Ozali kosala mokano ya Nzambe?
KATI na mosala na bango ya ndako na ndako, Batatoli ya Yehova mibale bakutanaki na sángó moko ya Eglise épiscopalienne. Amonanaki lokola mobali moko malamu, na mandefu mingi, oyo azalaki soko na mibu 60, alataki simísi moko oyo ekomami na maloba ya kokumisa lingomba na ye. Na mbala moko, alobaki ete: “Nakolinga mingi ete basangani ya lingomba na biso bamonisa molende lokola ya bino mpo na kopalanganisa Liloba, kasi nakosenga bino ete bóya lisusu na ndako na ngai te.”
Ee, bato mingi bazali kosepela na mosala ya Batatoli ya Yehova mpe bazali kokumisa bango mpo na molende mpe esengo na bango. Nzokande, bazali mpenza kosepela soko moke te na nyonso oyo Batatoli bazali kosala, mpe bazali kokanisa te mpo na kokokisa mosala yango bango moko. Kasi, ezaleli wana oyo emonani lokola ete ezali bongolabongola ezali likambo ya sika te. Emonanaki na ntango na Yesu, mpe ye asakolaki yango polele kati na lisese moko ya mozindo.
“Bojali kokanisa nini? Moto mɔkɔ ajalaki na bana babali mibale. Ekei ye epai na oyo na liboso, alobi ete, ‘Mwana, kɛnda lɛlɔ kosala mosala na elanga na miwiti.’ Ajongisi monɔkɔ, alobi ete, ‘Nakei,’ nde akɛndaki tɛ. Eyei ye epai na oyo na mibale, alobi bobɛlɛ bongo. Ye ajongisi liloba ete, ‘Nalingi tɛ,’ nde nsima abongoli motema mpe akei. Nani kati na bango mibale asali nde mokano na tata?”—Matai 21:28-31.
Eyano ezali polele. Lokola ebele oyo bayokaki Yesu, tokoyanola ete, “Oyo na nsima.” Kasi Yesu asukaki te na makambo oyo mamonanaki solo, na nzela ya lisese oyo, Yesu alingaki kokebisa biso ete kosala oyo tata alingi nde ezalaki na ntina mingi. Atako mwana ya mibale aboyaki liboso kokende na elanga, kasi akendeki mpe akumisamaki mpo na yango. Ezali mpe na ntina kosala oyo basengi ete tosala. Mwana ya mibale akokisaki mosala na kosaláká na elanga ya miwiti ya tata; akendeki kosala na elanga ya miwiti ya ye moko te.
Liteya nini tosengeli kozwa? Nzambe azali kosenga nini epai na basambeli na ye na mikolo na biso? Lolenge nini ndakisa na Yesu ekoki kosalisa biso na kosala mokano ya Tata na ye? Mituna wana mizali na ntina mingi, mpe kozwa biyano ya sikisiki na yango ekolimbola bolamu ya seko mpo na biso, mpo ete “ye oyo akosalaka mokano na Njambe akoumelaka seko.”—1 Yoane 2:17; Baefese 5:17.
“Mokano ya Nzambe” ezali nini?
Liloba “mokano” etangami mbala 80 kati na Comprehensive Concordance of the New World Translation of the Holy Scriptures (Molɔngɔ́ ya mikapo mpo na kososola mizwami na Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu). Soko mbala 60 kati na yango nyonso, (to 75% kati na mbala nyonso wana) litindami lizali kolobela mokano ya Nzambe. Maloba lokola “mokano na Nzambe,” mpe “mokano na Tata na ngai,” mazongelami koleka mbala 20. Na likambo oyo tozali komona ete mokano ya Nzambe esengeli kozala na esika ya liboso mpo na biso. Kokokisama ya mokano na Nzambe esengeli kozala lobanzo na biso ya liboso.
Na Lingala liloba “mokano” elimboli ‘mposa, litómbeli, ekateli, eloko oyo moto alingi, mingimingi liponi to ekateli ya moto oyo azali na bokonzi to nguya.’ Na bongo, Yehova, Mokonzi Monene, azali na mokano, na mposa to na ekateli. Yango ezali nini? Makomami mazali koyebisa biso mwa moke ete: “Mokano [ya Nzambe] ezali ete bato ya lolenge nyonso babika mpe bakóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timoté 2:4, NW) Yesu Klisto mpe baklisto ya liboso basalaki na molimo na bango mobimba mpo na kopesa boyebi ya sikisiki ya solo epai na bato mosusu.—Matai 9:35; Misala 5:42; Bafilipi 2:19, 22.
Nani azali kosala mokano ya Nzambe na mikolo na biso? Kati na bato penepene na miliare mibale oyo bazali komitanga bayekoli ya Yesu Klisto, boni bakokani na mwana ya nsuka ya lisese na Yesu, oyo akendeki mpe asalaki mokano ya tata na ye? Eyano ezali mpasi te. Balandi ya solo ya matambe ya Yesu Klisto basɛngeli kosala mosala oyo atindaki ete esalema: “Ekoki ete nsango malamu [esakolama, NW] kati na mabota yɔnsɔ liboso.” (Malako 13:10) Batatoli ya Yehova, oyo motuya na bango mozali penepene ya milió minei na ndambo kati na mokili mobimba, bazali kosakola mpe kolakisa na molende nyonso nsango malamu ya Bokonzi epai na bato mosusu, bazali komonisa Bokonzi lokola elikya bobele moko ya kimya mpe kobatelama. Ozali kosangana na molende nyonso kati na kokokisama ya mokano ya Nzambe? Ozali kosakola nsango malamu ya Bokonzi lokola Yesu asalaki yango?—Misala 10:42; Baebele 10:7.
Kozwa esengo na kosala mokano ya Nzambe
Lokola koyekola mokano ya Tata ezali kopesa esengo, kolakisa bato mosusu mokano ya Nzambe ezali kopesa esengo mingi koleka. Yesu azalaki na esengo mingi ya kolakisa bato na ntina na Tata na ye. Ezalaki mpo na ye lokola bilei. (Yoane 4:34) Biso mpe tokozala na bolamu ya solo soki tokosala lokola Yesu asalaki, elingi koloba, kosakola mpe kolakisa makambo oyo ye alakisaki, makambo oyo azwaki epai ya Tata na ye. (Matai 28:19, 20) Lokola Yesu alakaki yango, “sɔkɔ boyebi makambo oyo, bokojala na esɛngo sɔkɔ bokosala yango.”—Yoane 13:17.
Mpo na kolimbola yango: Mama moko oyo auti kozongela kala mingi te mosala ya ntango nyonso ya babongisi-nzela alobaki ete: “Komona lolenge elongi na moyekoli moko ya Biblia ezali kongenga wana mateya makeseni ya solo ya Biblia masimbi motema na ye ezali kopesa esengo monene! Ezali mpenza esengo monene mpo na ngai komona moyekoli moko kokoma mikapo ya Makomami liboso ya boyekoli mpe kokoma mwa makambo na boumeli ya boyekoli mpo ete na nsima akoka koyanola na mituna ya bozongeli.” Moko na bayekoli na ye ya Biblia ayekolaki solo wana azalaki elenge. Sikawa lokola asilaki kobala mpe atungisamaki na mikakatano mitali bomoi na ye, abandaki kooka mposa makasi ya kokutana na Batatoli. Oyo nde esengo azalaki na yango ntango ndeko mwasi mobongisi-nzela akutanaki na ye! Elenge mwasi wana asepelaki mingi kozongela boyekoli na ye ya Biblia.
Kobatela esengo ya kosala mokano ya Nzambe
Davidi, mokonzi ya Yisraele ya kala azalaki moto oyo alukaki kosala mokano ya Nzambe kati na bomoi na ye mobimba. Atako akutanaki na mikakatano mpe na mitungisi mingi, apemamaki na elimo santu mpo na koloba ete: “Kosala mokano na yo, Ɛ Nzambe na ngai, nasepeli na yango mingi, mpe mibeko na yo mizali na biteni na ngai ya kati.” (Nzembo 40:8, NW) Kosala mokano ya Yehova ezalaki mpenza kati na molimo ya Davidi, kati na bomoto na ye mpenza. Yango ezalaki sɛkɛlɛ́ ya esengo monene oyo azalaki kooka kati na mosala ya Yehova. Kosala mokano ya Nzambe ezalaki mpasi te mpo na Davidi. Nzokande, ezalaki esengo monene, likambo oyo liutaki na motema na ye. Na boumeli ya bomoi na ye mobimba, amonisaki milende mpo na kosala nyonso oyo ekoki na ye mpo na kosalela Nzambe na ye, Yehova, atako na bantango mosusu asalaki masumu mpe akweaki.
Na mabaku mosusu, esengo na biso ekoki kokita. Tokoki kolemba mpe kozanga mpiko. Mbala mosusu bomoi na biso ya kala ekoki kotungisa biso, lisosoli na biso ezali kobulunganisa biso na ntina na mabe oyo tosalakaki kala. Mbala mingi, tokoki kolónga mayoki motindo wana na nzela ya boyekoli mozindo ya Liloba na Nzambe. Tokoki komityela mokano ya kokoma mibeko ya Nzambe na “biteni ya kati” na biso lokola Davidi asalaki yango. Soki tomeki kosala mokano ya Nzambe na molimo na biso mobimba, na makoki na biso nyonso, akopesa biso mbano na boyokani na yango mpamba te azali sembo.—Baefese 6:6; Baebele 6:10-12; 1 Petelo 4:19.
Na motindo ebongi, kati na Baebele 10:5-7, ntoma Paulo atangi maloba ya Davidi na Nzembo 40:6-8 mpe asaleli yango mpo na Yesu Klisto. Na kosaláká bongo, Paulo amonisaki lolenge Yesu azalaki na boyokani ya penepene elongo na Tata na ye. Liloba ya Liebele oyo elimboli “mokano” emonisi mpenza ‘bosepeli mingi, mposa, ngolu, to nsaí.’ Soki tolandi liloba moko na moko, Nzembo 40:8 esɛngeli bongo kotangama na ntina na Klisto ete: “Kopesa yo nsaí, Ɛ Nzambe na ngai, nasepeli na yango mingi.”a Na bongo, Yesu alingaki oyo ekosepelisaka Tata na ye. Yesu asalaki koleka oyo esɛngamaki na ye. Asalaki oyo eyokanaki na motema ya Tata na ye, mpe asepelaki kosala yango.
Bomoi mobimba ya Yesu etalelaki kolakisa bato mokano ya Nzambe mpe oyo basengelaki kosala mpo na kozwa mapamboli ya Nzambe. Azalaki mosakoli mpe molakisi ya ntango nyonso mpe azalaki kosepela mingi na mosala yango. Na bongo, ezali polele ete soki tomipesi mingi na mosala ya Yehova, tokozwa mpe esengo mingi. Yo mpe okoki kosala mosala ya kosakola ntango nyonso mpo ete esengo na yo ezala mingi?
Lisusu soki totye makanisi na biso nyonso likoló na mikolo mizali koya, tokozala ntango nyonso na esengo ya kosala mokano ya Nzambe. Ezali yango nde Yesu asalaki. “Mpɔ na esɛngo etiami liboso na ye, ayikeli [nzeté na mpasi, NW] mpiko, atioli nsɔni na yango.” Mpo na ye, esengo ezalaki ya komimonisa sembo epai na Nzambe kino nsuka mpe bongo kozwa mbano ya bokonzi na lobɔkɔ ya mobali ya Tata na ye.—Baebele 12:2.
Kanisá esengo oyo ezali kozela baoyo bazali kotika te kosala mokano ya Nzambe. Bakomona kobomama ya bato oyo na moimi nyonso bazali bobele kosala mokano na bango moko atako yango ezali kopesa mpasi epai na baoyo bazali komipesa mpo na kosala mokano ya Nzambe. (2 Batesaloniki 1:7, 8) Kanisá esengo ya balingami oyo bakosekwa wana bakopesamela libaku ya koyekola kosala mokano ya Nzambe. To kanisá mokano ya Nzambe ya kozongisa paladiso na mabelé. Mpe na nsuka, kanisá bonsomi oyo ekouta na kobomama mpenza ya Satana, motemeli ya mokano ya Yehova.
Ee, kosala mokano ya Nzambe lelo oyo ekoki komemela yo esengo sikawa mpe bolamu bozangi nsuka na mikolo mizali koya. Ata tokutani na makambo motindo nini kati na mosala ya kosakola, tika ete tomekola ndakisa ya Yesu na kozaláká na nsaí mpo na kosala mokano ya Tata ye.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá maloba na nsé ya lokasa matali Nzembo 40:8, NW.