“Bómikangela kosɔkɛma lokola elamba”
“Nzambe akotɛmɛlaka bato na lolendo, nde akopesaka basɔkɛmi ngɔlu.”—1 PETELO 5:5.
1, 2. Wapi bizaleli mibale oyo ekeseni mpe ebongolaka mpenza moto?
LILOBA ya Nzambe elobeli bizaleli mibale oyo ekeseni mpenza moko na mosusu. Bizaleli yango mibale ebongolaka mpenza moto. Moko na yango ezali “kosɔkɛma.” (1 Petelo 5:5) Diksionere elobi ete “moto ya kosɔkɛma” ezali “moto oyo ayebi komikitisa: azalaka na lolendo te.” Kosɔkɛma na komikitisa ezali kaka eloko moko, mpe ezali ezaleli ya malamu mpenza na miso ya Nzambe.
2 Ezaleli oyo ekeseni na yango ezali lolendo. Lolendo elimboli “komitombola na koleka ndelo,” “komona basusu mpamba.” Moto ya lolendo atalaka kaka bolamu na ye moko, alukaka matomba na ye moko ya mosuni, ya moimi, mpe atalaka te soki ekosala bato mosusu mpasi. Biblia emonisi mbuma moko mabe oyo lolendo ebotaka: “Moto moko azali na bokonzi likoló na mosusu mpo na kopesa ye mpasi.” Elobi ete “moto oyo akolulelaka mozalani na ye” azali nde “kolanda mopɛpɛ” mpamba te soki moto akufi “akokamata eloko moko . . . te.” Nzambe ayini lolendo motindo wana.—Mosakoli 4:4; 5:15; 8:9.
Elimo ya mokili
3. Elimo nini ezali komonana mingi na mokili?
3 Na kati ya bizaleli wana mibale, wapi oyo ezali komonana mingi na mokili lelo oyo? Elimo ya mokili ezali nini? Lapolo moko (World Military and Social Expenditures 1996) elobi boye: “Ezali na ekeke mosusu te oyo ekokani na ekeke ya 20 na mobulu oyo ezali kosalema na ndenge ya bonyama.” Kowela bokonzi ya politiki mpe kowelana na makambo ya nkita, bakisá mpe matata na bikólo, na mangomba, mpe na bituluká, ebomi bato koleka milio 100 na ekeke oyo. Bato bakómi mpe komipesa mingi na koluka bolamu na bango moko. Zulunalo Chicago Tribune eyebisaki boye: “Makambo oyo ezali kobebisa mokili oyo ezali: mobulu oyo ezali kosalema na ndenge ya bonyama, konyokola bana mike, koboma mabala, kolangwa masanga, sida, bilenge bazali komiboma, bangi, bato bazali kosala mobulu na balabala, kosangisa nzoto na basi na makasi, kokumba zemi ya balabala, kolongola zemi, bafilme na bafɔtɔ ya bato bazali bolumbu, . . . lokuta, kobuba, kozanga bosembo na politiki . . . Bato bazali lisusu kokesenisa malamu na mabe te.” Yango wana, zulunalo UN Chronicle ayebisaki ete: “Mokili ezali kokufa.”
4, 5. Ndenge nini bisakweli ya Biblia elobelaki malamumalamu elimo ya mokili na mikolo na biso?
4 Makambo yango ezali kosalema na mokili mobimba. Ezali mpenza ndenge Biblia esakolaki mpo na ntango na biso ete: “Na mikolo na nsuka, ntango na mpasi ekoya. Zambi bato bakozala bamikumisi na bango mpenza, baluki na mosolo, bato na lolendo, bato na ngambo, batuki, bato na bazangi kokumisa baboti, bato bazangi matɔndi, bato bazangi bulɛɛ, bato bazangi bolingo, bazangi boboto, batɔngi, batomboki, bato na yauli, bayini na malamu, bakosi, bato na nko, bato bavimbi na lolendo.”—2 Timote 3:1-4.
5 Yango mpenza nde elimo oyo tozali komona na mokili lelo oyo. Ezali elimo ya koluka liboso matomba ya moto ye moko. Matata kati na bikólo ekómi tii na kati na bato bafandi na bikólo yango. Na ndakisa, na masano oyo esɛngaka bamoko bálonga, bato mingi bazali koluka bazwa esika ya liboso ata soki yango ekopesa bato mosusu mpasi nini na mayoki to na nzoto. Bana bazali koteyama elimo ya koluka matomba na bango moko mpe bazali komonisa elimo yango na bomoi na bango ntango bakómi mikóló. Yango ezali kobimisa “koyinana, koswana, kotyana zuwa, koyokana nkanda, kotyana ntembe, kokabwana.”—Bagalatia 5:19-21, Boyokani ya Sika.
6. Nani alendisaka moimi, mpe ndenge nini Yehova atalelaka elimo yango?
6 Biblia elakisi ete elimo ya koluka matomba ya moto ye moko oyo tozali komona epai ya bato ezali komonisa elimo ya “oyo abéngami [Zabolo, NW] mpe Satana, mozimbisi na bato na mokili mobimba.” Biblia esakolaki boye mpo na komonisa ndenge Satana akosalela bato na mikolo oyo ya nsuka: “Mawa na mokili . . . mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse.” (Emoniseli 12:9-12) Yango wana, Satana na bademo na ye babakisi milende mpo na kopesa bato elimo ya moimi. Ndenge nini Yehova atalelaka elimo yango? Liloba na Ye elobi: “Mitema nyonso na lolendo iboyami na [Yehova].”—Masese 16:5.
Yehova asepelaka na bato ya komikitisa
7. Ndenge nini Yehova atalelaka basɔkɛmi, mpe ateyaka bango nini?
7 Yehova apambolaka nde baoyo bazali na komikitisa. Mokonzi Davidi ayembelaki Yehova nzembo oyo: “Okobikisa libota linyokwami; nde miso na yo makomona bato na nzombo ete okitisa bango.” (2 Samwele 22:1, 28) Yango wana, Liloba ya Nzambe epesi toli oyo: “Bóluka [Yehova], bino basɔkɛmi nyonso na mokili, . . . bóluka boyengebene, bóluka bopɔlɔ, soko nde bokobombama na mokolo ya nkanda ya [Yehova].” (Sefania 2:3) Baoyo bazali koluka Yehova na komikitisa nyonso, Yehova azali koteya bango mpo bákolisa elimo oyo ekeseni mpenza na elimo ya mokili. “Akolakisa bato na bopɔlɔ nzela na ye.” (Nzembo 25:9; Yisaya 54:13) Nzela yango ezali nzela ya bolingo. Emonanaka na misala oyo ezali malamu na miso ya Nzambe. Biblia elobi ete bolingo motindo yango, “ezali na lolendo te, ekomivimbisaka te, . . . ekolukaka malamu na yango mpenza te.” (1 Bakolinti 13:1-8) Emonanaka mpe na kosɔkɛma.
8, 9. (a) Bolingo euti na nani? (b) Mpo na nini ezali na ntina tólanda ndakisa ya bolingo mpe ya komikisa ya Yesu?
8 Paulo na baklisto mosusu ya ekeke ya liboso bayekolaki bolingo yango na mateya ya Yesu. Ye moko Yesu ayekolaki yango epai ya Tata na ye Yehova. Biblia elobi mpo na Yehova: “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Yesu ayebaki ete Nzambe alingaki ete ye atosa mobeko ya bolingo na bomoi na ye; asalaki mpe bongo. (Yoane 6:38) Yango wana azalaki koyokela bato oyo bazalaki konyokwama, na babola, mpe bato ya masumu mawa. (Matai 9:36) Alobaki na bango boye: “Bóya liboso na ngai, bino nyonso bozali kolɛmba na mosala mpe kokumba bozito, mpe nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola na ngai; zambi ngai nazali na bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi.”—Matai 11:28, 29.
9 Yesu ayebisaki bayekoli na ye mpo na nini basengelaki kolanda ndakisa na ye ya bolingo mpe ya komikitisa ntango alobaki na bango boye: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.” (Yoane 13:35) Basengelaki kokesana na bato ya mokili oyo bazali na elimo ya moimi. Yango wana Yesu alobaki mpo na bayekoli na ye ete: “Bazali bato na mokili te.” (Yoane 17:14) Balandaka elimo ya mokili ya Satana te, elimo ya lolendo mpe ya moimi. Balandaka nde ndakisa ya bolingo mpe ya komikitisa ya Yesu.
10. Na mikolo na biso, Yehova azali kosala nini epai ya bato ya komikitisa?
10 Liloba ya Nzambe esakolaki ete na mikolo oyo ya nsuka, bato ya komikitisa bakosala lisangá moko kati na yango bolingo mpe komikitisa ekozala bizaleli ya liboso. Yango wana, na kati ya mokili oyo bato lolendo bazali se kobakisama, basaleli ya Yehova bazali kolakisa elimo oyo ekeseni mpenza: bazali na komikisa. Bato yango bazali koloba boye: “Yakani, tóbuta na ngomba na [Yehova] [losambo na ye ya solo], . . . ete alakisa biso nzela na ye mpe ete tótambola na bipai bikokendaka ye.” (Yisaya 2:2, 3) Batatoli ya Yehova basali lisangá yango na mokili mobimba mpe bazali kotambola na banzela ya Nzambe. Basali “ebele monene” oyo ezali se koya monene, “oyo moto te akoki kotánga motuya na bango; bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bibolo nyonso, na minɔkɔ nyonso.” (Emoniseli 7:9) Lelo oyo, ebele monene yango ekómi na bamilio ya bato. Ndenge nini Yehova azali koteya bango mpo bázala na komikitisa?
Bazali koyekola kozala bato ya komikisa
11, 12. Ndenge nini basaleli ya Yehova bamonisaka komikitisa?
11 Elimo ya Nzambe ezali kosala mosala epai ya bato na ye oyo bandimi ete atambwisa bango, ezali kosalisa bango báyekola kolongola elimo mabe ya mokili mpe kolona mbuma ya elimo ya Nzambe. Yango ezali komonana na “bolingo, esengo, kimya, motema pɛtɛɛ, boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ mpe komikanga motema.” (Bagalatia 5:22, 23) Mpo na kosalisa basaleli ya Nzambe bálona bizaleli yango, bazali koteya bango bázala ‘na lolendo te, bátungisanaka te, bálulanaka te.’ (Bagalatia 5:26) Ndenge moko mpe, ntoma Paulo alobaki ete: “Nazali koloba na moko na moko kati na bino ete akanisa mpo na ye moko na koleka te; kasi akanisa mpo na kozala na makanisi malamu.”—Baloma 12:3, NW.
12 Liloba ya Nzambe ezali koteya baklisto ya solo básala “likambo moko mpo na elulela soko mpo na nzombo te kasi, awa ezali bino na kosɔkɛma, bótánga bamosusu [basaleli ya Nzambe] ete baleki bino. Moto na moto atala bobele makambo na ye moko te, kasi makambo na bamosusu lokola.” (Bafilipi 2:3, 4.) “Tiká te ete moto aluka bobele malamu na ye moko kasi yango na mozalani na ye.” (1 Bakolinti 10:24) Ya solo, “bolingo ekolendisaka” basusu na maloba mpe misala oyo ezali na moimi te. (1 Bakolinti 8:1) Bolingo elendisaka elimo ya kopesana mabɔkɔ, kasi ya kowelana te. Na kati ya basaleli ya Yehova, elimo ya koluka liboso bolamu ya moto ye moko esengeli komonana te.
13. Mpo na nini tosengeli koyekola komikitisa, mpe ndenge nini moto ayekolaka yango?
13 Kasi, tobotamaka na komikitisa te mpo na lisumu oyo bankɔkɔ na biso batikelá biso. (Nzembo 51:5) Tosengeli nde koyekola ezaleli yango. Mpe likambo yango ekoki kozala mpasi mpo na baoyo bateyamaki banzela ya Yehova banda bomwana na bango te, kasi bayaki nde kondima mateya na ye nsima. Elimo ya mokili oyo ekɔtela bato yango. Yango wana, basengeli koyekola ‘kolongola bomoto ya kala oyo eyokani na etamboli [na bango] ya liboso’ mpe ‘kolata bomoto ya sika oyo esalemi na mokano ya Nzambe na bosembo mpe bokangami ya solo.’ (Baefese 4:22, 24, NW) Nzambe akoki kosalisa bato ya sembo na kokokisa makambo oyo azali kosɛnga bango ete: “Bómilatisa mitema na mawa, na boboto, na kosɔkɛma, na bopɔlɔ, na mitema pɛtɛɛ.”—Bakolose 3:12.
14. Na maloba nini Yesu amonisaki ete koluka komitombola ezali mabe?
14 Bayekoli ya Yesu basengelaki koyekola yango. Bazalaki mikóló ntango bakómaki bayekoli na ye mpe bazalaki na mwa elimo ya kowelana lokola oyo ezalaka na bato ya mokili. Ntango mama ya bayekoli na ye mibale asɛngaki ete bana na ye bázala na esika ya lokumu, Yesu alobaki boye: “Mikóló na bapakano bazali na mikonzi likoló na [bato] mpe bato minene bakonyokola bango na makasi. Nde kati na bino ezala bongo te. Ye oyo alingi kozala monene kati na bino, akóma mosungi na bino mpe ye oyo alingi kozala moto na liboso na bino, azala moombo na bino. Lokola Mwana na moto [Yesu] ayei mpo na kosungama te kasi mpo na kosunga mpe kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na mingi.” (Matai 20:20-28) Ntango Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete básalelaka batitre te mpo na koluka komitombola, abakisaki ete: “Bino nyonso bozali bandeko.”—Matai 23:8.
15. Baoyo balingi kozala bakɛngɛli basengeli kozala na elimo nini?
15 Moyekoli ya solosolo ya Yesu azali mosaleli to mpe moombo ya bandeko na ye baklisto. (Bagalatia 5:13) Mingimingi mpo na baoyo balingi kozala bakɛngɛli na kati ya lisangá. Basengeli kowelanaka te mpo na koluka lokumu to bokonzi; basengeli te ‘kozala bakonzi na libula ya Nzambe, kasi bázala ndakisa mpo na bango.’ (1 Petelo 5:3, NW) Ɛɛ, moto oyo azali koluka matomba na ye moko azali mpenza kolakisa ete abongi te mpo na kozala mokɛngɛli. Moto ya ndenge wana akoki kobebisa lisangá. Ya solo, ‘koluka kosala lokola mokɛngɛli’ ezali mposa malamu, kasi moto asengeli kosala yango na mokano ya kosalela baninga na ye baklisto. Yango ezali esika ya koluka lokumu to bokonzi te, mpamba te bakɛngɛli basengeli kozala kati na baoyo baleki komikitisa na kati ya lisangá.—1 Timote 3:1, 6.
16. Mpo na nini Liloba ya Nzambe elobeli ezaleli mabe ya Diotelefe?
16 Ntoma Yoane alobeli biso moto moko oyo azalaki na makanisi oyo ebongi te mpo na mokumba yango; alobi boye: “Nakomaki mwa mokanda epai na lingomba. Kasi Diotelefe, oyo asepeli kozala moto na liboso na bango, alingi konyangela biso te.” Moto yango azalaki na limemya te mpo na basusu mpamba te azalaki koluka azala na esika ya liboso. Kasi, elimo ya Nzambe epusaki Yoane akoma na kati ya Biblia maloba oyo emonisaki mabe ya Diotelefe mpo azalaki koluka naino bolamu na ye moko.—3 Yoane 9, 10.
Elimo oyo ebongi
17. Ndenge nini Petelo, Paulo, na Balanaba bamonisaki komikitisa?
17 Biblia elobeli bato mingi oyo bazalaki na elimo oyo ebongi, elingi koloba elimo ya komikisa. Ntango Petelo akómaki na ndako ya Koloneli, moto yango ‘akweaki na makolo na ye mpe akumisaki ye.’ Kasi na esika andima lokumu motindo wana, “Petelo nde atɛmisi ye mpe alobi ete, Tɛlɛmá! Ngai mpenza nazali mpe moto.” (Misala 10:25, 26) Ntango Paulo na Balanaba bazalaki na Lusutula, Paulo abikisaki moto moko oyo abotamá ebɔsɔnɔ. Ntango bato bamonaki bongo, balobaki ete bantoma yango bazalaki banzambe. Kasi, Paulo na Balanaba ‘bapasolaki bilamba na bango, mpe baingelaki mbango kati na bibele, konganga ete, Bandeko! bozali kosala boye mpo na nini? Biso mpe tozali bato lokola bino.’ (Misala 14:8-15) Baklisto yango oyo bazalaki na komikitisa baboyaki ete bato bákumisa bango.
18. Lokola azalaki na komikitisa, anzelu moko ya nguya alobaki nini epai ya Yoane?
18 Ntango Yoane azwaki “emoniseli na Yesu Klisto” na nzela ya anzelu moko. (Emoniseli 1:1) Soki tokanisi nguya oyo anzelu azali na yango, tokoki kokanga ntina oyo Yoane akamwaki mingi; mpamba te anzelu moko abomaki Baasulia 185 000 na butu moko. (2 Mikonzi 19:35) Yoane alobi: “Wana eyoki ngai mpe emoni ngai, nakwei kosambela liboso na makolo na [anzelu] oyo atalisi ngai makambo oyo. Alobi na ngai ete, Tiká! Ngai nazali moombo moninga na yo, mpe na bandeko na yo . . . Sambelá Nzambe.” (Emoniseli 22:8, 9) Talá komisɔkisa oyo anzelu wana ya nguya azalaki na yango!
19, 20. Lobelá bokeseni kati na lolendo oyo bakonzi ya basoda ya Loma bazalaki na yango soki balongi bitumba na kosɔkɛma ya Yesu.
19 Yesu apesaki ndakisa ya kosɔkema oyo eleki nyonso. Ye azalaki mwana-bobele-moko ya Nzambe. Asengelaki kokóma Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe kuna na likoló. Ntango amilakisaki na bato, asalaki lokola bakonzi ya basoda ya Loma ya ntango wana te. Bakonzi yango, soki balongi na bitumba, bazalaki kosalela bango badefile minene mpe bazalaki kotambola na makalo oyo batyaki bawolo mpe mpɛmbɛ ya nzoku, bampunda ya mpɛmbɛ to mpe banzoku, bankosi, to batigre ezalaki kobenda makalo yango. Babɛti-miziki bazalaki kolanda na molɔngɔ mpe bazalaki koyemba nzembo ya bolongi, ezalaki mpe na makalo etondi na biloko oyo bazwaki na etumba, na makalo minene oyo ezalaki kolakisa bitumba. Bazalaki mpe kotambwisa bakonzi oyo bakangaki, mpe bana ya bakonzi, na bakonzi ya basoda, na mabota na bango, mbala mingi bazalaki kotika bango bolumbu mpo na kosambwisa bango. Makambo yango ezalaki kolakisa lolendo mpe lofundo.
20 Talá bokeseni na ndenge oyo Yesu amilakisaki. Andimaki kokokisa esakweli moko oyo elobaki boye na ntina na ye: “Talá mokonzi na yo akoyela yo, ye azali na boyengebene mpe na kobikisa; na bopɔlɔ mpe atamboli likoló na mpunda, ɛɛ, likoló na mwana na mpunda.” Na komikitisa nyonso amataki likoló ya nyama oyo ememaka mikumba, kasi na likalo te oyo banyama ya lokumu bazalaki kobenda. (Zekalia 9:9; Matai 21:4, 5) Bato ya komikitisa bazali na esengo mingi mpamba te Yehova aponi Yesu mpo na koyangela mabelé na mokili ya sika, azali mpenza na kosɔkɛma, na komikisa, na bolingo, mpe na motema mawa!—Yisaya 9:6, 7; Bafilipi 2:5-8.
21. Komikitisa emonisi nini te?
21 Lokola Yesu, Petelo, Paulo na mibali mpe basi mosusu ya kondima na ntango ya kala bazalaki na komikitisa emonisi mpenza ete komikitisa ezali bolɛmbu te. Kutu, komikitisa emonisaka nde bokasi, mpamba te bato yango bazalaki na mpiko mpe molende. Bazalaki makasi na elimo mpe na makanisi malamu, yango wana balongaki mikakatano. (Baebele, mokapo 11) Mpe lelo oyo, ntango basaleli ya Yehova bazali na komikitisa, bazalaka na makasi motindo yango mpamba te Nzambe apesaka bato ya komikitisa elimo santu na ye oyo ezali makasi mingi. Yango wana, balobi na biso ete: “Bómikangela kosɔkɛma lokola elamba, moko asunga mosusu, mpo ete Nzambe akotɛmɛlaka bato na lolendo, nde akopesaka basɔkɛmi ngɔlu. Na bongo bómisɔkisa na lobɔkɔ na Nzambe makasi, ete atombola bino na elaka eponi ye.”—1 Petelo 5:5, 6; 2 Bakolinti 4:7.
22. Tokolobela nini na lisolo elandi?
22 Basaleli ya Nzambe basengeli komonisa ezaleli mosusu ya malamu oyo eyokani na komikitisa. Ezaleli yango elendisaka mpenza bolingo mpe kopesana mabɔkɔ na kati ya masangá. Kutu, tokoki koloba ete ezaleli yango emonisaka mpenza komikitisa. Tokolobela ezaleli yango na lisolo oyo elandi.
Bozongeli
◻ Lobelá elimo ya mokili oyo.
◻ Ndenge nini Yehova asungaka bato ya komikitisa?
◻ Mpo na nini moto asengeli koyekola komikitisa?
◻ Tángá mwa bankombo ya bato oyo Biblia elobi ete bazalaki na komikitisa?
[Elilingi na lokasa 15]
Anzelu ayebisaki Yoane ete, “Tiká! Ngai nazali moombo moninga na yo.”