezali etamboli ya moto na moto nde ekokata soki akozwa to te litomba na mbeka na Yesu. Lokola Adam, baoyo bazali kosala mabe na nko bazali na lotomo ya kozwa litomba na motuya ya lisiko te ata mpe na bomoi ya seko te. Klisto alobaki: “Ye oyo andimi Mwana azali na bomoi ya seko; ye oyo aboyi Mwana akomona bomoi te, kasi nkanda na Nzambe ekoumela na ye.” (Yoane 3:36) Lisiko ezali mpe kopesa nzela na lisekwa ya bakufi oyo Nzambe azali kobatela kati na makanisi na ye. (Yoane 5:28, 29) Soki bamimonisi bato na botosi mpe na botondi, kosalelama ya motuya na lisiko mpo na bolamu na bango ekomemela bango bomoi ya seko. Mpo na baoyo bazali na bomoi na eleko na biso, “mikolo na nsuka”, bazali na likoki ya kozwa bomoi ya seko kozanga kokufa.—2 Timote 3:1-5; Matai 24:3-14, 21, 34; Yoane 11:25, 26.
Bantina ya botondi
Moto na moto oyo alingi kozwa litomba ya lisiko asengeli mpenza kozala na botɔndi mozindo mpo na ebongiseli yango. Ezali mpenza malamu ete ebota botondi kati na biso. Nzambe mpe Klisto bamonisaki elembo ya bolingo monene mpo na kopesa yango, boye te?
Ya solo, Jéhovah Nzambe amonisaki bolingo monene na kopesaka lisiko na nzela ya liwa ya Mwana na ye. Yesu alobaki: “Mpo ete Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana na ye bobele moko ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi ya seko. Mpo ete Nzambe atindi Mwana na ye kati na mokili ete asambisa mokili te kasi ete mokili ebika mpo na ye.” (Yoane 3:16, 17) Osengeli kozala na botondi te mpo na elembo wana ya bolingo na Nzambe?
Kanisa na bozindo ya bolingo oyo Jéhovah amonisaki na kopesaka lisiko. Liboso ete atindama awa na mabele mpo na koya kozala na bomoi mpe kokufa lokola moto ya kokoka, Mwana na Nzambe azáláká liboso na bomoi. Azalaki “mobotami na liboso na biloko nyonso bizalisami”, mpo kati na ye “biloko nyonso bizalisamaki, na biloko na likoló mpe biloko na nse, biloko bikomonanaka mpe biloko bizangi komonana”. (Bakolose 1:13-16.) Jéhovah alingaki mpenza Mwana na ye na bozindo. Nzokande, Nzambe asepelaki te na kotinda moko kati na bamilió ya baanzelu na sembo na mabelé. Te, bolingo na ye mpo na bato ezalaki monene koleka ete atindaki Mwana na ye mobotami ya liboso.
Kanisa mpe na bolingo oyo Yesu amonisaki na boyokani elongo na lisiko. Ntango azalaki ekelamu ya elimo na likoló, azalaki “mosali malamu” elongo na Nzambe. Ya solo, ‘biloko oyo bizalaki kosepelisa Mwana na Nzambe bizalaki elongo na bato’. (Masese 8:22‘31.) Kasi, ezalaki petee te mpo na ye kotika likoló, epai kuna azalaki kofanda kati na makambo kitoko elongo na Tata na ye mpe na bankoto na bankoto ya baanzelu na sembo. Uta na etelemelo na ye kitoko na makolo, Mwana na Nzambe akokaki komona makambo ya mpasi oyo ezalaki awa na mabelé mpe mbeba oyo lisumu mpe liwa ezalaki kosala epai na bato. Ayebaki mpe ete ekosengela na ye kokufa mpo na kopesa lisiko. Atako bongo, “akamataki motindo na moombo, abotamaki na lolenge na bato, . . . Amisokisi mpe atosi kino kufa”. Mpo na bosembo na ye, Yesu asekwisamaki mpo na bomoi ya nkembo kati na makoló. (Bafilipi 2:5-11) Bolingo nini amonisaki na kopesaka lisiko! Ozali na botondi mpo na oyo asalaki?
Okosala nini?
Mokolo moko, episkopo moko ya Angleterre Richard de Chichester (na ba mibu 11981253) abimisaki likanisi ete mibali mpe basi “babanda koyeba Yesu Klisto, na kolinga ye koleka mpe na kolanda ye penepene”. Na ntembe te, mbeka na lisiko na Yesu ezali ntina malamu ya koyeba ye, na kolinga ye mpe na kolanda ye.
Soki lisiko te, biso bato ya masumu mbele tolingaki bobele kokufa kozanga elikya, mpamba te “eswelo ya kufa ezali masumu”. (1 Bakolinti 15:56.) Na bongo likambo nini osengeli kosala mpo obika na liwa oyo ezali kozela yo, yo moto otungisami na lisumu? Esengeli na yo koyeba makambo oyo Nzambe abongisaki mpo na lobiko na nzela na Yesu Klisto, mpe monisa ete ozali na kondima kati na lisiko. Ndenge nini? Na komonisaka botondi ya solo, na komipesáká na Nzambe mpe na koloba zingazinga na yo na ntina na ebongiseli kitoko oyo ezali kopesa nzela mpo na lobiko.
Soki osali bongo, okoki kozala kati na “ebele monene” ya baoyo “babimi na monyoko monene, mpe, . . . basukoli bilamba na bango, mpe bayeisi yango mpembe na makila na Mwana na Mpate”, Yesu Klisto. (Emoniseli 7:9, 14) Bato yango bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekozala paradis. (Luka 23:43) Ee, okoki kozala kati na etuluku wana ya esengo soki liwa na Yesu ezali mpenza na motuya na miso na yo.